Bampate mosusu mpe kondimana ya sika
“Bapaya . . . , moko na moko oyo akotosa sabata mpe akobebisa yango te mpe oyo akosimba kondimana na ngai na makasi, nakoyeisa bango oyo kino ngomba na ngai na bulɛɛ.”—YISAYA 56:6, 7.
1. (a) Engebene emonaneli ya Yoane, nini ezali kokokisama wana mipɛpɛ ya kosambisa ya Yehova misimbami? (b) Ebele nini ya kokamwa Yoane amonaki?
KATI na emonaneli ya minei ya mokanda ya Emoniseli, ntoma Yoane amonaki mipɛpɛ ya kosambisa ya Yehova misimbami wana bazalaki kosilisa kotya basangani nyonso ya “Yisalaele ya Nzambe” bilembo. Bango bazali bato ya liboso bapambolamaki na nzela ya Yesu, eteni ya liboso ya mombóto ya Abalayama. (Bagalatia 6:16; Genese 22:18; Emoniseli 7:1-4) Bobele na emonaneli yango, Yoane amonaki “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso . . . Bangangi na mongongo makasi ete, Lobiko [na biso euti, NW] na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate!” (Emoniseli 7:9, 10) Na kolobáká ete, “Lobiko [na biso euti] . . . na Mwana na Mpate,” ebele monene bazali komonisa ete bango mpe bazwi mapamboli na nzela ya Mombóto ya Abalayama.
2. Ntango nini ebele monene emonanaki, mpe lolenge nini eyebanaki?
2 Ebele monene yango eyebanaki na 1935, mpe lelo oyo esangisi bato koleka milió mitano. Lokola batyami elembo mpo na kobika na bolɔzi monene, basangani na yango bakotyama na ngámbo moko mpo na kozwa bomoi ya seko ntango Yesu akokabola “bampate” na “bantaba.” Baklisto basangani ya ebele monene bazali kati na “bampate mosusu” oyo balobelami na lisese ya Yesu na ntina na mapango. Bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.—Matai 25:31-46; Yoane 10:16; Emoniseli 21:3, 4.
3. Lolenge nini baklisto bapakolami bakeseni na bampate mosusu na oyo etali kondimana ya sika?
3 Mpo na ba 144 000, lipamboli ya kondimana ya Abalayama ezali kopesama na nzela ya kondimana ya sika. Lokola basangani kati na kondimana yango, bazali “na nsé na ngɔlu” mpe na nsé “na mibeko na Klisto.” (Baloma 6:15; 1 Bakolinti 9:21) Na yango, bobele basangani 144 000 ya Yisalaele ya Nzambe nde babongi kolya limpa mpe komela vinyo na Ekaniseli ya liwa ya Yesu, mpe ezali bobele na bango nde Yesu asalaki kondimana mpo na Bokonzi. (Luka 22:19, 20, 29) Basangani ya ebele monene bazali kati na kondimana ya sika te. Nzokande, bazali kosangana na Yisalaele ya Nzambe mpe bafandi na bango esika moko kati na “mokili” na bango. (Yisaya 66:8) Na yango ebongi koloba ete bango mpe bazali na nsé ya ngɔlu ya Yehova mpe na nsé ya mibeko ya Klisto. Atako bazali basangani na kondimana ya sika te, bazali kozwa litomba na yango.
“Bapaya” mpe “Yisalaele ya Nzambe”
4, 5. (a) Engebene Yisaya, etuluku nini ekosalela Yehova? (b) Lolenge nini Yisaya 56:6, 7 ekokisami epai na ebele monene?
