Bózala te bayoki oyo babosanaka makambo
“Bózalaka nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te, komikosáká bino moko na makanisi ya lokuta.”—YAKOBO 1:22, NW.
1. Libota ya Yisalaele na ntango ya kala bazwaki libaku malamu ya komona makamwisi nini?
TOKOKI mpenza koloba ete makamwisi oyo Yehova asalaki na Ezipito na ntango ya kala ezali makamwisi “ya kobosana te.” Malɔzi nyonso zomi ezalaki mpenza makambo ya nsɔmɔ. Nsima ya makambo yango, Bayisalaele balongwaki na boombo na ndenge ya kokamwa mpe bakatisaki Mai Motane oyo ekabwanaki. (Deteronome 34:10-12) Soki omonaki makambo wana na miso, mbɛlɛ olingaki kobosana te Moto oyo asalaki yango. Nzokande, mokomi ya nzembo alobaki ete: “[Bayisalaele] babosanaki Nzambe mobikisi na bango oyo asalaki makambo minene kuna na Ezipito, makambo ya kokamwa na mokili ya Hama, makambo ya kobanga epai na Mai Motane.”—Nzembo 106:21, 22.
2. Makambo nini emonisi ete botɔndi ya Bayisalaele mpo na misala minene ya Nzambe eumelaki te?
2 Nsima ya kokatisa Mai Motane, Bayisalaele “babangaki [Yehova mpe bamonisaki kondima epai na Yehova, NW].” (Exode 14:31) Mibali ya Yisalaele bayembelaki Yehova nzembo ya bolongi elongo na Mose, mpe Milyami na basi mosusu babɛtaki mbonda mpe babinaki. (Exode 15:1, 20) Ya solo, misala minene ya Yehova ekamwisaki libota ya Nzambe. Kasi, botɔndi na bango mpo na Moto oyo asalaki misala wana eumelaki te. Mwa moke na nsima, mingi basalaki makambo lokola nde babosanaki nyonso oyo bamonaki. Bakómaki kolelalela mpe koimaima mpo na Yehova. Bamosusu bakómaki kosambela bikeko mpe kosala pite na ekobo.—Mituya 14:27; 25:1-9.
Nini ekoki kotinda biso na kobosana?
3. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, makambo nini tokoki kobosana?
3 Tozali mpenza koyeba te likambo oyo esalaki ete Bayisalaele bázanga botɔndi. Nzokande, likambo yango ekoki mpe kokómela biso. Ya solo, biso tomonaki makamwisi ya Nzambe te. Na yango, ntembe ezali te ete na bomoi na biso lokola basaleli ya Nzambe, tokutaná na makambo oyo tokoki kobosana te. Bamosusu kati na biso bakoki komikundola ntango oyo bayambaki solo. Bantango mosusu ya esengo ekoki kozala libondeli oyo tosalaki mpo na komipesa epai na Yehova mpe batisimo ya mai oyo tozwaki lokola baklisto ya solo. Mingi kati na biso tomoná ndenge oyo Yehova asungá biso na makambo mosusu kati na bomoi na biso. (Nzembo 118:15) Na koleka nyonso, tozwi elikya ya kobika na nzela ya liwa ya Mwana na ye Yesu Klisto, oyo amipesaki lokola mbeka. (Yoane 3:16) Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, soki bamposa ya mabe eyeli biso mpe tokutani na mitungisi ya bomoi, tokoki mpe kobosana makambo malamu oyo Yehova asalá mpo na biso.
4, 5. (a) Ndenge nini Yakobo apesaki likebisi na ntina na likama ya kozala bayoki oyo babosanaka makambo? (b) Ndenge nini tokoki kosalela elilingi ya moto na talatala oyo Yakobo apesaki?
4 Na mokanda oyo akomelaki baninga na ye baklisto, Yakobo, oyo azalaki ndeko ya Yesu, akebisaki bango na likama ya kozala bayoki oyo babosanaka makambo. Akomaki boye: “Bózalaka nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te, [komikosáká bino moko mpenza na makanisi ya lokuta, NW]. Mpo ye oyo akoyokaka liloba nde akotosaka yango te azali lokola mobali oyo amitali elongi na nzoto na ye na talatala. Amitali mpe alongwi nde nokinoki abosani soko azali motindo nini.” (Yakobo 1:22-24) Yakobo alingaki koloba nini na maloba wana?
5 Ntango tolamukaka na ntɔngɔ, tomitalaka na talatala mpo na komona esika oyo tosengeli kobongisa mpo tómonana kitoko na miso ya bato. Soki tobandi misala na biso mpe totii makanisi na makambo mosusu, tobosanaka makambo oyo tomonaki na talatala. Ekoki mpe kokómela biso bongo na makambo ya elimo. Ntango tozali kotala na kati ya Liloba ya Nzambe, tokoki kokokanisa ndenge oyo tozali na ndenge oyo Yehova alingaka ete tózala. Na ndenge yango, tokomona mpenza na miso mabunga na biso. Boyebi yango esengeli kotinda biso tóbongisa bomoto na biso. Kasi, ntango tokomipesa na misala na biso ya mokolo na mokolo mpe kobundana na mikakatano na biso, tokoki nokinoki kotika kokanisa makambo ya elimo. (Matai 5:3; Luka 21:34) Ezali nde lokola tobosani makambo malamu oyo Nzambe asalelá biso. Na ntango wana, mposa ya kosala masumu ekoki kokweisa biso.
6. Makambo nini tokoki kotalela na kati ya Makomami oyo ekoki kosalisa biso ete tóbosana liloba ya Yehova te?
6 Na mokanda ya liboso oyo akomelaki Bakolinti, ntoma Paulo alobelaki Bayisalaele oyo babosanaki makambo ntango bazalaki na mokili mokauki. Baklisto ya ekeke ya liboso bazwelaki maloba ya Paulo litomba, biso mpe soki totaleli makambo oyo akomaki, ekosalisa biso tóbosana liloba ya Yehova te. Yango wana, tótalela naino 1 Bakolinti 10:1-12.
Tóboya bamposa ya mokili
7. Makambo nini emonisaki Bayisalaele polele ete Yehova alingaki bango?
7 Makambo oyo Paulo alobaki mpo na Bayisalaele ezali likebisi mpo na baklisto. Na kati ya makambo oyo Paulo akomaki tozali kotánga boye: “Bandeko, nalingi ete bóyeba ete bankɔkɔ na biso bazalaki nyonso na nse ya lipata mpe nyonso balekaki mai na monana. Nyonso mpe babatisamaki epai na Mose kati na lipata mpe kati na mai ya monana.” (1 Bakolinti 10:1-4) Na ntango ya Mose, Bayisalaele bamonaki nguya ya Nzambe, bamonaki mpe likonzi ya lipata ya Nzambe oyo ezalaki kokamba bango na moi mpe esalisaki bango báleka na Mai Motane. (Exode 13:21; 14:21, 22) Bayisalaele wana bamonaki mpenza ete Yehova alingaki bango.
8. Nini ekómelaki Bayisalaele ntango babosanaki makambo ya elimo ?
8 Paulo akomaki lisusu ete: “Nde Nzambe asepelaki na mingi na bango te, mpo ete bakweisamaki kati na lisobe.” (1 Bakolinti 10:5) Talá likambo ya mawa! Bayisalaele mingi oyo babimaki na Ezipito babebisaki makambo, yango wana bakɔtaki na Mokili ya Ndaka te. Lokola Nzambe aboyaki bango mpo bazangaki kondima, bakufaki na kati ya mokili mokauki. (Baebele 3:16-19) Makambo yango ekoki koteya biso nini? Paulo alobaki boye: “Makambo oyo nyonso mazali elakiseli epai na biso ete tózala na mposa ya mabe te [lokola] ezalaki bango na mposa.”—1 Bakolinti 10:6.
9. Makambo nini Yehova asalelaki bato na ye, mpe ndenge nini Bayisalaele batalelaki yango?
9 Na kati ya mokili mokauki, Bayisalaele bazalaki na makambo mingi oyo ekokaki kosalisa bango ete elimo na bango ebosanaka te. Na ndakisa, basalaki kondimana na Yehova mpe bakómaki libota na ye. Longola yango, bapesaki bango banganga, hema mpo na losambo mpe ebongiseli ya kopesa Yehova bambeka. Kasi, na esika básepelaka na makabo wana ya elimo, batikaki ete mitema na bango ezanga botɔndi mpo na biloko oyo Nzambe apesaki bango.—Mituya 11:4-6.
