MOKAPO 11
“Libala ekumisama”
“Sepelá na mwasi ya bolenge na yo.”—MASESE 5:18.
1, 2. Motuna nini tokotalela, mpe mpo na nini?
SOKI ozali moto oyo abalá, ozali na libala ya esengo to ozali nde na mikakatano makasi? Ozali lisusu koyokana malamu te ná molongani na yo? Bofandi kaka elongo, kasi bosepelaka lisusu na libala na bino te? Soki ezali bongo, na ntembe te oyokaka mawa na ndenge bolingo mpe esengo oyo ezalaki kati na bino ekiti. Lokola ozali mokristo, na ntembe te olingaka ete libala na yo epesa nkembo epai ya Yehova, Nzambe na yo. Yango wana, makambo oyo ozali kokutana na yango ekoki kotungisa yo mpe kopesa yo mpasi na motema. Atako bongo, kokanisa mbala moko te ete makambo ekoki kobonga te.
2 Ezali na mabala mingi ya bakristo oyo ekómaki mabala kaka na nkombo. Kasi, bato yango bayekolaki ndenge oyo bakoki kobongisa mabala na bango. Yo mpe okoki kozala na esengo na libala na yo. Ndenge nini?
PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE MPE NA MOLONGANI NA YO
3, 4. Mpo na nini mwasi ná mobali bakokóma na boyokani ya malamu soki bazali kosala makasi bápusana penepene na Nzambe? Pesá ndakisa.
3 Boyokani na yo ná molongani na yo ekobonga soki bino mibale bozali kosala makasi bópusana penepene na Nzambe. Mpo na nini? Tózwa ndakisa moko: Kanisá ngomba moko oyo ezali monene na nse, kasi ezali nsɔngɛ na likoló. Mobali moko ná mwasi moko batɛlɛmi na nse ya ngomba yango; kasi mobali azali na ngámbo mosusu, mwasi mpe na ngámbo mosusu. Bango mibale babandi komata likoló ya ngomba yango. Ntango bazali naino na ebandeli, mokomoko azali mosika mpenza na moninga. Kasi, ntango bazali kopusana na nsɔngɛ ya ngomba, ntaka oyo ekaboli bango ekobanda kokóma moke. Omoni liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa yango?
4 Tokoki kokokanisa molende oyo osalaka mpo na kosalela Yehova na molende oyo moto asalaka mpo na komata likoló ya ngomba. Lokola olingaka Yehova, ezali lokola nde ozali kosala makasi omata likoló ya ngomba. Kasi, soki yo ná molongani na yo bozali lisusu koyokana malamu te, ezali lokola nde moto na moto azali na ngámbo na ye ntango bozali komata. Likambo nini ekomonana ntango bozali kokoba komata? Ekoki kozala ete na ebandeli, ntaka moko monene ekabolaki bino. Nzokande, ntango mokomoko azali kosala molende ya komata, elingi koloba azali kopusana penepene na Nzambe, bokokóma mpe penepene moko na mosusu. Ya solo, sekele mpo na kopusana penepene na molongani na yo ezali kopusana penepene na Nzambe. Kasi, ndenge nini mpenza okoki kosala yango?
Kosalela boyebi ya Biblia ekoki kobongisa libala na yo
5. (a) Wapi lolenge moko oyo moto akoki kopusana penepene na Yehova mpe na molongani na ye? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka libala?
5 Lolenge moko oyo yo ná molongani na yo bokoki, na ndenge ya elilingi, komata na ngomba ezali na kolanda batoli ya Liloba ya Nzambe mpo na libala. (Nzembo 25:4; Yisaya 48:17, 18) Yango wana, talelá toli moko ya polele oyo ntoma Paulo apesaki. Alobaki boye: “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso.” (Baebre 13:4) Yango elingi koloba nini? ‘Kokumisa’ elimboli kopesa valɛrɛ to kozwa na motuya mingi. Ezali ndenge yango nde Yehova atalelaka libala—amonaka ete ezali na motuya mingi.
BOSENGELI KOPUSAMA NA BOLINGO YA SOLOSOLO MPO NA YEHOVA
6. Makanisi oyo ezali zingazinga ya toli ya Paulo mpo na libala emonisi nini, mpe mpo na nini ezali na ntina obosana likambo yango te?
