Elembo na boklisto ya solo ezali nini?
NA MIKOLO na biso, ebele na bato bazali komitanga baklisto koleka mangomba nyonso mosusu. Nzokande baklisto yango bazali moko na moko kosambela na lolenge na ye, bazali na bindimeli bikeseni, bazali na bomoko te mpe mbala mosusu bazali kobomana. Emonani ete, mingi bazali baklisto ya solo te. Yesu ayebisaki ete, na eleko na biso, bato mingi bakoloba ete: “Nkolo, Nkolo,” na elobeli mosusu, bakomiloba ete bazali baklisto; nzokande ye akoyanola bango ete: “Nayebi bino te! Bolongwa na ngai, bino batyoli na mibeko.” (Matai 7:21, 23, MN) Na ntembe te, moto moko te kati na biso akolinga kotangama kati na bato wana! Bongo, lolenge nini tokoki koyeba soki tozali baklisto ya solo?
Esengeli koyeba ete kozala moklisto ya solo esengi makambo mingi. Moklisto ya solo asengeli kozala na kondima ya makasi, mpamba te “soki moto azangi kondima, akoki kosepelisa Nzambe te.” (Baebele 11:6) Kondima wana makasi esengeli kotambola elongo na misala ya sembo. Moyekoli Yakobo ayebisi biso ete, “kondima oyo ezangi misala esili kokufa.” (Yakobo 2:26) Moklisto asengeli kondima lisusu bokonzi ya “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Kasi makambo wana mazali elembo ya boklisto ya solo te.
Bongo, elembo yango ezali nini? Ntoma Paulo ayanoli na motuna oyo kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, ete: “Soko nakoloba na minoko na bato mpe na baanzelu nde nazangi bolingo, nazali bobele ngonga mpamba oyo ekolelaka to mpe manzanza oyo makobɛtaka. Soko nakosakola ata mpe koyeba mabombami manso mosantu mpe makambo manso na mayele, mpe ata nazali na kondima nyonso mpo na kolongola ngomba nde nazangi bolingo, nazali bobele mpamba. Ata nakokaba nyonso ezali na ngai epai na bazalani, mpe ata nakopesa nzoto na ngai ete natumbama na mɔ́tɔ, kasi soko nazangi bolingo, nakozwa litomba te.”—1 Bakolinti 13:1-3, MN.
Na yango, bolingo ezali elembo ya boklisto ya solo. Kondima, misala mpe kozala na baninga malamu ezali na ntina mingi. Kasi, soko bolingo ezali te, yango ezali na ntina moko te. Mpo na nini bongo?
Libosoliboso, na ntina na bomoto na Nzambe oyo tozali kosambela. Ntoma Yoane alobi na ntina na Jéhovah, Nzambe ya boklisto ya solo, ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Jéhovah Nzambe azali na bizaleli mingi mosusu, lokola nguya, boyengebene mpe mayele; kasi lokola azali Nzambe na bolingo, motindo na bato nini ye andimi ete basambela ye? Na ntembe te, ezali nde bato oyo bazali komekola ye mpe bazali kolóna bolingo.—Matai 5:44, 45; 22:37-39.
Mokano malamu
Ee, bolingo ezali komema baklisto na kokokana na Nzambe oyo bazali kosambela. Yango elimboli ete mikano na bango mikokani na oyo na Nzambe. Mokano nini mpenza Jéhovah Nzambe azalaki na yango na ntango atindaki Yesu awa na mabelé mpo na kosalisa biso ete tozwa bomoi ya seko? Bolingo. “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondimela ye abebisama te, kasi azala na bomoi ya seko,” (Yoane 3:16) Bongo, eloko nini esengeli kopusa biso na kokokisa mokano na Nzambe? Na mbala oyo lisusu, ezali bolingo. “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tokokisa malako na ye.”—1 Yoane 5:3.
Moto akoki nde kosalela Nzambe na mikano mabe? Ee. Paulo atangaki bato mosusu ya eleko na ye baoyo basalelaki Nzambe na bilulela mpe na kowelana. (Bafilipi 1:15-17) Yango ekoki mpe kokómela biso. Mokili ya lelo elingi kowelana, mpe elimo yango ekoki kozala na bopusi likoló na biso. Tokoki kozala na lolendo ya kokanisa ete biso nde tozali balobi malamu koleka bamosusu, to ete tokabolaka mikanda mingi koleka bamosusu. Tokoki kokokanisa mikumba oyo tozali na yango kati na lisangá na oyo ya ndeko mosusu mpe kozala na lolendo mpo na yango—to kozala na elulela. Kolingáká bobele ete ye moko azala na bokonzi, nkulutu moko akoki kopekisa nzela ete elenge moklisto moko akóla te, nzokande azali na makoki. Motambo ya komizwela misolo na lolenge mabe, ekoki kopusa biso na kosala boninga bobele na baklisto oyo bazali na bozwi, na kobosanaka babólá.
Makambo yango makoki kokómela biso, mpamba te tozali bato tozangi kokoka. Nzokande, soki tokotya bolingo lokola mokano na biso ya liboso, na ndakisa ya Jéhovah, tokobundisa makanisi wana. Moïmi, mposa ya komitómbola to kosala monzele na kolekisa ndelo, ekoki kopekisa bolingo mpe, na nsuka, mosala na biso mpo na Nzambe ‘ekozwa litomba moko te.’—Masese 11:2; 1 Bakolinti 13:3.
Bolingo kati na mokili ya moïmi
Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala “bato ya mokili te.” (Yoane 17:14) Lolenge nini kopengola bopusi ya bato oyo bazali zingazinga na biso? Bolingo ekosalisa biso. Tozwa ndakisa, bato ya ntango oyo “bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe.” (2 Timoté 3:4) Ntoma Yoane akebisaki biso mpo na likámá lizali na likambo wana: “Bolinga mokili te soko makambo kati na mokili te. Soko moto nani akolingaka mokili, bolingo na Tata ezali kati na ye te. Mpamba te makambo nyonso kati na mokili, mposa mabe na nzoto mpe mposa mabe na miso, mpe enzombo na bizaleli, euti na Tata te kasi euti na mokili.”—1 Yoane 2:15, 16.
Ya solo, ezali pɛtɛɛ te mpo na kobwaka “mposa mabe na nzoto” mpe “mposa mabe na miso.” Makambo wana malingami mingi mpenza mpamba te yango ebendaka likebi ya nzoto na biso. Lisusu, bisengo oyo bimonisameli biso lelo, bizali mingi mpe na ndenge na ndenge koleka na mikolo na Yoane; bongo soki mposa mabe na miso ezalaki epekiseli na ntango na kala, tokoloba boni mpo na ntango oyo!
Tosengeli koyeba ete bisengo mingi bimonisameli biso na mokili ya lelo, yango moko ezali mabe te. Mabe ezali te na kozala na ndako ya monene, na vuatire ya kitoko, na televizyo, radio to tourne disques. Kosala mobembo na mokili mosusu to kolekisa ba vacances kitoko ezali kobuka mibeko ya Biblia te. Bongo, likanisi ya ntina ya likebisi na Yoane ezali mpenza nini? Ya yambo, soki biloko wana bikómi na ntina mingi koleka na miso na biso, ekokólisa moïmi, mposa ya mosolo mpe lolendo kati na mitema na biso. Ya mibale, milende oyo tozali kosala mpo na kozwa mosolo mosengeli ete tosómba biloko yango, ekoki kobebisa mosala na biso mpo na Jéhovah. Bobele likambo oyo ete kosepela na biloko yango ezali kozwa ntango mingi, mpe atako ntango oyo tolekisaka mpo na kominanola na bokatikati ekopemisaka nzoto, ntango na biso ezali moke na ntina na etinda ya koyekola Biblia, koyangana na makita na boklisto elongo na baninga na biso mpe na kosakola nsango malamu na Bokonzi.—Nzembo 1:1-3; Matai 24:14; 28:19, 20; Baebele 10:24, 25.
Esengeli ekateli makasi mpo na ‘kotya Bokonzi na esika ya liboso’ mpe ‘kosalisa mokili misala’ te, mpamba te tozali kobika na eleko oyo etondi na mposa na bozwi ya mosuni. (Matai 6:33; 1 Bakolinti 7:31) Kondima ya makasi ekosalisa biso. Kasi mingimingi, bolingo mpo na Jéhovah mpe mpo na bazalani na biso nde ekopesa biso makasi ya kotɛmɛla makambo ya mokili oyo, yango moko ezali mpenza mabe te, nde ekoki kopekisa biso na ‘kokokisa mosala na biso.’ (2 Timoté 4:5) Soki bolingo wana te, mbɛlɛ mosala na biso mokokóma bobele elembo mpamba.
Bolingo kati na lisangá
Yesu alobelaki mingi mpo na ntina ya bolingo ete: “Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Mpo na nini bankulutu bazali kolekisa ntango mingi mpo na kobatela etongá mpe na kosalisa baninga na bango baklisto soki mpo na bolingo oyo bazali na yango epai na bango te? Soki na bolingo te, mpo na nini basangani ya lisangá bazali kolimbisa bandeko na bango, kati na bango mpe bankulutu lokola? Bolingo ekopusaka baklisto na kosalisa bandeko oyo bazali na bosɛngá kati na mosuni. (Misala 2:44, 45) Na ntango na minyoko, baklisto bakomibatelanaka mpe bazali pene na kokufa bamoko mpo na bamosusu. Mpo na nini? Mpo na bolingo,—Yoane 15:13.
Bilembeteli mingi ya bolingo bimonisami mbala mosusu na makambo ya mike. Nkulutu moko, oyo azali kosala mosala makasi, akozwa mbala mosusu vizite ya moko na baninga na ye baklisto oyo akomilelalela epai na nkulutu wana mpo na makambo mazangi ntina. Nkulutu asengeli kosilika? Na esika ya kobimisa bokabwani na likambo yango, nkulutu akozala na motema petee mpe na boboto epai na ndeko na ye. Bakosolola likambo yango mpe boninga na bango ekozonga lisusu. (Matai 5:23, 24; 18:15-17) Na esika ete moto na moto asalela lotómo na ye, basengeli nde kosala makasi mpo na kokólisa motema molai oyo Yesu alakisaki yango mpe kozala pene mpo na kolimbisa bandeko na bango “mbala ntuku nsambo na nsambo.” (Matai 18:21, 22) Na bongo, baklisto bazali kosala makasi mpo na kolata bolingo, “oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:14.
Tókólisa bolingo na biso bamoko mpo na bamosusu
Ee, bolingo ezali mokano malamu mpo na kosalela Jéhovah. Bolingo ekopesa biso makasi ete tokabwana na mokili mpe ekosalisa biso na kotikala mpenza kati na lisangá na boklisto. Ata kozala na molende mpo na mosala ezali na ntina, nzokande bolingo ekosalisa baoyo bazali na mikumba ete baluka te bobele kokólisa makoki na bango na mosala, kasi bamonisa mpe ezaleli malamu mpe na bopɔlɔ kati na boyokani na bango na bato mosusu. Bolingo ezali kosalisa biso na ‘kotósa baoyo bazali kokamba biso mpe komisɔkisa liboso na bango.’—Baebele 13:17.
Ntoma Petelo apesi biso toli ete tozala na “bolingo ya mozindo” bamoko mpo na bamosusu, mpamba te “bolingo ekozipaka ebele na masumu.” (1 Petelo 4:8) Lolenge nini tokomonisa yango? Moto azalisamaki na elilingi na Nzambe mpe na bongo, asalemi na makoki ya kolinga. Kasi, motindo na bolingo oyo tolobeli awa ezali kosɛnga makambo mingi. Ezali bongo mbuma ya liboso ya elimo na Nzambe. (Bagalatia 5:22) Mpo na kolóna bolingo, esengeli na biso kotika ete elimo na Nzambe ezala na bopusi likoló na biso. Lolenge nini? Na koyekoláká Biblia, oyo epemamaki na elimo na Jéhovah. (2 Timoté 3:16) Tokoki kosɛnga Jéhovah ete elimo na ye ekólisela biso bolingo mpo na ye mpe mpo na bandeko na biso. Ezali mpe na ntina ete totikala penepene na lisangá na boklisto, oyo elimo wana esopami mingi likoló na yango.
Tosengeli mpe komitalela biso moko mpo na kososola misala nyonso to makanisi nyonso oyo makomonisa ete tozangi bolingo. Tomikundola ete bolingo ezali ezaleli ya motema; nzokande, “motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe ezali na mabe mingi.” (Yilimia 17:9) Ekomelaka biso mbala mosusu ete tomimonisa mpiɔ atako lisalisi oyo Jéhovah azali kopesa biso. Mbala mosusu tokoloba mabe epai na moko na baninga na biso baklisto, to kosilika ata mpe kozokisama na maloba na ye. Yango wana tokozongela libondeli oyo na Davidi mpo na biso ete: “Meka ngai, ɛ Nzambe, mpe yeba motema na ngai; sosola ngai mpe yeba makanisi na ngai. Tala soko nazali kotambola na nzela mabe, mpe kambá ngai na nzela na seko.”—Nzembo 139:23, 24.
Biblia elobi ete: “Bolingo ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:8) Soki tokomonisanaka na bolingo motindo wana, ekozala mpasi te na komonisa yango na ntango na mikakatano. Bolingo oyo bozali kati na basaleli na Jéhovah ezali kopesa litomba monene mpo na kosala paradis ya elimo oyo ezali na mikolo na biso. Bobele baoyo balingi bandeko na bango na motema mobimba nde bakosepela kozala na bomoi kati na mokili ya sika. Tómekola Jéhovah na komonisáká bolingo yango, likambo oyo likokembisa bomoko oyo bosangisi biso. Tólóna bolingo, elembo ya boklisto ya solo.