Mokapo 24
Nsango na elengi mpe na bololo
Emonaneli 6—Emoniseli 10:1 kino 11:19
Teme: Emonaneli na rulo moke; makambo masalemi na tempelo; kelelo na nsambo ebetami
Eleko na kokokana na yango: Longwa ntango Yesu afandaki na kiti na bokonzi na 1914, kino na bolozi monene
1, 2. (a) Mawa ya mibale esalaki nini, mpe lisolo na yango esuki na mokapo nini? (b) Sikawa Yoane amoni nani akiti uta na likoló?
MAWA na mibale ezalaki monene. Ebetaki boklisto ya mokili oyo mpe batambwisi na yango, “ndambo na misato na bato,” oyo bamonanaki bongo ete bazali bakufi na elimo. (Emoniseli 9:15) Nsima na yango, boye Yoane amitunaki eloko nini ekobima na mawa ya misato. Kasi zela naino! Mawa na mibale esuki naino te; kosuka na yango ekozala na Emoniseli 11:14. Liboso na yango, Yoane akomona lisusu makambo oyo ye akosangana na yango mpenza. Amoni liboso likambo moko ya kokamwa mingi:
2 “Namonaki mpe anzelu mosusu makasi kokita na likoló. Alataki lipata, mpe monama ezalaki na motó na ye, mpe elongi na ye lokola moi, mpe makolo na ye lokola makonzi na mɔ́to.”—Emoniseli 10:1.
3. (a) “Anzelu makasi” azali nani? (b) Monama na likoló na motó na ye elimboli nini?
3 “Anzelu makasi” oyo azali nani? Emonani ete ezali Yesu Klisto akembisami, mpe awa azali kokokisa mokumba mosusu. Alati lipata, mpo na kolakisa ete akoki komonana na miso na bato te, mpe yango ekundoli biso maloba oyo ya Yoane na ntina na Yesu: “Tala! Azali koya na mapata mpe miso nyonso makomona ye, ata bango batobolaki ye.” (Emoniseli 1:7; tala Matai 17:2-5.) Monama oyo ezali na likoló ya motó na ye ekundoli biso emonaneli moko Yoane azwaki liboso, oyo ya kiti na bokonzi ya Jéhovah ezingami na “monama na motindo na libanga na samala.” (Emoniseli 4:3; tala Ezekiele 1:28.) Monama wana emonisaki ete zongazonga na kiti na bokonzi ya Nzambe ezali kimya mpe mobulu ata moke ezali te. Bobele bongo, monama likoló na motó na anzelu makasi emonisi ete anzelu oyo azali motindami na ntina mingi, motindami mpo na kimya, “Nkolo na kimya” oyo Jéhovah ayebisaki ete akotinda.—Yisaya 9:6, 7.
4. Likambo oyo ete (a) elongi na anzelu oyo makasi ezalaki “lokola moi” elimboli nini? (b) makolo na anzelu yango mazalaki “lokola makonzi na móto” elimboli nini?
4 Elongi na anzelu oyo makasi ezalaki “lokola moi.” Kati na emonaneli moko azwaki liboso na ntina na Yesu kati na temple na Nzambe, Yoane amonaki ete elongi na Yesu ezalaki “lokola moi na kongenga na makasi na yango.” (Emoniseli 1:16) Lokola azali “moi na boyengebene,” Yesu abimi na lobiko kati na mapapu na ye mpo na bolamu na baoyo bakobangaka nkombo ya Jéhovah. (Malaki 4:2) Longola elongi na ye, makolo na anzelu oyo mazali mpe makolo ya nkembo; mazali lokola “makonzi na mɔ́to.” Anzelu oyo azali na lokumu na Moto oyo Jéhovah apesi ye “nguya nyonso . . . na likoló mpe na mabelé.”—Matai 28:18; Emoniseli 1:14, 15.
5. Yoane amoni nini na loboko na anzelu oyo makasi?
5 Yoane amoni lisusu boye: “Na loboko na ye mwa mokanda moke mosili kozipwa polele. Atii lokolo na ye ya mobali na likoló na mai monene, mpe lokolo na ye ya mwasi na likoló na mokili.” (Emoniseli 10:2) Ezali mokanda mosusu? Ee, kasi oyo ekangami te. Tokoki bongo kolikya komona elongo na Yoane bimonaneli mosusu ya kokamwa. Kasi, totala naino kati na ebongiseli nini makambo malandi makosalema.
