Mokapo 43
Mboka na kongenga
Emonaneli 16—Emoniseli 21:9 kino 22:5
Teme: Yelusaleme na sika
Eleko na kokokana na yango: Nsima na bolozi monene mpe kobwakama na Satana kati na libulu mozindo
1, 2. (a) Epai wapi anzelu amemi Yoane mpo na kotalisa ye Yelusaleme na Sika, mpe bokeseni nini mboka yango ezali komonisa elongo na mboka mosusu oyo Yoane autaki komona liboso? (b) Mpo na nini yango nde ezali kokokisama ya Emoniseli?
ANZELU moko amemaki Yoane kati na esobe mpo na kolakisa ye Babilone Monene. Anzelu mosusu, bobele na etuluku moko wana ya baanzelu, amemi sikawa Yoane na ngomba moko molai. Oyo nde likambo ya kokesena mpenza emonani liboso na Yoane! Ye azali komona mboka na mbindo te, na pite te lokola ndumba Babilone, kasi amoni nde Yelusaleme na Sika, oyo ya peto, ya elimo mpe ya bulee, oyo ezali kokita longwa na likoló.—Emoniseli 17:1, 5.
2 Ata Yelusaleme na mabelé esilaki kozwa nkembo ya motindo boye te. Yoane alobi na biso: “Moko na baanzelu yango nsambo, baoyo bazalaki na mbeki nsambo oyo etondaki na malozi nsambo na nsuka, alobi na ngai ete: ‘Yaka, natalisa yo mwasi na libala, mwasi ya Mwana na Mpate.’ Amemi ngai kati na elimo kuna na ngomba monene molai, mpe atalisi ngai Yelusaleme, mboka mosantu, kokita na likoló, kouta na Nzambe. Ezalaki na nkembo na Nzambe.” (Emoniseli 21:9-11a) Na esika kitoko oyo azali, likoló na ngomba oyo molai, Yoane amoni mboka kitoko na lolenge na yango mobimba. Bato na kondima bazelaki na motema mɔ́to koya ya mboka wana uta bato bakweaki kati na lisumu mpe na kufa. Na nsuka, yango oyo ekomi! (Baloma 8:19; 1 Bakolinti 15:22, 23; Baebele 11:39, 40) Ezali mboka kitoko ya elimo, oyo esalami na bikelamu ya sembo 144 000, oyo ezali kongenga kati na bosantu na yango mpe ezali komonisa mpenza nkembo na Jéhovah. Ezali wana nde kokokana monene ya Emoniseli!
3. Na maloba nini Yoane alobi mpo na bonzéngá na Yelusaleme na Sika?
3 Yelusaleme na Sika ezali na bonzéngá oyo eleki nyonso: “Mpe kongenga na yango ezalaki lokola libanga na motuya mpenza, lokola libanga na yasipi na langilangi mingi. Ezalaki na lopango monene mpe molai, na bikuke zomi na mibale, mpe na bikuke yango baanzelu zomi na mibale, mpe nkombo esili kokomama na likolo na yango, nkombo na mabota zomi na mibale na Yisraele. Epai na ebimelo na ntango bikuke bizalaki misato, epai na likolo bikuke misato, epai na ngele bikuke misato, epai na kokita na moi bikuke misato. Lopango na mboka ezalaki na mabanga na moboko zomi na mibale, mpe na likolo na yango nkombo na bantoma ya Mwana na Mpate zomi na mibale.” (Emoniseli 21:11b-14) Yango ebongi ete Yoane abanda naino na komonisa kongenga makasi ya mboka wana. Kitoko lokola elenge mwasi abali sika, Yelusaleme na Sika ebongi mpo na kozala mwasi na Klisto. Ee, ezali kongenga na lolenge oyo ebongi mpenza mpo na eloko oyo ezalisami na “Tata na moi.”—Yakobo 1:17.
4. Nini emonisi ete Yelusaleme na Sika ezali libota na Yisraele na mosuni te?
4 Bankombo na mabota 12 ya Yisraele ekomami likoló na bikuke zomi na mibale ya mboka yango. Mboka wana ya elilingi esalemi bongo na ba 144 000, oyo batiamaki elembo “kati na mabota nyonso na bato na Yisraele.” (Emoniseli 7:4-8) Na boyokani na yango, mabanga na moboko mazali na bankombo 12 ya bantoma ya Mwana na Mpate. Ya solo, Yelusaleme na Sika ezali Yisraele ya mosuni te, libota oyo ebimaki na bana 12 ya Yakobo, kasi ezali nde Yisraele ya elimo, oyo etongami likoló na moboko “na bantoma mpe na basakoli.”—Baefese 2:20.
5. Likambo oyo ete Yelusaleme na Sika ezali na “lopango monene mpe molai” elakisi nini mpe mpo na nini baanzelu batyami na ekuke moko na moko?