6 Na ntembe te, lokola yo ná molongani na yo bozali basaleli ya Nzambe, boyebi ete libala ezali eloko ya motuya; kutu ezali mosantu. Yehova ye moko nde abandisaki libala. (Tángá Matai 19:4-6.) Nzokande, soki bozali na mikakatano na libala na bino, koyeba kaka ete libala ezali eloko ya lokumu ekoki te mpo ete yo ná molongani na yo bólingana mpe bópesana limemya. Kasi, nini ekotinda bino bómonisa bizaleli yango? Talelá malamu ndenge oyo Paulo alobeli likambo ya kokumisa. Alobaki te ete, “Libala ezali eloko ya lokumu”; kasi alobaki ete, “Libala ekumisama.” Paulo azalaki te kolobela ndenge likambo ezalaka; azalaki nde koyebisa likambo oyo bato basengeli kosala.a Koyeba bokeseni wana ekoki kosalisa yo osala makasi mpo osepela lisusu na molongani na yo. Mpo na nini tolobi bongo?
7. (a) Totosaka mibeko nini ya Biblia, mpe mpo na nini? (b) Kotosa na makambo wana ememelaka biso matomba nini?
7 Kanisá mwa moke ndenge oyo otalelaka mibeko mosusu ya Biblia, na ndakisa etinda ya kokómisa bato bayekoli to ya koyangana na makita. (Matai 28:19; Baebre 10:24, 25) Ya solo, na bantango mosusu kosala makambo yango ezalaka mpasi. Bato oyo ozali komemela nsango malamu bakoki koboya koyoka yo, to mpe ekoki kozala ete mosala na yo elɛmbisaka yo mingi mpe kokende makita ezalaka pɛtɛɛ te. Atako bongo, otikaka te kosakola nsango ya Bokonzi, otikaka mpe te koyangana na makita. Moto moko te—ata Satana ye moko—akoki kopekisa yo osala makambo yango! Mpo na nini? Mpamba te bolingo na yo epai ya Yehova nde epusaka yo otosa mibeko yango. (1 Yoane 5:3) Yango ememelaka yo matomba nini? Kosakola nsango malamu mpe koyangana na makita epesaka yo kimya ya motema mpe esengo mpamba te oyebaka ete ozali kosala mokano ya Nzambe. Na nsima, kimya mpe esengo wana ebakiselaka yo makasi. (Nehemia 8:10) Yango ezali koteya biso nini?
8, 9. (a) Nini ekoki kotinda biso tótosa elendiseli ya kokumisa libala, mpe mpo na nini? (b) Wapi makambo mibale oyo tokotalela sikoyo?
8 Ndenge bolingo na yo epai ya Nzambe etindaka yo otosa etinda ya kosakola mpe ya koyangana na makita atako okutanaka na mikakatano, bolingo na yo epai ya Yehova ekoki mpe kotinda yo otosa etinda ya Biblia oyo elobi ete “libala [na yo] ekumisama,” ata ntango ezali komonana mpasi. (Baebre 13:4; Nzembo 18:29; Mosakoli 5:4) Longola yango, ndenge Nzambe apambolaka yo mpo na milende oyo osalaka mpo na kosakola mpe koyangana na makita, Yehova akomona milende oyo ozali kosala mpo na kokumisa libala na yo mpe akopambola yo.—1 Batesaloniki 1:3; Baebre 6:10.
9 Boye, okoki kosala nini mpo libala na yo ekumisama? Osengeli koboya makambo oyo ebebisaka libala. Longola yango, osengeli kosala makambo oyo ekolendisa boyokani na yo ná molongani na yo.
BOYÁ MALOBA MPE BIZALELI OYO EBEBISAKA LOKUMU YA LIBALA
10, 11. (a) Ezaleli nini ekumisaka libala te? (b) Motuna nini osengeli kotuna molongani na yo?
10 Eleki mwa bambula, mwasi moko oyo azali mokristo alobaki boye: “Nabondelaka Yehova apesaka ngai makasi ya koyikela likambo yango mpiko.” Likambo nini? Alobaki boye: “Mobali na ngai akatelaka ngai mangala. Mbala mosusu bilembo emonanaka te na nzoto na ngai, kasi motema na ngai etondi na bampota mpo na maloba na ye ya mabe lokola oyo: ‘Nabaye makambo na yo!’ mpe ‘Ozali ata na ntina moko te!’” Mwasi yango alobeli likambo oyo osengeli mpenza kokeba na yango—koloba na molongani na yo na maloba ya kozokisa.
