Yehova abikisaka moto oyo azali na mpasi
“Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.”—NZEMBO 34:19.
1, 2. Moklisto moko ya sembo akutanaki na mokakatano nini, mpe mpo na nini makanisi ya ndenge wana ekoki mpe kokómela biso?
MWASI moko nkombo na ye Keikoa azali Motatoli ya Yehova banda bambula koleka 20. Kutu, na eleko moko asalaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe azalaki kosepela na mosala yango mingi. Kasi, na nsima, Keiko akómaki komitungisa mingi; azalaki lisusu na elikya te mpe azalaki komiyoka ete azali kaka ye moko. Alobi boye: “Mikolo nyonso nazalaki kaka kolela.” Mpo na kolonga mokakatano yango, Keiko amipesaki na koyekola. Alobi ete: “Atako bongo, makanisi yango ezalaki kosila te. Kutu, nakómaki na mposa nakufa na ngai.”
2 Likambo ya ndenge wana esilá mpe kokómela yo? Lokola ozali Motatoli ya Yehova, ozali na makambo mingi ya esengo mpamba te ezaleli ya kokangama na Nzambe “ezali na elaka ya bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya.” (1 Timote 4:8) Ozali na kati ya paladiso ya elimo! Kasi, yango elingi koloba te ete mpasi ekoki lisusu kokómela yo te. Biblia elobi ete: “Moyengebene azali na makambo mingi ya mpasi.” (Nzembo 34:19) Yango ekoki kokamwisa biso te mpamba te “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Mokomoko na biso akutanaka na makambo ya mpasi, ya makasi to ya moke.—Baefese 6:12.
Mabe oyo mpasi ememaka
3. Tángá ndakisa ya basaleli ya Nzambe oyo bakutanaki na mpasi makasi.
3 Moto akoki kobungisa elikya nyonso soki mpasi na ye eumeli mingi. (Masese 15:15) Tózwa ndakisa ya Yobo, moto moko ya sembo. Ntango Yobo azalaki na mpasi makasi, alobaki boye: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Yobo abungisaki esengo nyonso. Kutu, na ntango moko akanisaki ete Yehova asundoli ye. (Yobo 29:1-5) Longola Yobo, basaleli mosusu ya Nzambe bakutanaki na mpasi makasi. Biblia elobi ete Hana “ayokaki bololo mingi na motema” lokola azalaki kobota te. (1 Samwele 1:9-11) Lebeka azalaki komitungisa mingi mpo na bana na ye, yango wana alobaki ete: “Ngai nalɛmbi na bomoi.” (Genese 27:46) Davidi amitungisaki mpo na mabunga oyo asalaki; yango wana alobaki ete: “Mokolo mobimba nazali kotambolatambola wana nakolelaka.” (Nzembo 38:6) Mwa bandakisa wana emonisi polele ete mibali mpe basi oyo bazalaki kosalela Nzambe na ntango ya kala bazalaki mpe kokutana na bampasi makasi.
4. Mpo na nini tokoki kokamwa te ete lelo oyo, baklisto mosusu bazali “konyokwama na makanisi”?
4 Ezali boni mpo na baklisto? Ntoma Paulo ayebisaki Batesaloniki ete ‘bálobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya milimo oyo ezali konyokwama na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14) Buku moko elobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “milimo oyo ezali konyokwama na makanisi” ekoki kolimbola bato oyo, “na mwa ntango moko, mikakatano ya bomoi eleki bango motó.” Maloba ya Paulo emonisi ete bapakolami mosusu na lisangá ya Tesaloniki bazalaki na mitungisi ya makasi. Lelo oyo, tozali mpe na baklisto oyo bazali konyokwama na makanisi. Kasi, mpo na nini bazali konyokwama? Tokolobela bantina misato oyo emonanaka mingi.
Bomoto na biso ya masumu ekoki kotungisa biso
5, 6. Ndenge nini Baloma 7:22-25 ekoki kobɔndisa biso?
5 Baklisto ya solo bayokaka mawa mpo na ezaleli na bango ya bato ya masumu; bazali te lokola bato mabe oyo ‘babungisi bizaleli nyonso ya malamu.’ (Baefese 4:19) Ntango mosusu bayokaka lokola Paulo, oyo akomaki ete: “Nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe engebene moto oyo ngai nazali na kati, kasi nazali komona na kati ya binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba ná mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na kati ya binama na ngai.” Na nsima, Paulo amilelaki ete: “Ngai moto ya mawa!”—Baloma 7:22-24.
