MOKAPO 17
Tikalá penepene na ebongiseli ya Yehova
MOYEKOLI Yakobo akomaki ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8) Ya solo, atako tozali bato ya kozanga kokoka, Yehova azali likoló to mosika te mpo na koyoka mabondeli na biso. (Mis. 17:27) Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Nzambe? Tokoki kosala yango soki tokómi baninga ya Yehova ya motema na nzela ya mabondeli oyo euti mpenza na motema. (Nz. 39:12) Tokoki mpe kokóma baninga ya motema ya Nzambe soki tozali koyekola mbala na mbala Liloba na ye Biblia. Na ndenge yango, tokoyeba Yehova Nzambe, makambo oyo akani kosala, mpe mokano na ye mpo na biso. (2 Tim. 3:16, 17) Na yango, tokolinga ye mpe tokobanga kosala makambo oyo ekosepelisa ye te.—Nz. 25:14.
2 Kasi, tokoki kokóma baninga ya penepene ya Yehova kaka na nzela ya Mwana na ye Yesu. (Yoa. 17:3; Rom. 5:10) Longola Yesu, moto mosusu te akoki kosalisa biso tóyeba makanisi ya Yehova. Yesu ayebaki Tata na ye malamu mpenza, yango wana alobaki ete: “Moto moko te ayebi Mwana longola kaka Tata; mpe moto moko te ayebi Tata longola kaka Mwana ná moto oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.” (Luka 10:22) Yango wana, ntango tozali koyekola masolo ya Baevanzile mpo na koyeba ndenge Yesu azalaki kokanisa mpe koyoka, tozali nde koyekola ndenge Yehova akanisaka mpe ayokaka. Boyebi wana ekosalisa biso tópusana penepene na Nzambe na biso.
3 Lokola Mwana ya Nzambe azali kokamba biso, tokokóma baninga ya Yehova ntango tozali kotikala penepene na eteni ya ebongiseli na ye oyo ezali awa na mabele, oyo ezali kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala mokano ya Nzambe. Ndenge Matai 24:45-47 esakolaki, Nkolo Yesu Kristo atye “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo apesa ndako ya kondima “bilei na . . . ntango oyo ebongi.” Lelo oyo, moombo yango azali kopesa biso ebele ya bilei ya elimo. Na nzela ya moombo ya sembo, Yehova asɛngi biso tótángaka Liloba na ye mokolo na mokolo, tóyanganaka na makita nyonso ya bokristo, mpe tósakolaka “nsango malamu . . . ya bokonzi” na molende. (Mat. 24:14; 28:19, 20; Yos. 1:8; Nz. 1:1-3) Tosengeli soki moke te kotalela moombo yango na liso ya bomoto. Tosengeli nde kosala makasi tótikala penepene na eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele mpe tólanda nzela oyo yango ezali kolakisa biso. Yango ekosalisa biso tózala penepene na Yehova, Nzambe na biso, mpe ekopesa biso makasi mpe ekobatela biso ata soki tomekami.
NTINA OYO KOMEKAMA EZALI SE KOBAKISAMA
4 Mbala mosusu ozali na kati ya solo banda bambula mingi. Soki ezali bongo, ntembe ezali te ete oyikaki mpiko ntango okutanaki na mikakatano oyo emekaki bosembo na yo. Ata soki eleki ntango mingi te banda oyebi Yehova mpe okómi mosaleli na ye, oyebi ete Satana Zabolo atɛmɛlaka moto nyonso oyo andimi boyangeli ya Yehova. (2 Tim. 3:12) Na yango, ezala oyiki mpiko na makambo mingi to te, ntina ya kobanga to kolɛmba nzoto ezali te. Yehova alaki ete akosunga yo mpe akopesa yo mbano: akobikisa yo mpe akopesa yo bomoi na mikolo oyo ezali koya.—Ebr. 13:5, 6; Em. 2:10.
