Jéhovah akolimbisaka na solo
“Tika ete moto mabe alongwa na nzela na ye mpe moto na masumu alongwa na mabanza na ye; tika ete azonga epai na Jéhovah, . . . mpamba te akolimbisa na solo!”—YISAYA 55:7.
1. Lipamboli nini baoyo balimbisami na Jéhovah bazali kozwa na ntango na biso?
JÉHOVAH akolimbisaka basumuki oyo babongoli motema mpe, na ntango na biso, azali kopesa bango nzela ete bazala na kimya ya elimo kati na paradis ya elimo. Yango ezali bongo mpo ete bazali kokokisa masengami oyo: “Boluka Jéhovah naino akoki komonana, bobyanga ye naino abelemi penepene. Tika ete moto mabe alongwa na mabanza na ye. Tika ete azonga epai na Jéhovah, ete ayokela ye mawa, epai na Nzambe na biso, mpamba te akolimbisa na solo!”—Yisaya 55:6.
2. (a) Na Yisaya 55:6, 7, ‘koluka Jéhovah’ mpe ‘kozonga epai na ye’ elimboli nini? (b) Mpo na nini esengelaki ete Bayuda oyo bakendaki boombo na Babilone bazonga epai na Jéhovah, mpe nini ekomelaki basusu kati na bango?
2 Mpo ete andimama, moto mabe oyo azali ‘koluka Jéhovah’ mpe oyo azali kobelela ye asengeli kotika nzela na ye mabe, bakisa mpe makanisi nyonso mabe na ntina na mozalani. Soki esengeli ete mosumuki ‘azonga epai na Jéhovah,’ yango emonisi ete asilaki kotika ye nsima na kozala na boyokani ya penepene elongo na ye. Yango ezalaki motindo wana mpo na bafandi na Yuda; kozanga bosembo na bango epai na Nzambe esukelaki bango na kokende na boombo na mboka Babilone. Esengelaki ete bákángami Bayuda bazonga epai na Jéhovah na kotikaka misala na bango mabe oyo mpo na yango bakendaki na boombo na Babilone mpe mibu 70 na boumeli na yango, engebene esakweli, mboka na bango esengelaki kotikala mpamba. Na mobu 537 liboso ya ntango na biso, litika moke ya Bayuda na sembo basikolamaki na Babilone nsima na mobeko motyamaki maboko na mokonzi, mpe bazongelaki kofanda na mboka yango. (Esdrase 1:1-8; Danyele 9:1-4) Likambo oyo kozongisama wana ebimisaki ezalaki monene na boye ete mokili na Yuda ekokisamaki na Paradis ya Edene.—Ezekiele 36:33-36.
3. Na ndimbola nini tokoki koloba ete likambo oyo likomelaki batikali na Bayisraele ya elimo ekokani na oyo ekomelaki bakangami na sembo oyo bazongaki na Yuda?
3 Likambo likomelaki Bayisraele ya elimo ekokani na oyo ya Bayuda na sembo oyo bazongaki na mokili na Yuda nsima na boombo na Babilone. (Bagalatia 6:16) Batikali na Bayisraele na elimo basalaki mwa mbongwana kati na lolenge na bango ya kosala mpe ya kokanisa nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Mobu 1919 emonisaki nsuka ya boombo: baklisto wana, baoyo bazalaki kosala na nse na bopusi ya Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba na lokuta, bazwaki lisusu ngolu mingi ya Nzambe. Lokola babongolaki mitema mpo na masumu na bango, kobanga bato mpe kozanga kokokisa mosala na ye, Jéhovah asikolaki bango na Babilone Monene, azongisaki bango kati na ezalela malamu ya elimo mpe azongelaki kosalela bango mpo na kosakola nsango ya Bokonzi. Uta ntango yango, basaleli na Nzambe bazali kofanda kati na Paradis ya elimo oyo ezali kobota mbuma mingi, likambo oyo ezali kopesa lokumu na nkombo na ye mosantu. (Yisaya 55:8-13) Na bongo, ezala kati na Yisraele ya kala to kati na Yisraele ya elimo, tozali na elembeteli ete lilimbisi na Nzambe lizali kopesa matomba malamu mpe ete Jéhovah akolimbisaka na solo epai na baoyo bazali kobongola motema.
4. Basaleli mosusu ya Jéhovah bazali kobanga likambo nini?
4 Na ntango na biso, basaleli na Jéhovah bakoki bongo kotya motema na lilimbisi na ye. Nzokande, bamoko kati na bango basili kolemba kati na motema mpo ete bazali kokanisa na masumu na bango ya kala, mpe basili mpenza kokweisama na liyoki ya lisumu. Bazali komimona ete babongi te na kofanda kati na Paradis ya elimo. Mpo na koloba solo, bazali kobanga ete basili kosala lisumu oyo likoki kolimbisama te mpe bakoki kozwa lilimbisi na Jéhovah te. Yango ezali solo?
Mwa masumu oyo makoki kolimbisama te
5. Mpo na nini tokoki koloba ete masumu mosusu makolimbisamaka te?
5 Masumu mosusu makoki kolimbisama te. Yesu Klisto alobaki ete: “Bato bakolimbisama masumu nyonso mpe kotuka nyonso, nde lituki kotuka elimo likolimbisama te.” (Matai 12:31) Na bongo, kotuka elimo santu to bokasi na Nzambe bokosalaka mosala ekolimbisama te. Ntóma Paulo akanisaki na lisumu yango ntango akomaki ete: “Mpo na bango basili kongengisama . . . soko na nsima bakwei, nzela na kobongola bango lisusu na motema ezali te mpo bazali kobakisa Mwana na Nzambe na nzeté bango mpenza, mpe bazali kotyola ye.”—Baebele 6:4-6, MN.
6. Nini ezali kosala ete lisumu moko elimbisama to te?
6 Bobele Nzambe nde ayebi soko moto moko asili kosala lisumu likoki kolimbisama te. Nzokande, Paulo apesaki bingengiseli na ntina na likambo yango ntango akomaki ete: “Mpo ete soko tokosalaka masumu na nko nsima na kozwa boyebi na solo, mbeka mpo na masumu ezali lisusu te. Etikali bobele kozela esambiseli na nsomo na mɔ́tɔ na nkanda oyo ekozikisa batemeli.” (Baebele 10:26, 27, MN) Kosalaka masumu nsima na kozwa boyebi, ezali kosalaka na nko. Moto oyo akolanda kosala masumu na motó makasi mpe na nko soki asili koyeba solo, akozwa lilimbisi te. Na bongo ezali mpenza lisumu te yango moko, kasi ezalela ya motema, botomboki mpe motó makasi nde ekokata soki lisumu likoki kolimbisama to te. Nzokande, tokoki koloba boni mpo na moklisto oyo libunga na ye ebulunganisi ye makasi? Mawa na ye ekoki komonisa ete asali mpenza te lisumu oyo likoki kolimbisama te.
Masumu na bango makokaki kolimbisama te
7. Mpo na nini tokoki koloba ete banguna mosusu ya Yesu basalaki lisumu lizangi lilimbisi?
7 Bakonzi mosusu ya lingomba na Bayuda oyo bazalaki kotemela Yesu basalaki mpenza lisumu na nko, elingi koloba oyo ezangi lilimbisi. Wana ezalaki bango komona elimo santu na Nzambe kosala mosala na nzela na Yesu, oyo azalaki kosala malamu mpe bikamwiseli, bakonzi wana na lingomba bazalaki koloba ete nguya na ye eutaki na Belezebube, elingi koloba Satan le Diable. Bazalaki kosala lisumu, mpamba te bayebaki malamu ete ezalaki elimo na Nzambe nde ezalaki kosala mosala. Na bongo, basalaki lisumu lizangi lilimbisi, mpamba te Yesu alobaki ete: “Ye nani akoloba liloba kotemela elimo santu akolimbisama te, soko na ntango oyo soko na ntango ekoya.”—Matai 12:22-32.
