-
Mpunda minei ezali kopota mbanguEmoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
-
-
14. Mpunda nini mpe mofandi na mpunda nini Yoane amoni nsima na maloba oyo, mpe emonaneli yango ezali elilingi ya nini?
14 Nsima na libyangami oyo ya mibale ete “Yaka!,” eloko nini emonani? “Mpunda mosusu ebimi, mpunda motane. Nguya epesami na mofandi na yango ete alongola kimya na mokili na ntina ete bato babomana, mpe mopanga [molai] epesami na ye.” (Emoniseli 6:4) Solo, oyo ezali emonaneli moko ya nsomo! Mpe kokakatana ata moke ezali te mpo na oyo yango elakisi: etumba! Ezali etumba ya sembo te oyo Mokonzi aponami na Jéhovah azali kobunda mpe kolonga, kasi etumba mabe mpo na konyokola bato, etumba oyo bato bango na bango bazali kobunda mpe oyo epalangani na mokili mobimba; mpo na yango, makila mingi masopami mpe mpasi mingi eyokisami epai na bato. Ntina wana mpunda motane ebongi solo na mofandi likoló na yango!
15. Mpo na nini toboyi kosangana na botamboli ya mofandi na mpunda ya mibale?
15 Yoane azali na boyokani soko moke te na mofandi na mpunda oyo soko mpe kopesa maboko na botamboli na ye na yauli, mpamba te esakweli moko esilaki kopesama na ntina na basaleli na Nzambe ete: “Bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Atako bafandi “kati na mokili,” Yoane, mpe lelo oyo kelasi na Yoane elongo na ebele monene “basangani te” na mokili ya lelo oyo ezali na nyongo ya makila. Bibundeli na biso bizali ya elimo mpe bizali na “nguya na Nzambe” mpo na kopesa biso nzela na kosakola solo na molende, kasi ezali mpo na kobunda bitumba ya mosuni te.—Yoane 17:11, 14; 2 Bakolinti 10:3, 4.
16. Ntango nini mpe na motindo nini mofandi na mpunda motane azwaki “mopanga molai”?
16 Bitumba mingi bizalaki liboso na 1914, mbula oyo Mofandi na mpunda mpembe azwaki bokonzi. Kasi mofandi na mpunda motane azwi “mopanga molai.” Yango emonisi nini? Kobanda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bitumba ya bato esopi makila mingi, ebebisi biloko mpe bomoi ya bato lokola emonanaki naino liboso te. Kati na ebele na makila oyo masopamaki kobanda 1914 kino 1918, basalelaki, mpo na mbala ya liboso, to na motindo eleki nyonso oyo basalelaki liboso, mituka ya bitumba, bagaz mpo na koboma bato, mpepo ya bitumba, masuwa oyo etambolaka na nse na mai mpo na bitumba, bamasini minene mpo na kobeta bakano, mpe bibundeli oyo bikobundaka yango moko. Kati na mikili soko 28, bato nyonso, nde bobele basoda te, bapesaki maboko na etumba. Motuya na bato babomamaki ezalaki nsomo. Basoda koleka milió libwa babomamaki, mpe motuya na basivile babomamaki ezalaki monene. Ata nsima na etumba oyo, mabelé ezwaki kimya ya solo te. Mibu koleka 50 nsima na etumba oyo, Konrad Adenauer, mokonzi wa kala na Alemanye alobaki: “Kobatelama mpe kimya esili kolimwa na bomoi na bato uta 1914.” Ezali yango mpenza esili kosala mofandi na mpunda motane, oyo mokano na ye ezali ete alongola kimya na mokili.
17. Motindo nini mofandi na mpunda ya mibale alandaki kosalela “mopanga molai” nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
17 Na nsima, na mposa makasi na makila, mofandi na mpunda motane amibwakaki kati na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Babundi basalelaki bibundeli ya nsomo koleka mpe etumba yango ebomaki bato mbala minei koleka Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na 1945, bombe atomike mibale ebwakamaki na Japon; mokomoko na yango ebomaki nkoto mingi na bato bobele na mwa ntango mokemoke. Na boumeli na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mofandi na mpunda motane akamataki bomoi ya bato soko 55 milió, kasi atondaki te. Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato koleka milio 20 basili kokufa na “mopanga molai” oyo ezali na maboko na mofandi na mpunda motane.
18, 19. (a) Na esika ete ezala lokumu mpo na mayele ya kosala bibundeli, nzokande kobomama na ebele na bato uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba emonisi nini? (b) Likama nini ezali liboso na mokili mobimba, kasi Mofandi na mpunda mpembe akosala nini mpo na kopengola yango?
18 Kobomama oyo nyonso elakisi ete mayele mpo na kosala bibundeli ezali likambo malamu? Ezali nde komonisa ete mpunda motane mpe azangi mawa azali kotambola. Kasi kotambola na ye ekosuka ntango nini? Ndambo na bato ya mayele na mokili balobi ete etumba ya nikleere ekoki kobima mbalakaka—kozanga kolobela etumba ya nikleere oyo bato bango moko bakoki kobimisa mpo na makaneli. Kasi tobanga te, mpamba te Mofandi na mpunda mpembe mpe molongi azali kokana eloko mosusu mpo na mabelé.
19 Ntango nyonso oyo mokili ekolanda nzela ya lolendo mpe koyinana na bikolo, bato bakozala ntango nyonso na nsomo mpo na etumba ya nikleere oyo mbele ekoboma bato awa na mokili. Ata soki mikili balobi ete babwaka bibundeli nyonso ya nikleere oyo bazali na yango, nzokande bakotikala na mayele mpe teknike kati na mitó na bango, mpe yango ekoki kopusa bango na kosala bibundeli mosusu ya nikleere nsima na mwa ntango moke; na yango etumba ekoki kobanda na bibundeli mike mpe ekoya kosuka na bibundeli ya nikleere oyo ekoboma bato mingi. Lolendo mpe koyinana etondi epai ya mabota mbele ekobomisa mokili mobimba, kasi Mofandi na mpunda mpembe akosukisa ligboma mpe kotambola ya mpunda motane. Tobanga te, mpamba te Klisto, Mokonzi, akolanda botamboli na ye, mpo na kosukisa elonga na ye likoló na mokili oyo etambwisami na Satana, mpe epai mosusu, mpo na kosala awa na mokili lisangá ya sika ya bato etongami likoló na bolingo, bolingo na Nzambe mpe na mozalani, oyo ezali kokolisa kimya koleka ebele na bibundeli ya nikleere oyo mikili basimbi mpo na komibatela na eleko oyo ya ligboma.—Nzembo 37:9-11; Malako 12:29-31; Emoniseli 21:1-5.
-
-
Mpunda minei ezali kopota mbanguEmoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
-
-
[Etanda na lokasa 94]
‘Nguya epesami na ye ete alongola kimya na mokili’
Teknoloji ezali komema kino wapi? Na ebimeli na yango ya le 22 janvier 1987, Globe and Mail (zulunalo ya Kanada oyo ebimisami na Toronto) ezongelaki maloba malandi ya diskur moko esalamaki na Ivan Head, président ya Centre mpo na bolukiluki kati na mokili mobimba:
“Mituya ya sikisiki mimonisi ete ndambo minei na bato na mayele mpe bateknisié oyo batyami na mosala ya bolukiluki bazali kosala se mpo na kobimisa bibundeli. . . . Na 1986, mosolo mobimisamaki mozalaki 1,5 million ya badolare na minute moko. . . . Motindo oyo na bolukiluki ezali kobakisa kimya na biso? Bibombelo na bibundeli ya nikleere ya mikili mileki na nguya ezali na bibundeli bikokani na oyo esalelamaki na babundi banso na Etumba na Mibale ya mokili mobimba—bakisa yango mbala 6 000. Elingi koloba bitumba 6 000 bikokani na Etumba na mibale na mokili mobimba! Uta 1945, mokili ezalaki se na poso nsambo na kimya, kozanga bitumba. Bitumba 150 bisili kosalama, ezala etumba kati na mikili mibale to etumba kati na bato na mokili moko bango na bango, mpe yango nyonso ebomaki bato koleka milio 20. Mingi kati na bango bakufi na minduki makasi oyo teknoloji ebimisi na eleko oyo ya Lisangá na Mabota to O.N.U.”
-