Tikalá kati na “Mboka na kobombama” mpo ete obikisa bomoi na yo!
“Ekoki ete moto yango atikala kati na mboka na kobombama na ye kino kufa na nganga monene.”—MITUYA 35:28.
1. Nani azali Mobekoli ya makila, mpe etikali moke asala nini?
YESU KLISTO, Mobekoli ya makila oyo Yehova azali kosalela, azali pene ya kobɛta. Elongo na mampinga na ye ya baanzelu, etikali moke Mobekoli yango abundisa baoyo bazali na nyongo ya makila mpe baboyi kobongola motema. Ee, Yesu akosala lokola Mokokisi ya bikateli ya Nzambe na boumeli ya “bolózi monene” oyo ezali koya nokinoki. (Matai 24:21, 22; Yisaya 26:21) Bato bakokoka soko moke te kopɛngola mbuma mabe ya nyongo na bango ya makila.
2. Wapi esika na kobombama bobele moko ya solo, mpe mituna nini tosengeli koyanola na yango?
2 Nzela ya libateli ezali bongo ya kokɔta na balabála oyo ezali komema na mboka na kobombama ya solo mpe kokima mpo na kobikisa bomoi! Soki andimami kati na mboka yango, ekosengela na mokimi ete atikala kuna, mpamba te ezali esika bobele moko ya kobombama. Kasi okoki komituna ete, ‘Lokola mingi kati na biso tobomá moto te, tozali mpenza na nyongo ya makila? Mpo na nini Yesu azali Mobekoli ya makila? Nini ezali bongo mboka na kobombama ya mikolo na biso? Moto nyonso akoki kotika yango mpe kobatelama?’
Tozali mpenza na nyongo ya makila?
3. Moko na mitindá nini ya Mibeko ya Mose ekosalisa biso ete tósosola ete bamiliare ya bato na mabelé bazangi te kosangana na nyongo ya makila?
3 Moko na mitindá ya Mibeko ya Mose ekosalisa biso na komona ete bamiliare ya bato awa na mabelé bazali na nyongo ya makila. Nzambe atyaki likoló na Bayisalaele ekweli oyo etángamaki likoló na libota mobimba mpo na kosopama ya makila. Soki bamonaki moto moko oyo abomami mpe ete moto oyo abomaki ye ayebanaki te, basambisi basengelaki kotalela ntáká ya bamboka oyo ezalaki zingazinga mpo na koyeba oyo ezalaki pene koleka nyonso mosusu. Mpo na kolongola ekweli wana, mikóló ya mboka oyo emonanaki ete ezwaki nyongo ya makila basengelaki kokende na lobwaku oyo ezalaki na mai makasi koleka kati na yango mpe oyo elonamaki te mpo na kokata nkingo ya mwana na ngɔmbɛ oyo asalelami naino te. Yango ezalaki kosalema na miso ya banganga Balevi ‘mpamba te Yehova aponaki bango mpo ete basilisaka makambo na kowelana.’ Mikóló ya mboka bazalaki kosukola mabɔkɔ na bango likoló na ngɔmbɛ mpe bazalaki koloba ete: “Mabɔkɔ na biso masopaki makila oyo te, mpe miso na biso mamonaki kosopana na yango te. Ee [Yehova], limbisá bato na yo Yisalaele, baoyo osili kosikola, mpe tyá ekweli na kufa na moto na sembo na kati na bato na yo Yisalaele te.” (Deteronome 21:1-9) Yehova Nzambe alingaki te ete mabelé ya Yisalaele ebebisama na makila to ete libota mobimba litángelama nyongo ya makila.
