Nazali kopesa Yehova eloko oyo ebongi na ye
LISOLO YA TIMOLEON VASILIOU
Bakangaki ngai mpo nazalaki koteya bato makambo ya Biblia na mboka Aidhonochori. Bapolisi balongolaki ngai sapato mpe babandaki kobɛta ngai na nse ya makolo. Ntango bazalaki kobɛta ngai, lokola eumelaki, makolo na ngai ekómaki makasi mpe nazalaki koyoka lisusu mpasi te. Liboso nayebisa bino mpo na nini babɛtaki ngai, likambo oyo, na ntango wana ezalaki kosalema te na Grèce, tiká nayebisa bino naino ndenge nakómaki koteya bato makambo ya Biblia.
NABOTAMÁ na 1921, mwa moke na nsima, libota na biso mobimba tokendaki kofanda na engumba Rodholívos, na nɔrdi ya ekólo Grèce. Ntango nazalaki elenge, nazalaki na bomoi ya malamu te. Nabandaki komela likaya ntango nazalaki na mbula 11. Na nsima, nakómaki kolangwa masanga, kobɛta masano ya mbongo mpe butu nyonso nazalaki kokende bafeti ya loyenge. Lokola nayebaki kobɛta miziki, nakɔtaki na lisangá moko ya baalanga-nzembo na mboka na biso. Nsima ya mbula moko nayebaki kobɛta bibɛtɛli nyonso ya miziki. Kasi, na ntango yango, nazalaki kotánga mingi mpe nalingaki bosembo.
Mokolo moko, na ebandeli ya 1940, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, babéngisaki biso tóbɛta miziki na ebembe ya elenge moko ya mwasi. Na lilita, bandeko na baninga ya mwana mwasi yango bazalaki kolela mingi. Maloba na bango ya kozanga elikya epesaki ngai mawa mingi. Nakómaki komituna ete: ‘Mpo na nini tokufaka? Nyonso esukaka kaka na bomoi mokuse oyo? Nakoki kozwa biyano epai wapi?’
Nsima ya mwa mikolo, namonaki Biblia (Kondimana ya Sika) na bibliotɛkɛ na ngai. Nazwaki yango mpe nabandaki kotánga yango. Ntango natángaki maloba ya Yesu na Matai 24:7, ete kozala na ye ekoyebana na bitumba minene oyo ekosalema na mokili, namonaki ete maloba yango ezali kokokisama na mikolo na biso. Na bapɔsɔ oyo elandaki, nazalaki kotánga mbala mingi eteni yango ya Makomami ya Greke.
Na sanza ya Desɛmbɛ 1940, nakendaki kotala libota moko penepene na biso: mwasi moko akufelá mobali oyo azalaki na bana mitano. Na ebombelo na bango ya likoló, namonaki liboke ya mwa babuku, mpe moko na yango ezalaki na motó ya likambo ete Boyangeli ya malamu, ebimisamaki na la Société Watch Tower. Nafandaki wana mpe natángaki mwa buku yango mobimba. Mpe makambo natángaki endimisaki ngai ete tozali na ntango oyo Biblia ezali kobénga “mikolo ya nsuka” mpe etikali moke Yehova Nzambe aboma ebongiseli ya biloko ya ntango oyo mpe atya mokili ya sika ya sembo.—2 Timote 3:1-5, NW; 2 Petelo 3:13.
Eloko oyo esimbaki mpenza motema na ngai ezalaki mikapo ya Biblia oyo emonisi ete bato ya sembo bakofanda seko na seko na paladiso awa na mabelé mpe ete mpasi na liwa ekozala lisusu te na mokili ya sika oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. (Nzembo 37:9-11, 29; Emoniseli 21:3, 4) Wana nazalaki kotánga, napesaki Nzambe matɔndi mpo na makambo yango, mpe nasɛngaki ye alakisa ngai makambo oyo azali kosɛnga mpo moto azwa bolamu wana. Namonaki mpenza ete ebongi nasambela Yehova Nzambe na molimo na ngai mobimba.—Matai 22:37.
