Baklisto basepelaka kosalela basusu
“Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—MISALA 20:35.
1. Makanisi nini ya mabe epalangani lelo oyo, mpe mpo na nini ezali likama?
NA BAMBULA ya nsuka ya ekeke ya 20, bato bazalaki kosalela mingi maloba “ngai naino.” Koloba “ngai naino” elingi komonisa ete “liboso ngai,” yango emonisaka elimo ya koluka naino matomba ya moto ye moko, ya lokoso mpe ya kozanga kotalela bamposa ya bato mosusu. Na mobu 2000 oyo tozali sikoyo, bato batiki te koloba “ngai naino.” Mbala boni toyokaka motuna lokola, “Nakozwa nini?” to, “Bakofuta ngai nini?” Makanisi ya ndenge wana ya koluka matomba ya moto ye moko epesaka esengo te. Makanisi yango ekeseni mpenza na likambo oyo Yesu alobaki ete: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—Misala 20:35.
2. Ndenge nini emonani ete kopesa epesaka esengo?
2 Ezali mpenza solo ete esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa? Ezali bongo. Tókanisa naino Yehova Nzambe. ‘Bomoi eutaka’ epai na Ye. (Nzembo 36:9) Apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tózala na bomoi ya esengo mpe ya ntina. “Makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi” mautaka epai na Ye. (Yakobo 1:17) Yehova, “Nzambe ya esengo,” alɛmbaka kopesa te. (1 Timote 1:11, NW) Alingaka bato, bikelamu na ye, mpe apesaka bango biloko ebele. (Yoane 3:16) Kanisá lisusu libota. Soki ozali moboti, oyebi ete kobɔkɔla mwana esɛngaka komipimela makambo mosusu mpe kopesa. Kutu, mwana akoyebaka mpasi nyonso wana se nsima ya bambula mingi. Ye amonaka kaka ete makambo ezali kosalema ndenge esengeli kosalema. Atako bongo, osepelaka ntango ozali komona mwana na yo azali kokola mpamba te ozali kopesa ye nyonso oyo ezali malamu mpo na ye. Nyonso wana mpo na nini? Mpo olingaka ye.
3. Mpo na nini kosalela Yehova mpe kosalela bandeko na biso bandimi ezali likambo ya esengo?
3 Ndenge moko mpe, moko ya makambo oyo emonanaka na losambo ya solo ezali kopesa na bolingo. Lokola tolingaka Yehova mpe tolingaka bandeko na biso bandimi, tosepelaka kosalela bango mpe komipesa mpo na bango. (Matai 22:37-39) Moto nyonso oyo asambelaka mpo na matomba na ye moko azalaka mpenza na esengo te. Kasi baoyo bamipesaka mpo na kosalela basusu, baoyo bakanisaka mingimingi oyo bakoki kopesa, kasi te oyo bakoki kozwa, bazalaka mpenza na esengo. Tokoki kokanga ntina ya likambo yango soki totaleli ndenge oyo Makomami esaleli maloba mosusu etali losambo na biso. Tokotalela maloba misato, na lisolo oyo mpe lisolo oyo elandi.
Mosala oyo Yesu asalaki mpo na litomba ya bato
4. Na mangomba ya boklisto, ndenge nini “mosala oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso” esalemaka?
4 Na lokota ya Greke ya kala, liloba moko ya ntina etali losambo ezali leïtourgia; na Traduction du monde nouveau, liloba yango ebongolami na “mosala mpo na bolamu ya bato nyonso.” Na mangomba ya boklisto, liloba leïtourgia ebimisá liloba ya Lifalanse “liturgie” oyo babongolaka na Lingala na liloba molulu.a Kasi, milulu ya mangomba ya boklisto ezali mpenza te mosala oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso.
5, 6. (a) Mosala nini ezalaki kosalema na Yisalaele mpo na bolamu ya bato nyonso, mpe ezalaki na matomba nini? (b) Mosala monene nini mpo na bolamu ya bato nyonso ezwaki esika ya mosala oyo ezalaki kosalema na Yisalaele, mpe mpo na nini?
5 Ntoma Paulo asalelaki liloba ya Greke oyo euti na leïtourgia ntango azalaki koloba mpo na banganga na Yisalaele. Alobaki boye: “Nganga na nganga akendaka na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo mpo na kosala mosala mpo na bolamu ya bato nyonso [lolenge moko ya leïtourgia] mpe mbala na mbala kopesa bambeka se yango.” (Baebele 10:11, NW) Na Yisalaele ya kala, banganga Balevi bazalaki kosalela bato mosala ya ntina mingi mpenza. Bazalaki koteya Mibeko ya Nzambe mpe bazalaki kopesa bambeka mpo na kozipa masumu ya bato. (2 Ntango 15:3; Malaki 2:7) Ntango banganga na bato nyonso bazalaki kotosa Mibeko ya Yehova, ekólo mobimba ezalaki na esengo.—Deteronome 16:15.
6 Banganga ya Yisalaele bazalaki mpenza na libaku malamu ya kosala mosala oyo ezalaki mpo na bolamu ya bato nyonso oyo Mibeko esɛngaki; kasi mosala na bango ezalaki lisusu na ntina moko te ntango Nzambe asundolaki ekólo ya Yisalaele mpo bazalaki sembo te. (Matai 21:43) Yehova abongisaki likambo mosusu oyo eleki mpenza: mosala oyo Yesu, Nganga Oyo Aleki Monene, asalaki mpo na bolamu ya bato. Biblia elobi boye mpo na ye: “Kasi Yezu akoumela seko mpe mosala na ye ya Nganga-Nzambe ekoki koleka na moto mosusu te. Yango wana akoki kobikisa libela baoyo bapusanaka penepene na Nzambe na nguya na ye, mpamba te akoumela seko mpo abondela Nzambe mpo na bango.”—Baebreo 7:24, 25, Boyokani ya Sika.
7. Mpo na nini mosala oyo Yesu asalelaki bato ezali na matomba oyo ekokani na mosusu te?
7 Yesu akosala mosala ya bonganga libela na libela, moto moko te akozwa esika na ye. Yango wana, kaka ye nde akoki mpenza kobikisa bato. Azali kosalela bato mosala oyo ekokani na mosusu te na kati ya tempelo oyo esalami na mabɔkɔ ya bato te, kasi na tempelo ya elimo, elingi koloba ebongiseli monene ya losambo oyo Yehova asali banda na mobu 29 T.B. Sikoyo, Yesu azali kosala na Esika Eleki Bosantu ya tempelo yango, elingi koloba kuna na likoló. Azali “mosaleli ya bato [leitourgos] na esika mosantu mpe na hema ya solosolo, oyo Yehova asali, kasi moto te.” (Baebele 8:2, NW; Ebe. 9:11, 12) Atako Yesu azali na lokumu mingi, azali kaka “mosaleli ya bato.” Azali kosalela bokonzi monene na ye mpo na kopesa, kasi mpo na kozwa te. Ayokaka esengo mpenza na kopesa ndenge wana. Yango ezali kati na “esengo etyami liboso na ye,” oyo elendisaki ye mpo ayikela makambo oyo akutanaki na yango awa na mabele mpiko.—Baebele 12:2.
8. Ndenge nini Yesu asalaki mosala mpo na bolamu ya bato nyonso oyo ezwaki esika ya kondimana ya Mibeko?
8 Ezali mpe na likambo mosusu na mosala oyo Yesu azali kosalela bato. Paulo akomaki boye: “[Yesu] azwi mosala moleki yango na liboso na malamu [lokola] kondimana ebongisi ye ezali koleka mpe, awa ezali yango kokangama na bilaka bileki malamu.” (Baebele 8:6) Mose azalaki na kati ya kondimana kati na Yisalaele na Yehova. (Exode 19:4, 5) Yesu azali na kati ya kondimana ya sika oyo esali ete ekólo moko ya sika ebotama; ekólo yango nde “Yisalaele ya Nzambe,” elingi koloba baklisto bapakolami na elimo, bauti na bikólo mingi. (Bagalatia 6:16; Baebele 8:8, 13; Emoniseli 5:9, 10) Ezalaki mpenza mosala malamu mingi mpo na bolamu ya bato! Tozali mpenza na esengo lokola toyebi malamu Yesu, mosaleli ya bato oyo, na nzela na ye, tokoki kosambela Yehova na ndenge oyo ekosepelisa ye!—Yoane 14:6.
Baklisto mpe basalaka mosala mpo na litomba ya bato nyonso
9, 10. Tángá mwa misala oyo baklisto basalaka oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso.
9 Moto moko te asalaka mosala mpo na bolamu ya bato nyonso oyo ezali na lokumu lokola mosala ya Yesu. Kasi, ntango baklisto bapakolami bazali kozwa mbano na bango kuna na likoló, bazali kofanda pembeni ya Yesu mpe bazali kosala na ye elongo lokola bakonzi mpe banganga na likoló mpo na kosala mosala oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso. (Emoniseli 20:6; 22:1-5) Kasi, baklisto oyo bazali awa na mabele basalaka mpe mosala mpo na bolamu ya bato nyonso oyo epesaka bango mpe esengo mingi. Na ndakisa, ntango nzala ekɔtaki na Palestine, ntoma Paulo amemelaki Bayuda ya Yudea oyo bakómaki baklisto makabo oyo eutaki epai ya bandeko ya Mpoto mpo na kosunga bango. Yango ezalaki mpe mosala mpo na bolamu ya bato nyonso. (Baloma 15:27; 2 Bakolinti 9:12) Lelo oyo, baklisto basepelaka kosala mosala ya ndenge yango mpo na bolamu ya bato nyonso, bazali kosunga bandeko na bango oyo bazali na mpasi to baoyo bazali kozwa makama.—Masese 14:21.
10 Paulo alobelaki mosala mosusu mpo na bolamu ya bato ntango akomaki boye: “Ata ekoki na ngai ete nasopana likoló na mbeka mpe lotomo ya kondima na bino, nakosepela mpe nakoyoka esengo na ngai elongo.” (Bafilipi 2:17) Mosala monene oyo Paulo asalelaki Bafilipi ezalaki mosala mpo na bolamu ya bato nyonso, asalaki yango na bolingo mpe amipesaki na yango. Lelo oyo mpe mosala ya ndenge yango ezali kosalema, mingimingi na baklisto bapakolami oyo bazali kosala lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele,” mpo na kopesa bilei ya elimo na ntango oyo esengeli. (Matai 24:45-47) Lisusu, bango nyonso bazali “banganga ya bosantu,” bazali na mokumba ya “kotombola mbeka ya elimo ekosepelisa Nzambe [na nzela ya, NW] Yesu Klisto” mpe ya ‘koyebisa malamu ya oyo abyangi bango kobima na molili kokɔta na moi na ye ya kokamwisa.’ (1 Petelo 2:5, 9) Lokola Paulo, bazali kosepela na mikumba yango lokola mpe bazali koboma nzoto mpo na kokokisa mikumba na bango. Baninga na bango “bampate mosusu” basangani na bango mpe bazali kosunga bango na mosala ya koteya bato nkombo mpe mikano ya Yehova.b (Yoane 10:16; Matai 24:14) Yango ezali mpenza mosala monene mpe ya esengo oyo bazali kosala mpo na bolamu ya bato nyonso!—Nzembo 107:21, 22.
Tósala mosala ya bosantu
11. Ndakisa malamu nini mosakoli mwasi Ana atikelaki baklisto nyonso?
11 Liloba mosusu ya Greke etaleli losambo na biso ezali latréïa, Traduction du monde nouveau ebongoli yango na “mosala ya bosantu.” Kosala mosala ya bosantu elimboli kosala mosala oyo etali makambo ya losambo. Na ndakisa, Biblia elobi ete Ana, mwasi moko mobange ya mbula 84 oyo akufelá mobali mpe azalaki mosakoli, “abimaki na tempelo te, nde azalaki wana butu na moi kosalelaka [liloba ya Greke euti na latréïa] Nzambe na kokila mpe kobondela.” (Luka 2:36, 37) Ana azalaki ntango nyonso kosambela Yehova. Azali ndakisa malamu mpo na biso nyonso: bilenge, mikóló, mibali na basi. Lokola Ana oyo azalaki kobondela Yehova na etingya mpe azalaki kosambela ye mokolo na mokolo na tempelo, na kati ya mosala na biso ya bosantu tozali mpe na makambo lokola kobondela mpe koyangana na makita.—Baloma 12:12; Baebele 10:24, 25.
12. Likambo nini ya monene etali mosala na biso ya bosantu, mpe mpo na nini yango mpe ezali mosala oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso?
12 Ntoma Paulo alobelaki likambo moko monene na mosala na biso ya bosantu ntango akomaki boye: “Nazali kosakolela Nzambe na [elimo, NW] na ngai awa ekosakola ngai Nsango Malamu ya Mwana na ye. Ye mpe akotatwelaka ngai ete nakotika koloba nkombo na bino na mabondeli na ngai te.” (Baloma 1:9) Kosakola nsango malamu ezali kaka te mosala oyo tosalaka mpo na bato oyo bayokaka biso, kasi ezali mpe losambo oyo topesaka Yehova Nzambe. Báyoka biso, báyoka biso te, ntango tozali kosakola ezali mosala ya bosantu oyo tosalelaka Yehova. Na ntembe te, molende oyo tosalaka mpo na koyebisa bato mosusu bizaleli mpe mikano malamu ya Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló, epesaka biso esengo mingi.—Nzembo 71:23.
Esika nini tosalaka mosala ya bosantu?
13. Bato oyo bazali kosala mosala ya bosantu na lopango ya kati ya tempelo ya Yehova na elimo bazali na elikya nini mpe banani bazali kosepela na bango elongo?
13 Paulo akomelaki baklisto bapakolami boye: “Yango wana tiká ete tózala na matɔndi mpo tozwi bokonzi bokokoka koningana te mpe tiká ete tósambela Nzambe na motindo mokosepelisa ye na nsɔmɔ mpe na botosi.” (Baebele 12:28) Lokola bapakolami bazali na elikya mpenza ete bakozwa Bokonzi, kondima na bango ezali makasi wana bazali kosambela ye Oyo-Aleki-Likoló. Kaka bango nde bakoki kosalela ye mosala ya bosantu na Esika Mosantu mpe na lopango ya kati ya tempelo ya Yehova na elimo, mpe bazelaka na mposa makasi ntango oyo bakosala elongo na Yesu na Esika Eleki Bosantu, na likoló. Baninga na bango, bampate mosusu, bazali kosepela na bango elongo na elikya na bango kitoko.—Baebele 6:19, 20; 10:19-22.
14. Ebele monene bazali kozwa litomba nini na mosala oyo Yesu asalelaki bato?
14 Kasi, tokoloba boni mpo na bampate mosusu? Lokola ntoma Yoane amonaki yango na emonaneli, ebele monene ya bampate mosusu babimi na mikolo oyo ya nsuka mpe “basukoli bilamba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana ya Mpate.” (Emoniseli 7:14) Yango elingi koloba ete, lokola baninga na bango bapakolami, bango mpe bazali na kondima na mosala oyo Yesu asalaki mpo na bolamu ya bato, elingi koloba apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na kobikisa bato. Bampate mosusu mpe bazali kozwa litomba ya mosala oyo Yesu asalaki mpo na bolamu ya bato, elingi koloba, bazali ‘kosimba kondimana ya Yehova makasi.’ (Yisaya 56:6) Nzambe asali kondimana ya sika na bango te, kasi bazali kosimba yango, elingi koloba, bazali kotosa mibeko na yango mpe bazali kolanda bibongiseli na yango. Basangani na Yisalaele ya Nzambe, bazali kolya na mesa moko ya elimo mpe bazali kosala elongo na Yisalaele ya Nzambe, bazali kokumisa Nzambe liboso ya bato nyonso mpe bazali kopesa bambeka ya elimo oyo ezali kosepelisa ye.—Baebele 13:15.
15. Epai wapi ebele monene bazali kosala mosala ya bosantu, mpe bazali komiyoka ndenge nini mpo na libaku malamu yango?
15 Na bongo, ebele monene “batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana ya Mpate. Balati bilamba mpɛmbɛ.” Lisusu, “bazali liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe, mpe bakosalelaka ye butu na moi kati na Tempelo na ye, mpe Mofandi na kiti ya bokonzi akozipa bango.” (Emoniseli 7:9, 15) Na Yisalaele, baprozelite bazalaki kosambela na lopango ya libándá ya tempelo ya Salomo. Ndenge moko mpe, ebele monene bazali kosambela Yehova na lopango ya libándá ya tempelo na ye ya elimo. Bazali mpe kosepela kosalela Yehova wana. (Nzembo 122:1) Ata ntango moto ya nsuka kati na bapakolami akozwa libula na ye kuna na likoló, bakokoba kosalela Yehova mosala ya bosantu lokola bato na ye.—Emoniseli 21:3.
Mosala ya bosantu oyo Nzambe akoki kondima te
16. Bakebisi biso na makambo nini na oyo etali mosala ya bosantu?
16 Na Yisalaele ya kala, mosala ya bosantu esengelaki kosalema na kolanda mibeko ya Yehova. (Exode 30:9; Levitike 10:1, 2) Ndenge moko mpe lelo oyo, ezali na makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso tókokisa mpo andima mosala na biso ya bosantu. Yango wana Paulo akomelaki Bakolose boye: “Biso . . . totiki kobondela mpo na bino te. Tokolɔmbaka ete bótonda na boyebi ya mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli [ya elimo, NW]. Na bongo, bótambola na sembo ya Nkolo mpe bósepelisa ye na makambo nyonso. Bóbota mbuma na misala nyonso malamu, bókola mpe na boyebi koyeba Nzambe.” (Bakolose 1:9, 10) Ezali biso te nde tosengeli kopona ndenge malamu ya kosambela Nzambe. Ezali na ntina mpenza tóyeba Makomami malamumalamu, tózala na bososoli ya elimo mpe na mayele oyo euti na Nzambe. Soki boye te, ekozala likama mpenza.
17. (a) Ndenge nini mosala ya bosantu ebebisamaki na ntango ya Mose? (b) Ndenge nini mosala ya bosantu ekoki kosalema mabe lelo oyo?
17 Tókanisa lisusu Bayisalaele na ntango ya Mose. Biblia elobi boye: “Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango basambela minzoto.” (Misala 7:42, Boyokani ya Sika) Bayisalaele yango bamonaki makambo ya kokamwa oyo Yehova asalelaki bango. Atako bongo, basambelaki banzambe mosusu ntango bakanisaki ete soki basambeli banzambe yango bakozwa bolamu. Batikalaki sembo te, nzokande bosembo ezali na ntina mingi mpo mosala na biso ya bosantu esepelisa Nzambe. (Nzembo 18:25) Ya solo, lelo oyo bato oyo bakoki kotika Yehova mpo na kosambela minzoto to bana ya ngɔmbɛ ya wolo bazali mingi te, kasi ezali na lolenge mosusu ya losambo ya bikeko. Yesu akebisaki na likambo ya kosalela “Bozwi,” mpe Paulo alobaki ete bilulela ezali losambo ya bikeko. (Matai 6:24, NW; Bakolose 3:5) Satana azali komimonisa lokola nzambe. (2 Bakolinti 4:4) Mitindo wana ya losambo ya bikeko epalangani mingi mpe ezali motambo. Na ndakisa, okanisi boni soki moto moko azali koloba ete azali moyekoli ya Yesu kasi mokano na ye mpenza ezali ete akóma na bozwi mingi to mpe amityelaka ye moko motema mpe atyelaka makanisi na ye moko motema. Moto ya ndenge wana azali mpenza kosalela nani? Bokeseni nini ezali kati na moto yango na Bayuda ya ntango ya Yisaya oyo bazalaki kokata seleka na nkombo ya Yehova kasi bazalaki koloba ete banzambe ya bikeko nde ezalaki kosala misala ya kokamwa?—Yisaya 48:1, 5.
18. Ndenge nini mosala ya bosantu esalemaki mabe na ntango ya kala mpe lelo oyo?
18 Yesu alobaki lisusu boye: “Ntango ekoya wana moto na moto oyo akoboma bino, akobanza ete azali kosalela Nzambe mosala [ya bosantu, NW].” (Yoane 16:2) Na ntembe te Saulo, oyo na nsima akómaki ntoma Paulo, akanisaki ete azalaki kosalela Nzambe ntango ‘andimaki kufa ya Setefano’ mpe ‘azalaki naino kokanela bayekoli ya Nkolo makaneli ya kufa.’ (Misala 8:1; 9:1) Lelo oyo, bato mosusu oyo balingaka bato ya bikólo mosusu te na bamboka na bango mpe baoyo bazali koboma bato ya ekólo moko na mokano ya kosilisa bango nyɛɛ, balobaka mpe ete basambelaka Nzambe. Bato mingi balobaka ete basambelaka Nzambe kasi, soki totali malamu, basambelaka nde ekólo na bango, bozwi, bamisambelaka, to mpe banzambe mosusu.
19. (a) Ndenge nini totalelaka mosala na biso ya bosantu? (b) Lolenge nini ya mosala ya bosantu ekopesa biso esengo?
19 Yesu alobaki boye: “Okokumbamela [Yehova] Nzambe na yo mpe okosalela bobele ye [mosala ya bosantu, NW].” (Matai 4:10) Alobaki bongo na Satana, kasi ezali na ntina mpenza ete biso nyonso tótosa maloba na ye! Kosalela Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mosala ya bosantu ezali libaku malamu ya monene mpe ya kokamwa. Tokoloba boni mpo na mosala oyo ezali mpo na bolamu ya bato nyonso oyo ezali na boyokani na losambo na biso? Soki tozali kosalela bazalani na biso mosala oyo ezali mpo na bolamu na bango, ekomemela biso esengo mpe bolamu mingi. (Nzembo 41:1, 2; 59:16) Kasi, mosala yango epesaka esengo ya solosolo se soki esalemi na motema mobimba mpe na ndenge oyo ebongi. Banani basambelaka Nzambe na ndenge oyo ebongi mpenza? Banani oyo Yehova andimaka mosala na bango ya bosantu? Tokozwa biyano na mituna yango soki totaleli liloba ya misato oyo Biblia esaleli na boyokani na losambo na biso. Tokotalela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Milulu ya mangomba ya boklisto ezalaka mingimingi misa to milulu mosusu, lokola Ukaristya na Lingomba ya Katolike.
b Misala 13:2 elobi ete basakoli mpe balakisi na Antiokia bazalaki “kosalela” (euti na liloba ya Greke leïtourgia) Yehova. Ekoki mpenza kozala ete mosala yango oyo bazalaki kosala etalaki mpe kosakola nsango malamu epai ya bato.
Okopesa eyano nini?
• Mosala monene nini Yesu asalaki mpo na bolamu ya bato?
• Baklisto basalaka mosala nini mpo na bolamu ya bato nyonso?
• Mosala ya bosantu ya baklisto ezali nini, mpe ezali kosalema epai wapi?
• Tosengeli koyekola nini soki tolingi ete mosala na biso ya bosantu esepelisa Nzambe?
[Elilingi na lokasa 10]
Baboti bayokaka esengo mingi na kopesa
[Bililingi na lokasa 12, 13]
Baklisto basalaka mosala mpo na bolamu ya bato nyonso ntango basungaka basusu mpe ntango basakolaka nsango malamu
[Elilingi na lokasa 14]
Tosengeli kozala na boyebi ya solosolo mpe na bososoli mpo tóndima ete mosala na biso ya bosantu ezali kosepelisa Nzambe