Mokapo 12
“Simba yango ezali na yo”
FILADELEFI
1. Nsango ya motoba, Yesu atindaki yango na lisangá nini, mpe nkombo ya mboka yango elimboli nini?
BOLINGO NA BANDEKO ezali solo ezaleli moko kitoko mingi! Na ntembe te ezali yango Yesu azali kokanisa, wana etindi ye nsango ya motoba, oyo ezali mpo na lisangá ya Filadelefi, mpamba te nkombo yango elimboli “bolingo na bandeko.” Yoane, oyo ntango yango akomaki mobangé, amikundolaki ete esilaki koleka bambula 60, Petelo alobaki mbala misato na Yesu ete alingi Nkolo na ye mingi. (Yoane 21:15-17) Boni mpo na baklisto ya Filadelefi, bango bazalaki na bolingo ya bandeko? Emonani ete bazalaki na yango.
2. Filadelefi ezalaki mboka ya motindo nini, lisangá ya motindo nini ezalaki wana, mpe Yesu alobaki nini epai na anzelu ya lisangá yango?
2 Kolongwa na mboka Saladesi (lelo mboka Alasehir, na mokili na Turquie) esengelaki kotambola kilometre 50 na epai ya sud-est mpo na kokoma na Filadelefi. Mboka yango ezalaki na bomengo mingi na ntango na Yoane. Nzokande bomengo elekaki ntina ezali oyo ya lisangá ya boklisto na mboka yango. Boye ezalaki esengo mingi na baklisto yango na koyamba ndeko oyo amemelaki bango mokanda, koutaka mbala mosusu na Saladesi! Nsango ezalaki na mokanda yango ezalaki elendiseli mpo na bango. Kasi ebandi naino na kokundola bokonzi ya ntina mingi ya Moto oyo atindi yango. Mpamba te, nsango yango ebandi boye: “Komélá anzelu na lisangá na Filadelefi ete, Ye moto mosantu, moto na solo, oyo azali na lifungola na Davidi, oyo afungoli mpe moto akokanga te, oyo akangi mpe moto akofungola te, alobi boye ete.”—Emoniseli 3:7.
3. Mpo na nini ebongi ete Yesu abengama “mobulami” to mosantu, mpe elimboli nini ete azali “solo”?
3 Yoane ayokaki ntango Petelo alobaki epai na Yesu Klisto, wana ezalaki ye moto: “Yo ozali na maloba na bomoi na seko. Biso mpe tondimi mpe toyebi ete, yo ozali Mobulami na Nzambe.” (Yoane 6:68, 69) Lokola Jéhovah Nzambe azali mosantu, Mwana na ye bobele moko azali mpe “mosantu.” (Emoniseli 4:8) Yesu azali mpe “solo.” Liloba ya greke esalelami awa (alêthinos) elimboli eloko oyo ezali solosolo. Na kolanda ndimbola yango, Yesu azali kongenga na solo mpe limpa ya solo oyo ekiti longwa na likoló. (Yoane 1:9; 6:32) Azali vinyo ya solo. (Yoane 15:1) Yesu azali mpe solo na ntina boye ete abongi mpo totyela ye motema. Alobaka ntango nyonso solo. (Tala Yoane 8:14, 17, 26.) Mwana wana na Nzambe abongi solo mpo na kozala Mokonzi mpe Mosambisi.—Emoniseli 19:11, 16.
“Lifungola na Davidi”
4, 5. “Lifungola na Davidi” ekangani na kondimana nini?
4 Yesu azali na “lifungola na Davidi.” Na yango, “afungoli mpe moto akokanga te”; “akangi mpe moto akofungola te.” “Lifungola na Davidi” ezali nini?
5 Elongo na mokonzi Davidi ya Yisraele Jéhovah asalaki kondimana mpo na bokonzi ya seko. (Nzembo 89:1-4, 34-37) Libota na Davidi eyangelaki likoló na kiti na bokonzi na Jéhovah na Yelusaleme kobanda 1070 kino 607 liboso na ntango na biso, na nsima Nzambe akokisaki ekateli na ye likoló na bokonzi yango, mpo ete bato na yango babandaki kosala mabe. Na motindo yango, Jéhovah abandaki kokokisa esakweli na ye ekomami na Ezekiele 21:27, epai tozali kotanga: “Nakozalisa yango libebi, libebi, libebi [Yelusaleme ya mabelé]; kasi ata oyo [nzete na bokonzi na Davidi] ekopesama na moto te kino ekoya ye oyo abongi na yango, oyo ngai nakopesa yango na ye.”
