Klisto azali koloba na masangá
“Moto oyo asimbi minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali . . . alobi makambo oyo.”—EMONISELI 2:1.
1, 2. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na makambo oyo Klisto alobaki na masangá nsambo ya Asie Mineure?
YESU KLISTO, Mwana mobotami-se-moko ya Yehova, azali Mokonzi ya lisangá ya boklisto. Mpo lisangá ya bayekoli bapakolami na ye ezala ntango nyonso pɛto, Klisto azali kosalela bokonzi na ye wana azali kopesa bango longonya mpe kosembola bango. (Baefese 5:21-27) Na ndakisa, Emoniseli mokapo 2 mpe 3 ezali na maloba ya nguya mpe ya bolingo oyo Yesu atindelaki masangá nsambo ya Asie Mineure.
2 Liboso ntoma Yoane ayoka maloba oyo Yesu atindelaki masangá yango nsambo, amonaki emonaneli ya “mokolo ya Nkolo.” (Emoniseli 1:10) “Mokolo” yango ebandaki ntango Masiya azwaki Bokonzi na 1914. Na yango, makambo oyo Klisto alobaki na masangá wana ezali na ntina mingi na mikolo oyo ya nsuka. Bilendiseli mpe toli na ye ekosalisa biso tólonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango na mikolo oyo ya mpasi.—2 Timote 3:1-5.
3. “Minzoto,” “baanzelu,” mpe “bitɛlɛmiseli-ya-miinda ya wolo” oyo ntoma Yoane amonaki ezali bililingi ya nini?
3 Yoane amonaki Yesu Klisto oyo azwi nkembo “asimbi minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali” mpe “azali kotambola na katikati ya bitɛlɛmiseli-ya-miinda nsambo ya wolo,” to masangá. “Minzoto” ezali “baanzelu ya masangá nsambo.” (Emoniseli 1:20; 2:1) Ntango mosusu basalelaka minzoto mpo na kolobela baanzelu; kasi, Klisto akoki te kosɛnga na moto akoma makambo mpo na bikelamu ya elimo. Yango wana, “minzoto” yango ezali mpenza komonisa bakɛngɛli oyo bazali bapakolami na elimo, to bankulutu. Liloba “baanzelu” etaleli mokumba na bango ya bamemi-nsango. Lokola ebongiseli ya Nzambe ekoli, “kapita ya sembo” aponi mibali ya makoki na kati ya “bampate mosusu” ya Yesu mpo bázala mpe bakɛngɛli.—Luka 12:42-44; Yoane 10:16.
4. Bankulutu bakozwa litomba nini soki batye likebi na makambo oyo Klisto azali koloba na masangá?
4 “Minzoto” yango ezali na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu, elingi koloba ete azali mokonzi na yango, azali kotambwisa yango, azali kosepela na yango, mpe azali kobatela yango. Yango wana, akotuna bango ndenge oyo bazali kosala mosala na bango. Soki bandeko oyo bazali bankulutu lelo oyo batye likebi na maloba oyo Yesu atindelaki mokomoko na masangá yango nsambo, bakoyeba ndenge oyo bakoki kosala soki makambo lokola oyo ebimaki na masangá wana ebimi mpe na masangá na bango. Kasi, baklisto nyonso mpe basengeli koyoka Mwana ya Nzambe. (Malako 9:7) Na bongo, makambo nini tokoki koyekola soki totye likebi ntango Klisto azali koloba na masangá?
Epai ya anzelu ya Efese
5. Makambo nini ezalaki na engumba Efese?
5 Yesu apesaki lisangá ya Efese longonya mpe apamelaki yango. (Tángá Emoniseli 2:1-7.) Efese ezalaki pembeni ya mbu, na wɛsti ya Asie Mineure. Misala ya mombongo mpe makambo ya losambo ezalaki makasi na engumba yango; kutu, tempelo monene ya nzambe-mwasi Alatemisi ezalaki kuna. Atako bato ya Efese bamipesaki na pite mpe na ekobo, na losambo ya lokuta mpe na misala ya maji, Nzambe apambolaki mosala oyo ntoma Paulo ná baninga na ye basalaki na engumba yango.—Misala, mokapo 19.
6. Na ndenge nini baklisto ya sembo lelo oyo bazali lokola baklisto ya Efese ya kala?
6 Klisto apesaki lisangá ya Efese longonya na maloba oyo: “Nayebi misala na yo, mpe mosala na yo ya makasi mpe ezaleli na yo ya koyika mpiko, mpe ete okoki te kondima kozala na bato mabe, mpe ete omekaka baoyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali bantoma te, mpe omonaki bango bato ya lokuta.” Ndenge moko mpe lelo oyo, masangá ya bayekoli ya solo ya Yesu ezali kosala misala ya malamu, mosala ya makasi, mpe ezali na ezaleli ya koyika mpiko. Baboyaka bandeko ya lokuta oyo balukaka kobengama bantoma. (2 Bakolinti 11:13, 26) Lokola Baefese, baklisto ya sembo lelo oyo ‘bakoki te kondima kozala na bato mabe.’ Yango wana, mpo losambo ya Yehova etikala pɛto mpe mpo na kobatela lisangá, bakataka boyokani nyonso ná bapɛngwi oyo baboyi kobongola motema.—Bagalatia 2:4, 5; 2 Yoane 8-11.
7, 8. Likambo nini ya mabe ezalaki na lisangá ya Efese, mpe tosengeli kosala nini soki likambo ya ndenge yango ekómeli biso?
7 Kasi, baklisto ya Efese bazalaki na mabe moko. Yesu alobaki boye: “Nazwi yo mabe na likambo oyo, ete otiki bolingo oyo ozalaki na yango liboso.” Esengelaki ete baklisto ya lisangá yango bázongela bolingo oyo bazalaki na yango liboso mpo na Yehova. (Malako 12:28-30; Baefese 2:4; 5:1, 2) Biso nyonso tosengeli kokeba ete tóbungisa te bolingo oyo tozalaki na yango liboso mpo na Nzambe. (3 Yoane 3) Kasi, tokosala nini soki makambo lokola mposa ya kozala na bozwi to ya komipesa na bisengo ebandi kokola na mitema na biso? (1 Timote 4:8; 6:9, 10) Tosengeli kobondela Nzambe makasi asalisa biso tóbengana bamposa wana mpe na esika na yango tólona bolingo makasi mpo na Yehova mpe botɔndi mpo na nyonso oyo ye ná Mwana na ye basali mpo na biso.—1 Yoane 4:10, 16.
8 Klisto alendisaki Baefese ete: “Kanisá lisusu na nini okwei, mpe bongolá motema mpe salá misala ya kala.” Bongo soki basali yango te? Yesu alobaki ete: “Soki osali bongo te, nazali koya epai na yo, mpe nakolongola etɛlɛmiseli-ya-miinda na yo na esika na yango.” Soki bampate nyonso babungisi bolingo oyo bazalaki na yango liboso, “etɛlɛmiseli-ya-miinda,” to lisangá, ekozala lisusu te. Yango wana, tiká ete biso baklisto ya molende tósala makasi mpo ete lisangá ekoba kongɛnga na elimo.—Matai 5:14-16.
9. Ndenge nini tosengeli kotalela likambo ya kosala mwa mangomba?
9 Malamu ya Baefese ezalaki ete bayinaki “misala ya mwa lingomba ya Nikolausi.” Longola oyo mokanda ya Emoniseli elobi, toyebi te ndenge oyo mwa lingomba yango ebandaki, mateya na yango mpe misala na yango. Kasi, lokola Yesu amonisaki ete kolanda bato ezali mabe, tosengeli ntango nyonso koyina likambo ya kosala mwa mangomba, ndenge baklisto ya Efese bayinaki yango.—Matai 23:10.
