Totambola engebene malako na Jéhovah
“Ɛ jéhovah, teya ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesa ngai motema moko ete nabanga nkombo na Yo.”—NZEMBO 86:11.
1, 2. Mpo na ntina nini ba Témoins de Jéhovah bazali koboya kozongisa makila na nzoto?
“MBALA mosusu ba Témoins de Jéhovah bazali na elonga mpo na koboya kosalela bankisi oyo esalemi na makila, mpamba te mikrobe mingi mikoki kopesama na nzela na makila.”—Le Quotidien du Médecin,15 Décembre 1987.
2 Bamoko kati na baoyo batangaki maloba oyo bakoki kokanisa ete soki ba Témoins de Jéhovah bazali koboya kozongisa makila na nzoto uta kala mingi mpenza liboso ete mokili mobimba esosola makama na yango, oyo ekoki nkutu koboma, ezali bobele libaku moko malamu. Nzokande, etelemelo ya ba Témoins de Jéhovah na ntina na makila ezali bobele libaku malamu te soko mpe likambo ya bongo na bongo te; ezali mpe mobeko ya bomoto te mobimisami na lingomba moko oyo eyini makambo nyonso na bato, mpe elendisami te mpo na kobanga makama oyo yango ezali kobimisa. Kasi, soki Batemwe bazali koboya ete bazongisa bango makila te, ezali mpo ete bazwi ekateli ya kotambola na botosi liboso na Molakisi na bango monene, Nzambe.
3. (a) Nini ezalaki liyoki na Davidi mpo na oyo etalaki komitika kotambwisama mobimba epai na Jéhovah? (b) Likambo nini Davidi azalaki komizela na yango mpo ete atyaki elikya na ye epai na Nzambe?
3 Mokonzi Davidi oyo ayebaki malamu ete bomoi na ye ezali na maboko na Nzambe, azalaki na ekateli ya komitika kolakisama epai na ye mpe ‘kotambola kati na solo na ye.’ (Nzembo 86:11) Mokolo mosusu Davidi azwaki toli oyo: soki amikotisi na nyongo na makila te liboso na Nzambe na kobomaka bato, wana nde ‘molimo na ye mokobombama mpenza kati na libenga ya bomoi pene na Jéhovah.’ (1 Samwele 25:21, 22, 25, 29) Motindo moko lokola bazalaki kobomba biloko na motuya kati na libenga mpo na kobatela yango mpe kobikisa yango, lolenge moko mpe bomoi na Davidi ekokaki kobatelama mpe kobikisama na Nzambe. Kondimaka toli wana na mayele, Davidi alukaki te ete amibikisa ye moko; atyaki nde elikya na ye kati na Ye oyo apesaki ye bomoi. Alobaki ete: “Okoyebisa ngai nzela na bomoi; esengo mingi na kotonda ezali epai na yo; kosepela ezali na loboko na yo na mobali libela.”—Nzembo 16:11.
4. Mpo na nini Davidi azalaki ma mposa ete alakisama na Jéhovah?
4 Kozalaka na elimo motindo wana, Davidi akanisaki te ete azalaki na lotomo ya kopona soko mibeko nini na Nzambe mizali malamu to wapi oyo asengelaki kotosa yango. Likanisi ya Davidi lizali komonana na maloba oyo: “Ɛ Jéhovah, lakisa ngai nzela na yo mpe kamba ngai na nzela na sembo.” “Ɛ Jéhovah, teya ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesa ngai motema moko ete nabanga yo. Ɛ Jéhovah, Nzambe na ngai, nakotonda yo na motema na ngai mobimba.” (Nzembo 27:11; 86:11, 12) Kotambola kati na solo liboso na Nzambe ekoki mbala mosusu komonana nkaka epai na biso to kosenga kotika makambo mingi mpenza, kasi Davidi azalaki na mposa ete alakisama kati na nzela malamu mpe atambola kati na yango.
Lilako na ntina na makila
5. Davidi ayebaki nini mpenza mpo na likanisi ya Nzambe na ntina na makila?
5 Tokoki komona ete uta bolenge na ye Davidi ateyamaki na ntina na likanisi na Nzambe mpo na makila, mpe ezalaki mpenza libombami na makambo na losambo te. Ntango Mibeko mizalaki kotangama liboso na bato, Davidi asengelaki koyoka maloba oyo: “Mpo ete bomoi na mosuni ezali kati na makila, mpe ngai nasili kopesa yango na bino na likoló na etumbelo mpo na kosala kozongisa na bondeko na ntina na bomoi, mpo ete ezali makila ekozongisa na bondeko na ntina na bomoi. Yango wana nasili koloba na bato na Yisraele ete: ‘Moto moko te na kati na bino akolya makila, mpe mopaya moko te, oyo afandi na bino, akolya makila lokola.’”—Levitike 17:11, 12; Deteronome 4:10; 31:10.
