ˈBenga bankulutuˈ
“Moko na bino abéli maladi? Tika ete abenga bankulutu ya lisangá.”—YAKOBO 5:14.
1, 2. (a) Kati na ezaleli nini ya likama basaleli na Jéhovah bazali kobika lelo oyo, mpe lolenge nini bakoki komiyoka? (b) Mituna nini mizali kosenga biyano?
“NTANGO na mpasi” esili koya. Na “mikolo ya nsuka” oyo, bato bazali na moimi, baluki na mosolo, bato na lolendo mpe batombaki. (2 Timoté 3:1-5) Biso baklisto, baoyo tozali kobika kati na ebongiseli ya lelo ya biloko mabe, tosengeli kokutana na makama minene misato: Satan le Diable, mokili ya bato oyo batukaka Nzambe mpe bolembu na biso ya kozanga kokoka oyo tobotamaki na yango.—Baloma 5:12; 1 Petelo 5:8; 1 Yoane 5:19.
2 Ekoki kokóma ete, wana tokutani na makámá, tomiyoki ete mpasi eleki. Nini ekoki kosalisa biso na koyika mpiko na bosembo nyonso kati na komekama? Ntango tosengeli kozwa bikateli na ntina na misala na biso ya boklisto mpe losambo na biso, epai wapi tokoki kozwa lisalisi?
Lisalisi lizali
3. Nani akoki kobondisa mpe koyikisa biso mpiko mpe na lolenge nini?
3 Koyeba ete Jéhovah azali Liziba na nguya na biso ezali kolendisa biso makasi. (2 Bakolinti 1:3, 4; Bafilipi 4:13) Mokomi na Nzembo Davidi, oyo azwaki lisalisi na Nzambe, alobaki ete: “Tikela Jéhovah elekelo na yo, zala na elikya epai na ye mpe ye akosala mosala.” “Kitisa mokumba na yo epai na Jéhovah mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 37:5; 55:22) Tokoki mpenza komonisa botondi epai na Jéhovah mpo na lisalisi oyo azali kopesa biso.
4. Libondisi nini ntoma Petelo mpe ntoma Paulo bazali kopesa?
4 Tokoki mpe kozwa libondisi na koyeba ete tozali bobele biso moko te bato oyo bazali kokutana na mikakatano mpe makámá. Ntoma Petelo alendisaki baninga na ye baklisto na maloba oyo: “Botemela ye [Satan le Diable], ngwi mpo na kondima, boyeba ete mpasi na motindo moko mpenza ezali kobimeIa bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.” (1 Petelo 5:9) Ya solo, baklisto nyonso bazali na mposa ya kotelema ngwi kati na kondima. Ezali solo ete, mbala mingi tokoki komiyoka lokola “bakokamolaka biso bipai nyonso,” lokola ezalaki mpo na ntoma Paulo. Nzokande, ye moko “abukanaki te.” Lokola ye, tokoki kozala na mitungisi “nde tokotikaka elikya te.” Ata soki bazali konyokola biso, “tosundolami te.” Ntango mosusu “bakokweisaka biso na nse,” nde “tokobebaka te.” Yango wana, “tozali kolemba te.” Tozali kosala makasi ete “totalaka te na makambo mamonani; kasi na makambo mazangi komonana.” (2 Bakolinti 4:8, 9, 16, 18) Lolenge nini tokoki kosala yango?
5. Mitindo nini misato ya lisalisi Jéhovah azali kopesa?
5 Jéhovah, Ye “oyo akoyokaka mabondeli,” apesi biso mitindo misato ya lisalisi. (Nzembo 65:2; 1 Yoane 5:14) Ya liboso, azali kopesa biso litambwisi na nzela ya Liloba na ye lipemami Biblia. (Nzembo 119:105; 2 Timoté 3:16) Ya mibale, elimo santu na ye ezali kopesa biso nguya ya kosala mokano na ye. (Tala Misala 4:29-31.) Mpe ya misato, lisanga ya Jéhovah oyo ezali awa na mabelé esili kobongisama mpo na kosalisa biso. Tosengeli kosala nini mpo na kozwa lisalisi wana?
ˈMibali bapesami lokola makaboˈ
6. Lisalisi nini Jéhovah apesaki na Tabela, mpe na motindo nini?
6 Likambo moko oyo esalemaki na eleko ya mosakoli Moize ekosalisa biso na kokanga ntina ya lisalisi ya bolingo oyo Jéhovah azali kopesa na basaleli na Ye. Esalemaki na Tabela, oyo elimboli “kozikisa; kopela; kotumba.” Na esika wana ya mokili mokauki na Sinai, Nzambe abimisaki mɔ́tɔ oyo ezikisaki Bayisraele oyo bazalaki koimaima. “Ebele na bato ndenge na ndenge” oyo babimaki na Ezipito elongo na libota ya Yisraele basanganaki na bango mpo na koimaima na ntina na bilei oyo Nzambe apesaki. Wana amonaki ete Nzambe asiliki mpe ntango amonaki ete akokaki te komema mokumba na ye liboso na bato wana mpe kokokisa bamposa na bango, Moize angangaki ete: “Ngai nakoki komema bato oyo nyonso ngai moko te. Mokumba yango eleki ngai na bozito. Soko okosalela ngai boye, mbele boma ngai noki, soko nazwi ngolu na miso na yo, ete namona mawa na ngai te.” (Mituya 11:1-15) Jéhovah asalaki nini mpo na likambo yango? Aponaki “mibali ntuku nsambo kati na mikóló na Yisraele” mpe atyaki elimo na ye likoló na bango mpo bakoka kosangana na misala ya kokamba bato oyo mipesamaki na Moize. (Mituya 11:16, 17, 24, 25) Nsima na koponama ya mibali wana ya makoki, ekómaki petee mpo na Bayisraele mpe “ebele na bato ndenge na ndenge” kozwa lisalisi.—Exode 12:38.
7, 8. (a) Na ndimbola nini Jéhovah apesaki “mibali lokola makabo” na Yisraele ya kala? (b) Na ekeke ya liboso, kokokisama nini ya Nzembo 68:18 ntoma Paulo amonisaki?
7 Nsima wana Bayisraele balekisaki bambula mingi na Mokili na Ndaká, Jéhovah abutaki, na elobeli ya elilingi, likoló na Ngomba Siona mpe atyaki Yelusaleme mboka-mokonzi ya bokonzi moko ya elilingi oyo Davidi azalaki mokonzi na yango. Kati na lisanzoli moko asalaki mpo na Jéhovah, “Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” Davidi ayembaki na mongongo makasi ete: “Obutaki likoló, okambi bakangami elongo; ozwaki mibali lokola makabo.” (Nzembo 68:14, 18) Ya solo bato oyo bakangamaki na ntango bakamataki Mokili na Ndaká bapesamaki mpo na kosalisa Balevi kati na mikumba na bango.—Ezela 8:20.
8 Na ekeke ya liboso na ntango na biso, ntoma Paulo abendaki likebi likoló na kokokisama ya esakweli ya maloba ya mokomi na Nzembo. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ngolu epesameli moko na moko na biso lokola epimelo na likabo na Klisto. Bongo elobami ete: ˈEsili ye kobuta na likoló, akambaki ebele na bakangami, mpe [akamataki mibali lokola makabo].ˈ Elobi ye ete ˈabuti,ˈ ezali na ntina mosusu nini, bobele ete akiti mpe lisusu epai na katikati na mokili? Ye oyo akiti azali ye oyo abuti likoló koleka bipai nyonso na likoló ete atondisa biloko nyonso.” (Baefese 4:7-10) Liloba “ye oyo” ezali komonisa nani? Moto mosusu te bobele Momonisi na Jéhovah, Davidi Monene mpe Mokonzi Masiya, Yesu Klisto. Ezali ye nde Nzambe asekwisaki mpe atombolaki na “etelemelo eleki likoló.”—Bafilipi 2:5-11.
9. (a) Na ekeke ya liboso banani bazalaki makabo na lolenge na mibali? (b) Banani bazali lelo oyo makabo na lolenge na mibali?