4 Mosakoli Yisaya akomaki ete: “Bapaya baoyo bakomibakisa epai na [Yehova] ete básalela ye mpe bálinga nkombo na [Yehova] mpe ete bázala baombo na ye, moko na moko oyo akotosa sabata mpe akobebisa yango te mpe oyo akosimba kondimana na ngai na makasi, nakoyeisa bango oyo kino ngomba na ngai na bulɛɛ, nakosepelisa mpe bango kati na ndako na ngai na kobondela; mbeka na bango itumbami mpe makabo na bango, ikoyambama na etumbelo na ngai.” (Yisaya 56:6, 7) Na Yisalaele, yango elimbolaki ete “bapaya,” to bato oyo bazalaki Bayisalaele te, basengelaki kosambela Yehova—kolinga nkombo na ye, kotosa bibongiseli ya kondimana ya Mibeko, kobatela Sabata, mpe kopesa makabo na tempelo, ‘ndako’ ya Nzambe ‘mpo na kobondela.’—Matai 21:13.
5 Na mikolo na biso, ‘bapaya oyo basili komibakisa epai na Yehova’ ezali bongo ebele monene. Bango bazali kosalela Yehova elongo na Yisalaele ya Nzambe. (Zekalia 8:23) Bazali kopesa bambeka oyo endimami lolenge moko na oyo ya Yisalaele ya Nzambe. (Baebele 13:15, 16) Bazali kosambela Nzambe kati na tempelo na ye ya elimo, “ndako” na ye “na kobondela.” (Kokanisá na Emoniseli 7:15.) Bazali nde kobatela Sabata ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ? Ezala bapakolami to mpe bampate mosusu, bazwi etindá te ya kosala bongo. (Bakolose 2:16, 17) Nzokande, Paulo alobaki na baklisto bapakolami Baebele ete: “Bongo epemelo na sabata etikali mpo na bato na Nzambe. Mpo ete ye oyo akoingela na epemelo na Nzambe akopema nsima na misala na ye, pelamoko ezalaki Nzambe kopema nsima na yango na ye mpenza.” (Baebele 4:9, 10) Baebele wana bakɔtaki na “epemelo na sabata” ntango bamisɔkisaki na “boyengebene ya Nzambe” mpe bapemaki na kotikáká koluka komikómisa bayengebene na nzela ya misala ya Mibeko. (Baloma 10:3, 4) Baklisto bapakolami oyo bauti na mabota bazali kozwa bopemi yango moko na komisɔkisáká na boyengebene ya Yehova. Ebele monene basangani na bango na bopemi yango.
6. Lolenge nini bampate mosusu bakɔtisami kati na kondimana ya sika?
6 Lisusu, bampate mosusu bazali komitya na nsé ya kondimana ya sika lolenge bapaya na ntango ya kala bamityaki na nsé ya kondimana ya Mibeko. Na lolenge nini? Ezali te na kokómáká basangani na yango kasi na kotosáká mibeko oyo mikangisami na yango mpe kozwáká matomba na bibongiseli na yango. (Kokanisá na Yilimia 31:33, 34.) Lokola baninga na bango bapakolami, bampate mosusu bazali na mibeko ya Yehova mikomami ‘na mitema na bango.’ Bazali na bolingo mpe botosi mozindo ya mibeko mpe mitindá ya Yehova. (Nzembo 37:31; 119:97) Lolenge moko na baklisto bapakolami, bayebi Yehova. (Yoane 17:3) Ezali boni mpo na kokatama ngenga? Pene na mbula 1 500 liboso ya kosalema ya kondimana ya sika, Mose ayebisaki Bayisalaele ete: “Bosengeli kokata esute ya mitema na bino ngenga.” (Deteronome 10:16, NW; Yilimia 4:4) Atako lisɛngisi ya kokatama ngenga elongwaki nzela moko na Mibeko, bapakolami mpe bampate mosusu basengeli “kokata” mitema na bango “ngenga.” (Bakolose 2:11) Na nsuka, Yehova azali kolimbisa mabunga ya bampate mosusu na moboko ya makila ya Yesu oyo masopamaki, ‘makila ya kondimana.’ (Matai 26:28; 1 Yoane 1:9; 2:2) Nzambe azali koyamba bango te lokola bana na ye ya elimo, lolenge azali koyamba ba 144 000. Kasi azali kotánga bampate mosusu ete bazali sembo, na lolenge oyo Abalayama atángamaki moyengebene lokola azalaki moninga ya Nzambe.—Matai 25:46; Baloma 4:2, 3; Yakobo 2:23.
7. Lelo oyo, elikya nini ezali liboso na bampate mosusu, oyo bazali kotángama sembo lokola Abalayama?
7 Mpo na ba 144 000, kotángama bayengebene ezali kofungola nzela na elikya na bango ya koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi ya likoló. (Baloma 8:16, 17; Bagalatia 2:16) Mpo na bampate mosusu, kotángama bayengebene lokola baninga ya Nzambe ezali kopesa bango likoki ya kozwa elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé—ezala na kobika na Armagedon lokola basangani ya ebele monene to na nzela ya ‘lisekwa ya bato sembo.’ (Misala 24:15) Oyo nde libaku malamu ya kozala na elikya motindo wana mpe kozala moninga ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ‘koumela kati na hema na [ye]’! (Nzembo 15:1, 2) Ɛɛ, ezala bapakolami to bampate mosusu, bango nyonso bazwi mapamboli kitoko na nzela ya Yesu, Mombóto ya Abalayama.
Mokolo ya Mbɔndi moleki monene
8. Na nsé ya mibeko, bambeka ya Mokolo ya Mbɔndi ezalaki elilingi ya nini?
8 Ntango azalaki kolobela kondimana ya sika, Paulo akundwelaki batángi na ye Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kokanisama mbula na mbula na nsé ya kondimana ya Mibeko. Na mokolo yango, bambeka ezalaki kopesama mpo na bituluku mibale—moko mpo na libota ya banganga Balevi mpe mosusu mpo na mabota mosusu 12 oyo ezalaki ya bonganga te. Yango elimbolamaki uta kala ete ezalaki elakiseli ya mbeka monene ya Yesu oyo esengelaki kopesa litomba na ba 144 000 oyo bazali na elikya ya bomoi na likoló mpe bamilió ya bato oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé.a Paulo amonisaki ete na kokokisama na yango, matomba ya mbeka ya Yesu mazali kopesama na nzela ya Mokolo ya Mbɔndi moleki monene na nsé ya kondimana ya sika. Lokola azali Nganga Monene ya mokolo yango monene, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka ya mbɔndi mpo na kozwa “kobikisama ya seko” mpo na bato.—Baebele 9:11-24, NW.
9. Na kozaláká kati na kondimana ya sika, baklisto bapakolami Baebele bakokaki koyamba nini?
9 Baklisto Baebele mingi na ekeke ya liboso bazalaki naino na “molende mpo na Mibeko [ya Mose].” (Misala 21:20, NW) Na yango, Paulo akundwelaki bango ete: “[Yesu] azali Mobongisi na Kondimana na sika ete baoyo babyangami bázwa elaka na libula na seko mpo ete kufa esili kosikola bango na mabunga masalami na nsé na kondimana na kala.” (Baebele 9:15) Kondimana ya sika esikolaki baklisto Baebele na kondimana ya kala, oyo ezalaki kotɔndɔla ezalela na bango ya bato ya masumu. Na nzela ya kondimana ya sika, bakokaki koyamba “elaka na libula na seko [na likoló].”
10. Mpo na nini bapakolami mpe bampate mosusu bazali kotɔ́nda Nzambe?
10 “Moto na moto” oyo “azali komonisa kondima kati na Mwana” akozwa litomba na mbeka ya lisiko. (Yoane 3:16, 36, NW) Paulo alobaki ete: “Klisto, awa esili ye kotombwa mbala moko mpo na komema masumu na bato mingi, akomonana mbala na mibale mpo na masumu te nde mpo na kobikisa bango bazali kotalela ye na mposa.” (Baebele 9:28) Lelo oyo, baoyo bazali kotalela Yesu na mposa ezali bongo baklisto bapakolami ya Yisalaele ya Nzambe oyo bazali naino na bomoi awa na mabelé mpe bamilió ya basangani ya ebele monene, oyo bazali mpe na elikya ya seko. Bituluku yango mibale bizali kotɔ́nda Nzambe mpo na kondimana ya sika mpe mpo na mapamboli ya bomoi oyo mauti na yango, bakisa mpe Mokolo ya Mbɔndi moleki monene mpe mosala ya Nganga Monene, Yesu, kati na Esika Eleki Bosantu na likoló.
Bazali na mosala mingi kati na mosala ya bulɛɛ
11. Na lisosoli oyo epɛtolami na mbeka ya Yesu, bapakolami mpe bampate mosusu bazali kosala nini na esengo nyonso?
11 Kati na mokanda na ye epai na Baebele, Paulo alobelaki mingi motuya moleki monene oyo mbeka ya Yesu ezali na yango kati na ebongiseli ya kondimana ya sika na bokokanisi na mbeka oyo ezalaki kopesama mpo na masumu kati na kondimana ya kala. (Baebele 9:13-15) Mbeka ya motuya mingi oyo Yesu apesaki ezali na likoki ya ‘kopɛtola lisosoli na biso na misala na kufa mpo ete tókoka kosalela Nzambe ya bomoi misala ya bulɛɛ.’ Mpo na baklisto Baebele, “misala na kufa” misangisaki “mabunga masalami na nsé na kondimana na kala.” Mpo na baklisto lelo oyo, yango esangisi masumu oyo basalaki na ntango ya kala, oyo na ntina na yango babongolaki solo motema mpe Nzambe alimbisaki yango. (1 Bakolinti 6:9-11) Na lisosoli oyo epɛtolami, baklisto bapakolami bazali ‘kosalela Nzambe na bomoi mosala ya bulɛɛ.’ Ebele monene bazali mpe kosala bongo. Lokola basili kopɛtola lisosoli na bango na “makila ya Mwana na Mpate,” bazali kati na tempelo monene ya Nzambe na elimo, “bazali kosalela ye mosala ya bulɛɛ butu na moi.”—Emoniseli 7:14, 15, NW.
12. Lolenge nini tozali komonisa ete tozali na “litondi na kondima mpenza”?
12 Lisusu, Paulo alobaki ete: “Tóbɛlɛma na mitema na sembo mpe na litondi na kondima mpenza, awa esili mitema na biso komwangisama mpo na kopɛtwa longwa na lisosoli mabe, awa mpe esili nzoto na biso kosukwa mai na pɛto.” (Baebele 10:22) Lolenge nini tokoki komonisa ete tózali na “litondi na kondima mpenza”? Paulo alendisaki baklisto Baebele ete: “Tósimba ngwi eyambweli na elikya na biso [ya likoló], mpo ete ye oyo apesaki elaka azali sembo. Tótala ete [tólendisana, NW] moko na moko mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. Tótika koyangana elongo moko te, pelamoko motindo na bamosusu, kasi tópesana toli. Tósala bongo na koleka, awa emoni bino ete Mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Baebele 10:23-25) Soki kondima na biso ezali na bomoi, biso mpe ‘tokotika koyangana te.’ Tokosepela kolendisa bandeko na biso mpe kozwa kolendisama epai na bango mpo na bolingo mpe misala malamu mpe koyikisana mpiko mpo na mosala ya ntina mingi etali koyambola elikya na biso, ezala ya kofanda na mabelé to ya kokende na likoló.—Yoane 13:35.
“Kondimana ya seko”
13, 14. Na ndimbola nini kondimana ya sika ezali kondimana ya seko?
13 Nini ekosalema ntango moto ya nsuka kati na ba 144 000 akozwa kokokisama ya elikya na bango ya bomoi na likoló? Kondimana ya sika ekokóma na nsuka na yango? Na ntango wana, mosangani moko te ya Yisalaele ya Nzambe akozala lisusu awa na mabelé. Basangani nyonso na kondimana yango bakozala esika moko na Yesu “kati na bokonzi na Tata na [ye].” (Matai 26:29) Kasi tozali komikundola maloba ya Paulo kati na mokanda na ye epai na Baebele ete: “Nzambe na kimya . . . akambaki longwa na bakufi . . . Mobateli monene na bampate, mpo na makila na kondimana na seko.” (Baebele 13:20; Yisaya 55:3) Na ndimbola nini kondimana ya sika ezali kondimana ya seko?