10. Mpo na nini tosengeli kokanisa Nzambe ntango nyonso?
10 Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali te lokola Bayisalaele na mokili mokauki; bazali kosepela mpo ete Yehova andimi bango. Kasi, ezali na ntina mingi ete moto na moto abosana Nzambe na makanisi na ye te. Soki tozali kobosana Nzambe te, tokoboya bamposa ya mabe oyo ekoki kozipa biso miso ya elimo. Tosengeli kozala na ekateli ya ‘koboya bizaleli oyo ezali kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili oyo, kasi tózala na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na kobanga Nzambe na mokili oyo.’ (Tito 2:12) Baoyo na kati na biso bazali na lisangá ya boklisto banda bomwana, basengeli kokanisa te ete bazangi eloko moko ya malamu. Soki makanisi ya ndenge wana eyeli biso na motó, ekozala malamu tókanisa Yehova mpe mapamboli oyo alaki biso.—Baebele 12:2, 3.
Tótosaka Yehova na makambo nyonso
11, 12. Ndenge nini moto moko akoki kobengama mosambeli ya bikeko atako asambelaka mpenza bikeko ya solosolo te?
11 Paulo akebisaki biso lisusu ntango akomaki ete: “Bózala basambeli ya bikeko te [lokola] bamosusu na bango. Lokola ekomami ete, Bato bafandaki kolya mpe komela mpe batɛlɛmaki mpo na kobina.” (1 Bakolinti 10:7) Na esika oyo, Paulo azalaki kolobela likambo oyo esalemaki ntango Bayisalaele basɛngaki na Alona ete asalela bango mwana-ngɔmbɛ ya wolo. (Exode 32:1-4) Atako ezali mpenza mpasi ete tósambela mpenza bikeko, kasi tokoki kokóma basambeli ya bikeko soki tozali kotika ete bamposa na biso moko etinda biso tóbosana kosambela Yehova na molimo na biso mobimba.—Bakolose 3:5.
12 Na mokanda na ye mosusu, Paulo akomaki ete ezalaki na bato mosusu oyo bazalaki komitungisa mingi mpo na biloko ya mosuni na esika ya komitungisa mpo na makambo ya elimo. Mpo na baoyo bazalaki “kotambola lokola banguna ya nzete ya mpasi ya Klisto,” akomaki boye: “Bakosuka na kobomama, mpe nzambe na bango ezali libumu na bango.” (Bafilipi 3:18, 19, NW) Bazalaki te kosambela ekeko moko boye. Bazalaki kosambela nde bamposa na bango ya biloko ya mosuni. Kasi, elingi koloba te ete bamposa nyonso ezalaka mabe. Yehova akelaki biso na bamposa mpe na makoki ya kosepela na makambo ndenge na ndenge. Kasi, bato oyo bazali kotya bisengo na esika ya liboso, koleka kutu boyokani na bango na Nzambe, bakómi basambeli ya bikeko.—2 Timote 3:1-5.
13. Lisolo ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo eteyi biso nini?
13 Nsima ya kobima na Ezipito, Bayisalaele basalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo mpo na kosambela yango. Lisolo yango ezali kokebisa biso na losambo ya bikeko mpe ezali koteya biso likambo mosusu ya ntina mingi. Bayisalaele baboyaki kotosa likambo oyo Yehova alobaki na bango polele. (Exode 20:4-6) Kasi, bazalaki na mposa te ete báboya Yehova lokola Nzambe na bango. Batumbelaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ bambeka mpe babengaki molulu yango “elambo epai ya [Yehova].” Emonani lokola ete bamikosaki na kokanisa ete Nzambe akozipa miso na likambo ya kozanga botosi oyo basalaki. Likambo oyo basalaki ezalaki lokola kofinga Yehova, mpe Yehova asilikaki makasi mpo na yango.—Exode 32:5, 7-10; Nzembo 106:19, 20.
14, 15. (a) Mpo na nini Bayisalalele bakómaki bayoki oyo babosanaka? (b) Soki tozali na ekateli ya kokóma te bayoki oyo babosanaka, tokosala nini liboso ya mibeko ya Yehova?
14 Emonanaka mpenzampenza te ete Motatoli ya Yehova akɔta na lingomba ya lokuta. Kasi, atako bazali na kati ya lisangá, bato mosusu bakoki koboya kolanda toli ya Yehova na ndenge mosusu. Bayisalaele bazalaki na nyonso mpo bákóma te bayoki oyo babosanaka makambo. Bayokaki Mibeko Zomi mpe bazalaki wana ntango Mose apesaki bango mobeko ete: “Bokosala banzambe ya palata esika moko na ngai te, mpe bokosala mpo na bino banzambe na wolo te.” (Exode 20:18, 19, 22, 23) Atako bongo, Bayisalaele basambelaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo.
