Tóluka koyeba “makanisi ya Klisto”
“Zambi nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo na kolakisa ye? Kasi biso tozali na makanisi ya Klisto.”—1 BAKOLINTI 2:16.
1, 2. Likambo nini oyo etali Yesu, Yehova amonaki malamu amonisa yango na Liloba na ye?
YESU azalaki ndenge nini? Nsuki na ye, loposo na ye, mpe miso na ye, ezalaki na langi nini? Azalaki molai to mokuse? Azalaki na kilo boni? Bato basalá mpe basalaka bililingi ndenge na ndenge ya Yesu. Na bililingi mosusu, bamonisá ye malamu; kasi na mosusu amonanaka ndenge mosusu mpenza. Bato mosusu oyo basalaki bililingi ya Yesu, bamonisaki ye lokola mobali mpenza ya nzoto makasi, kasi mosusu bamonisaki ye lokola moto moko oyo alɛmbá to lokola moto ya maladi.
2 Nzokande, Biblia eyebisi biso ndenge oyo Yesu azalaki te. Yehova amonaki malamu amonisa likambo oyo eleki ntina, elingi koloba bomoto ya Yesu. Baevanzile eyebisi biso makambo oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki, mpe na nzela ya maloba mpe misala yango toyebi soki motema na ye ezalaki ndenge nini mpe ndenge nini azalaki kokanisa. Masolo yango minei oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe ezali kosalisa biso tóyeba oyo Paulo abengaki “makanisi ya Klisto.” (1 Bakolinti 2:16) Tosengeli koyeba makanisi, motema, mpe bomoto ya Yesu mpo na ntina soki mibale.
3. Soki toyebi makanisi ya Klisto malamu, tokoyeba nini?
3 Ya liboso, makanisi ya Klisto ezali kolakisa biso makanisi ya Yehova Nzambe. Yesu ayebaki Tata na ye malamu mpenza, yango wana alobaki ete: “Moto te ayebi soko Mwana azali nani, bobele Tata ayebi; moto mpe te ayebi soko Tata azali nani, bobele Mwana ayebi, na oyo Mwana andimi komonisa ye.” (Luka 10:22) Ezali lokola nde Yesu alobaki ete, ‘Soki bolingi koyeba Yehova, bótala ngai.’ (Yoane 14:9) Na bongo, ntango tozali koyekola na kati ya Baevanzile ndenge oyo Yesu azalaki kokanisa mpe ndenge oyo azalaki komona makambo, tozali nde koyekola ndenge oyo Yehova akanisaka mpe amonaka makambo. Soki toyebi makambo wana, boninga na biso na Nzambe ekokóma lisusu makasi.—Yakobo 4:8.
4. Soki tolingi mpenza kosala lokola Klisto, tosengeli naino koyekola nini, mpe mpo na nini?
4 Ya mibale, soki toyebi makanisi ya Klisto, ekosalisa biso ‘tólanda matambe na ye malamumalamu.’ (1 Petelo 2:21, NW) Kolanda Yesu ezali kaka te koloba makambo oyo alobaki mpe kosala makambo oyo asalaki. Lokola makanisi mpe motema ya moto nde etindaka ye asala to aloba boye to boye, mpo tólanda Klisto, tosengeli kolona ‘makanisi’ oyo azalaki na yango. (Bafilipi 2:5) Na maloba mosusu, mpo tósala mpenza makambo ndenge Klisto azalaki kosala, tosengeli naino koyekola kokanisa lokola ye mpe kozala na motema lokola oyo ye azalaki na yango, na ndenge oyo ekoki kosalema epai ya bato ya kozanga kokoka. Sikoyo, na lisalisi ya makambo oyo bato bakomaki Baevanzile bayebisi biso, tóluka naino koyeba makanisi ya Klisto malamumalamu. Tokolobela liboso makambo oyo esalaki ete Yesu azala na makanisi mpe motema ya ndenge wana.
Bomoi na ye liboso abotama lokola moto
5, 6. (a) Baninga na biso bakoki kosala nini na bomoto na biso? (b) Mwana mobotami ya liboso ya Nzambe azalaki elongo na nani kuna na likoló liboso aya awa na mabele, mpe yango esalaki nini epai na ye?