6 Yo mpe osilá koyoka lokola Paulo? Ezali mabe te soki omimonaka mpenza ete ozali moto ya kozanga kokoka, mpamba te yango ekoki kosalisa yo omona ete lisumu ezali mpenza mabe mpe ekoki kolendisa ekateli na yo ya koboya kosala mabe. Kasi, elingi koloba te ete osengeli kozalaka mawamawa mpo na mabunga na yo. Nsima ya kokoma makambo oyo touti kotánga, Paulo abakisaki boye: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Klisto Nkolo na biso!” (Baloma 7:25) Paulo azalaki na elikya ete makila ya Yesu oyo esopamaki ekoki kobikisa ye na lisumu.—Baloma 5:18.
7. Nini ekoki kosalisa moto amitungisa mingi te mpo ayokaka bamposa ya mabe?
7 Soki ozali komitungisa mpo ozali moto ya masumu, maloba oyo ya ntoma Yoane esengeli kobɔndisa yo: “Soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Klisto, moyengebene. Mpe ye azali mbeka ya mbɔndi mpo na masumu na biso, nzokande mpo na oyo ya biso kaka te kasi mpe mpo na oyo ya mokili mobimba.” (1 Yoane 2:1, 2) Soki omitungisaka mpo oyokaka bamposa ya mabe, kobosana te ete Yesu akufaki mpo na bato ya masumu, kasi te mpo na bato ya kokoka. Kutu, “bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.”—Baloma 3:23.
8, 9. Mpo na nini tosengeli koboya komisambisa?
8 Kasi, ezali boni soki kala osalaká lisumu moko ya monene? Na ntembe te, obondelaki Yehova mpo na kosɛnga ye bolimbisi; ntango mosusu kutu osalaki yango mbala na mbala. Lisusu, bankulutu basalisaki yo. (Yakobo 5:14, 15) Obongolaki mpenza motema mpe otikalaki na lisangá. To mpe obimisamaki na lisangá mpe na nsima obongolaki motema mpe obongisaki boyokani na yo na Yehova. Ata soki elekaki ndenge nini, ntango mosusu okoki kokanisa lisusu mabe oyo osalaki mpe oyoki mawa. Soki makanisi yango eyeli yo, kobosana te ete ntango moto abongoli mpenza motema, Yehova alimbisaka “na solo.” (Yisaya 55:7) Longola yango, Yehova alingi te omiyokaka ntango nyonso lokola moto amemi ngambo. Soki ozali koyoka bongo, Satana akosepela. (2 Bakolinti 2:7, 10, 11) Nzambe akoboma Zabolo mpamba te yango nde etumbu ebongi na ye, kasi Zabolo alingi okanisaka ete yo mpe obongi na etumbu wana. (Emoniseli 20:10) Kotika te Satana aboma kondima na yo na mayele mabe na ye. (Baefese 6:11) Luká ‘kotɛmɛla ye’ na likambo yango ndenge osalaka na makambo mosusu.—1 Petelo 5:9.
9 Na Emoniseli 12:10, babengi Satana “mofundi ya bandeko na biso”; bandeko na biso yango ezali baklisto bapakolami. ‘Afundaka bango butu moi’ liboso ya Nzambe. Soki okanisi na maloba ya vɛrsɛ yango, okomona ete Satana, oyo amesaná kokosela bato makambo, akosepela soki ozali komisambisa, nzokande Yehova azali kokanisa bongo te. (1 Yoane 3:19-22) Mpo na nini okominyokola mpo na mabunga oyo osalá tii okóma na makanisi ya kozonga nsima? Kotika te ete Satana abebisa boyokani na yo ná Nzambe. Kotika te Zabolo abosanisa yo ete Yehova azali “na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto.”—Exode 34:6.
Mikakatano ya nzoto ekoki kolɛmbisa biso
10. Na ndenge nini mikakatano ya nzoto ekoki kolɛmbisa biso?
10 Baklisto mosusu balɛmbaka mpo mikakatano ya nzoto ezali kopekisa bango básalela Nzambe mingi. Ezali mpe bongo mpo na yo? Ekoki kozala ete maladi ya makasi, bobange, to mokakatano mosusu ezali kopekisa yo osakolaka mingi ndenge ozalaki kosala liboso. Toboyi te, Biblia ezali kolendisa baklisto básomba ntango mpo na mosala ya Nzambe. (Baefese 5:15, 16) Kasi, osengeli kosala nini soki mokakatano moko ezali mpenza kopekisa yo osakolaka mingi mpe yango ezali kotungisa yo?
11. Ndenge nini toli ya Paulo oyo ezali na Bagalatia 6:4 ekoki kosalisa biso?
11 Biblia ezali kolendisa biso tózala gɔigɔi te, kasi tózala nde “bamekoli ya baoyo na nzela ya kondima mpe na motema molai bazali kozwa libula ya bilaka.” (Baebele 6:12) Mpo na kolanda toli yango, tosengeli koyekola ndakisa malamu ya bato wana mpe komekola kondima na bango. Nzokande, ekozala na litomba moko te soki tozali komikokanisa na bandeko mosusu oyo bazali kosala mingi koleka biso mpe na bongo, kokanisa ete tozali na ntina moko te. Yango wana, tosengeli kolanda toli ya Paulo oyo: “Tiká moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te.”—Bagalatia 6:4.