11 Ezali mawa mingi soki mwasi ná mobali oyo bazali bakristo bazali kolobana maloba oyo etikaka bampota oyo ezwaka ntango mingi mpo ekauka! Mwasi ná mobali oyo balobanaka maloba mabe bakumisaka libala na bango te. Makambo ezali ndenge nini na libala na yo? Mpo na koyeba yango okoki kotuna molongani na yo boye, “Maloba na ngai esalaka yo ndenge nini na motema?” Soki molongani na yo alobi ete mbala mingi maloba na yo ezokisaka ye, osengeli kozwa ekateli ya kobongisa.—Bagalatia 5:15; tángá Baefese 4:31.
12. Ndenge nini losambo ya moto ekoki kokóma mpamba na miso ya Nzambe?
12 Kobosanaka te ete ndenge oyo osalelaka lolemo na yo mpo na koloba na molongani na yo ekoki kobongisa to kobebisa boyokani na yo ná Yehova. Biblia elobi boye: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba.” (Yakobo 1:26) Mpo Nzambe andima losambo na yo, osengeli kozalaka na maloba ya malamu. Biblia elongisi te bato oyo bakanisaka ete Nzambe akipaka te makambo mabe oyo moto asalaka na ndako na ye, soki moto yango alobaka ete asalelaka Nzambe. Komikosa te. Esengeli kozwa likambo yango na lisɛki te. (Tángá 1 Petro 3:7.) Okoki kozala na mayele mingi mpe na molende, kasi soki ozokisaka molongani na yo na maloba, yebá ete opesaka libala lokumu te mpe losambo na yo ekoki komonana mpamba na miso ya Nzambe.
13. Moto akoki koyokisa molongani na ye mpasi soki azali kosala makambo nini?
13 Mwasi ná mobali basengeli mpe kokeba ete bázokisanaka te na balolenge mosusu. Tózwa ndakisa mibale: Mwasi moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko abengaka mbala na mbala ndeko mobali moko oyo abalá mpo na kotuna ye toli mpe basololaka ntango molai na telefone; mokristo moko oyo azali naino monzemba abimaka mbala mingi na mosala ya kosakola na kati ya pɔsɔ ná ndeko mwasi moko oyo abalá. Na bandakisa yango, ekoki kozala ete bandeko yango oyo babalá bazali na makanisi ya mabe te; kasi, ndenge nini balongani na bango batalelaka makambo yango? Mwasi moko oyo mobali na ye azalaki na ezaleli ya ndenge wana alobaki boye: “Nayokaka mpasi soki mobali na ngai azali kolekisa ntango mingi na ndeko mwasi mosusu mpe azali kotyela ye likebi mingi. Namonaka lokola nde ndeko yango azali na valɛrɛ koleka ngai.”
14. (a) Na kotalela vɛrsɛ ya Ebandeli 2:24, mokumba nini moto oyo abalá azali na yango? (b) Motuna nini tosengeli komituna?
14 Tokoki kokamwa te ete mwasi yango mpe bato mosusu oyo bakutanaka na makambo ya ndenge wana bayokaka mpasi na motema. Balongani na bango babosanaka likambo moko ya ntina mingi oyo Nzambe alobaki: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye.” (Ebandeli 2:24) Ya solo, moto oyo abali asengeli kokoba komemya baboti na ye; kasi, Nzambe alobi ete asengeli libosoliboso kokokisa mokumba na ye epai ya molongani na ye. Ndenge moko mpe, bakristo balingaka bandeko na bango ya elimo; kasi basengeli libosoliboso kokokisa mokumba na bango epai ya balongani na bango. Yango wana, mokristo oyo abalá kasi azali kolekisa ntango mingi ná ndeko mwasi mosusu to azali komipesa mingi epai na ye, to soki mwasi mokristo nde azali kosala bongo epai ya ndeko mobali oyo azali molongani na ye te, azali kokɔtisa matata na libala na ye. Ekoki kozala mpo na ntina yango nde matata ezali na libala na bino? Omituna motuna oyo, ‘Nalekisaka mpenza ntango mingi ná molongani na ngai, natyelaka ye likebi mpe namonisaka ye ete nalingaka ye?’
15. Na kotalela Matai 5:28, mpo na nini mokristo oyo abalá asengeli te kozala selesele na moto oyo azali molongani na ye te?
