Tobengi yo oya koyangana na biso
MBALA mosusu omonaka Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na kartye na bino mpe omitunaka soki basalaka nini kuna. Oyebi ete moto nyonso akoki koyangana na makita oyo esalemaka kuna pɔsɔ na pɔsɔ? Bayambaka bapaya malamu.
Nzokande, okoki kozala na mwa mituna lokola oyo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova bayanganaka? Basalaka nini na makita yango? Mpe bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te, oyo bakendaki na makita yango balobaki nini?
“Yanganisá bato”
Banda na ntango ya kala, bato bazalaki koyangana mpo na kosambela mpe koyekola makambo ya Nzambe. Eleki mbula soki 3 500, Nzambe ayebisaki Bayisalaele boye: “Yanganisá bato, mibali mpe basi mpe bana, mpe mopaya na kati ya mboka na yo, ete báyoka mpe báyekola komɛmisa [Yehova] Nzambe na bino, mpe básɛnzɛla ete bátosa maloba nyonso ya mobeko oyo.” (Deteronome 31:12) Na ndenge yango, Bayisalaele nyonso, mikóló mpe bana bazalaki koyekola kosambela mpe kotosa Yehova Nzambe.
Bikeke mingi na nsima, ntango lisangá ya boklisto esalemaki, makita ezalaki kaka likambo ya ntina mingi na losambo ya solo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Tiká tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka.” (Baebele 10:24, 25) Kaka ndenge bato ya libota moko bakómaka kolingana mingi soki bazali kolekisa ntango elongo, ndenge moko mpe bolingo ya baoyo balingi kosalela Nzambe ekómaka makasi ntango bazali koyangana mpo na losambo.
Na boyokani na mokapo yango, Batatoli ya Yehova bayanganaka na Bandako ya Bokonzi mbala mibale na pɔsɔ. Makita yango esalisaka bango báyeba motuya ya batoli ya Biblia, bákanga ntina na yango mpe básalela yango. Soki likoki ezali, balandaka programɛ moko na mokili mobimba, mpe likita mokomoko ezali na ntina na yango. Liboso, mpe nsima ya makita, bayangani ‘balendisanaka’ na masolo. (Baloma 1:12) Basalaka nini na likita mokomoko?
Lisukulu ya mateya ya Biblia
Likita ya liboso oyo bato mingi bayanganaka ezali lisukulu moko ya mateya ya Biblia mpo na bato nyonso, mbala mingi esalemaka mokolo ya lomingo. Mbala mingi, Yesu Klisto azalaki kosala masolo, na ndakisa Lisolo Likoló ya Ngomba. (Matai 5:1; 7:28, 29) Ntoma Paulo asololaki na bato ya Atene. (Misala 17:22-34) Na kolanda ndakisa na bango, makita ya Batatoli ya Yehova ezalaka na lisukulu moko oyo ebongisami mingimingi mpo na bato nyonso; bamosusu kati na bango bayanganaka mpo na mbala ya liboso.
Makita yango ebandaka na nzembo oyo ezali na buku Nzembo mpo na kokumisa Yehova.a Moto nyonso oyo alingi, akoki kotɛlɛma mpe koyemba. Na nsima, basalaka libondeli, mpe ndeko moko asalaka lisukulu ya miniti 30. (Talá etanda “Masukulu oyo ebongi mpenza mpo na bato nyonso.”) Lisukulu yango eutaka na Biblia. Mbala na mbala, molobi asɛngaka bayangani bálanda na Babiblia na bango ntango azali kotánga mokapo moko. Na yango, okoki komema Biblia na yo, to mpe okoki kosɛnga Motatoli ya Yehova moko Biblia liboso makita ebanda.
Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
Na masangá mingi ya Batatoli ya Yehova, na nsima ya lisukulu ya bato nyonso, bayekolaka Biblia na nzela ya lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; boyekoli yango eumelaka ngonga moko mpe esalemaka na mituna mpe biyano. Yango elendisaka bayangani bálanda ndakisa ya bato ya Beloya na ntango ya Paulo, baoyo “bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu.”—Misala 17:11.
Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaka na loyembo. Makambo oyo bayekolaka mpe mituna oyo motambwisi atunaka ezalaka na nimero ya boyekoli ya zulunalo oyo. Okoki kozwa yango epai ya Motatoli moko. Na basanza oyo euti koleka, toyekolaki masolo lokola oyo: “Baboti—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo,” “Bózongisa mabe na mabe na moto te,” mpe “Ntina oyo etikali moke bampasi nyonso esila.” Atako boyekoli yango esalemaka na mituna mpe biyano, basɛngaka moto na makasi te ete apesa eyano; mbala mingi baoyo bapesaka biyano babongisaka yango liboso mpe batángaka mikapo oyo ezali na lisolo yango. Mpo na kosukisa, bayembaka nzembo mpe ndeko moko asalaka libondeli.—Matai 26:30; Baefese 5:19.
Boyekoli ya Biblia na lisangá
Na kati ya pɔsɔ, ezalaka mpe na mokolo moko oyo Batatoli ya Yehova bakutanaka na mpokwa na Ndako ya Bokonzi mpo na likita moko oyo eumelaka ngonga moko ná miniti 45. Likita yango ezalaka na biteni misato mpe ebandaka na boyekoli ya Biblia na lisangá, oyo eumelaka miniti 25. Boyekoli yango esalisaka bayangani báyeba Biblia malamu, bábongisa makanisi mpe bizaleli na bango mpe bákóma bayekoli malamu ya Klisto. (2 Timote 3:16, 17) Boyekoli yango esalemaka na mituna mpe biyano lokola boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Basɛngaka moto na makasi te ete apesa eyano. Na boyekoli yango, basalelaka buku to mwa buku moko oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na makita? Na ntango ya kala, basaleli ya Nzambe bazalaki kosuka kaka te na kotánga Liloba ya Nzambe. Biblia elobi ete: “Batángaki kati na mokanda ya Mobeko ya Nzambe polele; mpe bapesaki ntina ete básosola litángi.” (Nehemia 8:8) Na mikolo oyo euti koleka, toyekolaki babuku oyo elimbolaki mikanda ya Yisaya, ya Danyele, mpe ya Emoniseli; boyekoli yango esalisaki bayangani bákanga ntina ya mikanda yango ya Biblia.
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Nsima ya boyekoli ya Biblia na lisangá, tozalaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Likita yango oyo eumelaka miniti 30 ebongisami mpo na kosalisa baklisto bákolisa “mayele ya koteya.” (2 Timote 4:2) Na ndakisa, mwana na yo to moninga moko asilá kotuna yo motuna na ntina na Nzambe to ya makambo ya Biblia mpe okokaki koyanola te? Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekoki koteya yo ndenge ya kopesa biyano malamu oyo euti na Biblia ata na mituna ya makasi. Na ndenge yango, tokoki koloba lokola mosakoli Yisaya ete: “Nkolo [Yehova] apesi ngai lolemo ya baoyo balakisami ete nayeba kosimba na maloba ye oyo alɛmbi.”—Yisaya 50:4.
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ebandaka na lisolo moko oyo eutaka mikapo ya Biblia oyo eponamaki mpo na botángi ya Biblia ya pɔsɔ wana. Nsima ya lisolo na ye, molobi asɛngaka bayangani báyebisa matomba oyo bazwaki na botángi yango. Nsima ya lisolo yango, bana-kelasi ya eteyelo yango oyo bazwaki masolo mpo na pɔsɔ wana, basalaka masolo na bango.
Bana-kelasi yango batángaka mikapo ya Biblia oyo bapesaki bango mpo na kotánga liboso ya bato to mpe bamonisaka ndenge ya koteya moto moko Biblia. Nsima ya lisolo mokomoko, ndeko oyo atambwisaka eteyelo yango alekaka mpo na kopesa mwana-kelasi longonya na makambo oyo asali malamu; asalelaka buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ntango makita esili, akoki kobenga mwana-kelasi na pembeni mpo na koyebisa ye esika oyo asengeli kobongisa.
Eteni yango ya makita ezali na mokano ya kosalisa kaka bana-kelasi te, kasi mpe bayangani nyonso oyo balingi kobongisa lolenge na bango ya kotánga, koloba, mpe mayele ya koteya. Nsima ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi bayangani bayembaka loyembo moko oyo euti na mokapo moko ya Biblia liboso ya kobanda Likita ya Mosala.
Likita ya Mosala
Eteni ya nsuka ya makita yango ezalaka Likita ya Mosala. Likita yango ezalaka na masukulu, bilakiseli, mituna-lisolo, mpe masolo ya mituna mpe biyano, mpe esalisaka bayangani báyeba koteya Biblia malamu. Liboso Yesu atinda bayekoli na ye na mosala ya kosakola, ayanganisaki bango mpe apesaki bango malako ya sikisiki. (Luka 10:1-16) Lokola babongisamaki malamu mpo na mosala ya kopalanganisa nsango, bazwaki esengo mingi. Ntango bazongaki, bayebisaki Yesu ndenge mosala yango elekaki. (Luka 10:17) Mbala mingi, bayekoli bazalaki mpe koyebisana makambo oyo bazalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola.—Misala 4:23; 15:4.
Programɛ ya likita yango, oyo eumelaka miniti 35, ezalaka na lokasa moko oyo ebimaka sanza na sanza; lokasa yango ebengamaka: Mosala na biso ya Bokonzi. Na basanza oyo euti koleka tolobelaki masolo lokola oyo: “Kosambela Yehova libota mobimba,” “Ntina oyo tozongelaka bato mbala na mbala,” mpe “Landá ndakisa ya Klisto na mosala na yo ya kosakola.” Likita yango esukaka na loyembo, mpe ndeko moko aponamaka mpo na kosala libondeli.
Baoyo bayaki mpo na mbala ya liboso balobaki nini?
Bandeko na masangá basalaka nyonso mpo na koyamba bato malamu. Na ndakisa, Andrew ayokaki makambo mingi ya mabe mpo na Batatoli ya Yehova. Kasi, ntango akendaki na makita na bango mpo na mbala ya liboso, akamwaki mingi na ndenge bayambaki ye. Andrew alobi boye: “Ezalaki esika malamu oyo nakokaki kozala. Nakamwaki mpenza na komona boboto ya bato yango mpe ndenge bayambaki ngai malamu.” Ashel, elenge mwasi moko na Canada, alobi boye: “Makita yango ezalaki malamu mingi! Nalandaki mateya malamu.”
José, oyo afandaka na Brésil, ayebanaki na kartye na bango lokola moto moko ya mobulu. Atako bongo, Batatoli babengaki ye na makita na Ndako ya Bokonzi. Alobi boye: “Na Ndako ya Bokonzi, bayambaki ngai malamu mpenza, atako bayebaki etamboli ya mabe oyo nazalaki na yango.” Atsushi, oyo afandaka na Japon, alobi boye: “Ntango nakendaki na makita ya Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso, namimonaki mopaya. Kasi na nsima, nakómaki komona ete bato yango bazali kaka lokola bato nyonso. Bazalaki kosala nyonso mpo namiyoka malamu.”
Tobengi yo oya
Ndenge maloba ya bato wana emonisi yango, koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi ekoki komemela yo matomba mingi. Okoyekola makambo mingi na ntina na Nzambe, mpe na nzela ya mateya ya Biblia oyo okozwa kuna, Yehova Nzambe akoteya yo “mpo na litomba” na yo.—Yisaya 48:17.
Makita ya Batatoli ya Yehova ezalaka ofele, mpe bakɔngɔlaka mabonza te. Okolinga koya na Ndako ya Bokonzi oyo ezali na kartye na bino? Tobengi yo oya.
a Mikanda nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.