Mokapo ya Ntuku Mibale na Motoba
“Bóyoka esengo libela na oyo nazali kosala”
1. Maloba nini ya kokitisa motema ntoma Petelo akomaki, mpe motuna nini yango ebimisi?
MOKOLO mosusu kozanga bosembo mpe mpasi ekosila? Eleki sikoyo mbula 1 900, ntoma Petelo akomaki maloba oyo ya kokitisa motema: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka ya [Nzambe], mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Na bankama ya bambula oyo eleki, Petelo, elongo na ebele ya basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe bazelaki na motema likoló mokolo yango monene ntango kotyola mibeko, monyoko, mpe mobulu ekosila mpe boyengebene ekotonda. Tokoki solo kondima ete elaka yango ekokokisama?
2. Mosakoli nini alobelaki “likoló ya sika mpe mabelé moko ya sika,” mpe esakweli yango ya kala ekokisamaki mbala moko kaka?
2 Ɛɛ! Ntango Petelo alobelaki “likoló ya sika mpe mabelé moko ya sika,” azalaki te kobimisa likambo moko ya sika. Mbula soki 800 liboso, Yehova abimisaki maloba ya ndenge yango na monɔkɔ ya mosakoli Yisaya. Elaka wana ya liboso ekokisamaki mwa moke na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.) ntango Bayuda basikolamaki na boombo na Babilone, mpe yango epesaki bango nzela ya kozonga na mboka na bango. Kasi esakweli yango ya Yisaya ezali kokokisama na monene lelo oyo, mpe tozali kozela na motema likoló kokokisama mosusu oyo eleki malamu na mokili ya sika ya Nzambe oyo ezali lisusu mosika te. Ya solo, esakweli ya kolendisa oyo epesami na monɔkɔ ya Yisaya ezali komonisa mwa moke makambo malamu oyo Nzambe abombeli bato oyo balingaka ye.
Yehova abondeli “ekólo ya bato ya motó makasi”
3. Motuna nini bapesi biso eyano na yango na Yisaya mokapo 65?
3 Tóbosana te ete Yisaya 63:15–64:12 ezali na libondeli moko ya esakweli oyo Yisaya asalaki mpo na Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone. Lokola maloba ya Yisaya emonisi yango polele, Bayuda mingi bazali kosambela Yehova na molimo na bango mobimba te, atako bongo mwa ndambo babongoli motema mpe bazongeli ye. Sikoyo, Yehova akozongisa ekólo yango mpo na batikali wana oyo batutami na motema? Eyano ezali na Yisaya mokapo 65. Kasi, liboso apesa elaka ya kosikola mwa ndambo wana oyo bazali sembo, Yehova alobeli liboso etumbu oyo ezali kozela ebele oyo bazangi kondima.
4. (a) Na kokesana na bato ya Yehova oyo bazali batomboki, banani bakoluka ye? (b) Ndenge nini ntoma Paulo asaleli maloba ya Yisaya 65:1, 2?
4 Yehova akangi motema na botomboki oyo bato ya ekólo na ye bazali kotomboka ntango nyonso. Nzokande, ntango ekoya wana akotika bango na mabɔkɔ ya banguna na bango mpe akondima na boboto bato mosusu. Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova alobi boye: ‘Nandimaki kolukama na baoyo batunaki mpo na ngai te; nandimaki kozwama na baoyo balukaki ngai te. Nalobaki ete, Ngai oyo! Ngai oyo! epai ya ekólo oyo ezalaki kobenga nkombo na ngai te.’ (Yisaya 65:1) Ezali mawa mpo na bato oyo Yehova asalaki na bango kondimana ete bato ya bikólo mosusu bakoya epai ya Yehova, nzokande ekólo mobimba ya Yuda ekoboya kosala bongo mpo na motó makasi. Ezali kaka mosakoli Yisaya te nde asakoli ete Nzambe akosuka na komiponela ekólo moko, oyo liboso azalaki na boyokani na yango te. (Hosea 1:10; 2:23) Ntoma Paulo azongelaki maloba ya Yisaya 65:1, 2 ndenge ezali na libongoli ya Septante mpo na komonisa ete bato ya bikólo mosusu bakozwa “boyengebene oyo ezali kouta na kondima,” ata soki Bayuda ya makila—baoyo bazalaki na lotomo ya kozwa yango—baboyaki yango.—Baloma 9:30; 10:20, 21.
5, 6. (a) Mposa nini ya makasi Yehova amonisi, kasi ezaleli nini bato na ye bamonisaki? (b) Makambo oyo Yehova asalelaki Yuda ezali koteya biso nini?
5 Yehova amonisi ntina oyo akopesa nzela ete bato na ye mpenza bámona mpasi: ‘Natandaki mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya ekólo ya bato ya motó makasi; baoyo batambolaka na nzela oyo ezali malamu te; balandaka myango na bango mpenza.’ (Yisaya 65:2) Batandaka mabɔkɔ epai ya moto mpo na komonisa ete ozali kosɛnga ye asala likambo moko to kobondela ye. Yehova atandi mabɔkɔ na ye, kaka mpo na mwa ntango moke te, kasi mokolo mobimba. Mposa na ye mpenza ezali ete Yuda ezongela ye. Kasi, bato yango ya motó makasi baboyi.