6, 7. Ntango nini mpe ndenge nini ye oyo azali na ‘lotomo na kozala mokonzi’ asengelaki komonana?
6 Ntango nini mpe ndenge nini “ye oyo abongi na yango” alingaki koya? Elimboli nini ete nzete na bokonzi na Davidi elingaki kopesama na ye?
7 Mbula soko 600 na nsima, mokitani moko ya mokonzi Davidi, elenge mwasi moyuda na nkombo Marie, azwaki zemi na nzela na elimo santu. Nzambe atindaki anzelu Gabriele koyebisa Marie ete akobota mwana mobali mpe akobenga nkombo na ye Yesu. Gabriele abakisaki: “Ye akozala monene mpe akobyangama Mwana na Oyo-Aleki-Likoló. Jéhovah Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi tata na ye. Akozala mokonzi na ndako na Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”—Luka 1:31-33.
8. Ndenge nini Yesu amonisaki ete akokisaki masengami mpo na kozwa bokonzi na Davidi lokola libula na ye?
8 Na mobu 29 ya ntango na biso, ntango Yesu azwaki batisimo na ebale Yordani mpe apakolamaki na elimo santu, akomaki Mokonzi aponami na libota ya Davidi. Amonisaki ndakisa ya molende mpenza kati na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe atindaki bayekoli na ye ete bango mpe bazala basakoli. (Matai 4:23; 10: 7, 11) Yesu amikitisaki, kino kokufa likoló na nzete na mpasi, komonisaka bongo ete akoki mpenza mpo na kozwa bokonzi na Davidi lokola libula na ye. Jéhovah asekwisaki Yesu lokola ekelamu ya elimo oyo akoki kokufa lisusu te mpe atombolaki ye na loboko na ye ya mobali kati na makolo. Kuna azwaki lotomo nyonso ekanganaki na bokonzi na Davidi lokola libula na ye. Na ntango ekoki, Yesu nde asaleli lotomo na ye ya kozala “na bokonzi kati na bayini na [ye].”—Nzembo 110:1, 2; Bafilipi 2:8, 9; Baebele 10:13, 14.
9. Ndenge nini Yesu azali kosalela lifungola na Davidi mpo na kofungola mpe mpo na kokanga?
9 Na kozelaka ntango yango, Yesu asalelaki lifungola na Davidi, na ntina boye ete afungolaki nzela mpo na makoki mpe mabaku malamu to ba privilèges ya mosala na likambo etali Bokonzi na Nzambe. Na nsima na Yesu, Jéhovah asikolaki baklisto bapakolami na mabelé “na nguya na molili,” mpo na kokotisa bango “kati na bokonzi na Mwana na bolingo na ye.” (Bakolose 1:13, 14) Lifungola ezali mpe mpo na kokanga ezibeli mpo ete moto na moto oyo azali sembo te azwa matomba wana te. (2 Timote 2:12, 13) Lokola mozwi na seko na libula na bokonzi na Davidi asimbami na Jéhovah, ekelamu moko te ekoki kokangisa ye nzela ete akokisa mikumba oyo te.—Tala Matai 28:18-20.
10. Mpiko nini Yesu apesi na lisanga ya Filadelefi?
10 Koutaka na bokonzi motindo oyo, maloba na Yesu epai na baklisto ya Filadelefi boye mazalaki solo elendiseli monene. Yesu akumisaki bango na maloba oyo: “Nayebi misala na yo. Tala, nasili kotia ekuke polele liboso na yo, oyo moto te akoki kokanga yango; mpo ete ata ozali na nguya moke, obateli maloba na ngai, mpe owangani nkombo na ngai te.” (Emoniseli 3:8) Lisangá ezalaki na molende mpe ekuke to porte efungwamaki liboso na yango: na ntembe te ekuke mpo na mosala ya Nzambe. (Tala 1 Bakolinti 16:9; 2 Bakolinti 2:12.) Na yango, Yesu ayikisi mpiko na lisangá oyo ete basalela malamu mpenza libaku malamu epesameli bango ya kosakola. Lisangá yango eyikaki mpiko mpe emonisaki ete ezali na nguya ekoki, na nzela na elimo na Nzambe, mpo na kolanda kokokisa “misala” misengeli mpo na kosalela Jéhovah. (2 Bakolinti 12:10; Zakari 4:6) Lisangá yango etosaki bitinda ya Yesu mpe ewanganaki Klisto te, ezala na maloba to na misala.