5 Mboka yango ya elilingi ezingami na lopango moko molai. Na Kala, bazalaki kotonga mapango milai zingazinga na mboka mpo na komibatela na banguna. “Lopango monene mpe molai” ya Yelusaleme na Sika emonisi ete mboka yango ebatelami malamu kati na elimo. Monguna moko te oyo ayini boyengebene, moto moko te na mbindo to na kozanga bosembo akoki mpenza kokóta kuna. (Emoniseli 21:27) Kasi mpo na baoyo bandimami kokóta na kati, mboka wana kitoko elimboli mpo na bango kokóta mpenza kati na Paradis. (Emoniseli 2:7) Nsima wana Adam abimisamaki na Paradis ya yambo, bakeluba batyamaki na liboso ya esika yango mpo na kopekisa ete bato na mbindo bakóta kuna te. (Genese 3:24) Motindo moko mpe, baanzelu batyami liboso na ekuke nyonso ya mboka mosantu, Yelusaleme, mpo na kobatela yango kati na elimo. Na yango, na boumeli nyonso ya mikolo na nsuka, baanzelu bazali kobatela lisangá na baklisto bapakolami, lisangá oyo ekokóma Yelusaleme na Sika, mpo ete ebebisama na mateya mpe misala na Babilone te.—Matai 13:41.
Anzelu azwi mezire ya mboka
6. (a) Na maloba nini Yoane amonisi bamezire ya mboka, mpe yango elakisi nini? (b) Nini ekoki kolimbola ete mezire oyo esalelamaki ezalaki ‘mapeko na bato mpe na baanzelu’? (Tala maloba na nse na paragrafe 7.)
6 Yoane akobi lisolo na ye na maloba oyo: “Oyo asololaki na ngai azalaki na eloko na komeka na wolo, ete ameka bonene na mboka, na bikuke na yango, na bitutu na yango. Mboka ezali na nsuka minei, mpe bolai na yango ekokani na bonene na yango. Ameki bonene na mboka na emekeli yango, mpe ezalaki na setada nkoto zomi na mibale. Bolai na yango, na bonene na yango, na bozindo na yango ekokani. Ameki bolai na lopango na yango, mapeko nkama na ntuku minei na minei, na mapeko na bato oyo ezali mapeko na baanzelu mpe.” (Emoniseli 21:15-17) Ntango bazwaki mezire ya temple, likambo yango epesaki ndanga mpo na kokokisama na mikano na Jéhovah na ntina na esika yango. (Emoniseli 11:1) Sikawa, na kozwaka mezire ya Yelusaleme na Sika, anzelu amonisi ete mikano na Jéhovah oyo mitaleli mboka wana na nkembo misengeli mpenzampenza kokokana.a
7. Makambo nini ya kokamwisa tomoni kati na bamezire ya mboka?
7 Oyo nde mboka ya kokamwa! Bonene mpe bolai na yango nyonso ndenge moko. Kozinga na yango nyonso epesi setada 12 000 (to penepene na bakilometele 2 220), yango ezingami na lopango oyo ezali na bolai ya mapeko 144 (to bametele 64). Mboka moko te na mabele ekoki kozala na bamezire motindo wana. Bonene na yango mbele eleki oyo na Yisraele ya lelo mbala soko 14, mpe mbele ekotombwana kino bakilometele 560 na likoló. Lokola Emoniseli epesamaki na bilembo, bamezire oyo ezali koteya biso nini na ntina na Yelusaleme na Sika ya likoló?
8. Nini emonisami na (a) bosanda ya lopango ya mboka, oyo ezali na mapeko 144? (b) setada 12 000 ya mezire ya mboka? (c) lolenge na mboka, oyo bamezire na yango nyonso ezali ndenge moko?
8 Bozindo ya lopango, mapeko 144, ezali kokundwela biso ete mboka ezali bongo na bato 144 000 oyo Nzambe akómisi bango bana na ye na nzela na elimo na ye. Motango 12 oyo ezali komonana kati na setada 12 000 ya mezire na mboka, oyo bolai na yango, bonene na yango mpe bosanda na yango ezalaki na mezire se moko, esalelami na ndimbola ya elilingi kati na bisakweli na Biblia oyo bitaleli bibongiseli. Na bongo Yelusaleme na Sika ebongisami malamu mpenza mpo na kokokisa mokano na seko na Nzambe. Lokola Yesu Klisto azali Mokonzi na yango, ezali bongo lisangá, Bokonzi na Jéhovah. Tolobela sikawa lolenge mboka ezali: mezire nyonso ndenge moko, epai na epai (cube). Kati na tempelo ya Salomo, Esika-Eleki-Bosantu, oyo ezalaki elilingi ete Jéhovah azali wana, yango mpe ezalaki cube to mezire na yango nyonso ezalaki ndenge moko. (1 Mikonzi 6:19, 20) Ebongi mpenza ete Yelusaleme na Sika, oyo engengisami na nkembo na Jéhovah ye moko, ezala na lolenge ya cube monene mpe ya kokoka! Bamezire na yango nyonso ezali mpenza ndenge moko. Mboka yango ezali komonisa ata mbeba moko te.—Emoniseli 21:22.
Bitongeli ya motuya monene
9. Yoane alobi nini na ntina na biloko bisalelami mpo na kotonga mboka yango?
9 Yoane akobi lisolo na ye: “Lopango na yango etongami na yasipi, mboka ezalaki wolo kitoko lokola talatala kitoko. Miboko na lopango na mboka mikembami na mabanga nyonso na motuya. Libanga na liboso yasipi, na mibale safili, na misato kendono, na minei samala, na mitano salandonoki, na motoba salali, na nsambo kulusuliti, na mwambe belulu, na libwa topazi, na zomi kulusupala, na zomi na moko wakiti, na zomi na mibale ametusiti. Bikuke na yango zomi na mibale bizalaki pauni zomi na mibale. Bisalami ekuke moko pauni moko, ekuke moko pauni moko. Balabala na mboka ezalaki wolo mpenza kitoko lokola talatala.”—Emoniseli 21:18-21.
10. Likambo oyo ete mboka etongami na yasipi, na wolo mpe na “mabanga nyonso na motuya” elimboli nini?
10 Mboka yango etongami na motindo moko ya kitoko mingi. Na esika ya bitongeli ya mpambampamba oyo batongelaka na mokili, lokola mabelé motane to mabanga ya mpamba, awa basaleli nde yasipi, wolo kitoko mpe “mabanga nyonso na motuya.” Biloko wana bizali komonisa mpenza bitongeli na likoló! Eloko moko te ekoki koleka yango na kitoko. Na Kala, sanduku na kondimana ezipamaki na wolo kitoko, libanga oyo, kati na Biblia, ezali mbala mingi komonisa biloko kitoko mpe ya motuya monene. (Exode 25:11; Masese 25:11; Yisaya 60:6, 17) Nzokande, Yelusaleme na Sika mobimba, ata mpe balabala monene na yango, esalemi na “wolo kitoko mpenza lokola talatala,” likambo oyo emonisi bonzenga mpe motuya monene oyo eleki nyonso.
11. Elikya nini tozali na yango ete baoyo basali Yelusaleme na Sika bakongenga na bopeto moko ya elimo oyo eleki nyonso?
11 Motuli moko te na wolo awa na mokili akoki kobimisa wolo na peto lokola wana. Kasi Jéhovah azali Mopetoli monene. Afandi “lokola mopetoli mpe moyongoli na palata,” mpe azali kopetola basangani na sembo na Yisraele na elimo “lokola wolo mpe lokola palata,” kolongoláká mbindo nyonso kati na bango. Bobele baoyo bapetolami mpe bayongolami nde bakozala kati na Yelusaleme na Sika. Jéhovah atongi mboka na bitongeli kitoko oyo bizali kongala na bopeto moko ya elimo oyo eleki nyonso.—Malaki 3:3, 4.
12. Nini emonisami na likambo oyo ete (a) miboko na mboka mityami mabanga na motuya 12? (b) ete bikuke na mboka bizali pauni?
12 Ata miboko na mboka mpe mizali kitoko mingi; mingengisami na mabanga na motuya 12. Likambo yango ekundoli biso ete na Kala, nganga monene na Bayuda azalaki kolata na ntango ya milulu, efode moko engengisamaki na mabanga ya motuya 12 ya motindo moko na oyo elobelami awa. (Exode 28:15-21) Kokokana oyo ezali ya mpamba te. Yango ezali nde komonisa mosala na bonganga na Yelusaleme na Sika oyo Yesu, Nganga Monene, azali “mwinda” na yango. (Emoniseli 20:6; 21:23; Baebele 8:1) Ezali mpe na nsima na Yelusaleme na Sika nde matomba ya mosala na bonganga na Yesu, Nganga Monene, epesami na bato. (Emoniseli 22:1, 2) Bikuke 12 ya mboka, oyo mokomoko na yango ezali pauni ya kitoko mingi koleka, ezali kokundwela biso lisese oyo kati na yango Yesu akokisaki Bokonzi na pauni moko ya motuya monene. Baoyo nyonso bazali kokota na bikuke yango basilaki komonisa ete bazali kopesa motuya monene na biloko ya elimo.—Matai 13:45, 46; tala Yobo 28:12, 17, 18.
Mboka na kongenga
13. Sikawa Yoane alobi nini na ntina na Yelusaleme na Sika, mpe mpo na nini mboka yango ezali na mposa ya tempelo te?
13 Na eleko ya Salomo, Yelusaleme ezalaki na tempelo moko oyo etongamaki na likoló, na ngomba Molia, kuna na nord. Bongo ezali boni mpo na Yelusaleme na Sika? Yoane alobi: “Namonaki tempelo wana te, mpo ete Jéhovah Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azali tempelo na yango, ná Mwana na Mpate lokola. Mboka ezalaki na mposa na moi te, soko na sanza te, mpo na kotanela yango, mpo ete nkembo na Nzambe engengeli yango, mpe Mwana na Mpate azalaki mwinda na yango.” (Emoniseli 21:22, 23) Ya solo, ntina ezali te ya kotonga tempelo kati na mboka wana. Tempelo ya kala ya Bayuda ezalaki bobele elilingi, mpe eloko na solo oyo yango ezalaki komonisa, tempelo monene ya elimo, esili kotongama uta Jéhovah apakolaki Yesu lokola Nganga Monene na mobu 29. (Matai 3:16, 17; Baebele 9:11, 12, 23, 24) Lisusu, esika tempelo ezali esengeli mpe ete molongo na banganga bazala oyo bakopesaka mbeka epai na Jéhovah mpo na bato. Na yango, bango nyonso oyo bazali kati na Yelusaleme na Sika bazali banganga. (Emoniseli 20:6) Mpe mbeka monene, elingi koloba bomoi ya bomoto na kokoka na Yesu, epesamaki mbala moko mpo na libela. (Baebele 9:27, 28) Lisusu, bango nyonso oyo bazali kofanda kati na mboka yango, moto na moto azali na lotomo ya kokóta liboso na Jéhovah.