14 Ya liboso, na bokeseni na kondimana ya Mibeko, kondimana mosusu ekokitana yango te. Ya mibale, matomba ya mosala na yango makoumela libela, lokola mpe bokonzi ya Yesu ekoumela libela. (Kokanisá Luka 1:33 na 1 Bakolinti 15:27, 28.) Bokonzi ya likoló ezali na esika ya seko kati na mikano ya Yehova. (Emoniseli 22:5) Mpe ya misato, bampate mosusu bakokóba kozwa matomba na ebongiseli ya kondimana ya sika. Na boumeli ya mbula nkóto ya Boyangeli ya Yesu, bato ya sembo bakokóba “kosalela [Yehova] mosala ya bulɛɛ butu na moi kati na tempelo na ye” lokola bazali kosala yango lelo oyo. Yehova akomikundola lisusu te masumu na bango oyo alimbisaki na moboko ya mbeka ya “makila na kondimana” ya Yesu. Bakokóba kozala na etɛlɛmɛlo ya sembo lokola baninga ya Nzambe, mpe mibeko na ye mikokomama libela kati na mitema na bango.
15. Lobelá boyokani ya Yehova elongo na basambeli na ye oyo bakofanda na mabelé na mokili ya sika.
15 Yehova akozala nde na likoki ya koloba mpo na bato yango ete: ‘Nazali Nzambe na bango, mpe bango bazali bato na ngai’? Ɛɛ. “Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo.” (Emoniseli 21:3) Bakokóma “molako na bapɛtwi,” bamonisi, awa na mabelé, ya “mboka elingami,” mwasi ya libala ya Yesu Klisto na likoló. (Emoniseli 14:1; 20:9; 21:2) Makambo yango nyonso makosalema mpamba te bazali na kondima na “makila na kondimana” ya Yesu oyo masopamaki mpe bazali kotosa bakonzi mpe banganga ya likoló, oyo ntango bazalaki awa na mabelé bazalaki Yisalaele ya Nzambe.—Emoniseli 5:10.
16. (a) Baoyo bakosekwisama awa na mabelé bakozala na likoki ya kozwa makambo nini? (b) Mapamboli nini makoya na nsuka ya mbula nkóto?
16 Ezali boni mpo na bakufi oyo bakosekwisama awa na mabelé? (Yoane 5:28, 29) Bango mpe bakobyangama mpo na “kopambolama” na nzela ya Yesu, Mombóto ya Abalayama. (Genese 22:18) Bango mpe bakolinga nkombo ya Yehova, bakosalela ye, bakopesa ye bambeka oyo endimami, mpe bakosalela ye mosala ya bulɛɛ kati na ndako na ye mpo na kobondela. Baoyo bakosala bongo bakokɔta na bopemi ya Nzambe. (Yisaya 56:6, 7) Na nsuka ya mbula nkóto, basembwi nyonso bakokóma na ezalela ya kokoka na nzela ya mosala ya Yesu Klisto mpe ya banganga basalani na ye 144 000. Bakozala sembo, kasi bakosuka te bobele na kotángama sembo lokola baninga ya Nzambe. “Bakozonga na bomoi,” bakosikolama mpenza na lisumu mpe na liwa oyo basangolaki na Adama. (Emoniseli 20:5; 22:2) Yango ekozala mpenza lipamboli! Na bingɛngiseli oyo tozali na yango lelo, emonani ete mosala ya bonganga ya Yesu mpe ba 144 000 ekosuka wana. Mapamboli ya mokolo ya Mbɔndi moleki monene makokokisama na mobimba na yango. Lisusu, Yesu ‘akozongisa bokonzi epai na Nzambe mpe Tata na ye.’ (1 Bakolinti 15:24) Bato bakomekama mpo na mbala ya nsuka, mpe na nsima, Satana na bademó na ye bakobomama mpo na libela.—Emoniseli 20:7, 10.
