Basi—Bópesa mibali na bino limemya makasi
‘Basi bótosaka mibali na bino.’—BAEFESE 5:22.
1. Mpo na nini basi mingi bazali na mokakatano mpo na komemya mibali na bango?
NA MIKILI mingi, ntango mwasi ná mobali bazali kobalana, mwasi alapaka ndai ya kopesa mobali na ye limemya makasi. Kasi, mpo na basi mingi, ndenge mobali azali kofanda na ye nde esalaka ete amona ete ezali mpasi akokisa ndai na ye to te. Ebongiseli ya libala ebandaki malamu mpenza. Nzambe alongolaki mokuwa moko na mopanzi ya Adama, mobali ya liboso, mpe asalaki mwasi. Adama alobaki boye: “Oyo azali sasaipi mokuwa ya mikuwa na ngai, mpe mosuni ya mosuni na ngai.”—Genese 2:19-23.
2. Makambo nini ekómi mpe komonana epai ya basi na kati ya mabala?
2 Atako ebongiseli ya libala ebandaki malamu mpenza, na ebandeli ya bambula ya 1960, na États-Unis, basi mingi bakómaki kolendisa elimo ya koboya bokonzi ya mibali. Na ntango wana, baoyo bazalaki kosundola mabota na bango ezalaki mingimingi mibali; nzokande, na nsuka ya bambula ya 1960, basi mingi mpe bakómaki kosundola mabota na bango. Na moi ya lelo, tozali komona ete basi mingi bazali koloba maloba ya mbindo, komɛla masanga, komɛla likaya, mpe kosala pite mpe ekobo lokola kaka mibali. Tokoki nde koloba ete basi bakómi na bomoi ya malamu koleka? Te. Na bikólo mingi, soki totángi mabala mibale oyo esalemi, moko ekosuka na kokufa. Milende nyonso oyo basi mosusu basali mpo na kobongisa esika ya mwasi na kati ya libala ebongisi nde makambo to ebebisi?—2 Timote 3:1-5.
3. Mikakatano oyo libala ezali kokutana na yango lelo oyo euti mpenza wapi?
3 Mosisa mpenza ya likambo ezali nini? Tokoki koloba ete ezali likambo oyo ebandaki ntango “nyoka ya ebandeli oyo abengami Zabolo mpe Satana,” anzelu oyo atombokelaki Nzambe, akosaki Eva. (Emoniseli 12:9; 1 Timote 2:13, 14) Satana abongoli mateya ya Nzambe. Na ndakisa, Satana amemi bato bákóma kokanisa ete libala ezali bolɔkɔ mpe etumbu. Makanisi oyo azali kolendisa na nzela ya radio, televizyo, mpe bazulunalo ya mokili oyo azali koyangela, ezali komonisa bato ete malako ya Nzambe ebongi te mpe esilá ngala. (2 Bakolinti 4:3, 4) Nzokande, soki totaleli malamu malako oyo Nzambe apesi na ntina na esika ya mwasi na kati ya libala, tokomona ete Liloba ya Nzambe ezali na bwanya mpe ebongi mpenza.
Likebisi mpo na baoyo balingi kobala
4, 5. (a) Mpo na nini mwasi asengeli kokanisa malamu liboso ya kondima mobali oyo atuni ye libala? (b) Motuna nini mwasi asengeli komituna liboso andima libala?
4 Biblia epesi likebisi moko. Elobi ete na mokili oyo Zabolo azali koyangela, ata baoyo bazali na mabala ya malamu bakozala na “bolɔzi.” Na yango, atako libala ezali ebongiseli ya Nzambe, Biblia ezali kokebisa baoyo balingi kobala. Mpo na mwasi oyo akufelá mobali, mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Akozala na esengo mingi koleka soki atikali ndenge azali.” Yesu mpe alendisaki likambo ya kotikala monzemba mpo na moto oyo “akoki kopesa nzela na yango.” Nzokande, soki moto asepeli kobala, asengeli kobala “kati na Nkolo kaka,” elingi koloba, asengeli kobala mosaleli ya Nzambe oyo amipesi mpe azwi batisimo.—1 Bakolinti 7:28, 36-40; Matai 19:10-12.