14. (a) Mpo na nini Yelusaleme na Sika ezali na mposa te ete moi mpe sanza engengisa yango? (b) Esakweli na Yisaya esakolaki nini na ntina na lisangá ya molongo mobimba ya Jéhovah, mpe na nini yango etali Yelusaleme na Sika?
14 Nsima wana Moïse amonaki nkembo na Jéhovah koleka liboso na ye na ngomba Sinaï, elongi na ye ebandaki kongenga makasi kino amizipaki elongi liboso na bandeko na ye Bayisraele. (Exode 34:4-7, 29, 30, 33) Na bongo okoki kokanisa boni mpo na kongenga ya mboka oyo engengisami ntango nyonso na nkembo ya Jéhovah? Ata mokolo moko te molili ekoyingela kati na yango. Ekozala na mposa ya kongengisama na bingengiseli lokola moi mpe sanza te. Ekomwangisa pole libela na libela. (1 Timote 6:16) Yelusaleme na Sika ezali nde kati na kongenga makasi ya motindo wana. Ya solo, mwasi yango mpe Mobali-Mokonzi na ye bazali kokóma kapitale ya lisangá ya molongo mobimba ya Jéhovah—“mwasi” na ye, “Yelusaleme na likoló”—na ntina na yango Yisaya asakolaki ete: “Na ntango na moi, moi ekozala pole na yo te, mpe sanza na ntango na butu ekopesa yo lisusu kongenga te. Kasi Jéhovah akozala pole na yo libela mpe Nzambe na yo akozala kongenga na yo. Moi na yo ekolimwa lisusu te mpe sanza na yo ekomilongola te; mpo ete Jéhovah akozala pole na yo libela mpe mikolo na kolela na yo mikosuka.”—Yisaya 60: 1, 19, 20; Bagalatia 4:26.
Kongenga mpo na mabota
15. Maloba nini ya Emoniseli matali Yelusaleme na Sika mazali kokundola esakweli na Yisaya?
15 Bobele esakweli moko wana ezalaki kosakola lisusu ete: “Mpe mabota bakoya epai na pole na yo mpe bakonzi kino kongenga na kobima na yo.” (Yisaya 60:3) Emoniseli elakisi ete maloba oyo masengelaki kotalela Yelusaleme na Sika. Totangi: “Bato na mabota nyonso bakotambola na kongenga na yango, mpe bakonzi na mokili bakoya na nkembo na bango na kati na yango. Bikuke na yango bikozipama na moi soko moke te, mpe butu ekozala wana te. Bakomema kati na yango nkembo, na biloko na motuya na mabota nyonso.”—Emoniseli 21: 24-26.
16. Banani “mabota” oyo bakotambola na kongenga na Yelusaleme na Sika?
16 Banani “mabota” oyo makotambola na kongenga na Yelusaleme na Sika? Ezali bato oyo bazalaki kala kati na mokili oyo mabe, kasi bazali sikawa komitika kotambwisama na pole oyo emwangisami na nzela na mboka na nkembo wana na likoló. Baoyo na liboso kati na bango ezali basangani ya ebele monene, oyo basilaki kobima kati na “mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso” mpe bazali kosambela Jéhovah butu na moi elongo na kelasi ya Yoane. (Emoniseli 7:9, 15) Nsima wana Yelusaleme na sika ekokita na mabelé longwa na likoló mpe wana Yesu akosalela bafungola ya kufa mpe Hadès mpo na kosekwisa bakufi, bamilió na bato mosusu oyo kala bazalaki kati na “mabota” bakoya kosangana na ebele monene; bato yango bakolinga Jéhovah mpe Mwana na ye, ye oyo akokisami na Mwana na Mpate, Mobali na Yelusaleme na Sika.—Emoniseli 1:18.