5 Tokoki kolanda makanisi mpe ndenge ya komona makambo ya bato oyo tozalaka na bango mingi mpe kosala misala lokola bango basalaka, ezala ya malamu to ya mabe.a (Masese 13:20) Kanisá sikoyo soki Yesu azalaki na nani kuna na likoló liboso aya awa na mabele. Evanzile ya Yoane elobi ete liboso Yesu abotama lokola moto, abengamaki “Liloba,” to Molobeli ya Nzambe. Yoane alobi ete: “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki nzambe. Na ebandeli, ye azalaki na Nzambe.” (Yoane 1:1, 2, NW ) Lokola Yehova azali na ebandeli te, soki balobi ete Liloba azalaki elongo na Nzambe “na ebandeli,” esengeli kozala na ntango oyo Nzambe abandaki kokela biloko. (Nzembo 90:2) Yesu azali “Mobotami ya liboso na biloko nyonso bizalisami.” Boye, azalaki na bomoi liboso Nzambe asala bikelamu mosusu ya elimo mpe molɔ́ngɔ́ mobimba.—Bakolose 1:15; Emoniseli 3:14.
6 Bato mosusu ya siansi balobaka ete molɔ́ngɔ́ oyo eumeli sikoyo soki mbula miliare 12. Soki bambula yango ezali mwa moke solo, boye elingi koloba ete Mwana mobotami ya liboso azalaki elongo na Tata na ye ntango mingi mpenza liboso bákela Adama. (Talá Mika 5:2.) Boye bakómaki baninga mpenza ya motema. Na esika oyo bamonisi ye na lolenge ya mayele oyo ezali koloba lokola moto, Mwana yango mobotami ya liboso, wana abotami naino lokola moto te, alobi boye: “Mokolo na mokolo nazalaki esengo ya [Yehova], kosepela liboso na ye ntango nyonso.” (Masese 8:30) Na ntembe te, lokola Mwana ya Nzambe aumelaki bambula ebele esika moko na Liziba ya bolingo, akómaki mpenza kokanisa mpe kosala makambo lokola ye! (1 Yoane 4:8) Nsukansuka, mwana yango ayebaki Tata na ye mpe akómaki kokanisa lokola ye, akómaki na motema lokola oyo ya ye, mpe akómaki kosala makambo lokola ye koleka moto mosusu nyonso.—Matai 11:27.
Bomoi na ye na mabelé mpe makambo oyo akutanaki na yango
7. Yebisá ntina moko oyo Mwana mobotami ya liboso ya Nzambe asengelaki koya awa na mabele?
7 Mwana ya Nzambe asengelaki koyekola makambo mingi mosusu mpamba te Yehova alingaki ete Mwana na ye azala Nganga Monene ya motema mawa, oyo akoki “koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolɛmbu na biso.” (Baebele 4:15) Ntina mosusu oyo ayaki awa na mokili mpe abotamaki lokola moto, ezalaki mpo ayekola nyonso oyo esengeli mpo akokisa malamu mokumba wana. Awa na mokili, lokola azalaki na nzoto ya mosuni mpe na makila, Yesu akutanaki na makambo oyo, liboso azalaki kaka komona yango ntango azalaki na likoló. Akokaki sikoyo koyoka ndenge oyo bato bayokaka. Ntango mosusu alɛmbaki, ayokaki mposa ya mai, mpe ayokaki nzala. (Matai 4:2; Yoane 4:6, 7) Akutanaki mpe na mikakatano na bampasi. Na bongo, ‘ayekolaki kotosa’ mpe abongaki mpo na kokokisa mokumba na ye ya Nganga Monene.—Baebele 5:8-10.
