Rahaba Atangamaki moyengebene mpo na misala ya kondima
KANISA naino! Mwasi ya pite atangami moyengebene na miso na Nzambe. Bato mingi bakoki koloba ete: “Ekoki kosalama te!” Nzokande, ezali yango likambo lisalamaki epai na Rahaba, ndumba ya Yeliko, engumba moko ya kala ya Kanana.
Yakobo, mokomi moko ya Biblia akómaki ete: “Bomɔni ete moto akolonga mpo na misala na ye mpe bobɛlɛ mpo na kondima [yango moko, NW] tɛ. Bobɛlɛ bongo, [Rahaba, NW], mwasi na pite, alongaki mpɔ na misala tɛ wana [eyambaki, NW] ye bantoma mpe abimisi bango na njela mosusu? Ntina ete, lokola njoto oyo ejangi mpema esili kokufa, bongo kondima oyo ejangi misala esili kokufa lokola.” (Yakobo 2:24-26) Mpo na nini Rahaba atangamaki moyengebene? Asalaki nini mpo azwa etelemelo kitoko wana liboso na Nzambe?
Bayisraele bakómi!
Tózonga naino nsima kino na mobu 1473 L.T.B. Kanisá esika likambo yango lisalamaki. Engumba ya Yeliko ezingami na bifelo ya makasi. Ndako ya Rahaba mwasi ya pite ebakami kati na bifelo ya engumba kuna na likoló. Na etelemelo wana malamu, akokaki mpenza kotala epai na ɛ́sti mai ya ebale Yaladene oyo ezalaki na mpela. (Yosua 3:15) Na ngámbo ya ɛ́sti, asilaki mbala mosusu komona molako ya Bayisraele, oyo ezalaki na babundi koleka 600 000. Bazali bobele penepene wana!
Rahaba asilaki koyoka nsango ya elónga ya Bayisraele kati na bitumba. Ayebaki mpe motindo Yehova amonisaki nguya na ye, mingi mpenza ntango afungolaki nzela kati na Mai Motane mpo ete Bayisraele bakoka kokima. Ezali bongo polele ete, kotonda ya mai ya Yaladene ekozala epekiseli te. Oyo ezali ntango ya mpasi! Rahaba akosala nini?
Rahaba akamati etelemelo na ye
Mwa moke na nsima, Rahaba ayambi bapaya mibale oyo balakaki boyei na bango te—banɔ́ngi oyo bauti na molako ya Yisraele. Bazali koluka esika ya kolala, mpe Rahaba akɔtisi bango na ndako na ye. Kasi nsango na bango ekómi epai na mokonzi ya Yeliko. Nokinoki atindi bapolisi na ye mpo na kokanga bango.—Yosua 2:1, 2.
Ntango bapolisi ya mokonzi bakómaki, Rahaba asilaki kokamata etelemelo na ye mpo na kosalela Yehova Nzambe. Batindami ya mokonzi bapesaki etinda ete: “Bimisa mibali baoyo bakomi epai na yɔ.” Rahaba abombaki banɔ́ngi na nse ya nkongenkonge oyo etandamaki ete ekauka likoló na nsambá ya ndako na ye. Alobaki na bango ete: “Sɔlɔ mibali bakomi epai na ngai kasi nayebaki te sɔkɔ bauti epai wapi, mpe pɛnɛpɛnɛ na ntango na kojipa ekuke [ya engumba] na ntango na butu, bango babimi. Nayebi tɛ sɔkɔ bakei wapi. Bengana bango nɔki mpɔ ete okojua bango.” (Yosua 2:3-5) Basali ya mokonzi basalaki bongo—kasi bobele mpamba.
Rahaba asili kozimbisa banguna. Nokinoki asali matambe mosusu oyo mamonisi kondima na ye epai na Yehova na nzela ya misala. Abuti na nsambá ya ndako na ye mpe alobi na banɔ́ngi ete: “Ngai nayebi ete [Yehova akopesa, NW] bino mokili oyo.” Rahaba andimi ete bafandi nyonso ya mboka bazali kolenga mpo bayokaki ete Nzambe “akaukisaki Mai Motane” liboso na Bayisraele esili koleka mibu 40. Bato yango bayebi lisusu ete Bayisraele babomaki mikonzi mibale ya Baamola. Rahaba alobi lisusu ete: “Noki eyokaki biso yango, tolɛmbaki mpe mpiko etikalaki na moto tɛ na ntina na bino, mpɔ ete [Yehova, NW] Njambe na bino ajali Njambe na lola na likolo mpe na mokili na nse.”—Yosua 2:8-11.
Rahaba abondeli mibali wana mibale ete: “Na bongo simbela ngai ndai na nkombo na [Yehova, NW] ete lokola ngai nasaleli bino boboto, bino mpe bokosalela ndako na tata na ngai boboto, mpe bokopɛsa ngai elembo na sɔlɔ, mpe bokobikisa bomɔi na tata na ngai mpe mama na ngai, mpe bandeko na ngai mibali mpe basi, mpe bato na bango yɔnsɔ.”—Yosua 2:12, 13.
Mibali yango bandimi mpe bayebisi Rahaba likambo oyo ye asɛngeli kosala. Longwa na maninisa ya ndako na ye, asɛngeli kokanga nkamba motane oyo akosalela mpo na kokitisa banɔ́ngi libándá na bifelo ya Yeliko. Asɛngeli mpe koyanganisa libota na ye kati na ndako na ye, esika basengeli kozala mpo na kobatelama. Rahaba apesi mpe na banɔ́ngi oyo bazali kokima bandimbola mpo na motindo ya etúká. Mpe mpo na batoli na ye banɔ́ngi balóngi komibikisa na mabɔkɔ na bato oyo bazalaki kolanda bango. Ezali yango nde banɔ́ngi basalaki. Nsima na kokanga nkamba ya langi motane mpe koyanganisa basangani ya ndako na ye, Rahaba azali kozela motindo makambo makoleka.—Yosua 2:14-24.
Misala ya Rahaba mimonisi nini? Ya solo, amonisaki kondima na ye epai na Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso! Akomitambwisa engebene mitinda na ye. Mpe, ya solo akotangama moyengebene mpo na misala motindo wana ya kondima.
Bifelo bikwei!
Mwa baposo eleki. Elongo na banganga—oyo bamoko bamemi maseke ya mpate mobali mpe basusu bamemi sanduku mosantu ya kondimana—mibali ya etumba ya Yisraele bazali kotambola zingazinga ya Yeliko. Mokolo na mokolo Bayisraele bazali mbala moko kosala zolonganó ya engumba, na boumeli ya mikolo motoba. Nzokande, na mokolo oyo ya nsambo, batamboli mbala motoba zingazinga ya mboka. Na nsima batamboli lisusu mpo na mbala ya nsambo!
Ntango basilisi kotambola mpo na mbala ya nsambo, bayúli maseke na boumeli ya ntango molai. Sikawa Bayisraele bangangi na nguya nyonso. Na mbala moko, Yehova akweisi bifelo oyo bizalaki kobatela Yeliko, kati na makelele makasi lokola nkáké. Bobele eteni oyo ezalaki kosimba ndako ya Rahaba nde ekweaki te. Biteni mosusu ya mboka mpe bafandi na yango babomami. Lokola amonisaki kondima na ye na misala, mwasi ya pite oyo abongolaki motema abikisamaki elongo na bato na libota na ye, mpe abandaki kofanda esika moko na libota ya Yehova.—Yosua 6:1-25.
Bizaleli ya Rahaba
Rahaba azalaki mwasi ya lipombó mpe ya goigoi te, mpamba te likoló ya nsambá ya ndako na ye nkongenkonge ezalaki kokauka na moi. Mpunga ya kongélé ezalaki mpo na kosala bilamba. Lisusu rúlo ya nkamba motane ezwamaki na ndako ya Rahaba. (Yosua 2:6, 18) Akokaki bongo mbala mosusu kozala mosali ya bilamba mpe emonani ete ayebaki mosala ya kotya langi na bilamba. Ee, Rahaba azalaki mwasi ya kosala mosala makasi. Oyo eleki mpenza, akómaki kobanga na limemya nyonso Yehova.—Talá Masese 31:13, 19, 21, 22, 30.
Ezali boni mpo na mosala mosusu oyo Rahaba azalaki na yango? Azalaki te bobele nkolo ya ndako ya bapaya. Ezali bongo te, mpo ete Makomami mazali kosalela maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo mazali komonisa mwasi ya pite mpo na kolobela ye. Na ndakisa, liloba ya Liebele zoh·nahʹ elimbolaka ntango nyonso etamboli ya pite. Tosengeli mpe koyeba ete, epai na Bakanana bondumba ezalaki mpenza mosala ya nsoni te.
Likambo oyo ete Yehova asalelaki mwasi ya pite ezali komonisa motema mawa na ye monene. Lolenge ya libándá ekoki kokosa biso, kasi Nzambe “akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:7) Na yango, basi ya pite ya motema sembo oyo bazali kobongola motema na etamboli na bango ya pite bakoki kozwa bolimbisi ya Yehova Nzambe. (Talá Matai 21:23, 31, 32.) Rahaba ye moko atikaki etamboli ya masumu mpo na kolanda etamboli ya sembo oyo endimami na Nzambe.
Banɔ́ngi ya Yisraele bazalaki komitambwisa engebene Mibeko ya Nzambe, na yango balalaki na ndako ya Rahaba mpo na kosala pite te. Likanisi na bango ekokaki kozala ete kokɔta na ndako ya mwasi ya pite esɛngelaki mpenza kobenda likebi na bato te likoló na bango. Esika ndako yango etongamaki kuna na likoló ya efelo ya mboka elingaki lisusu kopesa bango nzela ete bakima kozanga nkaká. Yehova akambaki bango solo na ndako ya mosumuki oyo motema na ye mosilaki kobongisama na bansango ya misala ya Nzambe epai na Bayisraele na boye ete abongolaki motema na ye mpe etamboli na ye. Maloba na Nzambe oyo elobi ete Yisraele asengelaki koboma Bakanana na ntina na misala na bango ya mbindo, lisusu limpamboli oyo apesaki na Rahaba mpe kokamatama ya Yeliko emonisi polele ete banɔ́ngi basalaki pite te.—Levitike 18:24-30.
Bongo tokoloba nini na lokutá oyo Rahaba alobaki na bato oyo bazalaki kolanda banɔ́ngi? Nzambe andimaki lolenge na ye ya kosala. (Talá Baloma 14:4.) Amityaki na likámá mpo na kobatela basaleli na ye, komonisáká bongo elembeteli ya kondima na ye. Soki lokutá ya mokano mabe eboyami na miso ya Yehova, tosɛngisami te koloba makambo nyonso ya solo epai na bato oyo bazali na ndingisa te ya koyeba yango. Ata Yesu Klisto ye moko azalaki ntango nyonso kopesa biyano ya polele te mpe ya mbala moko te soki yango ekokaki kopesa mpasi na moto moko. (Matai 7:6; 15:1-6; 21:23-27; Yoane 7:3-10) Na ntembe te, ezali na lolenge oyo nde esɛngeli kotalela maloba ya kozimbisa oyo Rahaba alobaki yango epai na bapolisi ya mokonzi.
Mbano ya Rahaba
Mbano nini Rahaba azwaki wana amonisa kondima? Kobikisama na ye na ntango ya kobomama ya Yeliko ezalaki solo lipamboli ya Yehova. Na nsima, abalaki Salma, mwana ya Nahesone, moko na mikóló ya bato na libota ya Yuda oyo bazalaki na mokili mokauki. Lokola bazalaki baboti ya Boaza, moto na kobanga Nzambe, Salma mpe Rahaba bazali kati na molɔngɔ́ oyo ememaki kino na Davidi mokonzi ya Yisraele. (1 Ntango 2:3-15; Luta 4:20-22) Oyo eleki ntina, Rahaba oyo kala azalaki mwasi ya pite azali moko kati na basi minei oyo Matai atangi bango kati na molɔngɔ́ na ye ya mabota oyo ememi kino na Yesu Klisto. (Matai 1:5, 6) Oyo nde mapamboli mauti na Yehova!
Atako azalaki Moyisraele te mpe kala azalaki mwasi ya pite, Rahaba azali ndakisa monene ya mwasi oyo amonisaki na misala na ye ete asilaki kotya kondima na ye mobimba epai na Yehova. (Baebele 11:30, 31) Lokola bato mosusu, oyo kati na bango basusu batikaki etamboli ya pite, Rahaba akozwa mpe mbano mosusu—lisekwa kati na bakufi na mabelé oyo ekobongwana paladiso. (Luka 23:43) Na ntina na kondima na ye oyo emonisamaki na misala, Rahaba andimamaki na Tata na biso ya makoló oyo azali na bolingo mpe oyo akolimbisaka. (Nzembo 130:3, 4) Ya solo, ndakisa na ye kitoko ezali kopesa elendiseli na baoyo nyonso balingi boyengebene ete batalela Yehova Nzambe mpo na kozwa bomoi ya seko.
[Elilingi na lokasa 23]
Rahaba atangamaki moyengebene mpo ete misala na ye mimonisaki ete azalaki na kondima
[Bililingi na lokasa 24]
Bakundoli na biloko ya kala basili komona katikati na bitika ya Yeliko ya kala, mwa eteni moke ya bifelo ya kala
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.