6. Nini emonisi ete basaleli na Nzambe bazalaki ntango nyonso na mposa ete balakisama na ntina na likambo litali makila?
6 Ntango nyonso oyo Yisraele ezalaki naino libota na Nzambe, lisangá na ye, baoyo bazalaki na mposa ya kosepelisa Mozalisi na bango basengelaki kolakisama mpenza na ntina na makila. Eleko moko na moko, bana na Bayisraele bazalaki kozwa liteya wana. Kasi mateya yango masengelaki nde kolandama nsima wana Nzambe andimaki lisangá na boklisto, kokomisaka yango “Yisraele na Nzambe”? (Bagalatia 6:16) Ee, ezali bongo mpenza! Likanisi ya Nzambe likoló na lolenge mabe ya kosalela makila libongwani te. (Malaki 3:6) Ayebisaki yango liboso ete kondimana na Mibeko esalema, mpe motuya na yango esilaki te ata nsima na kolongwa na Mibeko.—Genese 9:3, 4; Misala 15:28, 29.
7. Mpo na nini liteya oyo Nzambe azali kopesa likoló na makila lizali mpenza na ntina mpo ma biso?
7 Limemya mpo na makila ezali likambo ya ntina na mateya na boklisto. Bamosusu bakoki komituna soko ete ‘endimeli wana ezali likambo na kolekisa ndelo te.’ Nzokande, soki ezali bongo na likambo moko ya moboko kati na boklisto, ezali nde mbeka na Yesu. Boye te? Ntóma Paulo akomaki ete: “Na ye [Yesu], tozwi lisiko na nzela na makila na ye, kolimbisama na mabunga pelamoko ngolu na ye efuluki mingi,” (Baefese 1:7) Libongoli mosusu ( The lnspired Letters, libongoli ya Frank Laubach) ebongoli eteni yango boye: “Makila na Klisto efuti mpo na biso, mpe sikawa tozali bato na Ye.”
8. Na ndimbola nini tokoki koloba ete bomoi ma ’‘ebele monene” ezali kotalela makila?
8 Elikya ya kobika na ’’bolozi monene” oyo esili kobelema mpe kosepela na mapamboli na Nzambe kati na Paradis na mabelé, etongami mpo na bato nyonso likoló na makila oyo Yesu asopaki. Emoniseli 7:9-14 elobi mpo na bango: ’’Bazali baoyo babimi na monyoko monene. Basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango pembe na makila na Mwana na Mpate.” Simba maloba masalelami awa. Balobi te ete baoyo babiki na bolozi monene ‘bayambaki Yesu’ to ‘bandimelaki ye,’ atako makambo wana mazali na ntina mingi. Mokapo ekoti na bozindo mpe eyebisi sikisiki ete “basukoli bilamba na bango mpe bayeisi yango pembe na makila na” Yesu, yango ezali mpo ete makila na Yesu mazali na motuya na kosikola.
9. Mpo na nini ezali na ntina na kotosa mobeko na Nzambe oyo etali makila?
9 kozalaka na botondi mpo na motuya na lisiko ya makila na Yesu, ba Témoins de Jéhovah bazwi ekateli ete basalela makila na lolenge mabe te, ata soki monganga moko ayebisi bango ete esengeli na bango mpenza kozongisama makila na nzoto.Monganga akoki kokanisa na motema malamu ete atako makama mazali na kozongisama na makila, nzokande matomba maleki mingi; kasi moklisto akoki kokanga miso te liboso na likama monene koleka, oyo ya koboyama na Nzambe soki andimi kosalela makila na lolenge mabe. Paulo alobaki mpo na baoyo ‘bakosalaka masumu na nkò nsima na kozwa boyebi na solo.’ Mpo na nini lisumu motindo wana lizali monene mpenza? Mpo ete ye oyo asali yango “anyati Mwana na Nzambe na nse na makolo na ye mpe atyoli makila na kondimana na nzela na yango abulisami.”—Baebele 9:16-24; 10:26-29.
Tosalisa bazalani na biso na kozwa mpe liteya yango
10. Mpo na nini tozali na ekateli makasi ya koboya mikila?
10 Biso baoyo tozali kopesa motuya monene na mbeka na lisiko ya Klisto, tozali kokeba ete tosalela masumu te, mpo ete wana mbele ekomonisa ete totyoli motuya ya mbeka na lisiko ya makila na Yesu. Lokola tosili kokanisa malamumalamu na ntina na likambo yango, tozali koyeba ete botondi na biso epai na Nzambe, epai na ye oyo tozwi bomoi na biso, esengeli kolongola kati na biso mposa nyonso ya kobuka mibeko na ye ya sembo. Tosili kondimisama ete, apesaki biso mibeko yango, mpo na matomba na biso, mpo na bolamu na biso ya seko.(Deteronome 6:24; Masese 14:27; Mosakoli 8:2) Kasi, ezali boni mpo na bana na biso?
11-13. Makanisi nini ya libunga baboti baklisto mosusu bazali na yango na ntina na bana na bango mpe makila, mpe mpo na nini?
11 Ata soki bana na biso bazali naino mike to bilenge mpenza mpo na kokanga ntina ya makambo mosusu, Jéhovah Nzambe akoki kotalela bango ete bazali peto mpe komonisa bango boboto na ye na ntina na bokangami na biso epai na ye. (1 Bakolinti 7:14) Na bongo likoki ezali, kati na libota ya boklisto, ete bana mike kino sikawa bakangi naino ntina ya mobeko na Nzambe te likoló na makila mpe mpo na yango, baponi naino te soki bakotosa ye to te. Nzokande, tozali kosala nyonso ekoki na biso mpo na koteya bango mpo na likambo wana ya ntina mingi? Ezali nde motuna oyo baboti baklisto basengeli kokanisa malamumalamu mpo na yango; ezali komonana ete, baboti mosusu bazali na makanisi ya libunga mpo na likambo litali bana mpe likambo ya makila: bazali kokanisa mpenza ete bazali na lotomo monene te mpo na oyo etali kozwa ekateli soki bana na bango mike bakozongisama makila to te. Mpo na nini bazali na likanisi wana ya libunga?
12 Kati na mikili mingi, mibeko mpe masangá oyo mabongisami na Leta ezali kosenzela mpo na libateli ya bana oyo bazangi bato ya kosalisa bango to mpe mpo na baoyo bazali konyokwama. Tokoki koloba te ete ba Témoins de Jéhovah, baoyo balingi bana na bango, ete bazali kokipé bango te to bazali konyokola bango mpo ete, wana ezali bango kosenga bankisi ezangi makila na kati oyo ezali mingi lelo kati na balopitalo, bazali koboya ete bakotisa bango makila na nzoto te. Na kotalela makama oyo mayebani mpo na kozongisa makila na nzoto, ata na likanisi ya minganga, likambo ya komonisa bopotu mpe konyokola bana ezali wana te. Batemwe bazali bobele kosalela lotomo na bango mpo na kotalela makama oyo mazali kobima mpe kopona nkisi oyo ebongi.a Nzokande, minganga misusu bazali komema likambo epai na bazuzi mpo na kozongisa bato makila na makasi.
13 Baboti mosusu, koyebaka ete monganga akoki komema likambo na tribinale mpo na kozwa lotomo ya kozongisa mwana moke makila, bakoki kokanisa ete likambo yango eleki bango, ete bazali na eloko mosusu te oyo bakoki to basengeli kosala. Likanisi motindo wana ezali libunga.—Masese 22:3.
14. Liteya nini Davidi mpe Timoté bazwaki yango na bolenge na bango?
14 Touti komona ete David ateyamaki kati ba nzela ya Nzambe uta bolenge na ye. Yango esungaki ye na kotalela bomoi lokola likab euti na Nzambe mpe koyeba ete makila elimboli bomoi.Tala 2 Samwele 23:14-17)Timoté, mpo na ye, ateyamaki kati na nzela na Nzambe “uta bomwana na ye.” (2 Timoté 3:14, 15) Okanisi te ete ata liboso ete bakóma mikóló, engebene mibeko ya Leta na ntango na biso, Davidi mpe Timoté mbele bazalaki na makoki ya koloba malamu na ntina na makambo matali mokano na nzambe? Bobele bongo liboso mpenza ete bakóma mikóló, bilenge baklisto ya lelo basengeli koteyama kati na nzela ya Nzambe.
15, 16. (a) Ndenge nini na mikili misusu bazali kotalela lotomo ya bana mineur? (b) Mpo na nini mwana moko mineur azongisamaki makila na nzoto?
15 Kati na makila misusu, bazali kopesa epai na bana oyo bamonani ete bazali na mayele lotomo motindo moko lokola mikóló. Na ntina na mbula na ye to mpo azali na mayele, elenge akoki kotalelama lokola ete akoki mpenza mpo na kozwa bikateli kati na likambo litali kosalisama na lopitalo. Ata ntango mobeko moko epesi yango nzela te, ekoki kozala ete bazuzi to basali mosusu ya Leta bakopesa motuya mingi na likanisi ya elenge mwasi oyo azali na makoki ya kolimbola polele ekateli na ye makasi na ntina na makila. Nzokande, soki elenge azangi mayele mpe akoki kolimbola polele te bindimeli na ye, bazuzi bakokanisa mbala mosusu ete ezali mokumba na bango mpo na kozwa ekateli esengeli, lokola soki nde ezalaki likambo ya mwana moke mpenza.
16 elenge mobali moko azalaki koyekola Biblia uta mibu mingi, kasi yango ezalaki mbala na mbala te, mpe azwaki batisimo te. Mosika te asengelaki kokokisa mbula oyo akokaki kozwa “lotomo ya koboya nkisi moko oyo esepelisaki ye te kati na lopitalo.” Nzokande, poso nsambo liboso na date yango, lopitalo oyo epai azalaki kosalisama mpo na bokono ya kanser esengaki lisalisi ya tribinale mpo na kozongisa ye makila na makasi kozanga ete ye moko mpe baboti na ye bandima likambo yango. Zuzi, moto na boboto, atunaki ye mpo na makila mpe bindimeli na ye na ntina yango, mpe atunaki mituna mike lokola oyo: ‘Mikanda mitano ya liboso na Biblia nkombo na moko na moko na yango ezali nini?’ Elenge mobali akokaki te kopesa nkombo ya mikanda yango soko mpe komonisa solosolo ete ayebaki ntina oyo azalaki koboyela makila. Na mawa nyonso, zuzi apesaki bongo nzela ete bazongisa ye makila, kolobaka ete: “Koboya na ye ete bazongisa ye makila te etongami na boyebi ya kokoka te likoló na bindimeli na ye mpo na Nzambe.”
17. Ekateli nini elenge mwasi moko ya mibu 14 azwaki na ntina na makila, mpe yango ebotaki litomba nini?
17 Makambo makoki kobaluka ndenge mosusu soki mwana mineur ateyamaki malamu kati na banzela ya Nzambe mpe soki azali kotambola mpenza kati na solo na Ye. Moklisto mwasi moko, elenge mpenza koleka mwana mobali oyo atangami awa liboso, azalaki na lolenge moko ya kanser oyo emonanaka mingimingi te. Kati na lopitalo moko ya lokumu, ye mpe baboti na ye batunaki ndimbola epai ya monganga moko na ntina na lisalisi ebengami chimiothérapie mpe bandimaki nkisi yango. Atako bongo, likambo yango likomaki liboso na tribinale. Zuzi akomaki ete: “D.P. ayebisi ete akosala nyonso mpo aboya makila. Azalaki kotalela kozongisama ya makila na nzoto lokola kokota n makasi kati na ndako ya moto mosusu mpe akokisi yango na likambo ya kobebisa moto na makasi (viol). Asengelaki na tribinale ete batosa ekateli na ye mpe bapesa ye nzela ete atikala na [lopitalo ] kozanga ete bakotisa ye makila na makasi.’’ Na ntango ya momekamo wana, elenge mwasi yango asalisamaki na liteya ya boklisto oyo azwaki.—Tala encadré.
18. (a) Ekateli nini ya mpiko mwa elenge mwasi moko oyo azalaki na mpasi makasi azwaki na ntina na makila? (b) Ekateli nini Zuzi akamataki mpo na lolenge basengelaki kosalisa ye?
18 Elenge mwasi moko ya mibu 12 azalaki kosalisama mpo na maladi ebengami leucémie (kanser ya baselile ya makila). Lisangá moko ya mokili oyo ezali na mokumba ya kobatela bana ememaki likambo yango na tribinale mpo ete bazongisa ye makila na makasi. Zuzi asukisaki ete: “Na kimya nyonso, L. alobi polele na tribinale ete, soki bameki kozongisa ye makila na makasi, akobunda na makasi na ye, nyoso. alobi, mpe nandimeli ye, ete akonganga, akobunda, akolongola ntonga na loboko na ye mpe akomeka kobotola libenga to sachet ya makila oyo batelemisi na motó ya mbeto na ye. Naboyi kozwa ekateli oyo ekopesa momekamo motindo wana epai na mwana oyo . . . Na likambo ya mobeli oyo, nkisi oyo eponami na minganga ya lopitalo ezali kosalisa bobele nzoto. Nzokande ezangi kotalela bamposa ya mayoki mpe ya bindimeli na moto mpo na Nzambe.”
Baboti, bopesa liteya malamu
19. Mokumba nini etali bango baboti baklisto basengeli kokokisa yango?
19 Makambo motindo oyo mazali kolamusa baboti oyo mposa na bango ezali ete libota na bango mobimba etosa mobeko na Nzamb na ntina na makila kati na bomoi na bango.Soki Abrahame azalaki moninga na Nzambe, ezalaki mpenza mpo na likambo oyo: Nzambe ayebaki ete tata wana “akolaka bana ye mpe ndako na ye na nsima na ye, ete babatela nzela na Jéhovah mpe kosala na boyengebene mpe sembo.” (Genese 18:19) Tokoki mpe koloba boye te lelo mpo na baboti baklisto? Bino baoyo bozali batata to bamama, boteyaka epai na bana na bino oyo bolingi bango mingi ete batambola kati na nzela ya jéhovah, mpo ete bazala ‘ntango nyonso pene mpo na kozongisa monoko na moto na moto oyo akotuna bango na ntina na elikya ezali kati na bango, kosalaka yango na bopolo mpe na limemya mozindo’?—1 Petelo 3:15.
20. Likambo nini tolingi ete bana na biso bayeba yango liboso, mpe na nini tolingi ete bandima mpo na oyo etali makila? (Danyele 1:3-14)
20 Solo, ezali malamu ete bana bayeba makama ya bokono mpe makama mosusu oyo bozongisi makila na nzoto ezali komema; kasi, koteya bana na biso kati na mobeko ya kokoka ya Nzambe na ntina na makila ezali mpenzampenza te mpo na kobangisa bango na ntina na makila. Soki, na ndakisa, zuzi moko atuni epai na elenge mwasi moko mpo na nini aboyi ete bazongisa ye makila, likambo nini eyano na ye mbele ekoki kobimisa soki alobi ete makila ezali na makama to ezali kobangisa ye? Zuzi mbele akokanisa ete akembi naino te mpe ete azali se kobanga makasi. Motindo moko, akoki mpe kolela mpe koboya opération ya appendice, ata soki baboti na ye bamoni ete yango nde ezali malamu mpo na ye. Lisusu, touti komonisa awa na liboso ete ntina ya yambo oyo mpo na yango baklisto bazali koboya bozongisi makila na nzoto ezali te ete makila ezali na maladi na kati, kasi ezali mpo ete ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe mpe Mozalisi na biso. Bana na biso basengeli koyeba yango, basengeli mpe koyeba ete makama ya bokono na makila ezali kolendisa lisusu etelemelo na biso ya bandimi.
21. (a) Mituna nini mikosalisa baboti na koyeba soki makanisi ya bana na bango mayokani na makanisi ya Biblia na ntina na makila? (b) Ndenge nini baklisto ba sengeli kosalisa bana na bango mpo na likambo litali makila?
21 Soki ozali na bana, ondimisami ete basili komekola etelemelo ya Biblia na likambo litali kozongisa makila na nzoto mpe ete bakoki kolimbola yango? Bazali mpenza kokanisa ete etelemelo wana ezali na boyokani na mokano ya Nzambe? Basili kondimisama ete kobuka mobeko na Nzambe na ntina na makila ekozala mpenza likambo monene ete yango ekoki kobebisa bilikya ya moklisto mpo na kozwa bomoi na seko? Baboti ya mayele bakotalela lisusu mituna wana elongo na bana na bango, ezala ete bango bazali naino mike to basili mpenza kokoma mikóló. Baboti bakoki kobongisa bilakiseli kati na yango mwana moko na moko akoyanola na mituna oyo zuzi moko to monganga moko akomeka kotuna ye. Mokano ezali te ya kolobisa bango lokola shakú makambo to biyano oyo bosilaki kopona liboso. Oyo eleki ntina, ezali ete bana bayeba bango moko makambo oyo bazali kondima, mpe mpo na nini bazali kondima yango. Ya solo, na ntango ya lisolo elongo na minganga to bazuzi, baboti to bato mosusu oyo bazali wana bakoki kopesa makanisi na ntina na makama ya bozongisi makila na nzoto mpe kolobela mpo na nkisi ezangi makila, oyo ekoki kozwama. Nzokande, likambo oyo zuzi to monganga akolinga mpenza koyeba na ntango azali kolobana elongo na bana na biso, ezali soki bazali kososola likambo yango polele mpe boponi nini botyami liboso na bango, mpe soki bazali mpenza na bindimeli na bango moko mpe na bikateli makasi.—Tala 2 Mikonzi 5:1-4.
22. Soki tolakisami na Nzambe na ntina na makila, nini ekozala mbala mosusu litomba na yango mpenza?
22 Biso banso, tosengeli koyeba likanisi ya Nzambe likoló na makila mpe kotosa yango. Emoniseli 1:5 elobi na ntina na Klisto ete “Ye alingaki biso mpe asikoli biso na masumu na biso na nzela na makila na ye.” Ezali bobele na kondima motuya na makila na Yesu nde tokoki kozwa lilimbisi mpenza mpo na masumu na biso. Baloma 5:9 elobi polele: “Na koleka mpenza, awa elongi biso na nzela na makila na ye, tokobika na ntango na nkanda.” Na yango, mayele ezali kotinda ete, biso mpe bana na biso, tolakisama na Jéhovah na ntina na likambo oyo mpe tozala na ekateli ya kotambola libela na libela kati na nzela na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala brochure Comment le sang peut-il vous sauver la vie? ebimisami na la Société Watch Tower, nkasa 21, 22, 28-31.
Bozongeli
◻ Lolenge nini tosengeli kolalela liteya na Jehovah?
◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete totosa mobeko na Nzambe oyo etali makila?
◻ Mpo na nini ezali likambo ya ntina ete bilenge bakoka kolimbola polele mpe na mpiko nyonso bindimeli na bango na ntina na makila?
◻ Ndenge nini baklisto bakoki kosalisa bana na bango na kolakisama malamu kati na mobeko na Jéhovah na ntina na makila?
[Etanda na lokasa 17]
TRIBINALE EKAMWAKI MINGI
Ekateli nini tribinale ezwaki mpo na D.P. oyo alobelami na paragrafe 17?
“Tribinale ekamwaki mingi mpo na mayele, bokatikati, limemya mpe kimya ya mwa elenge mwasi oyo ya mibu 14 na ndambo. Mbala mosusu alembaki makasi mpenza ntango ayokaki ete azwi lolenge moko ya kanser oyo ebikisaka te . .Nzokande, ezali elenge moko oyo ateli na makanisi nde atelemaki liboso na bazuzi mpo na kotatola. Amonanaki ete azalaki na likanisi ya polele na ntina na likambo monene oyo lizalaki kozela ye na liboso. Azalaki wana na ntango ya makita nyonso oyo mabongisamaki liboso epai na minganga mpo na kotalela likambo na ye, andimaki nkisi oyo ebongisamaki, abongisaki lolenge na makanisi oyo mazali na boyokani mpo na motindo oyo, lokola azali moto, asengelaki kokutana na likambo wana ya makila, mpe atelemaki liboso na tribinale na lisengi moko ya nguya: botosa ekateli na ngai . . .
“Longola elakiseli wana ya kotela na makanisi; D.P. apesaki bantina ekoki mpo ete tribinale etosa ekateli na ye. Nkisi oyo kati na yango likambo na kozongisama makila ekozala na kati mbele ekobebisa ye kati na elimo, na makanisi, na bizaleli mpe na mayoki. Na bongo tribinale ekotosa ekateli na ye mpo na nkisi oyo ye alingi.”
[Elilingi na lokasa 16]
Zuzi moko to monganga moko akoki mbala mosusu koluka koyeba nini ezali bindimeli ya elenge moklisto, mpe nini ezali kopusa ye ete andima bongo