8. Makambo nini toyebi mpo na bomoi ya Yesu awa na mabele?
8 Tokoloba boni mpo na makambo oyo Yesu akutanaki na yango ntango azalaki na bomoi awa na mabele? Biblia elobi makambo mingi te ya bomwana na ye. Kaka Matai na Luka nde bayebisi biso lisolo ya kobotama na ye. Bato oyo bakomaki Baevanzile bayebaki ete Yesu azalaki na likoló liboso aya awa na mokili. Bomoto oyo amonisaki awa na mokili eutaki libosoliboso na makambo oyo ayekolaki liboso abotama lokola moto. Atako bongo, Yesu azalaki moto mpenza. Atako azalaki moto ya kokoka, abotamaki bebe mpe na nsima akolaki, akómaki elenge, mpe na nsuka akómaki mokóló; na ntango nyonso wana azalaki koyekola makambo mingi. (Luka 2:51, 52) Biblia elobeli mwa moke bomoi ya Yesu ntango azalaki naino mwana, na ntembe te, makambo yango esimbaki bomoto na ye mobimba na nsima.
9. (a) Makambo nini emonisi ete Yesu abotamaki na libota ya babola? (b) Emonani ete Yesu akolaki na esika ya ndenge nini?
9 Emonani ete baboti ya Yesu bazalaki babola. Toyebi yango na kotalela likabo oyo Yosefe na Malia bamemaki na tempelo ntango Yesu akokisaki mikolo 40. Na esika bámema mwana ya mpate lokola libonza mpe ebenga to mwana ya ebenga lokola mbeka mpo na masumu, bango bamemaki “bibenga mibale soko bana na bibenga mibale.” (Luka 2:24) Mibeko ya Mose elobaki ete babola nde bakokaki kopesa biloko wana. (Levitike 12:6-8) Na nsima, libota wana ekómaki monene. Nsima ya Yesu, oyo abotamaki na ndenge ya likamwisi, Yosefe na Malia babotaki bana mosusu soki motoba. (Matai 13:55, 56) Yango emonisi ete Yesu akolaki na libota monene, mpe emonani ete bazalaki na bozwi te.
10. Makambo nini emonisi ete Malia na Yosefe bazalaki bato oyo babangaka Nzambe?
10 Baboti oyo babɔkɔlaki Yesu bazalaki bato oyo babangaka Nzambe mpe babatelaki ye malamu. Malia, mama na ye, azalaki mwasi malamu mingi. Toyebi ete ntango anzelu Gabaliele apesaki ye mbote, alobaki ete: “Mbote! mwasi ya ngɔlu, Nkolo azali na yo elongo.” (Luka 1:28) Yosefe mpe alingaki makambo ya Nzambe mingi. Mbula na mbula azalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 150 mpo na kokende na feti ya Elekeli na Yelusaleme. Malia mpe azalaki kokende, atako mibeko elobaki ete kaka mibali nde bakokaki kozanga te. (Exode 23:17; Luka 2:41) Mbala moko, Yosefe na Malia, babungisaki Yesu ntango azalaki na mbula 12, nsima ya kolukaluka ye, bakendaki kokuta ye na tempelo afandi na balakisi. Lokola baboti na ye bamitungisaki mingi, Yesu ayebisaki bango ete: “Boyebaki te ete ekoki na ngai kozala kati na ndako na Tata na ngai?” (Luka 2:49) Na ntembe te liloba “Tata” elobaki mingi mpo na elenge Yesu. Ekoki kozala ete bayebisaki ye ete Tata na ye mpenza ezalaki Yehova. Tobanzi mpe ete Yosefe azalaki tata-mobɔkɔli malamu mpo na Yesu. Yehova akokaki te kopona moto mabe mpe ya makambo makasi abɔkɔla Mwana na Ye!