5 Na mikolo oyo etikali na mokili ya Satana, biso nyonso tokoki kokutana na komekama. Banda Bokonzi ya Nzambe etyamá na likoló na mobu 1914, Satana azali lisusu na ndingisa te ya kokɔta na likoló, esika Yehova azali. Babwaká ye awa na mabele epai ye ná baanzelu mabe na ye bazali tii lelo. Mpasi oyo ezali se kobakisama na mabele, ná minyoko makasi oyo ezali kokómela bato oyo bamipesi na Yehova, euti nde na nkanda oyo Satana azali na yango mpe yango emonisi ete tozali na mikolo ya nsuka ya boyangeli mabe oyo azali koyangela bato.—Em. 12:1-12.
6 Satana azali na nkanda makasi lokola bakitisá ye ndenge wana, mpe ayebi ete atikali na ntango moke. Elongo na bademo na ye, azali kosala nyonso mpo na kopekisa mosala ya kosakola mpe kobebisa bomoko ya basaleli ya Yehova. Mpo na yango, tozali kobunda etumba ya elimo oyo Biblia ebengi “etumba ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” Soki tolingi kozala na ngámbo ya baoyo bakolonga, na ngámbo ya Yehova, tosengeli kotika etumba yango te; tosengeli nde kobatela molato na biso ya etumba malamu. Tosengeli “kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe” ya Zabolo. (Ef. 6:10-17) Yango esɛngi ete tóyika mpiko.
TÓKOLISA EZALELI YA KOYIKA MPIKO
7 Ezaleli ya koyika mpiko ezali likoki ya koboya kozonga nsima na ntango ya mikakatano to mpasi. Na makambo ya elimo, koyika mpiko elakisi kotika te kosala oyo ezali malamu na ntango ya mpasi, ya botɛmɛli, ya minyoko, to ya likambo nyonso oyo elingi kotinda biso tózala lisusu sembo te epai ya Nzambe. Koyika mpiko oyo basɛngi bakristo ezali ezaleli oyo tosengeli kokolisa mpe yango esɛngaka ntango mingi. Ntango tokolaka na elimo, ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe ekolaka. Soki tozali koyika mpiko na makambo ya mikemike oyo ezali komeka kondima na biso ntango tokómi bakristo, tokokóma makasi mpe tokokoka koyika mpiko na komekama ya minene oyo ezali kozela biso. (Luka 16:10) Tosengeli kozela te ete komekama ya minene ekómela biso bongo tózwa ekateli makasi ya kotɛlɛma ngwi na kati ya kondima. Tosengeli kozwa ekateli wana liboso tómekama. Ntoma Petro amonisaki ete esengeli kokolisa ezaleli ya koyika mpiko nzela moko na bizaleli mosusu oyo esepelisaka Nzambe; akomaki ete: “Bóbakisa na kondima na bino bizaleli malamu, na bizaleli malamu na bino boyebi, na boyebi na bino komipekisa, na komipekisa na bino ezaleli ya koyika mpiko, na ezaleli na bino ya koyika mpiko ezaleli ya kokangama na Nzambe, na ezaleli na bino ya kokangama na Nzambe bolingo ya bondeko, na bolingo na bino ya bondeko bolingo.”—2 Pe. 1:5-7; 1 Tim. 6:11.
Ezaleli na biso ya koyika mpiko ekolaka mokolo na mokolo ntango tozali kokutana na komekama mpe tozali kolonga yango
8 Yakobo amonisaki ntina oyo tosengeli kokolisa ezaleli ya koyika mpiko na mokanda oyo akomaki. Alobaki boye: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ndenge na ndenge, mpo bino moko boyebi ete kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko. Kasi tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, bazangi eloko te.” (Yak. 1:2-4) Yakobo alobi ete bakristo basengeli kondima komekama mpe kosepela ntango bamekami, mpo komekama esalisaka biso tókolisa ezaleli ya koyika mpiko. Otalelaka makambo ndenge wana? Na nsima, Yakobo amonisi ete ezaleli ya koyika mpiko esalaka mosala: ebongisaka bomoto na biso ya bokristo mpe esalaka ete tóndimama mpenza na Nzambe. Ya solo, ezaleli na biso ya koyika mpiko ekolaka mokolo na mokolo ntango tozali kokutana na komekama mpe tozali kolonga yango. Ezaleli ya koyika mpiko ebotaka mpe bizaleli mosusu oyo tosengeli na yango.