17. Banani “bakonzi na mokili” oyo “bakoya na nkembo na bango” na Yelusaleme na Sika?
17 Bongo banani “bakonzi na mokili” oyo “bakoya na nkembo na bango”? Ezali bakonzi ya biloko ya ntango oyo te, mpamba te bango bakobomama ntango bakobundisa Bokonzi ya Nzambe na Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16; 19:17, 18) Na bongo, bakonzi yango bakozala nde bato minene baoyo bakokóma basangani ya ebele monene, to bakonzi ya kala oyo bakosekwa baoyo bakotosa Bokonzi na Nzambe kati na mokili ya sika? (Matai 12:42) Ezali mpasi mpo na kokanisa motindo wana, mpamba te nkembo ya bakonzi wana ezalaki nde nkembo ya mokili mpe ezimanaki uta kala. “Bakonzi ya mokili” oyo bakoya na nkembo na bango na Yelusaleme na Sika ezali bongo ba 144 000 baoyo ‘basombami na mikili nyonso, na minoko nyonso, na bikolo nyonso mpe na mabota nyonso’ mpo na koyangela elongo na Mwana na Mpate, Yesu Klisto. (Emoniseli 5:9, 10; 22:5) Bazali komema kati na mboka yango nkembo oyo Nzambe apesi bango mpo na kobakisa na kongenga na yango.
18. (a) Nani akondimama te kati na Yelusaleme na Sika? (b) Bobele banani bakozwa ndingisa ya kokóta kati na mboka?
18 Yoane akobi: “Eloko moko mabe ekokóta wana te, basali na bosoto te, na lokuta mpe te; kasi bobele bango basili kokomama na buku na bomoi na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 21:27) Eloko moko te oyo ebebisami na ebongiseli ya biloko na Satana ekoki kokóta kati na Yelusaleme na Sika. Atako bikuke na yango bizali ntango nyonso polele, moto moko te oyo azali kosala misala na mbindo mpe kobuka lokuta akoki kozwa ndingisa ya kokóta kuna. Kati na mboka yango ekozala ata na bapengwi te to basangani ya Babilone Monene mpe te. Mpe soko moto nani ameki kobebisa yango na kokweisáká baponami wana ezali bango naino na mabelé, milende na ye mikolonga te. (Matai 13:41-43) Bobele ‘baoyo bakomami nkombo kati na buku na bomoi na Mwana na Mpate,’ ba 144 000, bango nde bakokóta mpenza kati na Yelusaleme na Sika.b—Emoniseli 13:8; Danyele 12:3.
Ebale na mai na bomoi
19. (a) Na maloba nini Yoane amonisi Yelusaleme na Sika wana ezali yango kosopa mapamboli likoló na bato? (b) Ntango nini “ebale na mai na bomoi” ekotyóla? Ndenge nini toyebi yango?
19 Matomba mingi makopesama epai na bato na nzela na Yelusaleme na Sika oyo ezali kongenga. Ezali yango nde Yoane azali koyebisa sikawa: “Atalisi ngai ebale na mai na bomoi, kitoko lokola kulusatala, kobima na kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate kotyóla na katikati na balabala monene na mboka.” (Emoniseli 22:1, 2a, MN) Ntango nini “ebale” yango ezali kotyóla? Lokola ezali ‘kobima na kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate,’ ekoki kozala bobele nsima na ebandeli ya mokolo na Nkolo, oyo ebandaki na 1914. Ezali na eleko wana nde likambo oyo eyebisamaki na ntango na kobetama na kelelo ya nsambo ebandaki mpe maloba kitoko oyo malobamaki: “Sikawa lobiko, na nguya, na Bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye, esili koya.” (Emoniseli 11:15; 12:10) Na ntango ya nsuka, elimo mpe mwasi bazali kobenga bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi baya komela mai ya bomoi ofele. Bato yango bakozanga mai ya ebale yango te tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, ata mpe na mokili ya sika, ntango Yelusaleme na Sika ‘ekokita na likoló, kouta na Nzambe.’—Emoniseli 21:2.
20. Nini emonisi ete tokoki komela uta sikawa mwa ndambo na mai na bomoi?
20 Oyo ezali mbala ya liboso te oyo mai na bomoi epesami epai na bato. Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu alobelaki mai oyo ezali kopesa bomoi na seko. (Yoane 4:10-14; 7:37, 38) Epai mosusu, mosika te Yoane akoyoka libyangami oyo epesami na bolingo nyonso: “Elimo mpe mwasi na libala balobi ete, ‘Yaka!’ Tika moyoki aloba ete, ‘Yaka!’ Tika ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Libyangami oyo ezali koyokama uta sikawa, yango emonisi ete, mwa ndambo na mai na bomoi ezali komonana lelo mpo na kopesa yango na bato. Kasi kati na mokili ya sika, mai yango makobima na kiti na bokonzi na Nzambe mpe ekotyóla katikati na Yelusaleme na Sika lokola ebale.
21. “Ebale na mai na bomoi” elimboli nini, mpe ndenge nini emonaneli ya Ezekiele esalisi biso na koyeba yango?
