‘Bafandi mpo na ntango mokuse’ na mokili moko mabe
“Bango nyonso . . . basakolaki polele ete bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.”—EBR. 11:13.
1. Yesu alobaki nini mpo na bayekoli na ye?
YESU alobaki mpo na bayekoli na ye ete: “Bazali na mokili.” Kasi abakisaki ete: “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoa. 17:11, 14) Na yango, Yesu amonisaki polele ndenge bayekoli na ye basengeli kotalela “makambo ya ntango oyo” to mokili oyo Satana azali nzambe na yango. (2 Ko. 4:4) Atako bakristo bazali kofanda na mokili oyo mabe, bazali bato ya mokili yango te. Na mokili, bazali nde ‘bapaya mpe bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse.’—1 Pe. 2:11.
‘Bafandaki na mokili mpo na ntango mokuse’
2, 3. Mpo na nini tokoki koloba ete Enoka, Noa, mpe Abrahama ná Sara bazalaki ‘bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili mpo na ntango mokuse’?
2 Banda kala, basaleli ya sembo ya Yehova bakesanaka na bato ya mokili epai bafandi. Liboso ya Mpela, Enoka ná Noa ‘batambolaki elongo na Nzambe ya solo.’ (Eba. 5:22-24; 6:9) Bango mibale basakolaki na mpiko nyonso ete Yehova akopesa mokili mabe ya Satana etumbu. (Tángá 2 Petro 2:5; Yuda 14, 15.) Lokola batambolaki elongo na Nzambe na mokili moko ya mabe, Enoka “asepelisaki mpenza Nzambe” mpe Noa “azalaki na mbeba te kati na bato ya ntango na ye.”—Ebr. 11:5; Eba. 6:9.
3 Kaka ndenge Nzambe ayebisaki bango, Abrahama ná Sara batikaki bomoi ya malamu na engumba Ure ya Bakaladea mpe bandimaki bomoi ya mpasi ya kotambolatambola na mboka mopaya. (Eba. 11:27, 28; 12:1) Ntoma Paulo akomaki boye: “Na kondima Abrahama, ntango abengamaki, atosaki na ndenge akendeki na esika oyo asengelaki kozwa yango libula; mpe akendaki, atako ayebaki te epai wapi azalaki kokende. Na kondima afandaki mopaya na mokili ya elaka lokola nde na mokili ya bopaya, mpe afandaki na bahema elongo na Yisaka ná Yakobo, bazwi-ya-libula ya elaka moko wana elongo na ye.” (Ebr. 11:8, 9) Mpo na basaleli ya Yehova ya sembo ya ndenge wana, Paulo alobaki boye: “Bango nyonso bakufaki na kati ya kondima, atako bazwaki te biloko oyo elakamaki, kasi bamonaki yango na mosika mpe basepelaki na yango mpe basakolaki polele ete bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.”—Ebr. 11:13.
Likebisi mpo na Bayisraele
4. Likebisi nini Bayisraele bazwaki liboso bázwa mabele oyo Yehova apesaki bango?
4 Bakitani ya Abrahama bakómaki mingi mpe nsukansuka Nzambe akómisaki bango ekólo Yisraele mpe apesaki bango mibeko mpe mabele. (Eba. 48:4; Mib. 6:1) Bayisraele basengelaki kobosana te ete Yehova nde Nkolo mabele yango. (Lev. 25:23) Bazalaki lokola bato oyo bazali kofutela ndako mpe basengelaki kotosa mibeko ya nkolo ndako. Longola yango, basengelaki kobosana te ete “moto abikaka kaka na mampa te”; basengelaki te kotika bozwi ya biloko ya mokili etinda bango bábosana Yehova. (Mib. 8:1-3) Yango wana, liboso Bayisraele bázwa mabele oyo Yehova apesaki bango, bazwaki likebisi oyo: “Ekosalema mpenza boye: ntango Yehova Nzambe na yo akokɔtisa yo na mokili oyo alapaki ndai epai ya bankɔkɔ na yo Abrahama, Yisaka mpe Yakobo ete akopesa yo, bingumba minene mpe kitoko oyo otongaki te, mpe bandako oyo etondi na biloko nyonso ya kitoko mpe oyo otondisaki te, mpe mabulu oyo etimolamá mpo na kobomba mai, oyo otimolaki te, bilanga ya vinyo mpe banzete ya olive oyo olonaki te, mpe ntango okolya mpe okotonda, kebá ete obosana Yehova te.”—Mib. 6:10-12.
5. Mpo na nini Yehova aboyaki Yisraele, mpe aponaki ekólo nini ya sika?
5 Likebisi wana ezalaki na ntina. Na mikolo ya Nehemia, etuluku moko ya Balevi bakanisaki makambo ya nsɔni oyo Bayisraele basalaki nsima ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Ntango bakómaki kofanda na bandako na bango ya kitoko mpe bakómaki na bilei mpe vinyo ebele, ‘babandaki kolya, kotonda, mpe kokóma mafutamafuta.’ Batombokelaki Nzambe, mpe babomaki kutu basakoli oyo atindaki mpo na kokebisa bango. Na yango, Yehova atikaki banguna na bango bálonga bango. (Tángá Nehemia 9:25-27; Hos. 13:6-9) Na nsima, ntango Roma ezalaki koyangela, Bayuda oyo bazangaki kondima babomaki kutu Masiya oyo alakamaki! Yehova aboyaki bango mpe aponaki ekólo moko ya sika, Yisraele ya elimo.—Mat. 21:43; Mis. 7:51, 52; Gal. 6:16.
Bakristo bazali “bato ya mokili te”
6, 7. (a) Ndenge nini okoki kolimbola maloba oyo Yesu alobaki nini mpo na bayekoli na ye? (b) Mpo na nini bakristo ya solo basengelaki te kokóma bato ya mokili ya Satana?
6 Ndenge tomonaki yango na ebandeli, Yesu Kristo, Mokonzi ya lisangá ya bokristo alobaki polele ete bayekoli na ye basengeli kokabwana na mokili oyo ya Satana. Mwa moke liboso akufa, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.”—Yoa. 15:19.
7 Wana bokristo ezalaki kopalangana, bakristo basengelaki nde kondima makambo ya mokili, komikɔtisa na yango mpe kokóma bato ya mokili? Te. Na esika nyonso oyo bazalaki, basengelaki kokesana na bato ya mokili ya Satana. Mbula soki 30 nsima ya liwa ya Kristo, bakristo bazalaki kofanda na bisika ndenge na ndenge oyo Roma ezalaki koyangela; ntoma Petro akomelaki bango boye: “Bandeko ya bolingo, lokola bozali bapaya mpe bato oyo bofandi mpo na ntango mokuse, nazali kolendisa bino ete bóboya bamposa ya nzoto, ezali bamposa yango nde ebundisaka molimo. Bózalaka na etamboli malamu na kati ya bikólo.”—1 Pe. 1:1; 2:11, 12.
8. Ndenge nini moto moko ya istware amonisaki ete bakristo ya liboso bazalaki bato ya mokili te?
8 Bakristo ya liboso bazalaki mpenza kosala makambo lokola ‘bapaya mpe bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ na mikili oyo Roma ezalaki koyangela. Mpo na yango, moto moko ya istware na nkombo Kenneth Scott Latourette akomaki boye: “Eyebani malamu ete na bikeke misato ya ebandeli, bakristo bakutanaki na minyoko mingi mpe mbala mingi ezalaki ya makasi . . . Bazalaki kofunda bango na makambo ndenge na ndenge. Lokola bakristo bazalaki koboya koyangana na milulu ya bapakano, bazalaki kofunda bango ete bandimaka te ete Nzambe azali.” Bazalaki koloba ete “bayinaka bato” mpo bazalaki koboya kokɔta na kominanola mpe na bafɛti oyo etondá na makambo ya losambo ya lokuta mpe na pite ná ekobo.
Tosalelaka mokili na makambo nyonso te
9. Lokola tozali bakristo ya solo, ndenge nini tomonisaka ete ‘toyikaka bato te’?
9 Ezali boni mpo na biso bakristo lelo oyo? Ndenge moko na bakristo ya liboso, tokɔtaka te na “makambo mabe ya ntango oyo.” (Gal. 1:4) Mpo na yango, bato mingi bayebaka te mpo na nini tosalaka likambo boye to boye te; bamosusu kutu bayinaka biso. Atako bongo, ‘toyinaka bato te,’ ndenge bato mosusu bakoki kokanisa. Tolingaka bato; yango wana tokendeke ndako na ndako mpe tosalaka makasi tóyebisa moto nyonso ‘nsango malamu ya bokonzi’ ya Nzambe. (Mat. 22:39; 24:14) Tosalaka yango mpo tondimaka ete mosika te, Bokonzi ya Nzambe, oyo mokonzi na yango ezali Kristo, ekosukisa makonzi nyonso ya bato ya kozanga kokoka, mpe ekotya mokili ya sika ya boyengebene.—Dan. 2:44; 2 Pe. 3:13.