9 Yehova asepelaka na ezaleli na biso ya koyika mpiko; yango ekotinda ye apesa biso mbano ya bomoi ya seko. Yakobo abakisaki lisusu ete: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpo lokola akokóma moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi, oyo Yehova alakaki baoyo bazali kokoba kolinga ye.” (Yak. 1:12) Ya solo, toyikaka mpiko mpo toyebi ete tokozwa bomoi. Soki tozali koyika mpiko te, tokotikala na kati ya solo te. Soki totiki makambo mabe ya mokili elonga biso, tokozonga lisusu na mokili. Soki tozali koyika mpiko te, tokozala lisusu na elimo ya Yehova te mpe tokobota lisusu te mbuma na yango na bomoi na biso.
10 Soki tolingi kokoba koyika mpiko na ntango oyo ya mpasi, tosengeli kosala makasi tóyekola kotalela na ndenge oyo ebongi bampasi oyo ekómelaka biso bakristo. Tóbosana te maloba ya Yakobo oyo ete: “Bómona yango esengo mpenza.” Ekoki kozala mpasi tózala na esengo ntango tomekami, mpo komekama ekoki ntango mosusu konyokola nzoto na biso to makanisi na biso. Kasi, tóbosana te ete yango etaleli bomoi na biso na mikolo ezali koya. Likambo oyo ekómelaki bantoma ezali kosalisa biso tómona ndenge oyo tokoki kozala na esengo na ntango ya bampasi. Lisolo yango ezali na mokanda ya Misala; elobi boye: “Babengaki bantoma, babɛtaki bango fimbo, mpe bapesaki bango mitindo ete bátika koloba na nkombo ya Yesu, mpe batikaki bango bákende. Na yango, bango balongwaki liboso ya Sanedrina, bazali kosepela mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye.” (Mis. 5:40, 41) Bantoma bakangaki ntina ete mpasi na bango emonisaki ete bazalaki kotosa etinda ya Yesu mpe ete Yehova andimi bango. Nsima ya bambula, ntango Petro akomaki mokanda na ye ya liboso na lisalisi ya elimo santu, amonisaki ete konyokwama mpo na boyengebene ezali na ntina.—1 Pe. 4:12-16.
11 Tólobela likambo mosusu, oyo ekómelaki Paulo ná Silasi. Ntango bazalaki kosala mosala na bango ya misionɛrɛ na Filipi, bakangaki bango; bafundaki bango ete bazali kotya mobulu na engumba yango mpe bazali kosakola mimeseno oyo mibeko ya mboka epekisi. Yango wana, babɛtaki bango makasi mpe babwakaki bango na bolɔkɔ. Biblia eyebisi biso ete ntango bazalaki naino na bolɔkɔ na bampota na bango kaka bongo, “pene na katikati ya butu, Paulo ná Silasi bazalaki kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo; ɛɛ, bato ya bolɔkɔ bazalaki koyoka bango.” (Mis. 16:16-25) Paulo ná moninga na ye basukaki kaka te na kotalela konyokwama oyo banyokwamaki mpo na Kristo ete ezali elembo ya bosembo na bango na miso ya Nzambe mpe ya bato, kasi batalelaki yango mpe ete ezali libaku mosusu ya kopesa litatoli na baoyo bakoki kolinga koyoka nsango malamu. Bomoi ya basusu ezalaki na likama. Kaka na butu yango, mokɛngɛli ya bolɔkɔ ná bato ya ndako na ye bayokaki mpe bakómaki bayekoli. (Mis. 16:26-34) Paulo ná Silasi batyelaki Yehova motema; batyaki mpe motema na nguya na ye mpe na mposa na ye ya kosalisa bango na minyoko na bango. Bamikosaki te.
