Okoki koyika mpiko tii na nsuka
“Tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso.”—BAEBELE 12:1.
1, 2. Koyika mpiko elimboli nini?
NTOMA Paulo akomelaki Bayuda oyo bakómaki baklisto na ekeke ya liboso ete: “Bosengeli koyika mpiko.” (Baebele 10:36, NW) Mpo na komonisa ntina ya ezaleli yango, ntoma Petelo apesaki baklisto toli oyo: “Bóbakisa likoló ya kondima na bino . . . koyika mpiko.” (2 Petelo 1:5, 6, NW) Kasi, koyika mpiko elimboli mpenza nini?
2 Diksionɛrɛ moko elimboli verbe ya Greke oyo ebongolami na “koyika mpiko” lokola “kotɛlɛma na esika okima . . . kopika mpende, kolɛmba te.” Mpo na liloba ya Greke oyo ebongolami na “koyika mpiko,” mokanda moko elobi boye: “Ezali ezaleli ya moto oyo akangaka motema mpo na makambo oyo ekómeli ye, oyo alobaka te ete, ‘nasala boni,’ kasi azalaka na elikya makasi . . . Ezali ezaleli ya moto oyo atɛlɛmaka ngwi mpe azali kotala epai mopɛpɛ makasi ezali kouta. Ezali ezaleli oyo ekoki kosalisa moto na kosala ete komekama makasi ebongwana esengo, mpamba te, nsima ya koyoka mpasi, mokano na ye ekokokisama.” Tomoni ete koyika mpiko esalisaka moto alɛmba te liboso ya mikakatano na bampasi mpe abungisa elikya te. Nani oyo asengeli mpenza koyeba koyika mpiko?
3, 4. (a) Banani oyo basengeli koyika mpiko? (b) Mpo na nini tosengeli koyika mpiko tii na nsuka?
3 Na maloba ya elilingi tokoki koloba ete baklisto nyonso bazali kopota mbangu oyo ezali kosɛnga koyika mpiko. Na mobu soki 65 T.B., ntoma Paulo akomelaki Timote, moninga na ye ya mosala mpe ya mibembo, mokanda oyo ezalaki na maloba oyo ya kolendisa: “Nabundi etumba malamu, napoti mbangu tii na nsuka, nabateli kondima.” (2 Timote 4:7, NW) Ntango Paulo akomaki ete ‘napoti mbangu tii na nsuka,’ akokanisaki bomoi na ye ya moklisto na momekano ya kopota mbangu oyo ezalaka na ebandeli mpe na nsuka. Na ntango wana, etikalaki moke Paulo akóma na nsuka, mpe azalaki na elikya ete akozwa mbano. Alobaki lisusu boye: “Longwa [sikoyo] motole na boyengebene ebombami mpo na ngai oyo Nkolo, Mosambisi na sembo, akopesa ngai na mokolo yango.” (2 Timote 4:8) Paulo azalaki na elikya ete akozwa mbano na ye mpamba te akangaki motema tii na nsuka. Ezali boni mpo na biso?
4 Mpo na kolendisa baoyo babandaki kopota mbangu sika, Paulo akomaki boye: “Tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso.” (Baebele 12:1) Biso baklisto tobandaka kopota mbangu oyo esɛngi koyika mpiko ntango tomipesi epai ya Yehova Nzambe na nkombo ya Yesu Klisto. Kobanda kopota malamu lokola bayekoli ya Yesu ezali na ntina, kasi eloko oyo eleki ntina ezali ete tókende tii na nsuka. Yesu alobaki ete: “Ye oyo akoyika mpiko kino nsuka, ye wana akobika.” (Matai 24:13) Baoyo bakokóma tii na nsuka bakozwa mbano ya bomoi ya seko! Yango wana, biso mpe lokola tomityeli mokano, tosengeli koyika mpiko tii na nsuka. Nini ekosalisa biso tókokisa mokano yango?