8. Mpo na nini lisumu ya Yuda Mokeliota ekokaki kolimbisama te?
8 Lisumu ya Yuda Mokeliota ezalaki mpe lisumu lizangi lilimbisi. Ye asukaki na koteka Nkolo na ye mpo ete azalaki na etamboli moko ya bokosi mpe ezangi kolongobana, oyo akokisaki yango na botomboki mpe na nko. Na ndakisa, ntango Yuda amonaki Malia kopakola Yesu mafuta na motuya monene, atunaki ete: “Mpo na nini malasi oyo etekisami na denali nkama misato te ete epesamela babola?” Ntóma Yoane amonisi bosikisiki ya likambo yango na maloba oyo: “[Yuda] alobi boye te mpo ete alingaki babola, kasi mpo ete azalaki moyibi mpe azalaki kosimba ebombelo na mosolo mpe azalaki koyiba mosolo oyo mozalaki kotyama kati na yango.” Mwa ntango moke na nsima, Yuda atekisaki Yesu na palata 30. (Yoane 12:1-6; Matai 26:6-16) Ezali solo ete Yuda ayokaki mpasi na motema mpe amibomaki. (Matai 27:1-5) Kasi alimbisamaki te, mpamba te etamboli na ye ya nko ezalaki elembo ete asalelaki elimo santu lisumu. Na bongo, ebongaki mpenza ete Yesu abenga Yuda “mwana na libebi”!—Yoane 17:12; Malako 3:29; 14:21.
Masumu na bango malimbisamaki
9. Mpo na nini Nzambe alimbisaki masumu ya Davidi kati na likambo ya Bataseba?
9 Masumu na nko makeseni mpenza na mabunga masalemi na baoyo Nzambe alimbisi bango. Tokamata ndakisa ya Davidi, mokonzi na Yisraele. Ye asalaki ekobo elongo na Bataseba, mwasi na Uliya, mpe nsima na basanza, na nzela na Yoaba, abongisaki mwango mpo ete Uliya akufa na etumba. (2 Samwele 11:1-27) Soki Nzambe amonisaki mawa epai na Davidi, ezali mpenzampenza, mpo na kondimana ya Bokonzi, kasi lisusu mpo na ezalela ya mawa oyo Davidi ye moko amonisaki mpe mpo ete abongolaki solo motema na ye.—1 Samwele 24:4-7; 2 Samwele 7:12; 12:13.
10. Atako Petelo asalaki lisumu monene, mpo na nini Nzambe alimbisaki ye?
10 Totalela mpe likambo ya ntóma Petelo. Asalaki lisumu monene na kowanganaka Yesu mbala misato. Mpo na nini Nzambe alimbisaki Petelo? Mpo ete, na kokesana na Yuda Mokeliota, Petelo azalaki sembo kati na mosala ya Nzambe mpe ya Klisto. Lisumu ya ntóma wana ezalaki mpo na bolembu ya nzoto; lisusu, abongolaki mpenza motema mpe “alelaki makasi mpenza.”—Matai 26:69-75.
11. “Kobongola motema” elimboli nini, mpe moto oyo abongoli mpenza motema asengeli kosala nini?
11 Bandakisa oyo touti kolobela emonisi ete ata moto oyo asali lisumu monene akoki kozwa lilimbisi na Jéhovah Nzambe. Kasi ezalela nini esengami mpo na kozwa lilimbisi? Mpo ete moklisto oyo asali lisumu alimbisama epai na Nzambe, esengeli mpenza ete abongola motema. Kobongola motema elimboli “kooka mawa mpo na libunga, yango emonisami nzela moko na mposa ya kosala lisumu mosusu te ya lolenge wana, na mposa ya kobongisa likambo.” (Le Robert, Dictionnaire alphabétique et analogique de la langue française) Ye oyo abongoli mpenza motema asengeli komonisa mawa mpo na nsoni oyo lisumu na ye ebwaki likoló na nkombo na Jéhovah mpe likoló na lisangá na ye, mpe mpo na mpasi mpe na mawa oyo ayokisi na basusu. Mosumuki oyo abongoli motema asengeli mpe komonisa bilembo bikokani, elingi koloba kosala misala oyo mibongi na kobongola motema. (Matai 3:8; Misala 26:20) Na ndakisa, soki asalelaki moto moko mabe, asengeli kosala nyonso ekoki na ye mpo na kofuta ye to kobongisa likambo yango. (Luka 19:8) Moklisto wana oyo abongoli motema azali na bantina makasi ezwami na Biblia ya kozala na elikya ete: Jéhovah akolimbisa ye na solo. Bantina yango ezali nini?
Bantina ya kozala na elikya kati na lilimbisi ya Nzambe
12. Engebene Nzembo 25:11, na nzela na nini moto oyo abongoli motema akoki kobondela mpo na kozwa lilimbisi?
12 Mosumuki oyo abongoli motema akoki kobondela na elikya mpo na kozwa lilimbisi mpo na nkombo ya Jéhovah. Davidi abondelaki ete: “Ɛ Jéhovah, mpo na nkombo na yo, limbisa mabe na ngai, mpamba te ezali monene.” (Nzembo 25:11) Likambo oyo ete azali kobondela mpe abongoli motema mpo na nsoni oyo akokaki kobwaka likoló na nkombo ya Nzambe esengeli kopusa mosumuki ete akwea lisusu te kati na lisumu moko monene.
13. Mokumba nini libondeli lizali kokokisa kati na lilimbisi na Nzambe?
13 Jéhovah Nzambe akoyokaka mabondeli ya sembo ya basaleli na ye oyo bazali kobongola motema mpo na libunga moko. Na ndakisa, Jéhovah akangaki matoi te ntango Davidi abondelaki ye uta na nse ya motema na ye nsima na kososola bonene ya masumu na ye kati na likambo ya Bataseba. Na yango, maloba na Davidi oyo mazwami kati na Nzembo 51 makokani na mayoki ya bato mingi kati na mabondeli na bango epai na Nzambe. Abondelaki Jéhovah na maloba oyo: “Ɛ Nzambe, yokela ngai mawa, lokola ezali boboto na yo; kati na ngolu na yo monene, longola bipengweli na ngai. Sukola ngai malamu kolongola mabe na ngai, petola ngai na masumu na ngai. Makabo mazali malamu na miso na Nzambe ezali elimo etutami; ɛ Nzambe, yo okoboya te motema motutami mpe na mawa.”—Nzembo 51:1, 2, 17.
14. Lolenge nini Makomami mazali kopesa biso elikya ete Nzambe akolimbisaka baoyo bazali na kondima kati na mbeka ya lisiko na Yesu?
14 Nzambe akolimbisaka baoyo bazali na kondima kati na mbeka ya lisiko na Yesu. Paulo akomaki ete: “Na ye tozwi lisiko na nzela na makila na ye, kolimbisama na mabunga na biso.” (Baefese 1:7) Na likanisi bobele moko, ntóma Yoane alobaki: “Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo, ete bosala lisumu te. Nde soko moto nani akosala lisumu, tozali na molobeli epai na Tata, ye Yesu Klisto, moyengebene. Ye azali mpe mbondi mpo na masumu na biso. Kasi bobele mpo na yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.”—1 Yoane 2:1, 2.