9 Kasi, banani wana bazali “mibali lokola makabo” (to, “makabo na lolenge na mibali”)? Ntoma Paulo alimboli ete Momonisi monene na Nzambe “apesaki makabo ete basusu bazala bantoma, basusu basakoli, basusu bapalanganisi ya nsango malamu, basusu babateli mpe balakisi, mpo na kobongisa babulami, mpo na mosala na kosunga, mpo na kotónga nzoto na Klisto.” (Baefese 4:11, 12) Bayekoli nyonso ya Klisto baoyo basalaki lokola bantoma basakoli, bapalanganisi ya nsango malamu babateli, mpe balakisi basalaki yango na nse ya litambwisi ya teokratike. (Luka 6:12-16; Misala 8:12; 11:27, 28; 15:22; 1 Petelo 5:1-3) Na mikolo na biso, bankulutu, mibali oyo bakokisi masengami ya elimo mpe baponami na elimo santu, bazali kosala lokola bakɛngɛli kati na masanga soko 70.000 ya ba Témoins de Jéhovah kati na mokili mobimba. Bango nde bazali mibali bapesameli biso lokola makabo. (Misala 20:28) Na kotalela bokoli monene ya mosala ya kosakola Bokonzi kati na mokili mobimba, bandeko mibali mingi bazali “koluka” mikumba mitali “mosala ya mokɛngɛli.” (1 Timoté 3:1) Wana baponami, bazali kokóma, bango mpe makabo na lolenge na mibali.
10. Mpo na nini tokoki koloba ete ndimbola oyo Yisaya apesi ya “bana na mokonzi” ekokani na mokumba ya bankulutu lelo oyo?
10 Baklisto wana oyo bazali bankulutu, makabo na lolenge na mibali, bakokani na ndimbola oyo Yisaya apesaki wana asakolaki mokumba ya “bana na mokonzi,” bayangeli oyo bakosala mosala na nse ya Bokonzi ya Nzambe. Moko na moko na bango asengeli kozala “lokola ebombamelo mpo na mopepe, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molembisami na moi.” (Yisaya 32:1, 2) Yango emonisi lolenge ya lisalisi ya bolingo oyo bato baponami lokola bakɛngɛli basengeli kopesa. Osengeli kosala nini mpo na kozwa litomba monene mpenza na lisungi yango?
Tosenga lisalisi
11. Wana tozali malamu te na elimo, lisalisi nini tokoki kozwa?
11 Moto oyo azali kozinda na mai akonganga nokinoki mpo na koluka lisalisi. Akokakatana te. Wana bomoi ezali na likámá, moto azalaka na mposa ya koluka lisalisi nokinoki. Mokonzi Davidi asengaki mbala na mbala lisalisi ya Jéhovah, boye te? (Nzembo 3:4; 4:1; 5:1-3; 17:1, 6; 34:6, 17-19; 39:12) Bobele bongo, ntango tozali mpenza malamu te na elimo—mbala mosusu mpo ete tozali kozanga elikya—tokomibalola epai na Jéhovah kati na libondeli mpe tokolela epai na ye mpo apesa biso elimo santu na ye. (Nzembo 55:22; Bafilipi 4:6, 7) Toluka libondisi liuti na Makomami. (Baloma 15:4) Tozali kotanga mikanda ya boklisto ya Watch Tower Society mpo na kozwa batoli oyo ezali na litomba. Mbala mingi yango ezali kopesa biso nzela na kosilisa mikakatano na biso. Kasi, soki tomoni ete komekama yango eleki makasi na biso, tokoki mpe koluka toli epai na bankulutu ya lisangi. Ya solo, ekoki kozala na ntango oyo tozali na mposa mpenza ya “kobenga bankulutu.” Mpo na nini kobenga bankulutu? Bakoki kosala nini mpo na baoyo bazali na mposa ya lisalisi ya elimo?
12-14. (a) Likambo nini ya mayele tokoki kosala ntango tobéli maladi? (b) Engebene Yakobo 5:14 toli nini epesami na baklisto oyo bazali na “maladi”? (c) Maladi ya lolenge nini elobelami na Yakobo 5:14, mpe mpo na nini oyanoli bongo?
12 Ntango tobéli maladi, topemaka mpo na kopesa nzoto makoki ya kozwa lisusu nguya na yango. Kasi soki maladi ezali kosila te, tokomonisa mayele na koluka lisalisi na lopitalo oyo esalisaka malamu. Tosengeli mpe kosala bongo soki tozali kobela maladi na elimo, boye te?
13 Tala toli oyo moyekoli Yakobo apesi biso na likambo yango. Alobi ete: “Moko na bino abéli maladi? Tika ete abenga bankulutu ya lisangá, babondela mpo na ye, esili bango kopakola ye mafuta na nkombo na Jéhovah.” (Yakobo 5:14) Lolenge nini ya maladi Yakobo azali kolobela awa? Engebene balimboli mosusu ya Biblia, ezali maladi ya mosuni, mpamba te, na eleko wana minganga bazalaki na momeseno ya kopakola bato na maladi mafuta. (Luka 10:34) Bandimi mpe ete Yakobo azalaki kokanisa na kobikisama ya ekamwiseli, oyo esalemaki na nzela ya likabo ya kobikisa. Nzokande, makambo mazali zingazinga mamonisi nini?
