Atako minyoko ezali, kangamá na kondima na yo!
“Bandeko na ngai, bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo.”—Yakobo 1:2.
1. Kati na mikakatano nini libota ya Yehova ezali kosalela ye na kondima mpe na “kosepela na motema”?
LIBOTA ya Yehova bazali Batatoli na ye mpe bazali kosalela ye na kondima mpe na “kosepela na motema.” (Deteronome 28:47; Yisaya 43:10) Basalaka yango atako bazali kokutana na minyoko ebele. Atako bazali na mikakatano, bazali kobɔndisama na maloba oyo: “Bandeko na ngai, bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko.”—Yakobo 1:2, 3.
2. Makambo nini toyebi na ntina na mokomi ya mokanda ya Yakobo?
2 Moyekoli Yakobo, oyo azalaki ndeko ya Yesu Klisto, nde akomaki maloba wana soko na mobu 62 T.B. (Malako 6:3) Yakobo azalaki nkulutu kati na lisangá ya Yelusaleme. Kútu ye, na Kefa (Petelo), mpe Yoane ‘batángamaki ete makonzí’—miboko makasi ya lisangá. (Bagalatia 2:9) Ntango likambo ya kokatama ngenga ekómaki liboso ya “bantoma, na mikóló na lingomba” soko na mobu 49 T.B., Yakobo apesaki likanisi malamu oyo lizwaki moboko kati na Makomami mpe lindimamaki na lisangani mobimba ya mikóló-bakambi na ekeke ya liboso.—Misala 15:6-29.
3. Wapi bamoko ya mikakatano oyo baklisto ya ekeke ya liboso bakutanaki na yango, mpe lolenge nini tokoki kozwa litomba mingi koleka na mokanda ya Yakobo?
3 Lokola mobateli oyo azali komibanzabanza mpo na bampate ya elimo, Yakobo ayebaki ‘lolenge na etonga.’ (Masese 27:23) Asosolaki ete baklisto bazalaki kokutana na minyoko makasi. Makanisi ya bamoko kati na bango esengelaki kosembolama, mpamba te bazalaki na koponapona liboso ya bazwi. Mpo na baklisto mingi, losambo ezalaki bobele molulu mpamba. Basusu bazalaki kozokisa baninga na lolemo na bango ebatelami te. Elimo ya mokili ezalaki kosala bopusi mabe, mpe mingi bazangaki motema molai mpe momeseno ya kosambela. Ɛɛ, baklisto mosusu bazwaki maladi na elimo. Mokanda ya Yakobo elobeli makambo motindo wana na lolenge ya kolendisa, mpe toli na ye ebongi na biso lelo oyo, lokola ezalaki na ekeke ya liboso T.B. Tokozwa litomba mingi soki totaleli mokanda yango lokola ete etindami mpenza epai na biso.a
Ntango tokutani na minyoko
4. Lolenge nini tosengeli kotalela minyoko?
4 Yakobo amonisi biso lolenge tosengeli kotalela minyoko. (Yakobo 1:1-4) Kozanga ete alobela bondeko na ye na Mwana ya Nzambe, na komikitisa nyonso amibéngi ete “moombo na Nzambe mpe na Nkolo Yesu Klisto.” Yakobo akomeli “mabota zomi na mibale” ya Yisalaele ya elimo “na lipalangana,” libosoliboso na ntina na minyoko. (Misala 8:1; 11:19; Bagalatia 6:16; 1 Petelo 1:1) Lokola tozali baklisto, biso mpe tozali konyokwama, mpe tozali “komekama na mitindo na mitindo.” Kasi soki tomikundoli ete koyikela komekama mpiko ekolendisa kondima na biso, ‘tokokanisa ete ezali bobele esengo’ soki ekómeli biso. Soki tobateli bosembo na biso epai ya Nzambe kati na minyoko, yango ekomemela biso bolamu ya seko.