6 Maloba wana ya Yehova ezali koteya biso likambo moko oyo ezali mpenza kosimba motema! Alingi tópusana penepene na ye mpamba te ye azali Nzambe oyo moto akoki kosolola na ye. (Yakobo 4:8) Maloba wana ezali mpe komonisa ete Yehova azali na komikitisa. (Nzembo 113:5, 6) Kutu, atiki te kotanda mabɔkɔ na ndenge ya elilingi, kobondela bato na ye bázongela ye atako “batungisaki ye” na motó makasi na bango. (Nzembo 78:40, 41) Ezali se nsima ya kobondela bango na boumeli ya bankama ya bambula nde, na nsuka, atiki bango na mabɔkɔ ya banguna na bango. Ata mpe na ntango wana, atikeli baoyo kati na bango bazali na komitikisa likoki ya kozongela ye.
7, 8. Bato ya ekólo ya Yehova oyo bazali mitó makasi batumoli ye na makambo nini?
7 Mbala na mbala, Bayuda ya motó makasi batumoli Yehova na etamboli na bango ya nsɔni. Yehova alobeli misala na bango oyo ezali kosilikisa ye: ‘Bato oyo bazali kotyola ngai liboso ya elongi na ngai ntango nyonso; bapesaka mbeka na kati ya bilanga mpe batumbaka mpaka ya malasi likoló ya biliki; baoyo bafandaka na nkunda mpe baumelaka na bisika ya nkuku na ntango na butu; baoyo balyaka mosuni ya ngulu mpe ndambo ya biloko ya bosɔtɔ ezali kati na mbɛki na bango. Baoyo balobaka ete, Tikalá esika ozali, koya pene na ngai te mpo nakokómisa yo mpenza mosantu. Bango bazali lokola molinga na zolo na ngai, mɔtɔ oyo ezali kopela mokolo mobimba.’ (Yisaya 65:3-5) Bato wana oyo bazali komonana lokola bato ya Nzambe bazali kopesa Yehova nkanda ‘liboso ya elongi na ye,’ maloba oyo ezali komonisa ntango mosusu lofundo mpe kozanga limemya. Bazali komona ntina moko te ya kobomba misala na bango ya mbindo. Kosala masumu na miso mpenza ya Moto oyo tosengeli kokumisa mpe kotosa ezali likambo oyo eleki mabe, boye te?
8 Ezali lokola nde bato ya masumu wana, oyo bazali komimona bayengebene, bazali koloba na Bayuda mosusu ete: ‘Koyá pene na ngai te, mpamba te nazali mosantu koleka yo.’ Oyo ezali solo bokosi! ‘Bato yango oyo bamimoni ete basambelaka’ bazali kopesa bambeka mpe kotumba mpaka ya malasi mpo na banzambe ya lokuta, likambo oyo epekisami na Mibeko ya Nzambe. (Exode 20:2-6) Bazali kofanda na malita, likambo oyo ezali kokómisa bango mbindo na kotalela Mibeko. (Mituya 19:14-16) Bazali kolya ngulu, nyama oyo ezali mbindo.a (Levitike 11:7) Nzokande, mpo na bango, losambo oyo bazali komipesa na yango ezali kokómisa bango basantu koleka Bayuda mosusu, mpe balingi te ete Bayuda mosusu bápusana pene na bango noki bákóma basantu, to pɛto, lokola bango mpo kaka bayei esika oyo bango bazali. Kasi, wana ezali soki moke te ndenge Nzambe oyo asɛngaka “básambela kaka ye” atalelaka makambo!—Deteronome 4:24, NW.
9. Ndenge nini Yehova azali kotalela bato ya masumu oyo bazali komimona bayengebene?
9 Yehova azali soki moke te kotalela bato yango oyo bazali komimona bayengebene ete bazali basantu, alobi nde boye: “Bango bazali lokola molinga na zolo na ngai.” Liloba ya Liebele oyo ebongolami “zolo” mbala mingi esalelamaka na ndenge ya elilingi mpo na kolobela nkanda. Molinga emonisaka mpe nkanda ya Yehova oyo ezali kopela. (Yisaya 30:27) Losambo ya bikeko, likambo ya mbindo mpenza, oyo basaleli ya Yehova bazali komipesa na yango epelisi nkanda na ye.
10. Ndenge nini Yehova akofuta bato ya Yuda mpo na masumu na bango?
10 Mpo na boyengebene na ye, Yehova akozanga soki moke te kopesa etumbu na bato yango oyo bazali kosala masumu na nko. Yisaya akomi boye: ‘Talá, ekomami liboso na ngai ete, Nakozala nyɛɛ te kasi nakofuta; ɛɛ nakofuta bango kati na ntolo na bango, mpo na masumu na bango mpe mpo na masumu ya batata na bango elongo, Yehova alobi bongo, baoyo batumbaki mpaka ya malasi likoló ya ngomba minene mpe batukaki ngai likoló ya ngomba mike; nakopima kati na ntolo na bango lifuti mpo na misala na bango ya liboso.’ (Yisaya 65:6, 7) Bayuda wana batuki Yehova na ndenge bamipesi na losambo ya lokuta. Basali ete losambo ya Nzambe ya solo emonana ete ezali ndenge moko na oyo ya bikólo oyo ezali zingazinga na bango. “Mpo na masumu na bango,” na ndakisa komipesa na losambo ya bikeko mpe na misala oyo ezali na boyokani na bilimo mabe, Yehova akopesa bango lifuti “na ntolo na bango.” Na ntembe te, liloba “ntolo” ezali kolobela lisusa ya elamba ya likoló oyo esali mwa libenga esika batɛki bazalaki kosopa biloko oyo bameki na mɛzirɛ ya kotɛkela. (Luka 6:38) Bayuda wana bapɛngwi bayebi malamu ndimbola ya elobeli yango: Yehova akomeka na mɛzirɛ ‘lifuti’ to etumbu na bango. Nzambe ya boyengebene akopesa lifuti. (Nzembo 79:12; Yilimia 32:18) Lokola Yehova abongwanaka te, tokoki solo kondima ete na ntango oyo aponi, akomeka mpe na mɛzirɛ etumbu ya ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo.—Malaki 3:6.
“Mpo na basaleli na ngai”
11. Ndenge nini Yehova amonisi ete akobikisa mwa ndambo ya bato ya sembo?
11 Yehova akoyokela bato mosusu ya ekólo na ye oyo bazali sembo mawa? Yisaya amonisi ete: ‘Yehova alobi boye ete, Lokola vinyo ya sika emonani kati na liboke ya mbuma mpe bakolobaka ete, Kobebisa yango te, mpo ete lipamboli ezali kati na yango; ngai nakosala bongo mpo na basaleli na ngai, nakobebisa bango nyonso te. Nakobimisa bakitani longwa na Yakobo mpe basangoli ya ngomba na ngai longwa na Yuda. Baponami na ngai bakosangola yango mpe basaleli na ngai bakofanda wana.’ (Yisaya 65:8, 9) Ntango akokanisi bato na ye na liboke ya mbuma ya vinyo, Yehova asaleli ndakisa oyo bakoki kokanga ntina na yango noki. Mbuma ya vinyo ezalaka mingi na mboka yango, mpe vinyo oyo eutaka na mbuma wana ezalaka mpo na bolamu ya bato. (Nzembo 104:15) Ndakisa yango elingi mbala mosusu kolobela liboke moko ya mbuma oyo mwa ndambo ya mbuma na yango ezali malamu, kasi mosusu te. To, ekoki mpe komonisa ete liboke moko ya mbuma ezali malamu, nzokande maboke mosusu ezali na mbuma oyo eteli te to oyo epɔli. Ata soki liboke ezali ndenge nini, mosali na elanga ya vinyo akobebisa te mbuma ya vinyo oyo ezali malamu. Na ndenge yango, Yehova akitisi bato na ye motema ete akosilisa ekólo mobimba te, kasi akotika baoyo bazali sembo. Alobi ete mwa ndambo yango ya bato oyo akondima bango bakozwa “ngomba” na ye, elingi koloba Yelusaleme mpe mokili ya Yuda, bisika ya ngombangomba oyo Yehova alobi ete ezali ya ye.
12. Mapamboli nini ezali kozela ndambo ya bato oyo batikali sembo?
12 Mapamboli nini ezali kozela ndambo ya bato yango oyo batikali sembo? Yehova ayebisi boye: ‘Salono ekozala elanga ya matiti mpo na bitonga, mpe lobwaku ya Akolo esika ya kolala mpo na bibwɛlɛ na ngai; mpo na bato na ngai baoyo baluki ngai.’ (Yisaya 65:10) Mpo na ebele ya Bayuda, bitonga ya bibwɛlɛ ezali na ntina mingi, mpe mabelé oyo ezali na matiti mingi esalisaka bango bákóma na bozwi mingi na ntango ya kimya. Yehova atángi bisika mibale oyo ezali na bansuka mibale ya mboka mpo na komonisa kimya mpe bomɛngo oyo ekozala. Na wɛsti mpenza, mokili patatalu ya Salono, oyo eyebani malamu mpo na kitoko na yango mpe na mabelé malamu na yango, etandani pembenipembeni ya Mbu ya Meditelane. Lobwaku ya Akolo ezali na ndelo ya nɔrdi-ɛsti ya mboka yango. (Yosua 15:7) Ntango bakokende na boombo, bisika wana nyonso ekotikala mpamba, ndenge moko mpe na biteni mosusu ya mboka yango. Atako bongo, Yehova apesi elaka ete, nsima ya boombo, bisika yango ekokóma mabelé kitoko ya koleisa bibwɛlɛ mpo na batikali oyo bakozonga.—Yisaya 35:2; Hosea 2:15.
Bazali kotya motema na “nzambe ya makila malamu”
13, 14. Nini emonisi ete ekólo ya Nzambe etiki ye, mpe nini ekokómela bango mpo na yango?
13 Sikoyo esakweli ya Yisaya ezongi epai ya baoyo batiki Yehova mpe bazali kokangama na losambo ya bikeko. Elobi boye: ‘Bino bozali baoyo batiki Yehova, baoyo babosani ngomba na ngai mosantu, baoyo batɛlɛmisaka mesa mpo na Gada mpe baoyo batondisaka kɔpɔ ya vinyo esangani mpo na Meni.’ (Yisaya 65:11) Ntango bazali kotya na mesa bilei mpe masanga mpo na “Gada to nzambe ya makila malamu” mpe mpo na “Meni to nzambe ya makambo makanami,” Bayuda wana oyo balingi kotika masumu te bamipesi nde na makambo oyo bikólo ya bapakano esalaka mpo na kosambela banzambe na bango ya bikeko.b Nini ekokómela bato nyonso ya bindimandima oyo bazali kotyela banzambe yango motema?