21 “Ebale na mai na bomoi” wana ezali nini? Mai ezali eloko ya ntina mingi mpo na bomoi. Soki bilei ezangi, moto akoki kobika mwa baposo mingi, kasi soki azangi mai akokufa bobele nsima ya poso moko. Mai ezali mpe mopetoli mpe ezali na ntina mingi mpo na kolongono ya nzoto. Na bongo, mai na bomoi mazali elilingi na eloko moko ya ntina mingi mpo na bomoi mpe kolongono ya bato. Mosakoli Ezekiele ye mpe azwaki emonaneli ya “ebale na mai na bomoi” wana, mpe kati na emonaneli yango ebale oyo ezalaki kobima na tempelo mpe ezalaki kotyóla kino na mai na mungwa (la mer Morte). Likamwiseli esalemaki, mpamba te mai yango, oyo etondi na mungwa, ebongwanaki mai na peto oyo etondi na mbisi! (Ezekiele 47:1-12) Ee, ebale oyo emonanaki na emonaneli ezali kozongisa na bomoi biloko oyo bikufaki liboso. Yango emonisi ete, ebale na mai na bomoi elakisi bibongiseli oyo Nzambe akamati na nsima na Yesu Klisto mpo na kozongisa ‘bakufi’ na bomoi ya bomoto na kokoka. Ebale yango ezali “kitoko lokola kulusatala,” likambo oyo emonisi bopeto mpe bosantu ya bibongiseli na Nzambe. Oyo nde likeseni elongo na “mai” ya boklisto na mokili oyo mabebisami na makila mpe oyo mazali koboma!—Emoniseli 8:10, 11.
22. (a) Ebale ezali kobimela wapi, mpe mpo na nini ebongi kozala bongo? (b) Mai na bomoi ezali na boyokani na nini, mpe ebale yango elakisi nini?
22 Ebale ebimi na “kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate.” Yango ekoki mpenza, mpamba te bibongiseli oyo Jéhovah akamataki mpo na kopesa bomoi bitongami likoló na mbeka ya lisiko. Ezali mpo ete “alingaki mokili na motindo boye ete, apesi Mwana na ye bobele moko ete moto na moto oyo akondima ye, abebisama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Mai na bomoi ezali mpe na boyokani na Liloba na Nzambe, oyo ekokisami na mai kati na Biblia. (Baefese 5:26) Nzokande, ebale ya mai na bomoi elakisi bobele solo yango moko te, kasi lisusu bibongiseli nyonso oyo Jéhovah akamati na nzela na mbeka na Klisto, mpo na kosikola bato ya botosi na lisumu mpe na kufa mpe kopesa bango bomoi ya seko.—Yoane 1:29; 1 Yoane 2:1, 2.
23. (a) Mpo na nini ebongi ete ebale ya mai na bomoi etyóla katikati na balabala monene na Yelusaleme na Sika? (b) Elaka nini ya Nzambe epesamáká na Abrahame ekokokana ntango mai na bomoi ekotyóla lokola ebale?
23 Na boumeli ya Boyangeli ya mbula nkoto, matomba na lisiko makopesama mpenza na nsima na bonganga na Yesu mpe na ba 144 000. Ebongi mpenza ete ebale na mai na bomoi etyóla bongo katikati na balabala monene ya Yelusaleme na Sika. Yelusaleme yango esalemi na Yisraele ya elimo, baoyo elongo na Yesu basali libota ya solo ya Abrahame. (Bagalatia 3:16, 29) Na yango, ntango mai na bomoi makotyóla lokola ebale katikati na balabala monene ya mboka wana ya elilingi, “mabota nyonso na mabelé” bakozala na makoki nyonso ya kopambwama na nzela na libota na Abrahame. Elaka oyo Nzambe apesaki na Abrahame ekokokana mpenza na mobimba na yango.—Genese 22:17, 18.
Banzete na bomoi
24. Sikawa Yoane amoni nini na ngambo nyonso mibale ya ebale na mai na bomoi, mpe yango elakisi nini?
24 Kati na emonaneli ya Ezekiele, ebale ekomaki monene mingi, mpe mosakoli amonaki banzete na mbuma na kolia ya mitindo nyonso kobima na ngambo nyonso mibale ya ebale. (Ezekiele 47:12) Bongo Yoane, amoni nini? Ezali oyo: “Na bipai nyonso mibale, ezalaki na banzete na bomoi kobotaka mbuma mbala zomi na mibale, sanza na sanza kobotaka mbuma na yango. Nkasa na nzete ezali mpo na kobikisa bato na mabota.” (Emoniseli 22:2b) “Banzete na bomoi” wana elakisi mpe eteni moko ya bibongiseli bikamatami na Jéhovah mpo na kopesa bomoi ya seko epai na bato na botosi.
25. Kati na Paradis ya mokili mobimba, ebongiseli nini ya bolingo mpenza Jéhovah akokamata mpo na bolamu ya bato oyo bakozala na botondi epai na ye?
25 Oyo nde bibongiseli ya bolingo mpenza bikamatami na Jéhovah mpo na bolamu ya bato oyo bazali na botondi epai na ye! Bakoki komela mai wana makokitisaka motema, nde lisusu bakoki kobuka mbala na mbala na banzete yango bambuma kitoko ya kolya ya mitindo nyonso. Ebongaki ete baboti na biso ya yambo basepela na ebongiseli “kitoko” ya motindo oyo ekamatamaki mpo na bango kati na Paradis ya Edene! (Genese 2:9) Kasi sikawa, paradis ya mokili mobimba esili kozalisama, mpe Jéhovah azali kosenzela mpo ete bankasa na banzete yango ya elilingi esalisa mpo na “kobikisa bato na mabota.”c Makasi koleka nkisi nyonso ya monganga oyo ezali kopesama lelo, ezala ete esalemi na banzete to te, bankasa oyo na elilingi ezali kosalisa, ekotombola bato na kondima kino ezalela na kokoka kati na elimo mpe na mosuni.
