Tóyeba mokumba monene ya Yesu na mokano ya Nzambe
“Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”—YOA. 14:6.
1, 2. Mpo na nini tosengeli kotalela mokumba monene ya Yesu na mokano ya Nzambe?
BANDA kala, bato mingi basalaka makasi bámonana ete baleki bato mosusu, kasi bato moke kaka nde balongaka kosala yango. Kutu, bato oyo bakoki koloba solo ete bakeseni mpenza na bato mosusu, bazali moke koleka. Nzokande, Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, akeseni na bato mosusu na makambo mingi.
2 Mpo na nini tosengeli kotya likebi na mokumba ya Yesu oyo ekokani na mosusu te? Mpamba te yango etaleli boyokani na biso na Tata na biso ya likoló, Yehova! Yesu alobaki ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoa. 14:6; 17:3) Tótalela mwa makambo oyo ekesenisi Yesu na moto mosusu nyonso. Yango ekosalisa biso tóyeba malamumalamu mokumba na ye na mokano ya Nzambe.
“Mwana mobotami-se-moko”
3, 4. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete mokumba ya Yesu lokola Mwana mobotami-se-moko ekeseni na mosusu nyonso? (b) Na ndenge nini mokumba ya Yesu na bozalisi ekeseni na mosusu nyonso?
3 Yesu azali kaka te “mwana ya Nzambe.” Satana abengaki ye bongo ntango amekaki ye. (Mat. 4:3, 6) Yesu abongi kobengama “Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe.” (Yoa. 3:16, 18) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mobotami-se-moko” elimbolaka “akeseni na mosusu nyonso,” to “azali kaka ye moko na lolenge na ye.” Yehova azali na bamilio na bamilio ya bana ya elimo. Boye, na ndenge nini Yesu azali kaka ye moko “na lolenge na ye”?
4 Yesu akeseni na moto mosusu nyonso mpamba te azali kaka ye moko oyo Tata na ye akelaki ye moko. Azali Mwana ya liboso. Kutu, azali nde “mwana ya liboso na bozalisi nyonso.” (Kols. 1:15) Azali “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.” (Emon. 3:14) Mokumba oyo Mwana mobotami-se-moko azalaki na yango na bozalisi ekeseni mpe na mosusu nyonso. Azalaki te Mozalisi to Moto oyo abandisaki kozalisa. Kasi, Yehova asalelaki ye lokola mosali, to nzela, mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso. (Tángá Yoane 1:3.) Ntoma Paulo akomaki boye: “Mpo na biso ezali mpenza na Nzambe kaka moko Tata, oyo uta na ye biloko nyonso ezali, mpe biso mpo na ye; mpe ezali na Nkolo kaka moko, Yesu Klisto, oyo na nzela na ye biloko nyonso ezali, mpe biso na nzela na ye.”—1 Kol. 8:6.
5. Ndenge nini Makomami emonisi ete mokumba ya Yesu ekeseni na mosusu nyonso?
5 Nzokande, makambo oyo ekesenisi Yesu na moto mosusu nyonso esuki kaka wana te. Makomami epesi ye batitre to bibengeli mingi oyo emonisi ete mokumba na ye ekeseni na oyo ya moto mosusu nyonso na mokano ya Nzambe. Sikoyo, tótalela batitre mosusu mitano ya Yesu na Makomami ya Grɛki ya boklisto.
“Liloba”
6. Mpo na nini Yesu abongi kobengama “Liloba”?
6 Tángá Yoane 1:14. Mpo na nini Yesu abengami “Liloba,” to Logos? Titre yango emonisi mokumba oyo akómaki kokokisa banda ntango Nzambe azalisaki bikelamu mosusu. Yehova azalaki kosalela Mwana na ye mpo na koyebisa maloba mpe malako na Ye epai ya bana na ye mosusu ya elimo; azalaki mpe kosalela ye mpo na koyebisa maloba na Ye epai ya bato awa na mabelé. Klisto amonisaki ete azali Liloba, to Molobeli ya Nzambe, ntango alobaki na Bayuda oyo bazalaki koyoka ye ete: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai. Soki moto azali na mposa ya kosala mokano na Ye, akoyeba na ntina etali liteya yango soki euti na Nzambe to soki nazali koloba makambo oyo euti na ngai moko.” (Yoa. 7:16, 17) Yesu akobaki kobengama “Liloba ya Nzambe,” ata nsima ya kozongela nkembo na ye na likoló.—Emon. 19:11, 13, 16.
7. Ndenge nini tokoki komekola komikitisa ya Yesu na mokumba na ye lokola “Liloba”?
7 Kanisá naino ndimbola ya titre yango. Atako Yesu aleki bikelamu nyonso ya Yehova na bwanya, atyaka motema na bwanya na ye moko te. Alobaka makambo oyo Tata na ye atindaka ye. Apesaka ntango nyonso nkembo epai ya Yehova, kasi epai na ye moko te. (Yoa. 12:50) Azali mpenza ndakisa malamu mpo na biso! Biso mpe tozali na mokumba ya lokumu oyo etali “kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu.” (Lom. 10:15) Ndakisa ya komikitisa oyo Yesu apesaki esengeli kotinda biso tólobaka te makambo oyo euti epai na biso moko. Ntango tozali koyebisa nsango euti na Makomami, oyo ezali kobikisa bomoi ya bato, tosengeli ‘kokende te mosika koleka makambo oyo ekomamá.’—1 Kol. 4:6.
“Amen”
8, 9. (a) Liloba “amen” elimboli nini, mpe mpo na nini Yesu abengami “Amen”? (b) Ndenge nini Yesu akokisaki mokumba na ye lokola “Amen”?
8 Tángá Emoniseli 3:14. Mpo na nini Yesu abengami “Amen”? Liloba “amen” euti na Liebele mpe elimboli “ezala bongo,” to “solo mpenza.” Liloba ya Liebele oyo ebimisi liloba amen elimboli “kozala sembo” to “kozala moto oyo akoki kotyelama motema.” Liloba yango esalelamaka mpe mpo na kolobela bosembo ya Yehova. (Det. 7:9; Yis. 49:7) Boye, na ndenge nini Yesu akeseni na moto mosusu nyonso ntango abengami “Amen”? Tótala eyano oyo epesami na 2 Bakolinti 1:19, 20: “Mwana ya Nzambe, Klisto Yesu, oyo asakolamaki na kati na bino . . . , akómaki te Ɛɛ nzokande Te, kasi Ɛɛ ekómi nde Ɛɛ na oyo etali ye. Mpo ata soki bilaka ya Nzambe ezali ebele boni, yango ekómi Ɛɛ na nzela na ye. Na yango na nzela na ye mpe ‘Amen’ ezali kolobama epai ya Nzambe mpo na nkembo.”
9 Yesu azali “Amen” na bilaka nyonso ya Nzambe. Bomoi na ye ya sembo awa na mabelé, ata mpe liwa na ye lokola mbeka, endimisi kokokisama ya bilaka nyonso ya Yehova Nzambe, mpe epesi nzela ete ekokisama. Lisusu, bosembo ya Yesu emonisi ete Satana abukaki lokuta ntango alobaki makambo oyo ezali na mokanda ya Yobo, oyo emonisi ete soki basaleli ya Nzambe bazali na bobola, na mpasi, to bakutani na komekama, bakopesa Ye mokɔngɔ. (Yobo 1:6-12; 2:2-7) Na kati ya bikelamu nyonso ya Nzambe, Mwana mobotami-se-moko nde abongaki mpo na kopesa eyano oyo esengelaki kosukisa bifundeli wana ya lokuta. Longola yango, Yesu amonisaki polele ete azali na ngámbo ya Tata na ye na ntembe monene oyo ebimaki mpo na lotomo ya Yehova ya kozala mokonzi na molɔ́ngɔ́ mobimba.
