Tópesaka bambeka oyo esepelisaka Nzambe
BUKU moko (The Mighty Aztecs) elobi ete, “Bato ya ampire ya Aztèque, oyo bazalaki kopesa bambeka ya bato koleka bato nyonso ya Amerika ya ntei, bazalaki koloba ete bomoi eutaki na liwa.” Buku yango ebakisi boye: “Ntango ampire yango ezalaki kokóma monene, elikya na bango nyonso ezalaki kaka na makila ya bato.” Buku mosusu elobi ete na mbula moko, Ba-Aztèque bazalaki kopesa mbeka ya bato ata 20 000.
Bato ya bileko nyonso bapesaka banzambe na bango bambeka ya lolenge moko to mosusu, mpo bazali kobanga mpe bayebi te nini ekoya lobi, to mpo basalaki mabe moko. Epai mosusu, Biblia ezali komonisa ete Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, nde asɛngaki basaleli na ye bambeka oyo basengelaki kopesa. Na yango, ebongi mpenza tómituna boye: Nzambe asepelaka na bambeka ya ndenge nini? Losambo na biso lelo oyo esɛngaka mpe kopesa makabo ná bambeka?
Makabo mpe bambeka na losambo ya solo
Ntango ekólo Yisalaele ebandaki, Yehova ayebisaki bango polele lolenge oyo basengelaki kosambela ye; amonisaki ete basengelaki mpe kopesaka makabo ná bambeka. (Mituya, mokapo 28 mpe 29) Makabo yango mosusu ezalaki ya mbuma ya bilanga; basengelaki mpe kopesaka bambeka ya banyama lokola bangɔmbɛ, bameme, bantaba mpe bibenga. (Levitike 1:3, 5, 10, 14; 23:10-18; Mituya 15:1-7; 28:7) Ezalaki na bambeka ya kotumba oyo esengelaki kozika mobimba na mɔtɔ. (Exode 29:38-42) Ezalaki mpe na bambeka ya kimya, oyo bato oyo bazalaki kopesa yango bazalaki mpe kolya yango.—Levitike 19:5-8.
Makabo mpe bambeka nyonso oyo Mobeko ya Moize esɛngaki ezalaki lolenge ya kosambela Nzambe mpe ya komonisa ete ondimi ye lokola Nkolo mokonzi ya molɔ́ngɔ́. Na nzela ya bambeka wana, Bayisalaele bazalaki kotɔnda Yehova mpo na ndenge azalaki kopambola mpe kobatela bango, mpe mpo na bolimbisi ya masumu na bango. Ntango nyonso oyo bazalaki kokokisa masɛngami wana ya losambo, Yehova azalaki kosopela bango ebele ya mapamboli.—Masese 3:9, 10.
Mpo na Yehova, likambo elekaki ntina ezalaki nde makanisi oyo bato bazalaki kopesa na yango bambeka. Na nzela ya mosakoli na ye Hosea, Yehova alobaki ete: “Nalingi boboto, mbeka te; nalingi boyebi koyeba Nzambe [na esika ya, NW] makabo matumbami.” (Hosea 6:6) Na yango, ntango Bayisalaele bazalaki kopesa losambo ya solo mokɔngɔ, komipesa na etamboli ya mabe mpe kosopa makila ya bato oyo basali eloko te, bambeka na bango ezalaki lisusu na ntina te na miso ya Yehova. Yango wana, Yehova alobaki na ekólo Yisalaele na nzela ya Yisaya ete: “Mingi mingi ya mbeka na bino ezali nini epai na ngai? Natondi maa na mbeka etumbami ya bampate babali, mpe na mafuta ya banyama babɔkɔlami; nasepeli na makila ya bangɔmbɛ te to ya bana ya mpate to ya bantaba babali te.”—Yisaya 1:11.
“Nalakaki bango boye te”
Na bokeseni na Bayisalaele, Bakanana bazalaki kopesa bana na bango lokola bambeka epai ya banzambe na bango, na ndakisa epai ya Moleke, nzambe ya Baamona, oyo ayebani mpe na nkombo Milikɔmɔ to Moloko. (1 Mikonzi 11:5, 7, 33; Misala 7:43) Buku moko (Halley’s Bible Handbook) elobi boye: “Na milulu ya losambo na bango, Bakanana bazalaki kosala pite liboso ya banzambe na bango; bazalaki mpe koboma bana na bango ya liboso mpe kokaba bango lokola mbeka epai ya banzambe yango.”
Yehova Nzambe azalaki kosepela na makambo ya ndenge wana? Ata moke te. Ntango Bayisalaele balingaki kokɔta na mokili ya Kanana, Yehova apesaki bango mobeko oyo ezali na Levitike 20:2, 3: “Lobelá bato ya Yisalaele ete, Moto soki nani na bato ya Yisalaele to na bapaya bafandi na Yisalaele, oyo akopesa mwana na ye na Moleke, akobomama. Bato ya mokili bakobola ye na mabanga. Ngai mpenza nakokangela moto yango elongi mpe nakolongola ye na kati ya bato na ye, mpo ete asili kopesa moko na bana na ye na Moleke, bongo abebisi esika mosantu na ngai mpe abebisi nkombo bulɛɛ na ngai.”
Likambo ya kokamwa, Bayisalaele mosusu oyo bapesaki losambo ya solo mokɔngɔ bakómaki kolanda momeseno wana ya losambo ya bilimo mabe ya kokaba bana na bango mbeka epai ya banzambe ya lokuta. Mpo na likambo yango, Nzembo 106:35-38 elobi boye: “Basanganaki kati na mabota mosusu, bayekolaki mpe misala na bango. Basalelaki bikeko na bango, mpe yango ezalaki motambo epai na bango. Ɛɛ, bakabaki bana babali mpe bana basi na bango lokola mbeka epai ya milimo mabe. Basopaki makila masembwi, makila ya bana babali mpe ya bana basi na bango, baoyo batumbaki liboso ya bikeko ya Kanana. Mokili mpe ebebaki na makila.”
Mpo na komonisa ete ayinaki mpenza momeseno yango, Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Yilimia mpo na bana ya Yuda ete: “Batɛlɛmisi biloko na bango ya bosɔtɔ kati na ndako ebyangami na nkombo na ngai ete bábebisa yango; batongi mpe bisika ya likoló na Tofete oyo ezali kati na lobwaku ya mwana ya Hinomo ete bátumba bana na bango babali mpe bana na bango basi kati na mɔtɔ. Nalakaki bango boye te, eyaki ata kati na motema na ngai te.”—Yilimia 7:30, 31.
Lokola ekólo Yisalaele bamipesaki na misala wana ya mabe, Nzambe aboyaki bango. Nsukansuka, mboka-mokonzi na bango Yelusaleme ebebisamaki mpe bato na yango bakendaki boombo na Babilone. (Yilimia 7:32-34) Emonani polele ete Nzambe ya solo asɛngaka te ete bápesaka ye bambeka ya bato, mpe ete yango ezali momeseno ya losambo ya pɛto te. Kokaba bato mbeka ezali losambo ya milimo mabe, mpe basambeli ya solo ya Nzambe bakimaka na mosika mpenza makambo nyonso oyo eyokani na yango.
Mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto
Kasi, bato mosusu bakoki kotuna ete: ‘Mpo na nini mobeko ya Yehova esɛngaki Bayisalaele bápesaka mpe bambeka ya banyama?’ Ntoma Paulo atalelaki motuna yango mpe apesaki eyano oyo: “Bongo, mpo na nini Mibeko? Yango ebakisamaki mpo na komonisa polele bobuki-mibeko, tii ntango momboto oyo elaka epesamaki epai na ye akoya . . . Na yango Mibeko ekómaki molakisi na biso oyo azalaki kokamba epai ya Klisto.” (Bagalatia 3:19-24) Bambeka ya banyama oyo Mobeko esɛngaki ezalaki komonisa mbeka ya monene oyo Yehova Nzambe asengelaki kopesa mpo na bato: Mwana na ye, Yesu Klisto. Yesu akanisaki elembo wana ya bolingo ntango alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
Na bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bato, Yesu andimaki kopesa bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka mpo na kosikola bana ya Adama. (Baloma 5:12, 15) Yesu alobaki boye: “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Moto mosusu te awa na mabelé akokaki kolongola bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa, oyo Adama amemelaki biso. (Nzembo 49:7, 8) Yango wana, Paulo alobaki ete Yesu “akɔtaki, na makila ya bantaba mpe ya bangɔmbɛ-mibali ya mike te, kasi nde na makila na ye moko, mbala moko mpo na libela na kati ya esika mosantu mpe azwelaki biso kosikolama ya seko.” (Baebele 9:12) Lokola Nzambe andimaki mbeka ya makila ya Yesu, “abomaki mokanda ekomamá na mabɔkɔ, oyo ezalaki kokweisa biso.” Elingi koloba ete Yehova atyaki boyokani ya Mibeko pembeni, ná makabo mpe bambeka oyo yango ezalaki kosɛnga, mpe apesaki ‘likabo ya bomoi ya seko.’—Bakolose 2:14; Baloma 6:23.