4. Babilone Monene eyebani lolenge nini mpo na oyo etali nyongo ya makila?
4 Ee, ezali bongo na likambo oyo nyongo ya makila ekoki kotángama likoló na libota mobimba, to likoló na bato nyonso. Tótalela naino nyongo monene ya makila oyo etángami likoló na Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Alangwe makila ya basaleli ya Yehova! (Emoniseli 17:5, 6; 18:24) Mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mazali koloba ete mazali kolanda Mokonzi na kimya, kasi bitumba, monyokoli oyo lingomba ya Katolike ebimisaki, mpe bitumba ya mangomba oyo bisili koboma ebele ya bato esili kopesa bango nyongo ya makila na miso ya Nzambe. (Yisaya 9:6; Yilimia 2:34) Ya solo, bazali mpenza na ngambo monene mpo na kufa ya bamilió ya bato oyo bakufaki na bitumba mibale ya mokili mobimba na ekeke oyo. Na yango, basangani ya mangomba ya lokuta mpe basungi na bango mpe baoyo bazali kosangana na bitumba ya bato bazali na nyongo ya makila na miso ya Nzambe.
5. Lolenge nini basusu bazalaki lokola moto oyo abomaki moto na nkó te na Yisalaele?
5 Basusu basili koboma bato na nkó nyonso to na kozanga bokɛngi. Basusu basili kosangana na bituluku oyo bibomaki bato, mbala mosusu bakonzi ya mangomba nde bapusaki bango na koyebisáká bango ete kosala bongo ezalaki na boyokani na mokano ya Nzambe. Basusu basili konyokola mpe koboma basaleli ya Nzambe. Atako tosalaki makambo motindo oyo te, kasi lokola toyebaki mibeko mpe mikano ya Nzambe te, tosangani na ngambo oyo mokili mobimba ezali na yango mpo kobomama ya bato. Tozali lokola moto oyo abomi moto na nkó te, ‘oyo abomaki mozalani na ye kozanga koyeba yango mpe ayinaki ye liboso te.’ (Deteronome 19:4) Bato motindo wana basengeli kobondela Nzambe ete ayokela bango mawa mpe basengeli kokima kati na mboka na kobombama ya solo. Soki te, bakokutana na Mobekoli ya makila mpe ye akoboma bango.
Mokumba ya ntina mingi ya Yesu
6. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azali ndeko ya pene mpenza ya bato nyonso?
6 Kati na Yisalaele mobekoli ya makila ezalaki bongo ndeko mobali ya pene mpenza ya moto oyo abomamaki. Mpo na kobekola liwa ya baoyo nyonso babomamaki awa na mabelé mpe mingimingi kobomama ya basaleli ya Yehova, Mobekoli ya makila na mikolo na biso esengeli kozala ye oyo azali ndeko ya bato nyonso. Yesu nde asili kokokisa mokumba yango. Abotamaki moto ya kokoka. Yesu apesaki bomoi na ye ya kozanga masumu kati na kufa lokola mbeka ya lisiko, mpe nsima ya lisekwa na ye mpo na kokende na likoló, alakisaki motuya na yango epai na Nzambe mpo na bolamu ya bakitani ya Adama, oyo bazali bongo bato ya masumu mpe ya kokufa. Klisto akómaki bongo Mosombi ya bato, ndeko na biso ya pene mpenza—Mobekoli ya makila oyo azali mpenza na lotómo. (Baloma 5:12; 6:23; Baebele 10:12) Yesu amonisami lokola ndeko mobali ya bato oyo balandaka matambe na ye, baoyo bazali bapakolami. (Matai 25:40, 45; Baebele 2:11-17) Lokola azali Mokonzi na likoló akokóma “Tata na seko” ya baoyo bakozwa litomba ya mbeka na ye lokola bayangelami na ye na mabelé. Bakobika mpo na libela. (Yisaya 9:6, 7) Na lolenge lobongi mpenza, Yehova asili kopona ndeko ya pene mpenza ya bato, ete azala Mobekoli ya makila.
7. Na mokumba na ye ya Nganga Monene, Yesu azali kosala nini mpo na bato?
7 Yesu azali mpe Nganga Monene oyo azangi masumu, oyo amekamaki mpe oyo azali na boboto. (Baebele 4:15) Kati na mokumba yango azali kosalela motuya ya mbeka na ye, oyo elongolaka bato masumu. Mboka na kobombama ityamaki “mpo na bato na Yisalaele mpe mpo na mopaya mpe mpo na moto afandi kati na bango.” (Mituya 35:15) Na yango Nganga aleki monene asalelaki liboso motuya ya mbeka na ye epai na bayekoli na ye bapakolami, “bato na Yisalaele.” Sikawa ezali kosalelama epai na ‘bapaya’ mpe ‘bafándi’ kati na mboka na kobombama ya solo. “Bampate mosusu” wana ya Yesu Klisto bazali na elikya ya kofanda libela na mabelé.—Yoane 10:16; Nzembo 37:29, 34.
