Mokolo ya Yehova ekomonisa nini?
“Mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi, . . . mpe mabele mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele.”—2 PE. 3:10.
1, 2. (a) Ebongiseli mabe ya ntango oyo ekosuka ndenge nini? (b) Tokotalela mituna nini?
EBONGISELI mabe ya ntango oyo etongami likoló ya lokuta monene oyo elobi ete moto akoki koyangela mabele malamu ye moko; azali na mposa ya Yehova te. (Nz. 2:2, 3) Eloko oyo etongami likoló ya lokuta ekoki koumela seko? Ata moke te! Nzokande, tosengeli kozela te ete mokili ya Satana esuka kaka boye yango moko. Nzambe nde akobebisa yango na ntango oyo atyá mpe na ndenge oyo alingi. Likambo oyo Nzambe akosala mokili oyo mabe ekomonisa mpenza bosembo mpe bolingo na ye.—Nz. 92:7; Mas. 2:21, 22.
2 Ntoma Petro akomaki boye: “Mokolo ya Yehova ekoya lokola moyibi mpe na mokolo yango likoló ekoleka na lokito makasi, kasi biloko na yango lokola ekokóma mɔtɔ makasi ekosilela, mpe mabele mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele.” (2 Pe. 3:10) “Likoló” mpe “mabele” oyo balobeli awa ezali nini? “Biloko” oyo ekosilela ezali nini? Petro alingaki koloba nini ntango akomaki ete “mabele mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele”? Koyeba biyano na mituna wana ekosalisa biso tómibongisa mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo ekosalema mosika te.
Likoló mpe mabele oyo ekoleka
3. “Likoló” oyo balobeli na 2 Petro 3:10 ezali nini, mpe ndenge nini ekoleka?
3 Na Biblia, soki basaleli yango na ndenge ya elilingi, liloba “likoló” elobelaka mbala mingi makonzi oyo ezali koyangela, oyo ezali likoló ya bato oyo bayangelami. (Yis. 14:13, 14; Em. 21:1, 2) “Likoló [oyo] ekoleka” ezali makonzi ya bato oyo ezali koyangela mokili oyo epesá Nzambe mokɔngɔ. Ndenge ekoleka na “lokito makasi”—to “na makɛlɛlɛ makasi,” ndenge libongoli mosusu elobi—emonisi mbala mosusu ete likoló yango ekobebisama nokinoki mpenza.
4. “Mabele” ezali nini, mpe ndenge nini ekobebisama?
4 “Mabele” ezali mokili ya bato oyo bazali mosika na Nzambe. Mokili ya ndenge wana ezalaki na mikolo ya Noa mpe ebebisamaki na Mpela, ndenge Nzambe apesaki mitindo. Biblia elobi boye: “Na nzela ya liloba yango kaka likoló ná mabele oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.” (2 Pe. 3:7) Mpela ebomaki bato ya mabe nyonso na mbala moko; kasi libebi oyo ezali koya ekosalema na biteni, na “bolɔzi monene.” (Em. 7:14) Na eteni ya liboso ya bolɔzi yango, Nzambe akotinda bakonzi ya politiki ya mokili oyo bábebisa “Babilone Monene”; na ndenge yango akomonisa ete ayinaka mwasi wana ya ndumba, elingi koloba mangomba ya lokuta. (Em. 17:5, 16; 18:8) Na nsima, na etumba ya Armagedone, oyo ezali eteni ya nsuka ya bolɔzi monene, Yehova ye moko akosilisa ndambo ya mokili ya Satana oyo ekotikala.—Em. 16:14, 16; 19:19-21.
“Biloko . . . ekosilela”
5. Biloko oyo Petro alobelaki esangisi makambo nini?
5 “Biloko” oyo “ekosilela” ezali nini? Diksionɛrɛ moko ya maloba ya Biblia emonisi ete awa, liloba “biloko” elimboli “mitinda ya moboko,” to “makambo ya ebandeli.” Elobi mpe ete liloba yango “ezalaki kosalelama mpo na kolobela balɛtrɛ ya alfabɛ, biloko oyo basalelaka mpo na koloba.” Na yango, “biloko” oyo Petro alobelaki ezali makambo ya moboko oyo etindaka mokili ezala na bizaleli, makanisi, banzela, mpe mikano oyo etyolaka Nzambe. “Biloko” yango esangisi mpe “elimo ya mokili,” oyo ‘ezali kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.’ (1 Ko. 2:12; tángá Baefese 2:1-3.) Elimo yango, to “mopɛpɛ,” epanzani na mokili ya Satana. Ezali kotinda bato bákanisa, bámityela mikano, báloba, mpe básala makambo oyo ezali komonisa makanisi ya Satana, “mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ,” moto ya lolendo mpe motomboki.