“Bakongumbama liboso na yo”
11. Lipamboli nini Yesu alakaki yango na baklisto, mpe ndenge nini yango ekokanaki?
11 Mpo na yango, Yesu alaki bango mbuma to litomba: “Mpo na bango bazali na lingomba na Satana, baoyo balobi ete bango Bayuda, kasi bazali bongo te, mpo bakobukaka lokuta, tala, nakoyeisa bango, mpe bakongumbama liboso na makolo na yo, mpe bakoyeba ete ngai nasili kolinga yo.” (Emoniseli 3:9) Lokola mpo na lisangá ya Sumuluna, ekoki kozala ete lisangá ya Filadelefi ezwamaki na mokakatano na Bayuda oyo bafandaki wana. Yesu abengi bango “lingomba na Satana.” Atako boni, mwa bamoko kati na Bayuda yango nde baumeli te na komona ete makambo oyo baklisto basakolaki likoló na Yesu mazali solo mpenza. “Bakongumbama”; mbala mosusu na motindo moyebisami na Paulo kati na 1 Bakolinti 14:24, 25, kino kobongola motema mpe kokoma baklisto, komonaka malamumalamu bolingo monene oyo Yesu alingaki na yango bayekoli na ye kino kopesa bomoi na ye mpo na bango.—Yoane 15:12, 13.
12. Mpo na nini basangani na eyanganelo na Bayuda oyo ezalaki na Filadelefi boye bakamwaki mpenza kokamwa na koyoka ete bamoko kati na bango basengelaki ‘kongumbama’ liboso na lisangá ya boklisto ya mboka wana?
12 Bayuda na eyanganelo na Filadelefi boye bakamwaki na koyoka ete bamoko kati na bango balingaki “kongumbama” liboso na makolo na lisangá ya baklisto na mboka yango. Lokola basangani mingi na lisangá ya boklisto na mboka yango bazalaki Bayuda te, ezalela elingaki kokesena na oyo esakolamaki na mosakoli Yisaya ete: “Mikonzi [oyo bazali Bayuda te] bakozala batata mpo na koleisa yo [libota ya Yisraele], mpe mikoló basi na bango lokola bamama mpo na koleisa yo; na bilongi na bango kino mabelé bakongumbama liboso na yo.” (Yisaya 49:23; 45:14; 60:14) Mpe bobele na likanisi oyo moko, Zakari akomaki na kopemama na Nzambe: “Na mikolo yango, bato zomi longwa na mabota [oyo bazali Bayuda te] na maloba nyonso, bakosimba elamba na moto oyo azali Moyuda, bakoloba ete, Tokokenda na yo elongo, mpo toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zakari 8:23) Na yango, baoyo bazali Bayuda te nde basengelaki kongumbama liboso na Bayuda!
13. Banani Bayuda oyo balingaki komona kokokisama na bisakweli bilobamaki mpo na Yisraele ya kala?
13 Bisakweli oyo bizalaki mpo na libota liponami na Nzambe. Ntango bisakweli yango bipesamaki, Yisraele ya mosuni ezalaki na esika ya lokumu. Kasi ntango libota ya Bayuda eboyaki kondima Masiya, Jéhovah mpe aboyaki bango. (Matai 15:3-9; 21:42, 43; Luka 12:32; Yoane 1: 10, 11) Na mokolo na Pantekote na mobu 33 ya ntango na biso, Jéhovah aponaki Yisraele ya solo ya Nzambe, lisangá ya boklisto. Basangani na yango bazali Bayuda na elimo oyo bakatami ngenga ya solo, oyo ya motema. (Misala 2:1-4, 41, 42; Baloma 2:28, 29; Bagalatia 6:16) Nsima na yango, lolenge bobele moko mpo na Moyuda na mosuni na kozongela boyokani ya ntina mingi elongo na Jéhovah ezali ete andima Yesu Masiya. (Matai 23:37-39) Emonani lokola ete Bayuda mosusu na Filadelefi balingaki kosala bongo.a