Nasaleli makambo oyo nayekolaki
Banda ntango wana, natikaki komela likaya, natikaki kolangwa masanga, mpe kobɛta masano ya mbongo. Nasangisaki bana mitano ya mwasi wana oyo akufelá mobali, baleki na ngai mibale ya basi na moko ya mobali, mpe nayebisaki bango makambo oyo natángaki na mwabuku yango. Mosika te biso nyonso tobandaki koteya bato mwa makambo oyo toyebaki. Na mboka mobimba bakómaki kobénga biso Batatoli ya Yehova, atako tokutanaki naino ata na Motatoli moko te. Banda na ebandeli, sanza na sanza nazalaki kosala ngonga koleka nkama moko mpo na koyebisa bato makambo kitoko oyo nayekolaki.
Sango moko ya Lingomba ya Ortodokse akendaki kofunda biso epai ya mokambi ya engumba. Nzokande, biso toyebaki te ete eutaki koleka mwa mikolo, elenge moko Motatoli akutaki mpunda moko oyo ebungaki mpe azongisaki yango epai na bankolo na yango. Lokola amonaki bosembo ya ndenge wana, mokambi ya engumba akómaki kosepela mingi na Batatoli, mpe aboyaki kondima makambo sango alobaki.
Mokolo moko, soki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1941, nazalaki koteya na zando mpe moto moko alobaki ete Motatoli ya Yehova moko afandaka na mboka moko ya pene. Nkombo na ye Christos Triantafillou mpe kala azalaká polisi. Nakendaki kotala ye mpe ayebisaki ngai ete akómaki Motatoli banda 1932. Nasepelaki mingi ntango apesaki ngai mikanda ya kala ya la Société Watch Tower! Mikanda yango esalisaki ngai mpenza na kokola na elimo.
Na 1943, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Nzambe. Na ntango wana nazalaki koyekolisa bato Biblia na bamboka misato ya penepene: Dhravískos, Palaeokomi, na Mavrolofos. Nazalaki kolakisa bango mateya ya Biblia na mokanda La Harpe de Dieu. Nsukansuka, nayokaki esengo ya komona masangá minei ya Batatoli ya Yehova esalemi na bamboka yango.
Nazali koteya na kati ya botɛmɛli
Na 1944, basoda ya Allemagne balongwaki na Grèce, mpe mwa moke na nsima, tokokaki lisusu kosolola na bandeko ya biro ya la Société Watch Tower na Athènes. Biro ya filiale esɛngaki ngai nakende kosakola na teritware moko epai moto ata moko ayokaki naino nsango ya Bokonzi te. Ntango nakómaki kuna, nasalaki naino sanza misato na ferme moko mpe basanza oyo etikalaki na mbula yango nalekisaki yango na mosala ya kosakola.
Na mbula yango nasepelaki mingi komona ete mama na ngai, na mwasi oyo akufelá mobali na bana na ye, bazwaki batisimo longola kaka mwana na ye ya nsuka, Marianthi. Ye azwaki batisimo na 1943; nalingaki ye mingi mpe nabalaki ye na sanza ya Novɛmbɛ ya mbula yango. Nsima ya mbula 30, elingi koloba na 1974, tata na ngai mpe azwaki batisimo, akómaki Motatoli.
Na ebandeli ya 1945 biro ya filiale etindelaki biso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya liboso ya fɔtɔkɔpi. Lisolo na yango ya monene elobaki ete: “Bókende kokómisa bato ya mabota nyonso bayekoli.” (Matai 28:19) Mbala moko, ngai na Marianthi totikaki ndako na biso mpe tokendaki kosakola na bamboka mosika na ɛsti ya Ebale Strymon. Na nsima, Batatoli mosusu bayaki.
Mbala mingi, mpo na kokende na mboka mosusu, tozalaki kotambola makolo-ngulu. Tozalaki kosala bakilomɛtɛlɛ na bakilomɛtɛlɛ, kokita na mabwaku mpe komata bangomba. Tozalaki kosala bongo mpo na kobatela basapato na biso, mpo soki ebebi, tozalaki na mosusu te. Banda 1946 tii 1949, etumba ezalaki na Grèce, mpe kosala mobembo ezalaki likama mpenza. Mbala mingi tozalaki kokuta bibembe na kati ya nzela.