6. Ndenge nini elimo ya mokili emonanaka?
6 Na yango, báyeba yango to te, baoyo bazali na elimo ya mokili bazali kotika Satana atambwisa makanisi mpe mitema na bango, mpo bámonisa makanisi mpe bizaleli na ye. Mpo na yango, bazali kosala makambo oyo balingi, kozanga kokipe mokano ya Nzambe. Soki likambo ebimi, basalaka na lolendo mpe na moimi; bamonisaka elimo ya botomboki liboso ya bokonzi, mpe bakweaka noki na “mposa ya nzoto mpe mposa ya miso.”—Tángá 1 Yoane 2:15-17.a
7. Mpo na nini tosengeli ‘kobatela motema na biso’?
7 Na yango, tosengeli ‘kobatela motema na biso’; tózala na bwanya oyo euti na Nzambe ntango tozali kopona baninga, mikanda ya kotánga, kominanola mpe makambo oyo tokoki kotala na basite ya Internet! (Mas. 4:23) Ntoma Paulo akomaki boye: “Bókeba: mbala mosusu moto moko akoki komema bino lokola nyama na ye ya kolya na nzela ya filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba na kolanda mimeseno ya bato, na kolanda makambo mikemike ya mokili kasi na kolanda Kristo te.” (Kol. 2:8) Etinda yango ekómi na ntina mingi koleka awa mokolo ya Yehova ezali se kokóma pene, mpo “mɔtɔ” na yango oyo ekongala na ndenge oyo engalá naino te ekonyangwisa “biloko” nyonso ya mokili ya Satana; ekomonisa ete biloko yango ekoki kotɛlɛma ata moke te liboso ya mɔtɔ ya nkanda ya Nzambe. Yango ekundweli biso maloba ya Malaki 4:1 ete: “Mokolo ezali koya oyo ezali kopela lokola litumbu ya mɔtɔ, mpe bato nyonso ya lofundo mpe baoyo nyonso basalaka makambo mabe bakokóma lokola matiti ya blé. Mpe mokolo oyo ezali koya ekozikisa mpenza bango.”
“Mabele mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele”
8. Ndenge nini mabele mpe misala oyo ezali kati na yango “ekomonana polele”?
8 Petro alingaki koloba nini ntango akomaki ete “mabele mpe misala oyo ezali wana ekomonana polele”? Maloba “komonana polele” ekoki mpe kobongolama na “koyebana” to “kobima polele.” Petro alingaki koloba ete na bolɔzi monene, Yehova akobimisa mokili ya Satana polele, akomonisa ete etɛmɛlaka Ye ná Bokonzi na Ye mpe na bongo, ebongi kobebisama. Mpo na ntango yango, Yisaya 26:21 esakolaki boye: “Yehova azali kouta na esika na ye ayei kosɛnga moto oyo afandi na mokili azongisa monɔkɔ mpo na libunga oyo asalelaki ye, mpe mokili ekomonisa mpenza polele makila oyo yango esopá mpe ekozipa lisusu te bato na yango oyo babomamá.”
9. (a) Tosengeli koboya nini, mpe mpo na nini? (b) Tosengeli kolona nini, mpe mpo na nini?
9 Na mokolo ya Yehova, baoyo mokili mpe elimo na yango ya mabe etambwisaki bakomonisa ndenge mpenza bazali, bakobomana ata bango na bango. Kutu, ekoki mpenza kozala ete kominanola ndenge na ndenge ya mobulu oyo ezali kondimama lelo ezali kobongisa makanisi ya bato mingi mpo na ntango oyo lobɔkɔ ya moto mokomoko “ekotɛmɛla mpenza lobɔkɔ ya moninga na ye.” (Zek. 14:13) Na yango, ebongi mpenza tóboya eloko nyonso—filme, buku, masano ya video, mpe biloko mosusu—oyo ekoki kolona na kati na biso bizaleli oyo Nzambe ayiná, na ndakisa lolendo mpe kolinga mobulu! (2 Sa. 22:28; Nz. 11:5) Tólona nde mbuma ya elimo santu ya Nzambe, mpo bizaleli na yango ekozika te ntango mɔtɔ ya elilingi ekopela na mokolo ya Yehova.—Gal. 5:22, 23.