5 Likebisi ya Biblia oyo elobi ete: “Mwasi oyo abalá akangami na mobali na nzela ya mibeko” emonisi ntina oyo mwasi asengeli kotalela malamumalamu moto oyo alingi kobalana na ye. Ezali se soki mobali yango akufi to asali ekobo mpe babomi libala nde mwasi akoki ‘kolongwa na mibeko na ye.’ (Baloma 7:2, 3) Kolinga moto kaka mpo abɛtisaki yo motema na mokolo ya liboso oyo omonaki ye yango te nde ekoki kosala ete bózala na libala ya malamu. Yango wana, ebongi ete mwasi oyo azali monzemba amituna boye, ‘Nakondima libala oyo ekokanga ngai na mibeko ya mobali oyo?’ Esengeli komituna motuna yango liboso ya kondima libala, kasi na nsima te.
6. Basi mingi lelo oyo bakoki kozwa ekateli nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?
6 Na bamboka mingi, mwana mwasi akoki kozwa ekateli ya kondima to koboya moto oyo atuni ye libala. Kasi, mbala mosusu kopona mobali ya malamu ezalaka likambo eleki mpasi mpo na mwasi, mpamba te mposa ya kozala na oyo ya ye molongani ekoki kozala makasi na motema na ye. Mokomi moko alobaki boye: “Ntango tozali na mposa makasi ya kosala likambo moko, ezala kobala to komata likoló ya ngomba moko boye, mbala mingi tondimaka makambo bindimelá mpe totyaka likebi kaka na makambo oyo ekosepelisa biso.” Moto oyo ataleli makambo malamu te liboso ya kozwa ekateli ya komata likoló ya ngomba moko, akoki kosuka na liwa; ndenge moko mpe, kopona malamu te molongani na yo ekoki kozala likama.
7. Toli nini ya bwanya epesami mpo na koluka molongani?
7 Ntango mobali moko atuni ye libala, mwasi asengeli kotalela malamu soki kokangama na mibeko ya mobali yango ekosɛnga ye makambo nini. Eleki mwa bambula, elenge mwasi moko ya Inde alobaki boye: “Baboti na biso bazali mikóló mpe baleki biso na bwanya, mpe ezali mpasi bákosama ndenge oyo biso tokoki kokosama. . . . Soki nalandaki makanisi ya baboti na ngai te, nakokaki mpenza komikosa.” Lisalisi ya baboti mpe bato mosusu ezali na ntina. Moto moko ya bwanya azalaki kopesa bilenge toli ete báluka koyeba baboti ya moto oyo balingi kobalana na ye mpe bátalela malamu ndenge oyo ayokanaka na baboti mpe bandeko na ye mosusu.
Ndenge oyo Yesu azalaki kotosa
8, 9. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kotalela likambo ya kotosa Nzambe? (b) Botosi ekoki komema matomba nini?
8 Atako kotosa ezalaka ntango mosusu pɛtɛɛ te, basi bakoki kotalela yango lokola likambo ya lokumu, kaka ndenge Yesu atalelaki yango. Atako kotosa Nzambe esɛngaki ye anyokwama mpe akufa na nzete ya mpasi, azwaki esengo na kotosa Nzambe. (Luka 22:41-44; Baebele 5:7, 8; 12:3) Basi bakoki kolanda ndakisa ya Yesu, mpamba te Biblia elobi ete: “Mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Klisto ezali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Nzokande, ezali kaka te ntango mwasi abali nde akómaka na nse ya bokonzi ya mobali.
9 Biblia elobi ete basi, baoyo babalá to minzemba, basengeli kotosa bokonzi ya mibali oyo bazali bakɛngɛli na kati ya lisangá. (1 Timote 2:12, 13; Baebele 13:17) Ntango basi bazali kolanda malako ya Nzambe mpe bazali kotosa, bazali kopesa baanzelu ndakisa na kati ya ebongiseli ya Nzambe. (1 Bakolinti 11:8-10) Longola yango, ndakisa malamu mpe batoli ya basi ya mabala oyo bakómi mikóló ekoki koteya basi oyo bazali naino bilenge ‘bátosa mibali na bango.’—Tito 2:3-5.
10. Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa na likambo etali kotosa?
10 Yesu ayebaki ntina ya botosi oyo ebongi. Mokolo moko, atindaki ntoma Petelo afuta mpako na bakonzi ya Leta mpo na bango mibale; kutu, alakisaki ye ndenge akozwa mbongo oyo asengelaki kofuta. Bambula mingi na nsima, Petelo akomaki boye: “Mpo na Nkolo bótosaka bibongiseli nyonso ya bato.” (1 Petelo 2:13; Matai 17:24-27) Mpo na likambo eleki monene oyo Yesu asalaki mpo na komonisa botosi, Biblia elobi boye: “Amikómisaki nde mpamba mpe akamataki motindo ya moombo mpe ayaki kokóma motindo moko na bato. Longola oyo wana, ntango akómaki na lolenge ya moto, amikitisaki mpe akómaki moto ya botosi tii na liwa.”—Bafilipi 2:5-8.
11. Mpo na nini Petelo alendisaki basi bátosaka ata mibali na bango oyo bazali bandimi te?
11 Ntango Petelo alendisaki baklisto bátosa ata bakonzi ya mokili oyo bazali makambo makasi mpe bazangi sembo, alimbolaki boye: “Ya solo, ezali na nzela yango nde bobengamaki, mpamba te Klisto mpe anyokwamaki mpo na bino, kotikeláká bino ndakisa mpo bólanda matambe na ye malamumalamu.” (1 Petelo 2:21) Nsima ya kolobela mpasi oyo Yesu ayokaki mpe ndenge oyo ayikelaki yango mpiko na botosi nyonso, Petelo alendisaki basi oyo mibali na bango bazali bandimi te na maloba oyo: “Ndenge moko mpe, bino basi, bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi.”—1 Petelo 3:1, 2.
12. Botosi ya Yesu ebotaki mbuma nini?
12 Kotosa moto oyo azali kotyola mpe kofinga yo ekoki komonana lokola bolɛmbu. Kasi, Yesu azalaki kotalela yango bongo te. Petelo akomaki boye: “Ntango azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te.” (1 Petelo 2:23) Bato mosusu oyo bamonaki ndenge Yesu anyokwamaki bandimelaki ye, ata kaka na maloba; na ndakisa, moyibi oyo babakaki na nzete penepene na ye mpe mokonzi ya basoda oyo azalaki na esika oyo Yesu akufaki. (Matai 27:38-44, 54; Malako 15:39; Luka 23:39-43) Ndenge moko mpe, Petelo amonisaki ete mibali mosusu oyo bazali bandimi te—ata baoyo banyokolaka basi na bango—bakokóma baklisto ntango bazali komona botosi ya basi na bango. Bandakisa mingi ezali kondimisa likambo yango.
Ndenge oyo basi bakoki kozwa mibali na bango
13, 14. Ndenge nini kotosa mibali oyo bazali bandimi te ebotaki mbuma malamu?
13 Basi mingi oyo bakómaki bandimi liboso, bazwaki mibali na bango na bizaleli malamu na bango. Na liyangani moko ya etúká oyo euti kosalema, mobali moko alobaki mpo na mwasi na ye boye: “Nakoki mpenza koloba ete nazalaki konyokola ye na nko. Kasi, azalaki ntango nyonso kopesa ngai limemya mingi. Ata mbala moko te azangaki limemya epai na ngai. Alukaki kondimisa ngai mateya ya lingomba na ye na makasi te. Azalaki mpenza kolɛngɛla ngai. Soki akokende na liyangani, azalaki kosala makasi alambela ngai mpe asilisa misala nyonso ya ndako. Bizaleli na ye ya malamu ekómaki kopesa ngai mposa ya koyeba Biblia. Mpe, lelo oyo nazali na bino awa!” Tomoni mpenza ete mobali yango ‘azwamaki kozanga liloba’ na etamboli ya mwasi na ye.