17. Na kotalela esengo oyo ezali liboso na biso, mokomoko kati na biso asengeli kozala na ekateli makasi ya kosala nini?
17 Soki “kondimana na seko” ekosala mosala mosusu, yango ekozala mosala nini na eleko kitoko oyo ekobanda ntango wana? Toyebi te. Makambo oyo Yehova asili komonisa kino ntango oyo makoki mpo na sikawa. Makambo yango mazali kokamwisa biso mpenza. Kanisá naino—kozala na bomoi ya seko lokola basangani ya “likoló ya sika mpe nsé ya sika”! (2 Petelo 3:13) Tótika te ete eloko moko elɛmbisa mposa na biso ya kosangola elaka wana. Kotikala ngwi ekoki kozala likambo ya mpasi. Paulo alobaki ete: “Bosɛngi mitema milai ete bósala mokano na Nzambe mpe ete bózwa yango esili ye kolaka.” (Baebele 10:36) Kasi, tómikundola ete mokakatano nyonso oyo tosengeli kolónga, botɛmɛli nyonso oyo tosengeli koyikela mpiko, ezali eloko mpamba liboso na esengo oyo ezali liboso na biso. (2 Bakolinti 4:17) Na yango, moko te kati na biso azala “kati na bango . . . baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama.” Nzokande, tómimonisa ete tozali “kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.” (Baebele 10:39) Tiká ete biso nyonso tótya motema mobimba epai na Yehova, Nzambe na kondimana, mpo na lipamboli ya seko ya mokomoko kati na biso nyonso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika, mokapo 13, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Okangi ntina?
◻ Longola baklisto bapakolami, banani bazali kozwa mapamboli na nzela ya Mombóto ya Abalayama?
◻ Na kozwáká mapamboli na nzela ya kondimana ya sika, lolenge nini bampate mosusu bazali lokola baprozelite na nsé ya kondimana ya kala?
◻ Lolenge nini bampate mosusu bapambolami na nzela ya ebongiseli ya Mokolo ya Mbɔndi moleki monene?
◻ Mpo na nini Paulo abéngaki kondimana ya sika ete “kondimana na seko”?
[Etanda na lokasa 21]
Mosala ya bulɛɛ kati na tempelo
Ebele monene bazali kosambela elongo na baklisto bapakolami na lopango ya mabelé ya tempelo monene ya Nzambe na elimo. (Emoniseli 7:14, 15; 11:2) Eloko moko te ezali kondimisa biso ete bazali na Lopango ya Bapakano oyo ekabwani na Lopango ya Bayisalaele. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, Lopango ya Bapakano ezalaki na tempelo. Nzokande, na malako ya botongi oyo mapemamaki na Nzambe mpo na tempelo ya Salomo mpe tempelo ya Ezekiele, Lopango ya Bapakano ezalaki te. Na tempelo ya Salomo, ezalaki na lopango ya libándá epai Bayisalaele mpe baprozelite, mibali mpe basi, bazalaki kosambela elongo. Yango ezali ndakisa ya esakweli ya lopango ya mabelé ya tempelo ya elimo, epai Yoane amonaki ebele monene bazali kosala mosala ya bulɛɛ.
Nzokande, bobele banganga mpe Balevi nde bazalaki na lotómo ya kokɔta na lopango ya ntei, epai etumbelo monene ezalaki; bobele banganga nde bakokaki kokɔta na Esika Mosantu; mpe bobele nganga monene nde akokaki kokɔta na Esika Eleki Bosantu. Emonani ete lopango ya ntei mpe Esika Mosantu ezali elilingi ya ezalela ya elimo oyo ekokani na mosusu te oyo baklisto bapakolami bazali na yango awa na mabelé. Mpe Esika Eleki Bosantu ezali elilingi ya likoló mpenza, epai baklisto bapakolami bakozwa bomoi ezangi kufa elongo na Nganga Monene na bango na likoló.—Baebele 10:19, 20.
[Elilingi na lokasa 23]
Na kotalela esengo oyo ezali liboso na biso, tiká ete ‘tózala na kondima mpo na kobatela milimo na bomoi’