“Likoló ya sika mpe mabele ya sika”
10, 11. “Likoló ya sika” mpe “mabele ya sika” ezali nini?
10 Tángá 2 Petro 3:13. “Likoló ya sika” ezali Bokonzi ya Nzambe oyo etyamaki na likoló na 1914, mbula oyo “bantango oyo etyamá ya bikólo” esukaki. (Luka 21:24) Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo esangisi Kristo Yesu mpe bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye, oyo mingi na bango basili kozwa mbano na bango ya bomoi na likoló. Na mokanda ya Emoniseli, baponami yango bamonisami lokola “engumba mosantu, Yerusaleme ya Sika, euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita mpe ebongisami lokola mwasi ya libala oyo abongisi nzoto mpo na mobali na ye.” (Em. 21:1, 2, 22-24) Ndenge kaka Yerusaleme ya mabele ezalaki esika oyo bakonzi ya Yisraele ya kala bazalaki kofanda, Yerusaleme ya Sika ná Mobali na yango bazali guvɛrnema ya mokili ya sika. Engumba yango ya elilingi ‘ekouta na likoló mpe ekokita,’ elingi koloba ekotyela mabele likebi.
11 “Mabele ya sika” ezali bafandi ya mabele oyo bakomonisa ete balingi kotosa Bokonzi ya Nzambe. Nsukansuka, paradiso ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango sikoyo ekokóma mpenza ndenge esengeli kozala na “mabele [wana kitoko] oyo ekoya.” (Ebr. 2:5) Tokoki kosala nini mpo tózala bato ya ebongiseli yango ya sika?
Tómibongisa mpo na mokolo monene ya Yehova
12. Mpo na nini mokolo ya Yehova ekosutukisa mokili ntango ekoya?
12 Paulo ná Petro basakolaki ete mokolo ya Yehova ekoya “lokola moyibi,” elingi koloba na kobombana mpe na pwasa. (Tángá 1 Batesaloniki 5:1, 2.) Ata bakristo ya solo, oyo bazali kozela mokolo yango, bakosutuka ndenge ekoya na mbalakaka. (Mat. 24:44) Kasi mpo na mokili, ekozala kaka kosutuka te. Paulo akomaki boye: “Na ntango oyo bato [oyo bazali mosika na Yehova] bakoloba: ‘Kimya, likambo ya kobanga ezali te!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi; mpe bakokima soki moke te.”—1 Tes. 5:3.
13. Tosengeli kosala nini mpo maloba “Kimya mpe likambo ya kobanga ezali te” ekosa biso te?
13 Maloba “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” ekozala kaka lokuta mosusu oyo ekouta na bademo; kasi ekokosa basaleli ya Yehova te. Paulo akomaki boye: “Bozali na molili te, mpo mokolo wana ebimela bino pwasa lokola nde ebimeli miyibi, mpo bozali bino nyonso bana ya pole mpe ya moi.” (1 Tes. 5:4, 5) Na yango, tótikala na kati ya pole, mosika na molili ya mokili ya Satana. Petro mpe akomaki boye: “Bandeko ya bolingo, lokola boyebi yango liboso, bókeba mpo bómemama te elongo na bango [bateyi ya lokuta na kati ya lisangá ya bokristo] na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bótika te ezaleli na bino ya kopikama makasi mpo bókwea te.”—2 Pe. 3:17.
14, 15. (a) Ndenge nini Yehova apesi biso lokumu? (b) Maloba nini oyo euti na Nzambe tosengeli kobosana te?
14 Simbá ete Yehova asuki kaka te na koyebisa biso ete ‘tókeba.’ Kasi, apesi biso lokumu na ndenge asalisi biso ‘tóyeba liboso’ na mokuse ndenge makambo ekolandana.