12. Mpo na nini tosengeli kosepela na mosala oyo tozali kosalela Yehova?
12 Baklisto bakoki mpenza kosepela ata soki mikakatano ya nzoto ezali kopekisa bango kosala mingi na mosala ya Yehova. Biblia elobi na biso boye: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.” (Baebele 6:10) Ekoki kozala ete makambo oyo okoki kosilisa te ezali kopekisa yo osala mingi ndenge oyo ozalaki kosala liboso. Kasi, na lisalisi ya Yehova, okoki kokóma makasi na mitindo mosusu ya mosala ya kosakola, na ndakisa kopesa litatoli na telefone to kokoma mikanda. Yebá ete Yehova Nzambe akopambola yo mpo na mosala oyo ozali kosala na molimo na yo mobimba mpe na bolingo na yo mpo na ye mpe bazalani na yo.—Matai 22:36-40.
“Bantango ya ndenge mosusu” ekoki kolɛmbisa biso
13, 14. (a) Mpasi nini tokoki kokutana na yango na ‘bantango oyo ya ndenge mosusu’? (b) Ndenge nini kozanga bolingo ya libota ezali komonana lelo oyo?
13 Atako tozali kozela na motema mobimba mokili ya sika mpe ya boyengebene oyo Nzambe alaki biso, tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1) Tozali kobɔndisama na koyeba ete makambo ya mpasi oyo tozali komona elakisi ete lobiko na biso ekómi pene. Atako bongo, bampasi ezali mpe kozwa biso. Na ndakisa, okoki kozala somɛlɛ, ozali koluka mosala kasi mosala ezali komonana te; nsima ya basanza mingi, okoki kobanda komituna soki Yehova azali komona mpasi na yo to soki azali koyoka mabondeli na yo. Ekoki mpe kozala ete bato mosusu bazali kokanisela yo mabe to bazali kosalela yo makambo na bosembo te. Ata kaka bansango oyo ozali kotánga na bazulunalo ekoki kokómisa yo lokola Lota, moto ya sembo, oyo “atungisamaki makasi” (“azalaki komona pasi,” Bible na Lingala ya lelo oyo) na etamboli ya nsɔni ya bato oyo afandaki na bango.—2 Petelo 2:7.
14 Ezali mpe na likambo moko oyo ezali komonana polele na mikolo oyo ya nsuka. Biblia esakolaki ete bato mingi bakozala na “bolingo ya libota” te. (2 Timote 3:3) Na mabota mingi, bolingo ezali ata moke te. Kutu, buku moko (Family Violence) elobi ete “ezali komonana ete bato oyo bandeko na bango moko bakoboma, bakobɛta, bakobangisa to mpe bakobebisa bango bakozala mingi koleka baoyo bato mosusu bakosala bango makambo yango. Libota, esika oyo mikóló mpe bana basengeli kolingama mingi mpe kofanda na kimya, yango nde eleki na makama mingi.” Bato oyo bakolá na mabota oyo bolingo ezalaki te, bakómaka konyokwama na makanisi mpe bazangaka elikya ntango bakómi mikóló. Osengeli kosala nini soki ezali mpe bongo mpo na yo?
15. Na ndenge nini bolingo ya Yehova eleki bolingo ata ya moto nini?
15 Davidi ayembaki boye: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Ezali mpenza likambo ya kolendisa koyeba ete bolingo ya Yehova eleki ata ya baboti na biso! Atako toyokaka mpasi mingi soki moboti na biso moko aboyi biso, azali konyokola biso, to asundoli biso, yango ekoki kobongola eloko moko te na bolingo mpe libateli ya Yehova. (Baloma 8:38, 39) Tóbosana te ete Nzambe abendaka bato oyo ye alingaka. (Yoane 3:16; 6:44) Ata soki bato basalaki yo mabe nini, yebá ete Tata na yo ya likoló alingaka yo mingi!
Makambo oyo tokoki kosala mpo na kokitisa mitungisi
16, 17. Ntango moto atondi na mawa, akoki kosala nini mpo azwa makasi na elimo?
