Oyebi ‘kokesenisa malamu na mabe’?
“Bólukaka koyeba makambo oyo Nkolo andimaka.”—BAEFESE 5:10, NW.
1. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango lelo oyo, mpe mpo na nini?
“Ɛ[YEHOVA], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23) Likambo ya ntina oyo Yilimia alobaki ebongi mpenza epai na biso lelo oyo mpamba te tozali na “ntango ya mpasi” oyo Biblia esakolaki. (2 Timote 3:1) Mokolo na mokolo tozali kokutana na mikakatano oyo ezali kosɛnga ete tózwa bikateli. Bikateli yango, ezala minene to mike, ekoki kobongisa to mpe kobebisa bolamu na biso ya nzoto, ya makanisi mpe ya elimo.
2. Makambo nini ekoki komonana bongobongo, kasi ndenge nini baklisto batalelaka yango?
2 Makambo mingi oyo toponaka kosala mokolo na mokolo ekoki komonana lokola makambo oyo tomesani na yango to lokola ezali kaka makambo ya bongobongo. Na ndakisa, mokolo na mokolo toponaka bilamba oyo tokolata, bilei oyo tokolya, bato oyo tokokende kotala mpe bongo na bongo. Esɛngaka biso kokanisa mingimingi te liboso ya kopona oyo tokosala. Kasi, tokoki mpenza koloba ete makambo yango ezali bongobongo? Biso baklisto oyo tomipesi na Nzambe tomibanzabanzaka mingi ete molato na biso, ndenge na biso ya kobongisa nzoto, kolya mpe komela na biso, maloba na biso mpe etamboli na biso emonisa ete tozali basaleli ya Oyo-Aleki-Likoló, Yehova Nzambe. Tokanisaka maloba ya ntoma Paulo ete: “Soko bokolyaka soko bokomelaka, soko bokosalaka nini, bósala nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”—1 Bakolinti 10:31; Bakolose 4:6; 1 Timote 2:9, 10.
3. Makambo nini tosengeli kopona na likebi mpenza?
3 Ezali mpe na bikateli mosusu ya ntina koleka. Na ndakisa, ekateli ya kobala to kotikala monzemba ezali likambo moke te na bomoi ya moto. Ya solo, kopona moto oyo abongi mpo bóbalana na ye, kozala molongani ya moto oyo bokofanda na ye bomoi mobimba, ezali likambo moke te.a (Masese 18:22) Longola yango, koyeba kopona baninga, bakelasi oyo tokotánga, mosala oyo tokosala, mpe masano oyo tokosepela na yango ezali na ntina mingi mpo na elimo na biso, mpe mpo na bolamu na biso ya seko.—Baloma 13:13, 14; Baefese 5:3, 4.
4. (a) Mayele nini tozali na yango mpenza mposa? (b) Mituna nini tosengeli kotalela?
4 Mpo na nyonso wana, ezali mpenza malamu tóyeba kokesenisa malamu na mabe to tóyeba kokesenisa oyo ezali komonana lokola ete ezali malamu mpe oyo ezali mpenza malamu. Biblia elobi ete: “Nzela ezali oyo emonani malamu epai na moto nde nsuka na yango bobele nzela ya kufa.” (Masese 14:12) Yango wana, tokoki komituna boye: ‘Ndenge nini tokoki koyeba kokesenisa malamu na mabe? Epai ya nani tokoki kotuna toli mpo na kozwa bikateli? Na likambo yango, bato basalaki nini na ntango ya kala mpe bazwaki matomba nini, mpe lelo oyo, bato bazali kosala nini mpe bazali kozwa matomba nini?’
“Filozofi mpe bokosi mpamba” ya mokili
5. Makambo nini ezalaki na mokili oyo baklisto ya liboso bafandaki?
5 Baklisto ya ekeke ya liboso bafandaki na mokili oyo bato mingi bazalaki kolanda mimeseno mpe makanisi ya Baloma na Bagrɛkɛ. Baloma balingaki bomɛngo mpe bomoi ya malamu, mpe bato mingi bazalaki kolula bomoi yango. Nzokande, bato ya mayele ya ntango wana bazalaki kosepela na filozofi ya Platon na Aristote mpe lisusu na filozofi ya sika lokola oyo ya Baepikuli na Basetoa. Na mobembo na ye ya mibale lokola misionɛrɛ, ntoma Paulo akómaki na Atene mpe kuna, akutanaki na Baepikuli mpe Basetoa oyo bamimonaki ete baleki Paulo mpe babengaki ye “molobalobi oyo.”—Misala 17:18.
6. (a) Na ekeke ya liboso, baklisto mosusu bazalaki kobendama na kosala makambo nini? (b) Paulo alobaki nini mpo na kokebisa bango?
6 Yango wana, ezali mpasi te na koyeba ntina oyo baklisto mosusu babendamaki na makambo mpe bomoi ya bato ya ntango wana. (2 Timote 4:10) Ezalaki komonana ete baoyo bazalaki na kati ya ebongiseli yango bazalaki kosepela na makambo mingi mpe makambo oyo bazalaki kopona ezalaki komonana lokola nde ezali malamu. Ezalaki komonana lokola nde mokili ezalaki na makambo ya malamu oyo baoyo bamipesaki na Nzambe bazangaki. Kasi, ntoma Paulo akebisaki bango ete: “Bókeba: ntango mosusu moto moko akoki kobenda bino lokola eloko na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na lokuta ya mpambampamba oyo euti na bonkɔkɔ ya bato, na makambo mpamba ya mokili, kasi euti na Klisto te.” (Bakolose 2:8, NW) Mpo na nini Paulo alobaki bongo?
7. Mayele ya mokili oyo ezali mpenza na motuya nini?
7 Paulo akebisaki bango mpo amonaki likama oyo ebombamaki na makanisi ya bato oyo bazalaki kolula mokili. Maloba oyo asalelaki ete “filozofi mpe lokuta ya mpambampamba,” ezali na ntina mpenza. Liloba “filozofi” elimboli mpenza “kolinga mpe koluka mayele.” Yango ekoki kozala malamu. Kutu, Biblia yango moko, mingimingi na mokanda ya Masese, ezali kolendisa koluka boyebi mpe mayele oyo ya malamu. (Masese 1:1-7; 3:13-18) Kasi, Paulo alobelaki “filozofi” esika moko na “lokuta ya mpambampamba.” Elingi koloba ete Paulo azalaki kotalela mayele ya mokili ete ezali mpamba mpe ezali na bokosi. Lokola bale oyo etondi na mopɛpɛ, mayele yango ezalaki komonana ete ezali malamu, kasi ezalaki na eloko moko ya malonga te. Ekozala na ntina te to mpe likama mpenza soki moto azali kolanda “filozofi mpe lokuta ya mpambampamba” ya mokili oyo mpo na kokesenisa malamu na mabe.
Baoyo bazali kobenga “mabe ete malamu mpe malamu ete mabe”
8. (a) Bato bazali koluka toli epai ya banani? (b) Toli nini bazali kopesa?
8 Lelo oyo, makambo ebongwani mpenza te. Bato ya mayele batondi na misala nyonso oyo bato bazali kosala. Bapesi-toli na makambo ya libala mpe ya libota, bapanzi-nsango, bato oyo bazali komipesa batitre ya minganga, bato oyo batalaka minzoto, banganga-nkisi, mpe bato mosusu bazali kosɛnga bato mbongo mpo na kopesa bango toli. Kasi soki totali, toli nini bazali kopesa? Tozali komona ete bazali mingimingi kotika bizaleli malamu oyo Biblia ezali koteya mpe bazali kolendisa oyo bazali kobenga makambo ya mikolo oyo. Na ndakisa, lokola guvɛrnɛma ya Canada eboyaki ete “mabala ya mibali na mibali to basi na basi” ekomamaka na buku ya Leta, zulunalo moko monene ya ekólo yango (The Globe and Mail) elobaki boye: “Na mobu 2000, ezali likambo ya kokamwa ete bato oyo balingani mpe bayokani na bango, báboya kotikela bango nzela ya kokokisa mposa na bango, kaka mpo bazali mibali na mibali to basi na basi.” Lelo oyo, likanisi ya bato mingi ezali ya kotika moto na moto asala oyo amoni malamu, ya kosambisa moto te. Bazali kotalela likambo nyonso ete ekoki kobongwana; ndelo ezali koyebana lisusu te kati na malamu na mabe.—Nzembo 10:3, 4.
9. Bato oyo bazali kopesa limemya na mokili mbala mingi basalaka makambo nini?
9 Bato mosusu, mpo na kozwa bikateli na bango, bazali kolanda makanisi ya bato minene ya mboka mpe ya bato ya mbongo. Atako lelo oyo bato ya mbongo mpe bato minene bazali na lokumu mingi, bazali kaka kolobela bizaleli malamu lokola kozala sembo mpe kozala moto oyo bakoki kotyela motema, kasi bango moko bamonisaka yango te. Mpo na kokóma bato minene mpe kozwa mbongo mingi, bato mingi bakakatanaka te kosalela banzela mikuse mpe kobuka lokuta. Mpo na kozala na lokumu mpe koyebana mingi, bamosusu bazali kotika bizaleli malamu mpo na kosala makambo oyo elongobani te. Nyonso wana esali ete bato mingi bamipesi na koluka matomba na bango moko, bazali kotikela makambo nyonso nzela mpe bazali koloba ete, “Salá nyonso oyo olingi.” Ezali likambo ya kokamwa te ete bato bazali mpenza koyeba te kokesenisa malamu na mabe.—Luka 6:39.
10. Ndenge nini maloba ya Yisaya na ntina na malamu na mabe ekokisami?
10 Biso moko tozali komona mbuma mabe ya bikateli oyo bato bazali kozwa kozanga toli ya malamu: mabala ezali kokufa, mabota ezali kopanzana, bato bamipesi na komɛla bangi, na kolangwa masanga, bituluku ya bilenge ya mobulu, kindumba, maladi oyo epalanganaka na kosangisa nzoto, mpe bongo na bongo. Ndenge nini makambo ekoki kotambola malamu na ntango oyo bato batiki mitinda nyonso oyo basengeli kolanda, bayebi lisusu te kokesenisa malamu na mabe? (Baloma 1:28-32) Ezali mpenza ndenge oyo mosakoli Yisaya alobaki ete: “Mawa epai na bango bakobyangaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe, baoyo bakotyaka molili mpo na pole mpe pole mpo na molili; baoyo bakotyaka bololo mpo na elɛngi mpe elɛngi mpo na bololo. Mawa epai na baoyo bazali na mayele na miso na bango mpenza mpe na bososoli na bilongi na bango moko.”—Yisaya 5:20, 21.
11. Mpo na nini ebongi te komityela motema mpo na kopona kati na malamu na mabe?
11 Lokola na ntango ya kala Nzambe asambisaki Bayuda oyo bakómaki “mayele na miso na bango mpenza,” emonisi ete tosengeli mpenza koboya komityela motema mpo na kokesenisa malamu na mabe. Lelo oyo, bato mingi bazali koloba ete “landá oyo motema na yo elingi” to, “salá oyo omoni malamu.” Makanisi motindo wana ezali malamu? Biblia endimi yango te, mpamba te elobi boye: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9) Okoki kondima ete moto ya lokuta mpe ya mabe apesa yo toli mpo na kozwa ekateli? Te. Kutu, okosala nde oyo ekeseni na oyo moto ya ndenge yango akoloba na yo. Yango wana, Biblia elobi na biso ete: “Ye oyo akotalela motema na ye azali elema nde ye oyo akotambola na mayele, ye akobika.”—Masese 3:5-7; 28:26.
Tóluka koyeba oyo Nzambe andimaka
12. Mpo na nini tosengeli koluka koyeba “mokano ya Nzambe”?
12 Lokola tosengeli kotyela mayele ya mokili oyo motema te mpe komityela motema te mpo na kokesenisa malamu na mabe, tosengeli kosala nini? Yoká toli ya polele oyo ntoma Paulo apesaki: “Bótika kolanda mokili oyo, kasi bóbongwana wana bozali kozwa mayele ya sika, mpo bino moko bóluka koyeba wapi mokano ya Nzambe, mokano na ye malamu, kitoko mpe ekoká.” (Baloma 12:2, NW) Mpo na nini tosengeli koluka koyeba mokano ya Nzambe? Na kati ya Biblia, Yehova ayebisi ntina ya polele mpe ya solosolo, ete: “Zambi lokola lola eleki mokili likoló, boye nzela na ngai ileki nzela na bino mpe makanisi na ngai maleki makanisi na bino.” (Yisaya 55:9) Yango wana, na esika tótya motema na ndenge na biso ya komona malamu, bapesi biso toli oyo: “Bólukaka koyeba makambo oyo Nkolo andimaka.”—Baefese 5:10.
13. Ndenge nini maloba ya Yesu na Yoane 17:3 ezali komonisa ntina ya koyeba makambo oyo Nzambe andimaka?
13 Yesu Klisto amonisaki mpenza ete tosengeli kosala bongo ntango alobaki boye: “Bomoi ya seko elimboli boye ete báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Maloba oyo ete “báyekola koyeba” elimboli kaka “koyeba” te. Diksionɛrɛ moko (Vine’s Expository Dictionary) elobi ete ezali “komonisa boyokani kati na moto oyo ayebi mpe eloko oyo ayebi; na bongo, eloko oyo bayebi ezali na motuya to na ntina na miso ya ye oyo ayebi, mpe ezali na ntina ete boyokani yango ezala.” Soki moto alobi ete ayebani na Songolo, elingi koloba kaka te ete ayebi ete azali to ayebi nkombo na ye. Esɛngaka mpe koyeba makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka, makambo oyo atosaka, koyeba ndenge na ye mpe komemya yango.—1 Yoane 2:3; 4:8.
Tóteya bososoli na biso
14. Paulo alobaki nini oyo ezali bokeseni monene kati na bana mpe bato oyo bakɔmeli na elimo?
14 Kasi, ndenge nini tokoki kozwa mayele ya kokesenisa malamu na mabe? Eyano ezali na maloba ya Paulo epai ya Baebele oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso. Paulo akomaki boye: “Moto na moto oyo akomelaka mabɛlɛ akososolaka liloba ya boyengebene te, azali naino mwana. Kasi bilei makasi izali mpo na bato bakómi minene; mpo na bango basili kolakisa [bososoli, NW] na bango [na nzela ya komimesenisa mpo na, NW] [kokesenisa] malamu na mabe.” Tomoni ete Paulo akesenisaki “mabɛlɛ,” oyo abengaki na vɛrsɛ oyo ezali liboso ete “makambo mikemike ya liboso na mateya ya Nzambe” na “bilei makasi” oyo ezali mpo na “bato oyo bakómi minene,” baoyo “basili kolakisa bososoli na bango na nzela ya komimesenisa mpo na [kokesenisa] malamu na mabe.”—Baebele 5:12-14.
15. Mpo na nini esengeli kosala makasi mpo na kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe?
15 Yango elingi koloba ete tosengeli libosoliboso kosala makasi mpo na koyeba malamumalamu mitinda ya Nzambe na kati ya Liloba na ye, Biblia. Ezali te ete tokosala liste ya makambo oyo tosengeli kosalaka mpe oyo tosengeli kosalaka te. Te, Biblia ezali mokanda ya ndenge yango te. Kasi, Paulo alobaki ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene, ete moto ya Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo asɛlingwi mpenza mpo na mosala nyonso malamu.” (2 Timote 3:16, 17, NW ) Mpo na kozwa mateya, mpamela mpe disipilini yango, tosengeli kosalela makanisi mpe bososoli na biso. Yango esɛngaka molende, kasi mbuma na yango, elingi koloba kokóma “moto oyo akoki, oyo asɛlingwi mpo na mosala nyonso malamu” ezali mpenza na ntina.—Masese 2:3-6.
16. Koteya bososoli elimboli nini?
16 Na nsima, lokola Paulo amonisaki yango, bato oyo bakɔmeli “basili kolakisa [bososoli] na bango na [kokesenisa] malamu na mabe.” Awa nde ezali mosisa ya likambo. Maloba oyo ete “basili kolakisa [bososoli] na bango” elimboli mpenzampenza “bamesenisi biyokeli na bango (lokola moto oyo asalisaka nzoto na ye ngalasisi).” (Kingdom Interlinear Translation) Moto oyo amesenisi nzoto na ye na ngalasisi, akoki kosala bajɛstɛ mbangumbangu lokola nde, na nzoto na ye wana, akoki kopumbwa likoló lokola ndɛkɛ to mpe lokola nde akoki kobambana na mabele te. Ayebi kotosisa binama nyonso ya nzoto na ye mpe ayebaka bajɛstɛ oyo asengeli kosala mpo abalukabaluka malamu tii na nsuka. Moto akómaka na makoki nyonso wana nsima ya komipesa mpenza na koyekola mpe komekameka.
17. Na ndimbola nini tosengeli kozala lokola bato oyo basalaka ngalasisi?
17 Biso mpe, na ndenge ya elimo, tosengeli komimesenisa lokola moto oyo asalaka ngalasisi soki tolingi ete tózwaka bikateli ya malamu. Tosengeli ntango nyonso koyeba kotosisa biyokeli mpe binama ya nzoto na biso. (Matai 5:29, 30; Bakolose 3:5-10) Na ndakisa, opekisaka miso na yo na kotala makambo ya salite to matoi na yo na koyoka miziki to masolo ya mabe? Toboyi te, makambo ya mabe ndenge wana ezali na bisika nyonso oyo tolekaka. Kasi, biso moko tokoki kopona soki tokotikela yango nzela efanda na motema mpe na makanisi na biso. Tokoki kosala lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Nakotya eloko ya nsɔni liboso na miso na ngai te; mosala ya bapɛngwi, ngai naboyi; ekozala na ngai soko moke te. . . . Oyo akosalaka na kokosa ye akofandaka na ndako na ngai te; mpo oyo akoloba na lokuta akoumela na liboso na miso na ngai te.”—Nzembo 101:3, 7.
Teyá bososoli na yo na nzela ya komimesenisa
18. Liloba “komimesenisa” oyo Paulo asalelaki mpo na kolimbola koteya bososoli ezali komonisa nini?
18 Yebá ete bososoli na biso eyekolaka kokesenisa malamu na mabe “na nzela ya komimesenisa.” Na maloba mosusu, mbala nyonso oyo tosengeli kozwa ekateli, tosengeli koyeba kosalela mayele na biso mpo na kososola mitinda ya Biblia oyo eyokani na likambo yango mpe kososola ndenge ya kosalela yango. Zwá momeseno ya kolukaluka makanisi na mikanda oyo elimbolaka Biblia, mikanda oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimiselaka biso. (Matai 24:45) Tokoki mpe koluka toli epai ya baklisto oyo bakɔmeli. Atako bongo, milende oyo biso moko tozali kosala mpo na koyekola Liloba ya Nzambe, bakisá mpe mabondeli oyo tokosala epai ya Yehova mpo na kosɛnga ye atambwisa biso mpe apesa biso elimo na ye, ekobota matomba mingi na nsima.—Baefese 3:14-19.
19. Mapamboli nini tokozwa soki tozali koteya mokemoke bososoli na biso?
19 Ntango tozali koteya bososoli na biso mokemoke, mokano na biso esengeli kozala ete “tozala lisusu lokola bana mike te; tokeba mpo na mateya ya ndenge na ndenge ebenda biso te lokola mipepe ebendaka bwato; tolanda bato ya mayele mabe te oyo bakosaka bato mosusu mpe bateyaka bango makambo ya lokuta.” (Efezo 4:14, Boyokani ya Sika) Kasi, boyebi mpe bososoli na biso ya makambo oyo Nzambe andimaka ekoki kosalisa biso na kozwa bikateli ya malamu, ezala ya minene to ya mike, bikateli oyo ekomemela biso matomba, ekotonga kondima ya bandeko na biso, mpe na koleka, ekosepelisa Tata na biso ya likoló. (Masese 27:11) Ezali mpenza lipamboli mpe libateli na ntango ya mpasi oyo tozali na yango!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Minganga Thomas Holmes na Richard Rahe basalaki liste ya makambo 40 oyo eleki kotungisa moto na bomoi na ye. Na liste yango, kokufela molongani, koboma libala mpe kokabwana ezwi bisika misato ya liboso. Kobala ezali na esika ya nsambo.
Okoki kolimbola?
• Mayele nini moto asengeli na yango mpo na kozwa bikateli ya malamu?
• Mpo na nini kolanda bato minene to kotyela makanisi na biso motema ntango tozali koluka kokesenisa malamu na mabe ezali likambo ya mayele te?
• Mpo na nini tosengeli koluka makambo oyo Nzambe andimaka ntango tozali kozwa bikateli, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
• ‘Koteya bososoli na biso na nzela ya komimesenisa’ elimboli nini?
[Elilingi na lokasa 9]
Kolanda toli ya bato ya bozwi mpe bato minene ezali mpamba
[Elilingi na lokasa 10]
Lokola moto oyo asalaka ngalasisi, tosengelikotosisa biyokeli mpe binama ya nzoto na biso