10. Ndenge nini tokoki komekola Yesu na mokumba na ye lokola “Amen”?
10 Ndenge nini tokoki komekola Yesu na mokumba na ye lokola “Amen”? Soki totikali sembo epai ya Yehova mpe tozali na ngámbo na ye na ntembe oyo etali lotomo na ye ya kozala mokonzi na molɔ́ngɔ́ mobimba. Na ndenge yango, tokotosa maloba oyo ezali na Masese 27:11 ete: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.”
“Moyokanisi ya kondimana moko ya sika”
11, 12. Na ndenge nini mokumba ya Yesu lokola Moyokanisi ekeseni na mosusu nyonso?
11 Tángá 1 Timote 2:5, 6. Yesu azali “moyokanisi kaka moko na kati ya Nzambe mpe bato.” Azali “moyokanisi ya kondimana moko ya sika.” (Ebe. 9:15; 12:24) Nzokande, Moize mpe abengami moyokanisi, moyokanisi ya kondimana ya Mibeko. (Gal. 3:19) Boye, na ndenge nini mokumba ya Yesu lokola Moyokanisi ekeseni na mosusu nyonso?
12 Liloba oyo ebongolami na “moyokanisi” esalelamaka na makambo etali mibeko. Emonisi ete Yesu azali Moyokanisi na makambo ya mibeko (to avoka) ya kondimana ya sika oyo epesi nzela ete ekólo moko ya sika, “Yisalaele ya Nzambe,” ebotama. (Gal. 6:16) Ekólo yango esangisi baklisto bapakolami na elimo mpe basali “bonganga-nzambe moko ya bokonzi” na likoló. (1 Pet. 2:9; Ex. 19:6) Kondimana ya Mibeko oyo Moize azalaki moyokanisi na yango, ebimisaki te ekólo ya ndenge wana.
13. Mokumba ya Yesu lokola Moyokanisi esangisi makambo nini?
13 Mokumba ya Yesu lokola Moyokanisi esangisi makambo nini? Yehova asalelaka motuya ya makila ya Yesu epai ya baoyo bazali kokɔta na kondimana ya sika. Na ndenge yango, Yehova atángaka bango bayengebene. (Lom. 3:24; Ebe. 9:15) Na bongo, Nzambe akoki komona ete babongi kokɔta na kondimana ya sika na elikya ya kokóma banganga-nzambe mpe bakonzi na likoló! Lokola Yesu azali Moyokanisi na bango, asalisaka bango bázala ntango nyonso pɛto na miso ya Nzambe.—Ebe. 2:16.
14. Mpo na nini baklisto nyonso, ata soki bazali na elikya nini, basengeli kosepela na mokumba ya Yesu lokola Moyokanisi?
14 Ezali boni mpo na bato oyo bazali na kati ya kondimana ya sika te, oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé? Atako bakɔti na kondima ya sika te, bazali kozwa matomba na yango. Masumu na bango ezali kolimbisama mpe bazali kotángama bayengebene mpe baninga ya Nzambe. (Yak. 2:23; 1 Yoa. 2:1, 2) Ezala ete tozali na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabelé, mokomoko na biso asengeli kosepela na mokumba ya Yesu lokola Moyokanisi ya kondimana ya sika.
“Nganga-nzambe Monene”
15. Na ndenge nini mokumba ya Yesu lokola Nganga-nzambe Monene ekeseni na oyo ya bato mosusu nyonso?
15 Atako bato mingi bakokisaki mokumba ya banganga-nzambe monene na ntango ya kala, mokumba ya Yesu lokola Nganga-nzambe Monene ekeseni na oyo ya bato mosusu nyonso. Na ndenge nini? Paulo alobaki boye: “Azali na mposa te ete mokolo na mokolo, lokola banganga-nzambe minene wana basalaka, apesaka bambeka, libosoliboso mpo na masumu na ye moko mpe na nsima mpo na oyo ya bato ya ekólo: (mpo asalaki yango mbala moko mpo na libela ntango amikabaki ye moko;) mpo Mibeko ezali kotya bato ya bolɛmbu banganga-nzambe minene, kasi liloba ya ndai oyo eyaki nsima ya Mibeko ezali kotya nde Mwana moko, oyo akómisami moto ya kokoka libela na libela.”—Ebe. 7:27, 28.a
