Nani abéngami mpenza mpo na bomoi na likoló?
JÉHOVAH alingi mpenza bato. Kino apesaki mwana na ye, Yesu Klisto, lokola lisiko mpo na kosomba eloko oyo nkóko na biso, Adam, abungisaki. Eloko yango nini? Bomoi ya moto na kokoka, bomoi ya seko, elongo na lotómo nyonso mpe bilaká binso bikangani na yango. (Yoane 3:16) Lisiko ezali mpe komonisa bolingo oyo Yesu azali na yango mpo na bato.—Matai 20:28.
Nzambe amonisaki bolingo na ye na kopesáká bilikya mibale bitongami likoló na makoki ya mbeka ya lisiko na Yesu. (1 Yoane 2:1, 2) Liboso na liwa na Yesu, elikya oyo epesamaki epai na bato ezalaki bobele ya kozala na bomoi ya seko kati na paradis na mabelé. (Luka 23:43) Nsima na Pantekote ya mobu 33, Jéhovah apesaki bongo elikya ya bomoi na likoló epai na “etongá moke.” (Luka 12:32) Kasi nini eutaki kosalema kala mingi te? Kobanda 1931, nsango ya Bokonzi eyebisamaki mingi mpenza epai na “bampate mosusu,” mpe uta 1935, na nzela na Klisto, Nzambe azali kobenda epai na ye, “ebele monene” ya bato oyo bakokani na bampate. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9) Kati na mitema na bango, Nzambe azali kotya elikya ya kozala na bomoi ya seko kati na paradis na mabelé. Bazali na mposa ya kolya bilei malamu, koyangela banyama na bolingo mpe kozala na esengo elongo na bato mosusu ya sembo mpo na libela.
Banganga mpe bakonzi na motema na mawa
Mpo ete ezali bolingo nde epusaki Yesu ete apesa bomoi na ye lokola mbeka ya lisiko, tondimisami mpenza ete akozala Mokonzi na likoló na motema na mawa. Kasi, na solo mpenza, Yesu akozala ye moko te mpo na kokamba bato kino bakóma na ezaleli ya kokoka na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkóto. Jéhovah asili kopona bakonzi mosusu ya motema na mawa baoyo bakoyangela kati na makoló. Ee, elobami na ntina na bango ete, “bakozala banganga na Nzambe mpe na Klisto; bakozala bakonzi elongo na ye mpo na mbula nkóto.” —Emoniseli 20:1-6.
Bakonzi oyo bakosala elongo na Klisto bazali boni, mpe lolenge nini baponami mpo na kozwa libaku yango kitoko? Ntoma Yoane amonaki bato 144 000 likoló na ngomba ya Siona elongo na Mwana na Mpate, Yesu Klisto. Lokola “basombami kati na bato,” bakoyeba mpenza ndimbola ya mimekamo oyo bato bazali kokutana na yango, bozito ya ezalela ya kozanga kokoka, mpasi mpe kokufa (Emoniseli 14:1-5; Yobo 14:1) Mpo na bantina nyonso wana, bakozala mpenza bakonzi—banganga na motema na mawa.
Litatoli ya elimo
Ba 144 000 bazali na “epakweli euti na mosantu,” Jéhovah. (1 Yoane 2:20, MN) Ezali bongo epakweli mpo na elikya ya kozala na bomoi na likoló. Nzambe asili ‘kotya elembo na ye likoló na bango mpe asili kopesa bango elimo kati na mitema na bango lokola ndanga.’—2 Bakolinti 1:21, 22.
Epai na baklisto wana, elimo ya Nzambe ezali kotatola ete basili kozwa libyangami mpo na bomoi na likoló. Mpo na yango, Paulo akomaki na Baloma 8:15-17 (MN) ete: “Boyambi elimo ya boombo te oyo ekopesa lisusu bobángi, kasi boyambi nde elimo ekómisi bino bana, elimo tokolobaka na yango ete: ‘Abba, Tata!’ Elimo yango moko ekotatolaka na elimo na biso ete tozali bana na Nzambe. Soko nde tozali bana, tozali mpe basangoli: ee, basangoli na libula na Nzambe, kasi basangoli na libula elongo na Klisto, soko tokooka mpasi elongo na ye mpo na kozwa nkembo elongo na ye.” Ezali mosala ya elimo na Nzambe, bokasi na ye bokosalaka mosala, nde ekopusaka bapakolami na koloba ete: “Abba, Tata!”