5. Minyoko na biso ekoki kosangisa makambo nini, mpe nini esalemaka soki tolóngi koyikela yango mpiko?
5 Minyoko na biso esangisi mikakatano oyo ekómelaka bato nyonso. Na ndakisa, maladi ekoki kotungisa biso. Lelo oyo, Nzambe asalaka bikamwiseli te mpo na kobikisa biso, kasi ayanolaka na mabondeli na biso na kopesáká biso mayele mpe nguya oyo tosengeli na yango mpo na koyikela maladi mpiko. (Nzembo 41:1-3) Lisusu, tozali konyokwama mpo na bosembo lokola tozali Batatoli ya Yehova. (2 Timoté 3:12; 1 Petelo 3:14) Ntango tolóngi koyikela minyoko motindo wana mpiko, kondima na biso ekokóma ‘oyo emekami.’ Mpe ntango kondima na biso elóngi, yango “ekoyeisa mpiko.” Kondima oyo ekómi makasi na nzela ya minyoko ekosalisa biso ete tóyika mpiko na komekama oyo ekoya nsima.
6. Lolenge nini ‘mpiko ezali kokokisa mosala na yango nyɛɛ,’ mpe matambe nini mabongi tokoki kosala ntango tozali konyokwama?
6 Yakobo alobi ete, “Tiká mpe ete mpiko ekokisa mosala na yango nyɛɛ.” Soki totiki nzela na monyoko ete elanda nzela na yango kozanga ete tóluka kosilisa yango nokinoki na myango oyo mindimami te na Makomami, mpiko ekosala “mosala” ya kokómisa biso baklisto bakɔmɛli, baoyo bazangi kondima te. Ya solo, soki monyoko emonisi biso bolɛmbu moko, tosengeli koluka lisalisi ya Yehova mpo na kolónga yango. Ezali boni soki monyoko etali bongo komekama mpo na kosala pite? Boye tóbondela mpo na likambo yango mpe tósala na boyokani na mabondeli na biso. Mbala mosusu ekosengela na biso koluka mosala mosusu ya mosuni to kosala matambe mosusu mpo na kobatela bosembo na biso epai ya Nzambe.—Genese 39:7-9; 1 Bakolinti 10:13.
Bolukiluki mpo na kozwa mayele
7. Lolenge nini tokoki kozwa lisungi mpo na kolónga minyoko?
7 Yakobo amonisi biso oyo tosengeli kosala soki toyebi te lolenge ya kolónga monyoko moko. (Yakobo 1:5-8) Yehova akopamela biso te mpo ete tozangi mayele mpe tozali kobondela na kondima mpo na kozwa yango. Akosalisa biso ete tótalela monyoko na lolenge lobongi mpe tóyikela yango mpiko. Bandeko na biso bandimi bakoki kobénda likebi na biso na mikapo ya Makomami to mpe ntango tozali koyekola Biblia. Nzambe akoki kotambwisa makambo na boye ete tókoka koyeba nini tosengeli kosala. Elimo ya Nzambe ekoki kotambwisa biso. (Luka 11:13) Ezali solo ete mpo na kozwa matomba motindo wana, tosengeli kokangama makasi na Nzambe mpe na libota na ye.—Masese 18:1.
8. Mpo na nini mobɛti ntembe akozwa eloko te epai na Yehova?
8 Yehova azali kopesa biso mayele mpo na kolónga minyoko soki ‘tokóbi kolɔmba na kondima, na kobɛta ntembe te.’ Ye oyo azali kobɛta ntembe “azali lokola mbonge na mai kopusama na mopɛpɛ mpe kotambolatambola” epai na epai. Soki tozali kotɛngatɛnga motindo wana na elimo, ‘tóbanza te ete tokozwa eloko epai na Yehova.’ Tózala te na “mitema mibale” mpe ‘tólemalema’ te na mabondeli to na makambo mosusu. Kasi, tózala na kondima epai ya Yehova, Liziba ya mayele.—Masese 3:5, 6.
