Kondima na yo ezali mpenza makasi?
“Ezali na nzela ya kondima na bino nde botɛlɛmi.”—2 BAKOLINTI 1:24.
1, 2. Mpo na nini tosengeli kozala na kondima, mpe ndenge nini tokoki kokómisa yango makasi?
BASALELI ya Yehova bayebi ete basengeli kozala na kondima. Kutu, ‘moto oyo azangi kondima akoki mpenza kosepelisa Nzambe ata moke te.’ (Baebele 11:6) Yango wana, tosalaka malamu ntango tozali kobondela mpo na kosɛnga elimo santu mpe kondima, oyo ezali na kati ya mbuma kitoko na yango. (Luka 11:13; Bagalatia 5:22, 23) Soki tozali kolanda ndakisa ya kondima ya baninga na biso bandimi, yango mpe ekoki kokómisa kondima na biso makasi.—2 Timote 1:5; Baebele 13:7.
2 Kondima na biso ekokóma makasi koleka soki tozali ntango nyonso kolanda nzela oyo Liloba ya Nzambe ezali kolakisa baklisto nyonso. Kondima na biso ekoki kokola soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe soki tozali koyekola yango malamumalamu na lisalisi ya mikanda oyo “kapita ya sembo” azali kobimisa. (Luka 12:42-44; Yosua 1:7, 8) Ntango toyanganaka mbala na mbala na makita ya lisangá mpe na mayangani, kondima ya mokomoko na biso elendisaka baninga. (Baloma 1:11, 12; Baebele 10:24, 25) Kondima na biso ekómaka mpe makasi ntango tosololaka na bato na mosala ya kosakola.—Nzembo 145:10-13; Baloma 10:11-15.
3. Na oyo etali kondima, lisalisi nini bankulutu ya bolingo bapesaka biso?
3 Ntango bankulutu ya bolingo bapesaka biso toli mpe bilendiseli oyo euti na Makomami, basalisaka biso tókolisa kondima na biso. Makanisi na bango ekokani na oyo ya Paulo oyo akomelaki Bakolinti ete: “Tozali . . . baninga ya mosala mpo na esengo na bino, mpo ezali na nzela ya kondima na bino nde botɛlɛmi.” (2 Bakolinti 1:23, 24) Biblia moko ya Lingelesi (Contemporary English Version) elobi boye: “Tozali kosala elongo na bino mpo na kopesa bino esengo, mpamba te kondima na bino ezali makasi.” Kondima ebatelaka bayengebene na bomoi. Moto mosusu akoki te komonisa kondima na esika na biso to mpe kokómisa biso bato ya sembo. Na likambo yango, ‘biso moko nde tosengeli komema mokumba na biso.’—Bagalatia 3:11; 6:5.
4. Ndenge nini masolo ya Biblia oyo ezali kolobela basaleli ya sembo ya Nzambe ekoki kokómisa kondima na biso makasi?
4 Makomami ezali na masolo mingi ya bato oyo bazalaki na kondima. Ekoki kozala ete toyebi ebele ya makambo minene oyo basalaki, kasi toyebi mpe kondima oyo bazalaki komonisa mokolo na mokolo, ntango mosusu na boumeli ya bomoi ya molai? Soki totaleli ndenge oyo bazalaki komonisa kondima ntango bazalaki kokutana na makambo lokola oyo biso mpe tozali kokutana na yango, yango ekoki kokómisa kondima na biso makasi.
Kondima epesaka biso mpiko
5. Ndakisa nini oyo ezali na Makomami ezali komonisa ete kondima epesaka biso makasi ya kosakola liloba ya Nzambe na mpiko?
5 Kondima epesaka biso makasi ya kosakola liloba ya Nzambe na mpiko. Enoka asakolaki na mpiko nyonso bitumbu ya Nzambe. Alobaki boye: “Talá! Yehova ayaki na bamiliadi na ye basantu, mpo na kokokisa lisambisi epai ya bato nyonso, mpe kokweisa baoyo nyonso batyolaka Nzambe mpo na misala na bango nyonso ya kotyola Nzambe oyo basalaki na ndenge ya kotyola Nzambe, mpe mpo na makambo nyonso ya kozokisa oyo basumuki oyo batyolaka Nzambe balobaki na ntina etali ye.” (Yuda 14, 15) Na ntembe te ntango bato mabe oyo bazalaki kotɛmɛla Enoka bayokaki maloba yango, balukaki koboma ye. Kasi, Enoka alobaki na mpiko mpe na kondima. Na nsima, Nzambe “akamataki ye,” elingi koloba asukisaki bomoi na ye na ntango oyo azalaki komona emonaneli mpe na ndenge yango emonani ete Nzambe atikaki nzela te ete Enoka ayoka mpasi ya liwa. (Genese 5:24; Baebele 11:5) Lelo oyo Yehova asalelaka biso makamwisi ya ndenge wana te, kasi ayokaka mabondeli na biso mpo tókoka kosakola liloba na ye na kondima mpe na mpiko.—Misala 4:24-31.
6. Ndenge nini kondima mpe mpiko oyo Nzambe apesaki Noa esalisaki ye?
6 Na kondima, Noa “atongaki masuwa mpo na kobikisa bato ya ndako na ye.” (Baebele 11:7; Genese 6:13-22) Noa azalaki mpe “mosakoli moko ya boyengebene” oyo asakolaki na mpiko likebisi ya Nzambe epai ya bato ya ntango na ye. (2 Petelo 2:5) Na ntembe te bato yango bazalaki kotyola nsango oyo azalaki koyebisa bango ete Mpela esengelaki koya, se ndenge oyo bato mosusu batyolaka biso ntango tomonisaka bango mikapo ya Makomami oyo ezali komonisa ete etikali moke ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ebomama. (2 Petelo 3:3-12) Nzokande, lokola Enoka na Noa, tokoki kosakola nsango yango mpo tozali na kondima mpe mpiko oyo Nzambe apesi biso.
Kondima epesaka biso motema molai
7. Ndenge nini Abalayama na basusu bamonisaki kondima mpe motema molai?
7 Tosengeli kozala na kondima mpe na motema molai, mingimingi na ntango oyo tozali kozela nsuka ya ebongiseli mabe oyo. Abalayama, moto ya kala oyo azalaki kobanga Nzambe, azali moko ya bato oyo ‘na nzela ya kondima mpe na motema molai bakozwa libula ya bilaka.’ (Baebele 6:11, 12) Na kondima, alongwaki na Ulu, engumba ya bozwi, mpe akómaki kofanda na mboka mopaya oyo Nzambe alakaki ye. Nzambe apesaki mpe elaka yango na Yisaka mpe na Yakobo. Nzokande, “na kati ya kondima bango nyonso bakufaki, atako bazwaki te kokokisama ya bilaka.” Na kondima, ‘bazalaki na mposa ya esika moko oyo eleki malamu, elingi koloba, oyo ezali ya likoló.’ Yango wana, Nzambe “asili kobongisela bango engumba moko.” (Baebele 11:8-16) Ya solo, Abalayama, Yisaka na Yakobo—na basi na bango oyo bazalaki kobanga Nzambe—bazelaki na motema molai Bokonzi ya Nzambe. Bango nyonso bakosekwisama mpo na kozwa bomoi awa na mabele oyo Bokonzi yango ekoyangela.
8. Makambo nini epekisaki te Abalayama, Yisaka na Yakobo bálanda komonisa kondima mpe motema molai?
8 Abalayama, Yisaka na Yakobo babatelaki kondima. Bazwaki Mokili ya Ndaka te, bamonaki mpe te ndenge mabota nyonso emizwelaki lipamboli na nzela ya mombóto ya Abalayama. (Genese 15:5-7; 22:15-18) Atako ‘engumba oyo etongami na Nzambe’ esengelaki komonana nsima ya bankama ya bambula, bato yango balandaki komonisa kondima mpe motema molai bomoi na bango mobimba. Yango wana, lelo oyo, lokola Bokonzi ya Masiya esilaki kobanda koyangela kuna na likoló, biso mpe tosengeli kolanda komonisa kondima mpe motema molai.—Nzembo 42:5, 11; 43:5.
Kondima etindaka biso tómityela mikano oyo eleki malamu
9. Kondima etindaka na mikano ya ndenge nini?
9 Bato ya sembo na ntango ya kala balandaki te misala mabe oyo bato ya Kanana bazalaki kosala, mpamba te bazalaki na mikano oyo eleki malamu. Biso mpe ndenge moko, kondima etindaka biso tómityela mikano ya elimo oyo esalisaka biso tóboya kolanda makambo ya mokili oyo ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe, Satana Zabolo.—1 Yoane 2:15-17; 5:19.
10. Ndenge nini toyebi ete Yozefe alandaki mokano oyo ezali malamu koleka oyo ya koluka kokóma moto monene?
10 Nzambe atambwisaki makambo na ndenge oyo esalaki ete Yozefe, mwana ya Yakobo, akóma mokonzi oyo azalaki kotalela bilei na Ezipito; kasi Yozefe azalaki na mokano te ya kokóma moto monene. Ntango akómaki na mbula 110, Yozefe ayebisaki bandeko na ye maloba oyo ezali komonisa ete azalaki na kondima ete bilaka ya Yehova ekokokisama; alobaki boye: “Nabɛlɛmi kokufa nde Nzambe akoya epai na bino mpe akolongola bino na mokili oyo mpe akozongisa bino na mokili ekati ye ndai ete akopesa na Abalayama mpe na Yisaka mpe na Yakobo.” Yozefe asɛngaki ete bákunda ye na mokili oyo Nzambe alakaki bango. Ntango akufaki kuna na Ezipito, batyaki ebembe na ye nkisi mpo epɔla te mpe batyaki yango na sanduku moko. Kasi, ntango bana ya Yisalaele babimaki na Ezipito epai bazalaki baombo, mosakoli Moize asɛngaki bango bámema mikuwa ya Yozefe mpo na kokunda yango na Mokili ya Ndaka. (Genese 50:22-26; Exode 13:19) Kondima lokola oyo ya Yozefe esengeli kotinda biso tólanda mikano oyo ezali malamu koleka oyo ya koluka kozala moto monene.—1 Bakolinti 7:29-31.
11. Na likambo nini Moize amonisaki ete azalaki na mikano ya elimo?
11 Moize ‘aponaki konyokwama elongo na bato ya ekólo ya Nzambe na esika ya kozwa bosepeli ya ntango mokuse ya lisumu’ lokola moto atángá mingi oyo azali kofanda na ndako ya mokonzi ya Ezipito. (Baebele 11:23-26; Misala 7:20-22) Aboyaki lokumu ya mokili oyo mpe azangaki milulu ya minene oyo mbala mosusu balingaki kosalela ye na liwa na ye, wana balingaki kokunda ye na sanduku moko ya kitoko mpenza na malita oyo bazalaki kokunda bato ya lokumu na Ezipito. Kasi, nyonso wana elingaki kozala na motuya nini soki tokokanisi yango na libaku malamu oyo azwaki na nsima ya kozala “moto ya Nzambe,” moyokanisi ya kondimana ya Mibeko, mosakoli ya Yehova mpe moko ya bakomi ya Biblia? (Ezela 3:2) Olukaka kokóma moto monene na mokili oyo, to kondima esili kopesa yo mikano ya elimo oyo eleki malamu?
Kondima epesaka bomoi ya malamu
12. Kondima esalaki nini na bomoi ya Lahaba?
12 Kondima etindaka bato bámityela mikano oyo eleki malamu, kasi epesaka bango mpe bomoi ya malamu. Ekoki mpenza kozala ete Lahaba, oyo azalaki kofanda na Yeliko, azalaki komona ete lokola azalaki mwasi ya ndumba bomoi na ye ezalaki mpenza na ntina te. Kasi ntango amonisaki kondima, azwaki mpenza mbano! “Atángamaki . . . moyengebene mpo na misala na ye [ya kondima], nsima ya koyamba malamu bamemi-nsango mpe kotinda bango bákenda na nzela mosusu,” na ndenge yango bakimaki bato ya Kanana oyo bazalaki koluka bango mpo báboma bango. (Yakobo 2:24-26) Lokola Lahaba andimaki ete Yehova azali Nzambe ya solo, amonisaki mpe kondima na ndenge atikaki kindumba. (Yosua 2:9-11; Baebele 11:30, 31) Mosaleli moko ya Yehova abalaki ye, kasi mopakano ya Kanana te. (Deteronome 7:3, 4; 1 Bakolinti 7:39) Lahaba azwaki libaku malamu mpenza ya kokóma nkɔkɔ ya Masiya. (1 Ntango 2:3-15; Luta 4:20-22; Matai 1:5, 6) Elongo na bato mosusu, oyo kati na bango bamosusu batiki bomoi ya pite mpe ekobo, akozwa mbano mosusu mpe—akosekwa mpo na kofanda na paladiso awa na mabele.
13. Ndenge nini Davidi asalaki masumu na likambo ya Bata-seba, kasi elimo nini amonisaki?
13 Emonani ete nsima ya kotika bomoi na ye ya masumu, Lahaba azongelaki yango lisusu te. Nzokande, ezali na bato mosusu oyo bamipesaki na Nzambe na boumeli ya bambula ebele kasi basalaki masumu minene. Mokonzi Davidi asalaki ekobo na Bata-seba, abomisaki mobali na ye na etumba mpe, nsima na yango, abalaki Bata-seba yango. (2 Samwele 11:1-27) Davidi abongolaki motema mpe asɛngaki Yehova na mawa mpenza ete: “Longwelá ngai [elimo santu, NW] na yo te.” Davidi abungisaki elimo ya Nzambe te. Azalaki na kondima ete lokola Yehova azali na motema mawa, akoboya te “motema motutami mpe na mawa” mpo na lisumu. (Nzembo 51:11, 17; 103:10-14) Mpo na kondima na bango, Davidi na Bata-seba bazwaki libaku malamu ya kozala na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya.—1 Ntango 3:5; Matai 1:6, 16; Luka 3:23, 31.
Kondima elendisami na nzela ya ndanga
14. Ndanga nini Gideona azwaki, mpe lisolo yango ekoki kosala nini na kondima na biso?
14 Atako totambolaka na kondima, ntango mosusu tokoki kozala na mposa ya ndanga ete Nzambe akosalisa biso. Ezalaki se bongo mpo na Gideona, moko na bato oyo “na nzela ya kondima balongaki makonzi na bitumba.” (Baebele 11:32, 33) Ntango bato ya Midyani na baninga na bango ya bikólo mosusu babundisaki Yisalaele, Gideona atondaki na elimo ya Nzambe. Lokola alingaki komona elembo moko oyo ekolakisa ete Yehova azali na ye, Gideona asɛngaki Yehova amonisa ye yango na nzela ya mwa makambo oyo alingaki ete esalema na nsuki ya mpate oyo asengelaki kotika butu mobimba na esika oyo bapupolaka masango. Na likambo ya liboso oyo asɛngaki, mamwɛ epɔlisaki kaka nsuki ya mpate, kasi mabele oyo ezalaki pembeni na yango epɔlaki ata moke te. Na likambo ya mibale, mabele nde etondaki na mamwɛ, kasi nsuki ya mpate epɔlaki ata moke te. Makambo wana elendisaki Gideona; yango wana, asalaki makambo na ye na bokɛngi mpe na kondima, mpe alongaki banguna ya Yisalaele. (Basambisi 6:33-40; 7:19-25) Soki tozali koluka naino bilembo oyo ekomonisa ete Yehova mpe azali kondima ekateli moko oyo tolingi kozwa, yango elakisi te ete tozangi kondima. Kutu, liboso ya kozwa bikateli, soki tozali kotalela Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe tozali kobondela mpo na kosɛnga litambwisi ya elimo santu, yango emonisaka ete tozali na kondima.—Baloma 8:26, 27.
15. Ntango tozali kokanisa kondima ya Balaka yango ekoki kosalisa biso na kosala nini?
15 Bilendiseli oyo Mosambisi Balaka azwaki ezalaki lokola ndanga oyo elendisaki kondima na ye. Mosakoli-mwasi Debola alendisaki ye abunda mpo na kolongola bana ya Yisalaele na minyoko ya Yabini, mokonzi ya Kanana. Na kondima mpe na ndanga oyo azwaki ete Nzambe akosalisa ye, Balaka azwaki mibali 10 000 oyo bazalaki ata na bibundeli ya malonga te, akendaki kobunda na bibele ya basoda ya Yabini, oyo Sisela azalaki kotambwisa mpe alongaki bango. Debola na Balaka bayembaki nzembo moko kitoko mpo na kokumisa bolongi wana. (Basambisi 4:1–5:31) Debola alendisaki Balaka akóma motambwisi oyo Nzambe aponi mpo na Yisalaele, mpe Balaka azalaki moko ya basaleli ya Yehova oyo, na nzela ya kondima, “bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.” (Baebele 11:34) Soki tokanisi ndenge oyo Nzambe asalisaki Balaka alonga lokola asalaki makambo na kondima, yango ekoki kotinda biso tózonga nsima te ata soki tozalaki kokakatana mpo na kokokisa mokumba moko ya monene oyo bapesi biso na mosala ya Yehova.
Kondima elendisaka kimya
16. Na ndenge Abalayama alukaki kimya kati na ye na Lota, ndakisa nini ya malamu apesaki biso?
16 Se ndenge oyo kondima esalisaka biso tókokisa mikumba ya minene na mosala ya Nzambe, elendisaka mpe kimya mpe boyokani malamu. Abalayama atikelaki Lota, mwana ya ndeko na ye oyo azalaki mpenza leki na ye mosika, ete apona bisika ya matiti ya malamu mpenza ntango esɛngaki ete bákabwana mpo babateli ya mpate na bango baswanaki. (Genese 13:7-12) Na ntembe te, Abalayama abondelaki Nzambe na kondima mpo azwa mayele ya kosilisa likambo yango. Na esika aluka naino bolamu na ye moko, asilisaki likambo yango na kimya. Soki tozwani mwa matata na ndeko na biso moklisto, tóbondela na kondima mpe ‘tóluka kimya’; tóbosana mpe te ndakisa oyo Abalayama apesaki na oyo etali komibanzabanza mpo na basusu.—1 Petelo 3:10-12
17. Mpo na nini tokoki koloba ete Paulo, Balanabasi mpe Malako basilisaki matata oyo ebimaki kati na bango na kimya?
17 Talá ndenge oyo kolanda mitinda ya boklisto na kondima ekoki kosalisa biso tóbatelaka kimya. Ntango Paulo azalaki pene ya kokende mobembo na ye ya mibale ya misionɛrɛ, Balanabasi andimaki akende elongo na ye mpo na kotala lisusu masangá ya Sipele mpe ya Asie Mineure. Kasi, Balanabasi alingaki bákende elongo na ndeko na ye Malako. Paulo aboyaki, mpamba te na mobembo ya liboso, Malako atikaká bango na Pamofilia. “Kongala makasi ya nkanda” ebimaki, mpe na nsuka, moto na moto akendaki nzela na ye. Balanabasi akendaki na Malako na Sipele, nzokande Paulo azwaki Silasi mpe “akatisaki Silia mpe Silisia, kolendisáká masangá.” (Misala 15:36-41) Na nsima, basilisaki matata wana, mpamba te Malako azalaki na ntoma Paulo na Loma, mpe Paulo alobaki malamu mpo na ye. (Bakolose 4:10; Filemona 23, 24) Na mobu soki 65 ya ntango na biso (T.B.), ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na Loma, ayebisaki Timote ete: “Kamatá Malako mpe yaká na ye elongo na yo, mpo epai na ngai azali na ntina mpo na mosala.” (2 Timote 4:11) Emonani ete, na mabondeli oyo azalaki kosala na kondima, Paulo azalaki kolobela mpe likambo ya boyokani na ye na Balanabasi na Malako; mpe yango esalaki ete bábongisa boyokani na bango, likambo oyo ekendaka nzela moko na “kimya ya Nzambe.”—Bafilipi 4:6, 7.
18. Ekoki kozala ete likambo nini elekaki kati na Evodi na Sɛntisi?
18 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2) Matata ebimaki kati na basi mibale baklisto oyo Paulo akomaki mpo na bango ete: “Nazali kolendisa Evodi mpe nazali kolendisa Sɛntisi bázala na likanisi ya ndenge moko na kati ya Nkolo. . . . Kobá kosalisa basi wana oyo babomaki nzoto elongo na ngai na kati ya nsango malamu.” (Bafilipi 4:1-3) Emonani mpenza ete basi yango oyo bazalaki kobanga Nzambe basilisaki matata na bango na kimya wana basalelaki toli lokola oyo ezali na Matai 5:23, 24. Lelo oyo mpe, soki tozali kosalela mitinda ya Makomami na kondima, kimya ekozanga te.
Kondima esalisaka biso tóyika mpiko
19. Mokakatano nini ebebisaki kondima ya Yisaka na Lebeka te?
19 Kondima ekoki mpe kosalisa biso tóyikela mpasi mpiko. Ntango mosusu, tozali koyoka mpasi mpo moto moko ya libota na biso oyo asilá kozwa batisimo aboyi kotosa Nzambe na ndenge abali moto oyo azali mondimi te. (1 Bakolinti 7:39) Yisaka na Lebeka bayokaki mpasi mpo mwana na bango Esau abalaki basi oyo bazalaki kobanga Nzambe te. Basi na ye Bahiti “batungisaki [bango] mingi.” Yango etindaki Lebeka aloba ete: “Ngai nalɛmbi na bomoi na ntina na basi Bahiti oyo. Soko Yakobo akobala mwasi Mohiti lokola baoyo, mwasi ya mokili oyo, nde bomoi na ngai ekozala malamu boni?” (Genese 26:34, 35; 27:46) Atako bongo, mokakatano yango ebebisaki kondima ya Yisaka na Lebeka te. Tiká ete tóbatela kondima makasi soki mikakatano elekeli biso.
20. Ndakisa nini ya kondima Luta na Naomi bapesi biso?
20 Mobange Naomi, mwasi akufelá mobali, azalaki moto ya Yuda mpe ayebaki ete basi mosusu ya Yuda bakokaki kobota bana oyo bakozala bankɔkɔ ya Masiya. Nzokande, lokola bana na ye ya mibali bakufaki mpe batikaki bana te mpe ye moko asilaki kolekisa bambula oyo mwasi akoki kobota, azalaki lisusu na elikya te ete libota na ye ekozala mpe na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya. Atako bongo, bokilo na ye Luta, mwasi oyo mwana na ye moko atikaki, akómaki mwasi ya mobange Boaza, abotaki mwana mobali mpe akómaki nkɔkɔ ya Yesu, Masiya! (Genese 49:10, 33; Luta 1:3-5; 4:13-22; Matai 1:1, 5) Naomi na Luta babatelaki kondima na bango ata na ntango ya mpasi mpe yango ememelaki bango esengo. Biso mpe tokozala na esengo mingi soki tobateli kondima na ntango ya mpasi.
21. Kondima esalelaka biso nini, mpe tosengeli kozala na mokano nini?
21 Atako moto moko akoki koyeba te makambo nini mpenza ekokómela ye lobi, na kondima tokoki koyikela ata mokakatano ya ndenge nini mpiko. Kondima epesaka biso mpiko mpe motema molai; esalisaka biso mpe na komityela mikano oyo eleki malamu mpe ememelaka biso bomoi ya malamu. Kondima ebongisaka boyokani na biso na basusu mpe bampasi ebomaka yango te. Tiká ete tózala “motindo ya bato oyo bazali na kondima mpo na kobatelama ya molimo na bomoi.” (Baebele 10:39) Na makasi ya Yehova, Nzambe na biso ya bolingo, mpe mpo na nkembo na ye, tiká ete tólanda komonisa kondima makasi.
Okopesa eyano nini?
• Makambo nini oyo ezali na Makomami emonisi ete kondima ekoki kopesa biso mpiko?
• Mpo na nini tokoki koloba ete kondima ememelaka biso bomoi ya malamu?
• Ndenge nini kondima elendisaka kimya?
• Makambo nini ezali komonisa ete kondima esalisaka biso tóyikela bampasi mpiko?
[Bililingi na lokasa 16]
Kondima epesaki Noa na Enoka mpiko ya kosakola bansango ya Yehova
[Bililingi na lokasa 17]
Kondima lokola oyo ya Moize etindaka biso tólanda mikano ya elimo
[Bililingi na lokasa 18]
Kondima ya Balaka, Debola na Gideona elendisamaki mpo bazalaki na ndanga ete Nzambe akosalisa bango