Mboka na kobombama na mikolo na biso
8. Mboka na kobombama ya solo ezali nini?
8 Mboka na kobombama ya solo ezali nini? Ezali te mboka moko awa na mabelé, lokola Helebona, oyo ezalaki moko na mboka na kobombama ya Balevi mpe efandelo ya nganga monene ya Yisalaele. Lelo oyo mboka na kobombama ezali bongo ebongiseli oyo Nzambe asali mpo na kobatela biso na liwa mpo ete tobukaki mobeko na ye na ntina etali ezalela ya bulɛɛ ya makila. (Genese 9:6) Ezala asali yango na nkó to asali yango na nkó te, moto nyonso oyo abuki mobeko yango asengeli koluka kozwa bolimbisi ya Nzambe mpe kolongolama ya lisumu na lisalisi ya kondima na ye na makila ya Nganga Monene, Yesu Klisto. Baklisto bapakolami oyo bazali na elikya ya kokende na likoló mpe “ebele monene” oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé bamibongisi mpo na kozwa matomba kati na mbeka ya Yesu, oyo elongolaka masumu, mpe bazali kati na mboka na kobombama ya solo.—Emoniseli 7:9, 14; 1 Yoane 1:7; 2:1, 2.
9. Lolenge nini Saulo na Talasa abukaki mobeko ya Nzambe na ntina na makila, kasi lolenge nini amonisaki ezaleli na ye ya kobongwana?
9 Liboso ete akóma moklisto, ntoma Paulo abukaki mobeko oyo etali makila. Wana ayebanaki lokola Saulo na Talasa, anyokolaki bayekoli ya Yesu mpe apesaki nkutu nzela ete bábomama. Ntoma Paulo alobaki ete: “Kasi, ayokeli ngai mawa, zambi nasalaki yango wana eyebaki ngai ntina te mpe wana ezangaki ngai kondima.” (1 Timoté 1:13; Misala 9:1-19) Saulo abongolaki motema, na nsima amonisaki yango kati na misala mingi ya kondima. Kasi bobele kozala na kondima kati na lisiko ekoki te mpo na kokɔta na mboka na kobombama ya solo na mikolo na biso.
10. Lolenge nini tokoki kozwa lisosoli malamu, mpe tosengeli kosala nini mpo na kobatela yango?
10 Moto oyo abomaki moto na nkó te akokaki kotikala kati na moko na mboka na kobombama ya Yisalaele bobele soki akokaki komonisa solo ete azalaki na lisosoli malamu liboso na Nzambe na ntina etali makila. Mpo na kozwa lisosoli malamu, tosengeli komonisa kondima kati na mbeka ya Yesu, kobongwana na masumu na biso, mpe kobongola ezaleli na biso. Tosengeli kosɛnga lisosoli malamu na komipesáká na motema mobimba epai na Nzambe na nzela ya Klisto, komonisáká yango na kozwáká batisimo ya mai. (1 Petelo 3:20, 21) Lisosoli malamu wana ezali kopesa biso nzela ya kokóma na boyokani ya malamu elongo na Yehova. Lolenge bobele moko ya kobatela lisosoli malamu ezali bongo ya kolanda masɛngami ya Nzambe mpe kosala mosala oyo mopesameli biso kati na mboka na kobombama ya solo, lokola bakimi kati na mboka na kobombama ya kala bazalaki kotosa Mibeko mpe bazalaki kokokisa misala mipesamelaki bango. Mosala ya ntina mingi mpo na basaleli ya Yehova lelo ezali bongo kosakola nsango ya Bokonzi. (Matai 24:14; 28:19, 20) Kosaláká mosala wana ekosalisa biso ete tózala bafándi oyo bazali na ntina kati na mboka na kobombama ya ntango na biso.
11. Soki tolingi kotikala na libateli nyonso kati na mboka na kobombama na mikolo na biso, tosengeli kopɛngola likambo nini?