Eloko oyo ezali komonisa epai na moto moko ete epakolami mpo na libéngami ya likoló, ezali elimo, to mayoki makasi ya komimona mpenza ete akómi mwana na Nzambe. (Bagalatia 4:6, 7) Moto yango akondimisama mpenza ete abotami na Nzambe mpo na kokóma moko na bana na ye ya elimo, moko na ba 144 000 basangoli na libula ya Bokonzi ya likoló. Akoki komonisa ete elikya na ye mpo na bomoi na likoló ezali mposa oyo alonaki ye moko te to bobele mbuma ya makanisi na ye te. Elikya yango euti na Jéhovah, ezali mosala ya elimo na Nzambe likoló na bomoto na ye.—1 Petelo 1:3, 4.
Na nsé na litambwisi ya elimo santu na Nzambe, elimo to makanisi ya bapakolami ekobimisaka bokasi monene. Ezalela ya elimo wana ezali kopusa bango na koyanola malamu mpenza na oyo Biblia elobi na ntina na elikya mpo na bomoi na likoló. Bazalaka mpe na mayoki makasi mpo na lolenge oyo Jéhovah azali kosala epai na bango na nzela ya elimo santu. Na bongo, bandimisami ete bazali bana ya elimo mpe basangoli na libula na Nzambe.
Wana baklisto bapakolami bakotalelaka oyo Biblia ezali koloba na ntina na bana ya elimo na Nzambe mpe na ntina na elikya mpo na bomoi na likoló, bakolobaka kati na mitema na bango ete: “Oyo ekokani epai na ngai!” Ee, bakosepelaka mpenza na bilaká ya mbano mpo na bomoi na likoló, oyo Tata na bango azali komonisa kati na Liloba na ye. Wana ekotangaka bango ete: “Balingami, sasaipi tozali bana na Nzambe” (1 Yoane 3:2), bakolobaka ete: “Oyo ekokani epai na ngai!” Bobele bongo, ntango baklisto bapakolami bakotangaka ete Nzambe asili kobota bato mpo ete bazala “mbuma na liboso na bikelamu na ye,” bakolobaka na mitema na bango ete: “Ee, abotaki ngai na mokano wana.” (Yakobo 1:18) Bayebi ete “babatisami kati na Klisto Yesu” mpe kati na kufa na ye. (Baloma 6:3) Bazali bongo na endimiseli makasi ete bazali basangani ya nzoto ya elimo na Klisto mpe bazali kolona elikya ya kozwa kufa lokola oyo na Yesu mpe kosekwa mpo na bomoi na likoló.
Mpo na kosangola Bokonzi ya likoló, bapakolami basengeli ‘kozala na etingya mpo na kolendisa libyangami na bango mpe koponama na bango.’ (2 Petelo 1:5, 11) Bazali kotambola na kondima mpe bazali kolanda kokóla na elimo, lokola ekosalaka bato oyo bazali na elikya mpo na bomoi na mabelé. Tokoki kobakisa lisusu nini na ntina na litatoli ya elimo?
Mpo na nini bakolyaka limpa mpe bakomelaka vinyo
Ezali te mpo ete balembi motindo na bomoi oyo ya mabelé nde baklisto bapakolami bakómi na mposa ete bakende na likoló. (Tala Yuda 3, 4, 16.) Kasi ezali mpo ete elimo santu ezali kotatwela elimo na bango ete bazali bana na Nzambe. Bandimisami mpe ete basili kokótisama kati na kondimana ya sika. Baoyo basali kondimana ya sika ezali Jéhovah Nzambe mpe Yisraele ya elimo. (Yilimia 31:31-34; Bagalatia 6:15, 16; Baebele 12:22-24) Kondimana yango oyo esalemi na nzela na makila na Yesu masopami, ebimisi libota moko mpo na nkombo na Jéhovah mpe esali baklisto bapakolami, eteni na “libota” ya Abrahame. (Bagalatia 3:26-29; Misala 15:14) Kondimana ya sika ekoumela kino Bayisraele nyonso ya elimo bakosekwa mpo na kozala na bomoi bozangi kufa kati na makoló.