14. Motindo nini Yisaya 49:23 mpe Zakari 8:23 ekokani na mikolo na biso?
14 Na mikolo na biso, bisakweli lokola oyo ya Yisaya 49:23 mpe ya Zakari 8:23 ekokani na lolenge ya ntina mingi. Mosala ya kosakola esalemi na kelasi na Yoane ebimisi matomba, mpamba te bato ebele basili kokota na ekuke efungwami mpo na mosala ya Bokonzi.b Mingi na bango babimi longwa na mangomba na boklisto ya mokili oyo, mangomba oyo mazali komibenga na lokuta ete bazali Yisraele ya elimo. (Tala Baloma 9:6.) Bato yango, oyo bazali ebele monene, basukoli bilamba na bango mpe bayeisi yango mpembe na nzela na kondima kati na makila na Yesu oyo apesaki yango mbeka. (Emoniseli 7:9, 10, 14) Kotosaka bokonzi na Klisto, bazali kolikya kozwa mapamboli na Bokonzi yango awa na mabelé. Bakei epai na bandeko na Yesu bapakolami mpe ‘bangumbami liboso na bango,’ na elobeli ya elimo, mpo ‘bayoki ete Nzambe azali na bango elongo.’ Bazali kosalela bapakolami yango mpe basángáni na bango esika moko mpo na kozala lisangá ya bandeko na mokili mobimba.—Tala Matai 25:34-40; 1 Petelo 5:9.
“Ntango na komekama”
15. (a) Yesu alakaki nini epai na baklisto ya Filadelefi, mpe bayikisamaki mpiko ete basala nini? (b) Baklisto bazalaki kozela ete bazwa “motole” nini?
15 Yesu alobi lisusu boye: “Mpo ete obateli maloba na mpiko na ngai, ngai mpe nakobatela yo na ntango na komekama oyo elingi kobimela mokili mobimba, mpo na komeka bango bazali kofanda na mokili. Nakoya noki; simba yango ezali na yo, na ntina ete moto abotola motole na yo te.” (Emoniseli 3:10, 11) Solo, baklisto na ntango na Yoane bakokaki te kozala na bomoi kino na mokolo na Nkolo (oyo ebandaki na 1914), kasi elikya na bango na koya na Yesu elingaki kopesa bango makasi masengeli mpo na kolanda kosakola. (Emoniseli 1:10; 2 Timote 4:2) “Motole” to lifuta na bomoi na seko ezalaki kozela bango kati na makoló. (Yakobo 1:12; Emoniseli 11:18) Soki batikali sembo kino na kufa, moto moko te akoki kopekisa bango kozwa mbano yango.—Emoniseli 2:10.
16, 17. (a) Wapi “ntango na komekama, oyo esengeli kokoma na mokili mobimba oyo bato bafandi”? (b) Ezalela na bapakolami ezalaki boni na ebandeli na “ntango na komekama”?
16 “Ntango na komekama” ezali ntango nini? Na ntembe te, baklisto wana na Asia basengelaki lisusu kokutana na monyoko makasi uta na bakonzi ya Loma.c Nzokande, kokokisama monene ezali ntango na konyongolama mpe na kosambisama oyo ekokaki na mokolo na Nkolo, mpe oyo eyaki makasi kobanda na 1918. Komekama esengelaki komonisa soki moto azali mpo na Bokonzi na Nzambe oyo eutaki kosalema to mpo na mokili na Satana. Komekama yango esengelaki koumela “ntango moko,” elingi koloba eleko moko mokuse, kasi esuki naino te. Kino na nsuka na yango, tobosana te ete tozali kobika na “ntango na komekama.”—Luka 21:34-36.
17 Na ndakisa ya lisangá ya sembo ya Filadelefi, na 1918 baklisto bapakolami, kelasi na Yoane, bakutanaki na botemeli ebimisamaki na “lingomba na Satana” na ntango na biso. Bakonzi na mangomba na boklisto na mokili oyo bazalaki komibenga Bayuda na elimo bapusaki bakonzi ya mokili ete baboma baklisto ya solo. Kasi, baklisto ya solo batyaki molende mpenza mpo na ‘kobatela maloba na mpiko na Yesu’; na yango, na lisalisi ya elimo, na “nguya moke” oyo ezalaki na bango mpo na kokende liboso, babikaki mpe balendisamaki ete baleka na ekuke oyo efungwamaki liboso na bango. Na motindo nini?
