Mwasi ná mobali mokomoko azali na esika ya lokumu
YEHOVA NZAMBE akelaki liboso Adama; na nsima, akelaki Eva. Liboso Eva akelama, Adama asilaki koyeba makambo mingi ya bomoi. Na boumeli ya ntango yango, Yehova apesaki ye mwa malako. (Genese 2:15-20) Adama asengelaki koyebisa malako oyo Nzambe apesaki ye epai ya mwasi na ye. Na bongo, Adama nde asengelaki kokamba makambo etali losambo.
Ezali mpe na ebongiseli ya ndenge wana na kati ya lisangá ya boklisto; tokoki kozwa liteya soki totaleli yango. Ntoma Paulo akómaki boye: “Nazali te kopesa mwasi nzela . . . ya kozala na bokonzi likoló ya mobali, kasi nde ya kofanda kimya. Mpo Adama asalemaki liboso, Eva na nsima.” (1 Timote 2:12, 13) Yango elingi koloba te ete mwasi asengeli kofungola ata monɔkɔ te na makita. Kofanda kimya elimboli ete asengeli te kowelana na mobali. Asengeli te kokitisa bokonzi na ye, to mpe koluka koteya lisangá. Nzambe apesi mibali mokumba ya kotambwisa mpe koteya lisangá, kasi basi basalaka mpe mingi mpo basanganaka na makambo ndenge na ndenge na makita.
Mpo na kolimbola esika ya mobali mpe ya mwasi na kati ya ebongiseli ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki boye: “Mobali auti na mwasi te, kasi mwasi auti na mobali . . . Lisusu, na oyo etali Nkolo mwasi azali te kozanga mobali mpe mobali azali te kozanga mwasi [to mpe kozanga kotalela ye]. Mpo lokola mwasi auti na mobali, ndenge moko mpe mobali ayei na nzela ya mwasi; kasi biloko nyonso euti na Nzambe.”—1 Bakolinti 11:8-12.
Basi bakokisaka makambo mingi ya ntina
Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele epesaki basi nzela ya kosala makambo mingi ya ntina mpe bakokaki kozwaka bikateli. Na ndakisa, Masese 31:10-31 elobeli ‘mwasi ya malamu’ oyo asombaka mpe atongaka bilamba ya kitoko mpo na bato ya libota na ye. Kutu, “akosalaka bilamba ya kitoko mpe akotɛkisa yango”! (Vɛrsɛ 13, 21-24) “Lokola masuwa ya batɛkisi,” mwasi yango aponaka bilei ya malamu, ata soki asengeli kokende koluka yango mosika. (Vɛrsɛ 14) “Akotala elanga mpe akosomba yango,” mpe “akokona elanga ya [vinyo].” (Vɛrsɛ 16) Lokola “akososola ete biloko na ye ezali malamu,” asalaka mombongo ya malamu. (Vɛrsɛ 18) Mwasi yango oyo azali makasi na mosala “akotala malamu na makambo ya ndako na ye,” abangaka Yehova mpe asalisaka basusu. (Vɛrsɛ 20, 27) Yango wana, ebongaki mpenza bákumisa ye!—Vɛrsɛ 31.
Mibeko oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize epesaki basi mabaku mingi ya koyeba makambo ya Nzambe. Na ndakisa, na Yosua 8:35 tozali kotánga boye: “Liloba ezalaki te na yango nyonso elakaki Moize, oyo Yosua atángaki te liboso ya koyangana nyonso ya Yisalaele, mpe basi mpe bana, mpe bapaya bafandaki kati na bango.” Biblia elobi boye mpo na Nganga-nzambe Ezela: “Ayaki na Mobeko liboso ya koyangana, ya babali mpe ya basi mpe ya nyonso baoyo bayebaki koyoka na kososola na mokolo ya liboso ya sanza ya nsambo. Atángaki kati na yango liboso ya etando monene oyo ezalaki liboso ya Ekuke ya Mai longwa na ntɔngɔntɔngɔ kino midi, liboso ya babali mpe ya basi mpe ya nyonso baoyo bayebaki kososola; mpe matoi ya bato nyonso ezalaki epai ya mokanda ya Mobeko.” (Nehemia 8:2, 3) Basi bazalaki kolanda ntango Mibeko ezalaki kotángama. Bazalaki mpe kosangana na bafɛti ya losambo. (Deteronome 12:12, 18; 16:11, 14) Likambo eleki ntina, basi na Yisalaele ya kala bakokaki kosala boninga na Yehova Nzambe mpe kobondelaka ye.—1 Samwele 1:10.
Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso (T.B.), basi oyo bazalaki kobanga Nzambe bazwaki libaku ya kosalela Yesu. (Luka 8:1-3) Mwasi moko apakolaki Yesu mafuta na motó mpe na makolo ntango babengisaki ye mpo na kolya na ndako moko na Betania. (Matai 26:6-13; Yoane 12:1-7) Ntango Yesu asekwaki, abimelaki mpe basi. (Matai 28:1-10; Yoane 20:1-18) Na kati ya bato soki 120 oyo bayanganaki esika moko nsima ya kozonga ya Yesu na likoló, ezalaki mpe na “basi moko boye mpe Malia mama ya Yesu.” (Misala 1:3-15) Na ntembe te, mingi kati na basi yango, mbala mosusu mpe bango nyonso, bazalaki na eteni ya ndako ya likoló na Yelusaleme na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango elimo santu ekitelaki bayekoli ya Yesu mpe babandaki koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge.—Misala 2:1-12.
Esakweli ya Yoele 2:28, 29 ekokisamaki epai ya basi mpe mibali; ntoma Petelo azongelaki maloba yango ya Yehova na mokolo ya Pantekote ete: “Nakosopa ndambo ya elimo na ngai likoló ya mosuni ya ndenge nyonso, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola . . . Mpe ata likoló ya baombo na ngai ya mibali mpe likoló ya baombo na ngai ya basi nakosopa ndambo ya elimo na ngai na mikolo wana.” (Misala 2:13-18) Mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., baklisto mosusu ya basi mpe bazwaki makabo ya elimo. Bazalaki koloba na minɔkɔ mosusu mpe bazalaki kosakola; mbala mosusu bazalaki te koloba makambo oyo ekoya, kasi basakolaki solo ya Makomami.
Na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki baklisto ya Loma, alobaki malamu mpo na Foebe “ndeko na biso ya mwasi” mpe asɛngaki bango ete báyamba ye malamu. Alobelaki mpe Tilifene mpe Tilifoze, “basi oyo bazali kosala mosala makasi na kati ya Nkolo.” (Baloma 16:1, 2, 12) Atako basi yango baponamaki te lokola bakɛngɛli mpe basaleli na misala na lisangá na siɛklɛ ya liboso, Nzambe apesi bango mpe ebele ya basi mosusu libaku ya kozala na kati ya bato oyo bakosangana na Mwana na ye, Yesu Klisto, na Bokonzi ya likoló.—Baloma 8:16, 17; Bagalatia 3:28, 29.
Lelo oyo mpe, basi oyo babangaka Nzambe bazali kokokisa mokumba moko ya ntina mingi. Nzembo 68:11 elobi ete: “Nkolo alakisi mpe basi baoyo bapalanganisi nsango bazali mingi mpenza.” Ebongi kopesa basi yango longonya. Na ndakisa, bato mingi bazali kondima mateya ya solo mpo basi yango bazali kosalela mayele na bango ya koteya. Basi baklisto oyo bazali kosalisa bana na bango bákóma bandimi mpe bazali kosunga mibali na bango oyo bazali na mikumba mingi na lisangá, babongi mpe na lokumu. (Masese 31:10-12, 28) Baklisto ya basi oyo bazali minzemba bazali mpe na esika ya lokumu na kati ya ebongiseli ya Nzambe mpe Biblia esɛngi baklisto ya mibali ete ‘bábondela . . . basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi elongo na bopɛto nyonso ya bizaleli.’—1 Timote 5:1, 2.
Mikumba ndenge na ndenge ya mobali
Nzambe apesi moklisto ya mobali mokumba mpe alingi ete akokisa yango. Paulo alobaki boye: “Nalingi bóyeba ete mokonzi ya mobali nyonso ezali Klisto; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Mobali mpe azali na mokonzi na ye—Klisto. Ya solo, mobali akozongisa monɔkɔ epai ya Klisto mpe nsukansuka epai ya Nzambe. Nzambe asɛngi mobali ete asalela bokonzi na ye na bolingo. (Baefese 5:25) Ezalaki bongo banda na ebandeli.
Biblia emonisi ete Nzambe azalaki kopesa mibali mikumba na kotalela esika na bango ya bokonzi. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Noa atonga masuwa mpo na kobikisa bato na Mpela. (Genese 6:9–7:24) Alakaki Abalayama ete na nzela ya momboto na ye, mabota mpe bikólo nyonso ya mabelé ekopambolama. Yesu Klisto nde azalaki moto ya liboso na momboto yango. (Genese 12:3; 22:18; Bagalatia 3:8-16) Nzambe asalelaki Moize mpo abimisa Bayisalaele na Ezipito. (Exode 3:9, 10, 12, 18) Lisusu, ezalaki na nzela ya Moize nde Yehova apesaki Mibeko ya kondimana, to Mibeko ya Moize. (Exode 24:1-18) Bato nyonso oyo bakomaki Biblia bazalaki mibali.
Lokola azali Mokonzi ya lisangá ya boklisto, Yesu “apesaki makabo oyo ezali bato.” (Baefese 1:22; 4:7-13) Ntango Paulo atángaki makambo oyo moto asengeli kokokisa mpo akóma mokɛngɛli, azalaki kolobela mibali. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9) Na bongo, masangá ya Batatoli ya Yehova etambwisami na mibali oyo baponami lokola bakɛngɛli to bankulutu, mpe basaleli na misala. (Bafilipi 1:1, 2; 1 Timote 3:8-10, 12) Kaka mibali nde basengeli kozala babateli na lisangá ya boklisto. (1 Petelo 5:1-4) Kasi, ndenge tomonaki yango, basi bakokisaka mpe makambo ya ntina mingi.
Mokomoko asepelaka na esika na ye
Mibali mpe basi oyo bakokisaka mokumba oyo Nzambe apesá mokomoko na bango, bazalaka na esengo. Esengo ezalaka na libala soki mobali mpe mwasi bazali kolanda ndakisa ya Klisto mpe ya lisangá na ye. Paulo akomaki boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, se ndenge Klisto mpe alingaki lisangá mpe amikabaki mpo na yango . . . Tiká ete mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo lokola amilingaka ye moko.” (Baefese 5:25-33) Mpo na yango, mibali basengeli kosalela bokonzi na bango, na nko te, kasi na bolingo. Lisangá ya boklisto ezali na bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, Yesu alingaka yango mpe abatelaka yango. Ndenge moko mpe, mobali moklisto asengeli kolinga mpe kobatela mwasi na ye.
Mwasi moklisto “asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Mpo na yango, akoki kolanda ndakisa ya lisangá. Baefese 5:21-24 elobi boye: “Bótosanaka bino na bino na kobanga Klisto. Tiká basi bátosaka mibali na bango lokola epai ya Nkolo, mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá, ye mobikisi ya nzoto yango. Ya solo, ndenge lisangá etosaka Klisto, tiká basi mpe bátosaka mibali na bango ndenge wana na makambo nyonso.” Atako mwasi akoki komona ete na bantango mosusu ezali mpasi mpo amonisa botosi epai ya mobali na ye, asengeli kaka kotosa ye mpamba te yango “ebongi bongo na kati ya Nkolo.” (Bakolose 3:18) Mwasi akotosa mobali na ye kozanga mindɔndɔ soki azali kobosana te ete kosala bongo esepelisaka Nkolo Yesu Klisto.
Ata soki mwasi moklisto azali na mobali oyo azali mondimi te, asengeli kaka kotosa bokonzi na ye. Ntoma Petelo alobaki boye: “Bino basi, bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.” (1 Petelo 3:1, 2) Lokola Sala azalaki kotosa mobali na ye Abalayama, azwaki libaku ya kobota Yisaka mpe kokɔta na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu Klisto. (Baebele 11:11, 12; 1 Petelo 3:5, 6) Nzambe akopambola basi oyo balandaka ndakisa ya Sala.
Kimya mpe boyokani malamu ezalaka soki mwasi mpe mobali bazali kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki mokomoko na bango. Yango epesaka esengo. Lisusu, kolanda masɛngami ya Biblia mpe kotosa esika oyo Nzambe apesá mokomoko na bango epesaka bango lokumu.
[Etanda na lokasa 7]
Ndenge batalelaka esika oyo Nzambe apesá bango
Susan alobi boye: “Mobali na ngai asalelaka bokonzi na ye na bolingo mpe na boboto. Tosololaka malamu liboso ya kozwa bikateli, mpe ntango alobi tósala boye to boye, nayebaka ete ezali mpo na bolamu na biso. Esika oyo Yehova apesá basi baklisto epesaka ngai esengo mingi mpe mpo na yango, libala na biso ezali malamu. Ngai ná mobali na ngai toyokanaka malamu mpe tosalaka elongo mpo na kokokisa mikano na biso ya elimo.”
Mwasi moko nkombo na ye Mindy alobi boye: “Esika oyo Yehova apesá biso basaleli na ye ya basi emonisaka ete alingaka biso. Namonaka ete soki nazali kopesa mobali na ngai lokumu mpe limemya mpe kosunga ye na mikumba na ye na lisangá, ezali ndenge ya komonisa Yehova ete nasepelaka na esika oyo apesá ngai.”
[Bililingi na lokasa 5]
Lokola mobali nde azali mokonzi, Nzambe apesaki mibali lokola Noa, Abalayama, mpe Moize mikumba ndenge na ndenge
[Elilingi na lokasa 7]
“Basi baoyo bapalanganisi nsango bazali mingi mpenza”