14 Yehova akebisi bango polelepolele boye: “Nakokanela bino mpo na mopanga, bino nyonso bokogumbama kino kobomama; zambi, ebengaki ngai, bozongisaki monɔkɔ te, elobaki ngai, boyokaki te; kasi bosalaki yango ezali mabe na miso na ngai; boponaki yango esepelisi ngai te.” (Yisaya 65:12) Na kobongoláká mwa moke nkombo ya nzambe yango ya makambo makanami na Liebele, Yehova alobi na baoyo nyonso bazali komipesa na nzambe yango ya lokuta ete ‘akaneli bango mpo na mopanga,’ elingi koloba akoboma bango. Mbala na mbala, na nzela ya basakoli na ye, Yehova asɛngi mibali yango bábongola motema, kasi batyeli maloba na ye likebi te mpe baponi na motó makasi nyonso kosala makambo oyo bayebi ete ezali mabe na miso na ye. Bazali mpenza kotyola Nzambe! Mpo na kokokisa likebisi ya Nzambe, ekólo yango ekokwea na likama monene na mobu 607 L.T.B. ntango Yehova akopesa bato ya Babilone nzela bábebisa Yelusaleme mpe tempelo na yango. Na ntango wana, “nzambe ya makila malamu” akokoka te kobikisa bato ya Yuda mpe ya Yelusaleme oyo bamipesaki na kosambela ye.—2 Ntango 36:17.
15. Ndenge nini baklisto ya solo ya mikolo na biso bazali kotosa likebisi oyo ezali na Yisaya 65:11, 12?
15 Lelo oyo baklisto ya solo bazali kolanda likebisi oyo ezali na Yisaya 65:11, 12. Bandimelaka “makila malamu” te, lokola nde nguya moko boye ezalaka oyo ekoki kosalela bato bolamu. Lokola balingi te kobebisa biloko na bango mpo na komeka kobondela “nzambe ya makila malamu,” baboyaka masano ya mbongo ya ndenge nyonso. Bandimi mpenza ete baoyo nyonso bamipesaka na nzambe wana bakosuka na kobungisa biloko nyonso, mpamba te Yehova alobi na bato yango ete: “Nakokanela bino mpo na mopanga.”
“Talá, baombo na ngai bakosepela”
16. Mapamboli nini Yehova akosopela basaleli na ye ya sembo, kasi likambo nini ekokómela baoyo batiki ye?
16 Ntango esakweli ezali kopamela baoyo batiki Yehova, emonisi mpe ete makambo oyo ezali kozela bato oyo bazali kosambela Nzambe na bosembo nyonso ekokesana mpenza na oyo ekokómela baoyo bazali kosambela ye na bokosi: ‘Nkolo Mokonzi Yehova alobi ete, Talá, baombo na ngai bakolya, nde bino bokoyoka nzala. Talá, baombo na ngai bakomɛla, nde bino bokoyoka mposa ya mai. Talá, baombo na ngai bakosepela, nde bino bokozwa nsɔni. Talá, baombo na ngai bakoyemba mpo na esengo ya motema, nde bino bokonguluma mpo na mpasi ya motema, bokolela mpe mpo na mikakatano ya elimo.’ (Yisaya 65:13, 14) Yehova akopambola baombo to basaleli na ye ya sembo. Bakoganga na motema esengo. Kolya, komɛla, mpe kosepela ezali maloba oyo emonisi ete Yehova akokokisa mpenza bamposa ya basaleli na ye. Nzokande, baoyo baponi kotika Yehova bakoyoka nzala mpe mposa ya mai na elimo. Bamposa na bango ekokokisama te. Bakolela mpe bakonguluma mpo na mpasi ya motema mpe mikakatano oyo ekokwela bango.
17. Mpo na nini basaleli ya Nzambe na mikolo na biso basengeli koganga na esengo?
17 Maloba ya Yehova ebongi mpenza mpo na kolobela mpasi oyo bato oyo bazali lelo koloba kaka na monɔkɔ mpamba ete basalelaka Nzambe bazali na yango na elimo. Bamilio ya bato ya mangomba ya boklisto bazali kotungisama mpo na mikakatano ya elimo, nzokande basaleli ya Yehova bazali koganga na esengo. Mpe bazali kosepela na ntina. Bazali kolya malamu na elimo. Yehova azali kopesa bango ebele ya bilei ya elimo na kati ya mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe na makita ya boklisto. Ntembe ezali te ete solo oyo elendisaka mpe bilaka ya kobɔndisa oyo ezali na Liloba ya Nzambe ezali kopesa biso mpenza “esengo ya motema”!
18. Eloko nini ya baoyo batiki Yehova ekotikala, mpe kosalela nkombo na bango na ndai ekoki kolimbola nini?
18 Yehova alandi koloba na baoyo batiki ye ete: ‘Bokotika nkombo na bino lokola ndai epai ya baponami na ngai; mpe Nkolo Yehova akoboma bino. Kasi akobenga baombo na ye na nkombo mosusu. Boye ye oyo akomipambola kati na mokili, akomipambola na Nzambe ya solo; mpe ye oyo akolapa ndai kati na mokili, akolapa ndai na Nzambe ya solo. Zambi bolɔzi ya liboso etikami mpe ebombami na miso na ngai.’ (Yisaya 65:15, 16) Eloko moko te ya baoyo batiki Yehova ekotikala, longola bobele nkombo na bango, oyo ekosalelama kaka na kati ya maloba ya kolapa ndai to ya komilakela mabe. Mbala mosusu yango elingi koloba ete bato oyo bakolinga kokata ndai mpo na komonisa ete bakokokisa mpenza maloba na bango, bakoloba boye: ‘Soki nakokisi elaka oyo te, nazwa etumbu lokola oyo bapɛngwi wana bazwaki.’ Ekoki mpe kolimbola ete bakosalela nkombo na bango lokola ndakisa oyo ezali komonisa etumbu ya Nzambe likoló ya bato mabe, ndenge moko na Sodoma ná Gomola.