6. (a) Mpo na nini ekoki ete makòló na Yesu mapikama moko na mabelé mpe mosusu na mai monene? (b) Ntango nini Nzembo 8:5-8 ekokanaki na mobimba na yango?
6 Tozongela naino kotalela makambo oyo Yoane amonaki na ntina na Yesu. Apiki makolo na ye mazali kopela móto na mabelé mpe na mai monene, asili kozwa nguya likoló na yango nyonso. Yango ekokani mpenzampenza na maloba oyo ya esakweli na nzembo: “Yo [Jéhovah] otii ye [Yesu] na nse na baoyo bakokani na Nzambe, olatisi ye na nkembo mpe na lokumu. Opesi ye bokonzi likoló na misala na maboko na yo, otii biloko nyonso na nse na makolo na ye: bampate nyonso mpe bangombe mpe banyama na zamba; ndeke na likoló mpe mbisi na mai oyo ekolekaka na nzela na mai monene.” (Nzembo 8:5-8; tala mpe Baebele 2:5-9.) Nzembo oyo ekokanaki mpenza na 1914, ntango Yesu atyamaki Mokonzi kati na Bokonzi na Nzambe mpe ntango na nsuka ebandaki. Na yango, makambo oyo Yoane amoni awa kati na emonaneli mazali kokokana uta mobu wana.—Nzembo 110:1-6; Misala 2:34-36; Danyele 12:4.
Nkake nsambo
7. Motindo nini anzelu oyo makasi angangi, mpe konganga na ye esakoli nini?
7 Anzelu oyo makasi akati naino Yoane oyo azali kotala ye: “Mpe [anzelu] angangi na mongongo makasi lokola nkosi. Wana engangi ye, nkake nsambo elobi na mingongo na yango.” (Emoniseli 10:3) Konganga oyo makasi ebendi likebi na Yoane; emonisi solo ete Yesu azali “Nkosi oyo abimi na libota na Yuda.” (Emoniseli 5:5) Yoane ayebi ete Jéhovah mpe ‘akongulumaka lokola nkosi.’ Ezali na motindo oyo nde Nzambe asakolaki koyanganisama na Yisraele ya elimo mpe koya na “mokolo ya Jéhovah,” mokolo mpo na koboma. (Hosea 11:10; Yoele 3:14, 16; Amos 1:2; 3:7, 8) Ezali bongo polele ete konganga oyo ekokani na konguluma na nkosi, oyo anzelu makasi angangi ezali liyebisi na makambo minene mazali koya mpo na mabelé mpe mai monene. Etindi nkake nsambo ete eloba.
8. ‘Mingongo na nkake nsambo’ ezali nini?
8 Yoane asilaki koyoka nkake oyo eutaki na kiti ya bokonzi na Jéhovah. (Emoniseli 4:5) Na mikolo na Davidi, bazalaki koloba mbala mosusu mpo na nkake ete ezali “mongongo ya Jéhovah.” (Nzembo 29:3) Ntango Yesu azalaki naino kosala mosala na ye awa na mokili, mingi bakanisaki ete nkake engulumi, ntango bayokaki mongongo ya Jéhovah oyo esakolaki ete azali na mokano ya kokumisa nkombo na ye. (Yoane 12:28, 29) Na yango, elongobani na kokanisa ete ‘mingongo na nkake nsambo,’ ezali maloba Jéhovah ye moko alobi na ntina na mikano na ye. Lokola nkake yango ezali “nsambo,” yango emonisi ete makambo Yoane ayokaki ezali ya kokoka.
9. Mongongo moko euti na likoló epesi etinda nini?
9 Kasi yoka naino! Mongongo mosusu eyokani. Epesi etinda oyo mbala mosusu ekamwisaki Yoane: “Wana elobi nkake nsambo, nalingaki kokoma, nde nayoki mongongo kobima na likoló ete, Bomba makambo malobi nkake nsambo, kokoma yango mpe te.” (Emoniseli 10:4) Yoane boye azalaki na motema móto mpo na koyoka mpe kokoma nsango oyo ezalaki lokola mongongo na nkake; bobele bongo, na mikolo na biso, kelasi na Yoane ezelaki na motema móto ete Jéhovah ayebisa mikano na ye, mpo na kosakola yango. Kasi Jéhovah akoyebisa yango bobele na ntango oyo ye moko asilaki kobongisa.—Luka 12:42; tala lisusu Danyele 12:8, 9.
