Kosalela mitinda ya Biblia epesaka esengo
NA NTEMBE te osilá komona nyau emigumbi mpe ezali konguluma na esengo. Omoni te ete yo mpe okoki kosepela lokola nyau yango soki osali bongo? Nzokande, kozwa esengo ezalaka mpasi mpo na bato mingi, mpe ata soki bazwi yango eumelaka te. Mpo na nini bongo?
Ya liboso, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tosalaka mabunga mbala mingi, yango wana tosengeli te kolandelaka mabunga mikemike ya basusu. Ya mibale, tozali na eleko oyo Biblia ezali kobenga “mikolo ya nsuka,” oyo ezali “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza.” (2 Timote 3:1-5) Atako tomikundolaka bantango ya esengo oyo tolekisaki ntango tozalaki naino bana, mingi kati na biso bazali kokutana na mikakatano ya “bantango ya ndenge mosusu” oyo tozali. Tokoki mpenza kozala na esengo na ntango na biso?
Tóbosana te ete Makomami elobi ete bantango ya ndenge mosusu esengeli kozala, mpe ekozala mpasi mpenza. Tokolonga yango soki tozali kosalela mitinda ya Biblia. Tokokoka ntango nyonso te kosilisa mikakatano na biso, kasi tokoki kozwa mwa esengo. Tiká tótalela mitinda misato.
Komitalela na lolenge ebongi
Mpo na kozala na esengo, tosengeli koyeba esika oyo makoki ya biso moko mpe ya basusu esuki. Na mokanda na ye epai ya Baloma, ntoma Paulo akomaki ete: “Bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Nkembo ya Yehova oyo biso bato tokoki komona ezali lokola litangá ya mai na kati ya ebale. Ndakisa moko oyo emonisi likambo yango ezwami na Genese 1:31: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.” Ntango nyonso oyo Yehova akosepela kotala biloko oyo asalá, akoloba kaka ete “ezalaki malamu mingi.” Moto moko te na mokili akoki koloba ntango nyonso ete makambo oyo asalá ezali malamu mingi. Koyeba esika makasi na biso esuki ezali likambo ya liboso oyo ekoki komema esengo. Kasi, ezali na likambo mosusu oyo tosengeli kosala. Tosengeli koyeba mpe kondima lolenge oyo Yehova atalelaka makambo.
Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lisumu” euti na liloba oyo elimboli kozanga kokokisa mokano moko. (Baloma 3:9) Tózwa ndakisa: Kanisá ete moto moko alingi kozwa mbano na momekano ya kobwaka mbanzi mpo na kotuta eloko moko. Azali na mbanzi misato. Abwaki mbanzi ya liboso mpe eleki pembeni ya eloko yango na mɛtrɛ moko. Na mbanzi ya mibale, amibongisi malamu, kasi ntango abwaki yango, eleki pembeni na santimɛtrɛ 30. Na mbanzi ya misato, amibongisi lisusu malamumalamu, abwaki yango, kasi eleki pembeni na eloko yango na santimɛtrɛ mibale kaka. Atako mbanzi yango eleki mosika te, ezali kaka ete atuti eloko yango te.
Biso mpe tozali lokola mobɛti-mbanzi wana. Mbala mingi, ‘tokokisaka te mikano na biso.’ Ntango mosusu tokómaka mpenza pene ya kokokisa yango, kasi tokokisaka yango kaka te. Toyokaka mpasi mpo tosalaki nyonso, kasi tolongi te. Tózongela lisusu ndakisa ya mobɛti-mbanzi oyo tolobelaki.
Lokola alongi te kotuta eloko yango, azali kobaluka malɛmbɛmalɛmbɛ, esengo nyonso esili mpo azalaki mpenza na mposa ya kozwa mbano. Na mbala moko, moto oyo azali kopesa bambano abengi ye mpe apesi ye mbano moko mpe alobi: “Napesi yo oyo mpo nalingi yo mingi, mpe namoni mpenza ete obomaki nzoto.” Mobɛti-mbanzi yango asepeli makasi.
Bato nyonso oyo bakozwa “likabo” ya bomoi ya seko mpe ya kokoka epai ya Nzambe bakosepela mpe lokola moto wana. (Baloma 6:23) Na ntango wana, makambo nyonso oyo bakobanda kosala ekozala ya kokoka, elingi koloba bakozanga lisusu te kokokisa mikano na bango. Bakozala na esengo ya solosolo. Kasi liboso ntango yango ekoka, soki tozali kotalela makambo ndenge wana, yango ekosala ete tósepelaka na makambo oyo tozali kosala mpe na bazalani na biso.
Tóyeba ete makambo nyonso esɛngaka ntango
Tóbosana te ete makambo nyonso esɛngaka ntango. Kasi, ezalaka mpasi mingi soki eloko moko oyo ozali na mposa na yango makasi ezali koumela to likambo moko ya mabe oyo olingi esila noki ezali koumela. Ata na ntango wana, bato mosusu babatelaka esengo na bango. Tózwa ndakisa ya Yesu.