15 Biso mpe tozali na likambo moko te oyo ekoki kopusa biso tókóma bayoki oyo babosanaka makambo. Na nzela ya Makomami, Nzambe azali kopesa biso toli oyo etali makambo mingi ya bomoi. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe ezali komonisa polele ete kodefa eloko mpe koboya kofuta yango ezali mabe. (Nzembo 37:21) Balobi na bana ete bátosaka baboti na bango, mpe batata basengeli kobɔkɔla bana na bango na “mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:1-4) Baklisto oyo bazali minzemba basengeli kobala “kaka kati na Nkolo,” mpe epai na basaleli ya Nzambe oyo babalá, balobi ete: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana ya mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” (1 Bakolinti 7:39; Baebele 13:4) Soki tozali na ekateli makasi ya kozala te bayoki oyo babosanaka makambo, tokozwa na lisɛki te batoli nyonso oyo Nzambe azali kopesa biso mpe tokotosa yango.
16. Bato oyo basambelaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo basukaki ndenge nini?
16 Yehova asepelaki te ntango Bayisalaele bamekaki kosambela ye na ndenge na bango. Kutu, bato 3 000 bakufaki; ekoki kozala mpo bazalaki na esika ya liboso na likambo ya kosambela mwana-ngɔmbɛ, likambo oyo emonisaki mpenza botomboki na bango. Bato mosusu oyo basalaki mabe bazwaki etumbu ya Yehova. (Exode 32:28, 35) Likambo oyo ezali mpenza liteya monene mpo na moto nyonso oyo atángaka Liloba ya Nzambe kasi alingi kopona makambo oyo asepeli kotosa!
“Bókima pite”
17. 1 Bakolinti 10:8 ezali kolobela likambo nini?
17 Na likambo moko, bamposa ya nzoto ekoki kosala ete tóbosana makambo ya elimo; Paulo amonisaki likambo yango ntango alobaki boye: “Ekoki ete tósala makambo ya pite te [lokola] bamosusu na bango basalaki pite mpe bakweaki bato nkóto ntuku mibale na misato na mokolo moko.” (1 Bakolinti 10:8) Na vɛrsɛ oyo, Paulo alobelaki likambo moko oyo esalemaki na mokili ya Moaba, na nsuka ya mbula 40 ya koyengayenga na mokili mokauki. Yehova autaki kosunga Bayisalaele mpo bábɔtɔla mokili oyo ezali na ɛsti ya Yaladene, kasi mingi kati na bango babosanaki nyonso wana mpe bamonisaki botɔndi te. Ntango bakómaki mpenza pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, bakweisamaki na pite, ekobo mpe na losambo ya mbindo ya Baala ya Peolo. Bato soki 24 000 babomamaki, bato 1 000 kati na bango bazalaki na motó ya likambo yango.—Mituya 25:9.
18. Etamboli nini ekoki komema moto na kosala pite to ekobo?
18 Basaleli ya Yehova lelo oyo bayebani malamu ete balandaka mitinda ya Nzambe oyo esɛngaka kozala na bizaleli malamu mpenza. Kasi, baklisto mosusu, ntango bakutanaki na komekama mpo na kosala pite, batikaki kokanisa Nzambe mpe mibeko na ye. Bakómaki bayoki oyo babosanaka makambo. Na ebandeli, lisɛnginya yango ekoki mpenza komema mbala moko te na kosala pite. Ekoki kozala ete moto akómi kobendama na kotala mikanda to bafilme oyo elakisaka bato bazali bolumbu, kosala masɛki oyo ebongi te to kokangamakangama na moto oyo tozali na mokano ya kobala ye te, to mpe kokóma baninga ya bato oyo bazali na etamboli ya mabe. Makambo nyonso wana ememaki baklisto na kosala masumu.—1 Bakolinti 15:33; Yakobo 4:4.