11. Yesu ayekolaki mosala nini, mpe na ntango ya kala, mosala wana esɛngaki makambo nini?
11 Ntango azalaki na Nasalete, Yesu ayekolaki mosala ya mabaya; ekoki kozala epai ya Yosefe, tata-mobɔkɔli na ye. Yesu ayebaki mosala yango malamu na boye ete bakómaki kobenga ye moko “mosali ya mabaya.” (Malako 6:3) Na ntango wana, mosala ya basali na mabaya ezalaki na ntina mingi mpo na kotonga ndako, kosala biloko ya ndako (bamesa, bibonga, na bakiti), mpe kosala biloko oyo bazalaki kosalela na bilanga. Na mokanda na ye (Dialogue avec Tryphon), Justin Martyr, moto oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale T.B., akomaki mpo na Yesu ete: “Azalaki na momeseno ya kosala mosala ya mabaya ntango afandaki na bato, azalaki kosala bitimweli mpe mabaya mpo na kokangisa na yango nyama mibale.” Ezalaki mosala moke te, mpamba te na ntango ya kala, ekoki mpenza kozala ete mosali ya mabaya azalaki kosomba mabaya te, kasi ye moko nde asengelaki kokende koluka nzete na zamba, kokata yango, mpe koya na mabaya na mboka. Elingi koloba ete Yesu ayebaki kozwa na motɔki ya elongi na ye, ayebaki kosolola na bakiliya, mpe kokokisa bamposa ya libota.
12. Nini emonisi ete ekoki mpenza kozala ete Yosefe akufaki liboso ya Yesu, mpe yango esɛngaki Yesu makambo nini?
12 Lokola azalaki mwana ya liboso, tokanisi ete Yesu azalaki kosalisa libota na bango, mingimingi lokola emonani ete Yosefe akufaki liboso na ye.b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 1900 (na Lingelesi) elobaki boye: “Balobaka ete Yosefe akufaki ntango Yesu azalaki naino elenge, mpe Yesu akómaki kosala mosala ya mabaya oyo tata na ye atikaki mpe kosunga libota na bango. Tokomona ete likambo yango ekoki kozala solo soki totali na Biblia na esika oyo babengi Yesu mosali ya mabaya, balobeli mpe mama na ye na bandeko na ye, kasi balobeli Yosefe te. (Malako 6:3) . . . Na yango, ekoki mpenza kozala ete mbula soki zomi na mwambe mobimba ya bomoi ya Nkolo na biso, kobanda ntango balobelaki likambo yango [na Luka 2:41-49] tii ntango azwaki batisimo, alekisaki yango na kosala misala lokola bato nyonso.” Ekoki mpenza kozala ete Malia na bana na ye, bakisa mpe Yesu, bayebaki mpasi ya kokufela mobali mpe tata ya bolingo.
13. Ntango Yesu abandaki mosala ya kosakola, mpo na nini azalaki na boyebi, na mayele, mpe na motema oyo moto mosusu azalaki na yango te?
13 Tomoni mpenza ete Yesu abɔkwamaki na ndako ya bomɛngo te. Kutu, bomoi na ye ezalaki lokola bomoi ya bato mpamba. Na mobu 29, ntango ekokaki mpo abanda mosala ya Nzambe oyo ezalaki kozela ye. Na prɛnta ya mbula wana, azwaki batisimo na mai mpe akómaki Mwana ya Nzambe oyo abotami na elimo. ‘Likoló efungwamelaki ye.’ Na ntembe te yango elingi koloba ete bomoi oyo azalaki na yango na likoló liboso abotama ezongelaki ye lisusu na makanisi, bakisa mpe makanisi mpe ndenge ya komona makambo oyo azalaki na yango kuna. (Luka 3:21, 22, Boyokani ya Sika) Ntango Yesu abandaki mosala na ye, azalaki na boyebi, na mayele mpe na motema oyo moto mosusu azalaki na yango te. Yango wana bakomi ya Baevanzile balobelaki mingi mpenza makambo oyo Yesu asalaki mpe oyo akutanaki na yango ntango azalaki kosakola. Kutu, bakokaki te kokóma makambo nyonso oyo alobaki mpe oyo asalaki. (Yoane 21:25) Kasi makambo oyo elimo ya Nzambe etindaki bango bákoma ezali kosalisa biso tóyeba makanisi ya moto yango oyo alekaki bato nyonso.
Yesu azalaki moto ya ndenge nini?