16. Mpo na nini mbeka ya Yesu ekeseni mpenza na bambeka mosusu nyonso?
16 Yesu azalaki moto ya kokoka, kaka ndenge Adama azalaki liboso asala lisumu. (1 Kol. 15:45) Na yango, Yesu azalaki moto kaka moko oyo akokaki kopesa mbeka ya kokoka—mbeka oyo ezali na ntina te ezongelamaka mbala na mbala. Na Mibeko ya Moize, bambeka ezalaki kopesama mokolo na mokolo. Nzokande, bambeka wana nyonso mpe misala ya banganga-nzambe ezalaki elili ya mosala oyo Yesu asengelaki kokokisa. (Ebe. 8:5; 10:1) Na yango, mosala ya Yesu lokola Nganga-nzambe Monene ekokani na mosusu te mpamba te eleki ya banganga-nzambe monene mpe esalemi mbala moko mpo na libela.
17. Mpo na nini tosengeli koyeba mokumba ya Yesu lokola Nganga-nzambe Monene, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
17 Mpo na komonana sembo na miso ya Nzambe, tosengeli na misala oyo Yesu azali kokokisa lokola Nganga-nzambe Monene. Tozali na Nganga-nzambe Monene ya malamu mingi! Paulo akomaki boye: “Nganga-nzambe monene oyo tozali na ye, ezali te moto oyo azangi likoki ya koyeba komitya na esika ya bolɛmbu na biso, kasi ezali nde moto oyo asili komekama na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.” (Ebe. 4:15) Koyeba yango esengeli mpenza kotinda biso ‘tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki biso.’—2 Kol. 5:14, 15; Luka 9:23.
“Momboto” oyo asakolamaki
18. Nsima ya lisumu ya Adama, Yehova asakolaki likambo nini, mpe makambo nini emonisamaki na ntina na esakweli yango?
18 Na elanga ya Edene, ntango emonanaki ete moto abungisi nyonso, elingi koloba bopɛto na ye na miso ya Nzambe, bomoi ya seko, bolamu, mpe Paladiso, Yehova Nzambe asakolaki koya ya Mobikisi moko. Abengaki mobikisi yango “momboto.” (Gen 3:15, NW) Na boumeli ya bikeke, bisakweli mingi ya Biblia elobelaki Momboto yango oyo ayebanaki naino te. Asengelaki kozala mokitani ya Abalayama, ya Yisaka, mpe ya Yakobo. Asengelaki mpe kobima na libota ya Mokonzi Davidi.—Gen. 21:12; 22:16-18; 28:14; 2 Sam. 7:12-16.
19, 20. (a) Nani azali Momboto oyo alakamaki? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete momboto oyo alakamaki esuki kaka na Yesu te?
19 Momboto oyo alakamaki ezalaki nani? Eyano na motuna yango ezali na Bagalatia 3:16. (Tángá.) Nzokande, kaka na mokapo yango, ntoma Paulo alobaki lisusu na baklisto bapakolami ete: “Lisusu, soki bozali bato ya Klisto, bozali mpenza momboto ya Abalayama, bazwi-ya-libula na oyo etali elaka.” (Gal. 3:29) Na ndenge nini Klisto azali Momboto oyo alakamaki, kasi bato mosusu mpe basangani na ye?
