“Bana, bótosaka baboti na bino”
“Bana, bótosaka baboti na bino na kati ya bomoko elongo na Nkolo, mpo yango ezali likambo ya boyengebene.”—BAEFESE 6:1.
1. Ndenge nini botosi ekoki kobatela yo?
SOKI tozali na bomoi lelo oyo, mbala mosusu ezali mpo totosaki; bato mosusu mpe bakufá mpo batosaki te. Kotosa nini? Na ndakisa makebisi ya nzoto na biso oyo ‘esalemi na motindo ya kokamwa.’ (Nzembo 139:14) Na ndakisa, ntango miso emoni mapata moindo ezipi likoló mpe matoi eyoki lokito ya bankake, na nsima nsuki ya motó ebandi kotɛlɛma mpo na mikalikali, yango ezalaka likebisi mpo na moto nyonso oyo ayebi makama oyo ekoki koya aluka libela esika oyo akomibomba liboso mbula makasi ya bankake, ntango mosusu mpe ya mabanga, ekita.
2. Mpo na nini bana bazali na mposa ya makebisi, mpe mpo na nini basengeli kotosa baboti na bango?
2 Bilenge, bozali na mposa ya makebisi mpo bóbatelama na makama, mpe baboti na bino bazali na mokumba ya kopesa bino yango. Mbala mosusu, bosilá koyoka maloba lokola: “Kosimba mbabola te. Ezali mɔtɔ.” “Kopusana pembeni ya ebale te. Okoki kokwea mpe kozinda.” “Taláká ngámbo na ngámbo liboso ya kokatisa balabala.” Bana mosusu bazwá makama mpe bamosusu bakufá mpo batosaki te. Kotosa baboti na bino “ezali likambo ya boyengebene” to likambo oyo ebongi mpenza. Ezali mpe bwanya. (Masese 8:33) Vɛrsɛ mosusu ya Biblia elobi ete “ezali malamu mingi” epai ya Nkolo Yesu Klisto. Kutu, Nzambe nde azali kotinda bino ete bótosaka baboti na bino.—Bakolose 3:20; 1 Bakolinti 8:6.
Botosi ememaka matomba
3. “Bomoi ya solosolo” ekozala bomoi ya ndenge nini mpo na mingi kati na biso, mpe ndenge nini bana bakoki kolikya kozwa yango?
3 Kotosa baboti na bino ebatelaka “bomoi [na bino] ya sikoyo,” kasi ekopesa bino mpe libaku ya kozwa bomoi “oyo ezali koya,” oyo Biblia ebengi “bomoi ya solosolo.” (1 Timote 4:8; 6:19) Mpo na mingi kati na biso, bomoi ya solosolo ekozala bomoi ya seko awa na mabelé, na mokili ya sika oyo Nzambe alaki bato oyo bazali kotosa mibeko na ye na bosembo. Moko na mibeko ya ntina mingi elobi ete: “‘Kumisá tata na yo ná mama na yo’; oyo ezali komandema ya liboso elongo na elaka: ‘Mpo makambo ezala malamu mpo na yo mpe oumela ntango molai na mabelé.’” Yango elingi koloba ete soki ozali kotosa baboti na yo, okozala na bomoi ya esengo. Okozala na bomoi ya malamu na mikolo ekoya, mpe okozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé!—Baefese 6:2, 3.
4. Ndenge nini bana bakoki kokumisa Nzambe mpe na bongo kozwela yango matomba?
4 Soki bozali kokumisa baboti na bino na ndenge bozali kotosa bango, bozali mpe kokumisa Nzambe mpamba te ye nde atindi bino bótosa bango. Longola yango, bozali mpe kozwela yango matomba. Biblia elobi boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba.” (Yisaya 48:17; 1 Yoane 5:3) Kotosa ememelaka yo matomba nini? Esepelisaka tata mpe mama na yo; na nsima, mpo na komonisa ete bazali kosepela, bakosalela yo makambo oyo ekobakisa esengo na bomoi na yo. (Masese 23:22-25) Kasi, likambo eleki ntina ezali ete botosi na yo esepelisaka Tata na yo ya likoló mpe ye akopesa yo mbano monene! Tótala ndenge oyo Yehova apambolaki mpe abatelaki Yesu, oyo alobaki mpo na ye moko ete: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.”—Yoane 8:29.
