Kobikisama na ntango na komonana na Yesu Klisto
“Bosepela ... ete bosepela na esengo monene wana ekomonana nkembo na ye.—1 PETELO 4:13.
1. Lolenge nini Jéhovah apamboli mingi basaleli na ye?
JEHOVAH apamboli Batemwe na ye na makabo mingi. Lokola azali Molakisi na biso Monene, asili kongengisa biso na boyebi mingi mpo na oyo alingi mpe na ntina na mokano na ye. Na nzela na elimo santu na ye, akólisaki kati na biso likoki ya kongengisa pole na molende nyonso. Ntoma Paulo oyo apemamaki ayebisi biso na 1 Bakolinti 1:6, 7 ete: “Litatoli mpo na Klisto elendisamaki solo kati na bino. Bongo bozangi likabo moko na Nzambe te awa ezali bino kotalela komonana na Nkolo na biso Yesu Klisto.”
2. Elikya nini kitoko “komonana ya Nkolo na biso Yesu Klisto” ezali kopesa?
2 “Komonana na Nkolo na biso Yesu Klisto”—yango elimboli nini? Ezali komonisa ntango oyo Yesu akomonisama lokola Mokonzi na nkembo, wana akobanda kopesa lifuti na bayekoli na ye ya sembo mpe koboma basali na mabe. Lokola 1 Petelo 4:13 emonisi yango, ekozala mpo na baklisto ya sembo bapakolami na elimo mpe baninga na bango ya sembo ya ebele monene ntango ya “kosepela na esengo monene” mpo ete yango ekomonisa nsuka ya ebongiseli ya Satana.
3. Lokola bandeko na biso ya Tesaloniki, lolenge nini tosengeli kosala mpo na kotikala ngwi?
3 Lokola ntango yango ezali kobelema, Satana kati na nkanda oyo azali na yango, azali kobimisela biso mikakatano makasi. Lokola nkosi oyo azali konguluma, azali koluka kolya biso. Tosengeli kozala na bakengi! (1 Petelo 5: 8-10) Bandeko na biso kati na Tesaloniki ya kala, wana bazalaki naino bato na sika kati na solo, bakutanaki na minyoko mikokani na oyo ba Témoins de Jéhovah mingi bazali kokutana na yango lelo. Yango wana, maloba na ntoma Paulo epai na bango mazali na ntina mpo na biso. Akomaki ete: “Emonani malamu epai na Nzambe kopesa bolozi lokola libonza na bango bakoyokisaka bino bolozi, mpe kopesa bino banyokolami epemelo esika moko na biso na ntango na komonana na Nkolo Yesu wana ekobima ye na likoló esika moko na baanzelu na ye na nguya, kati na epeleli na mɔ́tɔ ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu.” (2 Batesaloniki 1:6 8) Ee, kobondisama ekoya!
4. Mpo na nini bakonzi na mangomba babongi mpenza na lisambisi oyo ekoyeisama na ntango na komonana na Yesu?
4 Na ntango ya ntoma Paulo bampasi mingi eutaki epai na bakonzi na mangomba ya Bayuda. Bobele bongo lelo, botemeli oyo ebimisamaka na ntina na ba Témoins de Jéhovah oyo bazali bato na kimya, eutaka mbala mingi epai na baoyo bazali komikumisa ete bazali bamonisi na Nzambe, mingimingi bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta. Bango bazali koloba ete bayebi Nzambe, kasi bazali kobwaka “Jéhovah moko” ya Biblia, na kokitanya ye na Bosato bozangi koyebana. (Malako 12:29) Bazali kotosa te nsango malamu na ntina na Nkolo na biso Yesu, bazali kotya motema na biyangeli na bato mpo na kozwa kobondisama mpe bazali kobwaka nsango malamu ya Bokonzi na Klisto oyo ekozala na boyengebene. Banguna nyonso wana ya mangomba basengeli kobomama na ntango na “komonana na Nkolo Yesu longwa na likoló”!