14. Baevanzile elobi nini mpo na komonisa ete Yesu azalaki moto ya boboto mpe ya motema malamu?
14 Baevanzile ezali komonisa Yesu lokola moto ya boboto mpe ya motema malamu. Ayokelaki moto ya maba mawa (Malako 1:40, 41); motema makasi ya bato esalaki ye mpasi (Luka 19:41, 42); ayokaki nkanda mpo na lokoso ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo. (Yoane 2:13-17) Lokola azalaki na motema mawa, Yesu akokaki mpe kotangisa mpisoli, mpe soki ayoki to esengo, to mawa, to nkanda, mpe bongo na bongo, azalaki kobomba yango te mpo na miso ya bato. Na liwa ya moninga na ye Lasalo, ntango amonaki Malia, ndeko mwasi ya Lasalo azali kolela, Yesu ayokaki mawa mingi mpe atangisaki mpisoli, alelaki na miso ya bato.—Yoane 11:32-36.
15. Ndenge nini boboto ya Yesu ezali komonana na ndenge oyo azalaki kotalela bato mpe na makambo oyo azalaki kosalela bango?
15 Boboto ya Yesu emonanaki mpenza na ndenge oyo azalaki kotalela bato mpe na makambo oyo azalaki kosalela bango. Azalaki kokende epai ya babola mpe bato oyo bazalaki konyokwama, azalaki kosalisa bango mpo ‘bázwa kopema mpo na milimo na bango.’ (Matai 11:4, 5, 28-30) Azangaki ntango te ya kotalela bamposa ya bato oyo bazalaki na mpasi, ata mwasi oyo azalaki kotanga makila oyo asimbaki elamba na ye to mosɛngi oyo akufá miso, oyo aboyaki kotika kobelela atako bato bapekisaki ye. (Matai 9:20-22; Malako 10:46-52) Yesu azalaki kotya likebi na makambo malamu oyo bato bazalaki kosala mpe azalaki kopesa bango longonya; kasi azalaki mpe kopamela bato soki esengeli. (Matai 16:23; Yoane 1:47; 8:44) Atako na ntango wana bapekisaki basi makambo mingi, Yesu azalaki kopesa bango kilo mpe limemya oyo ebongi. (Yoane 4:9, 27) Yango wana, tokoki kokamwa te ete basi mosusu basepelaki na bolingo na bango moko básungaka ye na biloko na bango.—Luka 8:3.
16. Nini emonisi ete Yesu alukaki bomoi ya mindɔndɔ te mpe azalaki kotya makanisi na ye mingi na biloko ya mokili te?
16 Yesu alukaki bomoi ya mindɔndɔ te. Azalaki kotya makanisi na ye mingi na biloko ya mokili te. Emonani ete azalaki mpenza na biloko mingi te. Alobaki ete azali na “esika ya kolalisa motó na ye te.” (Matai 8:20) Yesu asalaki mpe makambo oyo epesaki bato esengo. Ntango akendaki na libala moko, feti oyo bazalaki kobɛta miziki mpe koyemba nzembo mpe bato bazalaki kosepela, tomoni ete akendaki kobebisa esengo ya bato. Kutu, Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso kuna. Ntango vinyo esilaki, abongolaki mai vinyo ya kitoko, oyo ‘esepelisaka motema ya moto.’ (Nzembo 104:15; Yoane 2:1-11) Na bongo, feti ekokaki kokoba, mpe tokanisi ete mobali na mwasi ya libala bazalaki lisusu na ntina ya komitungisa te. Tomoni mpe lisusu ete Yesu ayebaki kotya likambo na likambo na esika na yango mpamba te makambo mingi oyo elobami mpo na ye etali mosala ya kosakola. Azalaki kolekisa ntango na ye mingi na mosala yango mpe azalaki kosala yango na molende.—Yoane 4:34.
17. Mpo na nini tokoki kokamwa te ete Yesu azalaki Moteyi Monene, mpe mateya na ye ezalaki komonisa nini?
17 Yesu azalaki Moteyi Monene. Ntango azalaki koteya, azalaki kolobela mingi makambo oyo bato basalaka mokolo na mokolo, makambo oyo ye moko ayebaki malamu. (Matai 13:33; Luka 15:8) Moto moko te akokanaki na ye mpo na mayele ya koteya: azalaki koloba polele mpe na mindɔndɔ te, mpe azalaki koloba makambo oyo bato bakoki kosala. Ateyaki mpe makambo ya ntina mingi. Mateya na ye ezalaki komonisa ete azalaki na mposa ya kosalisa bato oyo bazalaki koyoka ye mpo báyeba makanisi, ndenge ya komona makambo, mpe banzela ya Yehova.—Yoane 17:6-8.