15. Mpo ete alanda kozwa litomba na mawa na Nzambe, mosumuki oyo abongoli motema asengeli kosala nini?
15 Mawa na Jéhovah ekopesaka epai na mosumuki oyo abongoli motema ntina ya kozala na elikya ete akoki kozwa lilimbisi. Nehemia alobaki ete: “Yo ozali Nzambe oyo alingi kolimbisa, ozali na ngolu mpe otondi na mawa, okosilikaka noki te mpe otondi na boboto mingi.” (Nehemia 9:17; tala Exode 34:6, 7.) Ya solo, mpo na kolanda kozwa lilimbisi na Nzambe, mosumuki asengeli kosala milende mpo na kobatela mibeko na Nzambe. Mokomi na nzembo alobaki ete: “Tika ete mawa na bolingo na yo eya likoló na ngai ete nabika, mpo ete mobeko na yo [ezali] esengo na ngai. Ɛ Jéhovah, mawa na yo ezali monene monene; bikisa ngai pelamoko na sembo na yo!”—Nzembo 119;71, 156.
16. Elendiseli nini tozali kozwa lokola Jéhovah ayebi ezalela na biso ya basumuki?
16 Lokola Jéhovah azali koyeba ezalela na biso ya basumuki, yango ezali kolendisa mpe mosumuki oyo abongoli motema mpe epesi ye ntina ya kobondela na kozalaka na elikya ete Nzambe akolimbisa ye. (Nzembo 51:5; Baloma 5:12) Mokomi na nzembo Davidi apesi elikya oyo ya kolendisa: “[Jéhovah Nzambe] akofutisa biso masumu ma biso te, akozongisela biso mabe te, maye tosali ye. Lokola etando na likolo ezipi mokili mobimba, bolingo bwa ye bokobatela baye bakobangaka ye. Lokola nsuka ya mokili ezali mosika na nsuka esusu, Nzambe akobwaka masumu ma biso mosika ndenge wana. Lokola tata akoyokelaka bana ba ye mawa, Jéhovah mpe akoyokela baye bakobanga ye mawa. Zambi ayebi botau na biso, ayebi ete tozali se mputulu.” (Nzembo 103:10-14, Biblia Liloba lya Nzambe) Na yango, Tata na biso ya likoló azali na mawa mingi koleka tata nyonso awa na mokili.
17. Bopusi nini mosala na sembo oyo moto moko asalaki mpo na Nzambe ekoki kozala na yango likoló na lilimbisi?
17 Mosumuki oyo abongoli motema akoki kobondela mpo na kozwa lilimbisi na kozalaka na elikya ete Jéhovah abosani te misala ya sembo oyo asalaki kala. Atako abondelaki te mpo na lilimbisi ya lisumu, Nehemia alobaki ete: “Ɛ, Nzambe na ngai, kanisa ngai mpo na malamu!” (Nehemia 13:31) Moklisto oyo abongoli motema akoki kozwa elendiseli kati na maloba oyo: “Mpo ete Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino komonisa na ntina na nkombo na ye.”—Baebele 6:10, MN.
Lisalisi ya bankulutu
18. Moklisto oyo lisumu na ye elembisi ye mpe akomi na maladi kati na elimo asengeli kosala nini?
18 Moklisto oyo azali komiyoka ete abongi te mpo na kotikala kati na paradis ya elimo to oyo azali kokoka te kobondela mpo ete lisumu na ye lilembisi ye kati na elimo asengeli kosala nini? Moyekoli Yakobo akomaki ete, “tika ete abyanga bankulutu ya lisangá, babondela mpo na ye, esili bango kopakwela ye mafuta na nkombo na Jéhovah. Mpamba te libondeli na kondima ekobikisa mobeli, mpe Jéhovah akotelemisa ye. Ata asili kosala masumu, makolimbisama epai na ye.” Ee, bankulutu bakoki kosalisa mingi na kobondelaka elongo na moko ya bandeko na bango baklisto oyo abongoli motema, mpe mpo na bolamu na ye, kati na elikya ya kopesa ye kolongono malamu ya elimo.—Yakobo 5:14-16.