“Ekuke efungwami”
18. Yesu aponaki nani na 1919, mpe na ndimbola nini baoyo baponamaki bakokanaki na mosaleli na sembo na Ezekiase?
18 Na 1919, Yesu akokisaki elaka na ye mpe andimaki etuluku moke ya baklisto bapakolami solo; atyaki bango ete bazala “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Bango batyamaki bongo na kati na etelemelo ekokani na oyo ya mosaleli ya sembo Eliakime na mikolo na mokonzi Ezekiase.d Jéhovah alobaki na ntina na Eliakime: “Nakotia lifungola na ndako na Davidi na lipeka na ye; boye akofungola mpe mosusu akokanga te; akokanga mpe mosusu akofungola te.” Eliakime azalaki kosala misala minene mpo na Ezekiase, mokonzi abimaki na libota na Davidi. Bobele bongo lelo, kelasi na bapakolami lokola Yoane bazwi likoló na lipeka na bango “lifungola na ndako na Davidi,” elingi koloba ete bapesi bango mokumba ya kotalela matomba ya Bokonzi ya Masiya awa na mabelé. Jéhovah alendisaki basaleli na ye mpo ete bakokisa mokumba yango, na motindo boye ete nguya moke ezalaki na bango abongolaki yango nguya monene na bomoi, oyo elingisi bango kopesa litatoli na mokili mobimba.—Yisaya 22:20, 22; 40:29.
19. Ndenge nini kelasi na Yoane bakokisaki mikumba oyo Yesu apesaki bango na 1919, mpe litomba nini ezwamaki?
19 Kolandaka ndakisa na Yesu, kobanda na 1919 batikali bapakolami bamipesaki na molende nyonso kati na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Matai 4:17; Baloma 10:18) Mpo na mosala yango, bamoko kati na lingomba na Satana na lelo, boklisto na mokili oyo, bakei epai na batikali bapakolami, babongoli motema mpe ‘bangumbami,’ kondimaka bongo bokonzi bopesami na moombo. Bango mpe bayei kosalela Jéhovah esika moko na basangani na kelasi na Yoane oyo bakomi mibange. Ezalaki bongo kino ekokaki motuya mobimba na bandeko na Yesu bapakolami. Na nsima “ebele monene . . . bauti na mabota nyonso” bayei ‘kongumbama’ liboso na moombo apakolami. (Emoniseli 7:3, 4, 9) Moombo mpe ebele monene, bango nyonso elongo bazali kosala mosala lokola etonga bobele moko ya ba Témoins de Jéhovah.
20. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah basengeli lelo oyo kozala makasi mpenza kati na kondima mpe na molende mingi kati na mosala na Nzambe?
20 Awa ezali bango na bolingo ya solo ya bandeko lokola ezalaki bongo mpo na baklisto ya Filadelefi, ba Témoins de Jéhovah ya lelo, basangani elongo, bayebi ete mosala na bango ya kosakola esengeli kosalema nokinoki. Mosika te, bolozi monene ekotya nsuka na mokili oyo mabe etambwisami na Satana. Na yango, tika ete ekuta biso tozali makasi kati na kondima mpe na molende kati na mosala ya Nzambe, mpo ete nkombo na biso elongolama te na buku na bomoi na Jéhovah. (Emoniseli 7:14) Totya matoi mpenza na likebisi oyo Yesu apesaki na lisangá ya Filadelefi, na motindo boye ete tosimba makasi mikumba mipesameli biso mpe tokoka kozwa mbano ya bomoi ya seko.
Mapamboli mpo na baoyo bakolonga
21. Ndenge nini baklisto bapakolami na mikolo na biso ‘babateli maloba na mpiko na Yesu,’ mpe elikya nini ezali liboso na bango?
21 Kelasi na Yoane lelo ‘ebateli maloba na mpiko na Yesu’; elimboli ete, balandi ndakisa na ye mpe bayiki mpiko. (Baebele 12:2, 3; 1 Petelo 2:21) Basangani na kelasi yango bayikisami bongo mpiko mingi na maloba malandi oyo Yesu atindelaki lisangá ya Filadelefi: “Mpo na molongi, nakozalisa ye likonzi kati na temple na Nzambe na ngai, mpe akobima wana lisusu soko moke te.”—Emoniseli 3:12a.
22. (a) Temple na Nzambe na Yesu ezali nini? (b) Ndenge nini baklisto bapakolami oyo balongi bakokoma makonzi kati na temple yango?