26. Banani bakoki mpe kozala kati na banzete na bomoi, mpe mpo na nini?
26 Ba 144 000, mwasi na Mwana na Mpate, bakoki mpe kozala kati na banzete yango oyo elonami pembeni na ebale. Lokola bazali naino na mabelé, bango mpe bazali kozwa matomba na bibongiseli oyo Nzambe akamataki na nsima na Yesu Klisto mpo na kopesa bango bomoi. Likambo ya esengo, bandeko yango ya Yesu oyo babotami na elimo, bisakweli ebyangi bango “nzete makasi na boyengebene.” (Yisaya 61:1-3; Emoniseli 21:6) Basili kobota mbuma mingi ya elimo mpo na lokumu ya Jéhovah. (Matai 21:43) Mpe na boumeli ya Boyangeli na mbula nkoto, bakosangana na kokabola bibongiseli bizwami na nzela na lisiko, oyo ekopesa nzela na “kobikisa bato na mabota,” kosikola bango na lisumu mpe na liwa.—Tala 1 Yoane 1:7.
Butu ezali lisusu te
27. Engebene Yoane, mapamboli nini mosusu bato oyo bakozala na libaku malamu ya kokóta kati na Yelusaleme na Sika bakozwa, mpe mpo na nini elobami ete “elakami mabe” ekozala lisusu te?
27 Kokóta kati na Yelusaleme na Sika! Na ntembe te, ezali libaku moko eleki nyonso! Kanisa naino moke: baoyo kala bazalaki bato na bolembu mpe na kozanga kokoka bakolanda Yesu na likoló mpo na kokóma basangani na mboka moko ya nkembo mingi! (Yoane 14:2) Yoane apesi mwa likanisi ya mapamboli oyo bakozwa, wana elobi ye ete: “Elakeli mabe ekozala lisusu te. Kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate ekozala kati na yango mpe baombo na ye bakosalela ye, bakomona elongi na ye, nkombo na ye ekozala na bilongi na bango.” (Emoniseli 22:3, 4) Ntango banganga na Yisraele bamibebisaki, balakelamaki mabe epai na Jéhovah. (Malaki 2:2) Yesu alobaki ete “ndako” mabe na Yelusaleme “etikami mpamba.” (Matai 23:37-39) Nzokande, “elakeli mabe” ekozala te kati na Yelusaleme na Sika. (Tala Zakaria 14:11.) Bafandi na yango nyonso bakosila komekama na móto ya mimekamo na mabele mpe, nsima na kozwa elónga, nde balati kozanga kopola mpe kozanga kokufa. Jéhovah ayebi ete libela bakopengwa longwa na ye te lokola ayebaki na ntina na Yesu. (1 Bakolinti 15:53, 57) Lisusu, “kiti na bokonzi na Nzambe mpe na Mwana na Mpate” ekozala kuna, kolendisáká mboka yango.
28. Mpo na nini basangani na Yelusaleme na Sika bazali na nkombo na Nzambe na elongi na bango, mpe elikya nini kitoko bazali na yango?
28 Lokola Yoane ye moko, bato nyonso oyo bakozala bafandi na mboka yango ya likoló bazali “baombo” na Nzambe. Lokola bazali baombo, nkombo na Nzambe ekomami malamu likoló na bilongi na bango, oyo ezali komonisa ete Nzambe azali Nkolo na bango. (Emoniseli 1:1; 3:12) Bakomona ete kosalela ye mosala na bulee wana ezali bango basangani na Yelusaleme na Sika, ezali bongo libaku moko kitoko koleka. Ntango azalaki awa na mabelé, Yesu apesaki elaka oyo ya ntina epai na bato oyo basengelaki kotambwisa mokili esika moko na ye: “Esengo na baoyo bazali na mitema peto, bango bakomona Nzambe.” (Matai 5:8, MN) Baombo yango batondi na esengo na komona mpenza Jéhovah ye moko mpe kosambela ye!
29. Mpo na nini Yoane alobi ete “butu ekozala lisusu te” kati na Yelusaleme na Sika na likoló?
29 Yoane akobi: “Butu ekozala lisusu te. Bakozala mpe na mposa na kongenga na mwinda te, soko na moi te, mpo ete Jéhovah Nzambe akongengela bango.” (Emoniseli 22:5a) Lokola mboka nyonso na mabelé, Yelusaleme na kala ezalaki kotalela moi mpo na kongengisama ntango na moi, mpe sanza mpe miinda mpo na kongengisama na butu. Nzokande kati na Yelusaleme na Sika na likoló, lolenge na pole wana ekozala na ntina te, mpamba te mboka ekongengisama na Jéhovah ye moko. Liloba “butu” ekoki mpe kosalelama na ndimbola ya elilingi, mpo na kolobela koyinama to kokabwana na Jéhovah. (Mika 3:6; Yoane 9:4; Baloma 13:11, 12) Ata mbala moko te butu ya motindo wana ekoki kozala liboso na nkembo mpe kongenga ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.