Bazwi mpe babólá bakoki kosepela
9. Mpo na nini tozali na ntina ya kosepela lokola tozali basambeli ya Yehova?
9 Ata soki bobólá ezali konyokola biso, tóbosana te ete baklisto nyonso, ezala bazwi to babólá bakoki kosepela. (Yakobo 1:9-11) Liboso ya kokóma bayekoli ya Yesu, bapakolami mingi bazalaki na bozwi te na mosuni mpe bamokili batyolaki bango. (1 Bakolinti 1:26) Kasi bakoki kosepela na “nkembo” na bango na etɛlɛmɛlo ya basangoli ya Bokonzi. (Baloma 8:16, 17) Na bokeseni, bazwi oyo liboso bazalaki na lokumu bazali sikawa “kokitisama” lokola bayekoli ya Klisto mpamba te mokili ezali kotyola bango. (Yoane 7:47-52; 12:42, 43) Nzokande, lokola tozali basaleli ya Yehova, biso nyonso tokoki kosepela mpamba te bozwi ya mokili mpe etɛlɛmɛlo ya lokumu ezali mpamba liboso ya bozwi ya elimo oyo tozali na yango. Tozali mpenza na botɔ́ndi ete lolendo mpo na etɛlɛmɛlo ya moto kati na bomoi ezali na esika te kati na biso!—Masese 10:22; Misala 10:34, 35.
10. Lolenge nini moklisto asengeli kotalela bozwi ya mosuni?
10 Yakobo asalisi biso na kososola ete bomoi na biso etaleli bozwi te to bolóngi na mokili te. Lokola bonzenga ya fololo ekoki kopekisa yango te ete ekufa na ‘kongala’ ya moi, lolenge moko bozwi ya moto ekoki kobakisela ye mikolo ya bomoi te. (Nzembo 49:6-9; Matai 6:27) Akoki kokufa wana azali kolanda “banzela ya bomoi” (NW) na ye, mbala mosusu na mombongo. Na yango, likambo lileki ntina ezali bongo kozala “mozwi epai na Nzambe” mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotombola matomba ya Bokonzi.—Luka 12:13-21; Matai 6:33; 1 Timoté 6:17-19.
Esengo na baoyo bazali koyikela minyoko mpiko
11. Elikya nini ezali liboso na baoyo bazali kokangama na kondima na bango kati na minyoko?
11 Ezala ete tózali babólá to bazwi, tokozala na esengo bobele soki tozali koyikela minyoko na biso mpiko. (Yakobo 1:12-15) Soki toyikeli minyoko mpiko kozanga ete tóbungisa kondima na biso, tokoki kotángama bato na esengo, mpamba te kosala makambo malamu na miso ya Nzambe epesaka esengo. Na kokangamáká na kondima na bango kino liwa, baklisto babotami na elimo bazali kozwa “motole na bomoi,” elingi koloba bomoi ezangi nsuka na makoló. (Emoniseli 2:10; 1 Bakolinti 15:50) Soki tozali na elikya ya bomoi awa na mabelé mpe tobateli kondima na biso epai na Nzambe, tokoki kolikya kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43; Baloma 6:23) Yehova azali solo malamu mpo na baoyo nyonso bazali komonisa kondima epai na ye!
12. Ntango tozali kokutana na mikakatano, mpo na nini tosengeli te koloba ete, “Nazali komekama na Nzambe”?
12 Tokoki nde koloba ete Yehova amekaka biso na nzela ya minyoko? Te, tosengeli koloba te ete: “Nazali komekama na Nzambe.” Yehova azali te komeka kopusa biso na kosala masumu kasi azali pene ya kosunga biso mpe kopesa biso makasi esengeli mpo na koyikela minyoko mpiko soki totikali ngwi kati na kondima. (Bafilipi 4:13) Nzambe azali bulɛɛ, na bongo, azali te kotya biso na ezalela oyo ekolɛmbisa nguya na biso ya kotɛmɛla kosala mabe. Soki tomikɔtisi na ezalela ya mbindo mpe tosali lisumu, tosengeli kopamela ye te, “mpo ete Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te.” Atako Yehova akoki kotika nzela ete monyoko moko esembola biso mpo na bolamu na biso, amekaka biso na mokano mabe te. (Baebele 12:7-11) Satana akoki komeka biso ete tósala mabe, kasi Nzambe akoki kobikisa biso na ye oyo mabe.—Matai 6:13.