18, 19. (a) Yesu apesaki bilakiseli nini mpo na komonisa bizaleli ya Tata na ye? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
18 Yesu azalaki kosalela mingi bililingi, amonisaki bizaleli ya Tata na ye na bilakiseli ya polele oyo bato bakokaki kobosana yango noki te. Moto akoki kokanga ntina ya liteya oyo elobi ete Nzambe azali na motema mawa, kasi ekosimba mpenza motema na ye soki bakokanisi Yehova na tata oyo ayebi kolimbisa mpe akoki kokanga motema te ntango amoni mwana na ye azali kozonga, na boye ete ‘atamboli mbangu mpe [ayambi] ye mpe apwepwi ye.’ (Luka 15:11-24) Yesu aboyaki makanisi ya bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotyola bato mpamba, alimbolaki ete Tata na ye azali Nzambe oyo moto akoki kopusana pene na ye. Ye azali Nzambe oyo asepelaki mingi na libondeli ya mokɔngɔli ya mpako oyo azalaki na komikitisa koleka libondeli ya Mofalisai ya lolendo. (Luka 18:9-14) Yesu amonisaki ete Yehova azali Nzambe oyo amibanzabanzaka mpe atyaka likebi ata na mwa ndɛkɛ moke oyo ekwei na nse. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete: “Bóbanga te, bino boleki bandɛkɛ mike mingi.” (Matai 10:29, 31) Yango wana bato bazalaki kokamwa mpenza na “mateya” ya Yesu mpe bazalaki kosepela na ye. (Matai 7:28, 29) Mokolo mosusu, “ebele ya bato” balekisaki mikolo misato esika moko na ye, atako bazalaki na biloko ya kolya te!—Malako 8:1, 2.
19 Tosengeli mpenza kozala na botɔndi ete Yehova alakisi biso makanisi ya Klisto na kati ya Liloba na ye! Kasi, ndenge nini tokoki kolona makanisi ya Klisto mpe komonisa yango na boyokani na biso na bato mosusu? Tokolobela likambo yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Emoniseli 12:3, 4 emonisi ete bikelamu ya elimo bakoki kolanda makambo bikelamu ya elimo mosusu basalaka. “Dalagona” oyo abendaki “minzoto” mosusu, to bana ya elimo, mpo bázala batomboki lokola ye oyo balobeli na vɛrsɛ yango ezali nde Satana.—Talá Yobo 38:7.
b Mbala ya nsuka oyo balobeli Yosefe ezali ntango Yesu azalaki na mbula 12, ntango bakendaki kokuta ye na tempelo. Ntango bakendaki na feti ya libala na Kanana oyo esalemaki ntango Yesu abandaki mosala ya kosakola, lisolo elobeli Yosefe te. (Yoane 2:1-3) Na mobu 33 T.B., ntango babakaki Yesu na nzete, atikaki mama na ye na mabɔkɔ ya Yoane, moyekoli oyo alingaki mingi. Tokanisi ete Yesu alingaki kosala yango te soki Yosefe azalaki naino na bomoi.—Yoane 19:26, 27.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini ezali na ntina ete tóyeba malamu “makanisi ya Klisto”?
• Yesu azalaki elongo na nani liboso abotama lokola moto?
• Makambo nini Yesu akutanaki na yango ntango azalaki awa na mabele?
• Baevanzile emonisi Yesu lokola moto ya ndenge nini?
[Elilingi na lokasa 10]
Yesu akolaki na libota moko monene, mpe emonani ete bazalaki babola
[Bililingi na lokasa 12]
Balakisi bakamwaki na mayele mpe na biyano ya Yesu ntango azalaki na mbula 12