Libombami na bulee likokisami
10. Anzelu oyo makasi akati ndai na nkombo ya nani, mpe mpo na koloba nini?
10 Na kozelaka, Jéhovah apesi mosala mosusu na Yoane. Nsima wana nkake nsambo ebetaki, anzelu oyo makasi azwi lisusu maloba: “Mpe anzelu oyo namonaki atelemi likoló na mai monene mpe mokili, atomboli loboko na ye ya mobali epai na likoló mpe akati ndai na nkombo na Oyo azali na bomoi libela na libela, oyo azalisi likoló mpe biloko na kati na yango na mokili na biloko na kati na yango, ete Elaka ekozala lisusu te.” (Emoniseli 10:5, 6) Anzelu oyo makasi akati ndai na nkombo ya nani? Yesu oyo asili kokembisama, akati ndai na nkombo na ye moko te kasi na nkombo na Oyo Aleki-Likoló: Jéhovah, Mozalisi na makolo mpe na mabelé, oyo akoki kokufa te. (Yisaya 45:12, 18) Na ndai oyo, anzelu alobi na Yoane ete Nzambe akopesa lisusu elaka te mpe ntembe ezali te mpo na yango.
11, 12. (a) Liloba oyo ete “elaka ekozala lisusu te” elimboli nini? (b) Nini ekambami kino na kokokisama na yango?
11 Lokola liloba “elaka” (délai) ezali libongoli ya liloba ya greke khronos, oyo elimboli mpenzampenza “ntango,” bato mosusu bakanisaka ete liloba oyo ya anzelu esengeli kozala boye: “Ntango ekozala lisusu te,” lokola ete ntango, ndenge toyebeli yango esengeli kolimwa. Nzokande, kati na eteni oyo, liloba khronos esalelami na article défini. Ezali bongo kolobela ntango mobimba te, kasi “mwa ntango” to “eleko moko ya ntango.” Na maloba mosusu, Jéhovah akopesa lisusu eleko ya ntango te (soko mpe délai te to elaka te) oyo ekobakisama likoló. Verbe moko ya greke ebimaki na liloba khronos emonani mpe kati na Baebele 10:37, epai kuna ntoma Paulo, na kotangaka maloba na Habakuku 2:3, 4 akomi ete “ye oyo azali koya . . . akoumela te.”
12 “Elaka ekozala lisusu te.” Maloba oyo mazali solo elengi na matoi ya bampaka bazali kati na kelasi na Yoane lelo! Elaka ekozala lisusu te lokola boni? Yoane apesi biso maloba mosusu ete: “Kasi wana anzelu na nsambo akobeta kelelo na ye, na mikolo yango, libombami na Nzambe likosila kokoka lokola esakolaki ye na basakoli, baombo na ye.” (Emoniseli 10:7) Mpo na Jéhovah, oyo ezali ntango ya kosukisa mokano na ye, ete akoka kolonga na nkembo nyonso.
13. Libombami na bulee na Nzambe ezali nini?
13 Libombami oyo na bulee ezali nini? Etali libota oyo elakamaki mpo na mbala ya liboso na Edene, mpe eyaki komonana ete libota yango ezali libosoliboso Yesu Klisto. (Genese 3:15; 1 Timote 3:16) Libombami yango etaleli mpe likambo ya koyeba nani mwasi oyo abimisi Libota. (Yisaya 54:1; Bagalatia 4:26-28) Epai mosusu, bobele libombami yango etali lisusu baoyo balandi Klisto lokola kelasi ya Libota, etali mpe Bokonzi kati na yango Libota ezali koyangela. (Luka 8:10; Baefese 3:3-9; Bakolose 1:26, 27; 2:2; Emoniseli 1:5, 6) Nsango malamu ya Bokonzi oyo bobele moko ya likoló esengeli kosakolama na mabelé mobimba na ntango oyo ya nsuka.—Matai 24:14.
14. Mpo na nini mawa na misato etangami esika moko na Bokonzi na Nzambe?
14 Yango ezali nsango eleki malamu kati na nyonso. Nzokande, na Emoniseli 11:14, 15, mawa ya misato etangami esika moko na Bokonzi. Mpo na ntina nini? Mpamba te, mpo na bato oyo balingi mokili oyo ya Satana, kosakolama oyo ekokani na kobetama na kelelo na nsango malamu, engebene yango libombami na bulee na Nzambe ezali kokokana—elingi koloba ete Bokonzi na Masiya na Nzambe esili koya—nsango yango ezali nsango mabe mpo na bango. (Tala 2 Bakolinti 2:16.) Elimboli ete mokili oyo bango balingi yango mingi ekobomama mosika te. Lokola mokolo monene na nkanda na Jéhovah ezali kobelema, mingongo na nkake nsambo oyo ezali na makebisi ya mpasi, mingongo yango mikomi koyokama polele koleka mpe na nguya mingi.—Sofoni 1:14-18.
