Okoki kobunda na Satana mpe kolonga!
“Bótɛmɛla [Satana], bózala makasi na kondima.”—1 PETRO 5:9.
1. (a) Mpo na nini etumba na biso na Satana ezali na ntina mingi sikoyo? (b) Ndenge nini toyebi ete tokoki kolonga etumba na Satana?
SATANA azali kobundisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele mpe “bampate mosusu.” (Yoane 10:16) Na mwa ntango mokuse oyo atikali na yango, Zabolo alingi kobebisa kondima ya ebele ya basaleli ya Yehova. (Tángá Emoniseli 12:9, 12.) Kasi tokoki kolonga etumba na Satana. Biblia elobi ete: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.”—Yakobo 4:7.
2, 3. (a) Mpo na nini Satana alingaka bato bándima ete azalaka te? (b) Ndenge nini oyebi ete Satana azalaka mpenza?
2 Bato mosusu kutu basɛkaka soki bayebisi bango ete Satana azalaka. Mpo na bango, Satana mpe bademo bazali bililingi oyo ezalaka kaka na babuku, bafilme ya nsɔmɔ mpe na masano ya video. Bato yango bakanisaka ete soki ozali mayele, okoki kondima te ete bilimo mabe ezalaka. Etungisaka Satana koyoka ete bato bandimaka te ete ye ná bademo bazali mpenza? Te. Ezali pɛtɛɛ mpo Satana akosa bato oyo bandimaka te ete ye azali. (2 Bakorinti 4:4) Na ntembe te, Satana andimisaka makanisi ya ndenge wana mpo akoka kobungisa bato nzela.
3 Biso basaleli ya Yehova tobungi nzela te. Toyebi ete Zabolo azali mpenza solo. Ndenge nini toyebi yango? Biblia eyebisi biso ete Satana asololaki na Eva na nzela ya nyoka. (Ebandeli 3:1-5) Asololaki na Yehova, andimaki te makanisi ya Yobo. (Yobo 1:9-12) Satana alukaki komeka Yesu. (Matai 4:1-10) Mpe ntango Yesu akómaki mokonzi na mobu 1914, na nsima Satana abandaki “kobunda etumba” na bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele. (Emoniseli 12:17) Etumba yango ezali kokoba kaka mpo Zabolo azali koluka kobebisa kondima ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu. Mpo na kolonga etumba yango, tosengeli kobunda na Satana mpe kokoba kobatela kondima na biso makasi. Lisolo oyo elobeli lolenge misato oyo tokoki kosala yango.
BWAKÁ EZALELI YA LOLENDO
4. Mpo na nini Satana azali moto ya lolendo na ndenge ya kosakana te?
4 Satana azali na lolendo makasi mpenza. Anzelu wana mabe atyelaki lotomo oyo Nzambe azali na yango ya koyangela ntembe, mpe alukaki ete bato básambela ye na esika ya kosambela Yehova. Na yango, azali moto ya lolendo to oyo atombolaka mapeka na ndenge ya kosakana te. Kasi, lolenge oyo tokoki kobunda na Satana ezali ya kobwaka lolendo mpe kozala bato ya komikitisa. (Tángá 1 Petro 5:5.) Kasi lolendo elimboli nini? Ezalaka ntango nyonso mabe?
5, 6. (a) Lolendo ezalaka ntango nyonso mabe? Limbolá. (b) Lolendo ya ndenge nini ezali likama, mpe wapi bandakisa ya Biblia oyo emonisi yango?
5 Diksionɛrɛ moko elobi ete lolendo ezali ezaleli ya komityela motema mpe komizwa na lokumu mingi. Elimboli mpe “koyoka esengo mpo yo to baninga na yo ya motema basali likambo moko ya malamu to bazali na eloko moko ya malamu.” Komiyoka boye ezali mabe te. Ntoma Paulo alobaki na bandeko ya Tesaloniki ete: “Biso mpenza tozali komikumisa mpo na bino na kati ya masangá ya Nzambe mpo na koyika mpiko na bino mpe kondima na bino na minyoko na bino nyonso mpe malɔzi oyo bozali kokangela motema.” (2 Batesaloniki 1:4) Na yango, koyoka malamu mpo na mosala oyo basusu basali to mpe ata komipesa mwa lokumu moke ekoki komemela biso litomba. Tosengeli koyoka nsɔni te mpo na libota na biso, makambo oyo tokolá na yango, to esika oyo tokolá.—Misala 21:39.