15 Kasi likambo ya mawa, bakristo mosusu bazali kokipe lisusu te makebisi oyo emonisi ntina ya kosɛnzɛla, to bazali kutu nde kotyola yango. Balobaka mbala mosusu boye: ‘Toyoká makebisi wana mingi banda bambula.’ Kasi bato yango basengeli kobosana te ete ntango bazali koloba bongo, bazali kotyola nde Yehova ná Mwana na ye, kasi kaka moombo ya sembo te. Yehova alobaki boye: “Zelá . . . kaka.” (Hab. 2:3) Yesu mpe alobaki boye: “Bósɛnzɛlaka mpo boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.” (Mat. 24:42) Longola yango, Petro akomaki boye: “Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala. Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe, bózela mpe bóbatelaka na makanisi na bino kozala ya mokolo ya Yehova!” (2 Pe. 3:11, 12) Moombo ya sembo ná Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakozwa maloba wana ya polelepolele na lisɛki ata mokolo moko te!
16. Tosengeli koboya makanisi ya ndenge nini, mpe mpo na nini?
16 Kutu, ‘moombo ya mabe’ nde alobaka ete Nkolo azali koumela. (Mat. 24:48) Moombo yango ya mabe azali na kati ya bato oyo 2 Petro 3:3, 4 elobeli. Petro akomaki ete “na mikolo ya nsuka basɛki bakoya” oyo, “na kolanda bamposa na bango moko,” bakosɛka baoyo bazali kotosa mpe kobatela mokolo ya Yehova na makanisi. Ya solo, na esika bámipesa na koluka matomba ya Bokonzi, basɛki yango bazali komipesa na bomoto na bango moko mpe na bamposa na bango. Tókolisa soki moke te makanisi wana ya botomboki mpe ya likama! Kasi, ‘tótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko’; tómipesa na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli mpe tómitungisa mingi koleka te mpo na ntango oyo makambo ekosalema. Likambo oyo etali nde Yehova Nzambe.—2 Pe. 3:15; tángá Misala 1:6, 7.
Tyelá Nzambe ya lobiko motema
17. Bakristo ya sembo basalaki nini na toli oyo Yesu apesaki ete bákima Yerusaleme, mpe mpo na nini?
17 Mampinga ya Baroma ekɔtaki na Yudea na mobu 66 T.B. Nsima na yango, bakristo ya sembo batosaki toli oyo Yesu apesaki bango ete bákima engumba Yerusaleme soki kaka libaku emonani. (Luka 21:20-23) Mpo na nini basalaki nokinoki mpe bakakatanaki te? Na ntembe te, babatelaki likebisi ya Yesu na makanisi. Ya solo, bayebaki ete ekateli na bango ekomemela bango mpe mikakatano, ndenge Kristo alobaki yango. Kasi, bayebaki mpe ete Yehova akobosana soki moke te bato na ye ya sembo.—Nz. 55:22.
18. Na kolanda maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 21:25-28, ndenge nini ozali kotalela bolɔzi monene oyo ezali koya?
18 Biso mpe tosengeli kotyela Yehova motema mobimba, mpo kaka ye nde akoki kobikisa biso ntango bolɔzi oyo eleki monene ekokwela ebongiseli ya ntango oyo. Na ntango moko boye nsima ya kobanda ya bolɔzi monene, kasi liboso Yehova akweisa bitumbu na ye likoló ya ndambo ya mokili oyo ekotikala, bato “bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi.” Kasi, na ntango wana oyo banguna ya Nzambe bakolɛnga na kobanga, basaleli ya sembo ya Yehova bakoyoka nsɔmɔ te. Kutu, bakosepela mpo bayebi ete kosikolama na bango ekómi pene.—Tángá Luka 21:25-28.
19. Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?
19 Ya solo, esengo monene ezali kozela baoyo baboyi mokili mpe “biloko” na yango! Kasi, ndenge lisolo oyo elandi emonisi yango, soki tolingi kozwa bomoi, tosengeli kosuka kaka te na koboya makambo ya mabe. Tosengeli kokolisa bizaleli oyo esepelisaka Yehova mpe kosala misala oyo endimami na miso na ye.—2 Pe. 3:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba malamumalamu bizaleli oyo elimo ya mokili elendisaka, talá buku Ndenge ya kosolola na bato na Makomami, nkasa 140-143.
Okoki kolimbola?
• Makambo oyo elandi emonisi nini?
“likoló ná mabele” ya sikoyo
“biloko”
“likoló ya sika mpe mabele ya sika”
• Mpo na nini totyeli Nzambe motema na biso mobimba?
[Elilingi na lokasa 5]
Ndenge nini okoki ‘kobatela motema na yo’ mpe kokabwana ntango nyonso na mokili?
[Elilingi na lokasa 6]
Ndenge nini tokomonisa ete tozali ‘kotalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko’?