22 Oyo nde libaku malamu ya kozala likonzi kati na temple ya Jéhovah! Na Yelusaleme ya kala, temple ezalaki centre ya losambo ya Jéhovah. Ezali kati na temple nde nganga monene azalaki kopesa, mbala moko na mbula, makila na banyama lokola mbeka, liboso na kongenga ya ekamwiseli, oyo ezalaki komonisa ete Jéhovah azali wana kati na temple, na elilingi, kati na esika ebengamaki ete “Eleki-Bosantu.” (Baebele 9:1-7) Ntango Yesu abatisamaki, temple mosusu ebimaki, yango temple monene na elimo mpo na losambo na Jéhovah. Esika eleki bosantu na temple yango ezali kati na makolo, epai kuna Yesu akotaki, lokola esengelaki, mpo na komonana “liboso na Nzambe.” (Baebele 9:24) Yesu azali Nganga Monene, mpe bobele mbeka moko epesami mpo na kolongola masumu: makila na Yesu moto na kokoka, oyo masopamaki. (Baebele 7:26, 27; 9:25-28; 10:1-5, 12-14) Ntango nyonso oyo bakotikala sembo, baklisto bapakolami oyo bazali naino na mabelé bazali kosala lokola banganga mike awa na mabelé oyo ezali lokola la cour ya temple yango. (1 Petelo 2:9) Kasi nsima na kolonga, bango mpe bakoti kati na esika eleki bosantu na likoló mpe bakomi makonzi makoki kokwea te kati na temple oyo ebongisami mpo na losambo na Nzambe. (Baebele 10:19; Emoniseli 20:6) Mpe ‘bakobima wana lisusu te.’
23. (a) Na nsima Yesu apesi elaka nini epai na baklisto bapakolami oyo balongi? (b) Likambo oyo ete nkombo ya Jéhovah mpe nkombo na Yelusaleme na sika ekokomama likoló na bango ekolimbola nini?
23 Yesu alobi lisusu boye: “Mpe nakokoma nkombo na Nzambe na ngai likoló na ye, na nkombo na mboka na Nzambe na ngai, yango Yelusaleme na sika oyo ekokita na likoló kolongwa na Nzambe na ngai, mpe nkombo na ngai na sika.” (Emoniseli 3:12b) Ee, nkombo ya Jéhovah ekomami likoló na baklisto wana balongi; azali Nzambe na bango mpe Nzambe na Yesu. Yango emonisi polele ete Jéhovah mpe Yesu bazali bato mibale bakeseni; bazali basangani na Nzambe moko kati na Trinité te. (Yoane 14:28; 20:17) Bikelamu nyonso basengeli komona ete bapakolami yango bazali bapakolami ya Jéhovah. Bazali batemwe na ye. Likoló na bango ekomami mpe nkombo na Yelusaleme na sika, mboka na likoló oyo ekiti longwa na likoló, elimboli ete boyangeli na yango ya boboto ekozala likoló na mokili mobimba oyo ekofandama na bato ya sembo. (Emoniseli 21:9-14) Bampate mosusu, baklisto oyo bakofanda awa na mabelé, bango mpe bakoyeba ete balongi wana bapakolami bazali ba citoyens ya Bokonzi to Yelusaleme ya likoló.—Nzembo 87:5, 6; Matai 25:33, 34; Bafilipi 3:20; Baebele 12:22.
24. Nkombo ya sika ya Yesu elimboli nini, mpe ndenge nini ekomami likoló na baklisto na sembo bapakolami?
24 Mpo na kosukisa, balongi bazali na nkombo na sika na Yesu ekomami likoló na bango. Nkombo yango elimboli misala ya sika oyo Yesu azwi, bakisa mpe mabaku malamu to baprivilèges oyo Jéhovah apesi yango na moto mosusu te bobele na ye. (Bafilipi 2:9-11; Emoniseli 19:12) Moto mosusu te akoki koyeba nkombo yango, elimboli ete moto mosusu te amonaki makambo motindo wana mpe azwaki baprivilèges ya motindo wana, bobele ye. Nzokande, ntango Yesu akomi nkombo na ye likoló na bandeko na ye ya sembo, bandeko na ye basangani elongo na ye na boyokani na penepene mpenza kuna na likoló mpe bazali kosangana na matomba na ye to ba privilèges na ye. (Luka 22:29, 30) Na yango, tokoki kokamwa te na komona ete Yesu asukisi nsango oyo atindeli bapakolami bobele na toli oyo asili kopesa yango na masangá mosusu ete: “Oyo azali na matoi ayoka yango elobi elimo na masangá!”—Emoniseli 3:13.
25. Ndenge nini moklisto mokomoko akoki lelo kosalela motinda mozwami kati na toli oyo Yesu apesaki yango na lisangá na Filadelefi?
25 Nsango yango boye ezalaki elendiseli monene mpo na baklisto ya sembo na Filadelefi! Mpe ezali liteya na nguya mpo na kelasi na Yoane lelo, oyo bazali na bomoi na mokolo na Nkolo. Nzokande, mitinda mizali kati na yango mizali na ntina mpo na moko na moko kati na biso, tozala na molongo na bapakolami to na bampate mosusu. (Yoane 10:16) Ebongi ete moko na moko kati na biso alanda kobota mbuma ya Bokonzi na ndakisa ya baklisto oyo ya Filadelefi. Biso banso tozali na mwa nguya. Biso banso tokoki kosala eloko kati na mosala na Jéhovah. Tika ete tosalela nguya yango! Mpe mpo na oyo etali ebele na mabaku malamu to baprivilèges ezwami na nzela na mosala na Bokonzi, tosala noki mpo na koleka na ekuke oyo efungwami liboso na biso. Tokoki mpe kosambela mpo ete Jéhovah afungwela biso ekuke motindo yango. (Bakolose 4:2, 3) Tomekola mpiko na Yesu mpe tobatela nkombo na ye na bosembo nyonso; kosalaka bongo, tokomonisa ete biso mpe tozali na matoi mpo na koyoka makambo oyo elimo santu na Nzambe elobi yango na masangá.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na ntango na Paulo, Sosthène, mokonzi na sinagoge na Bayuda oyo ezalaki na Kolinti, akomaki moklisto.—Misala 18:17; 1 Bakolinti 1:1.
b Zulunalo La Tour de Garde, oyo ebimisami na kelasi na Yoane, ezali ntango nyonso kolobela ntina ya kosalela libaku malamu oyo mpe kosangana na molende nyonso na mosala ya kosakola; tala, na ndakisa, masolo “Tiká ete bikelamu nyonso esakola nkembo ya Yehova” mpe “Na mabelé mobimba lokito na bango eyokani,” oyo ebimaki na nimero ya 1 Yanuali 2004. Na nimero ya 1 Yuni 2004 ezalaki na lisolo moko na motó na likambo “Mapamboli na baoyo bapesaka Nzambe nkembo,” oyo ezalaki kobenda likebi mpo na kokota na “ekuke ya polele” oyo ezali kopesa nzela na mosala ya pionnier. Na sanza moko ya mobu 2005, ba pionniers nyonso bazalaki 1 093 552.
c Mokanda ebengami Cyclopedia, ekomami na McClintock mpe Strong (volume X, lokasa 519) elobi: “Losambo ya boklisto ebendaki likebi ya bakonzi mpo na botomboki oyo basango bapakano babimisaki kati na bato. Bazalaki kobanga mpo na bokoli makasi ya kondima yango; Trajan [98-117 na ntango na biso] abimisaki mibeko mpo na kosilisa malembemalembe mateya oyo ya sika ezalaki kopusa bato na koyina banzambe na bango. Boyangeli na Pline le Jeune, gouverneur de province na Bithynie [oyo ezalaki na mondelo na province na Rome na Asie, na nord], ekomaki mpasi mpo na mikakatano oyo ebimisamaki na bokoli ya nokinoki ya boklisto mpe nkanda oyo yango ezalaki kobimisa epai na Bapakano ya province na ye.”
d Nkombo Ezekiase elimboli “Jéhovah azali kopesa makasi.” Tala 2 Mikonzi 16:20, maloba na nse na lokasa ya Traduction du monde nouveau, ebimeli na Lingelesi oyo ezali na mitindami.