6 Nzokande, ezali na ezaleli ya lolendo oyo ekoki kobebisa boyokani na biso, mingimingi boyokani na biso ná Yehova. Lolendo ya ndenge wana ekoki kotinda biso tósilika ntango bapesi biso toli. Ekoki mpe ata kosala ete tóboya toli na esika ya kondima yango na komikitisa nyonso. (Nzembo 141:5) Lolendo ya ndenge wana elimbolami lokola ezaleli ya moto oyo akanisaka mingi mpo na ye moko to lokola “ezaleli ya komitombola oyo bato mosusu atako bazali na ntina te ya kosala yango bandimaka ete baleki basusu mosika.” Yehova ayinaka mpenza ezaleli ya lolendo. (Ezekiele 33:28; Amose 6:8) Kasi Satana ayokaka malamu ntango bato bazali kolanda lolendo na ye na ndenge bamikumisaka. Kanisá naino ndenge Satana asepelaki ntango Nimerode, Farao mpe Abisalome bamonisaki lolendo ya mabe mpenza ndenge bamikumisaki! (Ebandeli 10:8, 9; Kobima 5:1, 2; 2 Samwele 15:4-6) Lolendo nde esalaki ete Kaina abebisa boyokani na ye ná Nzambe. Yehova apesaki Kaina toli, kasi lokola azalaki na lolendo makasi, aboyaki koyoka. Azalaki motó makasi, alandaki te likebisi ya Nzambe, mpe akakatanaki te mpo na kosala lisumu liboso ya Yehova.—Ebandeli 4:6-8.
7, 8. (a) Ezaleli ya kokabola mposo ezali nini, mpe na ndenge nini ezali ndeko ya lolendo? (b) Limbolá ndenge oyo lolendo ekoki kobebisa kimya na lisangá.
7 Lelo oyo, bato bamonisaka lolendo na ndenge ya mabe. Lolendo ezalaka ntango mosusu ndeko ya ezaleli ya kokabola mposo. Diksionɛrɛ moko elimbolaka ezaleli ya kokabola mposo lokola kozala na makanisi mabe epai ya bato ya mposo mosusu. Elimboli mpe “kozala na makanisi ete bato ya loposo boye to boye bazali na bizaleli mpe makoki oyo ekeseni na oyo ya basusu, mpe ete na miso ya Nzambe, mposo mosusu eleki oyo ya baninga to ezali na nse.” Ezaleli ya kokabola mposo ebimisi kowelana, bitumba, ata mpe kobomama ya ebele ya bato.
Lolendo ekoki kobebisa kimya na lisangá
8 Makambo ya ndenge wana esengeli kosalema te na lisangá ya bokristo. Kasi, kowelana kati na bandeko ekoki kobanda na lolendo mpe na nsima mɔtɔ ekoki kopela. Yango nde esalemaki epai ya bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso, oyo ntoma Yakobo atunaki bango motuna oyo ya ntina mingi ete: “Bitumba ezali kouta wapi mpe kobunda oyo ezali na kati na bino ezali kouta wapi?” (Yakobo 4:1) Soki tozali na makanisi ya koyina basusu mpe ete tozali na valɛrɛ mingi koleka bango, tokoki koloba to kosala likambo oyo ekopesa bango mpenza mpasi na motema. (Masese 12:18) Emonani polele ete lolendo ekoki kobebisa kimya na lisangá.
9. Ndenge nini Biblia ezali kosalisa biso tóboya ezaleli ya kokabola mposo mpe lolenge nyonso ya lolendo ya mabe? (Talá elilingi ya ebandeli.)
9 Soki tokómi na makanisi ya komona ete tozali na valɛrɛ mingi koleka basusu, tosengeli kobosana te ete Yehova ayinaka “moto nyonso oyo azali na lolendo na motema.” (Masese 16:5) Tosengeli mpe kotalela motema na biso mpe komituna boye: ‘Namimonaka na valɛrɛ mingi koleka bato ya mposo, ekólo to mimeseno mosusu?’ Soki ezali bongo, tozali kobosana ete Nzambe “na moto moko asalaki bikólo nyonso ya bato.” (Misala 17:26) Na maloba mosusu, biso nyonso tozali bato ya loposo moko mpo moto nyonso autá na Adama. Ezali mpenza bozoba koloba ete Nzambe akelá mposo mosusu na valɛrɛ mingi koleka ya bato mosusu. Soki tozali kokanisa bongo, wana tozali kopesa Satana nzela alongola bolingo mpe bomoko na biso bakristo. (Yoane 13:35) Mpo na kobunda na Satana mpe kolonga, tosengeli koboya lolenge nyonso ya lolendo ya mabe.—Masese 16:18.
TÓBOYA KONDUKA BILOKO YA MOKILI MPE BOLINGO YA MOKILI
10, 11. (a) Mpo na nini ezali mpasi te kolinga mokili? (b) Lokola Demasi alingaki mokili, likambo nini azangaki?
10 Satana azali “mokonzi ya mokili oyo,” mpe asimbi yango na mabɔkɔ. (Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19) Makambo mingi oyo mokili etindaka bato básala eyokanaka te na mitinda ya Biblia. Tolobi te ete biloko nyonso oyo ezali na mokili ezali mabe. Kasi, tokoki kondimisama ete Satana akosalela mokili oyo mpo na kosalela bamposa na biso na ndenge ya mabe mpe koluka kotinda biso tósala lisumu. To akoluka kotinda biso tólinga mokili mpe tókóma kozwa losambo na biso epai na Yehova na lisɛki.—Tángá 1 Yoane 2:15, 16.
11 Bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso balingaki mokili. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete: “Demasi asundoli ngai mpo alingaki makambo ya ntango oyo.” (2 Timote 4:10) Biblia elobi na bosikisiki te makambo nini ya mokili oyo Demasi alingaki, oyo etindaki ye asundola ntoma Paulo. Ekoki kozala ete Demasi abandaki kolinga mingi biloko ya mokili koleka mosala na ye epai na Yehova. Soki ezali bongo, Demasi azangaki libaku ya kozwa mikumba mingi na mosala ya Nzambe. Esengelaki mpenza asala bongo? Te. Demasi asengelaki kokoba kosalisa ntoma Paulo. Mokili ekokaki soki moke te kopesa ye eloko moko ya malamu mingi koleka Yehova!—Masese 10:22.
Tótika soki moke te ete mbongo ekóma na ntina mingi koleka boyokani na biso ná Yehova
12. Ndenge nini Satana akoki kosalela “nguya ya bokosi ya bomɛngo” mpo na kobebisa bamposa na biso?
12 Likambo ya bongo ekoki mpe kokómela biso lelo oyo. Ezali mabe te ete bakristo báluka biloko mpo na bango moko mpe mabota na bango. (1 Timote 5:8) Yehova alingaka ete tósepela na bomoi. Toyebi yango mpo apesaki Adama ná Eva paradiso moko kitoko mpo na kofanda. (Ebandeli 2:9) Kasi Satana akoki kosalela “nguya ya bokosi ya bomɛngo” mpo na kobebisa bamposa na biso. (Matai 13:22) Bato mingi bakanisaka ete mbongo mpe bomɛngo ekoki kopesa bango esengo to kosalisa bango bálonga na bomoi. Soki tokanisi bongo, tokoki kobungisa eloko ya motuya mingi oyo tozali na yango, boyokani na biso ná Yehova. Yesu apesaki toli ete: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu, to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” (Matai 6:24) Soki tozali baombo kaka ya bomɛngo, wana totiki kosalela Yehova. Yango nde mpenza Satana alingi tósala. Tótika soki moke te ete mbongo to biloko oyo yango ekoki kosomba ekóma na ntina mingi koleka boyokani na biso ná Yehova. Mpo na kobunda na Satana mpe kolonga, tosengeli kotalela bomɛngo na ndenge ebongi.—Tángá 1 Timote 6:6-10.
TÓBOYA PITE MPE EKOBO
13. Ndenge nini mokili oyo ezali kopesa bato makanisi mabe na oyo etali libala mpe kosangisa nzoto?
13 Moko ya mitambo mosusu ya Satana ezali pite to ekobo. Bato mingi bakanisaka ete kokangama kaka na mobali to mwasi moko, ata na libala yango moko, ezali likambo oyo esilá ngala mpe ezali kotya bango nkaka. Na ndakisa, mwasi moko oyo asalaka bafilme alobá ete ekoki kosalema te ete moto akangama kaka na molongani na ye. Abakisá ete: “Nayebi moto moko te oyo akangamá kaka na molongani moko to alingaka kozala bongo.” Mobali moko oyo asalaka bafilme alobá: “Nayebi te soki na mokili na biso oyo, ezali na moto moko oyo akangamá kaka na molongani moko bomoi na ye mobimba.” Satana ayokaka esengo mpenza ntango bato oyo bakende nsango bazali kotyola libala, likabo ya Nzambe. Zabolo asepelaka te na ebongiseli ya libala, mpe alingaka te ete mabala ezala malamu. Na yango, mpo na kobunda na Satana mpe kolonga, tosengeli kotalela libala ndenge Nzambe atalelaka yango.
14, 15. Okoki kosala nini soki omekami mpo na kosala pite to ekobo?