“Koya” na Yesu Klisto
5. Lolenge nini komonana na Yesu elobelami na elilingi na Matai 24:29, 30?
5 Komonana wana elobelami na lolenge ya elilingi na Yesu kati na Matai 24:29, 30. Wana ezalaki ye kolobela makambo makeseni ya elembo na kozala na ye mpe ya nsuka na biloko ya ntango oyo, alobi ete: “Moi ekoyinda mpe sanza ekopesa pole na yango te mpe myoto mikokweakwea longwa na likoló mpe nguya na lola ekotetema.” Na ntango yango “elembo na Mwana na moto ekomonana na likoló.” Mabota nyonso na mokili “bakolela mpe bakomona Mwana na moto [Mokonzi Masiya na Jéhovah] azali koya na mapata na likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo.” “Koya”, elobeli er-khoˈme-non na Greke, komonana na Yesu lokola Mobundeli na Jéhovah.
6, 7. Na ndimbola nini elobelami ete “miso nyonso makomona ye,” mpe nani atalelami na likambo yango?
6 “Koya” wana elobelami lisusu na ntoma Yoane na Emoniseli 1:7, epai alobi ete: “Tala! Azali koya na mapata.” Na yango, banguna na Yesu bakomona ye na miso te, mpo ete “mapata” elimboli ete azali koya kozanga komonana na miso na bato mpo na kosambisa bato. Soki bato mpenza bamoni nkembo na ye ya makoló na miso na bango mpenza, mbele miso na bango makokufa lokola ezalaki mpo na Saulo, na nzela na Damaseke, ntango Yesu kati na nkembo na ye abimelaki ye na kongenga moko makasi.—Misala 9:38; 22:6-11.
7 Lisolo ya Emoniseli liyebisi ete “miso nyonso makotala ye, ata bango batobolaki ye, mpe mabota nyonso na nse bakolela na ntina na ye.” Yango elimboli ete banguna oyo bazali awa na mabelé bakososola na ntango na kobomama oyo Yesu akoyeisa likoló na bango ete asili koya na nguya mpe nkembo monene lokola Mokokisi ya bikateli na Jéhovah. Mpo na nini banguna wana balobelami lokola “baoyo batobolaki ye”? Ezali bongo mpo ete ezaleli na bango ya koyina oyo bazali komonisa lelo epai na basaleli na Jéhovah ekokani na oyo ezalaki epai na banyokoli na Yesu. Ya solo, ˈbakolela na ntina na ye.ˈ
8. Likebisi nini Yesu mpe ntoma Paulo bapesaki na kotalela libebi oyo ekoya pwasa?
8 Lolenge nini mokolo wana ya nkanda na Jéhovah ekoya? Kati na esakweli ezali na Luka mokapo 21, Yesu alobeli makambo minene oyo mamonisaki elembo ya kozala na ye kobanda 1914. Na nsima, na versets 34 mpe 35, Yesu akebisi ete: “Kebá na bino ete mitema na bino mikoma makasi te mpo na kolunda, soko na kolangwa, soko na bitungiseli na bomoi. Bongo mokolo yango ebimela bino pwasa lokola motambo te. Mpo ete ekobimela bato nyonso bafandi na mikili nyonso.” Ee, mokolo wana ya nkanda na Jéhovah ekoya pwasa, na mbala moko! Ntoma Paulo andimi yango na 1 Batesaloniki 5:2, 3, na ntango alobi ete: “Mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu. Ekolobaka bato ete, ˈKimya ezali, makambo mazali te,ˈ wana libebi ekokwela bango pwasa.” Sikawa mabota mazali koloba na ntina na kimya mpe kobatelama mpe bazali kokana kopesa nguya mingi na O.N.U. mpo ete lisangá wana lisilisa mobulu oyo mozali bipai nyonso na mabelé na nzela ya bibundeli.
9. Mpo na banani ˈpole engengisamakiˈ mpe mpo na nini?
9 Kati na 1Th 5 versets 4 mpe 5, ntoma Paulo alandi koyebisa biso ete: “Kasi bino bandeko, bozali kati na molili te, mokolo yango ekokwela bino lokola moyibi te. Mpo ete bino nyonso bozali bana na pole mpe bana na moi; biso tozali na butu te, na molili mpe te.” Tozali kosepela lokola tozali bana na pole—bamemi na pole epai na bato mosusu oyo bazali na mposa makasi ya kimya mpe kobatelama ya solo kati na mokili ya sika na Nzambe. Na Nzembo 97:10, 11, tozali kotanga ete: “Bino baoyo bokolingaka Jéhovah, boboya mabe; ye akobatelaka bomoi na bato na ye na boyengebene; akobikisa bango na loboko na bato mabe. Pole ekonami mpo na moto na boyengebene, mpe esengo mpo na baoyo bazali na mitema sembo.”
Kolandana ya makambo
10. Toli nini tosengeli kolanda na boyokani na mokolo ya kosambisama? (Emoniseli 16:15)
10 Makambo makolandana lolenge nini ntango bolozi monene ekobima? Tokamata Emoniseli mokapo 16. Tozali komona na versets 13 kino 16, ete bilimu na mbindo, bilimu mabe bazali koyanganisa mabota ya mabele mobimba na Armagédon, etumba monene ya mokolo na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Lisusu, mokolo oyo ya kozongisa monoko esili kobelema lokola moyibi, mpe tokebisami na kozala na bakengi—kobatela molato na biso ya elimo oyo ezali elembo mpo na kobika. Ntango esili koya mpo na kosambisa bato na mabele, mabota, mpe—moto mosusu. Moto yango azali nani?
11. Nani azali mwasi oyo alobelami na Emoniseli 17:5?
11 Ezali mwasi moko ya elilingi oyo asali nyonso ete azala ˈmoto monene.ˈ Alobelami na Emoniseli 17:5 lokola “libombami: ˈBabilone Monene, Mama na pite na bosoto na mokili.ˈ” Kasi azali libombami te mpo na ba Témoins de Jéhovah. Amonisaki polele ete azali lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta, kati na yango mangomba ya boklisto ya lokuta masali eteni eleki monene. Azali mbindo na miso na Jéhovah mpo ete amikotisi na makambo ya politike, “alangwi makila na basantu” na ntina na minyoko oyo abimiselaki baklisto ya solo, mpe azali na mokumba ya makila ya “bato nyonso oyo babomamaki na mokili,” sangisa bato koleka bamilio nkama oyo babomamaki kati na bitumba oyo bisalemaki bobele na ekeke oyo ya ntuku mibale.—Emoniseli 17:2, 6; 18:24.
12. Mpo na nini mangomba ya boklisto na lokuta makweisami?
12 Likambo ya mabe koleka, mangomba ya baklisto ya lokuta babwakaki nsoni likoló na nkombo na Nzambe oyo bazali komikumisa na bakosi nyonso ete bazali bamonisi na ye. Bateyaki bafilozofi ya Babilone mpe ya Greke na esika ete bateya Liloba na peto ya Nzambe mpe bapesaki nzela na bizaleli ya mabe na mabota nyonso mpo bazali kondima misala ya mbindo oyo mizali na boyokani te na mitinda na Biblia. Bato na mombongo mozangi kolongobana mpe ya lokoso oyo bazali kati na mangomba yango bakweisami na maloba mazali na Yakobo 5:1, 5: “Yakani bino bazwi; bolela mpe bonganga mpo na bolozi bolingi koyela bino. Bosili kofanda na mokili na biloko kitoko mpe bomisepelisi; bomitondisi mitema na lokoso mpo na mokolo na kobomama.”
Kokwea ya Babilone Monene
13. Likambo nini likosalema liboso ete bolozi monene ebanda, mpe likebisi nini ya nokinoki epesami na Emoniseli 18:4, 5?
13 Na ntango na bolozi monene, likambo ya liboso oyo ekosalema ekotalela kokokisama ya ekateli na Jéhovah na ntina na Babilone Monene. Emoniseli 17:15-18 emonisi na lolenge ya kokamwa “likanisi” na Nzambe—ya kosalela “maseke zomi,” banguya oyo euti na O.N.U., “nyama na yauli” oyo esalemi na bikólo mingi bikeseni mpo na koboma ye. “Mpe maseke zomi mamonaki yo, bango mpe nyama na yauli bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ. Mpo ete Nzambe atyaki na mitema na bango ete basala mokano na ye.” Likambo na kokamwa ezali te soki mongongo moko euti na likoló ezali kopesa likebisi ya nokinoki na Emoniseli 18:4, 5 ete: “Bino bato na ngai bobima na ye, ete bosangana na masumu na ye te, ete bozwa moko na malozi na ye mpe te. Mpo ete libondo na masumu na ye likómi kino na likoló, mpe Nzambe asili kokanisa misala mabe na ye.” Libyangami wana lizali kolanda koyokama: katá boyokani nyonso elongo na mangomba ya lokuta, lokola ntango ezali naino!
