Bankulutu mpe basaleli na misala—Bómekola Timote
NA MOKILI mobimba, bandeko mibali ebele bakómaki bankulutu to mpe basaleli na misala na mbula oyo eleki. Soki ozali moko na bango, na ntembe te ozali kosepela na mokumba na yo.
Kasi, mbala mosusu ozali mpe komitungisa mwa moke. Ndeko Jason, nkulutu moko ya elenge, alobi boye: “Ntango nakómaki nkulutu, mikumba na ngai ya sika ezalaki mwa kilo.” Moize ná Yirimia mpe bayokaki ete bakokoka te kokokisa mikumba oyo Yehova apesaki bango. (Kobima 4:10; Yirimia 1:6) Soki yo mpe oyokaka bongo, okoki kosala nini mpo olongola kobanga mpe okoba kokende liboso? Tótalela ndakisa ya Timote.—Misala 16:1-3.
MEKOLÁ TIMOTE
Mbala mosusu Timote azalaki na mbula pene na 20 to mwa moke koleka ntango ntoma Paulo asɛngaki ye akóma kosala mibembo elongo na ye. Lokola Timote azalaki elenge, mbala mosusu na ebandeli azalaki kobangabanga mpe kokakatana mpo na kokokisa mokumba yango ya sika. (1 Timote 4:11, 12; 2 Timote 1:1, 2, 7) Kasi, mbula 10 na nsima, Paulo akomelaki bandeko ya Filipi ete: “Nazali kolikya kotindela bino Timote nsima ya mwa ntango moke . . . Mpo nazali na moto mosusu te oyo azali na makanisi lokola ya ye.”—Bafilipi 2:19, 20.
Nini esalaki ete Timote azala nkulutu ya malamu mpenza? Tótalela makambo 6 oyo tokoki koyekola na ndakisa na ye.
1. Azalaki kotyela bato likebi. Paulo alobaki na bandeko ya Filipi ete: “[Timote] azali komitungisa mpenza mpo na bino.” (Bafilipi 2:20) Ya solo, Timote azalaki kotyela bato likebi. Alingaki bákóma baninga ya Yehova, mpe andimaki komipesa mpo na bolamu na bango.
Kolinga te kozala lokola sofɛlɛ oyo alingi kaka kokóma na ngonga oyo esengeli esika bisi etɛlɛmaka kasi akipaka kozwa bakiliya te. Ndeko William, nkulutu moko ya malamu banda mbula koleka 20, apesaka bankulutu mpe basaleli na misala ya sika toli oyo: “Lingáká bandeko. Tyeláká bamposa na bango likebi mingi koleka mosala ya kobongisa makambo na lisangá.”
2. Atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso. Paulo amonisaki ete Timote akesanaki na bato mosusu, alobaki: “Bamosusu nyonso bazali koluka matomba na bango moko, oyo ya Kristo Yesu te.” (Bafilipi 2:21) Paulo azalaki na Roma ntango azalaki kokomela bandeko ya Filipi. Amonaki ete bandeko ya Roma bamipesaki mingi na makambo na bango moko. Tokoki koloba ete bazalaki komipesa mingi te na makambo ya elimo. Kasi Timote azalaki ndenge wana te! Soki azwi mabaku ya kopalanganisa nsango malamu, azalaki na makanisi lokola Yisaya, oyo alobaki: “Ngai oyo! Tindá ngai.”—Yisaya 6:8.
Ndenge nini okoki kozala na bokatikati na makambo na yo mpe mikumba ya lisangá? Ya liboso, yebá makambo ya kotya na esika ya liboso. Paulo apesaki toli oyo: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Tyá makambo ya Nzambe na esika ya liboso. Ya mibale, boyá mindɔndɔ. Longolá makambo oyo elyaka ntango mpe makasi. Paulo ayebisaki Timote: “Kimá bamposa ya bolenge, kasi landá nde boyengebene, kondima, bolingo, kimya.”—2 Timote 2:22.
3. Azalaki kosala mosala makasi. Paulo akundwelaki bandeko ya Filipi ete: “Boyebi ndenge [Timote] amonisaki ete abongi kotyelama motema, mpo lokola mwana ná tata na ye asalaki lokola moombo elongo na ngai mpo nsango malamu ekende liboso.” (Bafilipi 2:22) Timote azalaki gɔigɔi te. Asalaki mosala makasi elongo na Paulo, mpe yango ekómisaki bolingo na bango makasi.
Lelo, mosala ezali mingi na ebongiseli ya Nzambe. Mosala yango epesaka esengo mpe ekosalisa yo omesana na bandeko. Yango wana, omityela mokano ya kozala “ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.”—1 Bakorinti 15:58.
4. Azalaki kosalela makambo oyo ayekoli. Paulo akomelaki Timote ete: “Olandi malamu mpenza mateya na ngai, bomoi na ngai, mokano na ngai, kondima na ngai, motema molai na ngai, bolingo na ngai, ezaleli na ngai ya koyika mpiko.” (2 Timote 3:10) Lokola Timote azalaki kosalela makambo oyo ayekoli, azwaki mikumba ya minene koleka.—1 Bakorinti 4:17.
Ozalaka na ndeko oyo asalisaka yo na elimo? Soki te, okoki koluka. Tom, ndeko moko oyo asali bambula ebele lokola nkulutu, alobi boye: “Nkulutu moko oyo aumelaki mingi azalaki kotyela ngai likebi mingi mpe alakisaki ngai makambo ebele. Nazalaki kotuna ye toli mpe kosalela yango. Yango esalisaki ngai nalongola kobanga nokinoki.”
5. Azalaki koyekola mingi. Paulo ayebisaki Timote: “Salá makasi okóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (1 Timote 4:7) Mbala mingi mopoti-mbangu azalaka na moto oyo asalisaka ye ngalasisi, kasi ye mpe asengeli kosala makasi. Paulo alendisaki Timote ete: “Kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya. . . . Okanisaka malamu mpenza makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso.”—1 Timote 4:13-15.
Yo mpe osengeli kokoba kokolisa makoki na yo. Kobá kokende liboso na elimo mpe lukáká koyeba malako nyonso oyo eyei sika. Lisusu, kokóma te komityela motema koleka ndelo: na ndakisa okoki kokanisa ete okómi na mayele mingi mpe okoki kosilisa likambo moko kozanga ete osala liboso bolukiluki ndenge esengeli. Kasi, na ndakisa ya Timote, “omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.”—1 Timote 4:16.
6. Atyaki motema na elimo ya Yehova. Ntango Paulo akanisaki mosala ya Timote, akundwelaki ye ete: “Eloko yango ya motuya oyo babombi epai na yo, batelá yango na lisalisi ya elimo santu oyo ezali epai na biso.” (2 Timote 1:14) Mpo na kobatela mosala na ye, Timote asengelaki kotya motema na elimo ya Nzambe.
Donald, oyo azali nkulutu banda bambula mingi, alobi boye: “Bankulutu basengeli kobatela mpenza boyokani na bango na Nzambe. Baoyo basalaka yango, makasi na bango ekobakisama se kobakisama. Soki bazali kosɛnga Nzambe elimo na ye mpe komonisa mbuma na yango, bakozala mpenza lipamboli mpo na bandeko.”—Nzembo 84:7; 1 Petro 4:11.
ZWÁ MOKUMBA NA YO NA MOTUYA
Komona ete bandeko oyo bakómi bankulutu to basaleli na misala bazali kokende liboso elendisaka mpenza. Ndeko Jason, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi: “Bambula nyonso oyo nazali nkulutu, nayekoli makambo mingi mpe kobanga ekiti mpenza. Lelo, nasepelaka mpenza na mokumba yango mpe namonaka yango lokumu monene mpenza!”
Olingi kokoba kokende liboso na elimo? Omityela mokano ya komekola Timote. Soki osali bongo, okozala lipamboli mpo na basaleli ya Nzambe.