Tosengeli kolyaka malamu
5, 6. (a) Likambo nini tosengeli kolandela malamu mpo tóyika mpiko tii na nsuka? (b) Bibongiseli nini ya elimo tosengeli kotosa, mpe mpo na nini?
5 Na ntango ya kala, penepene ya engumba Kolinti, na ekólo Grèce, ezalaki na esika moko oyo bazalaki kosala masano oyo bazalaki kobénga jeux isthmiques. Na ntembe te Paulo ayebaki ete bandeko ya Kolinti bayebaki malamu masano mpe mimekano mosusu oyo bazalaki kosala kuna. Azwaki ndakisa na likambo oyo bayebaki malamu mpo na kolobela bango momekano ya kopota mbangu oyo bazalaki kosala mpo na bomoi; alobaki boye: “Boyebi te ete bango bakomekana mbango na makolo, bakopota nyonso nde bobele moko akozwa libonza? Bópota mbangu ete bózwa [yango, NW].” Paulo amonisaki ete basengelaki kolɛmba te mpe kosala makasi bákóma tii na nsuka. Kasi, eloko nini ekokaki kosalisa bango? Paulo Alobaki lisusu boye: “Moto na moto oyo akomekana na masano akomiboya na makambo nyonso.” Ɛɛ, bato oyo bazalaki kosala masano na ntango ya kala bazalaki komibongisa malamu mpo na kokembisa nzoto. Bazalaki kokeba mpenza na biloko oyo bazalaki kolya mpe komela, mpe bazalaki kosala makambo nyonso na programɛ, nyonso wana mpo na kolonga.—1 Bakolinti 9:24, 25.
6 Tokoloba boni mpo na mbangu oyo baklisto bazali kopota? Moklisto moko oyo azali nkulutu na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova alobaki boye: “Ntango ozali kopota mbangu mpo na bomoi, mpo oyika mpiko mpe okóma tii na nsuka, osengeli kokeba mpenza na ndenge oyo ozali kolya na elimo.” Kanisá bilei ya elimo oyo Yehova, “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko” apesi biso. (Baloma 15:5, NW) Biblia, Liloba ya Nzambe ezali liziba monene epai totokaka bilei ya elimo. Yango wana, tosengeli mpenza kozala na programɛ malamu ya kotánga Biblia. Na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele,” na ntango oyo ebongi mpenza Yehova apesi biso bazulunalo lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká!, mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. (Matai 24:45) Soki tozali komipesa na koyekola mikanda yango, ekolendisa biso na elimo. Ɛɛ, moto na moto asengeli kozwa ntango to ‘kosomba ntango malamu,’ mpo na koyekola.—Baefese 5:16, NW.
7. (a) Mpo na nini tosengeli kosuka te kaka na koyeba mateya ya ebandeli? (b) Ndenge nini tokoki “kokɔmela”?
7 Mpo tólanda kopota mbangu lokola bayekoli ya Klisto, tosengeli kotikala kaka na “mateya ya ebandeli” te, kasi tosengeli “kokɔmela.” (Baebele 6:1, NW) Yango wana tosengeli koluka koyeba mateya ya solo na “bonene, na bolai, na bosanda, mpe na bozindo” na yango mpe kolya “bilei ya makasi [oyo] ezali mpo na bato oyo bakómi mikóló.” (Baefese 3:18, NW; Baebele 5:12-14, NW) Na ndakisa, kanisá Baevanzile minei oyo eyebisi ndenge Yesu alekisaki bomoi na ye awa na mabelé: Evanzile ya Matai, ya Malako, ya Luka, mpe ya Yoane. Soki toyekoli masolo yango malamumalamu, tokoyeba makambo oyo Yesu asalaki mpe tokoyeba soki azalaki moto ya ndenge nini, mpe lisusu tokoyeba elimo oyo epusaki ye na kosala makambo oyo asalaki. Na ndenge yango nde ‘tokozala na makanisi ya Klisto.’—1 Bakolinti 2:16.