12 Lelo oyo mpe, Yehova apesi biso eloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kosalisa biso na ntango ya komekama. Alingi ete tóyika mpiko. Apesi biso Liloba na ye mpo tóyeba mokano na ye malamumalamu. Boyebi yango ekómisaka kondima na biso makasi. Tozali na libaku ya koyangana elongo na bandeko na biso bandimi mpe ya kosala mosala mosantu. Tozali mpe na libaku malamu ya kozala ntango nyonso na boyokani ya malamu na Yehova na nzela ya libondeli. Ayokaka ntango tokumisaka ye mpe ntango tosɛngaka ye na motema moko ete asalisa biso tózala ntango nyonso pɛto na miso na ye. (Flp. 4:13) Tóbosana te nguya oyo tozwaka ntango tokanisaka elikya oyo etyami liboso na biso.— Mat. 24:13; Ebr. 6:18; Em. 21:1-4.
TÓYIKELA KOMEKAMA YA NDENGE NA NDENGE MPIKO
13 Komekama oyo tozali kokutana na yango lelo oyo ekokani mpenza na oyo bayekoli ya liboso ya Yesu Kristo bakutanaki na yango. Na mikolo na biso, batɛmɛli oyo bayebi Batatoli ya Yehova malamu te bafingaka mpe babɛtaka bango. Ndenge moko na ntango ya bantoma, botɛmɛli ezali kouta mingimingi na bato ya mangomba oyo bazali na molende ya mabe, oyo Liloba ya Nzambe ezali komonisa polele mateya na bango ya lokuta mpe misala na bango mabe. (Mis. 17:5-9, 13) Ntango mosusu, ekómaka ete basaleli ya Yehova bázwa mwa kimya ntango basaleli ntomo oyo endimami na guvɛrnema. (Mis. 22:25; 25:11) Nzokande, ekómaka ete bakonzi ya mboka bango moko bápekisa mosala na biso, to báluka kosukisa mosala na biso ya bokristo. (Nz. 2:1-3) Na ntango wana, tolandaka na mpiko mpenza ndakisa ya bantoma ya sembo, oyo balobaki: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”—Mis. 5:29.
14 Lokola bolingo ya ekólo ezali se kokóma makasi na mokili mobimba, bato bakómi mpenza kotya basakoli ya nsango malamu mpanzi likoló mpo bátika mosala oyo Nzambe apesá bango. Basaleli nyonso ya Nzambe bayebi malamu likebisi oyo ezali na Emoniseli 14:9-12, oyo etali losambo ya “nyama mabe mpe elilingi na yango.” Tokangi ntina ya maloba oyo ya Yoane: “Awa nde basantu, baoyo batosaka mitindo ya Nzambe mpe bandimelaka Yesu, basengeli koyika mpiko.”
15 Bitumba, botomboki, minyoko ya makasi mpe bipekiseli oyo euti na bakonzi ya Leta ebimisaka mikakatano oyo ekoki kopekisa yo omipesa na ndenge ya polele na losambo ya bokristo. Okoki kozala na likoki te ya koyangana na makita ya lisangá. Likoki ya kosolola na biro ya filiale ekoki kozala te. Ekoki kosalema ete bakɛngɛli ya zongazonga bázwa lisusu likoki ya kotala lisangá na bino te. Mikanda ya sika ekoki koya lisusu te. Soki moko ya makambo yango ekómeli bino, okosala nini?
16 Eyano ezali ete, salá nyonso oyo okoki kosala mpo okoba kozala makasi na elimo. Osengeli koyekolaka Biblia yo moko. Mbala mingi, mwa bituluku ya bandeko ekoki koyanganaka na bandako ya bandeko mpo na koyekola. Na makita yango, bokoki kosalela mikanda oyo boyekolá kala mpe Biblia. Bómitungisa mingi te. Mbala mingi, Lisangani ya Mikóló-Bakambi elukaka na lombangu ndenge ya kosolola na bandeko oyo bazali kotambwisa makambo.
17 Ata soki ozali mosika na bandeko na yo bakristo, kobosana te ete Yehova ná Mwana na ye, Yesu Kristo, bazali mosika na yo te. Okoki kaka kozala na elikya makasi. Yehova akoki kaka koyoka mabondeli na yo, mpe akoki kopesa yo makasi na nzela ya elimo na ye. Sɛngá ye atambwisa yo. Kobosana te ete ozali mosaleli ya Yehova mpe moyekoli ya Yesu Kristo. Yango wana, salelá mabaku nyonso oyo okutani na yango mpo na kopesa litatoli. Yehova akopambola milende na yo, mpe mbala mosusu nsima ya mwa ntango moke, bato mosusu bakolanda yo na losambo ya solo.—Mis. 4:13-31; 5:27-42; Flp. 1:27-30; 4:6, 7; 2 Tim. 4:16-18.