14 Ndenge Petelo amonisaki yango, ezali mpenza te makambo oyo mwasi azali koloba, kasi oyo azali kosala nde ebotaka mbuma ya malamu. Tokoki komona yango na ndakisa ya mwasi moko oyo ayekolaki mateya ya Biblia mpe azwaki ekateli ya koyanganaka na makita. Mokolo moko, mobali na ye alobaki na ye ete: “Agnès, soki obimi na porte wana, kozonga lisusu awa te!” Na esika abima na “porte wana,” abimelaki na porte mosusu. Mokolo ya makita oyo elandaki, ntango alingaki kokende, mobali yango alobaki na ye ete: “Okokuta ngai te ntango okozonga.” Ntango mwasi azongaki, akutaki ye te, alekisaki mikolo misato azali komonana te. Ntango azongaki, mwasi atunaki ye na boboto ete: “Nasalela yo mwa eloko ya kolya?” Ata mokolo moko te Agnès akakolaki ezaleli na ye ya kokangama na Yehova. Nsukansuka, mobali na ye andimaki koyekola Biblia, amipesaki na Nzambe, mpe na nsima akómaki nkulutu oyo azalaki na mikumba mingi na lisangá.
15. Basi baklisto balendisami na kozala na “monzɛlɛ” nini?
15 Ntoma Petelo alendisaki likambo moko oyo basi oyo touti kolobela bamonisaki, “monzɛlɛ”; kasi yango ezalaki te na kotya likebi mingi na “kokanga nsuki” to “kolata bilamba ya likoló.” Nzokande, Petelo alobaki ete: “[Monzɛlɛ na bino] ezala nde bomoto ebombamá ya motema na kati ya molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.” Ezaleli yango emonanaka na elobeli ya boboto mpe na bonkonde, kasi te na kozala mwasi ya matata. Ezali na ndenge wana nde mwasi moklisto apesaka mobali na ye limemya makasi.—1 Petelo 3:3, 4.
Bandakisa ya komekola
16. Na makambo nini Sala azali ndakisa malamu mpo na basi baklisto?
16 Petelo akomaki boye: “Na ntango ya kala, basi basantu oyo bazalaki kolikya epai ya Nzambe bazalaki kobongisa nzoto, kotosáká mibali na bango bongo.” (1 Petelo 3:5) Basi yango basosolaki ete soki bazali kotosa toli ya Yehova, bakosepelisa motema na ye, mabota na bango ekozala na esengo mpe bakozwa mbano ya bomoi ya seko. Petelo atángaki Sala, mwasi ya Abalayama, mpe abakisaki ete “azalaki kotosa Abalayama, kobengáká ye ‘Nkolo.’” Sala azalaki kosunga mobali na ye, oyo azalaki kobanga Nzambe mpe oyo Nzambe atindaki akende kosalela ye na mboka mosika. Sala andimaki kotika bomoi ya malamu, ata mpe kotya bomoi na ye na likama. (Genese 12:1, 10-13) Petelo alendisaki basi bálanda ndakisa ya mpiko ya Sala, alobaki ete: “Bino bokómi bana na ye, soki bokobi kosala malamu mpe bozali te kobanga ata eloko moko ya nsɔmɔ.”—1 Petelo 3:6.
17. Mpo na nini ekoki kozala ete Petelo akanisaki mpe Abigaili lokola ndakisa mpo na basi baklisto?
17 Mwasi mosusu oyo atyaki elikya epai ya Nzambe ezalaki Abigaili, mpe ekoki kozala ete Petelo akanisaki mpe ye. Mwasi yango “azalaki na boyebi malamu,” kasi mobali na ye Nabala “azalaki moto ya nkanda mpe ya makambo mabe.” Ntango Nabala aboyaki kosalisa Davidi ná bato na ye, bango bazwaki mokano ya kokende koboma Nabala ná bato nyonso ya ndako na ye. Kasi, Abigaili asalaki likambo moko mpo na kobikisa bato ya ndako na ye. Azwaki biloko ya kolya, atyaki yango likoló ya bampunda mpe akendaki kokutana na Davidi ntango azalaki koya ná bato na ye. Ntango amonaki Davidi, akitaki na mpunda, afukamaki mpe abondelaki ye asala likambo na nkanda te. Likambo yango esimbaki motema ya Davidi. Alobaki na ye ete: “[Yehova] Nzambe ya Yisalaele akumisama, oyo atindi yo mokolo oyo mpo na kozwana na ngai. Mayele na yo ekumisama.”—1 Samwele 25:2-33.