19. Na ndenge nini bakobenga basaleli ya Nzambe na nkombo mosusu, mpe mpo na nini bakotya motema na Nzambe ya bosembo? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
19 Basaleli ya Nzambe bakosuka mpenza ndenge wana te! Bakobenga bango na nkombo mosusu. Yango ezali komonisa mapamboli mpe lokumu oyo bakozwa ntango bakozonga na mboka na bango. Bakoluka mapamboli te epai ya nzambe moko ya lokuta to bakolapa ndai te na nkombo ya ekeko mpamba. Ntango bakomipambola to bakolapa ndai, bakosala yango nde na nkombo ya Nzambe ya bosembo. Bato ya mboka yango bakozala na ntina mpenza ya kotyela Nzambe motema na bango mobimba, mpamba te akosila komonisa ete akokisaka solo bilaka na ye.c Ntango Bayuda bakofanda na mboka na bango na kimya, bakoumela te kobosana bolɔzi to mpasi na bango ya kala.
“Nazali kosala likoló ya sika mpe mabelé ya sika”
20. Ndenge nini elaka ya Yehova oyo etali “likoló ya sika mpe mabelé ya sika” ekokisamaki na mobu 537 L.T.B.?
20 Sikoyo, Yehova alobeli mingi elaka na ye ya kozongisa to kobongisa batikali oyo babongoli motema, nsima ya kolongwa na bango na boombo na Babilone mpe kozonga epai na bango. Yehova alobi boye na monɔkɔ ya Yisaya: ‘Talá, nazali kosala likoló ya sika mpe mabelé ya sika; mpe makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.’ (Yisaya 65:17) Elaka yango ya Yehova ekokokisama solo; yango wana, alobeli kozongisama yango oyo ekosalema na mikolo ekoya lokola nde esili kobanda kosalema. Esakweli yango ekokisamaki liboso na mobu 537 L.T.B. ntango Bayuda oyo batikalaki bazongisamaki na Yelusaleme. “Likoló ya sika” ya ntango wana ezalaki nini? Ezalaki mokumba ya Zorobabele lokola guvɛrnɛrɛ, oyo azalaki kokokisa yango na Yelusaleme mpe Nganga-Nzambe Monene Yosua azalaki kopesa ye mabɔkɔ. Ndambo ya Bayuda oyo bazongaki na mboka na bango nde bazalaki “mabelé ya sika,” bato bapɛtolami oyo bazalaki kotosa bokonzi yango mpe kopesa mabɔkɔ mpo na kozongisa losambo ya pɛto na mboka. (Ezela 5:1, 2) Esengo ya kozongisama yango elekaki mpenza mpasi nyonso oyo bayokaki; kutu bakanisaki lisusu bampasi ya kala ata moke te.—Nzembo 126:1, 2.
21. Likoló ya sika nini etyamaki na 1914?
21 Nzokande, kobosana te ete Petelo azongelaki esakweli yango ya Yisaya mpe amonisaki ete esengelaki kokokisama lisusu. Ntoma yango akomaki boye: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Na 1914, likoló yango ya sika oyo bazalaki kozela kobanda kala etyamaki. Bokonzi ya Masiya oyo ebotamaki na mbula wana ezali koyangela uta na likoló, mpe Yehova apesi yango mokumba ya koyangela mabelé mobimba. (Nzembo 2:6-8) Bokonzi yango, oyo ezali mpenza guvɛrnema oyo etambwisami na Klisto mpe baninga na ye bakonzi 144 000, ezali likoló ya sika.—Emoniseli 14:1.
22. Banani bakozala mabelé ya sika, mpe ndenge nini ata lelo oyo bato bazali kobongisama mpo na kozala ebandeli ya ebongiseli wana?
22 Bongo mabelé ya sika? Ndenge kaka esakweli yango ekokisamaki kala, mabelé ya sika ekozala bato oyo bazali kotosa na esengo nyonso guvɛrnema yango ya sika oyo ezali na likoló. Ata sikoyo, bamilio ya bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi bazali kondima kotosa guvɛrnema yango mpe bazali kosala milende mpo na kotosa mibeko na yango oyo ezali na Biblia. Bato yango bauti na bikólo nyonso, na nkota nyonso, mpe mposo nyonso; mpe bazali kosalela na bomoko Yesu Klisto, mokonzi oyo azali koyangela. (Mika 4:1-4) Ntango ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo ekoleka, bato yango bakozala ebandeli ya mabelé ya sika oyo nsukansuka ekozala bato oyo babangaka Nzambe, oyo bakofanda na mabelé oyo ekoyangelama na Bokonzi ya Nzambe.—Matai 25:34.
23. Makambo nini mokanda ya Emoniseli elobi mpo na “likoló moko ya sika mpe mabelé moko ya sika,” mpe ndenge nini esakweli yango ekokokisama?