Atako bongo, mikakatano elɛmbisaki biso te, tozalaki kaka kosala na molende. Mbala mingi nazalaki koyoka lokola mokomi ya nzembo ntango akomaki boye: “Ata natamboli na libulu na molili na kufa, nakobanga mabe te; zambi yo ozali na ngai elongo, mpango na yo mpe nzete na yo makasi izali kobɔndisa ngai.” (Nzembo 23:4) Na eleko yango tozalaki kotika ndako na biso na boumeli ya bapɔsɔ, mpe ntango mosusu nazalaki kosala ngonga 250 na mosala ya kosakola na sanza moko.
Mosala na biso na Aidhonochori
Na 1946, tokendeki mpe na mboka Aidhonochori, yango ezalaki likoló ya ngomba. Kuna, tokutanaki na moto moko oyo ayebisaki biso ete bato mibale na mboka yango bazali na mposa ya koyoka mateya ya Biblia. Kasi, lokola azalaki kobanga bato ya mboka, moto yango aboyaki kokende kolakisa biso bato yango. Atako bongo tomonaki ndako na bango mpe bayambaki biso malamu mpenza. Kutu, nsima ya mwa miniti moke, bato ebele bayaki na ndako! Bamoko bazalaki bandeko na bango mpe bamosusu baninga na bango. Nakamwaki mpenza ndenge bato yango bafandaki mpe bazalaki koyoka biso malamumalamu. Bayebisaki biso ete bazalaki kozela na mposa makasi mokolo bakokutana na Batatoli ya Yehova, kasi ntango Grèce ezalaki na mabɔkɔ ya basoda ya Allemagne, bayokaki ata nsango ya Motatoli moko te na bamboka wana. Nini epesaki bango mposa wana?
Batata mibale ya mabota yango bazalaki bakonzi ya parti Koministe na mboka yango, mpe bateyaki bato makanisi ya Bakoministe. Kasi nsima ya kozwa mokanda Gouvernement, oyo ebimisamaki na la Société Watch Tower, mpe batángaki yango, bandimaki ete Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli se moko ya malamu mpe ya sembo.
Tosololaki na bato yango na baninga na bango tii na midi ya butu. Basepelaki mpenza na biyano oyo Biblia epesaki na mituna na bango. Kasi, mwa moke na nsima, Bakoministe na mboka yango bafandelaki ngai likita mpo báboma ngai mpamba te balobaki ete ngai nde moto nabongoli makanisi ya bakonzi na bango. Kutu, na kati ya bato oyo tosololaki na bango na butu ya mokolo ya liboso, moto oyo ayebisaki biso ete bato mibale na mboka basepelaka koyoka mateya ya Biblia mpe azalaki. Akómaki mpenza na boyebi ya Biblia, azwaki batisimo, mpe na nsima akómaki nkulutu.
Banyokoli biso makasi
Nsima ya kokutana na bato wana, oyo kala bazalaká Bakoministe, bapolisi mibale bakɔtaki na ndako esika tozalaki kotambwisa likita moko. Babimisaki mandoki, bakangaki biso bato minei mpe bamemaki biso na biro ya bapolisi. Kuna mokonzi ya bapolisi, ye moninga ya bakonzi ya Lingomba ya Ortodokse, abandaki kogangela biso. Na nsima, atunaki ete: “Nasala bino nini?”
Bapolisi mosusu oyo batɛlɛmaki na nsima na biso, balobaki ete: “Tóbɛta bango fimbo!”
Na ntango yango, tokómaki na butu makasi. Bapolisi batyaki biso na kasho ya nse ya mabelé mpe bakɔtaki na nganda na ndako elandi. Nsima ya kolangwa, bayaki lisusu mpe bamemaki ngai na etazi ya likoló.
Ntango namonaki ete bazali na molangwa, namonaki ete bakoki koboma ngai. Yango wana nabondelaki Nzambe apesa ngai makasi ete nayika mpiko na mpasi nyonso oyo ekokaki koyela ngai. Bazwaki bafimbo ya nzete mpe babandaki kobɛta ngai na nse ya makolo, ndenge nalobaki na ebandeli. Nsima ya kobɛta ngai nzoto mobimba, bazongisaki ngai na kasho. Na nsima, bamemaki moto mosusu mpe babandaki kobɛta ye.
Na ntango yango, nasalisaki bilenge Batatoli mibale báyika mpiko na mpasi oyo ezalaki kozela bango. Kasi bapolisi bamataki na ngai lisusu na likoló. Balongolaki ngai bilamba mpe bango mitano babɛtaki ngai na boumeli soki ya ngonga mobimba, bazalaki konyata ngai na motó na sapato na bango. Mpe bazongisaki ngai na kasho, nayebaki eloko moko te na boumeli ya ngonga soki 12.
Ntango batikaki biso, libota moko ya mboka yango epesaki biso esika ya kolala na butu mpe esalisaki biso. Mokolo elandaki, tozongaki epai na biso. Tolɛmbaki mingi na ndenge babɛtaki biso, na boye ete mobembo oyo tosalaka ngonga mibale na makolo, ezwaki biso ngonga mwambe. Navimbaki elongi na ndenge babɛtaki ngai na boye ete Marianthi ayebaki ngai lisusu te.
Batatoli bakómi mingi atako botɛmɛli ezali
Na 1949, ntango etumba ezalaki naino na Grèce, tokendaki kofanda na Thessalonique. Masangá ezalaki minei na engumba yango, mpe baponaki ngai lokola mosaleli na lisangá moko. Nsima ya mbula moko, tokómaki mingi na boye ete tosalaki lisangá mosusu, mpe baponaki ngai mosaleli ya lisangá, to mokɛngɛli-mokambi. Nsima ya mbula moko, lisangá yango ya sika ekolaki lisusu mbala mibale mpe lisangá mosusu esalemaki!
Batɛmɛli bazalaki koyoka nkanda ndenge Batatoli ya Yehova bazalaki kokóma mingi na Thessalonique. Mokolo moko na 1952, ntango nautaki mosala, nakutaki batumbi ndako na biso. Kaka Marianthi ye moko nde abikaki biloko nyonso ezikaki. Na makita na mpokwa yango, toyebisaki bandeko ete soki tokendaki kuna na bilamba ya salite ezali mpo batumbi biloko na biso nyonso. Bandeko na biso baklisto bazalaki na boboto basungaki biso mingi.
Na 1961, nakómaki mokɛngɛli-motamboli, nazalaki kotala lisangá moko na pɔsɔ moko mpo na kolendisa bandeko na elimo. Na boumeli ya mbula 27 oyo elandaki, ngai na Marianthi totalaki bazongazonga mpe bitúká na Macédoine, na Thrace, mpe na Thessalie. Atako banda 1948, Marianthi, mwasi na ngai ya bolingo, azalaki lisusu komona mpenza te, na molende nyonso asalaki na ngai elongo, mpe ayikaki mpiko na komekama mingi oyo tokutanaki na yango. Mbala mingi, ye mpe bakangaki ye, basambisaki ye, mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Na nsima nzoto na ye ezalaki lisusu kolɔngɔnɔ te, mpe akufaki na 1988 nsima ya kobunda ntango molai na maladi ya kanser.
Kaka na mbula yango, baponaki ngai nasala lokola mobongisi-nzela monene na Thessalonique. Lelo oyo, nsima ya mbula koleka 56 na mosala ya Yehova, nazali naino na makasi ya kosala mosala ya kosakola na lolenge nyonso. Na bantango mosusu, pɔsɔ na pɔsɔ nazalaki koyekola Biblia na bato 20 oyo bazalaki kosepela na mateya ya Biblia.
Nayei kososola ete tozali mpenza na ebandeli ya mosala monene ya koteya oyo ekokoba tii na mokili ya sika oyo Yehova akosala, mosala oyo ekoumela mbula nkóto. Kasi, nazali komona ete oyo ezali ntango ya kolɛmbisa mabɔkɔ te, ezali ntango ya kozongisa makambo nsima te, to ya kolekisa na kokokisa bamposa na biso ya mosuni te. Nazali kopesa Nzambe matɔndi na ndenge asalisi ngai nakokisa elaka oyo napesaki ye na ebandeli mpamba te ebongi mpenza tósambela mpe tósalela Yehova na molimo na biso mobimba.
[Elilingi na lokasa 24]
Nazali kosala lisukulu ntango bapekisaki mosala na biso ya kosakola
[Elilingi na lokasa 25]
Na mwasi na ngai Marianthi.