MOKAPO 16
Lisangá ya bandeko oyo bazali na bomoko
NA BOUMELI ya mbula soki 1 500, Yehova Nzambe aponaki ekólo ya Yisraele mpe ekólo yango ebengamaki na nkombo na ye. Na nsima, Yehova “abalolaki likebi na ye . . . epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Mis. 15:14) Bato ya ekólo yango mpo na nkombo ya Yehova basengelaki kozala batatoli na ye, oyo makanisi na bango mpe misala na bango ezali na bomoko, ezala bafandi na mboka nini. Mpo na kosala ekólo mpo na nkombo ya Nzambe, esengelaki kosala mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”—Mat. 28:19, 20.
Ozali sikoyo na kati ya lisangá ya bakristo, oyo bazali na mokili mobimba, oyo bazali na bomoko mpe batikaka te ete bokabwani ekɔta kati na bango kaka mpo bakeseni bikólo, bamboka, to mpo bazali na bozwi ndenge moko te
2 Nsima ya komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo, okómi moyekoli ya Yesu Kristo. Ozali sikoyo na kati ya lisangá ya bakristo, oyo bazali na mokili mobimba, oyo bazali na bomoko mpe batikaka te ete bokabwani ekɔta kati na bango kaka mpo bakeseni bikólo, bamboka, to mpo bazali na bozwi ndenge moko te. (Nz. 133:1) Yango wana, olingaka bandeko na yo bakristo ya lisangá mpe omemyaka bango. Basusu kati na bango bazali bato ya loposo mosusu, ya ekólo mosusu to babɔkwamá ndenge mosusu; mpe mbala mosusu bokeseni yango ekokaki kosala ete ondima te kozala moninga na bango. Bolingo ya bondeko oyo bozali na yango eleki bolingo oyo ezalaka na boyokani mosusu nyonso, ezala kati na baninga, na bato ya lingomba to libota moko.—Mrk. 10:29, 30; Kol. 3:14; 1 Pe. 1:22.
TÓBONGISA MAKANISI NA BISO
3 Soki bandeko mosusu bakokaka te kolongola makanisi mabe oyo ekɔtelá bango mpo na bato ya loposo mosusu, ya ekólo mosusu, bato oyo bazali bazwi to babola, to mpo na ntina mosusu, basengeli kokanisa ndakisa ya Bayuda oyo bakómaki bakristo na siɛklɛ ya liboso. Bayuda yango basengelaki kolongola makanisi mabe oyo Lingomba ya Bayuda etindaki bango bázwelaka bato ya bikólo mosusu nyonso. Ntango Petro azwaki malako ya kokende na ndako ya Korneyi, Moroma oyo azalaki mokonzi ya basoda, Yehova abongisaki naino makanisi ya Petro na boboto mpenza.—Mis., mok. 10.
4 Na emonaneli moko, bayebisaki Petro aboma mpe alya banyama mosusu oyo ezalaki mbindo na kotalela milulu ya Bayuda. Ntango Petro aboyaki, mongongo moko eutaki na likoló eyebisi ye ete: “Yo tiká kobenga bosɔtɔ biloko oyo Nzambe apɛtoli.” (Mis. 10:15) Esɛngaki ete Nzambe asalisa Petro mpo abongisa makanisi na ye mpo na mokumba oyo akopesa ye: kokende na ndako ya moto oyo azali Moyuda te. Ntango Petro asalaki likambo oyo Yehova atindaki ye, alobaki na baoyo bayanganaki na ndako ya moto yango ete: “Boyebi malamu ndenge epekisami ete Moyuda asangana to apusana pene na moto ya ekólo mosusu; mpe atako bongo Nzambe amonisi ngai ete nasengeli kobenga moto ata moko te bosɔtɔ to mbindo. Yango wana nayei, kozanga kotya ntembe, ntango bobengaki ngai.” (Mis. 10:28, 29) Nsima na yango, Petro amonaki na miso ndenge Yehova andimaki Korneyi ná libota na ye.
5 Saulo, moto ya Tarse mpe Mofarisai oyo atángá mingi asengelaki mpe komikitisa mpo azala moninga ya bato oyo kala akokaki kondima te bázala baninga na ye. Andimaki kutu bápesa ye ata malako. (Mis. 4:13; Gal. 1:13-20; Flp. 3:4-11) Tondimi mpenza ete bato lokola Sergiusi Paulusi, Dionisiusi, Damarise, Filemo, Onezime, mpe basusu basembolaki makanisi na bango ntango bandimaki nsango malamu mpe bakómaki bayekoli ya Yesu Kristo.—Mis. 13:6-12; 17:22, 33, 34; Flm. 8-20.