23 Mokanda ya Emoniseli elobeli emonaneli moko oyo ntoma Yoane amonaki oyo etali koya ya mokolo ya Yehova, ntango ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekolongolama. Nsima na yango, Satana akobwakama na lobwaku mozindo. (Emoniseli 19:11–20:3) Nsima ya kolobela emonaneli yango, ntoma Yoane azongeli maloba ya esakweli ya Yisaya; akomi boye: “Namonaki likoló moko ya sika ná mabelé moko ya sika.” Bavɛrsɛ oyo elandi, oyo etali emonaneli yango ya nkembo, elobeli ntango oyo Yehova Nzambe akobongisa makambo nyonso awa na mabelé. (Emoniseli 21:1, 3-5) Emonani polele ete elaka ya “likoló ya sika mpe mabelé ya sika,” oyo ezali na kati ya esakweli ya Yisaya, ekokokisama na ndenge ya kokamwa na mokili ya sika ya Nzambe! Wana bato ya sika oyo bakozala awa na mabelé bakoyangelama na likoló ya sika, elingi koloba guvɛrnema ya sika, bakozala na paladiso ya elimo mpe paladiso ya solosolo. Elaka oyo elobi ete ‘makambo ya liboso [maladi, minyoko, mpe ebele ya mikakatano mosusu oyo bato bazali na yango] ekokanisama te, ekoya mpe na motema te,’ ezali solo kobɔndisa. Na ntango wana, ata likambo nini oyo tokokanisa ekoyokisa biso te mpasi makasi oyo ezali kotungisa mitema ya bato mingi lelo.
24. Ntango Yelusaleme ekozongisama, mpo na nini Yehova akosepela; mpe nini ekoyokana lisusu te na babalabala ya engumba yango?
24 Esakweli ya Yisaya elandi koloba boye: ‘Bósepela mpe bóyoka esengo libela na oyo nazali kosala; mpo ete talá, nakosala ete Yelusaleme ezala eloko ya esengo mpe bato na yango ntina ya kosepela. Nakosepela kati na Yelusaleme mpe nakoyoka esengo kati na bato na ngai; mongongo ya kolela ekoyokana lisusu kati na yango te, to koganga ya mpasi te.’ (Yisaya 65:18, 19) Ezali kaka Bayuda te nde bakosepela mpo bazongi na mboka na bango, kasi Nzambe ye mei mpe akosepela, mpamba te akokómisa Yelusaleme kitoko—ekozala lisusu esika monene ya losambo ya solo awa na mabelé. Mongongo to makɛlɛlɛ ya kolela mpo na mpasi, oyo ezalaki koyokana na babalabala ya engumba yango bambula mwa mingi liboso, ekoyokana lisusu te.
25, 26. (a) Na mikolo na biso, ndenge nini Yehova akómisi Yelusaleme “eloko ya esengo”? (b) Ndenge nini Yehova akosalela Yelusaleme ya Sika, mpe mpo na nini tokoki lelo oyo kosepela?
25 Lelo oyo mpe Yehova akómisi Yelusaleme “eloko ya esengo.” Ndenge nini? Lokola tomonaki yango, nsukansuka likoló ya sika, oyo etyamaki na 1914, ekozala na bayangeli basungi 144 000, oyo bakosala na guvɛrnema wana ya likoló. Babengi bato yango na ndenge ya esakweli ete “Yelusaleme ya Sika.” (Emoniseli 21:2) Ezali mpo na Yelusaleme ya Sika nde Nzambe alobi: “Nakosala ete Yelusaleme ezala eloko ya esengo mpe bato na yango ntina ya kosepela.” Nzambe akosalela Yelusaleme ya Sika mpo na kosopela bato ya botosi ebele ya mapamboli. Mongongo to makɛlɛlɛ ya kolela to koganga ya mpasi ekoyokana lisusu te, mpamba te Yehova akokokisa “mposa nyonso ya motema na [biso].”—Nzembo 37:3, 4.
26 Ya solo, tozali lelo oyo na ebele ya makambo oyo esengeli kotinda biso tósepela! Etikali moke Yehova asantisa nkombo monene na ye ntango akoboma baoyo nyonso bazali kotɛmɛla ye. (Nzembo 83:17, 18) Nsima na yango likoló ya sika ekotambwisa makambo nyonso. Wana ezali mpenza bantina ya solosolo oyo tozali na yango ya kosepela mpe ya kozala na esengo libela na oyo Nzambe azali kosala!
Elaka ya bomoi ya malamu na mikolo oyo ezali koya
27. Ndenge nini Yisaya alobeli bomoi ya malamu oyo Bayuda oyo bakozonga na mboka na bango bakozala na yango?
27 Na kokokisama ya liboso ya esakweli yango, ntango likoló ya sika ekoyangela, bomoi ekozala ndenge nini mpo na Bayuda oyo bazongi na mboka na bango? Yehova alobi boye: ‘Kati na yango, ekozala lisusu te na mwana oyo akobika bobele mwa mikolo, to mobange oyo atondisi mikolo na ye te; zambi mwana akokufa nsima ya mbula monkama mpe moto mabe, ata na mbula monkama, akolakelama mabe.’ (Yisaya 65:20) Talá maloba kitoko oyo ezali komonisa bomoi ya malamu oyo baoyo bazalaki na boombo bakozala na yango ntango bakozonga na mboka na bango! Mwana moke, oyo asali kaka mwa mikolo, akokufa lisusu mobesu te. Mobange oyo asilisi naino mikolo nyonso ya bomoi na ye te akokufa mpe liwa ya ndenge wana te.d Maloba ya Yisaya ezali mpenza kokitisa motema ya Bayuda oyo bakozonga na mboka na bango! Lokola mboka na bango ekobatelama malamu, bakobanga te ete banguna bakoya komema bana na bango ya mike to koboma mibali na bango.
28. Maloba ya Yehova oyo emonisi biso ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika na nse ya Bokonzi na ye eteyi biso nini?
28 Maloba wana ya Yehova emonisi biso ete bomoi ekozala ndenge nini na mokili ya sika oyo ezali koya? Ntango Bokonzi ya Nzambe ekotambwisa makambo, mwana nyonso akozala na elikya ya bomoi moko ya malamu. Moto moko te oyo abangaka Nzambe akokufa lisusu mobesu. Kutu, bato oyo batosaka Nzambe bakobanga likama ata moko te mpe bakosepela mpenza na bomoi. Bongo ekozala boni mpo na moto oyo akopona kotombokela Nzambe? Bato ya ndenge wana bakobungisa libaku malamu ya kozala na bomoi. Ata soki motomboki yango aumelaki “mbula monkama,” akokufa. Na ntango yango, akozala kaka “mwana” soki tokokanisi bomoi na ye na ndenge oyo alingaki kokóma—moto oyo azali na bomoi ezangi nsuka.
29. (a) Makambo nini oyo epesaka esengo bato ya botosi ya ekólo ya Nzambe bakozala na yango na mokili ya Yuda oyo ezongisami ndenge ezalaki? (b) Mpo na nini nzete ebongi mpenza mpo na kolobela bomoi molai? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
29 Yehova alandi kolobela ndenge makambo ekozala na mokili ya Yuda oyo ezongisami ndenge ezalaki: ‘Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo ya nzete, bongo ekozala mikolo ya bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala ya mabɔkɔ na bango.’ (Yisaya 65:21, 22) Nsima ya kozonga na mokili ya Yuda oyo etikalaki mpamba—ndako te mpe bilanga ya vinyo te—bato ya botosi ya ekólo ya Nzambe bakozala na esengo ya kofanda na bandako na bango moko mpe ya kolya mbuma ya vinyo ya bango moko. Nzambe akopambola misala na bango, bakoumela na bomoi—lokola nzete—mpe bakosepela na mbuma ya misala na bango.e
30. Esengo nini basaleli ya Yehova bazali na yango lelo oyo, mpe bakozwa nini na mokili ya sika?
30 Esakweli yango ekokisamaki mpe na mikolo na biso. Basaleli ya Yehova babimaki na boombo ya elimo na 1919 mpe babandaki kozongisa “mokili” na bango to esika na bango ya mosala mpe ya losambo. Batongaki masangá mpe babotaki mbuma ya Bokonzi ná mbuma ya elimo. Yango esali ete ata sikoyo basaleli ya Yehova bázala na paladiso ya elimo mpe na kimya ya Nzambe. Tokoki kondima solo ete kimya yango ekokoba ata na paladiso ya solosolo. Tozali ata na likoki te ya koyeba makambo nyonso oyo Yehova akosala na mokili ya sika na nzela ya basaleli na ye, oyo mitema mpe mabɔkɔ na bango ekozala pene mpo na komipesa na mosala. Kotonga ndako na yo moko mpe kofanda na yango ekozala solo esengo! Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, misala ya kosepelisa ekozanga te. Okozala ntango nyonso na esengo ya ‘komona bolamu’ ya misala ya mabɔkɔ na yo! (Mosakoli 3:13) Tokozala solo na ntango ya kosepela mpenza na misala ya mabɔkɔ na biso? Ɛɛ! Bato ya sembo bakozala na bomoi ezangi nsuka “lokola mikolo ya nzete”—bomoi ya bambula nkóto na nkóto, ata mpe koleka!
31, 32. (a) Mapamboli nini Bayuda oyo bazongi bakozwa? (b) Na mokili ya sika, elikya nini bato ya sembo bakozala na yango?
31 Yehova alobeli mapamboli mosusu oyo ezali kozela baombo oyo bazongi na mboka na bango: ‘Bakosala mosala ya mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ ya pwasa te, zambi bazali bakitani mpe bapambolami ya Yehova mpe bana na bango elongo na bango.’ (Yisaya 65:23) Yehova akopambola Bayuda wana oyo bazongi, yango wana bakosala mosala ya mpamba te. Baboti bakobota bana te kaka mpo bákufa mobesu. Baoyo bauti na boombo bakozwa mapamboli wana ya kozongisama kaka bango moko te; bana na bango mpe bakozwa yango. Nzambe azali mpenza na mposa makasi ya kokokisa makambo oyo bato na ye basengeli na yango, yango wana alaki boye: “Naino babengi te, nakozongisela bango monɔkɔ; naino bazali koloba mpenza, nakoyoka.”—Yisaya 65:24.
32 Ndenge nini Yehova akokokisa bilaka wana na mokili ya sika oyo ezali koya? Tosengeli kozela mpo na komona yango. Yehova alobi makambo nyonso te, kasi tokoki kondima solo ete bato ya sembo ‘bakosala lisusu mosala ya mpamba’ soki moke te. Ebele ya bato oyo bakobika na Armagedona mpe bana nyonso oyo bakoki kobotama na nsima bakozala na elikya ya bomoi molai mpe ya esengo, bomoi ya seko mpenza! Baoyo bakosekwisama mpe bakopona kotosa mitinda ya Nzambe bakozala mpe na esengo na mokili ya sika. Yehova akoyoka makambo oyo bakosɛnga ye mpe akokokisa yango, akokokisa yango liboso básɛnga ye ata kosɛnga. Ya solo, Yehova akofungola lobɔkɔ na ye mpe akokokisa “mposa [ya malamu] ya bikelamu nyonso ya bomoi.”—Nzembo 145:16.