Lisusu, baoyo babengami mpenza mpo na bomoi na likoló bazali na ntembe te mpo na oyo etali koyambama na bango kati na kondimana mpo na Bokonzi ya likoló. Yesu alobelaki kondimana yango oyo ezali kati na ye mpe bayekoli na ye, wana alobaki ete: “Bino bato bosili koumela elongo na ngai kati na makambo na ngai ya mpasi. Mpe lokola Tata na ngai asili kosala kondimana elongo na ngai mpo na Bokonzi, ngai mpe nasali kondimana elongo na bino mpo na kolya mpe komela na mesa na ngai kati na bokonzi na ngai, mpe bokofanda na kiti na bokonzi mpo na kosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele.” (Luka 22:28-30, MN) Kondimana yango ebandaki mpo na bayekoli na Yesu na ntango bapakolamaki na elimo santu, mokolo ya Pantekote ya mobu 33. Ekoumela seko katina Yesu Klisto mpe bakonzi basangani elongo na ye mpo na koyangela.—Emoniseli 22:5.
Baoyo babéngami mpo na bomoi na likoló bandimisami mpenza ete bakótisami kati na kondimana ya sika mpe kati na kondimana mpo na Bokonzi. Ebongi na bango mpenza ete balya limpa mpe bamela vinyo mbula na mbula na ntango na kokumisa Elambo na Nkolo, Ekaniseli ya liwa na Yesu Klisto. Limpa lizangi mfulu ezali elembo ya nzoto na Yesu oyo ezangi lisumu, nzokande vinyo elakisi makila na ye ya kokoka, oyo asopaki na liwa na ye, makila oyo mopesi motuya na kondimana ya sika.—1 Bakolinti 11:23-26.
Soki Jéhovah azali mpenza kopesa yo elikya mpo na kozala na bomoi na likoló, boye ozali kopesa motuya mingi na likambo yango. Boye ozali kobondela ye mpo na komonisa elikya na yo. Elikya yango ezali ntango nyonso kati na makanisi na yo, mpe okoki kolongola yango na elimo na yo te. Opusami mpenza na bamposa makasi ya elimo. Kasi soko nde ozali na motema mokabwani mpe na kokakatana, boye osengeli te kolya limpa mpe komela vinyo na Elambo na Nkolo.
Eloko nini ekoki kokósa biso?
Bamosusu bakolyaka limpa mpe bakomelaka vinyo na libungá, na Ekaniseli, mpo ete bazali kokanga ntina te ete kopakolama “ezali likambo ya mokano na moto te to na mpiko na ye mpe te, kasi na boboto na Nzambe,” (Baloma 9:16) Ezali bato te nde bakozwa ekateli soko basengeli to mpe te ete bakótisama kati na kondimana ya sika mpe bakóma basangoli na libula elongo na Klisto kati na Bokonzi ya likoló. Ezali Jéhovah nde akoponaka. Kati na Yisraele ya kala, Jéhovah aponaki baoyo basengelaki kosalela ye lokola banganga, mpe abomaki Koré, ye oyo akómaki na lolendo ete azwa bonganga oyo Nzambe apesaki epai na libota ya Alona. (Exode 28:1; Mituya 16:4-11, 31-35; 2 Ntango 26:18; Baebele 5:4, 5) Bobele bongo, Jéhovah akolinga te ete moto amilakisa lokola ete abéngami mpo na kozala kati na bakonzi mpe banganga ya likoló, nzokande ye moko [Jéhovah] apesi ye ebyangeli wana te.—Tala 1 Timoté 5:24, 25
Moto moko akoki kondima na libungá ete azwi ebyangeli mpo na kozala na bomoi na likoló na ntina na mayoki makasi mauti na mikakatano minene. Liwa ya mobalani, to mpe likambo mosusu, ekoki komema moto ete abungisa mposa ya kozala na bomoi na mabelé. To mbala mosusu soko ndeko to moninga na ye moko alobi ete azali mopakolami, yango ekoki komema ye na kozala mpe na mposa ya elikya wana. Makambo wana makoki kopesa ye mayoki lokola ete, ye abongi kozala na bomoi na likoló. Kasi, ezali lolenge wana te Nzambe akopesaka moto elimo oyo ekotanga ye ete azali mwana na ye. Kozala na mposa ya kokende na likoló na ntina na mikakatano, to mpo na ezalela ya mpasi ya bomoi na mabelé oyo ekopesaka mayoki makasi, ekomonisa nde kozanga botondi mpo na mokano na Nzambe na ntina etali mabelé.
Makanisi oyo moto azalaki na yango na lingomba na ye ya kala, ekoki mpe kokosa ye mpe komema ye na kosukisa ete abengami mpo na kozala na bomoi na likoló. Mbala mosusu azalaki kati na lingomba oyo likoteyaka ete bomoi na likoló ezali elikya bobele moko mpo na bandimi. Na yango, moklisto asengeli kosenzela ete amitika kokósama te na mayoki na ye to na makanisi na ye ya libunga oyo azalaki na yango na ntango ya kala,
Ntina ya komitalela malamu mpenza
Ntoma Paulo apesaki likebisi monene mpenza wana akomaki ete: “Soko moto nani akolya limpa mpe akomela kopo na Nkolo na motindo mobongi te, azali na ekweli na ntina na nzoto mpe na makila na Nkolo. Tika ete moto [amindima] ye mpenza mpe bongo alya limpa mpe amela kopo. Mpamba te, ye oyo akolyaka mpe akomelaka, akomilyela mpe akomimelela ekweli, soko akososola nzoto te.” (1 Bakolinti 11:27-29) Na yango, soki na bambula oyo euti koleka, moklisto moko akanisaki ete abéngami mpo na kozala na bomoi na likoló, asengeli kokanisa malamu mpenza na likambo oyo mpe yango kati na mabondeli.
Moklisto yango akoki lisusu komituna boye: “Ezali bopusi ya bato mosusu nde ememi ngai na kozwa likanisi ya kozala na bomoi na likoló?” Yango ekozala libungá, mpamba te Nzambe apesi moto moko te mokumba ya kopona bato mosusu mpo na kozwa libaku wana kitoko. Komona bilili to bimonaneli mosusu ekoki kotalelama te lokola elembeteli ya kopakolama oyo euti na Nzambe, mpe Nzambe akoponaka basangoli na Bokonzi te na koyebisáká bango yango na nzela ya mingongo ya kokamwisa.
Bamosusu ebongi bamituna ete: “Nazalaki nde komela drogue liboso na kokóma moklisto? Nazali nde komela bankisi oyo ekoki kozala na bopusi likoló na mayoki na ngai? Nasili nde kokóta lopitalo mpo na mpasi ya motó to mpo na mpasi ya makanisi?” Bamoko balobaki ete liboso babundisaki likanisi oyo bazalaki na yango mpo na elikya ya bomoi na likoló. Bamosusu balobaki ete, na mwa ntango moko, Nzambe alongolaki bango elikya ya kozala na bomoi na mabelé, liboso ete apesa bango elikya ya kozala na bomoi na likoló. Kasi lolenge wana ya kosala eyokani te na motindo na kosala na Nzambe. Lisusu, kondima esangani na ntembe te, yango ekomonisaka nde endimiseli makasi.—Baebele 11:6.
Ekoki mpe kozala na ntina na komituna boye: “Nalingi nde kozwa lokumu? Nazali nde koluka na mposa makasi mpo na kozwa etelemelo moko to mwa bokonzi, ezala sikawa to na ntango ekoya, na lolenge na mokonzi mpe nganga oyo asangani na Klisto?” Na ekeke ya liboso, atako libéngami lipesamaki na bato banso ete baingela kati na Bokonzi ya likoló, nzokande baklisto bapakolami nyonso bazalaki te na mikumba lokola kozala basangani ya collège central, bankulutu to basaleli na misala. Baklisto basi bazalaki mingi, nde bapesamelaki ata mokumba moko te. Kopakolama na elimo ekopesaka te boyebi ya Liloba na Nzambe oyo ekeseni mpenza na oyo ya bamosusu, mpamba te Paulo amonaki malamu kolakisa bamoko na bapakolami mpe kopesa bango toli. (1 Bakolinti 3:1-3; Baebele 5:11-14) Baoyo babéngami mpo na bomoi na likoló bazali komitalela te lokola bato na liboso mpe bazali kobenda likebi ya bato mosusu te likoló na kopakolama na bango. Na kokesena, bazali nde komonisa komikitisa oyo esengami na sembo mpenza epai na baoyo bazali na “likanisi na Klisto.” (1 Bakolinti 2:16) Bayebi lisusu ete masengami na sembo na Nzambe mazali mpo na baklisto banso, ata soko bazali na elikya ya bomoi na likoló to elikya ya bomoi na mabelé.