30. Na maloba nini Yoane asukisi lisolo na emonaneli kitoko, mpe elikya nini Emoniseli epesi biso?
30 Yoane asukisi lisolo ya emonaneli na ye kitoko na kolobáká boye mpo na baombo na Nzambe: “Mpe bakozala bakonzi libela na libela.” (Emoniseli 22:5b) Ya solo, na nsuka ya mbula nkoto, matomba na lisiko makokokisama nyonso, mpe Yesu akopesa epai na Tata na ye libota na bato ya kokoka. (1 Bakolinti 15:25-28) Nsima na yango, toyebi te eloko nini Jéhovah abongisi mpo na Yesu mpe ba 144 000. Kasi Emoniseli epesi biso elikya ete bakolanda kosalela ye mosala na bulee mpe ya lokumu libela na libela.
Kokokana monene mpe na esengo na Emoniseli
31. (a) Kokokana nini kitoko eyebisami kati na emonaneli ya Yelusaleme na Sika? (b) Yelusaleme na Sika ezali kosala nini mpo na bolamu ya bato mosusu na sembo?
31 Kokokisama na emonaneli oyo ya Yelusaleme na Sika, mwasi na Mwana na Mpate, ezali kokokana monene mpe ya esengo oyo Emoniseli ezali kosakola yango na sikisiki nyonso. Na ekeke ya liboso, baninga baklisto nyonso ya Yoane, bato na liboso epai mokanda oyo etindamaki, bazalaki kozela na motema likoló eleko oyo bakokota kati na mboka yango mpo na koyangela elongo na Yesu Klisto lokola bikelamu na elimo oyo bakoki kokufa te. Na mikolo na biso, batikali na baklisto bapakolami baoyo bazali naino na bomoi awa na mabelé bazali na elikya motindo moko. Na bongo, Emoniseli ebelemi na kokokana na yango monene, ntango etuluku nyonso ya mwasi na mobimba na yango ekosangana elongo na Mwana na Mpate. Na nsima, na nzela na Yelusaleme na Sika, matomba na mbeka na Yesu makopesama epai na bato, na boye ete basembwi nyonso bakozwa bomoi ya seko. Ezali na motindo wana nde mwasi, Yelusaleme na Sika, lokola mosungi ya sembo mpo na Mobali-Mokonzi na ye, akosangana na kobongisa mabelé na sika na boyengebene mpo na libela na libela mpe mpo na nkembo ya Nkolo Moyangeli na biso Jéhovah.—Matai 20:28; Yoane 10:10, 16; Baloma 16:27.
32, 33. Boyekoli na biso ya Emoniseli eteyi biso nini, mpe yango esengeli kopusa biso na kosala nini na molende nyonso?
32 Oyo nde esengo tozali kooka wana boyekoli na biso na mokanda na Emoniseli ekómi na nsuka na yango! Touti komona ete milende ya nsuka ya Satana mpe ya libota na ye mikokweisama mpe tomoni ndenge bikateli na sembo ya Jéhovah bikokokisama nyonso. Babilone Monene, mpe bibongiseli nyonso mosusu na kobeba na mokili na Satana, esengeli kolimwa libela. Satana ye moko mpe badémo na ye bakobwakama kati na libulu mozindo, mpe nsima bakobomama. Longwa na makoló, Yelusaleme na Sika ekoyangela elongo na Klisto, bakufi bakosekwisama mpe bakosambisama. Na nsuka na yango, bato oyo batombwami na ezalela ya kokoka bakofanda libela kati na Paradis na mabelé. Emoniseli ezali kosakola makambo oyo na nguya mpenza! Yango ezali kolendisa ekateli na biso mpo na ‘kosakola lelo nsango malamu na seko lokola evanzile na mikili nyonso, na minoko nyonso mpe na bikolo nyonso’ na mabelé! (Emoniseli 14:6, 7) Osanganaka na mosala oyo monene na meko nyonso oyo makoki na yo mapesi yo nzela?
33 Motema mofuluki na botondi, totya sikawa likebi na maloba na nsuka na Emoniseli.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lokola mezire oyo esalelamaki ezali ‘mapeko na bato mpe na baanzelu,’ yango ezali mbala mosusu na boyokani na baoyo bafandi na engumba: engumba yango efandami na ba 144 000, baoyo bazalaki liboso bato, kasi bakomi bikelamu ya elimo lokola baanzelu.
b “Buku na bomoi na Mwana na Mpate” ezali se na bankombo ya basangani 144 000 na Yisraele ya elimo. Ekeseni bongo na “buku na bomoi,” kati na yango ekomami mpe bankombo na baoyo bakozwa bomoi awa na mabelé.—Emoniseli 20:12.
c Liloba “mabota” esalelamaka mingi mpo na baoyo bazali kati na Yisraele na elimo te. (Emoniseli 7:9; 15:4; 20:3; 21:24, 26) Ndenge liloba yango esalelami awa elimboli te ete bato bakokabwana mabota na mabota na boumeli ya Boyangeli na mbula nkoto.