Makabo mpe bambeka ya elimo
Lokola losambo ya solo esɛngaka lisusu bambeka ya banyama mpe makabo te, ezali nde na bambeka mosusu oyo tosengeli kopesaka lelo oyo? Ɛɛ. Yesu Klisto amipesaki na mosala ya Nzambe, mpe nsukansuka amikabaki mpo na bato. Yango wana, alobaki boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Matai 16:24) Yango elimboli ete moto nyonso oyo alingi kozala moyekoli ya Yesu asengeli komikaba na lolenge moko to mosusu. Akoki kosala nini?
Na ndakisa, moyekoli ya solosolo ya Klisto alukaka lisusu matomba na ye moko te, kasi alukaka nde kosala mokano ya Nzambe. Atyaka mokano mpe bamposa ya Nzambe liboso ya oyo ya ye moko. Yoká ndenge ntoma Paulo alobaki: “Nazali kobondela bino na mawa ya Nzambe, bandeko, ete bókaba banzoto na bino mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe, mosala moko mosantu elongo na likoki na bino ya kokanisa. Mpe bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”—Baloma 12:1, 2.
Longolá yango, Biblia emonisi ete masanzoli na biso ekoki kotalelama lokola bambeka oyo tozali kopesa Yehova. Mosakoli Hosea asalelaki maloba “mbuma ya bibɛbu na biso” mpo na komonisa ete Nzambe atalelaka masanzoli oyo euti na minɔkɔ na biso lokola moko ya bambeka oyo eleki malamu. (Hosea 14:2) Ntoma Paulo alendisaki Bayuda oyo bakómaki baklisto boye: “Tópesa Nzambe mbeka ya lisanzoli ntango nyonso, elingi koloba, mbuma ya mbɛbu na biso oyo ezali kosala eyambweli mpo na nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali komipesa mpenza na mosala ya kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso. (Matai 24:14; 28:19, 20) Bazali kopesa Nzambe bambeka ya masanzoli butu moi na mokili mobimba.—Emoniseli 7:15.
Longolá kosakola, kosala basusu malamu mpe ezali moko ya bambeka oyo esepelisaka Nzambe. Ntoma Paulo alobaki boye: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” (Baebele 13:16) Mpo Nzambe asepela na bambeka ya masanzoli, esengeli baoyo bazali kopesa yango bázala na etamboli ya malamu. Paulo apesaki toli oyo: “Bómitambwisa na ndenge oyo ebongi na nsango malamu oyo etali Klisto.”—Bafilipi 1:27; Yisaya 52:11.
Ndenge kaka ezalaki kala, bambeka nyonso oyo epesami mpo na kotombola losambo ya solo ekomema esengo mpe mapamboli ya Yehova. Na yango, tiká ete tósala nyonso oyo tokoki mpo na kopesaka bambeka oyo esepelisaka mpenza Nzambe!
[Elilingi na lokasa 18]
“Bana babali mpe bana basi na bango . . . batumbaki liboso ya bikeko ya Kanana”
[Bililingi na lokasa 20]
Baklisto ya solo bapesaka bambeka oyo esepelisaka Nzambe ntango bazali kosakola nsango malamu mpe kosalisa bato na ndenge mosusu