Moto oyo alobi ete abéngami mpo na bomoi na likoló akozwaka mpe bimoniseli te. Nzambe azali na nzela moko oyo azali kopesa na yango bilei ya elimo epai na lisangá na ye na mabelé. (Matai 24:45-47) Moto moko te asengeli bongo kokanisa ete, moklisto mopakolami apesameli mayele koleka oyo ya “ebele monene” na baoyo bazali na elikya mpo na kozala na bomoi na mabelé. (Emoniseli 7:9) Kopakolama na elimo emonisami te na milende mpo na kopesa litatoli, na kopesa biyano na mituna mitali Biblia to na kopesa badiskur, mpamba te baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé bazali mpe na molende kati na makambo wana. Lokola baklisto bapakolami, bango mpe bazali na bomoi malamu ya boklisto. Nkutu, Samson mpe basaleli mosusu ya Nzambe ya ntango na kala bazalaki na elimo ya Nzambe, kotondáká na molende mpe na mayele. Nzokande, kati na baoyo basali “lipatá monene ya batatoli,” moko te kati na bango azalaki na elikya ya bomoi ya likoló.—Baebele 11:32-38; 12:1; Exode 35:30, 31; Basambisi 14:6, 19; 15:14; 1 Samwele 16:13; Ezekiele 2:2.
Omikundola nani azali kopona
Soki moklisto moko azali komituna na ntina na libyangi mpo na bomoi na likoló, nkulutu moko to moklisto moko ateli akoki kosolola elongo na ye mpo na likambo yango. Kasi na likambo oyo, moto moko te akokata mpo na mosusu, mpamba te, ezali Jéhovah nde akopesaka elikya mpo na kozala na bomoi na likoló. Moto oyo abéngami mpenza mpo na kozala na bomoi na likoló akozala na mposa te ete akende kotuna moko na baninga na ye baklisto mpo na koyeba soki ezali solo. Baoyo bapakolami basili “kozwa mbótámá ya sika na mbóto ekobeba te, kasi na mbóto ezangi kobeba, na nzela na liloba na Nzambe na bomoi mpe na seko.” (1 Petelo 1:23, MN) Na nzela na elimo na ye mpe na Liloba na ye, Jéhovah akolónaka “mbóto” oyo ekokómisaka moto “ekelamu ya sika” oyo azali na elikya ya kozala na bomoi na likoló. (2 Bakolinti 5:17) Ee, Jéhovah nde azali kopona.
Wana tozali koyekola Biblia elongo na bato oyo bauti kosepela na solo kala mingi te, ekozala malamu te na koyebisa bango ete esengeli na bango komisosola mpo na koyeba soko bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to mpe te. Kasi, ezali boni sikawa soki moklisto mopakolami moko azangi sembo mpe esengeli ete moto mosusu ekitana ye? Na ntango wana tokanisi mpenza ete Nzambe akopesa libyangi mpo na bomoi na likoló epai na moto moko oyo azali ndakisa malamu, oyo azali kosalela Tata na biso na bosembo uta bambula mingi mpenza.
Na mikolo na biso, motó ya nsango na Nzambe ezali te mpo na libyangi ya nokinoki mpo na kokóma basangani ya mwasi na Klisto na likoló. Solo mpenza, “elímo mpe mwasi na libala balobi ete: ‘Yaka!”’ Libyangi oyo lizali kopesama mpo na kozala na bomoi kati na paradis na mabelé. (Emoniseli 22:1, 2, 17) Wana bapakolami bazali kopesa ndakisa malamu kati na mosala yango, bazali komonisa “elimo ya komikitisa” mpe bazali kosala makasi mpo na ‘kolendisa libyangami na bango mpe koponama na bango.’—Baefese 4:1-3; 2 Petelo 1:5-11.