Yesu azalaki makasi na mosala
5. Makambo nini ezali kotinda biso tókanisa ete Yesu azalaki makasi na mosala?
5 Yesu azalaki mwana ya liboso ya Malia. Yozefe, tata-mobɔkɔli na ye, azalaki mosali na mabaya. Yesu mpe akómaki mosali na mabaya, na ntembe te, Yozefe nde alakisaki ye mosala yango. (Matai 13:55; Malako 6:3; Luka 1:26-31) Na makanisi na yo, Yesu azalaki kosala mosala yango ndenge nini? Ntango azalaki na likoló, bambula mingi liboso mama na ye oyo ayebaki naino mibali te azwa zemi na ndenge ya likamwisi, alobaki boye: “Nazalaki pembeni [ya Nzambe] lokola moko oyo abɔkɔlamaki na ye; mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye.” Kuna na likoló, Nzambe asepelaki na Yesu mpo azalaki kosala mosala malamu. Okanisi te ete ntango azalaki elenge awa na mabelé asalaki mpe makasi azala makasi na mosala, mosali na mabaya oyo ayebi mpenza mosala?—Masese 8:30; Bakolose 1:15, 16.
6. (a) Mpo na nini okoki koloba ete Yesu azalaki kosala misala ya ndako ntango azalaki mwana moke? (b) Bana bakoki komekola makambo nini epai ya Yesu?
6 Biblia elobi ete na ntango ya kala, bana bazalaki kosakana; tokanisi mpe ete ntango Yesu azalaki mwana moke azalaki kosakana lokola bana mosusu. (Zekalia 8:5; Matai 11:16, 17) Kasi, lokola azalaki mwana ya liboso na libota ya bana mingi mpe baboti na ye bazalaki bato ya bomɛngo te, tokanisi mpe ete longola koyekola mosala ya mabaya epai ya Yozefe, azalaki kosala misala ya ndako. Na nsima, Yesu akómaki mosakoli mpe amipesaki mobimba na mosala yango; azalaki kutu kokipe naino bolamu na ye te. (Luka 9:58; Yoane 5:17) Omoni makambo oyo okoki komekola epai ya Yesu? Baboti na yo basɛngaka yo obongisa shambrɛ na yo to osala misala mosusu? Balendisaka yo oyangana na makita mpe opesaka bato litatoli? Ntango Yesu azalaki elenge, alingaki kosala nini soki baboti na ye basɛngaki ye makambo ya ndenge wana?
Moyekoli ya Biblia mpe Molakisi
7. (a) Ekoki kozala ete Yesu asalaki mobembo na banani? (b) Yesu azalaki wapi ntango bato mosusu babandaki kozonga, mpe mpo na nini azalaki kuna?
7 Mibeko esɛngaki mibali nyonso ya libota mokomoko na Yisalaele ete bákendaka na tempelo mpo na kosambela Yehova na bileko ya bafɛti misato oyo Bayuda bazalaki kosala mbula na mbula. (Deteronome 16:16) Ekoki kozala ete ntango Yesu azalaki na mbula 12, libota na bango mobimba bakendaki na Yelusaleme na fɛti ya Elekeli. Na ntembe te bazalaki na baleki na ye ya basi mpe ya mibali. Kasi, na kati ya bato oyo basalaki na bango mobembo, ekoki kozala Salome, oyo mbala mosusu azalaki ndeko ya Malia, ná mobali na ye Zebedai, ná bana na bango Yakobo ná Yoane, oyo na nsima bakómaki bantoma.a (Matai 4:20, 21; 13:54-56; 27:56; Malako 15:40; Yoane 19:25) Na ntango ya bozongi, Yozefe ná Malia bayebaki te ete Yesu atikali mpo bakanisaki ete azali elongo na bandeko na bango mosusu. Mikolo misato na nsima, Malia ná Yozefe bakendaki kokuta Yesu na tempelo, “afandi na katikati ya bateyi mpe azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna.”—Luka 2:44-46.