Liboso Yesu aya awa na mabelé, azalaki mpenza ndakisa oyo eleki monene ya moto ya botosi kuna na likoló. Nzokande, ezali awa na mabelé nde “ayekolaki botosi.” Na ndenge nini? “Na kati ya makambo oyo akutanaki na yango.” Liboso aya na mabelé, amonaki ndenge bato bazali konyokwama, kasi ye moko anyokwamaki naino te. Ntango azalaki awa na mabelé, mingimingi kobanda ntango azwaki batisimo na Ebale Yaladene tii na liwa na ye na Gologota, akutanaki na makambo mingi ya mpasi. Toyebi makambo nyonso te oyo ekómisaki Yesu “moto ya kokoka” na likambo etali botosi, kasi toyebi ete esɛngaki mwa ntango.—Baebele 5:8, 9.
Yesu alongaki mpo azalaki mpenza kokanisa “esengo oyo etyamaki liboso na ye,” mbano oyo asengelaki kozwa mpo na bosembo na ye. (Baebele 12:2) Atako bongo, azalaki ntango mosusu kosala “malɔmbɔ mpe lisusu masɛngi . . . elongo na koganga makasi mpe na mpisoli.” (Baebele 5:7) Biso mpe tokoki mbala mosusu kobondela na motindo wana. Ndenge nini Yehova atalelaki mabondeli yango? Kaka vɛrsɛ yango emonisi ete Yehova ‘andimaki’ libondeli ya Yesu. Nzambe akosala mpe bongo mpo na biso. Mpo na nini?
Mpamba te Nzambe ayebi esika makoki na biso esuki, mpe asalisaka biso. Moto nyonso azali na esika oyo makoki na ye esuki. Bato ya ekólo Benin balobaka ete: “Soki mpela eleki, ata ligbɔlɔlɔ ekoki kokufa na mai.” Yehova ayebi koleka biso moko esika oyo makoki na biso esuki. Na bolingo nyonso, amonisaka “mawa mpe . . . boboto monene mpo na [kosalisa] na ntango ekoki.” (Baebele 4:16) Asalaki yango mpo na Yesu, mpe azali kosala yango mpo na ebele ya bato mosusu. Tótala ndenge asalisaki Monika.
Monika azalaki na mikakatano te ntango azalaki kokola, kasi azalaki makasi mpe azalaki na bomoi ya esengo. Na 1968, ntango akómaki na mbula 20 to koleka, atungisamaki makasi ntango monganga ayebisaki ye ete azali na maladi moko ya misisa ya bɔɔngɔ. Likambo yango ebongolaki mpenza bomoi na ye mpe esɛngaki atalela makambo mingi lisusu na mosala na ye ya mobongisi-nzela. Monika ayebaki ete ekozala maladi ya mwa ntango moke te. Mbula zomi na motoba na nsima, alobaki boye: “Maladi na ngai ezali kaka kosila te mpe ekoki kozala ete ekosila te tii ntango ebongiseli ya sika ya Nzambe ekosala biloko nyonso ya sika.” Monika alobaki ete ezali pɛtɛɛ te: “Atako baninga na ngai balobaka ete nazalaka kaka na esengo makasi ndenge nazalaki liboso, . . . baninga oyo nazalaka na bango ntango nyonso bayebi ete ntango mosusu natangisaka mpisoli mingi.”
Kasi, alobaki ete: “Nayekoli kozala motema mpio mpe nasepelaka ata na mwa bambongwana moke oyo esalemaka na maladi na ngai. Koyeba ete moto akómaka mpamba liboso ya maladi, ekolisaki boyokani na ngai na Yehova. Kaka Yehova nde akoki kosilisa maladi ya moto mpo na libela.” Na lisalisi ya Yehova, abateli esengo na ye mpe akokisi sikoyo mbula koleka 40 na mosala ya mobongisi-nzela.
Ya solo, kobɛla maladi oyo Monika abɛlá ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, soki oyebi ete makambo mosusu ekoki koumela koleka ndenge okanisaki, okozala na esengo mingi. Lokola Monika, yo mpe okoki kotya motema ete Yehova “akosalisa yo na ntango ebongi.”
Komimekaka na bato mosusu te—mityeláká mikano oyo okokoka
Ndenge Nzambe akelá yo, ozali kaka yo moko. Moto moko te na mokili akokani na yo na makambo nyonso. Lisese moko ya Goun, monɔkɔ moko ya Benin, emonisi likambo yango polele: “Misapi nyonso ezalaka molai ndenge moko te.” Ekozala mpenza bozoba koluka kokokanisa misapi. Okoki kosepela te ete Yehova akokanisa yo na moto mosusu, mpe akosala yango soki moke te. Nzokande, bato balingaka komimeka mingi na basusu, mpe yango ekoki kokitisa esengo ya moto. Talá ndenge Yesu amonisi likambo yango polele na Matai 20:1-16.