TÓBATELA BOMOKO NÁ BANDEKO NA BISO YA MOKILI MOBIMBA
6 Na ntembe te, bolingo ya bandeko ya lisangá nde ebendaki yo epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Omonaki bolingo oyo ezali mpenza elembo ya bayekoli ya solo ya Yesu Kristo, oyo alobaki: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:34, 35) Ntango oyebaki ete bolingo oyo omonaki na lisangá ezali kaka komonisa bolingo oyo ezali na libota ya bandeko ya mokili mobimba, na ntembe te osepelaki lisusu mingi na Yehova mpe na ebongiseli na ye. Ozali komona na miso kokokisama ya esakweli ya Biblia oyo elobaki ete bato bakoyanganisama na mikolo ya nsuka mpo na kosambela Yehova na kimya mpe na bomoko.—Mika 4:1-5.
7 Soki totali ebele ya makambo oyo ezali kokabola bato lelo oyo, nani akokaki kokanisa ete bato oyo “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso” bakoki kosangana esika moko? (Em. 7:9) Talá bokeseni oyo ezali kati na bato oyo bafandaka na bikólo oyo mayele ya siansi ekoli mingi mpe bato oyo bakangamá na bonkɔkɔ tii lelo. Talá ndenge bato ya loposo moko mpe ya ekólo moko bawelanaka mpo bazali lingomba moko te. Politiki ekaboli mpenza bato mpo bato ebele bakómi na bolingo ya ekólo mingi koleka. Longola yango, na kotalela bokeseni monene oyo ezali kati na babola ná bato ya bomɛngo mpe ebele ya makambo mosusu oyo ezali kokabola bato, okondima ete kosangisa bato oyo bauti na bikólo yango, minɔkɔ ndenge na ndenge, babola ná bato ya bomɛngo, bálingana makasi mpe bázala na kimya ezali likamwisi oyo kaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde akoki kosala.—Zek. 4:6.
8 Nzokande, bomoko yango ezali komonana lelo oyo, mpe ntango okómaki Motatoli ya Yehova nsima ya komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, yo mpe okɔtaki na bomoko yango. Lokola ozali kosepela na bomoko yango, ozali na mokumba ya kobatela yango. Okoki kosala yango soki olandi toli ya ntoma Paulo oyo ezali na Bagalatia 6:10 ete: “Soki tozali mpenza na ntango oyo ebongi mpo na yango, tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” Tosengeli mpe kolanda toli oyo: “Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.” (Flp. 2:3, 4) Soki tozali kosala makasi mpo na kotalela bandeko na biso bakristo ndenge Yehova atalelaka bango, na esika ya kotalela bango ndenge bazali komonana na libándá, tokokoba kofanda na bango na kimya mpe na esengo.—Ef. 4:23, 24.
TÓTYELANAKA LIKEBI
9 Ndenge ndakisa oyo ntoma Paulo asalelaki emonisi yango, na lisangá bokabwani ezalaka te, kasi bandeko batyelanaka nde likebi. (1 Ko. 12:14-26) Atako bandeko na biso mosusu bafandi na bamboka ya mosika mpenza, tokanisaka bango mingi. Soki bandeko na biso mosusu bazali konyokwama, biso nyonso toyokaka mpasi mingi. Soki basusu bakeleli to bakutani na makama, bitumba to kowelana kati na bana-mboka, bandeko basalaka nyonso mpo na kosalisa bango na elimo mpe na mosuni.—2 Ko. 1:8-11.
10 Biso nyonso tosengeli kobondelaka mokolo na mokolo mpo na bandeko na biso. Bandeko mosusu bazali kokutana na komekama mpo na kosala oyo ezali mabe. Basusu bazali kokutana na bampasi oyo bato mingi bayebi. Nzokande basusu bazali kokutana na botɛmɛli na mosala mpe na libota oyo bato mosusu bazali bandimi ya mangomba mosusu, kasi bato mingi bayebi te. (Mat. 10:35, 36; 1 Tes. 2:14) Yango etungisaka biso mpo tozali libota moko ya bandeko na mokili mobimba. (1 Pe. 5:9) Na kati na biso, ezali na bandeko oyo basalaka mingi na mosala ya Yehova, bapesaka ndakisa na mosala ya kosakola mpe na masangá. Lisusu, ezali mpe na baoyo bazali na mokumba ya kotambwisa mosala ya kosakola na mokili mobimba. Tosengeli kobondelaka mpo na bango, mpo yango ekomonisa ete tolingaka bandeko na biso mpe totyelaka bango likebi, ata soki tozali na likoki te ya kosala likambo mosusu mpo na kosalisa bango.—Ef. 1:16; 1 Tes. 1:2, 3; 5:25.
11 Na kotalela yikiyiki oyo ezali na mokili na mikolo oyo ya nsuka, Batatoli ya Yehova basengeli komibongisa mpo na kosalisanaka. Na ntango ya makama, na ndakisa mabele eningani, to mai ezindisi mboka, mbala mosusu esɛngaka ete bibongiseli ya minene ezwama mpe biloko mingi ebongisama mpo na kosalisa bandeko oyo bazali na mikakatano. Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bapesaki ndakisa malamu na likambo yango. Ntango nzala ekɔtaki na Yudea, bayekoli oyo bazalaki na Antiokia bakanisaki toli ya Yesu mpe batindelaki bandeko ya Yudea biloko na esengo. (Mis. 11:27-30; 20:35) Na nsima, ntoma Paulo alendisaki bakristo ya Korinti bápesa mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko, oyo ezalaki kosalema na molɔngɔ. (2 Ko. 9:1-15) Na mikolo na biso, soki bandeko bazwi mikakatano makasi mpe bazali na mposa ya lisalisi, ebongiseli ya Yehova, ata mpe bakristo mosusu, bapesaka mbala moko lisalisi oyo esengeli.
TOPONAMI MPO NA KOSALA MOKANO YA YEHOVA
12 Lisangá na biso ya bandeko na mokili mobimba ezali na bomoko mpe ebongisami mpo na kosala mokano ya Yehova. Na ntango na biso, mokano na ye ezali ete nsango malamu ya Bokonzi esakolama na mabele mobimba mpo ezala litatoli na bikóló nyonso. (Mat. 24:14) Wana tozali kosala mosala yango, mokano ya Yehova ezali ete tózalaka ntango nyonso na etamboli oyo eyokani na mibeko na ye. (1 Pe. 1:14-16) Tosengeli kondima komikitisa moto na moto liboso ya mosusu mpe kosala milende mpo nsango malamu esakolama mingi. (Ef. 5:21) Oyo ezali ntango ya koluka kaka bolamu na biso moko te, kasi nde ya kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. (Mat. 6:33) Soki tobosani likambo yango te mpe soki biso nyonso tozali kosala na bomoko mpo na nsango malamu, tokozala na esengo sikoyo mpe tokozwa mapamboli ya seko na mikolo ezali koya.
13 Biso Batatoli ya Yehova tokeseni mpenza na bato mosusu, toponami kati na bato mpo tózala bato ya pɛto, oyo bazali kosalela Nzambe na molende. (Tito 2:14) Losambo oyo tosambelaka Yehova nde ekesenisi biso na bato mosusu. Tosalaka na bomoko elongo na bandeko na biso na mokili mobimba, mpe tolobaka monɔkɔ kaka moko, elingi koloba solo ya Biblia, mpe tosalaka makambo oyo eyokani na solo yango. Yehova asakolaki likambo yango na nzela ya mosakoli Sefania ete: “Nakopesa bato ya bikólo monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.”—Sef. 3:9.
14 Na nsima, Yehova atindaki Sefania aloba mpo na lisangá ya bandeko na mokili mobimba, likambo oyo ekokisami lelo oyo: “Bato ya Yisraele oyo bakotikala bakosala eloko moko te ya kozanga boyengebene, bakoloba lokuta te, mpe lolemo ya bokosi ekozala na minɔkɔ na bango te; mpo bakolya mpe bakomitanda mpenza, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.” (Sef. 3:13) Tozali kosala na bomoko, mpo toyebi malamu Liloba ya solo ya Yehova, tokómisi makanisi na biso makanisi ya sika mpe tozali komitambwisa ndenge mitinda ya Yehova esɛngi. Tozali kosala makambo oyo bato oyo batalelaka makambo na liso ya bomoto bamonaka ete ekoki kosalema te. Ya solo, tozali ekólo oyo ekokani na mosusu te, tozali basaleli ya Nzambe mpe tozali kopesa ye lokumu na mabele mobimba.—Mika 2:12.