33. Ntango Bayuda bakozonga na mboka na bango, na ndenge nini banyama bakozala na kimya?
33 Kimya mpe libateli oyo elakami ekozala monene mpenza? Yehova asukisi eteni oyo ya esakweli boye: ‘Mbwa ya zamba mpe mwana ya mpate bakolya elongo moko, nkɔsi akolya matiti lokola ngɔmbɛ mpe putulu ekozala bilei ya nyoka. Bakoyokisa mpasi te, bakobebisa te na ngomba mobimba mosantu na ngai. Yehova alobi bongo.’ (Yisaya 65:25) Ntango ndambo ya Bayuda ya sembo bakozonga na mboka na bango, Yehova akobatela bango. Tokoki koloba ete nkɔsi akolya matiti lokola ngɔmbɛ, mpamba te nkɔsi ekosala Bayuda to bibwɛlɛ na bango mabe te. Elaka yango ekokokisama mpenza, mpamba te yango esuki na maloba oyo, “Yehova alobi bongo.” Mpe liloba na ye ezangaka kokokisama te!—Yisaya 55:10, 11.
34. Ndenge nini maloba ya Yehova ezali kokokisama na esengo mpenza na mikolo na biso mpe ndenge nini ekokokisama na mokili ya sika?
34 Maloba ya Yehova ezali kokokisama na esengo mpenza epai ya basambeli ya solo na mikolo na biso. Kobanda 1919, Nzambe apamboli mokili ya elimo ya basaleli na ye, akómisi yango paladiso ya elimo. Baoyo bazali kokɔta na paladiso yango ya elimo bazali kosala mbongwana monene na bomoi na bango. (Baefese 4:22-24) Na nguya ya elimo ya Nzambe, bato oyo kala bazalaki na bomoto lokola banyama—mbala mosusu bazalaki kolyela to komonisa bato mosusu mpasi—basali milende mpo na kotika bizaleli mabe wana mokemoke. Yango esali ete bázala na kimya mpe básambela na bomoko elongo na bandimi mosusu. Mapamboli oyo basaleli ya Yehova bazali na yango lelo na paladiso na bango ya elimo ekolandana tii na Paladiso ya solosolo, epai kimya ekozala kati na bato bango na bango mpe kati na bato ná banyama. Tokoki solo kondima ete na ntango oyo Nzambe aponi, mokumba oyo apesaki bato na ebandeli ekokokisama malamu: ‘Bótya [mabelé] na nse na bino; mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mai, mpe ya ndɛkɛ ya likoló, mpe likoló ya nyama nyonso ya bomoi oyo etambolaka na mokili.’—Genese 1:28.
35. Mpo na nini tozali na makambo mingi oyo esengeli kotinda biso na ‘koyoka esengo libela’?
35 Tozali solo na botɔndi mpo na elaka oyo Yehova apesi ya kozalisa “likoló ya sika mpe mabelé ya sika”! Elaka wana ekokisamaki na mobu 537 L.T.B. mpe ezali kokokisama lisusu na mikolo na biso. Kokokisama wana mibale ezali komonisa ete, na mikolo ezali koya, bato ya botosi bakozala solo na bomoi moko ya malamu mpenza. Na nzela ya esakweli ya Yisaya, Yehova amonisi biso mwa moke, kasi na boboto mpenza, makambo oyo abombeli bato oyo balingaka ye. Ya solo, tozali na makambo mingi oyo esengeli kotinda biso na kotosa maloba oyo ya Yehova: ‘Bóyoka esengo libela na oyo nazali kosala’!—Yisaya 65:18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato mingi bakanisaka ete bato ya masumu yango bazalaki kofanda na malita mpo na koluka kosolola na bato oyo bakufá. Kolya ngulu ezalaki ntango mosusu na boyokani na losambo na bango ya bikeko.
b Ntango Jérôme, mobongoli ya Biblia (oyo abotamaki na ekeke ya minei T.B.) apesaki mwa makanisi na ye mpo na vɛrsɛ oyo, alobelaki momeseno moko ya kala oyo basambeli ya bikeko bazalaki kolanda na mokolo ya nsuka ya mbula. Akomaki boye: “Bazalaki kotanda na mesa biloko ya kolya ya ndenge nyonso mpe kɔpɔ moko oyo batondisi yango na vinyo ya elɛngi mpo na makambo malamu oyo basalaki na mbula eleki to mpo oyo bakosala na mbula oyo ekoya ezala na makila malamu.”
c Na kotalela Yisaya 65:16 na Makomi ya Liebele ya Bamasorete, Yehova azali “Nzambe ya Amen.” “Amen” elingi koloba “ezala bongo,” to “solo mpenza,” mpe ezali liloba to ndanga oyo emonisi ete likambo moko ezali solo to ekozanga te kokokisama. Lokola Yehova akokisaka bilaka na ye nyonso, amonisaka ete oyo alobaka ezalaka solo.
d Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli Yisaya 65:20 boye: “Mwana abotami sika akowa noki lisusu te, mpe mobange akokokisa mibu mya ye.”
e Nzete ebongi mpenza mpo na kolobela bomoi molai, mpamba te nzete ezali na kati ya biloko oyo eumelaka mingi na bomoi. Na ndakisa, nzete ya olive ebotaka mbuma na boumeli ya bankama ya bambula mpe ekoki koumela kino mbula nkóto.
[Elilingi na lokasa 389]
Na mokili ya sika ya Nzambe, tokozala na ntango mingi ya kosepela na misala ya mabɔkɔ na biso