10, 11. (a) Na ndenge nini tosalelaka mokili? (b) Na makambo nini bakristo oyo bazali ekɛngɛ baboyaka kosalela mokili na makambo nyonso?
10 Lokola mokili ya Satana ekosuka mosika te, biso basaleli ya Yehova tomonaka ete sikoyo ezali te ntango ya kofandisa makambo na mokili oyo mabe. Tolandaka toli oyo ya ntoma Paulo ete: “Talá oyo nazali koloba, bandeko: ntango oyo etikali ekómi mokuse. Yango wana . . . baoyo bazali kosomba [bázala] lokola baoyo bazali na eloko te, mpe baoyo bazali kosalela mokili lokola baoyo bazali kosalela yango na makambo nyonso te; mpo makambo ya mokili oyo ezali kobongwana.” (1 Ko. 7:29-31) Kasi, na ndenge nini biso bakristo tosalelaka mokili lelo oyo? Na ndakisa, tosalelaka biloko oyo bazali kobimisa mikolo oyo mpe baaparɛyi ndenge na ndenge mpo na kopalanganisa nsango malamu na minɔkɔ ebele. Longola yango, tosalaka mosala na mokili mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Tosombaka biloko ya mokili oyo tosengeli na yango na bomoi ya mokolo na mokolo. Kasi toboyaka kosalela mokili na makambo nyonso na ndenge totyaka biloko na biso ya mokili mpe mosala na biso ya mosuni na esika na yango.—Tángá 1 Timote 6:9, 10.
11 Bakristo oyo bazali ekɛngɛ baboyaka mpe kosalela mokili na makambo nyonso na oyo etali kelasi ya milaimilai. Bato mingi na mokili oyo bakanisaka ete esengeli kotánga bakelasi milaimilai mpo na kokóma na lokumu, kozwa mosala ya malamu, mpe kokóma na mbongo mingi. Kasi, biso bakristo tofandi na mokili mpo na ntango mokuse mpe tozalaka na mikano ya ndenge wana te. Toboyaka “makanisi ya komitombola.” (Rom. 12:16; Yir. 45:5) Lokola tozali bayekoli ya Yesu, tolandaka likebisi oyo: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela, mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.” (Luka 12:15) Na yango, tozali kolendisa bilenge bakristo báluka kokokisa mikano ya elimo. Bátánga kelasi kaka oyo ekoki kosalisa bango bázwa biloko ya kobikela oyo esengeli wana bazali komibongisa mpo na kosalela Yehova na ‘motema mpe na molimo na bango mobimba mpe na makasi mpe na makanisi na bango nyonso.’ (Luka 10:27) Soki basali bongo, bakoki kokóma ‘bazwi na miso ya Nzambe.’—Luka 12:21; tángá Matai 6:19-21.
Tóboya komikómisa kilo na mitungisi ya bomoi
12, 13. Ndenge nini kotosa maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:31-33 ekesenisaka biso na bato ya mokili?
12 Basaleli ya Yehova bakeseni mpe na bato ya mokili na ndenge ya kotalela biloko ya mokili. Na likambo yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana. Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” (Mat. 6:31-33) Mingi kati na bandeko na biso bakristo bakutaná na makambo oyo endimisi bango ete Tata na biso ya likoló akokisaka mpenza bamposa na biso, ndenge Yesu alobaki.
13 Ezali malamu tósepela na oyo tozali na yango. (1 Tim. 6:6) Makanisi yango ekeseni mpenza na oyo ya bato ya mokili ya lelo. Na ndakisa, ntango bilenge bauti kobalana, mingi balingaka kozwa biloko nyonso na mbala moko—ndako to apartema oyo etondi na biloko, motuka ya ntalo, mpe baaparɛyi oyo euti kobima sika. Kasi, bakristo oyo bafandi na mokili mpo na ntango mokuse batikaka te bamposa na bango etambwisa bango mpe basombaka kaka biloko oyo ekoki na bango. Tosepelaka mingi ndenge bandeko mingi bazali kotika biloko ya mokili mpo bápesa ntango mpe makasi na bango mingi koleka na mosala ya Yehova. Bamosusu bazali babongisi-nzela, bazali kosala na Betele, bazali bakɛngɛli-batamboli, to bamisionɛrɛ. Biso nyonso tozalaka na botɔndi mpo na mosala oyo bandeko na biso bazali kosalela Yehova na motema na bango mobimba!
14. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo Yesu apesaki ya moto oyo azalaki kolona mboto?
14 Na ndakisa oyo apesaki ya moto oyo azalaki kolona mboto, Yesu alobaki ete “motungisi ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo” ekoki kotya liloba ya Nzambe nkaka na mitema na biso mpe kosala ete tóbota mbuma te. (Mat. 13:22) Kosepela kofanda lokola bapaya na mokili oyo ekosalisa biso tókwea te na motambo wana. Ekosalisa biso mpe tóbatela liso “alima,” elingi koloba tótya makanisi na biso nyonso na mosala ya Nzambe mpe tótya Bokonzi na ye na esika ya liboso na bomoi na biso.—Mat. 6:22.
“Mokili ezali koleka”
15. Ntoma Yoane alobaki makambo nini oyo etindaka bakristo bámona ete bazali bapaya na mokili oyo?
15 Ntina monene oyo etindaka biso bakristo ya solo tómona ete tozali ‘bapaya mpe bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ na mokili oyo ezali ete tondimi mpenza ete etikali moke mokili oyo ebomama. (1 Pe. 2:11; 2 Pe. 3:7) Tomonisaka yango na ndenge totambwisaka bomoi na biso: bikateli oyo tozwaka, makambo oyo tolingaka, mpe mikano na biso. Ntoma Yoane apesaki bandeko na ye bakristo toli ete bálinga mokili te to biloko oyo ezali na mokili mpamba te “mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”—1 Yoa. 2:15-17.
16. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali bato oyo Yehova akesenisá na mokili?
16 Yehova ayebisaki Bayisraele ete soki batosi ye, bakokóma “mpenza eloko na [ye] moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso.” (Kob. 19:5) Ntango Bayisraele bazalaki sembo, losambo na bango mpe bomoi na bango ekesanaki na oyo ya bato ya bikólo mosusu nyonso. Lelo oyo mpe, Yehova akómisi biso bato na ye mpe tokeseni mpenza na bato ya mokili ya Satana. Biblia elobi boye: “Tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na ntango oyo, awa tozali kozela elikya ya kitoko mpenza mpe komonana ya Nzambe monene na nkembo mpe ya Mobikisi na biso, Kristo Yesu, oyo amipesaki mpo na biso mpo asikola biso na makambo ya ndenge nyonso ya kobuka mibeko mpe apɛtola mpo na ye bato oyo bazali bato na ye moko, oyo bazali na molende na misala ya malamu.” (Tito 2:11-14) “Bato” ya Yehova ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bamilio ya “bampate mosusu” ya Yesu, oyo bazali kopesa bango mabɔkɔ.—Yoa. 10:16.
17. Mpo na nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bakosepela mingi ndenge bafandaki mpo na ntango mokuse na mokili oyo mabe?
17 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na ‘elikya kitoko’ ya koyangela elongo na Kristo na likoló. (Em. 5:10) Bampate mosusu bazali na elikya ya kofanda na mabele mpo na libela. Ntango elikya yango ekokokisama, bakozala lisusu te bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse na mokili moko ya mabe. Bakozala na bandako ya kitoko mpe biloko ebele ya kolya mpe ya komɛla. (Nz. 37:10, 11; Yis. 25:6; 65:21, 22) Na bokeseni na Bayisraele, bakobosana ata moke te ete nyonso wana euti epai ya Yehova, “Nzambe ya mabele mobimba.” (Yis. 54:5) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bakosepela mingi ndenge bafandaki mpo na ntango mokuse na mokili oyo mabe.
Okopesa eyano nini?
• Na ndenge nini bato ya sembo ya ntango ya kala bazalaki bato oyo bafandi na mokili mpo na ntango mokuse?
• Bakristo ya liboso bazalaki komitambwisa ndenge nini na mokili?
• Na ndenge nini bakristo ya solo basalelaka mokili na makambo nyonso te?
• Mpo na nini tokosepela mingi ndenge tozalaki bato oyo bafandi na mokili mpo na ntango mokuse?
[Elilingi na lokasa 18]
Bakristo ya liboso baboyaki kominanola ya mobulu mpe ya mbindo