13. Nini ekosalema soki topɛngoli te mposa moko ya mabe?
13 Tosengeli kobondelaka mingi mpamba te ezalela mosusu ekoki komema biso na mposa mabe oyo ekoki kopusa biso na kosala lisumu. Yakobo alobi ete: “Moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolɛngolama na mposa mabe na ye moko.” Tokoki kopamela Nzambe te mpo na masumu na biso soki biso moko tokolisi mposa ya mabe kati na motema na biso. Soki tolongoli mposa mabe te, ‘ekozwa zemi,’ ekokóla na motema, mpe ‘ekobota lisumu.’ Ntango lisumu esalemi, “eboti kufa.” Ya solo mpenza, tosengeli kobatela mitema na biso mpe kobundisa mposa ya kosala masumu. (Masese 4:23) Nzambe akebisaki Kaina ete lisumu ezalaki pene ya kolónga ye, kasi atɛmɛlaki yango te. (Genese 4:4-8) Na bongo, tokosala nini soki tobandi kolanda nzela oyo eboyami na Makomami? Na ntembe te tosengeli kozala na botɔ́ndi soki bankulutu baklisto bameki kosembola biso mpo ete tósalela Nzambe lisumu te.—Bagalatia 6:1.
Nzambe—Eutelo ya makabo malamu
14. Na lolenge nini tokoki koloba ete makabo ya Nzambe “mabongi”?
14 Tosengeli komikundola ete Yehova azali Eutelo ya makabo malamu, kasi ya minyoko te. (Yakobo 1:16-18) Yakobo abéngi baninga na ye bandimi ete ‘bandeko na bolingo’ mpe amonisi ete Nzambe azali Mopesi na ‘makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.’ Makabo ya elimo mpe ya mosuni oyo Yehova apesaka “mabongi,” to mazali ya kokoka, mazangi eloko te. Makabo yango “makokitaka na nsé,” longwa na efandelo ya Nzambe kuna na likoló. (1 Mikonzi 8:39) Yehova azali “Tata na [bingɛngiseli ya likoló, NW]”—moi, sanza, mpe minzoto. Azali mpe kopesa biso pole ya elimo mpe solo. (Nzembo 43:3; Yilimia 31:35; 2 Bakolinti 4:6) Na bokeseni na moi oyo ebongolaka elili wana ezali kotambola mpe engalaka makasi koleka bobele na midi, Nzambe angɛngaka makasi ntango nyonso na oyo etali kopesa biloko ya malamu. Na ntembe te akopesa biso nyonso oyo esengeli mpo ete tólónga minyoko soki tosaleli malamu bibongiseli nyonso ya elimo oyo azali kopesa na nzela ya Liloba na ye mpe na nzela ya “moombo na sembo mpe na mayele.”—Matai 24:45.
15. Wapi moko kati na makabo ya Nzambe oyo maleki malamu?
15 Wapi moko kati na makabo ya Nzambe oyo maleki malamu? Kobotama ya bana ya elimo na nzela ya elimo santu, oyo ezali kotambwisa nsango malamu, to “liloba na solo.” Baoyo bazali kobotama na elimo bazali “lokola mbuma na liboso,” baponami kati na bato mpo ete bázala “bokonzi na banganga” na likoló. (Emoniseli 5:10; Baefese 1:13, 14) Ekoki kozala ete Yakobo azalaki kokanisa mbuma ya liboso ya orge oyo epesamaki na mokolo ya 16 Nisana, mokolo oyo Yesu asekwaki, mpe na mampa mibale masalemi na nganu (blé) oyo mapesamaki na mokolo ya Pantekote, ntango elimo santu esopamaki likoló na bayekoli. (Levitike 23:4-11, 15-17) Na bongo, Yesu nde azali mbuma ya liboso mpe baoyo bakosangana na ye lokola basangoli na libula bazali “lokola mbuma na liboso.” Ezali boni soki tozali na elikya ya kofanda na mabelé? Boye komikundola elikya yango ekosalisa biso na kokangama na kondima na biso epai na Mopesi na “makabo nyonso malamu,” oyo apesi likoki ya kozwa bomoi ya seko na nsé ya boyangeli ya Bokonzi.