14 Likambo ya kozala na “esengo” ekeseni na oyo ya “koyikela mpasi mpiko.” Yango elimboli ete Yakobo azalaki kolobela maladi ya elimo. (Yakobo 5:13) Yakobo asengaki ete babenga “bankulutu ya lisangá,” kasi minganga to bato na makabo ya kobikisa te. Mpe mibali wana basengelaki kosala nini? Yakobo alobi ete: “Tika ete babondela mpo na ye. ... Mpamba te libondeli na kondima ekobikisa mobeli. (Yakobo 5:14, 15; tala Nzembo 119:9-16.) Oyo ezali kondimisa kozanga ntembe ete Yakobo azalaki kolobela maladi ya elimo, ezali likambo oyo ete, mpo na kozwa kobikisama yango, alendisi koyambola masumu. Akomaki ete: “Boye, boyambolana masumu, moto na moninga na ye, mpe bobondelana, ete bobika.” Soki lisumu monene nde ezali ntina ya maladi wana, mobeli akokaki kozongela kolongono na ye bobele na kondima toli oyo euti na Liloba na Nzambe, ya kobongola motema mpe kotika etamboli na ye ya masumu.—Yakobo 5:16; Misala 3:19.
15. Likambo nini elakisami na Yakobo 5.13, 14?
15 Tozali komona likambo mosusu kati na toli na Yakobo. Soki moklisto azali koyikela mabe mpiko asengeli “kobondela.” Soki azali na esengo, “tika ete ayemba nzembo.” Kati na ezalela moko na moko—ezala ete moto azali koyikela mabe mpiko to azali na esengo—esengeli kosala likambo moko. Na ngambo moko esengeli kobondela, mpe na ngambo mosusu esengeli konganga na esengo. Na bongo, tozali komizela na nini wana Yakobo atuni ete: “Moko na bino abéli maladi?” Azali lisusu kosenga kosala likambo ya malamu, koluka lisalisi: “Tika ete abenga bankulutu ya lisanga.”—Nzembo 50:15, Baefese 5:19; Bakolose 3:16.
Lisalisi ya “bankulutu”
16, 17. Lolenge nini bankulutu bazali kosalisa biso na kosalela mitinda ya Biblia?
16 Mbala mosusu ezalaka mpasi mpo na biso koyeba kosalela mitinda ya Biblia na makambo matali biso moko. Na ntango yango, lisalisi ya bankulutu ekozala mpenza na ntina mingi. Na ndakisa, bakobondela mpo na moto oyo azali maladi na elimo mpe ˈbakopakola ye mafuta na nkombo ya Jéhovahˈ na kosalela na mayele nyonso malako ya kokitisa motema oyo mauti na Liloba na Nzambe. Na bongo, bankulutu bakoki kosala mingi mpo na kobikisama na biso ya elimo. (Nzembo 141:5) Mbala mingi, nyonso oyo tozali na yango mposa, ezali bobele ya kondimisa biso ete makanisi na biso mazali sembo. Soki tosololi makambo mazali kotungisa biso elongo na nkulutu moko oyo ameseni na makambo mingi, ekateli na biso ya kosala oyo ezali sembo ekolendisama makasi.—Masese 27:17.
17 Ntango bankulutu babengami epai na ndeko moko, basengeli kozala na “maloba ya kobondisa mpo na bato na motema motutami.” Esengeli lisusu kosunga bato na motau mpe kozala na motema molai epai na bato nyonso.ˈ (1 Batesaloniki 5:14) Boyokani motindo wana, ya boninga mpe ya komitya na esika ya moto mosusu, kati na “bankulutu” mpe “bato na bolembu” ezali elembo ya kobikisama mobimba na elimo.
Mokumba ya moto na moto mpe libondeli
18, 19. Engebene Bagalatia 6:2, 5 mikumba nini bankulutu bazali na yango?