10. Nini ekokómela bato oyo bazali koyoka oyo elimo ezali koloba?
10 Klisto alobaki ete: “Moto oyo azali na litoi ayoka oyo elimo ezali koloba na masangá.” Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki koloba na nguya ya elimo santu ya Nzambe. (Yisaya 61:1; Luka 4:16-21) Yango wana, tosengeli kotya likebi na makambo oyo Nzambe azali koloba na nzela ya Yesu na lisalisi ya elimo santu. Na nguya ya elimo, Yesu alakaki ete: “Oyo alongi nakopesa ye nzela ya kolya nzete ya bomoi, oyo ezali na kati ya paladiso ya Nzambe.” Mpo na bapakolami oyo bazali koyoka oyo elimo ezali koloba, yango elingi koloba bakokóma bikelamu ya elimo oyo bakoki kokufa lisusu te na kati ya “paladiso ya Nzambe” na likoló, to esika moko na Yehova. “Ebele ya bato,” oyo mpe bazali koyoka oyo elimo ezali koloba, bakozala na paladiso awa na mabelé epai bakomɛla mai ya “ebale moko ya mai ya bomoi” mpe bakobikisama na “nkasa ya banzete” oyo ezali pembenipembeni ya ebale yango.—Emoniseli 7:9; 22:1, 2; Luka 23:43.
11. Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo mpo na Yehova na kati ya lisangá?
11 Baefese babungisaki bolingo na bango ya liboso, kasi ezali boni soki likambo ya ndenge yango ekómi komonana na lisangá moko lelo oyo? Ebongi ete mokomoko na biso alobelaka mingi misala ya Yehova oyo ezali komonisa bolingo na ye mpo tókoka kokolisa bolingo mpo na ye. Tokoki komonisa ete tozali mpenza na botɔndi mpo na bolingo ya Nzambe oyo apesaki Mwana na ye ya bolingo mpo na kobikisa biso. (Yoane 3:16; Baloma 5:8) Soki ebongi, tokoki kolobela bolingo ya Nzambe na biyano na biso mpe na masolo oyo tosalaka na makita. Tokoki kokumisa nkombo ya Yehova na mosala ya kosakola mpo na komonisa ete tolingaka ye. (Nzembo 145:10-13) Ya solo, maloba mpe misala na biso ekoki kosala mingi mpo na kozongisa to kolendisa bolingo oyo lisangá ezalaki na yango liboso.
Epai ya anzelu ya Similina
12. Masolo ya kala ezali komonisa nini mpo na Similina mpe losambo oyo ezalaki kosalema kuna?
12 Klisto, “‘Moto ya Liboso mpe Moto ya Nsuka,’ oyo akómaki mokufi mpe azongaki lisusu na bomoi” na nzela ya lisekwa, apesaki lisangá ya Similina longonya. (Tángá Emoniseli 2:8-11.) Similina (lelo oyo Izmir, na ekólo Turquie) ezalaki penepene ya mbu, na wɛsti ya Asie Mineure. Bagrɛki bazalaki kofanda na engumba yango, kasi soki na mobu 580 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato ya Lidia babebisaki yango. Bato oyo bazwaki bokonzi nsima ya Alesandala Monene batongaki lisusu Similina na esika mosusu. Engumba yango ekómaki na kati ya etúká ya Azia; misala ya mombongo ezalaki makasi mpe eyebanaki mingi mpo na bandako na yango kitoko ya Leta. Losambo ya amperɛrɛ ezalaki makasi na engumba yango mpamba te tempelo ya Tibɛli Kaisala ezalaki kuna. Bato bazalaki kozwa mwa mpaka ya malasi na nsɔngɛ ya misapi mpe kobwaka yango na mɔtɔ mpe koloba, “Kaisala azali Nkolo.” Baklisto bakokaki kondima kosala likambo wana te mpamba te mpo na bango, “Yesu azali Nkolo.” Yango wana, bazalaki konyokola bango.—Baloma 10:9.
13. Atako bazangaki biloko ya mokili, na ndenge nini baklisto ya Similina bazalaki bazwi?
13 Longola monyoko, baklisto ya Similina bazalaki mpe babola; lokola bazalaki koboya losambo ya amperɛrɛ, ekoki kozala ete bazalaki kotikela bango nzela te básala misala oyo bakokaki kozwela mbongo. Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazali mpe kokutana na minyoko ya ndenge wana. (Emoniseli 13:16, 17) Baoyo bazali lokola baklisto ya Similina, atako bazangi biloko ya mokili, bazali bazwi na elimo, mpe yango nde likambo eleki ntina!—Masese 10:22; 3 Yoane 2.