8. Yesu azalaki kosala nini na tempelo, mpe mpo na nini bato bazalaki kokamwa?
8 Mituna ya ndenge nini Yesu azalaki “kotuna” bateyi? Ekoki kozala ete mituna na ye ezalaki te lokola mituna ya moto oyo alingi kaka koyeba likambo moko. Liloba ya Grɛki oyo basaleli na vɛrsɛ yango esalelamaka mpo na mituna oyo bazuzi batunaka ntango bazali kolandela likambo mpe yango ekoki kosɛnga kotuna mituna likoló ya mituna. Yango emonisi ete ata ntango azalaki naino elenge, Yesu azalaki moyekoli ya Biblia oyo akamwisaki bato ya mayele oyo bazalaki bateyi ya makambo ya Nzambe! Biblia elobi boye: “Baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa na bososoli na ye mpe na biyano na ye.”—Luka 2:47.
9. Ndenge nini okoki kolanda ndakisa ya Yesu na likambo etali koyekola Biblia?
9 Na makanisi na yo, mpo na nini Yesu, atako azalaki naino elenge, azalaki na boyebi ya Biblia oyo ezalaki kokamwisa ata bateyi? Baboti na ye bazalaki kobanga Nzambe mpe bateyaki ye makambo ya Nzambe banda bomwana. (Exode 12:24-27; Deteronome 6:6-9; Matai 1:18-20) Tokanisi ete Yozefe azalaki komema Yesu na sinagoga epai bateyi bazalaki kotánga mpe kolimbola Makomami. Yo mpe ozali na baboti oyo bayekolaka na yo Biblia mpe bakendaka na yo na makita? Osepelaka na milende oyo basalaka, ndenge Yesu azalaki kosepela na milende ya baboti na ye? Oyebisaka bato mosusu makambo oyo oyekolaka, ndenge Yesu asalaki?
Yesu azalaki na botosi
10. (a) Mpo na nini esengelaki baboti ya Yesu báyeba esika oyo bakoki kokuta ye? (b) Ndakisa nini ya malamu Yesu apesi bana?
10 Nsima ya koluka Yesu mikolo misato, okanisi ete Malia ná Yozefe bayokaki ndenge nini ntango bakendaki kokuta ye na tempelo? Na ntembe te mitema na bango ekitaki mpenza. Nzokande, Yesu akamwaki na komona ete baboti na ye bayebaki te epai akokaki kozala. Bango mibale bayebaki ete Yesu abotamaki na ndenge ya likamwisi. Longola yango, atako bayebaki makambo nyonso te, basengelaki koyeba ete akozala Mobikisi mpe Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 1:21; Luka 1:32-35; 2:11) Yango wana, Yesu atunaki bango boye: “Mpo na nini bosengelaki koluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?” Atako bongo, lokola azalaki mwana ya botosi, Yesu alandaki baboti na ye mpe bazongaki na Nazalete. Biblia elobi mpe ete: “Azalaki kaka kotosa bango. Lisusu, mama na ye abatelaki maloba nyonso wana malamumalamu na motema na ye.”—Luka 2:48-51.
11. Na oyo etali botosi, ndakisa ya Yesu ekoki koteya yo nini?
11 Omonaka ete ezali pɛtɛɛ komekola Yesu, elingi koloba kotosa ntango nyonso baboti na yo? To omonaka ete bayebi eloko te na makambo ya mokili oyo; kutu yo oyebi mingi koleka bango? Toboyi te, okoki koyeba mingi koleka bango na makambo mosusu—na ndakisa, makambo ya telefone ya mabɔkɔ, ya ordinatɛrɛ, to ya biloko mosusu ya mikolo oyo. Kasi, kanisá naino Yesu, mwana oyo akamwisaki bateyi ya mayele “na bososoli na ye mpe na biyano na ye.” Na ntembe te oyebi ete Yesu ayebi mingi koleka yo! Atako bongo, Yesu azalaki kotosa baboti na ye. Yango elingi koloba te ete azalaki ntango nyonso na makanisi ndenge moko na baboti na ye. Kasi, “azalaki kaka kotosa bango” bolenge na ye nyonso. Ndakisa na ye ekoki koteya yo nini?—Deteronome 5:16, 29.
