Onesifolo: Mobɔndisi ya mpiko
“BÓKANISA bango bazali kati na bolɔ́kɔ lokola ete bokangani na bango esika moko. Bókanisa mpe bango banyokolami.” (Baebele 13:3) Ntango ntoma Paulo akomaki maloba oyo pene na mobu 61 T.B., asilaki kokɔta na bolɔ́kɔ mbala mingi, mpe etikalaki moke ete akɔta lisusu bolɔ́kɔ mpe abomama lokola martíru. (Misala 16:23, 24; 22:24; 23:35; 24:27; 2 Bakolinti 6:5; 2 Timoté 2:9; Filemona 1) Ekómaki bongo likambo ya lombangu, ndenge ezali sikawa, na masangá ete básalisa bandimi oyo bazalaki kokutana na minyoko na ntina na kondima na bango.
Moyekoli moko ya ekeke ya liboso oyo atyaki likebi mingi na mposa wana ezalaki bongo Onesifolo. Akendaki kotala Paulo ntango bakangaki ye na bolɔ́kɔ mpo na mbala ya mibale na Loma. Na ntina na ye, ntoma akomaki ete: “Tiká ete Nkolo ayokela libota na Onesifolo mawa zambi mbala mingi ayikisi ngai mpiko mpe ayoki nkanga na ngai nsɔni te. Ekómaki ye na Loma aluki ngai na etingya mpe azwi ngai.” (2 Timoté 1:16, 17) Osilá kozwa ntango ya kokanisa mozindo likoló ya ndimbola ya maloba yango ya mokuse? Kosala bongo ekokólisa bosepeli na yo mpo na Onesifolo. Okomona ete azalaki mobɔndisi ya mpiko.
Paulo na bolɔ́kɔ mbala ya mibale
Nsima ya kobima na bolɔ́kɔ mbala ya liboso, Paulo azongaki lisusu na bolɔ́kɔ na Loma kasi na makambo ndenge mosusu. Liboso, baninga na ye bazalaki kokende kotala ye na ndako oyo azalaki kofutela, mpe amonaki ete mosika te akobima na bolɔ́kɔ. Sikawa lokola bato mingi basundolaki ye, etikalaki moke akufa lokola martíru.—Misala 28:30; 2 Timoté 4:6-8, 16; Filemona 22.
Paulo azalaki na bolɔ́kɔ mbala ya mibale pene na mobu 65 T.B. Soko mbula moko liboso—na Yulí ya mobu 64 T.B.—mɔ́tɔ ebimaki na engumba Loma, bakartyé 10 kati na bakartyé 14 ya engumba ebebisamaki. Engebene mokomi na makambo ya kala Tacite, ye moto na Loma, Amperere Néron akokaki te “kosilisa likambo oyo ete bato bandimaki ete ye nde moto apesaki etindá ete bápelisa mɔ́tɔ. Na yango, mpo na komilongola na ngambo yango, Néron, na nkó nyonso afundaki baklisto mpe asɛngisaki ete bányokola makasi etuluku oyo eyinamaki mpo na misala na yango mabe, etuluku yango bato babéngaki yango baklisto. . . . Kobomama na bango esalemaki na motindo ete bato basepelaki na yango. Balatisaki bango mposo ya nyama, balyaki bango na bambwa mpe bakufaki, to babɛtaki bango nsɛ́tɛ́ likoló ya nzeté, to babwakaki bango na mɔ́tɔ mpe bazikaki, mpo na kongɛngisa na ntango ya butu.”
Ntango Paulo akangamaki lisusu, makambo mazalaki lolenge yango mpe bakokaki kosalela ye makambo yango. Na ntembe te azalaki na botɔ́ndi mingi na ndenge moninga na ye Onesifolo azalaki kokende kotala ye! Kasi tótalela makambo yango motindo moko na Onesifolo.
Akei kotala Paulo mokangami
Emonani ete, libota ya Onesifolo ezalaki kofanda na engumba Efese. (2 Timoté 1:18; 4:19) Eyebisami te soki Onesifolo ayaki na mboka-mokonzi Loma mpo na makambo na ye moko ya mombongo to mpenzampenza mpo na kotala Paulo. Atako bongo, ntoma alobaki ete: ‘Ekómaki Onesifolo na Loma mbala mingi ayikisi ngai mpiko.’ (2 Timoté 1:16, 17) Mpiko ya motindo nini? Atako lisungi ya Onesifolo ekokaki kosangisa biloko ya mosuni, kasi ye moko mpe azalaki na ntina mpo na kopesa Paulo makasi mpe mpiko. Kútu, mabongoli mosusu mabongoli ete: “Mbala mingi apesaki elimo na ngai nsai,” to “mbala mingi abɔndisaki ngai.”
Kokokisa mposa ya kokende kotala moklisto mokangami na Loma na eleko wana ezalaki likambo monene. Na kokesana na mikolo oyo Paulo azalaki na bolɔ́kɔ na mbala ya liboso, emonani ete baklisto ya Loma bazalaki na likoki te ya kokutana na Paulo na boumeli ya bolɔ́kɔ na ye na mbala ya mibale. Na engumba monene lokola Loma, ezalaki likambo moke te komona mokangami moko boye kati na ebele ya bato oyo bakangamaki mpo na bantina ekeseni. Na yango, esɛngaki mpenza koluka ye na molende. Nganga-mayele Giovanni Rostagno, alobeli likambo yango na motindo oyo: “Mikakatano mizalaki na ndenge mingi. Likoló na nyonso, koluka na bokɛngi mpenza ezalaki na ntina mingi. Kotunatuna epai na epai mpe komonana ete ozali komitungisa mpo na koyeba bolɔ́kɔ esika batye mokangami ya kala mpo na molende mabe oyo batalelaki ye lokola moto ya mobulu ekokaki kosala ete bámituna mituna mpo na yo.”