[Etanda na lokasa 63]
Motuya monene bayei kongumbama
Kati na bapakolami 144 000 oyo babengami mpo na kosangola Bokonzi na makolo, emonani ete litika, kelasi na Yoane, oyo ezali na bato bakoki ata 9 000 te basengeli lisusu kosilisa kurse na bango awa na mabelé. Bobele na ntango yango, ebele monene esili koyanganisa etuluku na bato koleka 6 600 000. (Emoniseli 7:4, 9) Eloko nini epesi nzela na bokoli monene boye? Ezali bongo biteyelo bitambwisami na ba Témoins de Jéhovah. Na bokeseni na mateya ya boklisto na mokili oyo, oyo ezali koteya bafilozofi ya mokili mpe ezali kotyola Biblia, biteyelo yango bizali kolakisa kondima mozindo mpo na Liloba na Nzambe. Bizali komonisa motuya na yango mpo na oyo etali kozala na bomoi ya peto mpe bizaleli malamu, mpe kosalela Nzambe na molende nyonso. Uta 1943 mpe kati na mokili mobimba, lisangá mokomoko ya ba Témoins de Jéhovah ezali na Eteyelo ya mosala ya Nzambe kati na Salle du Royaume na yango. Bamilió na bato bazali kolanda yango poso na poso mpe bazali kozwa mateya ya Biblia motindo moko kati na mokili mobimba.
Uta 1959, ba Témoins de Jéhovah bazali kotambwisa Eteyelo ya Bokonzi mpo na mosala ya Nzambe oyo ezali kopesa formation na bankulutu mpe basaleli na misala ya masangá. Uta 1977, Eteyelo ya ba pionniers epesaki formation na bandeko mibali mpe basi bankoto na bankoto baoyo bazali mpenza na “elimo na bato na Filadelefi,” bazali kosalela Jéhovah ntango nyonso kati na mosala ya kosakola. Na 1987, Ecole de formation ministérielle efungolamaki mpo na kopesa formation na mibali, ba Témoins de Jéhovah, oyo bakotindama na bisika bikoponama kati na mokili mobimba.
Oyo eleki kati na biteyelo yango nyonso etambwisami na ba Témoins de Jéhovah, ezali bongo Ecole de Galaad oyo efungolamaki na la Société Watchtower. Longwa 1943, eteyelo yango ya ba missionnaires na Etat ya New York ezali kobimisa bituluku mibale ya bayekoli, mbula na mbula. Baoyo nyonso basili kozwa formation kuna bazali koleka 7 000 ministres ya Jéhovah mpo na kokenda mosala ya misionere na mboka ya bapaya. Bayekoli oyo basilisi na eteyelo yango bazali kosala kati na bamboka koleka 100 kati na yango, mingimingi, ezalaki nde bango bato bakendaki kobanda mosala ya Bokonzi. Esili sikawa koleka mibu soki 60 mpe mingi kati na bamisionere ya liboso bazali ntango nyonso komipesa na mosala, bazali kosala bongo elongo na bamisionere ya sika mpo na kokolisa lisangá na Jéhovah kati na mokili. Oyo nde bokoli kitoko!
[Etanda na lokasa 64]
Na 1919, Mokonzi Yesu afungolaki ekuke oyo epesaki nzela na mosala ya boklisto. Motuya ya baklisto oyo bamipesi na Nzambe mpe bayebi kosalela libaku malamu yango, ezali se komata.
Mboka Baklisto Basakoli ya
esika nsango basanganaki ntango
Mbula esakolami na mosala nyonsoe
ya kosakolaf
1918 14 3 868 591
1928 32 23 988 1 883
1938 52 47 143 4 112
1948 96 230 532 8 994
1958 175 717 088 23 772
1968 200 1 155 826 63 871
1978 205 2 086 698 115 389
1988 212 3 430 926 455 561
1998 233 5 544 059 698 781
2005 235 6 390 022 623 308
[Maloba na nse ya lokasa]
e Mituya oyo ezali mwayene ya sanza na sanza.
f Mituya oyo ezali mwayene ya sanza na sanza.
[Etanda na lokasa 65]
Mosala ya ba Témoins de Jéhovah ezali kosalema na motema malamu. Tala, na ndakisa, bangonga oyo basalaki na mosala ya kosakola mpe ya koteya, mpe motuya ya kokamwa ya boyekoli ya Biblia oyo batambwisaki na bandako na bato kozanga ete basenga bango lifuta.
Ngonga elekisamaki Boyekoli ya
na mosala ya kosakola Biblia
(Ngonga ya mbula (Mwayene ya
Mbula mobimba) sanza na sanza)
1918 19 116 Eyebani te
1928 2 866 164 Eyebani te
1938 10 572 086 Eyebani te
1948 49 832 205 130 281
1958 110 390 944 508 320
1968 208 666 762 977 503
1978 307 272 262 1 257 084
1988 785 521 697 3 237 160
1998 1 186 666 708 4 302 852
2005 1 278 235 504 6 061 534
[Elilingi na lokasa 59]
Fungola ya Baloma na ekeke na liboso