8. Ndenge nini makita ya lisangá esalisaka biso mpo tólɛmba te na mbangu oyo tozali kopota mpo na bomoi?
8 Paulo apesaki baninga na ye bandimi toli oyo: “Tótalanaka mpo tópusama na komonisa bolingo mpe misala malamu, tótika koyangana na biso te, lokola bamosusu bameseni kosala yango, kasi tólendisanaka, tósala bongo mpo mokolo yango ekómi pene.” (Baebele 10:24, 25, NW) Makita ya lisangá elendisaka biso mpenza! Toyokaka esengo mingi ntango tozali elongo na bandeko oyo bamibanzabanzaka mpo na biso mpe bazali na mposa ya kosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka! Tosengeli kotalela ebongiseli malamu wana ya Yehova bongobongo te. Mpo ‘tókóma mikóló na makanisi,’ tóyekolaka mingi mpe tóyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ.—1 Bakolinti 14:20, NW.
Bato bazali kotala yo mpo na kolendisa yo
9, 10. (a) Ndenge nini bato oyo bazali kotala bakoki kolendisa bapoti-mbangu? (b) ‘Lipata monene ya batatoli oyo ezingi biso’ oyo elobelami na Baebele 12:1 ezali nini?
9 Ata soki moto oyo azali kopota mbangu amibongisaki malamu, akoki kokutana na makambo mosusu oyo ekoki kolɛmbisa ye. Paulo atunaki motuna oyo: “Bozalaki [kopota, NW] malamu. Nani apekisi bino ete bótosa makambo na solo te?” (Bagalatia 5:7) Tomoni ete baklisto mosusu ya Galatia bakómaki na baninga mabe, yango wana, makambo mosusu ebendaki likebi na bango na esika makanisi na bango ezala kaka na mbangu oyo bazalaki kopota mpo na bomoi. Nzokande, na ntango bato mosusu bazali kokumisa mpe kolendisa baoyo bazali kopota mbangu, ekoki kokitisa mpasi ya kopota mbangu mpe ekosalisa bapoti-mbangu báyika mpiko. Ezali ndenge bato oyo bazali kotala lisano balendisaka baoyo bazali kosala lisano yango. Soki bato ebele oyo bazali kotala lisano bazali na esengo, yango elendisaka baye bazali kosala lisano yango mpe bazwaka makasi banda ebandeli tii nsuka. Ntango bato oyo bazali kotala bazali koganga mpe mbala mingi soki bazali koyemba mpe kobɛta mabɔkɔ, ekoki kopesa bato oyo bazali kosala lisano makasi oyo bazali na yango mposa na ntango balingi bákóma na nsuka. Ya solo, soki bato oyo bazali kotala bazali kokumisa baoyo bazali kopota mbangu, ekoki kopesa bango makasi.
10 Na ntango baklisto bazali kopota mbangu mpo na bomoi, banani bazali kotala bango? Nsima ya kotánga batatoli ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya, na Baebele mokapo ya 11, Paulo akomaki boye: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, . . . tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso.” (Baebele 12:1) Na elilingi ya lipata oyo Paulo asalelaki, liloba ya Greke oyo ezali komonisa mwa lipata te. Kasi, asalelaki liloba oyo, ndenge William Vine, moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Greke alobi, “lipata monene oyo ezipi likoló.” Emonisi polele ete Paulo azalaki kokanisa batatoli ebele mpenza na boye azalaki komona bango lokola lipata monene.
11, 12. (a) Ndenge nini batatoli ya sembo oyo bazalaki na bomoi liboso Klisto aya bakoki kolendisa biso tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu? (b) Ndenge nini ‘lipata monene ya batatoli’ ekoki kosalisa biso mingi koleka?
