Bakɛngɛli-batamboli—makabo na motindo ya mibali
“Esili ye kobuta likoló, akambaki ebele ya bakangami, mpe apesaki [“makabo na motindo ya mibali,” “NW”].”—BAEFESE 4:8.
1. Mosala nini ya sika moyebisamaki kati na zulunalo oyo na 1894?
ESILI koleka ekeke moko, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaki likambo moko ya sika. Ebéngamaki ete “Lolenge mosusu ya mosala.” Mosala yango ya sika ezalaki nini? Ezalaki bongo kobandisama ya mosala ya bakɛngɛli-batamboli na eleko na biso. Ebimeli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1894 ya zulunalo oyo, eyebisaki ete kobanda na ntango yango bandeko mibali oyo bazali mpenza na makoki bakobanda kotambola mpo na kotala bituluku ya Bayekoli ya Biblia ‘na mokano ete bálendisa bango na elimo.’
2. Mikumba nini bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya bitúká bazali na yango?
2 Na ekeke ya liboso T.B., masangá ya boklisto mayambaki bakɛngɛli lokola Paulo mpe Balanaba oyo bakendaki kotala bango. Mibali wana ya sembo bazalaki na mokano ya “kokembisa” masangá. (2 Bakolinti 10:8) Lelo oyo topambolami, mpamba te tozali na ebele ya mibali oyo bazali kosala mosala yango na lolenge lobongisami mpenza. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova lizali kopona bango lokola bakɛngɛli ya zongazonga mpe bakɛngɛli ya bitúká. Mokɛngɛli ya zongazonga azali na mokumba ya kosunga masangá soko 20, kolekisáká pɔ́sɔ mobimba elongo na lisangá mokomoko mbala mibale na mbula; kotaleláká lapólo ya masangá, kosaláká masukúlu, mpe kosanganáká na mosala ya kosakola elongo na basakoli ya Bokonzi ya lisangá mokomoko epai azali koleka. Mokɛngɛli ya etúká azali na mokumba ya kokamba mayangani ya zongazonga, asanganaka na mosala ya kosakola elongo na basangani ya masangá mingi mpenza, mpe apesaka bilendiseli na nzela ya masukúlu oyo mazwi moboko na yango na Biblia.
Elimo na bango ya komipesa
3. Mpo na nini bakɛngɛli-batamboli basengeli kozala na elimo ya komipesa?
3 Bakɛngɛli-batamboli basalaka mibembo ntango nyonso. Yango esɛngaka mpenza elimo ya komipesa. Ekoki mbala mingi kozala mpasi kosala mobembo uta na lisangá moko kino na lisangá mosusu, kasi mibali yango mpe basi na bango basalaka yango na esengo nyonso. Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki ete: “Mwasi na ngai asungaka ngai mingi mpenza, mpe amilelalelaka te . . . Abongi kopesamela matɔ́ndi mpo na elimo na ye ya komipesa.” Bakɛngɛli mosusu ya zongazonga basalaka mibembo ya kilomɛ́tɛlɛ koleka 1 000 kolongwa na lisangá moko kino na lisangá mosusu. Mingi na bango batambwisaka mituka bango moko, kasi basusu balongwaka na esika moko kino na esika mosusu na komatáká na mituka ya nzela, na veló, na mpunda, to na makolo. Mokɛngɛli moko ya zongazonga na Afrika asengelaki kútu kobundana mpo na kokatisa ebale na komemáká mwasi na ye na mapeka mpo na kokóma na lisangá moko. Kati na mibembo na ye ya mosala ya misionere, ntoma Paulo akutanaki na mikakatano lokola oyo: molungé mpe malili, nzala mpe mposa ya mai, kozanga kolala mpɔngi, makámá ndenge na ndenge, mpe monyoko makasi. Azalaki mpe “komibanzabanza mingi mpo na masangá nyonso,”—likambo oyo likómelaka bakɛngɛli-batamboli mingi na mikolo na biso.—2 Bakolinti 11:23-29, NW.
4. Mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ekoki kozala na bopusi nini likoló na bomoi ya bakɛngɛli-batamboli mpe ya basi na bango?
4 Lolenge moko na Timoté, mosalani elongo na Paulo, bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango ntango mosusu bakutanaka mpe na mikakatano mitali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. (1 Timoté 5:23) Yango ebakiselaka bango mitungisi mingi mpenza. Mwasi ya mokɛngɛli ya zongazonga moko alobaki ete: “Wana nazali komiyoka nzoto malamu te, kokendáká ntango nyonso kotala bandeko elɛmbisaka ngai. Awa nakómi na bambula ya komona lisusu sanza te, mokakatano yango moyei lisusu makasi mingi. Bobele kokangáká bisaka na biso nyonso pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, yango mpe ezali mokumba monene mpenza. Mbala mingi, nafandaka mpe nabondelaka Yehova ete apesa ngai makasi mpo na kokóba.”
5. Ata kati na mikakatano ndenge na ndenge, elimo nini bakɛngɛli-batamboli na basi na bango basili komonisa yango?
5 Atako mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe mimekano mosusu mizali, bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango bazali kozwa esengo kati na mosala na bango mpe bazali komonisa elimo ya komipesa. Basusu batyaki bomoi na bango na likámá mpo na kopesa lisungi ya elimo na ntango ya minyoko to na ntango ya etumba. Wana bazali kokende kotala masangá, bazali komonisa elimo motindo moko na oyo Paulo amonisaki, ye oyo alobaki na baklisto ya Tesaloniki ete: “Tokómi bato na malɛmbɛ [“boboto,” NW ] na kati na bino pelamoko mama oyo azali kobɔkɔla bana na ye mpenza. Boye, awa ezalaki biso na bolingo monene epai na bino, toselingwi kokabela bino bobele Nsango Malamu na Nzambe te kasi bomoi na biso mpenza, mpo ete bosili kokóma balingami na biso.”—1 Batesaloniki 2:7, 8.
6, 7. Bopusi nini ya malamu bakɛngɛli-batamboli oyo bazali kosala mosala makasi bazali kokokisa yango?
6 Motindo moko na bankulutu mosusu kati na lisangá ya boklisto, bakɛngɛli-batamboli ‘bazali kosala mosala mpo na kosakola mpe kolakisa.’ Bankulutu nyonso wana, oyo bazali kosala bongo, ‘babongi kokumisama na lokumu loleki.’ (1 Timoté 5:17) Ndakisa na bango ekoki kopesa litomba soki, na nsima ya ‘kotalela mbano oyo etamboli na bango ememeli bango, tomekoli kondima na bango.’—Baebele 13:7.
7 Bopusi nini bamoko na bankulutu-batamboli basili kosala yango likoló na basusu? Motatoli moko ya Yehova akomaki ete: “Oyo nde bopusi kitoko ndeko P—— asalaki kati na bomoi na ngai! Azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na mboka Mexique uta na mobu 1960. Na ntango yango nazalaki mwana moke, mpe nazalaki kozela boyei na ye na motema likoló mpe na esengo. Na ntango nakómaki na mibu zomi, ayebisaki ngai ete: ‘Okokóma mokɛngɛli ya zongazonga.’ Na boumeli ya bolenge na ngai, eleko oyo ya mikakatano, nazalaki koluka ye mbala na mbala mpamba te azalaki ntango nyonso na maloba ya mayele oyo azalaki koyebisa ngai. Lobanzo na ye ya liboso mpenza ezalaki bongo koleisa etongá! Sikawa nakómi mokɛngɛli ya zongazonga, nazalaka na momeseno ya kolekisa ntango elongo na bana mike mpe nalendisaka bango ete bámityela mikano ya Teokrasi lokola ye asalaki yango epai na ngai. Wana akómaki pene na nsuka ya bomoi na ye, atako azalaki kobɛla maladi ya motema, ndeko P—— azalaki ntango nyonso koluka kolendisa. Mokolo moko liboso ya liwa na ye, na Febwáli 1995, akendaki elongo na ngai na liyangani ya mokolo moko mpe alendisaki ndeko mobali moko oyo azalaki architecte ete amityela mikano malamu. Nokinoki, ndeko yango atindaki formilɛrɛ mpo kosala na Betele.”
Batalelami na motuya
8. Banani bazali “makabo na motindo ya mibali” oyo balobelami kati na Baefese mokapo 4, mpe lolenge nini bazali litomba mpo na lisangá?
8 Bakɛngɛli-batamboli mpe bankulutu mosusu oyo bapesameli mikumba ya mosala na nzela ya ngɔlu ya Nzambe babéngami “makabo na motindo ya mibali.” Lokola azali momonisi mpe Motó ya lisangá, Yesu asili kopesa biso mibali wana oyo bazali na elimo malamu mpo ete mokomoko na biso akoka kolendisama mpe akóma moklisto oyo akɔmeli. (Baefese 4:8-15, NW ) Likabo nyonso ebongi koyambama na komonisáká botɔ́ndi. Ezali mpenza bongo na ntina na likabo yango oyo ezali kopesa biso makasi mpo ete tókóba kosalela Yehova. Na bongo, lolenge nini tokoki komonisa botɔ́ndi na biso mpo na mosala ya bakɛngɛli-batamboli? Na ndenge nini tokoki komonisa ete ‘tozali kolanda kotalela mibali yango na motuya mpenza’?—Bafilipi 2:29, NW.
9. Ndenge nini tokoki komonisa botɔ́ndi epai na bakɛngɛli-batamboli?
9 Wana eyebisami na lisangá ete mokɛngɛli ya zongazonga azali koya, tokoki kobanda komilɛngɛla mpo na kosangana na bibongiseli nyonso ya lisangá na boumeli ya pɔ́sɔ wana. Mbala mosusu, tokoki komibombela ntango mwa mingi koleka na momesano mpo ete tósimba bibongiseli ya mosala ya kosakola na boumeli ya boyei na ye. Tokoki kozwa likoki ya kosala lokola babongisi-nzela basungi na boumeli ya sanza wana. Na ntembe te, tokosepela kosalela batoli ya mokɛngɛli ya zongazonga mpo ete tóbongisa lisusu mosala na biso ya kosakola. Elimo motindo wana ya kondima toli ekopesa biso litomba mpe ekondimisa biso ete boyei na ye ezali mpenza na ntina. Ɛɛ, bakɛngɛli-batamboli bayaka kotala lisangá mpo na kolendisa biso, kasi bango moko mpe bazalaka na mposa ya kolendisama na elimo. Na bantango mosusu Paulo azalaki koyoka mposa ya kolendisama, mpe mbala mingi azalaki kosɛnga na baninga na ye baklisto ete básambela mpo na ye. (Misala 28:15; Baloma 15:30-32; 2 Bakolinti 1:11; Bakolose 4:2, 3; 1 Batesaloniki 5:25) Bakɛngɛli-batamboli ya mikolo na biso mpe bazalaka na mposa ete tósambela mpo na bango mpe tólendisa bango.
10. Lolenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo ete mokɛngɛli-motamboli azwa esengo kati na mosala na ye?
10 Tosilá koyebisa na mokɛngɛli ya zongazonga mpe na mwasi na ye ete tosepelaka mingi na boyei na bango? Totɔ́ndaka ye mpo na toli ya ntina oyo apesaka biso? Toyebisaka ye ete makanisi oyo apesaka biso mpo na kobongisa lisusu mosala na biso ya kosakola ekólisaka esengo na biso kati na mosala yango? Soki tosalaka bongo, yango ekosunga ye ete azwa esengo kati na mosala na ye. (Baebele 13:17) Mokɛngɛli moko ya zongazonga na Espagne alobelaki mingi mpenza lolenge oyo ye na mwasi na ye basepelaka na nkomá ya botɔ́ndi oyo bazwaka na nsima ya kotala masangá. Alobi ete: “Tobombaka nkomá yango mpe totángaka yango wana mayoki ya bolɛmbu makómeli biso. Ezali liziba ya solosolo ya kolendisa.”
11. Mpo na nini tosengeli koyebisa basi ya bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya bitúká ete tolingaka bango mpe tosepelaka na bango?
11 Mwasi ya mokɛngɛli-motamboli abongi mpe kopesamela longonya. Amonisaka elimo monene ya komipesa na kosungáká mobali na ye kati na lolenge oyo ya mosala ya elanga. Bandeko basi wana ya sembo batye pembeni mposa oyo ezalaka na basi nyonso ya kozala na ndako na bango moko mpe, mingimingi, ya kozala mpe na bana. Mwana mwasi ya Yefeta azalaki moko na basaleli ya Yehova oyo andimaki kotya pembeni libaku na ye ya kobala mpe ya kosala libota, mpo na ndai oyo tata na ye asalaki. (Basambisi 11:30-39) Elimo na ye ya komipesa etalelamaki lolenge nini? Basambisi 11:40 elobi ete: “Bana basi na Yisalaele bakendaki mbula na mbula kolela mwana mwasi na Yefeta Mogilada mikolo minei na kati na mbula.” Ekozala mpenza likambo malamu soki tosali molende ete tóyebisa basi ya bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya bitúka ete tolingaka bango mpe tosepelaka na bango!
“Bóbosana te komonisa bapaya boboto”
12, 13. (a) Koyamba bakɛngɛli-batamboli epai na biso ezali na moboko nini kati na Biblia? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ete boboto motindo wana ekoki kopesa litomba epai na moyambi mpe epai na moyambami?
12 Komonisa ezaleli ya koyamba bapaya ezali lolenge mosusu oyo tokolakisa bolingo mpe botɔ́ndi na biso epai na baklisto oyo bazali kosala mosala ya bakɛngɛli-batamboli. (Baebele 13:2) Ntoma Yoane apesaki longonya epai na Gayo mpo ete azalaki koyamba baoyo bazalaki koya kotala lisangá lokola bamisionere-batamboli. Yoane akomaki ete: “Molingami, ozali kosalaka na sembo na misala mikosalaka yo na bandeko ata bango bapaya. Bango basili kotatwela yo na miso na lingomba. Soko okolekisa bango na mobembo na motindo mobongi na Nzambe, okosala malamu. Zambi babimi mpo na nkombo yango, koyambáká eloko na mabɔkɔ na Bapakano te. Bongo, ekoki na biso konyangela bato na motindo yango ete tózala basalani na bango na misala na solo.” (3 Yoane 5-8) Lelo oyo, tokoki kokólisa mpe mosala ya kosakola Bokonzi na koyambáká bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango epai na biso. Ya solo, bankulutu ya lisangá basengeli kosɛnzɛla ete epai kuna bakɛngɛli-batamboli bakoyambama ezala oyo ebongi mpenza, kasi mokɛngɛli moko ya etúká alobaki ete: “Kati na boyokani na biso elongo na bandeko, tosengeli te koluka bobele baoyo bakoki kosalela biso malamu mingi. Tosengeli kútu komeka te komonisa ezaleli motindo wana. Tosengeli kondima kokende epai na ndeko nyonso oyo abyangi biso epai na ye, azala mozwi to mobólá.”
13 Ezaleli ya koyamba bapaya ekoki kopesa litomba epai na moyambami mpe epai na moyambi. Jorge, azalaki mokɛngɛli ya zongazonga mpe azali sikawa kosala na Betele, amikundoli ete: “Kati na libota na biso, tozalaki na momeseno ya koyamba bakɛngɛli-batamboli na ndako na biso. Nabanzi ete boyei na ye epai na biso esalisaki ngai mingi, kasi na ntango wana nasosolaki yango mpenza te. Na ntango nakómaki elenge, nakutanaki na mikakatano na elimo. Mama na ngai amitungisaki mingi na ntina na yango kasi ayebaki mpenza te lolenge nini akokaki kosunga ngai mpe na bongo asɛngaki mokɛngɛli ya zongazonga ete asolola na ngai. Liboso, naboyaki kosolola na ye mpamba te nazalaki kobanga ete alobela bobele mabe na ngai. Kasi boboto na ye ebendaki ngai ete nayebisa makambo na ngai. Abyangisaki ngai mokolo moko Mwayambo ete nakenda kolya elongo na ye, mpe nafungolelaki ye motema na ngai mpamba te nandimisamaki ete azalaki komitya na esika na ngai. Ayokamelaki ngai na likebi nyonso. Apesaki ngai makanisi mabongi mpenza na kosalelama mpe yango ebimisaki matomba malamu, nabandaki kokóla na elimo.”