16 Ezali na makambo oyo okoki kosala mpo na kokitisa mitungisi. Na ndakisa, okoki kobongisa programɛ moko malamu ya makambo ya elimo. Zwáká ntango ya komanyola Liloba ya Nzambe, mingimingi ntango mitungisi ekómi koleka ndelo. Mokomi ya Nzembo akomaki boye: “Ntango nalobaki ete: ‘Lokolo na ngai ekotɛngatɛnga,’ ee Yehova, boboto monene na yo etikaki ngai te. Ntango makanisi oyo ebulunganisaka etondaki ngai na motema, mabɔndisi na yo ezalaki kobondela molimo na ngai .” (Nzembo 94:18, 19, NW) Kotánga Biblia mokolo na mokolo ekosalisa yo otondisa bɔɔngɔ na yo na maloba ya kobɔndisa mpe makanisi ya kolendisa.
17 Libondeli mpe ezali na ntina mingi. Ata soki maloba na yo ezali mpenza komonisa polele te ndenge oyo ozali koyoka, Yehova ayebi makanisi nyonso oyo ozali komeka kobimisa. (Baloma 8:26, 27) Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atɛlɛngana.”—Nzembo 55:22.
18. Wapi mwa makambo oyo ekoki kosalisa moto oyo azali konyokwama na makanisi?
18 Mitungisi mosusu ezalaka nde maladi ya konyokwama na makanisi.b Soki ezali bongo mpo na yo, mekáká kokanisa mokili ya sika oyo Nzambe alaki mpe ntango oyo “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.” (Yisaya 33:24) Soki okómi mpenza konyokwama na makanisi, ebongi okutana na monganga. (Matai 9:12) Esengeli mpe obatelaka nzoto na yo malamu. Okoki kosala yango soki ozali kolya bilei oyo etongaka nzoto mpe soki ozali kosala mwa ngalasisi. Laláká mpɔngi na ndenge ekoki mpenza. Kolekisaka ebele ya bangonga liboso ya televizyo te, mpe boyá masano oyo ekoki kolɛmbisa yo nzoto to motó. Koleka nyonso wana, kobá komipesa na misala oyo esepelisaka Nzambe! Atako ntango oyo Yehova “akopangwisa mpisoli nyonso” eyei naino te, akotika te kosalisa yo oyika mpiko.—Emoniseli 21:4; 1 Bakolinti 10:13.
Tozali “na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe”
19. Yehova alaki nini na baoyo bazali na mpasi?
19 Biblia elobi na biso ete atako moyengebene akutanaka na makambo mingi ya mpasi, ‘Yehova abikisaka ye kati na yango nyonso.’ (Nzembo 34:19) Ndenge nini Nzambe abikisaka ye? Ntango ntoma Paulo abondelaki mbala na mbala mpo ete “nzubɛ” oyo ezalaki kotungisa ye “na kati ya mosuni” elongwa, Yehova alobaki na ye ete: “Nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” (2 Bakolinti 12:7-9) Yehova alakaki Paulo nini, mpe azali kolaka yo nini? Alaki te ete akobikisa yo na ndenge ya likamwisi, kasi alaki kopesa yo nguya ya koyika mpiko.
20. Atako tozali na mikakatano, vɛrsɛ ya 1 Petelo 5:6, 7 elaki biso nini?
20 Ntoma Petelo akomaki boye: “Bómikitisa na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe, mpo atombola bino na ntango ekoki; wana bozali kobwaka mitungisi na bino nyonso likoló na ye, mpamba te ye atyelaka bino likebi.” (1 Petelo 5:6, 7) Yehova akoki kosundola yo te mpamba te atyelaka yo likebi. Akosunga yo atako ozali kokutana na mikakatano. Kobosana te ete baklisto ya sembo bazali “na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe.” Yehova apesaka biso baoyo tozali kosalela ye makasi ya koyika mpiko. Soki totikali sembo epai na ye, eloko moko te ekobebisa elimo na biso mpo na libela. Yango wana, tókangama na Yehova mpo tózwa bomoi ya seko na mokili ya sika oyo alaki mpe tómona mokolo oyo akobikisa mpo na libela bato oyo bazali na mpasi!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
b Maladi ya konyokwama na makanisi ekeseni na kotungisama na makanisi oyo eyelaka moto mpo alɛmbi nzoto; moto oyo azali na maladi wana azalaka mawamawa mingi mpe eumelaka. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1988, nkasa 25-29; ya 15 Novɛmbɛ 1988, nkasa 21-24; mpe ya 1 Sɛtɛmbɛ 1996, nkasa 30-31.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini bampasi ezwaka ata basaleli ya Yehova?
• Wapi mwa makambo oyo ekoki kolɛmbisa basaleli ya Yehova?
• Ndenge nini Yehova asalisaka biso tólonga mitungisi na biso?
• Na ndenge nini tozali “na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe”?
[Bililingi na lokasa 25]
Atako basaleli ya Yehova bakutanaka na mikakatano, bazali na ntina malamu ya kosepela
[Elilingi na lokasa 28]
Kopesa litatoli na telefone ezali motindo moko oyo tokoki kopesa Yehova oyo eleki malamu