11 Batatoli ya sembo oyo bazalaki liboso Klisto aya bakoki mpenza kotala biso na ndenge ya solo lelo oyo? Ekoki kosalema te. Bango nyonso bakufá, bazelaka se lisekwa. Kasi, ntango bazalaki na bomoi, bango mpe bazalaki bapoti-mbangu oyo balongaki, mpe makambo oyo basalaki ekomami na Biblia. Ntango tozali koyekola Biblia, tokoki komona bato yango ya sembo na makanisi na biso mpe, na maloba ya elilingi, bakoki kolendisa biso, mpo tópota mbangu tii tokokóma na nsuka.—Baloma 15:4.a
12 Na ndakisa, na ntango makanisi na biso ebandi kobendama na makambo ya mokili, soki tokanisi ndenge oyo Mose aboyaki bisengo ya Ezipito, yango ekoki mpenza kopesa biso makasi mpo tótika kopota mbangu te. Na ntango tomekami makasi, soki tokanisi komekama makasi mpenza oyo Abalayama akutanaki na yango ntango Nzambe asɛngaki ye apesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka, yango ekolendisa biso mpo tólɛmba te na etumba na biso mpo na kondima. Kolendisama na ‘lipata monene’ ya batatoli etaleli ndenge oyo tozali komona bango polele na makanisi na biso.
13. Ndenge nini Batatoli ya Yehova ya ntango oyo bazali kolendisa biso ntango tozali kopota mbangu mpo na bomoi?
13 Lisusu, ebele ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso bazali na biso elongo. Baklisto bapakolami mpe bandeko mosusu oyo bazali na kati ya “ebele monene” bazali kopesa biso ndakisa ya kondima ya solosolo! (Emoniseli 7:9) Mbala na mbala tokoki kotánga masolo ya bomoi na bango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na mikanda mosusu ya la Société Watch Tower.b Ntango tozali kokanisa kondima na bango, tozali kolendisama mpo biso mpe tóyika mpiko tii na nsuka. Tozali mpe na esengo mingi ya kozala na baninga mpe bandeko oyo bazali kosalela Yehova na bosembo oyo bazali kolendisa biso! Ɛɛ, tozali na bato mingi oyo bakoki kolendisa biso wana tozali kopota mbangu mpo na bomoi.
Landá lokolo na yo malamu
14, 15. (a) Mpo na nini ezali malamu tólanda lokolo na biso malamu? (b) Mpo na nini ebongi tózala na bokatikati ntango tozali kokamata mikano?
14 Mopoti-mbangu oyo azali kopota na ntaka molai, lokola na momekano babéngi marathon, asengeli kolanda lokolo na ye malamu. Zulunalo moko (New York Runner) elobi boye: “Soki obandi mbala moko na mbangu makasi, okolɛmba. Nsukansuka ekosɛnga oboma nzoto ntango olingi kokóma na nsuka to otika kopota.” Mopoti-mbangu moko alobi boye: “Mokolo moko nalandaki mateya ya kopota mbangu, mpe molakisi alobaki malamu ete: ‘Kolanda baoyo bazali kokende mbangumbangu te. Landá nde lokolo na yo. Soki te, okolɛmba mpe okoki kotika.’ Nalandaki toli yango mpe esalisaki ngai nakóma tii na nsuka.”
15 Ntango bazali kopota mbangu mpo na bomoi, basaleli ya Nzambe basengeli mpenza kosala molende. (Luka 13:24, NW) Kasi, moyekoli Yakobo akomaki boye: “Mayele mauti na Likoló ezali . . . [na bokatikati, NW].” (Yakobo 3:17) Ya solo, ndakisa malamu ya bato mosusu ekoki kolendisa biso tósala malamu koleka kasi, soki tozali na bokatikati, ekosalisa biso tómityela mikano oyo tokokokisa na kotalela makoki mpe bomoto na biso. Biblia elobi na biso boye: “Tiká ete moto na moto ameka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko mpe mpo na moto mosusu te. Zambi moto na moto akomema bozito na ye moko.”—Bagalatia 6:4, 5.
16. Ndenge nini bopɔlɔ ekosalisa biso na kolanda lokolo na biso?
16 Na Mika 6:8, batuni biso motuna oyo ezali kopusa biso tókanisa: “[Yehova] alingi nini epai na yo? . . . Otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.” Ntango tozali na bopɔlɔ, yango elingi koloba ete tozali koyeba esika oyo makoki na biso esuki. Mbala mosusu maladi to bobange ezali kopekisa biso kosala makambo mosusu na mosala ya Nzambe. Soki ezali bongo, tólɛmba nzoto te. Yehova andimaka milende mpe makambo oyo tozali kosala ‘na kotalela oyo tozali na yango, kasi te na kotalela oyo tozangi.’—2 Bakolinti 8:12, NW; talá Luka 21:1-4.
Tyá makanisi na yo na mbano
17, 18. Eloko nini Yesu abatelaki na makanisi na ye oyo esalisaki ye ayika mpiko na mpasi oyo ayokaki na nzete?
17 Ntango ayebisaki baklisto ya Kolinti ete basengeli koyika mpiko ntango bazali kopota mbangu mpo na bomoi, Paulo alobelaki likambo mosusu oyo ezalaki kosalema na masano oyo babéngi jeux isthmiques, oyo esengelaki kobenda likebi na bango. Mpo na bato oyo bazalaki kosala masano yango, Paulo akomaki boye: “Bango [bapotaka] bongo mpo na kozwa motole mokobeba nde biso mpo na yango ekobeba te. Mpo na ngai mpenza, nazali kopota mpamba te, nazali [kobɛta makofi] nde bobele kobɛta mopɛpɛ te.” (1 Bakolinti 9:25, 26) Baoyo bazalaki kolonga na masano yango na ntango ya kala bazalaki kozwa motole, to ekoti ya lokumu, esalemi na bankasa ya nzete babéngi pin to banzete mosusu, to mpe bankasa ya seleri ya zamba oyo ekauki; tomoni ete ezalaki mpenza ‘motole oyo ekobeba.’ Kasi, baklisto oyo bakoyika mpiko tii na nsuka bakozwa mbano nini?
18 Ntoma Paulo alobaki boye mpo na Ndakisa na biso, Yesu Klisto: “Mpo na esengo etyami liboso na ye, [akangaki motema na mpasi oyo ayokaki na nzete, NW], atyoli nsɔni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ na mobali na kiti na bokonzi na Nzambe.” (Baebele 12:2) Yesu akangaki motema tii na nsuka ya bomoi na ye lokola moto mpo azalaki kotalela mbano oyo asengelaki kozwa nsima ya konyokwama na nzete ya mpasi. Moko na mbano yango ezalaki esengo ya kosantisa nkombo ya Yehova, kopesa lisiko mpo na kosomba bato na liwa, mpe koyangela lokola Mokonzi mpe Nganga Monene oyo akosala ete bato ya botosi bázwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.—Matai 6:9, 10; 20:28; Baebele 7:23-26.
19. Tosengeli kotya makanisi na biso wapi ntango tozali kopota mbangu lokola bayekoli ya Klisto?
19 Kanisá esengo oyo ezali liboso na biso ndenge tozali kopota mbangu lokola bayekoli ya Klisto. Yehova apesi biso mosala ya esengo, mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe kolakisa bato boyebi ya Biblia oyo ezali kopesa bomoi ya seko. (Matai 28:19, 20) Ezalaka esengo mingi ntango tokutani na moto oyo asepeli koyeba Nzambe ya solo mpe tosalisi ye abanda kopota mbangu mpo na bomoi! Mpe lisusu, ezala bandimi biso to baboyi koyoka biso ntango tozali kosakola, mpo na biso ezali lokumu na kosala mosala oyo ezali kosantisa nkombo ya Yehova. Ntango tozali kolɛmba te na mosala na biso lokola baministre, atako bato ya teritware na biso bazali kosepela te to bazali kotɛmɛla biso, tozali na esengo mpamba te tozali kosepelisa Yehova. (Masese 27:11) Mpe alaki biso mbano monene ya bomoi ya seko. Ekozala esengo monene! Tosengeli kobosana bolamu yango te na makanisi na biso mpe tosengeli kotika kopota mbangu te.
Lokola nsuka ekómi pene
20. Ndenge nini kopota mbangu ekoki kokóma mpasi koleka ntango tolingi kokóma na nsuka?
20 Ntango tozali kopota mbangu mpo na bomoi, tosengeli kobundisa monguna na biso monene, Satana Zabolo. Lokola tolingi kokóma na nsuka, azali ntango nyonso koluka kokweisa to kolɛmbisa biso. (Emoniseli 12:12, 17) Ezali likambo moke te na kotikala ntango nyonso mosakoli ya sembo ya Bokonzi oyo amipesi, na kati ya bitumba, nzala, maladi, mpe mikakatano mosusu oyo ezali kolakisa ete tozali na “ntango ya nsuka.” (Danyele 12:4, NW; Matai 24:3-14; Luka 21:11; 2 Timote 3:1-5) Longola wana, ekoki mpe kozala ete ntango mosusu tozali komona lokola nde nsuka ezali koumela mingi koleka ndenge oyo tokanisaki, mingimingi soki tobandá kopota banda bambula mingi. Kasi, Liloba ya Nzambe ayebisi biso ete nsuka ekoya. Yehova alobi ete ekoumela te. Nsuka ekómi pene.—Habakuku 2:3; 2 Petelo 3:9, 10.
21. (a) Eloko nini ekolendisa biso wana tozali kokoba kopota mbangu mpo na bomoi? (b) Mposa na biso esengeli kozala nini lokola nsuka ekómi pene?
21 Yango wana, mpo tólonga na mbangu oyo tozali kopota mpo na bomoi, tosengeli kozwa makasi na bibongiseli oyo Yehova akamati na bolingo na ye mpo na koleisa biso na elimo. Tozali mpe na mposa ya kolendisama, tokoki kozwa yango ntango tozali kosangana na bandeko na biso bandimi oyo bazali mpe kopota mbangu. Ata soki tokutani na monyoko makasi mpe makambo ya mbalakaka oyo ekoki kokómisa kopota mbangu mpasi koleka, tokoki koyika mpiko tii na nsuka mpamba te Yehova azali kopesa “nguya oyo eleki nguya ya bato.” (2 Bakolinti 4:7, NW) Tozali mpenza kolendisama na koyeba ete Yehova alingi ete tókóma na nsuka mpe tólonga! Tiká ete “tópota na etingya na emekaneli na mbangu etyami liboso na biso,” mpe tózala na elikya makasi ete “na ntango oyo ekoki, tokobuka soko tokotika motema te.”—Baebele 12:1; Bagalatia 6:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na boyekoli ya Baebele 11:1–12:3, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1987, nkasa 10-20 (na Lifalanse).
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1998, nkasa 28-31; 1 Sɛtɛmbɛ 1998, nkasa 24-28 mpe ya 1 Febwali 1999, nkasa 25-29 ezali na masolo yango, ezali mpenza kolendisa.
Ozali koyeba lisusu?
◻ Mpo na nini tosengeli koyika mpiko tii na nsuka?
◻ Bibongiseli nini ya Yehova tosengeli kolandelaka malamumalamu?
◻ Mpo na nini ebongi tólanda lokolo na biso malamu?
◻ Esengo nini ezali liboso lokola tozali kokoba kopota mbangu?
[Elilingi na lokasa 18]
Tiká ete makita ya lisangá elendisa yo.