Kotosa ezalaka pɛtɛɛ te
12. Ndenge nini botosi ekoki kobikisa bomoi na yo?
12 Kotosa ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, ndenge likambo moko oyo esalemaki eleki sikoyo mwa bambula ekoki komonisa yango. Bilenge mibale ya basi balukaki kokatisa nzela moko monene oyo mituka elekaka mingi na esika báleka na nzela oyo babongisá na likoló mpo na bato ya makolo. Ntango bamonaki mwana mosusu ya mobali, nkombo na ye John, amati na nzela wana, bana wana ya basi babelelaki ye ete: “John, yaká tókatisa na nse!” Lokola John aboyaki, moko na bango alobaki na ye ete: “Oleki kobangabanga!” John azalaki kobanga te, kasi alobaki ete: “Nasengeli kotosa ndenge mama ayebisaka ngai.” Ntango azalaki koleka na nzela ya bato ya makolo, ayokaki makɛlɛlɛ ya motuka oyo ezali kotɛlɛma na mbalakaka, atalaki na nse mpe amonaki motuka etuti bana wana. Mwana moko akufaki mbala moko, mpe mwana mosusu azokaki mpota monene oyo esɛngaki ete bákata ye lokolo. Mama ya bana yango, oyo azalaki mpe koyebisa bango ete bálekaka ntango nyonso na likoló, alobaki na mama ya John ete: “Soki bazalaki ata na botosi lokola mwana na yo!”—Baefese 6:1.
13. (a) Mpo na nini bosengeli kotosa baboti na bino? (b) Ntango nini ebongi mwana aboya kosala likambo oyo baboti batindi ye?
13 Mpo na nini Nzambe alobi ete: “Bana, bótosaka baboti na bino”? Soki bozali kotosa baboti na bino, bozali mpe kotosa Nzambe. Longola yango, baboti na bino bayebi makambo mingi koleka bino. Na ndakisa, mbula mitano liboso likama oyo touti kolobela esalema, mwana ya moninga moko ya mama ya John akufaki na likama ya motuka ntango alingaki kokatisa kaka na nzela wana! Ya solo, kotosa baboti ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi Nzambe alobi ete bosengeli kotosa bango. Nzokande, soki baboti na bino, to bato mosusu, batindi bino bókosa, bóyiba, to bósala likambo moko oyo Nzambe aboyi, bosengeli “kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.” Yango wana, Biblia elobi ete, “Bana, bótosaka baboti na bino na kati ya bomoko elongo na Nkolo.” Elingi koloba ete bosengeli kotosa baboti na bino na makambo nyonso oyo mibeko ya Nzambe epekisi te.—Misala 5:29.
14. Mpo na nini kotosa ezali pɛtɛɛ mpo na moto ya kokoka, kasi mpo na nini akoki koyekola yango?
14 Soki ozalaki moto ya kokoka, elingi koloba, moto oyo “azangá mbindo, akabwani na basumuki,” ndenge Yesu azalaki, okanisi ete kotosa baboti na yo elingaki ntango nyonso kozala pɛtɛɛ? (Baebele 7:26) Soki ozalaki moto ya kokoka, motema na yo elingaki kobendama te na kosala makambo ya mabe, ndenge ebendaka yo lelo oyo. (Genese 8:21; Nzembo 51:5) Nzokande, ata Yesu asengelaki koyekola makambo mosusu etali botosi. Biblia elobi boye: “Atako [Yesu] azalaki Mwana, ayekolaki botosi na kati ya makambo oyo akutanaki na yango.” (Baebele 5:8) Ndenge nini bampasi esalisaki Yesu ayekola botosi, likambo oyo ayekolaki te na likoló?
15, 16. Ndenge nini Yesu ayekolaki botosi?
15 Ntango Yesu azalaki naino moke, Yehova apesaki Yozefe ná Malia malako mpo bákoka kobatela ye. (Matai 2:7-23) Kasi, na nsima, Nzambe alongolaki libateli na ye likoló ya Yesu. Biblia elobi ete Yesu ayokaki mpasi makasi mpe atungisamaki mingi na boye ete “asalaki malɔmbɔ mpe lisusu masɛngi . . . elongo na koganga makasi mpe mpisoli.” (Baebele 5:7) Likambo yango esalemaki ntango nini?