Yesu alobelaki “nkolo” oyo azalaki na mposa ya basali na elanga na ye ya vinyo. “Na ntɔngɔntɔngɔ,” soki na ngonga ya 6, amonaki bato moko oyo bazalaki kosala eloko te mpe azwaki bango na mosala. Bayokanaki mpo na lifuta oyo bazalaki kofuta na ntango wana mpo na mosala ya mokolo mobimba, elingi koloba denali moko. Bato yango basepelaki mpo bazwi mosala, mpe na lifuta oyo eyokani na oyo bazalaki kofuta. Na nsima, nkolo yango akutanaki na bato mosusu na ngonga ya 9, basusu na midi, basusu na ngonga ya 3 nsima ya nzanga, ya nsuka na ngonga ya 5 ya mpokwa, mpe azwaki bango na mosala. Bato yango nyonso basalaki mokolo mobimba te, longola baoyo ya liboso. Mpo na lifuta, nkolo alakaki bango ete akopesa bango “nyonso oyo ezali sembo,” mpe basali yango bandimaki.
Na mpokwa, nkolo yango ayebisaki kapita na ye afuta basali. Ayebisaki ye abenga basali nyonso mpe abanda kofuta baoyo ya nsuka. Basali yango basalaki kaka ngonga moko, kasi likambo ya kokamwa, bazwaki lifuta ya mokolo mobimba. Kanisá naino masolo ya esengo oyo ebimaki na ntango wana. Baoyo basalaki mokolo mobimba, bakómaki kokanisa ete bakozwa lifuta ya monene. Nzokande, bango mpe bazwaki lokola basali nyonso.
Basalaki nini? “Kozwáká yango babandaki koimaimela nkolo-ndako mpe balobaki ete, ‘Bato oyo ya nsuka basali kaka ngonga moko; nzokande yo okokanisi bango ná biso bato tonyokwami mokolo mobimba mpe tomoni mpasi na molunge makasi!’”
Nzokande, nkolo elanga amonaki makambo lokola bango te. Ayebisaki bango ete afuti bango ndenge bayokanaki, alongoli eloko te. Mpo na baoyo mosusu, apesaki bango lifuta ya mokolo mobimba, na ntembe te koleka kutu oyo bakanisaki. Soki totali malamu, mosali moko te afutamaki na nse ya oyo asengelaki kozwa, mingi kutu bazwaki mingi koleka ndenge bazalaki kokanisa. Na nsuka, nkolo alobaki boye: “Nazali nde na lotomo te ya kosala oyo nalingi na biloko na ngai moko?”
Sikoyo, kanisá soki kapita wana afutaka naino basali ya liboso mpe bakei mbala moko. Balingaki kosepela. Basepelaki te kaka mpo bamonaki ete bato ya nsuka bazwi lifuta ndenge moko na bango, atako basalaki mingi te. Basilikaki mpe bakómaki tii koimaima epai ya nkolo elanga, oyo kutu basengelaki nde kotonda mpo azwaki bango na mosala.
Yango nde ekoki kokómela biso soki tozali komikokanisa na basusu. Soki ozali mpenza kokanisa boyokani na yo ná Yehova mpe ozali na botɔndi ndenge azali kopambola yo, okozala na esengo. Koluka komikokanisa na basusu te. Soki Yehova amoni malamu asalela basusu likambo moko oyo eleki malamu, sepelá mpo na bango mpe elongo na bango.
Nzokande, Yehova azelaka ete osala likambo moko. Likambo yango nini? Bagalatia 6:4 elobi ete: “Tiká ete moto na moto ameka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza.” Na maloba mosusu, komityelaka mikano oyo eleki yo te. Mityelá kaka mikano oyo okokoka, mpe landá yango. Soki omityeli mokano ya bokatikati mpe okokisi yango, ‘okozwa ntina ya komikumisa.’ Ɛɛ, okosepela.
Okozwa mbano
Mitinda misato oyo totaleli emonisi ete kosalela mitinda ya Biblia ekoki mpenza kosalisa moto azala na esengo ata na mikolo oyo ya nsuka mpe atako tozali bato ya kozanga kokoka. Ntango ozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, ekozala malamu olukaka mitinda yango, ezala balobeli yango polele to na nzela ya masolo to ya bililingi.
Soki omoni ete esengo na yo ebandi kokita, salá makasi oyeba ntina. Na nsima, luká mitinda oyo okoki kosalela mpo na kosilisa likambo yango. Na ndakisa, okoki kotala na nkasa 110-111 ya buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.”a Balobeli Mokanda ya Masese na bankasa wana, mpe okokuta ebele ya mitinda mpe batoli oyo ekabwani na biteni 12. Index des publications de la Société Watch Tower* mpe CD-ROM* na yango ezali na makambo ya kitoko mpenza. Soki ozali kosalela yango mingi, okozala lisusu na mpasi te ya koyeba esika oyo mitinda oyo okoki kosalela ezali.
Ntango ezali koya oyo Yehova akopesa bato oyo babongi bomoi ya seko mpe ya kokoka na paladiso awa na mabelé. Bakotonda mpenza na esengo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
“Bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.”—Baloma 3:23
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Yesu “ayekolaki botosi na kati ya makambo oyo akutanaki na yango.”—Baebele 5:8, 9
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
“Akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko mpenza, kasi na komikokanisáká na moto mosusu te.”—Bagalatia 6:4