Mokanda mofungwami
15. Mongongo mouti na likoló mpe anzelu oyo makasi balobi nini na Yoane, mpe mokanda oyo Yoane alyaki esali ye nini?
15 Ntango Yoane azalaki kozela kobetama na kelelo ya nsambo mpe kokokisama na libombami ya bulee na Nzambe, azwaki malako oyo mosusu: “Mpe mongongo oyo nayokaki kobima na likoló esololi na ngai lisusu ete, Kenda kokamata mokanda mozali polele na loboko na anzelu oyo atelemi na mai mpe na mokili. Nakei na ngai epai na anzelu koloba na ye ete, apesa ngai mwa mokanda yango. Alobi na ngai ete, Kamata yango mpe lya yango; ekozala bololo na libumu na yo, kasi na monoko na yo ekozala elengi lokola mafuta na nzoi. Nakamati mwa mokanda yango na loboko na anzelu, nalei yango, mpe na monoko na ngai ezalaki elengi lokola mafuta na nzoi, nde wana esilaki ngai kolya yango libumu na ngai ekomaki na bololo. Balobi na ngai mpe ete, Esengeli na yo lisusu kosakola na ntina na bikolo, na mabota, na minoko mpe bakonzi mingi.”—Emoniseli 10:8-11.
16. (a) Eloko nini ya motindo moko ekomelaki Ezekiele mpe Yoane? (b) Mpo na nini Yoane amoni mokanda oyo moke elengi na monoko na ye, kasi bololo nsima na kolya?
16 Yoane abengami kosala ndenge moko na mosakoli Ezekiele, oyo mpe azwaki etinda ya kolya mokanda moko wana ezalaki ye na boombo na mokili na Babilone. Mokanda yango ezalaki elengi na monoko na ye, kasi nsima na kotondisa libumu na ye, epusaki ye kosakola makambo na bololo mpo na libota ya Yisraele oyo bazangaki botosi. (Ezekiele 2:8 kino 3:15) Bobele bongo, mokanda mofungwami oyo Yesu Klisto akembisami apesi yango na Yoane ezali nsango euti na Nzambe. Yoane asengeli kosakola na ntina na “bikolo, na mabota, na minoko mpe bakonzi mingi.” Ezali elengi mpo na ye kolya mokanda yango, mpamba te yango euti na Nzambe. (Tala Nzembo 119:103; Yilimia 15:15, 16.) Kasi ezali bololo mpo ete libumu na ye enika yango, mpamba te, lokola oyo Ezekiele alyaki na eleko na ye, mokanda oyo ezali mpe kosakola mpasi ezali koya mpo na bato bazangi botosi.—Nzembo 145:20.
17. (a) Nani alobi na Yoane ete asakola “lisusu,” mpe etinda yango elimboli nini? (b) Makambo oyo Yoane amonaki masengelaki kokokana ntango nini?
17 Na ntembe te ezali Jéhovah mpe Yesu Klisto nde balobi na Yoane ete asakola lisusu. Na nzela na makambo oyo asili kokoma yango na mokanda na Emoniseli, Yoane, atako akangami na esanga ya Patamo, asili kosakola na ntina na bikolo, na mabota, na minoko mpe bakonzi mingi. Liloba “lisusu” elimboli ete asengeli sikawa kokoma mpe kopalanganisa makambo mosusu matikali maye mazali naino kati na mokanda na Emoniseli. Kasi tobosana te ete Yoane azali nde kosangana na emonaneli ya esakweli; makambo mazali ye kokoma mazali nde esakweli oyo esengeli kokokana nsima na 1914, ntango anzelu oyo makasi apiki lokolo moko na mabelé mpe lokolo mosusu na mai monene. Yango elimboli nini mpo na kelasi na Yoane na mikolo na biso?
