Tyá likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe
“Liloba ya esakweli ekómi mpenza likambo ya solo mpo na biso; mpe bozali kosala malamu lokola bozali kotyela yango likebi.”—2 PETELO 1:19, NW.
1, 2. Pesá bandakisa ya bamasiya ya lokuta.
BANDA kala, bamasiya ya lokuta bamekaka kosakola makambo oyo ekoya. Na ekeke ya mitano T.B., moto moko oyo amipesaki nkombo Moize ayebisaki Bayuda oyo bazalaki na esanga ya Crète ete azali masiya mpe akolongola bango na boombo. Ntango mokolo oyo basengelaki kozwa bonsomi ekómaki, babutaki elongo na ye na ngomba moko mpe na ngámbo na yango mosusu bazalaki komona Mai Monene ya Méditerranée na nse. Alobaki na bango bámibwaka na mai, mpe mai ekokabwana. Ebele ya bato oyo bamibwakaki na mai bazindaki, mpe banda wana masiya yango ya lokuta alimwá.
2 Na ekeke ya 12, “masiya” mosusu abimaki na ekólo Yémen. Kalife to mokonzi ya mboka yango asɛngaki ye asala likamwisi moko mpo na kolakisa ete azali solo masiya. “Masiya” yango ayebisaki kalife ete atinda bákata ye nkingo. Alobaki ete nsima ya mwa ntango moke akosekwa, mpe na bongo bakoyeba ete azali masiya. Kalife andimaki, bakataki “masiya” yango motó, kasi akufaki mpo na libela.
3. Nani azali Masiya ya solo, mpe mosala na ye emonisaki nini?
3 Bisakweli ya bamasiya ya lokuta ekokisamaka te; kasi, bato oyo batyelaka liloba ya esakweli ya Nzambe likebi, bamonaka ete ezangaka kokokisama te. Makambo oyo Yesu Klisto, Masiya ya solo, asalaki na bomoi na ye ekokisaki bisakweli mingi ya Biblia. Na ndakisa, Matai, moko kati na bato oyo bakomaki Baevanzile, alobelaki esakweli moko ya Yisaya; akomaki boye: “Mokili ya Zebuluna mpe ya Nefatali, nzela ya libeke, ngámbo ya Yaladene, Galilai ya bapaya, libota lizalaki kofanda na molili bamoni [kongɛnga,NW] makasi; mpe epai na bango bafandaki na mokili mpe na molili ya kufa, [kongɛnga,NW] esili kobimela bango. Longwa wana, Yesu abandi kosakola, alobi mpe ete, Bóbongola mitema! Zambi Bokonzi ya Likoló esili kobɛlɛma.” (Matai 4:15-17; Yisaya 9:1, 2) Yesu azalaki ‘kongɛnga makasi’ wana, mpe mosala na ye emonisaki ete ye nde Mosakoli oyo Mose alobelaki. Bato oyo baboyi koyoka Yesu bakobomama.—Deteronome 18:18, 19; Misala 3:22, 23.
4. Ndenge nini Yesu akokisaki Yisaya 53:12?
4 Yesu akokisaki mpe esakweli ya Yisaya 53:12 oyo elobi ete: “Asopi molimo na ye kino kufa mpe atángami na bapɛngwi elongo. Kasi akumbaki mabe ya bato mingi mpe abondelaki mpo na bapɛngwi.” Ntango Yesu ayebaki ete etikali moke akaba bomoi na ye lokola mbeka, alendisaki kondima ya bayekoli na ye. (Malako 10:45) Alendisaki kondima na bango na likamwisi ya mbongwana.
Mbongwana elendisi kondima
5. Lobelá likamwisi ya mbongwana na maloba na yo moko.
5 Mbongwana ezalaki esakweli. Yesu alobaki boye: “Ekoki na Mwana ya moto ete aya na nkembo ya Tata na ye esika moko na baanzelu na ye . . . Nazali koloba na bino solo ete bamosusu bazali kotɛlɛma awa baoyo bakomona kufa te liboso ya komona Mwana ya moto oyo azali koya na Bokonzi na ye.” (Matai 16:27, 28) Ezali na bantoma oyo bamonaki mpenza Yesu azali koya na nkembo ya Bokonzi na ye? Matai 17:1-7 elobi boye: “Nsima ya mikolo motoba, Yesu akamati Petelo mpe Yakobo mpe Yoane, ndeko na ye, mpe akambi bango na ngomba molai epai na bango mpenza. Abongwani motindo na ye liboso na bango.” Ezalaki mpenza likamwisi monene! “Elongi na ye engɛngi lokola moi mpe bilamba na ye bizalaki pɛɛ lokola [kongɛnga,NW ] makasi. Mpe talá, Mose mpe Eliya bamonani na bango, bazalaki kolobana na ye.” Mpe lisusu, “lipata ya kongɛnga ezipi bango,” mpe bayokaki mongongo ya Nzambe elobaki ete: “Oyo Mwana na ngai ya bolingo, nasepeli ye mingi. Bóyoka ye! Eyoki bayekoli bongo, bakwei na bilongi na bango mpe babangi na nsɔmɔ monene. Nde Yesu ayei mpe [asimbi] bango, ye ete, Bótɛlɛma, bóbanga mpe te.”