16 Mingimingi na nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, ntango Satana abimiselaki Yesu minyoko makasi mpo na kobebisa bosembo na ye. Na ntembe te lokola Yesu ayebaki ete akokufa lokola mosali ya mabe mpe ete yango ekoki kobebisa lokumu ya Tata na ye, atungisamaki mingi yango wana, na elanga ya Getesemane, “akobaki kobondela mpe motoki na ye ekómaki lokola matangá ya makila oyo ezalaki kokwea na nse.” Na nsima, Yesu ayokaki mpasi mingi na liwa na ye likoló ya nzete ya mpasi na boye ete alelaki “na koganga makasi mpe na mpisoli.” (Luka 22:42-44; Malako 15:34) Na ndenge yango “ayekolaki botosi na kati ya makambo oyo akutanaki na yango” mpe na bongo, asepelisaki motema ya Tata na ye. Lelo oyo, Yesu azali na likoló mpe ayebi mpasi oyo toyokaka wana tozali kosala milende mpo na kotosa.—Masese 27:11; Baebele 2:18; 4:15.
Bóyekola botosi
17. Ndenge nini tosengeli kotalela disipilini oyo bazali kopesa biso?
17 Soki tata na yo ná mama na yo bapesaka yo disipilini, elakisi ete balingaka yo mpe bazali na mposa ozala malamu. Biblia etuni motuna oyo: “Mwana nini oyo tata apesaka disipilini te?” Omoni te ete elingaki kozala mabe soki baboti na yo bazalaki kozwa ntango te mpe kosala milende te mpo na kosembola yo? Ndenge moko mpe, soki Yehova asembolaka yo ezali mpo alingaka yo. “Ya solo, disipilini moko te ezalaka esengo mpo na sikoyo, kasi nde mawa; nzokande na nsima epai ya baoyo bateyami na yango ebotaka mbuma ya kimya, elingi koloba, boyengebene.”—Baebele 12:7-11.
18. (a) Disipilini oyo epesami na bolingo emonisaka nini? (b) Matomba nini osilá komona epai ya bato oyo bazwaki disipilini ya ndenge wana?
18 Salomo, mokonzi moko ya Yisalaele ya kala, oyo Yesu alobaki ete azalaki moto ya bwanya mingi, alobaki ete esengeli ete baboti básembolaka bana na bango na bolingo. Akomaki boye: “Ye oyo aboyi fimbo abebisi mwana na ye, kasi ye oyo alingi ye akopesa ye etumbu na ntango ekoki.” Kutu, mokonzi yango alobaki ete moto oyo azali kosembolama na ndenge oyo ebongi akoki kobikisa molimo na ye na liwa. (Masese 13:24; 23:13, 14; Matai 12:42) Moklisto moko ya mwasi alobi ete ntango azalaki mwana moke, soki asali makɛlɛlɛ na makita, tata na ye azalaki koyebisa ye ete ntango bakozonga na ndako akobɛta ye. Lelo oyo, asepelaka soki akanisi tata na ye mpe ndenge oyo azalaki kopesa ye disipilini oyo ebongisaki ye.
19. Wapi ntina ya libosoliboso oyo osengeli kotosa baboti na yo?
19 Soki baboti na yo balingaka yo mpe bamonaka ete basengeli kozwaka ntango mpe kosala milende mpo na kopesa yo disipilini oyo ebongi, osengeli kozala na botɔndi mingi. Tosáká bango ndenge Nkolo na biso Yesu Klisto atosaki baboti na ye, Yozefe ná Malia. Kasi, tosáká bango libosoliboso mpo Tata na yo ya likoló, Yehova Nzambe, asɛngi yo yango. Na ndenge yango, okozwa matomba mpe ‘makambo ekozala malamu mpo na yo mpe okoumela ntango molai na mabelé.’—Baefese 6:2, 3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, lokasa 869, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• Bolamu nini bana bakoki kozwa soki bazali kotosa baboti na bango?
• Ntango Yesu azalaki mwana moke, na ndenge nini apesaki ndakisa ya kotosa baboti na ye?
• Ndenge nini Yesu ayekolaki botosi?
[Elilingi na lokasa 24]
Ata ntango azalaki na mbula 12, Yesu ayebaki Makomami malamu
[Elilingi na lokasa 26]
Ndenge nini Yesu ayekolaki botosi na bampasi?