15 Lisusu, soki mobali to mwasi mokristo oyo abalá azali kotyela moto oyo azali molongani na ye te likebi mingi, ezali lokola nde azali kosakana na mɔtɔ. Bakristo mosusu oyo babalá bakómaki kolulana na bandeko oyo bazalaki na bango selesele. (Matai 5:28) Na nsima, boninga wana ememaki bango na kosala makambo oyo ebebisaka mpenza lokumu ya libala. Tótalela maloba oyo ntoma Paulo alobaki na likambo yango.
“MBETO YA LIBALA EZALA NA MBINDO TE”
16. Likebisi nini Paulo apesaki mpo na libala?
16 Nsima ya kopesa toli ete “libala ekumisama,” Paulo abakisaki maloba oyo: “Mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Baebre 13:4) Paulo asalelaki maloba “mbeto ya libala” mpo na kolobela kosangisa nzoto. Kosangisa nzoto ezalaka “na mbindo te,” to mabe te na miso ya Nzambe, kaka soki ezali kosalema na kati ya bato oyo babalani. Yango wana, bakristo balandaka toli ya Biblia oyo elobi ete: “Sepelá na mwasi ya bolenge na yo.”—Masese 5:18.
17. (a) Mpo na nini bakristo balandaka te makanisi ya bato ya mokili na ndenge ya kotalela ekobo? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yobo?
17 Baoyo basangisaka nzoto ná bato oyo bazali balongani na bango te babukaka mpenza mobeko ya Nzambe. Ya solo, bato mingi lelo oyo bazali koloba ete kosala ekobo ezali mabe te. Kasi, bakristo basengeli te kotalela ekobo na boyokani na makanisi ya bato. Bayebaka ete ezali moto te, kasi “Nzambe [nde] akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.” (Baebre 10:31; 12:29) Yango wana, bakristo ya solo balandaka makanisi ya Yehova na likambo yango. (Tángá Baroma 12:9.) Tóbosana te ete Yobo alobaki boye: “Nasalá kondimana ná miso na ngai.” (Yobo 31:1) Bakristo ya solo baboyaka kotala na mposa mabe moto oyo azali molongani na bango te mpo bátya ata lokolo te na nzela oyo ekoki komema bango na ekobo.—Talá Apɛndisi, lisolo “Likanisi ya Biblia na likambo etali koboma libala mpe kokabwana.”
18. (a) Ekobo ezali mpenza lisumu monene na miso ya Yehova? (b) Bokokani nini ezali kati na ekobo mpe losambo ya bikeko?
18 Ekobo ezali mpenza lisumu monene na miso ya Yehova? Mibeko ya Moize ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova atalelaka ekobo. Na Yisraele, ekobo mpe losambo ya bikeko ezalaki na kati ya masumu oyo bazalaki kopesela moto etumbu ya liwa. (Balevi 20:2, 10) Omoni bokokani oyo ezali kati na masumu yango mibale? Soki Moyisraele asambeli ekeko, yango ezalaki komonisa ete akati kondimana oyo asalaki ná Yehova. Ndenge moko mpe, soki Moyisraele asali ekobo, yango ezalaki komonisa ete akati kondimana oyo asalaki ná molongani na ye. Bato yango mibale bazalaki kosalela bokosi. (Kobima 19:5, 6; Kolimbola Mibeko 5:9; tángá Malaki 2:14.) Na yango, na miso ya Yehova, Nzambe ya sembo, bato wana mibale bazalaki kosala mabe.—Nzembo 33:4.
19. Nini ekoki kolendisa ekateli ya moto ya koboya ekobo, mpe mpo na nini?
19 Ya solo, bakristo basengisami te ete bátosa Mibeko ya Moize. Kasi, koyeba ete na Yisraele ya kala ekobo ezalaki lisumu monene ekoki kolendisa bakristo mpo básala ekobo te. Mpo na nini? Tótalela naino likambo oyo: Okoki nde kokɔta na ndako-nzambe, kofukama liboso ya ekeko moko mpe kosambela yango? Na ntembe te okoloba ete, ‘Ekoki kosalema te.’ Kasi, okosala yango soki balobi na yo ete bakopesa yo mbongo ebele mpenza? Na ntembe te, okoloba mpe ete, ‘Ata moke te!’ Ya solo, mokristo ya solo asepelaka te ata na likanisi mpamba ya kowangana Yehova mpe kosambela ekeko. Ndenge moko mpe, mokristo asengeli koboya mpenza likanisi ya kowangana Yehova, Nzambe na ye, mpe kowangana molongani na ye na kosaláká ekobo, ata soki likambo nini ebendi ye na kosala yango. (Nzembo 51:1, 4; Bakolose 3:5) Tosengeli soki moke te kosala likambo oyo ekosepelisa Satana, kasi ekopesa lokumu te epai ya Yehova mpe na libala, oyo ezali ebongiseli ya bosantu.