18 Ata soki balobi ete bakoboma yo, kaka ndenge ezalaki mpo na bantoma mpe bayekoli mosusu, tyá motema epai ya “Nzambe oyo alamwisaka bakufi.” (2 Ko. 1:8-10) Soki ozali kondima ete akosekwisa yo, yango ekosalisa yo oyika mpiko atako botɛmɛli ya makasi. (Luka 21:19) Kristo Yesu apesaki ndakisa; ayebaki ete soki atikali sembo na ntango ya komekama, yango ekopesa basusu makasi ya koyikela komekama mpiko. Soki yo mpe osali bongo, okoki kopesa bandeko mosusu makasi.—Yoa. 16:33; Ebr. 12:2, 3; 1 Pe. 2:21.
19 Longola minyoko mpe botɛmɛli, ntango mosusu ekosɛnga oyikela mikakatano mosusu mpiko. Na ndakisa, basakoli mosusu balɛmbá nzoto mpo bato ya teritware na bango bazali kosepela na nsango malamu te. Basusu basengeli koyika mpiko mpo bazali kobɛla to bazali konyokwama na makanisi, to mpo nzoto na bango ezali kopesa bango nzela ya kosala makambo mosusu te. Ntoma Paulo ayikaki mpiko na komekama ya motindo moko boye, oyo ezalaki kotungisa ye na mosala na ye to na ntango mosusu ezalaki kokómisa mosala yango mpasi. (2 Ko. 12:7) Longola ye, Epafrodite, mokristo moko ya siɛklɛ ya liboso oyo azalaki kofanda na Filipi, akómaki “na mawa mingi mpo [baninga na ye] bayokaki ete abɛlaki.” (Flp. 2:25-27) Kozanga kokoka na biso mpe oyo ya basusu ekoki kosala ete ezala mpasi koyika mpiko. Ekoki kokóma ete tóyokana te na bandeko na biso bakristo to na baoyo tozali na bango libota moko. Kasi, baoyo balandaka toli ya Liloba ya Yehova bakoki mpe koyikela mikakatano ya ndenge wana mpiko mpe bakoki kolonga yango.—Ezk. 2:3-5; 1 Ko. 9:27; 13:8; Kol. 3:12-14; 1 Pe. 4:8.
TÓZALA NA EKATELI YA KOTIKALA SEMBO
20 Tosengeli ntango nyonso kokangama makasi na Yesu Kristo, moto oyo Yehova atyá Mokonzi ya lisangá. (Kol. 2:18, 19) Tosengeli kosala na bomoko mpenza elongo na “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpe bakɛngɛli oyo batyami. (Ebr. 13:7, 17) Soki tozali kolanda malamumalamu makambo oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosɛnga mpe tozali kosala na bomoko na bandeko oyo bazali kokamba biso, tokobongisama malamu mpo na kosala mokano ya Yehova. Tosengeli kobondelaka mingi. Tóbosana te ete ezala bolɔkɔ to kasho ekoki te kopekisa biso kosolola na Yehova, tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló, to kobebisa bomoko na biso ná basambeli na ye mosusu.
21 Tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosala mosala na biso ya kosakola na molende mpe tóyikaka mpiko. Tókoba na mosala oyo Yesu Kristo, nsima ya lisekwa na ye, atindaki bayekoli na ye básalaka, ntango alobaki: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.” (Mat. 28:19, 20) Lokola Yesu, biso mpe tóyika mpiko. Tiká ete tóbatela na makanisi elikya ya Bokonzi mpe ya bomoi ya seko. (Ebr. 12:2) Biso bayekoli ya Kristo oyo tozwá batisimo tozali na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya esakweli ya Yesu oyo etali “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:3, 14) Soki tosali mosala yango na motema na biso mobimba na mikolo oyo, tokozala na esengo ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika ya boyengebene ya Yehova!