11 Soki totiki mboka na kobombama ya lelo tokomitya kati na kobebisama, mpamba te etikali moke ete Mobekoli ya makila abanda mosala ya koboma baoyo nyonso bazali na nyongo ya makila. Oyo ezali ntango te ya kofanda na libándá ya mboka oyo ya libateli to na libándá ya ndelo ya etando ya mabelé na yango. Tokoki kotika mboka na kobombama ya solo soki tobungisi kondima kati na mbeka ya Nganga Monene, oyo epɛtɔlaka masumu. (Baebele 2:1; 6:4-6) Tokobikisama mpe te soki tolandi bizaleli ya bato ya mokili, to soki tozali lokolo moko na kati mpe lokolo mosusu na libándá ya lisangá ya Yehova, to mpe soki topɛngwi na mitindá ya sembo ya Tata na biso ya likoló.—1 Bakolinti 4:4.
Basikolami longwa na mboka na kobombama
12. Baoyo bazalaki kala na nyongo ya makila basengelaki kofanda ntango boni kati na mboka na kobombama ya solo?
12 Kati na Yisalaele, moto oyo abomaki moto na nkó te asengelaki kotikala kati na mboka na kobombama “kino kufa na nganga monene.” (Mituya 35:28) Na yango, baoyo bazalaki kala na nyongo ya makila basengeli kotikala kati na mboka na kobombama ya solo kino ntango nini? Kino na ntango oyo bakozala lisusu te na mposa ya misala ya Nganga Monene, Yesu Klisto. Paulo alobaki ete: “Bongo ayebi kobikisa bango bakobɛlɛma na Nzambe na nzela na ye.” (Baebele 7:25) Wana nyongo ya makila ezali naino, misala ya Nganga Monene mizali na ntina mpo ete bato bazangi kokoka bákóma na etɛlɛmɛlo malamu liboso na Nzambe.
13. Banani bazali lelo “bato na Yisalaele,” mpe kino ntango nini basengeli kotikala kati na “mboka na kobombama”?
13 Tómikundola ete mboka na kobombama ya kala ityamaki mpo na “bato na Yisalaele,” bapaya, mpe bafándi. “Bato na Yisalaele” bazali bongo Bayisalaele ya elimo. (Bagalatia 6:16) Basengeli kotikala kati na mboka na kobombama ya solo na boumeli ya ntango nyonso oyo bazali na bomoi awa na mabelé. Mpo na nini? Mpamba te bazali naino na nzoto ya mosuni ezangi kokoka mpe na yango bazali na mposa ya nguya ya Nganga Monene, mpo na kopɛtɔlama ya masumu. Kasi na ntango baklisto bapakolami wana bakokufa mpe bakosekwa mpo na kokóma na bomoi ya elimo na likoló, bakozala na mposa te ya misala ya Nganga monene, mpo na kopɛtɔlama ya masumu; bakotika mpo na libela nzoto na bango ya mosuni mpe nyongo ya makila oyo ekangami na yango. Epai na bapakolami wana oyo basekwisami, Nganga Monene akosila kokufa mpo na oyo etali mosala na ye ya kopɛtɔla mpe ya kobatela.
14. Mpo na nini baoyo bazali sikawa na elikya ya kokende na likoló basengeli kotikala kati na mboka na kobombama ya lelo?
14 Kasi, ezali na ntina mosusu oyo ezwami na Makomami mpo na yango “basangoli na libula elongo na Klisto” basengeli kotikala kati na mboka na kobombama ya solo kino na ntango oyo bakosilisa na bosembo nyonso bomoi na bango awa na mabelé na nzela ya liwa. Wana bakokufa, bakopesa bomoto na bango mbeka mpo na libela. (Baloma 8:17, NW; Emoniseli 2:10) Mbeka ya Yesu esalelamaka bobele mpo na baoyo bazali na nzoto ya mosuni. Na yango, na kotalela basangani ya Yisalaele ya elimo, Nganga Monene azali kokufa wana ezali bango kosekwisama na kokóma bikelamu ya elimo oyo bakofanda libela na likoló mpe bakokóma na “lolenge na Nzambe.”—2 Petelo 1:4.