20 Bamilio ya bato balobaka ete bazali bakitani ya Abalayama, bamosusu kutu balobaka ete bazali basakoli. Mangomba mosusu elukaka kobenda likebi na basakoli na bango oyo balobaka ete bazali bakitani ya Abalayama. Kasi, bato yango bazali nde Momboto oyo alakamaki? Te. Ndenge ntoma Paulo amonisaki yango na lisalisi ya elimo santu, ezali te bana nyonso ya Abalayama nde bakoki koloba ete bazali Momboto oyo alakamaki. Nzambe asalelaki te bakitani ya bana mosusu ya Abalayama mpo na kopambola bato. Momboto oyo akomema mapamboli asengelaki kozala kaka mokitani ya Yisaka. (Ebe. 11:18) Emonani ete kaka moto moko, Yesu Klisto, oyo molɔngɔ ya bonkɔkɔ na ye banda na Abalayama emonisami na Biblia, nde azali eteni ya liboso ya momboto oyo esakolamaki.b Bato mosusu oyo bakómaki eteni ya mibale ya momboto ya Abalayama bazwi libaku yango mpo ‘bazali bato ya Klisto.’ Ya solo, mokumba ya Yesu na kokokisama ya esakweli yango ekokani na mosusu te.
21. Nini esepelisi yo na ndenge oyo Yesu akokisaki mokumba na ye na mokano ya Yehova?
21 Makambo nini toyekoli nsima ya kotalela mokumba ya Yesu oyo ekokani na mosusu te na mokano ya Yehova? Banda ntango azalisamaki, Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe akeseni mpenza na moto mosusu nyonso. Atako bongo, Mwana yango ya Nzambe, oyo ayaki awa na mabelé na nkombo Yesu, azalaki ntango nyonso kosala mokano ya Tata na ye na komikitisa, ata mbala moko te alukaki kozwa nkembo. (Yoa. 5:41; 8:50) Azali mpenza ndakisa monene mpo na biso lelo oyo! Lokola Yesu, tiká tómityela mokano ya ‘kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.’—1 Kol. 10:31.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete liloba oyo ebongolami na “mbala moko mpo na libela” emonisi likanisi moko ya ntina mingi na Biblia, ete “liwa ya Klisto ekokani na mosusu te.”
b Atako Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki kokanisa ete Nzambe akokokisa bilaka na ye epai na bango mpo bazali bakitani ya Abalayama, bazalaki kozela koya ya moto moko oyo akozala Masiya, to Klisto.—Yoa. 1:25; 7:41, 42; 8:39-41.
Ozali koyeba lisusu?
• Oyekoli nini na ntina na mokumba ya Yesu na kotalela batitre to bibengeli na ye? (Talá etanda.)
• Ndenge nini okoki komekola ndakisa ya Mwana ya Yehova oyo akeseni na mosusu nyonso?
[Etanda/Elilingi na lokasa 15]
Mwa batitre oyo emonisi mokumba monene ya Yesu na mokano ya Nzambe
◼ Mwana mobotami-se-moko. (Yoa. 1:3) Yesu azali kaka ye moko oyo Tata na ye akelaki ye moko.
◼ Liloba. (Yoa. 1:14) Yehova asalelaka Mwana na ye lokola Molobeli mpo na koyebisa bikelamu mosusu maloba mpe malako na Ye.
◼ Amen. (Emon. 3:14) Bomoi ya sembo ya Yesu awa na mabelé, ata mpe liwa na ye lokola mbeka, endimisi kokokisama ya bilaka ya Nzambe mpe epesi nzela ete ekokisama.
◼ Moyokanisi ya Kondimana ya Sika. (1 Tim. 2:5, 6) Lokola Moyokanisi na makambo etali mibeko, Yesu apesaki nzela na kobotama ya ekólo ya sika, “Yisalaele ya Nzambe,” oyo esangisi baklisto oyo bakozala “bonganga-nzambe moko ya bokonzi” na likoló.—Gal. 6:16; 1 Pet. 2:9.
◼ Nganga-nzambe Monene. (Ebe. 7:27, 28) Yesu azalaki moto kaka moko oyo akokaki kopesa mbeka ya kokoka, oyo esengelaki kozongelama lisusu te. Akoki kopɛtola biso na lisumu mpe kosikola biso na liwa.
◼ Momboto oyo alakamaki. (Gen. 3:15, NW) Kaka moto moko, Yesu Klisto, nde azali eteni ya liboso ya momboto oyo alakamaki. Bato mosusu nyonso oyo bakómaki eteni ya mibale ya momboto ya Abalayama ‘bazali bato ya Klisto.’—Gal. 3:29.