14. Mpo na nini tosengeli kosepela na bankulutu-batamboli, na esika ete tóloba mabe na ntina na bango?
14 Mokɛngɛli-motamboli asalaka makasi ete asunga bilenge mpe mikóló na elimo. Na bongo, tosengeli mpenza komonisa botɔ́ndi mpo na milende na ye. Nzokande, ekozala boni soki tozali koloba mabe na ntina na ye mpo na bolɛmbu na ye to tozali kokokanisa ye na lolenge ya mabe na basusu oyo basilá kotala lisangá na biso na mbala eleki? Na ntembe te, yango ekolɛmbisa ye mpenza. Maloba ya mabe oyo malobamaki na ntina na mosala ya Paulo elendisaki ye soko moke te. Emonanaki ete, baklisto mosusu ya Kolinti bazalaki koloba mabe mpo na lolenge ya nzoto na ye mpe mpo na lolenge na ye ya koloba. Ye moko akomaki maloba yango ya mabe oyo malobamaki mpo na ye: “Mikanda na ye izali na bozito mpe na makasi, nde motindo na nzoto na ye ezali na bolɛmbu mpe koloba na ye ezali mpamba.” (2 Bakolinti 10:10) Nzokande, likambo ya esengo ezali ete, mbala mingi, bakɛngɛli-batamboli bayokaka nde maloba ya bolingo mpe ya botɔ́ndi malobami na ntina na bango.
15, 16. Bolingo mpe molende oyo baninga na bango bandimi bamonisaka esalaka bopusi nini epai na bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango?
15 Mokɛngɛli moko ya zongazonga na Amerika ya Súdi asalaka mobembo ya mpasi na boumeli ya mokolo mobimba na nzela moko etondi na pɔtɔpɔ́tɔ mpo na kokende kotala bandeko ya elimo na etúká moko oyo eyangelami na batomboki. Akomi ete: “Komona lolenge bandeko bazali kolakisa botɔ́ndi mpo na boyei na ngai ezali mpenza likambo ya kosimba motema. Atako esɛngaka ete nasalaka milende mingi mpo na kokóma kuna, kokutanáká na makámá mpe mikakatano mingi, kasi mbano oyo nazwi mpo na yango ezali bongo bolingo mpe molende oyo bandeko bamonisaka.”
16 Mokɛngɛli moko ya zongazonga na Afrika akomi ete: “Mpo na bolingo oyo bandeko bamoniselaki biso, tolingaki teritware ya Tanzanie mingi mpenza! Bandeko bazalaki pene na koyekola makambo epai na biso, mpe bazalaki na esengo ya kobyangisa biso epai na bango.” Bolingo mpe boyokani malamu ezalaki kati na ntoma Paulo mpe babalani mibale baklisto ya ekeke ya liboso, Akula mpe Pilisikia. Kútu, Paulo alobaki na ntina na bango ete: “Bópesa mbote epai na Pilisikia mpe Akula, basalani na ngai elongo kati na Klisto Yesu, baoyo bakɔtisi nkingo na bango na mpasi mpo na bomoi na ngai; natɔ́ndi bango nde bobele ngai moko te kasi mangomba nyonso na bapakano lokola.” (Baloma 16:3, 4) Bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango bazali na botɔ́ndi ya kozala na baninga oyo bazali bongo ba Akula mpe ba Pilisikila ya mikolo na biso, awa bazali kosala milende mingi mpenza mpo na koyamba mpe kolekisa ntango elongo na bango.
Bazali kolendisa masangá
17. Mpo na nini tokoki koloba ete mosala ya bakɛngɛli-batamboli ezali ebongiseli moko ya mayele, mpe epai wapi bazwaka litambwisi?
17 Yesu alobaki ete: “Mayele alóngi na misala na ye.” (Matai 11:19) Emonani polele ete kotinda bakɛngɛli-batamboli ezali mpenza ebongiseli moko ya mayele, mpamba te ezali kosunga na kolendisama ya masangá ya basaleli ya Nzambe. Na boumeli ya mobembo ya mibale ya Paulo kati na mosala ya misionere, ye mpe Sila balóngaki ‘koleka kati na Sulia, na Kilita, kolendisáká mangomba [“masangá,” NW].’ Mokanda ya Misala eyebisi ete: “Ezalaki bango koleka kati na bamboka, bapesi bayekoli mibeko mikati bantoma, na mikóló na lingomba kuna na Yelusaleme, ete bátosa yango. Na bongo mangomba malendisami na kondima, mpe motuya na bango ezalaki koleka monene mokolo na mokolo.” (Misala 15:40, 41; 16:4, 5) Bakɛngɛli-batamboli ya mikolo na biso bazali kozwa litambwisi ya elimo na nzela ya Makomami mpe na nzela ya mikanda ya “moombo na sembo mpe na mayele,” lokola baklisto nyonso mosusu bakosalaka yango.—Matai 24:45.
18. Lolenge nini bakɛngɛli-batamboli bazali kolendisa masangá?
18 Ɛɛ, bankulutu-batamboli basengeli kokóba kolya na mesa ya elimo ya Yehova. Basengeli koyeba malamumalamu myango mpe malako oyo lisangá ya Nzambe ezali kolanda. Na bongo, mibali yango bakoki kozala lipamboli ya solosolo mpo na basusu. Na nzela ya ndakisa kitoko ya molende na bango kati na mosala ya elanga, bakoki kosunga baninga na bango bandimi ete bábongisa lisusu mosala na bango ya boklisto. Masukúlu matongami likoló na Biblia, oyo bankulutu wana basalaka, malendisaka bayoki na yango na elimo. Na kosungáká basusu ete básalela toli ya Liloba ya Nzambe, básala na boyokani na libota ya Yehova na mokili mobimba, mpe básalela bibongiseli bikamatami na Nzambe na nzela ya ‘moombo na sembo,’ bakɛngɛli batamboli bazali kolendisa masangá oyo bazwi mokumba ya kotala yango.
19. Mituna nini tokotalela yango?
19 Na ntango lisangá ya Yehova ebandisaki mosala ya bankulutu-batamboli kati na Bayekoli ya Biblia, esili koleka mbula pene na nkámá, zulunalo oyo elobaki ete: “Tokotalela matomba mpe lolenge oyo Nkolo akolanda kotambwisa biso.” Litambwisi ya Yehova esili komonana polele. Na lisalisi ya lipamboli yango mpe kokambama na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mosala yango mosili kokóla mpe kobongisama lisusu wana mibu mizali koleka. Litomba emonani ezali oyo ete, kati na mokili mobimba masangá ya Batatoli ya Yehova mazali kokóma ngwi kati na kondima mpe motángo ya basangani na yango mozali kokóla mokolo na mokolo. Na ntembe te, Yehova azali kopambola elimo ya komipesa oyo makabo na motindo ya mibali bazali komonisa yango. Kasi lolenge nini bakɛngɛli-batamboli bakoki kokokisa malamu mosala na bango? Mikano na bango mizali nini? Lolenge nini bakoki kozala litomba mpo na lisangá?
Okoyanola lolenge nini?
◻ Wapi mwa ndambo ya mikumba ya bakɛngɛli ya zongazonga mpe ya bitúká?
◻ Mpo na nini bakɛngɛli-batamboli basengeli komonisa elimo ya komipesa?
◻ Lolenge nini tokoki komonisa botɔ́ndi mpo na mosala ya bankulutu-batamboli mpe basi na bango?
◻ Bakɛngɛli-batamboli bakoki kosala nini mpo na kolendisa lisangá kati na kondima?
[Elilingi na lokasa 10]
Kosala mibembo ntango nyonso esɛngaka elimo ya komipesa
[Elilingi na lokasa 13]
Osilá koyamba bakɛngɛli-batamboli mpe basi na bango epai na yo?