15. Banani bazali lelo ‘bapaya’ mpe ‘bafándi,’ mpe Nganga Monene akosala nini mpo na bango?
15 Na kotalela ‘bapaya’ mpe ‘bafándi’ ya mikolo na biso, ntango nini Nganga Monene “akokufa,” kopesáká bango nzela ya kotika mboka na kobombama ya solo? Basangani oyo ya ebele monene bakoki te kolongwa na mboka na kobombama oyo nokinoki nsima ya bolózi monene. Mpo na nini? Mpamba te bakozala naino kati na nzoto na bango ya kozanga kokoka, ya masumu, mpe bakozala na mposa ya kotikala na nsé ya libateli ya Nganga Monene. Na kosaláká makasi ete bákoma bato oyo babongi mpo na kozwa litomba ya misala na ye oyo mizali na likoki ya kopɛtɔla, na boumeli ya boyangeli na ye mpe ya bonganga na ye ya mbula nkóto, bakokóma na ezalela ya bomoto ya kokoka. Na nsima Yesu akopesa bango na mabɔkɔ ya Nzambe mpo na komekama monene mpe ya nsuka ya bosembo na bango na kofungoláká Satana mpe bademó na ye mpo na mwa ntango moke. Lokola bakoleka komekama yango na kondimamáká na Yehova, akotánga bango bayengebene. Na yango, bakokóma na ezaleli mobimba mpenza ya bomoto ya kokoka.—1 Bakolinti 15:28; Emoniseli 20:7-10.a
16. Ntango nini babiki na bolózi monene bakozala lisusu na mposa te ya misala ya Nganga Monene, mpo na kopɛtolama ya masumu?
16 Na yango, ekosɛnga na baoyo bakobika na bolózi monene ete bábatela lisosoli malamu na kotikaláká kati na mboka na kobombama ya solo kino na nsuka ya Boyangeli ya Klisto ya Mbula Nkóto. Lokola bakozala bato oyo bakómi na ezalela ya kokoka, bakozala lisusu te na mposa ya misala ya Nganga Monene, mpo na kopɛtolama ya masumu mpe bakozala lisusu te na nsé ya libateli na ye. Na bongo, mpo na bango, Yesu akokufa lokola Nganga Monene, mpamba te akozala lisusu na ntina te ya kosala likambo mpo na bango na nzela ya makila ya mbeka na ye oyo epɛtɔlaka masumu. Na ntango yango bakotika mboka na kobombama ya solo.
17. Mpo na nini ekozala na ntina te ete baoyo bakosekwa na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto bákɔta kati na mboka na kobombama ya solo mpe bátikala kuna?
17 Baoyo bakosekwisama na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu bakokɔta na mboka na kobombama ya solo mpe bakotikala kuna kino na liwa ya Nganga Monene? Te, mpamba te na ntango bakufaki bakokisaki etumbu mpo na ezalela na bango ya masumu. (Baloma 6:7; Baebele 9:27) Nganga Monene akosunga bango nde mpo ete bákóma na ezalela ya kokoka. Soki balóngi komekama ya nsuka nsima ya Mbula Nkóto, Nzambe akotánga bango mpe bayengebene na kopesáká bango ndanga ya bomoi ya seko na mabelé. Ya solo, kozanga kolanda masɛngami ya Nzambe ekomema lisambisi ya ekweli likoló na bato oyo bakokoka te koleka komekama ya nsuka lokola basembwi.
18. Mpo na oyo etali bokonzi ya Yesu mpe bonganga na ye, nini ekotikala elongo na bato mpo na libela?
18 Na nsuka, banganga minene ya Yisalaele bakufaki. Kasi Yesu akómaki “nganga monene libela na kobila molɔngɔ́ na Melikisedeke.” (Baebele 6:19, 20; 7:3) Na yango, nsuka ya mosala ya Yesu epai na bato lokola Nganga Monene mpe Moyokanisi ekozala bongo nsuka ya bomoi na ye te. Matomba malamu ya mosala na ye lokola Mokonzi mpe Nganga Monene makotikala libela epai na bato, mpe bato bakozala na nyongo ya seko ya komonisa botɔ́ndi epai na ye mpo na misala oyo akosila kosalela bango. Lisusu, Yesu akokamba seko na seko losambo ya solo ya Yehova.—Bafilipi 2:5-11.