6. (a) Mpo na nini Yesu abengaki mbongwana ete emonaneli? (b) Mbongwana emonisaki mwa moke likambo nini?
6 Ekoki mpenza kozala ete likambo yango ya kokamwa esalemaki na Ngomba Helemona, epai Yesu na bantoma na ye misato balekisaki butu wana mobimba. Na ntembe te Yesu abongwanaki na butu, yango wana kongɛnga ezalaki makasi mpenza. Yesu abengaki mbongwana yango ete emonaneli, mpamba te Mose na Eliya bakufá kala, elakisi ete bazalaki mpenza wana na nzoto ya mai na makila te. Kaka Yesu nde azalaki mpenza wana. (Matai 17:8, 9) Kongɛnga ya ndenge wana elakisaki Petelo, Yakobo, na Yoane, mwa moke nkembo ya Yesu na kati ya Bokonzi na ye. Mose na Eliya bazalaki elilingi ya bapakolami, bango bakozala bakonzi elongo na Yesu, mpe emonaneli yango endimisaki mpenza maloba oyo Yesu alobaki mpo na Bokonzi mpe ete akozala mokonzi.
7. Nini emonisi biso ete Petelo abosanaki makambo oyo elekaki na mbongwana te?
7 Mbongwana elendisaki kondima ya bantoma misato wana, na nsima, basengelaki kokokisa mikumba minene na lisangá ya boklisto. Elongi ya Klisto oyo ezalaki kongɛnga, bilamba na ye oyo ekómaki mpɛmbɛ makasi, mpe mongongo ya Nzambe oyo elobaki ete Yesu azali Mwana na Ye ya bolingo oyo basengeli koyoka ye, nyonso wana ekokisaki mpenza mokano na yango. Kasi bantoma basengelaki koyebisa emonaneli yango epai ya moto mosusu te tii nsima ya lisekwa ya Yesu. Mbula 32 na nsima, Petelo azalaki naino koyebaka emonaneli yango malamu na makanisi na ye. Alobelaki emonaneli yango mpe alimbolaki ntina na yango ntango akomaki boye: “[Tolandaki] masese malobami na mayele te, kasi lokola esili biso komona nkembo na ye monene na miso na biso mpenza. Mpo ete azwi lokumu mpe nkembo na mabɔkɔ ya Nzambe Tata mpe mongongo ebimi mpo na ye na nkembo monene monene ete, Oyo Mwana na ngai molingami na ngai; nakosepelaka [na] ye mingi. Biso toyokaki mongongo yango kobima na Likoló, wana ezalaki biso na ye kuna na ngomba ya bulɛɛ.”—2 Petelo 1:16-18.
8. (a) Maloba ya Nzambe mpo na Mwana na ye emonisaki likambo nini? (b) Lipata oyo emonanaki na mbongwana elimboli nini?
8 Likambo ya ntina mingi ezalaki maloba oyo Nzambe alobaki ete: ‘Oyo Mwana na ngai ya bolingo, nasepeli na ye mingi. Bóyoka ye.’ Maloba yango emonisaki mpenza ete Yesu azali Mokonzi oyo Nzambe atii na kiti ya bokonzi, ye oyo bato nyonso basengeli kotosa. Lipata oyo ezipaki bango emonisaki ete ndenge oyo esakweli yango ekokokisama ekomonana na miso te. Kaka baoyo bakososola “elembo” ya kozala ya Yesu na nguya ya Bokonzi—kozala oyo ekoki komonana na miso te—nde bakoyeba yango. (Matai 24:3) Lokola Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bálobela emonaneli yango te tii nsima ya lisekwa na ye, emonisi ete asengelaki kozwa lokumu mpe nkembo nsima ya lisekwa na ye.
9. Mpo na nini mbongwana esengeli kolendisa kondima na biso?
9 Nsima ya kolobela mbongwana, Petelo abakisaki boye: “Yango wana, liloba ya esakweli ekómi mpenza likambo ya solo mpo na biso; mpe bozali kosala malamu lokola bozali kotyela yango likebi lokola na mwinda oyo ezali kopela na molili, tii ntango ntɔngɔ ebandi kotana mpe monzoto ya ntɔngɔ ebimi, na mitema na bino. Mpo, ya liboso, boyebi ete esakweli moko te ya Makomami euti na makanisi ya moto moko. Mpamba te esakweli eyebisamá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki maloba ya Nzambe, lokola elimo santu ezalaki kotinda bango.” (2 Petelo 1:19-21, NW) Mbongwana ezali komonisa mpenza ete tokoki kotyela liloba ya esakweli ya Nzambe motema. Tosengeli mpenza kotyela liloba yango motema, kasi tokotya motema na biso na “masese malobami na mayele” te, mpamba te masese yango euti na Nzambe te mpe andimaka yango te. Mbongwana esengeli kolendisa kondima na biso na liloba ya esakweli mpamba te emonaneli yango elakisaki nkembo ya Yesu mpe Bokonzi ekokisami. Ya solo, makambo ya solosolo ezali komonisa biso ete Klisto azali lelo oyo Mokonzi monene kuna na likoló.
Ndenge oyo monzoto ya ntɔngɔ ebimi
10. “Monzoto ya ntɔngɔ” oyo Petelo alobelaki ezali nani to ezali nini, mpe mpo na nini olobi bongo?
10 Petelo akomaki ete: “Bozali kosala malamu lokola bozali kotyela [liloba ya esakweli] likebi lokola na mwinda oyo ezali kopela na molili, tii ntango ntɔngɔ ebandi kotana mpe monzoto ya ntɔngɔ ebimi.” “Monzoto ya ntɔngɔ” ezali nani to ezali nini? Na Biblia mobimba, liloba “monzoto ya ntɔngɔ” ezali kaka na bisika mibale. Na Emoniseli 22:16 (NW) babengi Yesu Klisto ete “monzoto oyo ezali kongɛnga na ntɔngɔ.” Na basanza mosusu, minzoto ya ndenge yango ebimaka nsima ya minzoto mosusu nyonso na ɛsti. Ebimaka soki etikali moke moi ebima mpe elakisaka ete mokolo mosusu ebandi. Petelo asaleli liloba “monzoto ya ntɔngɔ” mpo na kolobela Yesu nsima ya kozwa Bokonzi na ye. Na ntango wana, Yesu atɛlɛmaki na molɔ́ngɔ́ mobimba, bakisa mpe mabele! Lokola azali Masiya mpe Monzoto ya ntɔngɔ, azali komonisa ete mokolo ya sika, to eleko ya sika elingi kobanda mpo na bato nyonso ya botosi.
11. (a) Mpo na nini tolobi ete 2 Petelo 1:19 elimboli te ete “monzoto ya ntɔngɔ” ekobima na mitema ya bato? (b) Ndenge nini okoki kolimbola 2 Petelo 1:19?
11 Babongoli mingi ya Biblia balimbolaki 2 Petelo 1:19, lokola nde Petelo alobeli mitema mpenza ya bato. Motema ya moto oyo akoli ezalaka na gramɛ 250 tii 300. Ndenge nini Yesu Klisto oyo azali lelo oyo ekelamu ya elimo oyo azali na nkembo mpe akoki kokufa te, akoki kobima na biloko mikemike, elingi koloba mitema ya bato? (1 Timote 6:16) Na vɛrsɛ yango bazali mpenza kolobela mitema ya elilingi, mitema yango nde esalisaka biso tótyela liloba ya esakweli ya Nzambe motema. Kasi talá malamu mokapo ya 2 Petelo 1:19 na Biblia Traduction du monde nouveau, okomona ete na kati ya maloba “tii ntango ntɔngɔ ebandi kotana mpe monzoto ya ntɔngɔ ebimi” na maloba “na mitema na bino,” batii mwa elembo oyo eyebisaka motángi ete apema mwa moke (virgule). Elingi koloba vɛrsɛ yango ekoki kotángama boye: ‘Liloba ya esakweli ekómi mpenza likambo ya solo mpo na biso; mpe bozali kosala malamu lokola bozali kotyela yango likebi lokola na mwinda oyo ezali kopela na molili, elingi koloba, na mitema na bino, tii ntango ntɔngɔ ebandi kotana mpe monzoto ya ntɔngɔ ebimi.’
12. Mitema ya bato mingi mizali ndenge nini, kasi tokoki koloba boni mpo na baklisto ya solo?
12 Mitema ya elilingi ya bato mingi ya masumu ezali ndenge nini? Mitema na bango ezali mpenza na molili na elimo! Kasi, soki tozali baklisto ya solo, ezali lokola nde tozali na mwinda moko oyo ezali kopela na mitema na biso, mpe soki mwinda yango te mbɛlɛ mitema na biso ezali na molili. Ndenge maloba ya Petelo emonisi yango, baklisto ya solo bakosɛnzɛla mpe bakoyeba ebandeli ya mokolo ya sika se soki bazali kotya likebi na liloba ya esakweli oyo ezali kongɛnga. Bakoyeba ete Monzoto ya ntɔngɔ ebimi na mitema ya bato te, kasi liboso ya bikelamu nyonso.
13. (a) Mpo na nini tondimi ete Monzoto ya ntɔngɔ esili kobima? (b) Mpo na nini baklisto bakoki koyika mpiko liboso ya makambo ya mpasi oyo Yesu asakolaki mpo na mikolo na biso?
13 Monzoto ya ntɔngɔ esi ebimi! Tokoki komona ete ezali mpenza bongo soki totii likebi na esakweli ya Yesu oyo elobeli kozala na ye. Lelo oyo, makambo lokola bitumba minene, nzala, koningana ya mabele, mpe mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba ezali komonisa biso ete esakweli yango ezali kokokisama. (Matai 24:3-14) Atako biso baklisto tozali mpe kokutana na makambo ya mpasi oyo Yesu asakolaki, tokoki koyikela yango mpiko na kimya mpe na esengo ya motema. Mpo na nini? Mpamba te tozali kotya likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe mpe tozali kondima makambo oyo Nzambe alaki mpo na mikolo ezali koya. Toyebi ete etikali moke tóbanda eleko ya malamu koleka mpamba te “ntango ya nsuka” esili koumela mingi! (Danyele 12:4, NW ) Makambo oyo Yisaya 60:2 esakolaki ezali komonana na mokili; vɛrsɛ yango elobi boye: “Talá, molili ekozipa mokili, molili tuu ekozipa mpe mabota.” Ndenge nini moto akoki kolongwa na molili wana? Na komikitisa nyonso, asengeli mpenza kotya likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe sika sikoyo, lokola ntango ezali naino. Bato ya mitema sembo basengeli koluka Yehova Nzambe, Ye oyo apesaka bomoi mpe kongɛnga. (Nzembo 36:9; Misala 17:28) Moto akomona kongɛnga ya solo mpe akozala na elikya ya bomoi malamu mpo na mikolo ezali koya, bomoi oyo Nzambe akani kopesa bato ya botosi se soki azali kosala ndenge yango.—Emoniseli 21:1-5.
‘Moi eyei na mokili’
14. Tosengeli kosala nini mpo tómona ndenge oyo bisakweli ya Biblia bikokokisama?
14 Biblia emonisi kongɛnga ete Yesu Klisto azali sikoyo koyangela lokola Mokonzi. Lokola azwaki bokonzi na 1914, bisakweli mosusu ya ntina bisengeli kokokisama. Mpo na komona ndenge bisakweli yango bikokokisama, tosengeli kozala bato ya komikitisa, baoyo bazali kosala misala oyo emonisi ete bandimeli Yesu Klisto; lisusu, tosengeli kobongwana mpe kotika mabe mpe masumu oyo tozalaki kosala ntango toyebaki naino Nzambe te. Baoyo balingi molili bakozwa bomoi ya seko te. Yesu alobaki ete: “Kosambisama ezali boye ete moi esili koingela kati na mokili nde bato baponi molili liboso na moi mpo ete mosala na bango izali mabe. Zambi moto na moto oyo azali kosalaka na yauli ayini moi mpe akoyaka epai na moi te ete misala na ye miyebisama te. Nde ye oyo azali kosalaka sembo akoyaka epai na moi ete misala na ye mimonisama ete misalami kati na Nzambe.”—Yoane 3:19-21.