Mwa mokanda moke na mikolo na biso
18. Na ebandeli na mokolo na Nkolo, kelasi na Yoane ezalaki na ezaleli nini mpo na mokanda na Emoniseli?
18 Makambo Yoane amoni ezali mpenzampenza esakweli na makambo makomelaki kelasi na Yoane na ebandeli na mokolo na Nkolo. Boyebi na bango ya mikano na Jéhovah, bakisa makambo malingaki koyebisama na nkake nsambo, ezalaki ya kokoka te na eleko wana. Nde ata bongo, bazalaki koluka koyeba ndimbola ya Emoniseli, mpe Charles Russell amekaki kolimbola mwa biteni mingi na yango na boumeli ya bomoi na ye. Nsima na kufa na ye na 1916, makambo mingi oyo akomaki esangisamaki esika moko mpo na kobimisama na mokanda moko ezalaki na motó ya likambo Le mystère accompli. Nzokande, nsima na bambula, eyaki komonana ete bandimbola oyo epesamaki na mokanda yango mpo na Emoniseli ezalaki ya kokoka te. Batikali na bandeko na Klisto basengelaki kozela lisusu mwa moke, kino ntango oyo bimonaneli bisengelaki kobanda kokokana, liboso ete bazwa mayele ya sikisiki likoló na mokanda wana epemami na Nzambe.
19. (a) Ndenge nini Jéhovah Nzambe asalelaki kelasi ya Yoane liboso nkutu ete mingongo na nkake nsambo mikoka koyokama mpenza polele? (b) Ntango nini kelasi na Yoane bazwaki mwa mokanda moke mofungwami, mpe yango elimbolaki nini mpo na bango?
19 Nzokande, lokola Yoane, Jéhovah asalelaki bango liboso ete mingongo na nkake nsambo mikoka koyokama nyonso mpenza. Basakolaki na molende na boumeli ya mbula 40 liboso ya 1914, mpe basalaki nyonso ete balanda mosala na bango na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Bamonisaki bongo ete bazalaki baoyo, ntango nkolo ayaki, akutaki bango bazali kopesa bilei epai na basali na ndako na ntango ekoki. (Matai 24:45-47) Na yango, na 1919, ezali bango nde bazwaki mwa mokanda moke mofungwami, elingi koloba nsango mpo na kosakola yango polele epai na bato na mokili mobimba. Lokola Ezekiele, esengelaki na bango kosakola nsango yango epai na libota moko lizangi botosi, boklisto ya lokuta, oyo ezalaki koloba ete ekosalelaka Nzambe, kasi mpo na koloba solo, bazalaki kosalela Nzambe te. Lokola Yoane, basengelaki lisusu kosakola na ntina “na bikolo, na mabota, na minoko mpe bakonzi mingi.”
20. Likambo oyo ete Yoane alei mokanda elimboli nini?
20 Likambo oyo ete Yoane alei mokanda emonisi na elilingi ete bandeko na Yesu bandimaki mosala yango. Esili kokoma ndambo na bomoto na bango na ntina boye ete bayebani na nzela na eteni oyo na Liloba na Nzambe epemami, mpe bazali komileisa na yango. Kasi nsango oyo basengeli kosakola ezali na bikateli na Jéhovah kati na yango mpe bato mingi balingi koyoka yango te, mpamba te esangisi kati na yango malozi masakolamaki kati na Emoniseli mokapo 8. Nzokande, ezalaki elengi mpo na baklisto na sembo na koyeba bikateli yango mpe kososola ete Jéhovah azali kosalela bango lisusu mpo na kosakola yango.—Nzembo 19:9, 10.
21. (a) Na ndimbola nini nsango ekomami kati na mokanda moke esili kokoma mpe elengi mpo na ebele monene? (b) Mpo na nini nsango malamu ezali nsango mabe mpo na batemeli?
21 Na nsima, nsango ezwami kati na mokanda yango ekomaki mpe elengi mpo na “ebele monene . . . oyo euti na mikili nyonso mpe na bikolo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na minoko nyonso,” ebele oyo bazalaki kolela na ntina na makambo mabe oyo mazali kosalema kati na boklisto ya mokili oyo. (Emoniseli 7:9; Ezekiele 9:4) Bango mpe bazali kosakola nsango malamu na molende na kosaléláká maloba ya boboto mpe na elengi mpo na koloba na ntina na bibongiseli kitoko mingi oyo Jéhovah asili kokamata yango mpo na bolamu na bampate. (Nzembo 37:11, 29; Bakolose 4:6) Kasi mpo na batemeli, ezali nsango moko mabe, mpamba te mokili oyo bango batii motema, mpe mbala mosusu ezali kopesa bango bisengo ya ntango mokuse, esengeli kolimwa. Mpo na bango, nsango malamu elimboli bongo kufa.—Bafilipi 1:27, 28; tala Deteronome 28:15; 2 Bakolinti 2:15, 16.
[Bililingi na lokasa 160]
Kelasi na Yoane mpe baninga na bango bazali kosakola nsango na elengi mpe na bololo epai na bato nyonso