19. Toli nini Makomami ezali kopesa mpo na kosalisa biso ete ‘tókima pite’?
19 Soki tomekami mpo na kokwea na etamboli ya mbindo, tosengeli kotika te kokanisa Yehova. Tosengeli kutu kolanda makambo oyo ayebisaka biso mbala na mbala kati na Liloba na ye. (Nzembo 119:1, 2) Mingi kati na biso baklisto tozali kosala makasi ete tótikala na bizaleli ya pɛto, kasi kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe ezali kosɛnga ete tólɛmba te na milende oyo tozali kosala. (1 Bakolinti 9:27) Epai ya baklisto ya Loma, Paulo akomaki boye: “Bato nyonso basili koyoka ndenge bino botosaka Nzambe. Bongo nazali kosepela mingi mpo na bino. Kasi nalingi ‘te bozala na mayele mingi ya koyeba makambo ya malamu, mpe boboya makambo ya mabe.” (Roma 16:19, Boyokani ya Sika) Lokola Bayisalaele 24000 babomamaki mpo basalaki masumu, ndenge moko mpe basali ya pite mpe ya makambo mosusu ya mabe bakozwa etumbu ya Nzambe. (Baefese 5:3-6) Yango wana, na esika tókóma bayoki oyo babosanaka makambo, tosengeli ntango nyonso ‘kokima pite.’—1 Bakolinti 6:18.
Tómonisaka botɔndi ntango nyonso mpo na oyo Yehova azali kopesa biso
20. Ndenge nini Bayisalaele bamekaki Yehova, mpe makambo esukaki ndenge nini?
20 Baklisto mingi bakweaka te na pite to na ekobo. Kasi, tosengeli kokeba ete tólanda te nzela oyo ekomema biso na koimaima oyo ekoki kosala ete Nzambe aboya biso. Paulo apesi biso toli boye: “Ekoki te ete tómeka Nkolo [lokola] bamosusu na bango bamekaki ye mpe babomamaki na nyoka. Ekoki te ete tóimaima [lokola] bamosusu na bango baimaimaki mpe babebisami na Mobebisi.” (1 Bakolinti 10:9, 10) Bayisalaele baimaimaki na ntina na Mose mpe Alona, baimaimaki kutu na ntina na Nzambe ye moko; bamilelalelaki mpo na mana oyo bapesaki bango na ndenge ya likamwisi. (Mituya 16:41; 21:5) Likambo nini esilikisaki Yehova makasi koleka: koimaima to pite? Biblia emonisi ete banyoka ebomaki bato mingi oyo baimaimaki. (Mituya 21:6) Na likambo mosusu oyo esalemaki liboso, batomboki koleka 14 700 oyo baimaimaki babomamaki. (Mituya 16:49) Yango wana, tótyolaka te biloko oyo Yehova azali kopesa biso mpo tómeka motema molai na ye te.
21. (a) Elimo ya Nzambe esalisaki Paulo na kokóma elendiseli nini? (b) Na kotalela Yakobo 1:25, ndenge nini tokoki kozwa bolamu ya solosolo?
21 Ntango akomelaki baninga na ye baklisto, Paulo asukisaki maloba na ye ya kokebisa bango na elendiseli oyo: “Makambo oyo eyeli bango lokola bikebiseli, ikomami mpo na kolakisa biso mpo ete nsuka ya bikeke eyei na biso. Boye, tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:11, 12) Yehova apamboli biso mpe mingi lokola apambolaki Bayisalaele. Kasi, tósala lokola bango te, tóbosana soki moke te mpe tózanga botɔndi te mpo na makambo malamu oyo Nzambe azali kosalela biso. Ntango mitungisi ya bomoi elɛmbisi biso, tókanisaka bilaka kitoko oyo ezali na kati ya Liloba na ye. Tókanisaka eloko ya motuya oyo tozali na yango: boyokani na biso na Yehova, mpe tótika te kosala mosala oyo apesi biso ya kosakola Bokonzi. (Matai 24:14; 28:19, 20) Soki tozali kosala bongo, tokozwa bolamu ya solosolo, mpamba te Makomami elaki ete: “Ye oyo azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko na bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana, azali moyoki oyo akobosana te kasi akosalaka misala; ye wana akozala na esengo kati na misala na ye.”—Yakobo 1:25.
Okopesa eyano nini?
• Nini ekoki kokómisa biso bayoki oyo babosanaka makambo?
• Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tótosaka Nzambe na makambo nyonso?
• Ndenge nini tokoki ‘kokima pite’?
• Ndenge nini tosengeli kotalelaka biloko oyo Yehova azali kopesa biso?
[Elilingi na lokasa 15]
Bayisalaele babosanaki misala minene oyo Yehova asalelaki bango
[Elilingi na lokasa 16]
Basaleli ya Yehova bazali na ekateli ya kolanda ntango nyonso mitinda ya Nzambe oyo esɛngaka kozala na bizaleli malamu mpenza