NDENGE YA KOLENDISA LIBALA NA YO
20. Likambo nini ekómeli mabala mosusu? Pesá ndakisa.
20 Longola koboya bizaleli oyo ekumisaka libala te, makambo nini okoki kosala mpo ozala lisusu na limemya mpo na molongani na yo? Mpo na kozwa eyano, meká kotalela libala lokola ndako moko. Na nsima, talelá maloba ya boboto, misala ya malamu, mpe balolenge mosusu oyo mwasi ná mobali bapesanaka lokumu lokola biloko kitoko oyo ebongisaka ndako. Soki bozali na boyokani ya malamu, libala na bino ekozala lokola ndako oyo ezali na biloko ndenge na ndenge oyo ezali kobakisa kitoko na yango. Soki bolingo na bino ekiti, ekozala lokola nde biloko yango ezali kolimwa mokemoke, mpe libala na bino ekozala lokola ndako oyo ezangi biloko oyo ebongisaka yango. Lokola bozali na mposa ya kotosa mobeko ya Nzambe oyo elobi ete “libala ekumisama,” bokoluka ete makambo ebonga. Kutu, lokola libala ezali eloko ya motuya, ebongi mpenza kobongisa yango ntango ebebi. Ndenge nini okoki kosala yango? Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ndako ekotongama na bwanya, mpe ekopikama makasi na bososoli. Mpe na boyebi, bashambrɛ ya kati ekotonda na biloko nyonso ya motuya.” (Masese 24:3, 4) Tótalela ndenge oyo tokoki kosalela maloba yango mpo na libala.
21. Ndenge nini tokoki kobongisa mokemoke libala na biso? (Talá mpe etanda “Ndenge nini nakoki kobongisa libala na ngai?”)
21 Na kati ya ‘biloko ya motuya’ ya libala ya esengo, tokoki kotánga bizaleli lokola bolingo ya solosolo, kobanga Nzambe, mpe kondima ya makasi. (Masese 15:16, 17; 1 Petro 1:7) Bizaleli yango esalaka ete boyokani ya mwasi ná mobali ezala makasi. Kasi, na vɛrsɛ ya Masese oyo touti kotánga, omoni ndenge oyo bashambrɛ etondaka na biloko ya motuya? “Na boyebi.” Ya solo, soki bato bazali kosalela boyebi ya Biblia, yango ekoki kobongola makanisi na bango mpe kopesa bango mposa ya kozongisa bolingo oyo ezalaki kati na bango. (Baroma 12:2; Bafilipi 1:9) Yango wana, mbala nyonso oyo yo ná molongani na yo bofandi elongo mpe bozali kotalela vɛrsɛ moko ya Biblia, na ndakisa mokapo ya mokolo, to bozali kotánga lisolo moko oyo ezali kolobela libala na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na Lamuká!, ezali lokola nde bozali kotala eloko moko kitoko oyo ekoki kobongisa ndako na bino. Ntango bolingo epai ya Yehova ezali kotinda bino bósalela na libala na bino batoli oyo bouti kotánga, ezali lokola nde bozali komema eloko wana ya kitoko na “bashambrɛ.” Na ndenge yango, bokozongela esengo oyo bozalaki na yango liboso na libala na bino.
22. Esengo nini tokoki koyoka soki tosali makasi mpo tókokisa mokumba na biso mpo na kobongisa libala na biso?
22 Toboyi te, ekoki kozwa mwa ntango mpe ekoki kosɛnga milende mpo na kozongisa eloko mokomoko ya kitoko na esika na yango. Kasi, soki ozali kosala makasi okokisa mokumba na yo, okozala na esengo ya koyeba ete ozali kotosa etinda ya Biblia oyo elobi boye: “Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso.” (Baroma 12:10; Nzembo 147:11) Na koleka, milende na yo mpo na kokumisa libala na yo ekosalisa yo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe.
a Makanisi oyo ezali zingazinga emonisi ete ntango Paulo apesaki toli wana mpo na libala azalaki kopesa batoli na makambo ndenge na ndenge.—Baebre 13:1-5.