14 Ezala tobalá to te, tosengeli kosala makasi tóboya lolenge nyonso ya pite. Ezali pɛtɛɛ? Soki moke te! Na ndakisa, soki ozali elenge, okoki koyoka baninga na yo ya kelasi bazali komikumisa ndenge basangisaki nzoto ná moto moko oyo basepelaka na ye mingi. Bakoki mpe komikumisa na ndenge batindelanaka bamesaje mpe bililingi ya kosangisa nzoto na batelefone na bango. Nzokande, na mikili mosusu, kotindela moto bamesaje ya ndenge wana, ezali lokola kotindela mwana moke bililingi ya pornografi. Biblia elobi ete: “Moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Bakorinti 6:18) Bampasi mosusu mpe liwa eutaka na bamaladi ya kosangisa nzoto. Mpe bilenge mosusu oyo basangisaki nzoto liboso bábala, balobaka ete bayokaka mawa mingi ndenge basalaki bongo. Masano oyo mokili elakisaka, elingaka tóndima ete kobuka mibeko ya Nzambe ememaka makama te. Soki tondimi lokuta ya ndenge wana, “nguya ya bokosi ya lisumu” ekoki kobungisa biso nzela.—Baebre 3:13.
15 Soki omekami mpo na kosala pite to ekobo, okoki kosala nini? Kobosana te ete ozali na bolɛmbu. (Baroma 7:22, 23) Bondelá Nzambe apesa yo nguya. (Bafilipi 4:6, 7, 13) Boyá makambo oyo ekoki kotinda yo osala pite to ekobo. (Masese 22:3) Mpe ntango okutani na komekama, kimá yango mbala moko.—Ebandeli 39:12.
16. Yesu alobaki nini ntango Satana alukaki komeka ye, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?
16 Yesu atikelá biso ndakisa moko kitoko mpenza. Atikaki te ete bilaka ya Satana ekosa ye. Afandaki kutu te mpo na kokanisa yango. Kutu, na mbala moko ayebisaki Satana ete: “Ekomamá.” (Tángá Matai 4:4-10.) Yesu ayebaki Liloba ya Nzambe, yango wana ezalaki mpasi te atánga mbala moko makomami ntango Satana amekaki ye. Mpo na kobunda na Satana mpe kolonga, tosengeli komitika te tómekama mpo na kosala pite to ekobo.—1 Bakorinti 6:9, 10.
TOSENGELI KOZALA NA MPIKO MPO TÓLONGA ETUMBA
17, 18. (a) Mitambo nini mosusu Satana asalelaka, mpe mpo na nini toyebaka ete ekoki kokómela biso? (b) Nini ekokómela Satana, mpe ndenge nini likambo yango elendisi yo okoba koyika mpiko?
17 Lolendo, konduka biloko ya mokili mpe pite to ekobo ezali kaka mitambo misato ya Satana. Mitambo mosusu ezali ebele. Na ndakisa, bakristo mosusu bazali na bato ya libota to baninga ya kelasi oyo batyolaka bango. Basusu bazali na mikili oyo guvɛrnema ezali koluka kopekisa bango mpo na kosakola. Toyebaka ete lelo to lobi tokoki kokutana na mikakatano yango. Yesu akebisaki biso ete: “Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai; kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”—Matai 10:22.
18 Ndenge nini tokoki kobunda na Satana mpe kolonga? Yesu alobaki ete: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokobikisa milimo na bino.” (Luka 21:19) Eloko moko te oyo moto akoki kosala mpo na kosala biso mabe ekoumela seko na seko. Moto moko te akoki kobebisa boyokani na biso ná Nzambe soki biso moko topesi ye nzela te. (Baroma 8:38, 39) Ata soki basaleli mosusu ya Yehova ya sembo bakufi, yango elingi koloba te ete Satana alongi. Yehova akosekwisa bango. (Yoane 5:28, 29) Kasi elikya ezali te mpo na Satana. Nsima ya kobomama ya mokili oyo mabe, akobwakama na libulu mozindo na boumeli ya mbula 1 000. (Emoniseli 20:1-3) Na nsuka ya mbula nkóto ya boyangeli ya Kristo, Satana ‘akofungolama’ mpe akoluka mpo na mbala ya nsuka kobungisa bato ya kokoka nzela. Na nsima, akobomama. (Emoniseli 20:7-10) Atako elikya ezali te mpo na Zabolo, kasi elikya ezali mpo na yo! Kobá kobunda na Satana, mpe kobá kobatela kondima na yo makasi. Okoki kobunda na Satana mpe kolonga!