Zalá ‘motosi na Liloba’
16. Mpo na nini tosengeli ‘koyoka noki nde koloba na malɛmbɛ na koyoka mpe nkɛlɛ na malɛmbɛ lokola’?
16 Ezala ete tozali sikawa kokutana na minyoko mpo na kondima na biso to te, tosengeli kozala “batosi na Liloba.” (Yakobo 1:19-25) Tosengeli “koyoka noki” Liloba ya Nzambe, kozaláká batosi na yango. (Yoane 8:47) Epai mosusu, ‘tóloba malɛmbɛ,’ kokebáká mpenza na maloba na biso. (Masese 15:28; 16:23) Ekoki kozala ete Yakobo azali kopesa biso toli ete tólobaka nokinoki te ete minyoko na biso miuti na Nzambe. Apesi biso mpe toli ete ‘tóyoka mpe nkɛlɛ malɛmbɛ lokola. Zambi nkɛlɛ na bato ekosalaka boyengebene na Nzambe te.’ Soki maloba ya moto moko masilikisi biso, ‘tókendá mbangu te’ mpo ete tópɛngola kozongisa maloba mabe. (Baefese 4:26, 27) Elimo ya nkanda oyo ekoki kobimisela biso mikakatano mpe kokóma libaku mpo na basusu ekoki te kobota makambo oyo kondima epai na Nzambe na biso ya boyengebene esɛngi. Lisusu, soki tozali na “bososoli mingi,” ‘tokosilika noki te,’ mpe bandeko na biso ya mibali mpe ya basi bakobendama epai na biso.—Masese 14:29, NW.
17. Nini ekosalema soki tolongoli mabe na motema mpe na makanisi na biso?
17 Na ntembe te tosengeli kolongola “makambo nyonso na mbindo”—makambo nyonso oyo Nzambe ayini mpe oyo mazali kongalisa nkɛlɛ. Lisusu, tosengeli ‘kolongola likambo oyo lizali koyikana, elingi koloba mabe.’ Biso banso tosengeli komipɛtola na mbindo nyonso ya nzoto to ya elimo. (2 Bakolinti 7:1; 1 Petelo 1:14-16; 1 Yoane 1:9) Kolongola mabe na motema mpe na makanisi esalisi biso ete ‘tóyamba na bopɔlɔ liloba likónami’ ya solo. (Misala 17:11, 12) Ata tozali baklisto uta ntango boni, tosengeli kokóba kotika nzela ete solo mingi ya Makomami ekónama kati na biso. Mpo na nini? Mpamba te na nzela ya elimo ya Nzambe, liloba likónami likobota “bomoto ya sika” oyo ezali komema na lobiko.—Baefese 4:20-24, NW.
18. Lolenge nini moto oyo azali bobele moyoki na liloba akeseni na ye oyo azali mpe motosi na yango?
18 Ndenge nini tokomonisa ete liloba ezali kotambwisi biso? Na kozaláká “batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te.” (Luka 11:28) “Batosi” bazali na kondima oyo ebotaka misala lokola molende kati na mosala ya boklisto mpe koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya libota ya Nzambe. (Baloma 10:14, 15; Baebele 10:24, 25) Moyoki mpamba ya liloba “azali lokola mobali oyo amitali elongi na nzoto na ye na talatála.” Amitali, mpe na nsima akei mpe abosani oyo esengeli mpo na kobongisa elongi na ye. Lokola “batosi na liloba,” toyekolaka na etingya mpe totosaka “Mobeko mobongi” ya Nzambe oyo esangisi makambo nyonso oyo azali kosɛnga biso. Boye, bonsomi oyo tozali na yango ekeseni mpenza na boombo ya masumu mpe ya liwa, mpo ete bonsomi yango ezali komema na bomoi. Na yango, tiká ete ‘tótalatala na Mobeko mobongi,’ kosaláká ntango nyonso bolukiluki kati na yango mpe kotosáká yango. Mpe kanisá naino! Lokola ‘bato oyo bakosalaka mosala, kasi te bayoki oyo bazali kobosana,’ tozali na esengo mpo ete tondimami na Nzambe.—Nzembo 19:7-11.
