Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Batatoli mibale bazongi na bomoi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • Batatoli mibale babomami

      19. Engebene lisolo na Emoniseli, eloko nini esalami ntango batatoli mibale basilisi kosakola?

      19 Bolozi oyo ezalaki makasi mingi mpo na boklisto ya mokili oyo. Na yango, nsima wana batatoli mibale basakolaki na kolataka ngoto, na boumeli ya sanza 42, boklisto ya mokili oyo esalelaki bopusi na yango mpo na ‘koboma’ bango. Yoane akomaki: “Wana ekosilisa bango litatoli na bango, nyama na yauli oyo akobuta na libulu ya bozindo akobundisa bango na etumba, akoleka bango, mpe akoboma bango. Bibembe na bango bikolala na balabala na mboka yango monene, oyo ebyangami na lisese ete, Sodome na Ezipito, kuna Nkolo na bango abakisamaki na nzete. Bamosusu na bikolo, na mikili, na minoko, na mabota bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakopesa nzela te ete bikundama na lilita. Bango bafandi na mokili bakosepela na ntina na bango, mpe bakoyoka esengo, bakokabana makabo, mpo ete basakoli yango mibale batungisaki bafandi na mokili.”—Emoniseli 11:7-10.

      20. “Nyama na yauli oyo ebimi na libulu mozindo” ezali nini?

      20 Oyo mbala ya liboso kati na mbala 37 oyo nyama na yauli elobelami kati na Emoniseli. Mwa mosika kati na mikapo mikolanda, tokolimbola nini wana nyama na yauli mpe banyama mosusu oyo batangami. Mpo na sikawa, tolobi bobele ete “nyama na yauli oyo abuti na libulu mozindo” ezali eloko oyo Satana asali yango; ezali bongo ebongiseli na politike.b—Tala Emoniseli 13:1; Danyele 7:2, 3, 17.

      21. (a) Ndenge nini bakonzi na mangomba, banguna na batatoli mibale bazwaki libaku na yikiyiki ya etumba? (b) Likambo oyo ete bibembe na batatoli mibale ekundami te elimboli nini? (c) Ndimbola nini tosengeli kosimba mpo na eleko oyo ya mikolo misato na ndambo? (Tala note na nse ya paragrafe 21.)

      21 Kobanda 1914 kino 1918, mabota bazalaki kobunda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Lokola bolingo makasi mpo na ekolo elamusamaki, na ebandeli ya mobu 1918, bakonzi na mangomba, banguna na batatoli mibale bamonaki ete ezalaki libaku malamu mpo na bango. Bapusaki bazuzi mpo na kokangisa na boloko bandeko oyo bazalaki kotambwisa misala ya Bayekoli ya Biblia, likoló na bifundeli ya lokuta ete bazalaki kozimbisa bato. Bandeko mosusu ya sembo oyo batikalaki kuna na esika ya kotambwisa mosala, balembaki nzoto. Tokoki koloba ete mosala ya Bokonzi esalemaki lisusu te. Mosala ya kosakola ezalaki lokola ekufi. Na ntango ya kala, soko nzoto na mowei ekundami te, ezalaki likambo na nsoni. (Nzembo 79:1-3; 1 Mikonzi 13:21, 22) Na yango, ezalaki kofingama mpo na batatoli mibale na kozanga kokundama. Na moi molunge ya Palestine, ebembe oyo elali na balabala ekolumba nsolo mabe nsima na mikolo misato na ndambo.c (Tala Yoane 11:39.) Maloba oyo na esakweli mamonisi makasi kofingama mpe kotyolama ezwaki batatoli oyo mibale. Bandeko bakangamaki bakokaki kobimisama na boloko te ata na kosimbisa mbongo ntango likambo na bango efundamaki na cour d’appel. Batyamaki lokola eloko ya kotala mpo na bato nyonso, ntango molai kino balumbaki nsolo mabe mpo na bafandi na “mboka yango monene.” Kasi “mboka yango monene” ezali mboka nini?

      22. (a) Mboka monene ezali nini? Limbola. (b) Ndenge nini bato ebele basanganaki esika moko na bakonzi na mangomba mpo na kosepela na ndenge batatoli mibale bapekisamaki ete basakola te? (Tala maloba mazali na encadré.)

      22 Yoane apesi biso mwa makambo makoki kosalisa biso na koyeba yango. Alobi ete Yesu abomamaki kati na mboka yango monene. Na yango, mboka Yelusaleme ebimeli biso mbala moko na makanisi. Kasi alobi lisusu ete mboka yango monene ebengami Sodome na Ezipito. Mboka Yelusaleme ebengamáka kala ete ezali Sodome na ntina na misala na yango ya mbindo. (Yisaya 1:8-10; tala Ezekiele 16:49, 53-58.) Mpo na oyo etali Ezipito, mokili ya Liboso oyo elekaki Makasi na mokili mobimba, emonanaka mbala mosusu lokola elilingi na mokili na lelo to ebongiseli na biloko na ntango oyo. (Yisaya 19:1, 19; Yoele 3:19) Na yango, mboka oyo monene elakisi “Yelusaleme” ya kobeba, oyo ezali komikumisa ete ezali kosambela Nzambe, kasi esili kokoma mbindo mpe ezali kosalaka masumu lokola Sodome, mpe esangani mpenza na mokili ya lelo to ebongiseli ya Satana, lokola Ezipito. Ezali bongo elilingi na boklisto ya lokuta, yango ekokani na Yelusaleme ya kala ezangi botosi. Boklisto ya lokuta ezali lisangá oyo basangani na yango basepelaki mingi na ntango babomaki mosala ya kosakola ya batatoli mibale, mpamba te ezalaki kotungisa bango mingi.

  • Batatoli mibale bazongi na bomoi
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
    • c Makambo oyo masili kokomela libota na Nzambe mamonisi ete soko sanza 42 elakisi mbula misato na ndambo mpenza, nzokande mikolo misato na ndambo mikoumela ngonga 84 te. Soko eleko na sikisiki ya mikolo misato na ndambo etangami mbala mibale (na versets 9 mpe 11) ezali mpo na komonisa ete eleko yango ekoumela ntango mokuse na kokokisa yango na mbula misato na ndambo ya mosala oyo ezalaki liboso na yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto