Etikali moke bana ya Nzambe bakozwa bonsomi ya nkembo
“Nzambe azalisaki mokili [kati na ezaleli ya, “NW”] mpamba . . . kasi ezalaki na elikya ete ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.”—BALOMA 8:20, 21.
1. Lolenge nini mbeka ya Yesu emonisamaki na elilingi na Mokolo ya Mbɔndi?
YEHOVA apesaki Mwana mobotami-bobele-moko na ye lokola mbeka ya lisiko oyo efungolaki nzela mpo na bomoi na likoló mpo na bato 144 000 mpe elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé mpo na bato mosusu. (1 Yoane 2:1, 2) Lokola touti kolobela yango na lisoló eleki, mbeka ya Yesu mpo na baklisto babotami na elimo emonisamaki na elilingi ntango nganga monene ya Yisalaele azalaki kopesa ngɔmbɛ lokola mbeka mpo na masumu na ye moko, ya bato ya ndako na ye, mpe ya libota ya Balevi na Mokolo ya Mbɔndi oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula. Bobele na mokolo yango, azalaki kopesa ntaba lokola mbeka mpo na masumu ya mabota mosusu ya Yisalaele, lolenge moko mbeka ya Klisto ekopesa matomba epai ya bato nyonso. Ntaba ya bomoi ezalaki, na lolenge ya elilingi, komema masumu oyo bato basalaki na boumeli ya mbula oyo eutaki kosila, mpe ezalaki kotindama na mokili mokauki ete ekende kobunga kuna.a—Levitike 16:7-15, 20-22, 26.
2, 3. Maloba ya Paulo na Baloma 8:20, 21 malimboli nini?
2 Nsima ya kolobela mingi elikya ya bato oyo basengelaki kokóma “bana ya Nzambe” na likoló, ntoma Paulo alobaki ete: “Zambi na mposa monene, mokili mobimba ezali kotalela ete Nzambe amonisa emoniseli na bana na ye. Nzambe azalisaki mokili [kati na ezaleli ya mpamba, NW], mpo na mokano na yango mpenza te nde mpo na mokano na ye oyo azalisaki yango boye. Kasi ezalaki na elikya ete ekosikwa na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.” (Baloma 8:14, 17, 19-21) Maloba yango malimboli nini?
3 Ntango nkɔkɔ na biso Adama azalisamaki lokola moto ya kokoka, azalaki “mwana ya Nzambe.” (Luka 3:38) Mpo na lisumu oyo asalaki, akómaki na “boombo na libebisi” mpe alekisaki ezalela yango na libota mobimba ya bato. (Baloma 5:12) Nzambe atikaki nzela ete bato bábotama kati na “ezaleli ya mpamba” mpo ete basangolaki ya kozanga kokoka, kasi apesaki elikya na nzela ya “ezaleli ya mombóto,” Yesu Klisto. (Genese 3:15; 22:18; Bagalatia 3:16) Emoniseli 21:1-4 ezali kolobela ntango oyo ‘kufa, na mawa, na kolela, na mpasi ekozala lisusu te.’ Lokola yango ezali elaka epesami epai na “bato,” endimisi biso ete, na nsé ya boyangeli ya Bokonzi, libota ya sika ya bato awa na mabelé ekozongela bokolɔngɔ́nɔ́ ya makanisi mpe ya nzoto mpe bomoi ya seko lokola “bana ya Nzambe” awa na mabelé. Na boumeli ya boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto, bato ya botosi ‘bakosikolama na boombo ya libebisi.’ Nsima ya komonisa bosembo na bango epai ya Yehova na boumeli ya komekama ya nsuka, bakosikolama libela na lisumu mpe na liwa oyo basangolaki. (Emoniseli 20:7-10) Na ntango yango, baoyo bakozala na mabelé bakozwa “lisiko [“bonsomi,” NW] na nkembo na bana na Nzambe.”
Bazali koloba ete, “Yaká!”
4. ‘Kokamata mai ya bomoi lokola likabo’ elimboli nini?
4 Oyo nde elikya kitoko etyami liboso ya bato! Likambo ya kokamwa ezali te ete baklisto babotami na elimo oyo bazali naino na mabelé, na mpiko nyonso, bazali kopesa ndakisa na oyo etali koyebisa bato mosusu elikya yango! Lokola bango bakozala “mwasi ya libala” ya Yesu Klisto, Mwana na Mpate oyo akembisami, batikali bapakolami batalelami kati na kokokisama ya maloba oyo ya esakweli ete: “[Elimo, NW] mpe Mwasi na libala balobi ete, Yaká! Tiká moyoki aloba ete, Yaká! Tiká ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 21:2, 9; 22:1, 2, 17) Matomba ya mbeka ya Yesu makosuka bobele na bapakolami 144 000 te. Elimo ya Nzambe ezali kolanda kosala na nzela ya kelasi ya batikali ya mwasi ya libala oyo bazali naino awa na mabelé kolobáká ete “Yaká.” Moyoki nyonso oyo azali na mposa ya boyengebene abyangami na koloba ete “Yaká,” mpo ete azwa matomba na ebongiseli ya bokabi oyo Yehova asali mpo na lobiko.
5. Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya koyamba banani kati na bango?
5 Batatoli ya Yehova bazali na kondima kati na bibongiseli ya Yehova bitali kopesa bomoi na nzela ya Yesu Klisto. (Misala 4:12) Bazali na esengo ya koyamba kati na bango bato oyo bazali na mposa ya koyekola mikano ya Nzambe mpe kosala mokano na ye. Bandako na bango ya Bokonzi ezali polele mpo na moto nyonso oyo alingi ‘koya mpe kakamata mai ya bomoi lokola likabo’ na “elaka” oyo “na nsuka.”—Danyele 12:4.
Mbongwana mingi esalemi na boumeli ya ntango
6. Lolenge nini elimo santu ya Yehova esalaki epai na basaleli ya Yehova na bantango ekeseni?
6 Nzambe asilá kotya ntango oyo akokokisa mikano na ye, mpe yango ezali na bopusi likoló na boyokani na ye na bato. (Mosakoli 3:1; Misala 1:7) Atako basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso ya Klisto bazwaki elimo santu na ye, kasi bazalaki bana na ye babotami na elimo te. Nzokande, kobanda na Yesu, ntango ekokaki ete Yehova asalela elimo santu na ye mpo na kobota bana, mibali mpe basi oyo bamipesi, mpo na kozwa libula na likoló. Ezali boni mpo na mikolo na biso? Bobele elimo santu yango ezali kosala epai na “bampate mosusu” ya Yesu, kasi ezali kolamwisa te epai na bango elikya mpe mposa ya kozwa bomoi na likoló. (Yoane 10:16) Na kozaláká na elikya ya kozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, oyo ezali likabo Nzambe apesi bango, bazali na esengo ya kosunga batikali bapakolami na kopesáká litatoli na mikolo ya nsuka ya mokili oyo liboso ya kokɔta na mokili ya sika ya boyengebene ya Nzambe.—2 Petelo 3:5-13.
7. Mosala ya kobuka mbuma nini Bayekoli ya Biblia bamipesaki na yango, kasi bayebaki nini na ntina na paladiso?
7 Nzambe abandaki ‘komema bana mingi na nkembo’ uta kokita ya elimo santu na Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe emonani ete atyaki ntango oyo akosilisa kopona basangani ya “Yisalaele ya Nzambe” na elimo baoyo motuya na bango ezali bongo bato 144 000. (Baebele 2:10; Bagalatia 6:16; Emoniseli 7:1-8) Kobanda mobu 1879, mosala ya kobuka mbuma oyo etaleli baklisto bapakolami elobelamaki mingi kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Kasi Bayekoli ya Biblia (lelo oyo babéngami Batatoli ya Yehova) bayebaki mpe ete Makomami mazali kopesa elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Yulí 1883 elobaki ete: “Ntango Yesu akosilisa kotya bokonzi na ye, akosilisa mabe, mpe bongo na bongo, mabelé oyo makokóma paladiso, . . . mpe baoyo nyonso bazali kati na nkunda bakokɔta na paladiso yango. Mpe na kotosáká mibeko na ye bakofanda kati na yango libela.” Nsima ya bambula, mosala ya koyanganisa bapakolami ekitaki mpe mokemoke, bato oyo bazalaki na elikya ya bomoi na likoló te babandaki koyanganisama kati na lisangá ya Yehova. Sé na ntango yango, Nzambe apesaki basaleli na ye bapakolami, baklisto oyo babotami lisusu bososoli mingi.—Danyele 12:3; Bafilipi 2:15; Emoniseli 14:15, 16.
8. Lolenge nini bososoli ya elikya ya kofanda awa na mabelé ekólaki mokemoke na ebandeli ya bambula ya 1930?
8 Mingimingi kobanda 1931 bato oyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé babandaki koya na lisangá ya boklisto. Na mbula wana, Yehova angɛngisaki batikali kati na baklisto babotami na elimo mpe basosolaki ete Ezekiele mokapo 9 ezali kotalela kelasi wana ya bato bakofanda awa na mabelé, oyo bazali kotyama elembo mpo na kobika mpe kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Na 1932 bakómaki na bosukisi ete bato yango oyo bakokani na bampate na mikolo na biso bamonisamaki na Yonadaba (Yehonadaba), mosalani na Yehu. (2 Mikonzi 10:15-17) Na 1934 emonisamaki polele ete ba “Yonadaba” basengeli “komipesa” na Nzambe. Na 1935, “ebele monene”—oyo kala ekanisamaki ete ezali kelasi ya mibale ya bato oyo bakozala “baninga” ya mwasi ya Klisto na likoló—bakokanisamaki na bampate mosusu oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé. (Emoniseli 7:4-15; 21:2, 9; Nzembo 45:14, 15) Mpe mingimingi kobanda 1935, bapakolami bazali kokamba mosala ya koluka bato ya sembo oyo bazali na mposa ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé.
9. Nsima ya 1935, mpo na nini baklisto mosusu batikaki kolya limpa mpe komela vinyo na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo?
9 Nsima ya 1935, baklisto mosusu oyo bazalaki kolya limpa mpe komela vinyo na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo batikaki. Mpo na nini? Mpamba te basosolaki ete bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, kasi ya kokende na likoló te. Ndeko mwasi moko oyo azwá batisimo na 1930 alobaki ete: “Atako [kolya limpa mpe komela vinyo] etalelamaki lokola likambo libongi, mingi mpenza mpo na baministre ya molende na mosala ya ntango nyonso, nandimisamaki soko moke te ete nazali na elikya ya kokende na likoló. Na yango, na 1935, bamonisaki biso polele ete koyanganisama ezali kosalema mpo na ebele monene oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na mabelé. Mingi kati na biso tosepelaki na kososola ete tozalaki basangani ya ebele monene wana, mpe totikaki kolya limpa mpe komela vinyo.” Ezala elobeli ya mikanda ya la Société ebongwanaki. Na bambula oyo ezalaki liboso, mikanda mizalaki kobongisama libosoliboso mpo na bayekoli ya Yesu babotami na elimo, nzokande, kobanda 1935, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu ya ‘moombo ya sembo’ ezalaki na bilei ya elimo oyo bibongi mpo na bamposa, ezala ya bapakolami to ya baninga na bango oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé.—Matai 24:45-47.
10. Lolenge nini moto mosusu akoki kokitana moklisto mopakolami oyo azangi sembo?
10 Ekozala boni soki na ndakisa mopakolami moko azangi sembo. Moto mosusu akokitana na esika na ye? Ezali bongo engebene bandimbola oyo Paulo apesaki na ntina na nzeté ya olive ya elilingi. (Baloma 11:11-32) Soki esengeli ete moto mosusu akitana mobotami moko na elimo, na ntembe te Nzambe akopona moto oyo azali ndakisa ya kondima mpo na mosala ya bulɛɛ oyo asali na boumeli ya bambula mingi.—Kokanisá na Luka 22:28, 29; 1 Petelo 1:6, 7.
Bantina mingi ya kozala na botɔ́ndi
11. Ata soki tozali na elikya nini, Yakobo 1:17 endimisi biso likambo nini?
11 Soki tozali kosalela Yehova na bosembo ata na esika nini, akokokisa bamposa na biso mpe mikano na biso ya sembo. (Nzembo 145:16; Luka 1:67-74) Ezala ete tozali na elikya ya solosolo ya kokende na likoló to soki elikya na biso ezali ya kofanda awa na mabelé, tozali na bantina mingi ya malamu mpo na komonisa botɔ́ndi epai na Nzambe. Ntango nyonso asalaka makambo oyo mazali mpo na matomba maleki malamu ya baoyo balingaka ye. Moyekoli Yakobo alobaki ete “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi makokitaka na nsé longwa na Tata na moi,” Yehova Nzambe. (Yakobo 1:17) Tótalela mwa ndambo ya makabo mpe mapamboli yango.
12. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova asili kopesa mokomoko na basaleli na ye elikya kitoko?
12 Yehova asili kopesa elikya kitoko epai ya mosaleli na ye mokomoko ya sembo. Abéngi bamoko mpo na bomoi na likoló. Epai na batatoli na ye oyo bazalaki na bomoi liboso ya Klisto, Yehova apesaki elikya kitoko ya lisekwa mpo na kozwa bomoi ya seko awa na mabelé. Na ndakisa, Abalayama azalaki na kondima kati na lisekwa mpe azelaki “mboka oyo ezali na miboko [ya solosolo]”—Bokonzi ya likoló oyo akosekwisama na nsé ya boyangeli na yango mpo na bomoi awa na mabelé. (Baebele 11:10, 17-19) Mbala oyo lisusu, na ntango oyo ya nsuka, Nzambe azali kopesa bamilió ya bato elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. (Luka 23:43; Yoane 17:3) Ya solo, moto nyonso oyo Yehova asili kopesa elikya monene boye asengeli kozala na botɔ́ndi mozindo mpo na yango.
13. Lolenge nini elimo santu ya Nzambe esalaki epai na bato na ye?
13 Yehova azali kopesa elimo santu na ye lokola likabo epai na bato na ye. Baklisto oyo bapesameli elikya ya kokende na likoló bapakolami na elimo santu. (1 Yoane 2:20; 5:1-4, 18) Kasi, basaleli ya Nzambe oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé bazali kozwa lisungi mpe litambwisi ya elimo santu. Kati na bato yango tokoki kotánga Mose, oyo azalaki na elimo ya Yehova, lokola mpe mibali 70 oyo baponamaki mpo na kosunga ye. (Mituya 11:24, 25) Na bopusi ya elimo santu, Besalele asalaki lokola mosáli na mayele mpo na kotonga mongombo ya Yisalaele. (Exode 31:1-11) Elimo santu ya Nzambe ezalaki epai na Gideona, Yefeta, Samasona, Davidi, Eliya, Elisa, mpe bato mosusu. Atako bato yango ya ntango ya kala bakomemama soko moke te na nkembo ya likoló, batambwisamaki mpe basungamaki na elimo santu, lolenge moko bampate mosusu ya Yesu bazali lelo oyo kosungama na elimo santu. Na yango, kozala na elimo santu elimboli te bobele ete tozwi libyangi ya kokende na likoló. Nzokande, elimo ya Yehova ezali kopesa litambwisi, ezali kosalisa biso ete tósakola mpe tókokisa mikumba mosusu oyo Nzambe apesi biso, ezali kopesa biso nguya oyo eleki nguya ya bomoto, mpe ezali kobota epai na biso mbuma na yango lokola bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, mpe komipekisa. (Yoane 16:13; Misala 1:8; 2 Bakolinti 4:7-10; Bagalatia 5:22, 23) Tosengeli kozala na botɔ́ndi mpo na makabo malamu motindo oyo mauti na Nzambe, boye te?
14. Lolenge nini tozali kozwa matomba na makabo ya Nzambe matali boyebi mpe mayele?
14 Boyebi mpe mayele ezali makabo mauti na Nzambe oyo tosengeli komonisa botɔ́ndi mpo na yango, ezala ete tozali na elikya ya kokende na likoló to ya kofanda awa na mabelé. Boyebi ya sikisiki ya Yehova ezali kosalisa biso ete ‘tómindimisa na makambo maleki ntina’ mpe “tótambola na sembo na [Yehova] mpe tósepelisa ye na makambo nyonso.” (Bafilipi 1:9-11, NW; Bakolose 1:9, 10) Mayele mauti na Nzambe mazali libateli mpe litambwisi kati na bomoi. (Masese 4:5-7; Mosakoli 7:12) Boyebi mpe mayele ya solo etongami likoló na Liloba ya Nzambe, mpe etuluku moke ya batikali bapakolami bazali mpenza kosepela na makambo malobami kati na yango na ntina na elikya na bango ya likoló. Nzokande, bolingo mpo na Liloba ya Nzambe mpe bososoli malamu na yango ezali te elembo oyo Nzambe apesaka mpo na komonisa ete tobyangami mpo na bomoi na likoló. Mibali lokola Mose mpe Danyele bakomaki kutu biteni mosusu ya Biblia, kasi bakosekwisama mpo na bomoi awa na mabelé. Ezala tozali na elikya ya kokende likoló to ya kofanda awa na mabelé, biso nyonso tozali kozwa bilei ya elimo na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo andimami na Yehova. (Matai 24:45-47) Biso nyonso tozali mpenza na botɔ́ndi mpo na boyebi oyo tozwi!
15. Wapi moko na likabo lileki monene Nzambe apesi biso, mpe lolenge nini otalelaka yango?
15 Moko na makabo maleki monene Nzambe apesi biso ezali bongo ebongiseli ya bolingo ya kopesa Yesu lokola mbeka ya lisiko, oyo ezali kopesa biso litomba ata soki tozali na elikya ya kokende na likoló to ya kofanda awa na mabelé. Nzambe alingaki bato “na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Mpe bolingo ya Yesu epusaki ye ete ‘apesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.’ (Matai 20:28) Lokola ntoma Yoane alimbolaki yango, Yesu Klisto “azali mbɔndi mpo na masumu na biso [oyo ya bapakolami]. Kasi bobele mpo na yango na biso te nde mpo na mokili mobimba.” (1 Yoane 2:1, 2) Na bongo, biso nyonso tosengeli kozala na botɔ́ndi mozindo mpo na ebongiseli wana ya bolingo oyo ekopesa biso lobiko mpe bomoi ya seko.b
Okozala wana?
16. Likambo monene nini ekokanisama mokolo ya 11 Apríli 1998 nsima ya kolala ya moi, mpe nani asengeli kozala wana?
16 Botɔ́ndi mpo na mbeka oyo Nzambe apesaki na nzela ya Mwana na ye esengeli kopusa biso ete tózala na Ndako ya Bokonzi to na bisika mosusu oyo Batatoli ya Yehova bakoyangana na mokolo ya 11 Apríli 1998 nsima ya kolala ya moi, mpo na kokanisa liwa ya Klisto. Ntango abandisaki ekaniseli yango elongo na bantoma na ye ya sembo na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé, Yesu alobaki ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19, 20, NW; Matai 26:26-30, NW) Etuluku moke ya batikali bakolya limpa ezangi mfulu, oyo ezali komonisa nzoto ya Yesu oyo ezangi masumu mpe bakomela vinyo motane esangisami na eloko mosusu te, oyo ezali komonisa makila na ye oyo masopamaki mpo na kopesa mbeka. Bobele baklisto babotami na elimo basengeli kolya limpa mpe komela vinyo mpamba te bobele bango nde bazali kati na kondimana ya sika mpe kati na kondimana mpo na Bokonzi mpe bazali na litatoli ya elimo santu ya Nzambe oyo ekoki kobɛtelama ntembe te ete bazali na elikya ya kokende na likoló. Bamilió mosusu ya bato bakozala wana lokola batali mpamba oyo bazali na limemya mpe na botɔ́ndi mpo na bolingo oyo Nzambe mpe Klisto bamonisaki na kopesáká mbeka ya Yesu oyo epesi likoki ya kozwa bomoi ya seko.—Baloma 6:23.
17. Tosengeli komikundola nini na ntina na kopakolama na elimo?
17 Bato mosusu, na ntina na bindimeli ya mangomba epai bazalaki liboso, liwa ya molingami moko oyo epesi bango mpasi mingi na mayoki, bomoi na mabelé oyo etondi na mikakatano, to liyoki ete bazwi lipamboli moko ya sikisiki uta na Yehova ekoki kopusa bango na kokanisa na libunga nyonso ete babyangami mpo na bomoi na likoló. Kasi biso nyonso tosengeli komikundola ete Makomami mazali kotinda biso te ete tólya limpa mpe tómela vinyo ya Ekaniseli mpo na komonisa botɔ́ndi na biso mpo na mbeka ya lisiko oyo Klisto apesaki. Lisusu, kopakolama na elimo santu ezalaka “likambo na mokano na moto te to na mpiko na ye te nde na boboto na Nzambe,” Ye oyo abotaki Yesu lokola Mwana ya elimo mpe oyo azali komema bobele bana mosusu 144 000 na nkembo.—Baloma 9:16; Yisaya 64:8.
18. Mpo na bato mingi oyo bazali kosalela Nzambe lelo oyo, mapamboli nini mazali liboso na bango?
18 Bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé ezali elikya oyo Nzambe apesi na bato mingi koleka oyo bazali kosalela Yehova na mikolo oyo ya nsuka. (2 Timoté 3:1-5) Mosika te, bakosepela na paladiso wana kitoko. Na ntango yango, bana na bakonzi bakotambwisa makambo awa na mabelé na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya likoló. (Nzembo 45:16) Kimya ekozala wana bafandi na mabelé bakotosa mibeko ya Nzambe mpe bakoyekola makambo mingi matali banzela ya Yehova. (Yisaya 9:6, 7; Emoniseli 20:12) Mosala ekozala mingi, kotonga bandako mpe kobongisa mabelé. (Yisaya 65:17-25) Mpe kanisá naino na bokutani ya esengo kati na basangani ya libota moko wana bakufi bakozongisama na bomoi! (Yoane 5:28, 29) Nsima ya komekama ya nsuka, mabe nyonso makolongolama. (Emoniseli 20:7-10) Na nsima, libela na libela, mabelé makotonda na bato ya kokoka oyo ‘bazali kosikwama na boombo ya libebi mpe bazali na bonsomi ya nkembo ya bana na Nzambe.’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá búku Insight on the Scriptures, Volimi 1, nkasa 225-226.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mársi 1991, nkasa 19-22.
Okoyanola ndenge nini?
◻ ‘Kozwa mai ya bomoi lokola likabo’ elimboli nini?
◻ Ezala tozali na elikya ya kofanda awa na mabelé to ya kokende na likoló, bantina nini tozali na yango ya komonisa botɔ́ndi epai na Nzambe?
◻ Ekaniseli nini ya mbula na mbula biso nyonso tosengeli koyangana na yango?
◻ Mpo na ebele ya basaleli ya Yehova, elikya nini bazali na yango mpo na mikolo mizali koya?
[Elilingi na lokasa 18]
Bamilió ya bato bazali ‘kozwa mai ya bomoi lokola likabo.’ Ozali kati na bango?