Losambo ya solo ezali molulu mpamba te
19, 20. (a) Engebene Yakobo 1:26, 27, losambo ya pɛto esɛngi biso makambo nini? (b) Tángá mwa makambo oyo mazali kati na losambo ya pɛto?
19 Soki tolingi kondimama na Nzambe, tosengeli komikundola ete losambo ya solo ezali molulu mpamba te. (Yakobo 1:26, 27) Tokoki kokanisa ete Yehova akondima biso ata soki tozali ‘basambeli na maloba mpamba,’ kasi tóbosana te ete lolenge na ye ya kotalela mokomoko na biso nde ezali na ntina. (1 Bakolinti 4:4) Bolɛmbu moko monene tokoki kozala na yango ezali bongo ya kolónga te ‘kokanga lolemo.’ Tokomikosa soki tokanisi ete Nzambe akosepela na losambo na biso soki tozali kotɔ́nga basusu, kobuka lokuta, to kosalela lolemo na biso na ndenge mosusu ya mabe. (Levitike 19:16; Baefese 4:25) Ya solo, tolingi te ete “losambo” na biso ezala “mpamba” mpe endimama te na Nzambe ata mpo na ntina nini.
20 Atako Yakobo atángi makambo nyonso te oyo mataleli losambo ya pɛto, alobi ete yango esangisi ‘kotalaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango.’ (Bagalatia 2:10; 6:10; 1 Yoane 3:18) Lisangá ya boklisto etyaka likebi mingi na kopesa lisungi na basi-bakufeli-mibali. (Misala 6:1-6; 1 Timoté 5:8-10) Lokola Nzambe azali Mobateli ya basi-bakufeli-mibali mpe ya bitike, tiká ete tósalana na Ye na kosaláká nyonso oyo tokoki mpo na kosunga bango na elimo mpe na mosuni. (Deteronome 10:17, 18) Losambo ya pɛto elimboli mpe “komibatela nzoto pɛto na makambo na mokili,” elingi koloba lisangá ya bato bazangi boyengebene oyo bazali na nsé ya nguya ya Satana. (Yoane 17:16; 1 Yoane 5:19) Na yango, tiká ete tóboya etamboli ya kotyola Nzambe oyo ezali komonana na mokili mpo ete tókoka kokumisa Yehova mpe tózala na ntina kati na mosala na ye.—2 Timoté 2:20-22.
21. Na oyo etali mokanda ya Yakobo, mituna mosusu nini tosengeli kotalela?
21 Toli ya Yakobo oyo totaleli kino sikawa esengeli kosalisa biso ete tóyika mpiko na minyoko mpe ete tókangama na kondima na biso. Yango esengeli kokólisa botɔ́ndi na biso epai na Mopesi na makabo malamu oyo atondi na bolingo. Mpe maloba ya Yakobo mazali kosalisa biso ete tósalela losambo ya pɛto. Makambo nini mosusu ayebisi biso? Matambe nini mosusu tokoki kokokisa mpo na komonisa ete tozali na kondima ya solo epai na Yehova?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na boyekoli ya lisoló oyo mpe masoló mibale oyo malandi yango, ezala na boyekoli ya moto ye moko to ya libota, bokozwa litomba mingi soki bokotánga mikapo nyonso mipesami na Yakobo, mokanda oyo ezali kolendisa kondima.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Nini ekosalisa biso ete tóyikela minyoko mpiko?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli kosepela, atako bazali kokutana na minyoko?
◻ Lolenge nini tokoki kozala batosi na liloba?
◻ Losambo ya pɛto esɛngi makambo nini?
[Elilingi na lokasa 9]
Kati na komekama, monisá kondima kati na nguya ya Yehova ya koyanola na mabondeli
[Bililingi na lokasa 10]
“Batosi ya liloba” bazali kosakola Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba