Mokapo 22
Mawa na liboso: Mayoyo
1. Banani bayanoli na kelelo oyo baanzelu babeti, mpe kelelo na mitano esakoli likambo nini?
ANZELU na mitano azali komibongisa mpo na kobeta kelelo. Kelelo minei esili kobetama, esalamaki bongo liboso na bitumbu minei oyo bibetaki ndambo na misato na mokili oyo Jéhovah asambisi mpo na efundeli mabe koleka: boklisto ya mokili oyo. Emonisamaki ete, boklisto ya mokili oyo ezali na maladi ya liwa. Wana baanzelu bazali kobeta kelelo, bato oyo bazali bamemi nsango bayoki yango na mokili mobimba. Kelelo ya mitano na anzelu elingi sikawa koyebisa mawa na liboso, oyo ya nsomo lisusu koleka bolozi boye bosalamaki liboso. Mawa yango ezali etumbu makasi na nzela ya mayoyo. Kasi totalela naino mikapo mosusu na Biblia oyo mikosalisa biso na kokanga ntina malamumalamu mpo na koyeba etumbu yango ezali nini.
2. Mokanda nini ya Biblia elobeli etumbu na mayoyo oyo ekokani na etumbu oyo Yoane amoni, mpe etumbu yango ebimisaki likambo nini kati na Yisraele na kala?
2 Mokanda na Biblia na Yoele, oyo ekomamaki na ekeke ya libwa liboso na ntango na biso, ezali kolobela mpo na etumbu moko ya banyama mike, mpe mayoyo, yango ekokani na oyo Yoane amonaki. (Yoele 2:1-11, 25)a Etumbu oyo ekokaki kopesa mpasi mingi na Yisraele oyo epengwaki, kasi ekokaki mpe komema Bayuda na kobongola mitema mpe kozwa lisusu ngolu na Nzambe. (Yoele 2:6, 12-14) Na ntango yango Jéhovah akokaki kosopa elimo na ye likoló na “nzoto nyonso” wana bilembo na nsomo mpe makambo na kokamwa mpe kobangisa makosalema liboso na koya na “mokolo monene mpe na nsomo na Jéhovah.”—Yoele 2:11, 28-32.
Etumbu na ekeke ya liboso
3, 4. (a) Ntango nini mpe ndenge nini esakweli oyo ekomami na Yoele mokapo 2 ekokanaki? (b) Ndenge nini etumbu ekokani na lipata na mayoyo emonanaki na ekeke na liboso, mpe eumelaki ntango boni?
3 Esakweli oyo ekomamaki na Yoele mokapo ya 2 ezwaki kokokisama ya yambo, na ekeke ya liboso. Mokolo na Pantekote ya mobu 33, Jéhovah asopaki solo elimo santu na ye likoló na baklisto ya liboso. Bapakolamaki mpe bazwaki nguya ya koloba “makambo kitoko na Nzambe” na minoko mingi. Ebele na bato oyo bazalaki kokamwa bayanganaki. Ntoma Petelo azwaki maloba, na kotangaka Yoele 2:28, 29 mpe alimbolelaki bango ete bazalaki batatoli na kokokisama ya maloba yango. (Misala 2:1-21) Kasi eloko moko te elakisi ete na eleko yango, etumbu ya banyama mike ya solosolo esalamaki oyo ekokaki kopesa mpasi na bamoko mpe kosala ete bamosusu babongola mitema.
4 Na mokolo wana etumbu na elilingi esalamaki? Ee, ntembe ezali te! Etumbu ebimisamaki na kosakola makasi oyo ya baklisto bapakolami sika.b Na nzela na bango, Jéhovah abyangaki Bayuda oyo bazalaki koyoka ete babongola mitema mpe bazwa mapamboli na ye. (Misala 2:38-40; 3:19) Baoyo bandimaki libyangami yango bapambolamaki mingi. Kasi mpo na baoyo baboyaki, baklisto ya ekeke ya liboso bakomaki lokola lipata na mayoyo makobebisaka. Kobanda Yelusaleme, bapalanganaki na Yuda mobimba mpe na Samalia. Na mwa ntango moke, bazalaki bipai nyonso, konyokolaka Bayuda oyo bazangi kondima, na kosakola polele kosekwa na Yesu mpe na manso matalelami na lisekwa yango. (Misala 1:8; 4:18-20; 5:17-21, 28, 29, 40-42; 17:5, 6; 21:27-30) Etumbu oyo eumelaki kino ‘mokolo na nsomo,’ oyo na mobu 70, mokolo Jéhovah amemaki mampinga ya Baloma epai na Yelusaleme mpo na kobebisa yango. Ezali bobele baklisto oyo bazalaki kobyanga nkombo na Jéhovah na kondima nyonso nde babikaki.—Yoele 2:32; Misala 2:20, 21; Masese 18:10.
Etumbu na mayoyo lelo oyo
5. Ndenge nini esakweli na Yoele ezali kokokana uta 1919?
5 Na kokanisa malamu, esengelaki kozela ete esakweli na Yoele ezwa kokokisama eleki monene, na ntango ya nsuka. Yango esalamaki bongo. Na assemblée oyo Bayekoli ya Biblia ya mokili mobimba basalaki na Cedar Point (Etats-Unis), kobanda le 1er kino le 8 septembre 1919, Jéhovah asopaki elimo na ye na lolenge ya kokamwisa likoló na basali na ye mpo na kopusa bango ete babongisa kampanye ya kosakola na mokili mobimba. Na baoyo nyonso bazalaki komiloba ete bazali baklisto, bobele bayekoli ya Biblia nde bandimaki ete Yesu asilaki kotyama na kiti na bokonzi na likoló, mpe bamipesaki mpo na kosakola nsango yango malamu. Engebene esakweli, litatoli na bango ya molende likómaki etumbu oyo ezalaki kopesa mpasi na boklisto ya mokili oyo epengwi.—Matai 24:3-8, 14; Misala 1:8.
6. (a) Yoane amoni nini ntango anzelu na mitano abeti kelelo? (b) “Monzoto” wana ezali elilingi na nani?
6 Emoniseli, oyo ekomamaki mibu soko 26 nsima na kobebisama ya Yelusaleme, ezali mpe kolobela etumbu yango. Ezali kobakisa nini na oyo Yoele akomaki mpo na etumbu yango? Totala oyo Yoane akomaki: “Mpe anzelu ya mitano abetaki kelelo. Mpe namonaki monzoto moko mouti na likoló, moyei kokwea na mokili, mpe bapesaki ye fungola na libulu mozindo.” (Emoniseli 9:1) “Monzoto” oyo ekokani te na oyo Yoane amonaki mpe alobelaki kokwea na yango na Emoniseli 8:10. Amoni “monzoto moko kokwea longwa na likoló” mpe ezali na mosala ya kokokisa mpo na mokili. Ezali elilingi ya elimo moko to mpe ekelamu ya mosuni? Na lisolo na ye Yoane amonisi mosika ete oyo azali na “fungola na libulu mozindo” abwaki Satana kati na “libulu mozindo.” (Emoniseli 20:1-3) Esengeli bongo kozala moto na elimo na nguya mingi. Na Emoniseli 9:11, Yoane ayebisi biso ete mayoyo mazali na “mokonzi, ye anzelu na libulu mozindo.” Ba versets oyo mibale esengeli kotalela bobele moto moko, mpo ete soko totali malamu, anzelu oyo azali na fungola ya libulu mozindo ezali ye nde anzelu na libulu mozindo. Monzoto esengeli bongo kozala elilingi na Mokonzi oyo atyami na Jéhovah, mpo ete baklisto bapakolami bayebi bobele Mokonzi moko oyo auti na molongo ya baanzelu: Yesu Klisto.—Bakolose 1:13; 1 Bakolinti 15:25.
7. (a) Likambo nini esalemi ntango “libulu mozindo” efungwami? (b) “Libulu mozindo” ezali nini, mpe nani afandaki kuna mpo na mwa ntango?
7 Lisolo ekobi boye: “Mpe afungolaki libulu mozindo, mpe milinga mibimi na libulu lokola milinga na fulu monene ya mɔ́to, mpe moi eyindaki, mpe mopepe, mpo na milinga na libulu. Mpe mayoyo mabimaki na milinga kati na mokili, mpe nguya epesameli bango lokola nguya na bankotɔ́ na mokili.” (Emoniseli 9:2, 3) Kati na Makomami, liloba “libulu” ezali komonisa esika ezangi mosala, mbala mosusu ezali kolakisa liwa. (Tala Baloma 10:7; Emoniseli 17:8; 20:1, 3.) Na nsuka na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba (1918-1919), etuluku moke ya bandeko ya Yesu elekisaki ntango moke kati na “libulu” na motindo oyo ya kozanga kosala mpo na mwa ntango. Kasi ntango Jéhovah asopaki elimo na ye likoló na basaleli na ye oyo babongolaki mitema, na 1919, bango nyonso basalaki noki mpo na kolonga ntembe na ntina na mosala oyo ezelaki bango.
8. “Milinga” mibimi elongo na mayoyo ezali na ndimbola nini?
8 Lokola Yoane amoni yango, kobima na mayoyo elandani na milinga mingi, lokola “milinga na fulu monene ya mótô.”c Ezali yango esalamaki na 1919. Na mbula wana, ezalela ya boklisto ya mokili oyo mpe na mokili mobimba ezwaki molili. (Tala Yoele 2:30, 31.) Kobima na mayoyo oyo, bango basangani na kelasi na Yoane, ezalaki solo kokwea mpo na bakonzi ya boklisto ya lokuta baoyo basalaki mwango mabe mpo na kobebisa libela mosala na Bokonzi mpe baboyaki Bokonzi na Nzambe. Eloko lokola elamba na milinga ebandaki kozipa boklisto ya mokili oyo esili kopengwa na ntango etuluku na “mayoyo” ezwaki nguya epai na Nzambe mpe ebandaki kosalela yango na kosakóláká bansango na nguya ya kosambisa. “Moi” na boklisto ya mokili oyo, ekokani na mwinda na ye, ezipamaki; mpo na bikateli na Nzambe, “mopepe” mokomaki bozito na ntango emonisamaki polele ete nzambe na boklisto ya mokili oyo ezali mosusu te bobele “mokóló na nguya ya mopepe” na mokili oyo.—Baefese 2:2; Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19.
Mayoyo mazali konyokola bato
9. Bitinda nini epesami na mayoyo mpo na etumba?
9 Bitinda nini mayoyo bazwi mpo na etumba? Yoane alobi: “Batindi bango ete babebisa matiti na mokili te, soko eloko mobesu moko te, soko nzete moko te, kasi bobele bato oyo bazangi elembo na Nzambe na bilongi na bango. Mpe nzela epesami na bango ete baboma bato te, kasi banyokola bango sanza mitano, mpe bolozi na bango lokola bolozi na nkotó oyo asili koswa moto. Na mikolo yango, bato bakoluka kufa, nde bakozwa yango soko moke te, mpe bakozala na mposa na kokufa, mpe kufa ekokima bango.”—Emoniseli 9:4-6.
10. (a) Etumbu yango etindami mpenza epai na banani, mpe ebimisi likambo nini? (b) Ezali mitungisi na lolenge nini? (Tala lisusu maloba na nse na lokasa.)
10 Etumbu oyo ezali mpo na bato nyonso te to mpo na baoyo bazali na lokumu kati na bango—‘matiti mpe banzete na mokili.’ (Tala Emoniseli 8:7.) Mayoyo masengeli konyokola bobele baoyo bazangi elembo ya Nzambe na bilongi na bango, baoyo kati na boklisto ya mokili oyo bazali komiloba ete batyami elembo, kasi misala mikweisi maloba na bango. (Baefese 1:13, 14) Na ntina yango, maloba na koswa ya mayoyo na ntango na biso, ebimisamaki libosoliboso likoló ya bakonzi ya boklisto ya lokuta. Bato yango na komikumisa banyokwamaki na koyoka polele ete bazali bobele komema basambeli na bango na likoló te, kasi ata bango moko bakokende kuna mpe te!d Bakokani solo na ‘bakufi miso oyo bazali kokamba bakufi miso’!—Matai 15:14.
11. (a) Mayoyo mapesameli nzela mpo na kotungisa banguna na Nzambe mpo na ntango boni, mpe mpo na nini tokoki koloba te ete yango ezali ntango mokuse? (b) Mitungisa yango ezali mpasi?
11 Monyoko mokoumela sanza mitano. Wana ezali eleko mokuse? Te, ezali bongo te mpo na mayoyo, mpamba te molai na bomoi ya mayoyo ezali bongo. Na yango, mayoyo na ntango na biso bazali koswa banguna na Nzambe na boumeli na bomoi na bango mobimba. Lisusu, monyoko oyo bazali kobimisa ezali kopesa mpasi makasi kino bato baluki kokufa. Ya solo, naino toyoki te ete nsima na koswama na mayoyo bato mosusu balukaki solo komiboma. Nzokande, likambo oyo esalisi biso na kokanisa bonene na mpasi yango, bolozi ekokani na mpasi makasi oyo ezwami na koswama na bankotó. Tala oyo ezali kokundola biso bampasi oyo Yilimia asakolaki epai na Bayisraele bazangi sembo: Banguna na bango bato na Babilone, basengelaki kopanza bango, mpe mpo na Bayisraele, liwa ezalaki malamu koleka bomoi.—Yilimia 8:3; tala lisusu Mosakoli 4:2, 3.
12. Mpo na nini mayoyo bazwi nzela ya kotungisa bakonzi na mangomba na boklisto na mokili oyo, na elobeli na elimo, kasi bazwi te lotomo ya koboma bango?
12 Mpo na nini mayoyo mapesameli nzela ya konyokola na ndimbola ya elimo, kasi ya koboma te? Mayoyo mazali kobimisa mpasi ya liboso na komonisa polele lokuta mpe bambeba na boklisto ya mokili oyo, kasi ezalela ya kufa na elimo ya boklisto na mokili oyo ekokaki kosakolama polele bobele nsima, na kolandana na mokolo na Nkolo. Ezali na mpasi ya mibale nde ndambo na misato na bato babomami.—Emoniseli 1:10; 9:12, 18; 11:14.
Mayoyo mabongisami mpo na etumba
13. Yoane alobeli mayoyo yango na maloba nini?
13 Mayoyo oyo ezali na bilongi na kokamwisa. Yoane akomi boye mpo na yango: “Mpe motindo na mayoyo yango ezalaki lokola bampunda babongisami mpo na etumba; mpe na mitó na bango lokola mitole na motindo na wolo, mpe bilongi na bango bizalaki lokola bilongi na bato, kasi nsuki na bango lokola nsuki na basi. Mpe mino na bango lokola mino na bankosi; mpe na ntolo na bango bazalaki na nguba na ebende. Mpe lokito na mapapu na bango lokola lokito na makalo makangami na bampunda mingi kotambola mbango na etumba.”—Emoniseli 9:7-9.
14. Mpo na nini maloba na Yoane mpo na mayoyo ekokani mpenza na etuluku na baklisto oyo bazongisamaki na bomoi na 1919?
14 Tala oyo ezali komonisa malamu etuluku na baklisto ya sembo oyo bazongisamaki na bomoi na 1919. Lokola bampunda, baklisto ya sembo batelemaki mpo na etumba, bazalaki na motema mɔ́to ete babunda etumba mpo na solo na lolenge oyo ntoma Paulo akomaki. (Baefese 6:11-13; 2 Bakolinti 10:4) Na mitó na bango, Yoane amoni oyo ezali lokola mitole na motindo na wolo. Ebongaki te ete bamema mitole ya solosolo, mpo ete bakobanda koyangela te wana ezali bango naino na mabelé. (1 Bakolinti 4:8; Emoniseli 20:4) Kasi na 1919, bazalaki wana na lolenge na bakonzi. Bazalaki bandeko ya Mokonzi mpe babombelaki bango mitole na likoló soko bakotikala sembo kino nsuka.—2 Timote 4:8; 1 Petelo 5:4.
15. Makambo malandi malimboli nini, na ndenge mayoyo (a) bazali na nguba na ebende? (b) bazali na bilongi lokola bilongi na bato? (c) bazali na nsuki lokola basi? (d) bazali na mino lokola mino na nkosi? (e) bazali kotya makelele makasi?
15 Engebene emonaneli, mayoyo mazalaki na nguba na ebende, oyo ezali elilingi ya boyengebene na bango ekoki kobebisama te. (Baefese 6:14-18) Lisusu mayoyo mazalaki na bilongi na bato; yango emonisi ete bazali na ezaleli ya bolingo, mpo ete moto azalisamaki na elilingi ya Nzambe, oyo azali bolingo. (Genese 1:26; 1 Yoane 4:16) Nsuki na bango ezali milai lokola nsuki na basi, oyo ezali elilingi ya botosi epai na Mokonzi na bango, anzelu na libulu mozindo. Na nsuka, mino na bango ezali lokola mino na nkosi, nyama oyo asalelaka mino na ye mpo na kopasola mosuni. Kobanda 1919 kelasi ya Yoane ebandaki lisusu kolya bilei makasi na elimo, mingimingi solo oyo etali Bokonzi na Nzambe etambwisami na “Nkosi oyo abimi na libota na Yuda,” Yesu Klisto. Nkosi ezali komonisa mpiko; nzokande, esengelaki ete baklisto yango bazala na mpiko mingi mpo na kolya nsango oyo ezali koswa, kokoma yango kati na mikanda, mpe kokabola mikanda yango na mokili mobimba. Mayoyo yango na elilingi mazali kosala makelele mingi, lokola “lokito na makalo makangami na bampunda mingi kotambola mbango na etumba.” Na kolandaka ndakisa oyo baklisto na ekeke ya liboso batikaki, bango mpe bazali na mposa ya kotika mosala te.—1 Bakolinti 11:7-15; Emoniseli 5:5.
16. Mayoyo bazali na “mikila mpe na bitubeli lokola bitubeli na bankoto na koswa.” Yango elimboli nini?
16 Mosala ya kosakola ya mayoyo esuki bobele na bopanzi nsango na monoko te. “Bazali na mikondo mpe na bitubeli lokola bitubeli na bankotó na koswa, mpe nguya na bango ezali na mikondo na bango mpo na kotungisa bato sanza mitano.” (Emoniseli 9:10) Maloba oyo makoki kolimbola nini? Ntango ba Témoins de Jéhovah basakolaka Bokonzi, bayebisaka bato, na monoko to mikanda, maloba mazali na nguya, matongami likoló na Liloba na Nzambe. Nsango yango ezali koswa lokola bankoto, mpo ezali kosakola mokolo na nkanda na Jéhovah oyo ebelemi. (Yisaya 61:2) Liboso na nsuka na bomoi na bango, libota na lelo na mayoyo na elimo ekosilisa mosala oyo Nzambe apesaki bango, mosala ya kosakola bikateli na Ye, na koswáká bongo batuki nyonso ya lolendo.
17. (a) Lokola bayekoli na Biblia bayekolaki yango na Assemblée oyo basalaki na 1919, mokanda nini elingaki koyeisa litatoli na bango lisusu makasi? (b) Bakonzi na mangomba batungisamaki na ndenge nini mpe basalaki nini?
17 Na assemblée oyo basalaki na 1919, etuluku oyo na mayoyo esepelaki na koyoka ete zulunalo ya sika, L’Age d’Or ebimi. Zulunalo yango, ezalaki kobimisama ntango nyonso nsima ya mikolo zomi na mitano, ezalaki bongo mpo na kopesa litatoli ya koswa lisusu koleka.e Nimero 27 na yango, oyo ya 29 Septembre 1920, ebimisaki polele bokosi ya bakonzi na mangomba, baoyo banyokolaki Bayekoli na Biblia na Etats-Unis na 1918 mpe na 1919. Na 1920, mpe 1930, L’Age d’Or etungisaki bakonzi ya mangomba na kobimisaka bililingi mpe masolo ya koswa oyo ezalaki kolobela polele komikotisa na bango na lolenge ya mayele mabe kati na makambo ya politike, mingimingi boyokani oyo etyamaki maboko na bakonzi ya katolike elongo na bakonzi oyo bazalaki konyokola bato mpe ba nazi (bokonzi ya Hitler). Bakonzi ya mangomba basilikaki “na kosaláká mwango ya mabe kati na mibeko” mpe na kopusáká ebele na bato ete bakoka kobundisa makasi basali na Nzambe.—Nzembo 94:20.
Nsango mpo na bakonzi ya mokili
18. Mosala nini mayoyo bazali na yango, mpe likambo nini esalemaki mpo na koyanola na kelelo na mitano?
18 Na mikolo na biso mayoyo mazalaki na mokumba ya kokokisa: kosakola nsango malamu ya Bokonzi, kobimisa polele lokuta nyonso mpe koluka bampate babunga. Wana ezalaki bango kokokisa mikumba yango, mokili esengelaki bobele kokamwa mpo na mosala na bango. Na komonisáká botosi na kobetama na kelelo ya baanzelu, kelasi ya Yoane elandaki koloba polele ete boklisto ya mokili oyo ebongi na bikateli na kokweisama na Jéhovah. Na koyanola na kelelo ya mitano, Bayekoli na Biblia balobelaki mingi mpenza likoló na motindo moko na bikateli yango, na assemblée oyo basalaki na Londres kobanda le 25 kino 31 mai 1926. Na assemblée yango, bazwaki ekateli oyo ezalaki na motó na likambo “Litatoli moko mpo na bakonzi ya mokili” mpe, na salle babengi Royal Albert Hall, bayokaki diskur piblike oyo elobaki: “Mpo na nini bikonzi na mokili bizali kotengatenga?—Lobiko ekouta wapi.” Lobi elandaki, zulunalo moko ya ntina na Londres ebimisaki na mobimba na yango ekateli mpe maloba nyonso ya diskur piblike. Nsima na yango, etuluku ya mayoyo ekabolaki na mokili mobimba 50 milió ya ba tracts oyo ebimisaki ekateli yango. Oyo nde monyoko mpo na bakonzi ya mangomba! Nsima ya bambula bazalaki naino kolobela ekateli oyo na koswa na mokili ya Angleterre.
19. Mokanda nini esalisaki mayoyo na elilingi mpo na etumba, mpe elobaki nini na ntina na mokanda manifeste oyo ebimisamaki na Londres?
19 Na assemblée yango, mayoyo na elilingi bazwaki esaleli mosusu ya sika mpo na etumba, ezalaki bongo mokanda Délivrance. Na kati na mokanda yango elembo ya Biblia oyo ezali komonisa ete “mwana mobali,” elingi koloba Boyangeli to Bokonzi na likoló na Klisto, oyo ebotamaki na 1914, elimbolamaki. (Matai 24:3-14; Emoniseli 12:1-10) Mokanda yango ezongelaki mpe maloba na mokanda moko ebimisamaki na Londres na 1917, mpe etyamaki maboko na bakonzi ya mangomba baoyo bamonisamaki lokola ‘basakoli na lokumu kati na basakoli minene na mokili’ mpe bazalaki bamonisi ya mangomba minene ya baprotestá: baptiste, congrégationaliste, presbytérienne, épiscopale mpe méthodiste. Mokanda na bango esakolaki ete “mpasi ya lelo emonisi nsuka na ntango ya Mabota” mpe ete “bato bakoki komizela na bozongi na Nkolo mosika te.” Bakonzi oyo na mangomba bamonaki elembo na kozonga na Yesu, kasi basalaki eloko mpo na kosakola yango? Mokanda Délivrance epesi eyano oyo: “Oyo ekamwisi mpo na likambo yango ezali ete bobele bato oyo bakomaki mokanda yango, bawanganaki yango na nsima mpe baboyaki kondima ete tozali na nsuka ya mokili mpe kati na mokolo na kozonga na mibale na Nkolo.”
20. (a) Etelemelo nini bakonzi basili kozwa liboso na mayoyo mpe na Mokonzi na bango? (b) Engebene Yoane, nani azali koyangela likoló na mayoyo, mpe nkombo na ye ezali nini?
20 Na esika ya kosakola Bokonzi na Nzambe oyo ebelemi, bakonzi ya mangomba na boklisto ya mokili oyo baponaki kotikala na ngambo ya mokili ya Satana. Balingi kosangana te na etuluku ya mayoyo soko mpe na Mokonzi na bango, oyo mpo na ye Yoane alobi polele sikawa ete: “Mwanze na libulu mozindo azali mokonzi na bango. Nkombo na ye na monoko na Liebele Abadona [“Kobebisa”], kasi nkombo na ye na monoko na greke Apolioni [“Mobebisi”].” (Emoniseli 9:11) Lokola “anzelu na libulu mozindo” mpe “Mobebisi,” Yesu abetaki mpenza boklisto ya mokili oyo na mawa moko makasi. Kasi esili te!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokanisa Yoele 2:4, 5, 7 (epai banyama mike bakokisami na bampunda, na ekólo mpe na bato baoyo bazali kosala makelele lokola ya likalo) elongo na Emoniseli 9:7-9; kokanisa lisusu Yoele 2:6, 10 (oyo emonisi makambo mabimi mpo na mpasi makasi na etumbu na banyama mike) elongo na Emoniseli 9:2, 5.
b Tala lisolo “Banso bayangani mpo na kotemela mabota kati na Lobwaku na Ekateli,” oyo ebimaki na La Tour de Garde ya le 1er Mai 1962.
c Verset oyo ekoki kosalelama te mpo na komonisa ete móto ezalaki na libulu mozindo, lokola soko ete yango ezalaki lolenge ya lifelo na móto. Yoane alobi malamu ete milinga ezalaki “lokola” milinga na fulu monene ya móto. (Emoniseli 9:2) Alobi te ete, amoni móto ya solosolo kati na libulu mozindo.
d Liloba na greke oyo esalelami awa euti na verbe basanizô, oyo emonisi mbala mosusu monyoko ya solo. Nzokande, liloba yango ekoki mpe kosalelama mpo na kotungisama ya makanisi. Na ndakisa na 2 Petelo 2:8, totangi ete Lota ‘anyokwamaki na molimo na ye na sembo’ mpo na mabe oyo ezalaki na Sodome. Na ntango ya bantoma, bakonzi ya mangomba banyokwamaki na elimo, atako ezalaki mpo na ntina mosusu.
e Zulunalo yango ebengamaki Consolation na 1937 mpe Réveillez-vous! na 1946.
[Elilingi na lokasa 143]
Kobetama na kelelo na mitano ezali kosakola mpasi ya liboso kati na bampasi misato
[Elilingi na lokasa 146]
Mbanzi na yo ezali nsonge kati na motema na banguna na mokonzi. (Nzembo 45:5) Elilingi oyo ebimaki elongo na maloba oyo totangi, ezali ndakisa monene na bililingi nyonso oyo na 1930, eswaki mitema ya ‘bato oyo bazangaki elembo ya Nzambe’
[Bililingi na lokasa 147]
Ndako monene Royal Albert Hall, esika balakisaki mokanda Délivrance mpe bazwaki ekateli na motó na likambo: “Litatoli epai na batambwisi na mokili”