14, 15. Ndenge nini Emoniseli 2:10 ekoki kokitisa bapakolami motema?
14 Bayuda mingi ya Similina bazalaki “sinagoga ya Satana” mpamba te bakangamaki na makambo ya bonkɔkɔ oyo euti na Makomami te, baboyaki Mwana ya Nzambe, mpe bazalaki kotyola bayekoli na ye oyo babotami na elimo. (Baloma 2:28, 29) Kasi, maloba ya Klisto oyo elandi ekoki mpenza kokitisa bapakolami motema! Alobaki boye: “Kobanga te makambo oyo elingi kokómela yo. Talá! Zabolo akokoba kobwaka bamosusu na bino na kati ya bolɔkɔ mpo bómekama mpenza na mobimba, mpe mpo bózwa bolɔzi mikolo zomi. Omimonisa sembo ata tii na liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.”—Emoniseli 2:10.
15 Mpo na kolongisa bokonzi ya Yehova, Yesu abangaki kokufa te. (Bafilipi 2:5-8) Atako Satana azali sikoyo kobundisa batikali bapakolami, bango bazali kobanga te makambo oyo basengeli kokutana na yango—monyoko, bolɔkɔ, to liwa ya mpasi. (Emoniseli 12:17) Bapakolami bakolonga mokili. Mpe na esika ya motole oyo ebebaka, lokola oyo bazalaki kolatisa bato oyo bazalaki kolonga na masano ya bato ya bikólo mosusu, Klisto alaki bapakolami ete nsima ya lisekwa na bango, akopesa bango “motole ya bomoi” na likoló lokola bikelamu oyo ekoki kokufa te. Talá likabo monene wana!
16. Soki lisangá na biso ezali lokola lisangá ya Similina ya kala, tosengeli kotya makanisi na biso na likambo nini?
16 Ezali boni soki lisangá na biso ezali lokola lisangá ya Similina ya kala, ezala tozali na elikya ya kokende na likoló to ya kozwa bomoi awa na mabelé? Boye, tósalisa baninga na biso bandimi na kotya makanisi na bango na ntina mpenzampenza oyo Nzambe atiki nzela na minyoko, elingi koloba ntembe na likambo oyo etali bokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Motatoli ya Yehova nyonso oyo atikali sembo azali komonisa ete Satana azali mobuki-lokuta mpe azali komonisa ete ata moto oyo azali konyokwama akoki kozala na mpiko ya kolongisa lotomo ya Nzambe ya koyangela lokola Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́. (Masese 27:11) Tiká tólendisa baklisto mosusu báyeba koyikela minyoko mpiko mpe, na nsuka bázwa “libaku malamu ya kosalela [Yehova] mosala mosantu na kozanga kobanga, na bosembo mpe na boyengebene liboso na ye mikolo na biso nyonso,” to mpo na libela.—Luka 1:68, 69, 74, 75.
Epai ya anzelu ya Pelegame
17, 18. Losambo nini ezalaki na Pelegame, mpe nini ekokaki kokómela moto oyo aboyi losambo wana ya bikeko?
17 Yesu apesaki lisangá ya Pelegame longonya, kasi apesaki yango mpe toli mpo na kosembola yango. (Tángá Emoniseli 2:12-17.) Pelegame ezalaki na nɔrdi ya Similina, na ntaka ya kilomɛtrɛ 80. Bato ya engumba yango bamipesaki mpenza na losambo ya bapakano. Emonani lokola Bakaladi oyo bazalaki kosala maji (banganga-minzoto) bakimaki Babilone mpe bakendaki kofanda na engumba yango. Ebele ya bato ya maladi bazalaki kokende na Pelegame, na tempelo oyo eyebanaki mingi ya Asclépios, nzambe ya kobikisa mpe ya mosala ya monganga. Tempelo moko mpo na losambo ya Kaisala Augusto ezalaki na Pelegame, yango wana bazalaki kobenga engumba yango “mboka monene ya losambo ya amperɛrɛ na ebandeli ya ampire.”—Encyclopædia Britannica, 1959, Volimi 17, lokasa 507.
18 Etumbelo moko mpo na Zeusi ezalaki na Pelegame. Na engumba yango mpe bazalaki kosala likambo moko oyo euti na Zabolo: kosambela bato. Yango wana ezali likambo ya kokamwa te soki Yesu alobaki ete “kiti ya bokonzi ya Satana” ezalaki na engumba oyo lisangá yango ezalaki! Moto oyo aboyi kosambela amperɛrɛ mpo aponi kolongisa bokonzi ya Yehova akokaki kobomama. Tii na moi ya lelo, mokili ezali kolala na nguya ya Zabolo, mpe bato bakómi kosambela bilembo ya bikólo. (1 Yoane 5:19) Banda na ekeke ya liboso tii lelo oyo, baklisto mingi ya sembo babomami, moko na bango ezali oyo Klisto abengaki “Antipasi, motatoli na ngai, moto na ngai ya sembo, oyo abomamaki pembeni na bino.” Na ntembe te Yehova Nzambe ná Yesu Klisto babosanaka te basaleli wana ya sembo.—1 Yoane 5:21.
19. Balama asalaki nini, mpe baklisto nyonso basengeli komibatela na makambo nini?
19 Klisto alobelaki mpe “mateya ya Balama.” Lokola azalaki na lokoso ya biloko ya mokili, mosakoli Balama alukaki kolakela Yisalaele mabe. Ntango Nzambe abongolaki elakeli mabe na ye lipamboli, Balama ayokanaki na Balaka, mokonzi ya Moaba, mpe babendaki ebele ya Bayisalaele na losambo ya bikeko mpe na kosala pite mpe ekobo. Bankulutu basengeli kozala na mpiko mpo na kobatela boyengebene lokola Fineasi, moto oyo asukisaki misala ya Balama. (Mituya 22:1–25:15; 2 Petelo 2:15, 16; Yuda 11) Kasi, baklisto nyonso basengeli komibatela na losambo ya bikeko mpe kokeba ete pite mpe ekobo ekɔta na lisangá te.—Yuda 2, 4.
20. Soki moklisto moko abandi kolona elimo ya lipɛngwi, asengeli kosala nini?
20 Lisangá ya Pelegame ezalaki na likama monene mpamba te etikaki “baoyo bazali kosimba makasi mateya ya mwa lingomba ya Nikolausi” bázala kati na yango. Klisto alobaki na lisangá yango ete: “Bongolá motema. Soki osali bongo te, nazali koya epai na yo nokinoki, mpe nakobunda etumba ná bango na mopanga ya molai ya monɔkɔ na ngai.” Bato oyo basalaka mwa mangomba balukaka nde kobebisa baklisto na elimo, mpe baoyo bazali kolendisa bokabwani mpe mwa mangomba bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te. (Baloma 16:17, 18; 1 Bakolinti 1:10; Bagalatia 5:19-21) Soki moklisto moko abandi kolona elimo ya lipɛngwi na motema na ye mpe alingi kopalanganisa yango, ebongi ayoka likebisi ya Klisto! Mpo azwa likama te, asengeli kobongola motema mpe koluka lisalisi ya elimo epai ya bankulutu. (Yakobo 5:13-18) Ezali malamu ete asala yango kozanga kozela, mpamba te Yesu azali koya nokinoki mpo na kopesa etumbu.
21, 22. Nani akolya “mana oyo ebombami,” mpe likambo yango ezali komonisa nini?
21 Baklisto bapakolami ya sembo ná baninga na bango ya sembo basengeli te kobanga lisambisi oyo ezali koya. Bato nyonso oyo bazali koyoka toli oyo Yesu azali kopesa na nzela ya elimo santu ya Nzambe bakozwa mapamboli. Na ndakisa, bapakolami oyo bakolonga mokili bakobengama mpo na kolya ndambo ya “mana oyo ebombami” mpe bakopesa bango “libanga ya mpɛmbɛ” oyo ezali na “nkombo ya sika” likoló na yango.
22 Na boumeli ya mbula 40 oyo Bayisalaele bazalaki kotambolatambola na kati ya esobe, bazalaki kolya mana oyo Nzambe apesaki bango. Babombaki mwa ndambo ya “limpa” yango na kati ya mbɛki moko ya wolo oyo ezalaki na kati ya sanduku ya kondimana oyo bazalaki kobomba na Esika oyo Eleki Bosantu na hema, esika pole oyo ezalaki kongɛnga na ndenge ya likamwisi ezalaki komonisa ete Yehova azali wana. (Exode 16:14, 15, 23, 26, 33; 26:34, NW; Baebele 9:3, 4) Moto moko te azalaki na ndingisa ya kolya mana wana oyo ebombami. Kasi, nsima ya lisekwa na bango, bayekoli ya Yesu oyo bazali bapakolami bakokóma bikelamu oyo bakoki kokufa te, likambo oyo emonisami na kolya “mana oyo ebombami.”—1 Bakolinti 15:53-57.
23. “Libanga ya mpɛmbɛ” elimboli nini mpe “nkombo ya sika” elimboli nini?
23 Na batribinale ya Loma, libanga ya moindo ezalaki komonisa kokwea na likambo, nzokande libanga ya mpɛmbɛ ezalaki komonisa kolonga na likambo. Kopesa “libanga ya mpɛmbɛ” oyo Yesu akopesa baklisto bapakolami oyo bakolonga emonisi ete amoni bango na ekweli te, bazali pɛto. Lokola Baloma bazalaki mpe kosalela mabanga mpo na kokɔta na bisika oyo bazalaki kolakisa masano to makambo mosusu oyo ebele ya bato bazalaki kolanda, “libanga ya mpɛmbɛ” ekoki mpe komonisa ete bapesi mopakolami esika na likoló na libala ya Mwana-Mpate. (Emoniseli 19:7-9) Na ntembe te, “nkombo ya sika” elimboli libaku malamu ya kosangana na Yesu mpo na kozwa libula na Bokonzi ya likoló elongo na ye. Makambo yango nyonso ezali mpenza kolendisa bapakolami ná baninga na bango oyo bazali na elikya ya kofanda na paladiso awa na mabelé na kosala mosala ya Yehova!
24. Ndenge nini tosengeli kotalela lipɛngwi?
24 Ezali malamu tóbosana te ete lisangá ya Pelegame ezalaki na likama mpo bapɛngwi bazalaki kuna. Soki lisangá na biso ekómi na likama ya ndenge wana, tóboya mpenza lipɛngwi mpe tólanda kotambola na solo. (Yoane 8:32, 44; 3 Yoane 4) Lokola bateyi ya lokuta to bato oyo bazali kolona elimo ya lipɛngwi bakoki kobebisa lisangá mobimba, tosengeli komonisa polele ete toboyi lipɛngwi, tosengeli kotika te ete makanisi mabe epekisa biso kotosa solo.—Bagalatia 5:7-12; 2 Yoane 8-11.
25. Na lisolo oyo elandi tokolobela makambo oyo Klisto alobaki na masangá nini?
25 Maloba ya Yesu Klisto oyo azwi nkembo oyo alobaki na masangá misato kati na masangá nsambo ya Asie Mineure mpo na kopesa bango longonya mpe toli, oyo totaleli na boyekoli oyo, ezali mpenza kotinda biso na kokanisa! Kasi, elimo santu etindaki ye aloba mpe na masangá mosusu minei. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo yango oyo alobaki na lisangá ya Tyatila, Saladesi, Filadelefia, mpe Laodikia.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli kotya likebi na makambo oyo Klisto azali koloba na masangá?
• Ndenge nini tokoki kosalisa lisangá ezongela bolingo oyo ezalaki na yango liboso?
• Mpo na nini tokoki koloba ete baklisto ya Similina ya kala bazalaki bazwi atako bazangaki biloko ya mokili?
• Soki tokanisi makambo oyo ezalaki na lisangá ya Pelegame, ndenge nini tosengeli kotalela elimo ya lipɛngwi?
[Karte na lokasa 10]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
GRÈCE
ASIE MINEURE
Efese
Similina
Pelegame
Tyatila
Saladesi
Filadelefia
Laodikia
[Elilingi na lokasa 12]
“Ebele ya bato” bakofanda na paladiso awa na mabelé
[Bililingi na lokasa 13]
Baklisto oyo bazali konyokwama bazali kolonga mokili