19. Mpo na kozwa lilimbisi mpe kozongisama kati na lisangá, moklisto oyo abimisami na lisangá asengeli kosala nini?
19 Ata soki mosumuki moko oyo aboyi kobongola motema abimisami na lisangá na comité ya kosambisa, yango elimboli te ete asali lisumu moko oyo lizangi lilimbisi. Na yango, mpo na kolimbisama mpe kozongisama na lisangá, asengeli na komikitisa nyonso kotosa mibeko ya Nzambe, komonisa bilembeteli bibongi na kobongola motema mpe kosenga epai na bankulutu bozongi na ye kati na lisangá. Kala, mosali moko na pite abimisamaki na lisangá ya Kolinti: nzokande na nsima, Paulo akomaki ete: “Mpo na moto na lolenge yango, etumbu oyo ezwi ye epai na mingi na bino ekoki. Sasaipi, bokoki kobalola motindo na bino mpo na kolimbisa ye ete moto yango azinda na mawa na koleka te. Bongo nalombi bino ete bomonisa ye bolingo.”—2 Bakolinti 2:6-8; 1 Bakolinti 5:1-13.
Nzambe azali kolendisa
20, 21. Nini ekoki kosalisa moto oyo azali kobanga ete asali lisumu lizangi lilimbisi?
20 Soki, na ndakisa, kolongono mabe ya nzoto to kobulungana kati na makanisi ezali kobangisa biso ete tosili kosala lisumu lizangi lilimbisi, mbala mosusu ekobonga na biso ete topema mpe tolala mingi. Nzokande, tosengeli mpenza komikundola maloba oyo na Petelo: “Bobwaka epai na ye makambo mazali kotungisa bino, mpo ete bino bozali mpo na ye.” Lisusu, tosengeli te kotikela Satana nzela mpo ete alembisa biso; na yango, Petelo abakisaki ete: “Bomisenzela, bolala mpongi te; motemeli na bino, oyo mabe, azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukaka soko akolia nani. Botemela ye ngwi mpo na kondima, boyeba ete mpasi na motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili. Nde Nzambe na ngolu nyonso . . . ye moko akokokisa bino, akolendisa bino, akopesa bino makasi, esili bino koyoka mpasi mwa ntango moke.”—1 Petelo 5:6-10.
21 Na bongo soki osili kobongola motema, kasi ozali se kobanga ete osalaki lisumu lizangi lilimbisi, omikundola ete banzela na Nzambe ezali ya mayele, ya sembo mpe etondi na bolingo. Na ntina yango, bondela ye na kondima. Landa komileisa bilei ya elimo oyo azali kopesa na nzela na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Luká kozala ntango nyonso esika moko na bandeko na yo baklisto mpe sanganaka na mosala ya kosakola. Misala wana mikolendisa kondima na yo, mpe okozala na kobanga te ete Nzambe alimbisi yo te lisumu na yo.
22. Likambo nini tokotalela kati na lisolo lilandi?
22 Bafandi na paradis ya elimo bakoki kozwa elendiseli kati na elikya oyo ete Jéhovah akolimbisaka solo. Nzokande, bomoi na bango lelo ezangi mimekamo te. Mbala mosusu basili kotungisama na makanisi mpo na liwa ya molingami moko to mpo ete moko kati na baninga na bango ya motema azali na bokono makasi. Lokola tokomona yango, kati na makambo motindo wana mpe kati na makambo mosusu, Jéhovah azali kosalisa mpe kotambwisa libota na ye na nzela ya elimo santu na ye.
Bozongeli
◻ Elembeteli nini tozali na yango ete Jéhovah ‘akolimbisaka na solo’?
◻ Mpo na lisumu nini lilimbisi ezali te?
◻ Na nzela nini masumu makoki kolimbisama?
◻ Mpo na nini basumuki oyo babongoli motema bakoki kozala na elikya kati na lilimbisi na Nzambe?
◻ Lisalisi nini basumuki babongoli motema bazali na yango?
[Elilingi na lokasa 10]
Oyebi mpo na nini Davidi mpe Petelo balimbisamaki, kasi Yuda Mokeliota te?
[Elilingi na lokasa 12]
Bankulutu ya lisanga bakoki kopesa lisalisi monene ya elimo epai na baninga na bango