18. Soki motema ya mwasi elingi kobendama na mobali mosusu, akoki kokanisa ndakisa ya nani, mpe mpo na nini?
18 Moto mosusu oyo azalaki ndakisa malamu mpo na basi ezali elenge mwasi Mosulama oyo alingaki te koboya mobateli ya mpate oyo alakaki ye libala. Bolingo na ye mpo na mobali yango ekitaki te atako mokonzi moko oyo atondá bomɛngo amonisaki ete asepeli na ye mpe alingi kobala ye. Alobaki boye mpo na mobateli ya mpate oyo motema na ye eponaki: “Tyá ngai lokola elembo na motema na yo, lokola elembo na lobɔkɔ na yo; zambi bolingo ezali na nguya lokola kufa . . . Mai mingi ekozimisa bolingo te, mpela ekoki kozindisa yango mpe te.” (Loyembo ya Salomo 8:6, 7) Tiká ete mwasi nyonso oyo andimi elaka ya libala azala na ekateli ya kotikala sembo epai ya mobali na ye mpe apesa ye limemya makasi.
Toli mosusu ya Nzambe
19, 20. (a) Mpo na nini basi basengeli kotosa mibali na bango? (b) Ndakisa nini ya malamu bapesi basi?
19 Tótalela mpe bavɛrsɛ mosusu oyo elandi vɛrsɛ oyo esimbi boyekoli na biso: ‘Basi bótosaka mibali na bino.’ (Baefese 5:22) Botosi yango ezali na ntina nini? Vɛrsɛ oyo elandi ebakisi boye: “Mpo mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Klisto mpe azali mokonzi ya lisangá.” Yango wana, Biblia epesi basi toli oyo: “Ndenge lisangá etosaka Klisto, tiká basi mpe bátosaka mibali na bango ndenge wana na makambo nyonso.”—Baefese 5:23, 24, 33.
20 Mpo na kotosa toli yango, basi basengeli koyekolaka mpe komekola ndakisa ya lisangá ya bayekoli ya Yesu oyo bazali bapakolami na elimo. Tángá 2 Bakolinti 11:23-28 mpe na nsima talá makambo oyo ntoma Paulo, ye oyo azali mpe na kati ya lisangá yango, ayikelaki mpiko na ndenge azalaki sembo epai ya Mokonzi na ye, Yesu Klisto. Lokola Paulo, basi mpe bandeko mosusu na kati ya lisangá basengeli kotosa Yesu. Basi bamonisaka yango na ndenge batosaka mibali na bango.
21. Makambo nini ekoki kolendisa basi bákoba kotosa mibali na bango?
21 Atako basi mingi lelo oyo basepelaka kotosa te, mwasi ya bwanya akotalela matomba oyo akozwa soki azali na botosi. Na ndakisa, mpo na mwasi oyo mobali na ye azali mondimi te, kotosa bokonzi na ye na makambo nyonso oyo ezali kobuka mibeko ya Nzambe te ekoki komemela ye mbano ya ‘kobikisa mobali na ye.’ (1 Bakolinti 7:13, 16) Longola yango, akoki kozala na esengo ya koyeba ete Yehova Nzambe azali kosepela na etamboli na ye mpe akopesa ye mbano monene lokola alandi ndakisa ya Mwana na ye.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo mwasi atosa mobali na ye?
• Mpo na nini mwasi asengeli kozwa na lisɛki te ekateli ya kondima moto oyo atuni ye libala?
• Na makambo nini Yesu azali ndakisa mpo na basi, mpe matomba nini bakoki kozwa soki balandi ndakisa na ye?
[Elilingi na lokasa 19]
Mpo na nini ekateli ya kondima moto oyo atuni yo libala ezali likambo ya kozwa na lisɛki te?
[Elilingi na lokasa 21]
Basi bakoki kozwa liteya nini na ndakisa ya basi lokola Abigaili?