Mateya ya ntina mpo na biso
19. Liteya nini etali koyina mpe bolingo tokoki kozwa yango kati na ebongiseli ya mboka na kobombama?
19 Tokoki kozwa mateya mingi kati na ebongiseli ya mboka na kobombama. Na ndakisa, moto moko oyo abomaki moto mosusu mpo na koyina apesamelaki nzela te ya kofanda kati na mboka na kobombama. (Mituya 35:20, 21) Na yango, lolenge nini moto ata nani oyo azali kati na mboka na kobombama ya solo akoki kokólisa kati na motema na ye ezaleli ya koyina ndeko na ye? Ntoma Yoane akomaki ete: “Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi na bato, mpe toyebi ete moto na moto oyo akobomaka bato azali na bomoi na seko koumela kati na ye te.” Bongo, tiká ete “tólingana, moto moninga na ye, mpo ete bolingo euti na Nzambe.”—1 Yoane 3:15; 4:7.
20. Mpo na komibatela liboso na Mobekoli ya makila, baoyo bazali kati na mboka na kobombama ya solo basengeli kosala nini?
20 Mpo na komibatela liboso na mobekoli ya makila, bato oyo babomaki bato na nkó te basengelaki kotikala kati na mboka na kobombama mpe basengelaki te kotambolatambola libándá ya lopángo na yango. Ezali boni mpo na baoyo bazali kati na mboka na kobombama ya solo? Mpo na komibatela liboso na Mobekoli monene ya makila, basengeli te kotika mboka yango. Ya solo, basengeli komibatela na masenginya oyo makoki kopusa bango ete, na elobeli ya elilingi, bákende na ndelo ya lopango. Basengeli kosɛnzɛla ete bátika te ete ezaleli ya kolinga mokili ya Satana ekóla kati na mitema na bango. Yango ekosɛnga kobondela mpe kosala milende, mpe ebongi mpenza mpamba te bomoi na bango etalelami na yango.—1 Yoane 2:15-17; 5:19.
21. Mosala nini ya kopesa matomba ezali kosalema na baoyo bazali lelo kati na mboka na kobombama?
21 Bato oyo babomaki bato na nkó te, oyo bazalaki kofanda kati na mboka na kobombama ya kala, basengelaki kozala basáli ya molende. Bobele bongo, “bato na Yisalaele” bapakolami basili kopesa ndakisa malamu lokola basáli na elanga mpe basakoli ya Bokonzi. (Malako 9:37, 38; Malako 13:10) Lokola ‘bapaya’ mpe ‘bafándi’ kati na mboka na kobombama ya mikolo na biso, baklisto oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé bazali na libaku malamu ya kosala mosala oyo ya kobikisa elongo na bapakolami oyo bazali naino awa na mabelé. Mpe, ezali mpenza mosala oyo epesaka matomba! Baoyo bazali kosala na bosembo nyonso kati na mboka na kobombama ya solo bakomibikisa na liwa ya seko na mabɔkɔ ya Mobekoli ya makila. Nzokande, bakozwa matomba ya seko kati na mosala na ye ya Nganga Monene ya Nzambe. Okotikala kati na mboka na kobombama mpe kobika mpo na libela?
[Maloba na nse]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Dɛsɛ́mbɛ 1991, lokasa 12, paragrafe 15, 16.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete bamiliare ya bato na mabelé bazali na nyongo ya makila?
◻ Mikumba nini Yesu Klisto azali kokokisa yango mpo na bato?
◻ Mboka na kobombama ya solo ezali nini mpe lolenge nini moto akoki kokɔta kati na yango?
◻ Ntango nini bato bakolongolama na mboka na kobombama ya solo?
◻ Batoli nini ya ntina mingi tokoki kozwa yango kati na ebongiseli ya mboka na kobombama?
[Elilingi na lokasa 16]
Oyebi mikumba ya ntina mingi oyo Yesu azali kokokisa?