18 Kati na lisanga ya boklisto, bankulutu basengeli kokokisa mikumba na bango epai na etonga na Nzambe. Basengeli kozala basungi. Na ndakisa, ntoma Paulo alobaki ete: “Bandeko, soko moto moko anyati litambe mabe liboso ete asosola yango, bino bato na elimo bosembola ye na elimo na bopolo. Omibatela yo moko ete omekama te. Bokumbanaka bozito na mawa, boye bakokokisa mobeko na Klisto.” Ntoma [Paulo] akomaki lisusu ete: “Moto na moto akomema mokumba na ye moko.”—Bagalatia 6:1, 2, 5.
19 Lolenge nini tokoki kokumbanaka bozito mpe komema moto na moto mokumba na ye moko? Mpo ete maloba ya Greke mabongolami na “bozito” mpe “mokomba” mazali na ndimbola ekeseni. Soki moklisto moko azali na mikakatano na elimo oyo mizali mpo na ye lokola bozito monene, bankulutu mpe baninga mosusu baklisto bakosunga ye, bakosalisa ye na komema “bozito na ye.” Nzokande, bazali kozela ete moklisto wana amema “mokumba” na ye moko, elingi koloba akokisa misala na ye epai na Nzambe.a Bankulutu bazali komema “bozito” na bandeko na bango na esengo nyonso na nzela ya bilendiseli, batoli ya Biblia mpe libondeli. Nzokande, bankulutu bakokamata te “mokomba” na biso moko, misala ya elimo oyo biso moko tosengeli kosala yango.—Baloma 15:1.
20. Mpo na nini tosengeli te kotalela libondeli na bopotu?
20 Libondeli ezali na ntina mingi; tosengeli te kotalela yango na bopotu. Nzokande, mpo na ebele na baklisto oyo bazali na maladi ya elimo, bamonaka mpasi mpo na kobondela. Mpo na nini bankulutu bazali kosala “libondeli na kondima” mpo na moto oyo azali na maladi ya elimo? Mpo ete “Jéhovah akoka kobikisa ye,” na bolembu na ye, mpe alendisa ye mpo na kolanda kotambola kati na solo mpe boyengebene. Moklisto oyo azali na maladi ya elimo azali mbala mosusu na makanisi malongobani te, kasi asali mpenza lisumu monene te, mpo ete Yakobo alobi: “Ata asili kosala masumu, makolimbisama epai na ye.” Batoli na bankulutu oyo euti na Biblia mpe mabondeli mauti na motema etindaka mbala mosusu ye oyo azali na bolembu na koyambola masumu minene oyo asalaki mpe kobongola motema. Yango ezali mpe kopesa nzela na bolimbisi ya Nzambe.—Yakobo 5:15, 16.
21. (a) Mpo na nini baklisto mosusu bakakatanaka mpo na kobenga bankulutu? (b) Tokotalela nini na lisoló oyo elandi?
21 Na kotalela bibele oyo bazali koya kati na lisanga na boklisto lelo oyo, bankulutu, mibali oyo bayebi kososola malamu, bazali na makambo mingi ya kosala mpo na kopesa litambwisi malamu ya elimo. Ya solo, mibali oyo bapesameli biso lokola makabo bazali ebongiseli moko malamu mingi oyo Jéhovah asali mpo na kosalisa biso na koyika mpiko na mikolo oyo ya mpasi. Nzokande, baklisto mosusu bazali kobenga bango te, bazali kokanisa ete bandeko na bango bazali na misala mingi to bazali na mikumba mingi. Lisolo oyo elandi ekopesa biso nzela na koyeba ete mibali wana bazali na esengo ya kosalisa biso, mpo ete bazali kosala na bolingo nyonso lokola babateli balandi na lisangá ya boklisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Diksionere moko (A Linguistic Key to the Greek New Testament, Fritz Rienecker), elimboli liloba phor-tiˈon ete “Mokumba oyo moto moko asengeli komema” mpe ebakisi ete: “Esalelamaki kala mpo na kolimbola liboke to bisaleli oyo soda ye moko asengeli komema yango.”
Okoki kopesa eyano nini?
◻ Wana tozali na mposa ya lisalisi, mitindo nini misato ya lisalisi oyo Jéhovah azali kopesa?
◻ Banani bazali lelo oyo makabo na lolenge na mibali?
◻ Ntango nini tosengeli kobenga bankulutu?
◻ Lisalisi nini tokoki komizela kozwa yango epai na bankulutu?
[Elilingi na lokasa 15]
Tosepelaka na matomba ya elimo oyo ezali bongo libondeli, boyekoli ya Biblia, mpe lisalisi ya bankulutu?