15. Likambo nini ekokómela biso soki totyoli lobiko oyo Nzambe abongisi na nzela ya Mwana na ye?
15 Moi ya elimo eyaki na mokili na nzela ya Yesu, mpe soki tozali koyoka ye, tokozwa bomoi. Paulo akomaki boye: “Kalakala Nzambe asololaki na bankɔkɔ na minɔkɔ ya basakoli na mbala mingi mpe na mitindo mingi. Na mikolo oyo na nsuka asololi na biso kati na Mwana oyo atii ye mosangoli ya libula ya biloko nyonso.” (Baebele 1:1, 2) Nini ezali kozela biso soki totyoli lobiko oyo Nzambe abongisi na nzela ya Mwana na ye? Paulo alobaki lisusu boye: “Zambi soko liloba lisakolami na minɔkɔ ya baanzelu ebongaki mpe mabunga nyonso mpe nkanza nyonso izwaki etumbu ya sembo, biso mpenza tokokima boni soko tokotya mitema na lobiko monene boye te? Esakolami liboso na Nkolo mpe elendisami mpo na biso na bango bayokaki yango. Nzambe atatweli na yango na bilembo mpe bikamwiseli mpe misala ya nguya ya motindo na motindo mpe mpo na makabo ya [elimo santu, NW ) makabolami [lokola] ekanaki ye.” (Baebele 2:2-4) Ya solo, Yesu azali na esika monene na mosala ya kosakola liloba ya esakweli.—Emoniseli 19:10.
16. Mpo na nini tozali kondima na motema mobimba bisakweli nyonso ya Yehova Nzambe?
16 Lokola tomonaki yango, Petelo alobaki ete: “Esakweli moko te ya Makomami euti na makanisi ya moto.” Bato bango moko bakoki kosakola makambo te oyo ekokokisama solo, kasi tokoki kondima bisakweli nyonso ya Nzambe na motema mobimba. Yehova Nzambe ye moko nde apesi bisakweli yango. Na lisalisi ya elimo santu, asali ete basaleli na ye básosola ndenge oyo bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Tozali mpenza kotɔnda Yehova na komona ndenge oyo bisakweli mingi yango bizali kokokisama banda 1914. Tozali mpe na elikya mpenza ete bisakweli oyo elobeli nsuka ya mokili oyo mabe kasi bikokisami naino te, bikokokisama nyonso. Ezali na ntina mingi tótyaka likebi na bisakweli ya Nzambe wana tozali kongɛngisama na yango. (Matai 5:16) Tozali mpenza na botɔndi mingi epai ya Yehova lokola azali ‘kongɛngisa biso na kati ya molili makasi’ oyo ezali na mokili lelo oyo!—Yisaya 58:10.
17. Mpo na nini tozali na mposa ya kongɛnga ya elimo oyo euti epai ya Nzambe?
17 Kongɛnga esalisaka biso tómona. Yango mpe esalaka ete milona oyo epesaka biso bilei ndenge na ndenge ekola. Soki tozangi kongɛnga, tokokufa. Tokoloba boni mpo na kongɛnga ya elimo? Kongɛnga yango elakisaka biso nzela mpe emonisaka biso makambo ekoya, ndenge oyo Biblia, Liloba ya Nzambe, esakoli yango. (Nzembo 119:105) Na bolingo nyonso, Yehova Nzambe azali ‘kobimisa kongɛnga mpe solo na ye.’ (Nzembo 43:3) Ya solo, tosengeli kozala na botɔndi mingi mpo na makambo yango oyo abongisi. Yango wana, tósala nyonso oyo ekoki mpo na kozwa kongɛnga oyo ezali kouta na “boyebi ya nkembo ya Nzambe” mpo engɛngisa mitema na biso.—2 Bakolinti 4:6; Baefese 1:18.
18. Etikali moke Monzoto ya ntɔngɔ ya Yehova akosala nini?
18 Tozali mpenza na libaku malamu ya koyeba ete na 1914, Yesu Klisto, Monzoto ya ntɔngɔ, atɛlɛmaki na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe abandaki kokokisa emonaneli ya mbongwana! Monzoto ya ntɔngɔ ya Yehova esi ebimi, elingi kokokisa mokano ya Nzambe mpo ete esakweli ya mbongwana ekokisama nyonso, elingi koloba kobunda “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14, 16) Soki mokili oyo nyonso ebomami, Yehova akokokisa likambo oyo alakaki: akotya “Likoló ya sika mpe nse ya sika,” epai tokosanzola ye libela na libela lokola Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe Nzambe ya bisakweli ya solo. (2 Petelo 3:13) Liboso ete mokolo monene wana eya, tótambola ntango nyonso na kongɛnga ya Nzambe mpe tótya likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe.
Okopesa eyano nini?
• Lobelá naino mbongwana ya Yesu.
• Ndenge nini mbongwana ezali kolendisa kondima?
• Monzoto ya ntɔngɔ ya Yehova ezali nani to ezali nini, mpe ntango nini ebimaki?
• Mpo na nini tosengeli kotyela liloba ya esakweli ya Nzambe likebi?
[Elilingi na lokasa 13]
Okoki kolimbola mbongwana ya Yesu?
[Elilingi na lokasa 15]
Monzoto ya ntɔngɔ esilaki kobima. Oyebi ndenge yango ebimaki mpe ntango nini?