Mokomi P. N. Harrison amonisi elilingi ya likambo yango, kolobáká ete: “Kati na makanisi na biso, tozali komona moto moko ya ekateli makasi kati na bato ebele oyo bazali kotambola na makolo, mpe tozali kolanda na likebi mopaya yango oyo auti mosika pene ya mai monene ya Égée, ndenge azali kolekaleka na banzela oyo ameseni na yango te, kobɛta na bikuke mingi, kolanda bisika nyonso bazali kolakisa ye, koyebáká likámá oyo ezali liboso na ye kasi azali na ekateli makasi ya kozonga nsima te; kino kati na ndako ya bolɔ́kɔ ya molili mongongo moko oyo ayebi epesi ye mbote, mpe amoni Paulo akangami na minyɔlɔlɔ na mabɔkɔ ya sodá Moloma.” Soki esika yango ezalaki lokola babolɔ́kɔ mosusu ya Loma, ekoki kozala ete ezalaki esika ya malili, ya molili, mpe ya bosɔtɔ, epai etondaki na minyɔlɔlɔ mpe malɔ́zi ya ndenge nyonso.
Koyebana lokola moninga ya mokangami lokola Paulo ezalaki likámá. Kokende kotalaka ye mbala na mbala ezalaki lisusu likámá koleka. Komimonisa polele lokola moklisto ezalaki na likámá ya kokangama mpe kobomama nsima ya konyokolama. Kasi Onesifolo asepelaki te kotala Paulo mbala moko to mbala mibale. Azalaki na nsɔni te to na kobanga te mpo na kosala yango “mbala mingi.” Onesifolo amitambwisaki na ndimbola ya nkombo na ye, “Momemi litomba,” kopesáká lisungi ya mpiko mpe ya bolingo atako yango ezalaki likámá.
Mpo na nini Onesifolo asalaki makambo oyo nyonso? Brian Rapske akomaki ete: “Bolɔ́kɔ ezalaki esika bobele ya konyokwama na nzoto te, kasi esika ya mitungisi mozindo mpo ete ezalaki konyokola makanisi ya bakangami. Na likambo motindo oyo, moto ye moko mpe maloba ya kolendisa ya mosungi ekozala likambo oyo ekolendisa mokangami.” Onesifolo asosolaki yango mpe na mpiko nyonso asungaki moninga na ye. Paulo asepelaki mpenza na lisungi motindo oyo!
Nini ekómelaki Onesifolo?
Kati na mokanda na ye ya mibale epai na Timoté, Paulo atindaki mbote na libota ya Onesifolo mpe alobaki na ntina na ye ete: “Nkolo atika ete ye azwa mawa uta na [Yehova, NW] na mokolo yango.” (2 Timoté 1:18; 4:19) Bato mingi bazali kokanisa ete maloba “na mokolo yango” ezali kotalela mokolo ya kosambisama ya Nzambe mpe na bongo bazali kosukisa ete Onesifolo asilaki kokufa. P. N. Harrison apesi likanisi ete soki ezalaki bongo, mbala mosusu “Onesifolo akangamaki ntango akendaki mbala ya nsuka na bolɔ́kɔ, mpe afutaki . . . bomoi na ye lokola etumbu.” Ya solo, ekoki mpe bobele kozala ete Onesifolo azalaki na ndako na ye te ntango mokanda ekómaki, to Paulo akokaki kokɔtisa ye na mbote oyo atindelaki libota na ye mobimba.
Bato mosusu bakanisaka ete maloba oyo: “Nkolo atika ete ye azwa ngɔlu uta na [Yehova] na mokolo yango,” ezali na ndimbola ya sikisiki. Bazali kokanisa ete maloba yango ezali kondimisa likambo ya kosala mabondeli mpo na bolamu ya milimo ya bato bakufá zambi mbala mosusu mizali konyokwama na mokili ya bilimo. Nzokande, makanisi motindo oyo mayokani te na liteya ya Biblia oyo elobi ete bakufi bayebi eloko te. (Mosakoli 9:5, 10) Ata soki Onesifolo akufaki, Paulo amonisaki bobele mposa ete moninga na ye akozwa ngɔlu uta na Nzambe. Robert Horton alobi ete: “Mposa yango tosengeli kozala na yango mpo na bato nyonso. Kasi kosambela mpo na bakufi, mpe kosalela bango mísa, ezali yango te [ntoma] akanisaki.”
Tózala babɔndisi ya sembo
Ezala Onesifolo akufaki mpenza ntango azalaki kosunga Paulo to te, na ntembe te atyaki bomoi na ye na likámá mpo na kokutana na ntoma mpe kotala ye kati na bolɔ́kɔ. Mpe ntembe ezali te ete Paulo asepelaki mingi na lisungi oyo azalaki na yango mposa mpe na elendiseli azwaki uta na Onesifolo.
Ntango bandeko baklisto bazali kati na komekama, na minyoko, to na bolɔ́kɔ, tokoki kozala na makoki ya kobɔndisa mpe kolendisa bango. Na yango, tiká ete tóbondela mpo na bango mpe na bolingo nyonso tósala oyo tokoki mpo na kosunga bango. (Yoane 13:35; 1 Batesaloniki 5:25) Lokola Onesifolo, tózala babɔndisi ya mpiko.
[Elilingi na lokasa 31]
Onesifolo abɔndisaki na mpiko nyonso ntoma Paulo ntango azalaki na bolɔ́kɔ