14. Nani akolela ntango Babilone Monene ekobomama, mpe mpo na nini?
14 Lolenge nini mokili ekosala na ntango ya kobomama na Babilone Monene? Longwa na mosika, bakonzi mabe ya politike—“bakonzi ya mokili”—bakolela na ntina na ye, mpo ete basepelaki na boumeli ya bikeke na kosala pite ya elimo elongo na ye. Lisusu, “bato na mombongo,” bato wana ya mombongo ya lokoso “baoyo bakómaki bazwi na ntina na ye,” bakolela ye na mawa mingi. Bango mpe bakozala mosika na ye, mpe bakoloba ete: “Mawa! Mawa! mpo na mboka yango monene! oyo elati bilamba petepete, na bilamba motane mwindo, na bilamba motane, oyo mpe akembisi nzoto na wolo na mabanga kitoko, na mangiliti; mpo ete na ntango moko biloko oyo mingi boye bisili koya mpamba.” Bilamba nyonso kitoko ya bakonzi na mangomba mpe bonzenga ya bandakonzambe minene nyonso oyo ezali na mokili ekolimwa mpo na libela! (Emoniseli 18:9-17) Kasi ezali bato nyonso nde bakolela na ntina na Babilone Monene?
15, 16. Likambo nini ya esengo basaleli na Nzambe bakozala na yango?
15 Emoniseli 18:20, 21 eyanoli ete: “Sepela mpo na mboka yango, yo likoló, na bino basantu, na bantoma, na basakoli, mpo ete Nzambe asili kokatela yango ekateli mpo na bino.” Ndenge moko lokola kobwakama ya libanga monene kati na mai monene, “bongo Babilone mboka monene ekobwakama, mpe [ekozwama] lisusu soko moke te.”
16 Oyo nde likambo ya esengo! Ezali yango nde Emoniseli 19:1-8 elobi. Mbala minei libyangami “kumisa Jah, bino mabota!” ezali koyokama longwa na likoló. Aleluya misato ya liboso ezali kokumisa Jéhovah mpo ete akokisi ekateli na ye ya sembo likoló na mwasi na pite, Babilone Monene. Lisanga ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta ezali lisusu te! Mongongo moko mobimi longwa na kiti na bokonzi na Nzambe, elobi ete: “Bosanzola Nzambe na biso, bino baombo na ye nyonso, na bino [bokobangaka] ye, bato mike na bato minene.” Oyo nde libaku kitoko tokozala na yango na koyemba nzembo wana!
Libala ya Mwana na Mpate
17. Ntango tokokanisi Emoniselli 11:17 mpe 19:6, wapi makambo mibale makeseni kati na yango Jéhovah abandi koyangela lokola Mokonzi?
17 Aleluya ya minei elobeli likambo mosusu: “Kumisa Jah, bino mabota, mpo ete Jéhovah Nzambe na biso, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, asili kobanda koyangela lokola mokonzi.” Kasi yango ezali te bozongeli oyo ekokani na oyo eyembamaki kati na Emoniseli 11:17? Tozali kotanga kuna ete: “Ɛ Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, ... totondi yo mpo ete okamati nguya na yo monene, mpe osili kokóma mokonzi.” Ee. Nzokande, maloba ya zingazinga ya Emoniseli 11:17 ezali kolobela makambo masalemaki na 1914, mbula oyo Jéhovah atyaki bokonzi ya Masiya mpo ete “ekamba mabota nyonso na mpimbo ya ebende.” (Emoniseli 12:5) Emoniseli 19:6 elobeli nde makambo matali kobomama ya Babilone Monene. Bonzambe na Jéhovah bokoyebana ntango mangomba oyo makokani na mwasi na pite makolimwa. Mpo na libela bato bakosambela bobele Moyangeli mpe Mokonzi Aleki likoló!
18. Kobomama ya Babilone Monene epesi nzela na kosakolama ya nsango nini ya kitoko?
18 Yango wana, nsango oyo ya kitoko ekokoka kosakolama: “Tosepela, tozala na esengo; tokumisa ye [Jah] mpo ete libala na Mwana na Mpate esili koya. Mwasi na ye asili komibongisa nzoto. Nzela epesami na ye ete alata bilamba petepete, na langilangi, na peto. Mpo ete bilamba yango ya petepete bizali boyengebene na basantu.” (Emoniseli 19:7, 8) Ntango ya sikisiki oyo bapakolami oyo bazali naino awa na mabele bakosekwa mpo na kozwa bomoi na bango ya likoló elobelami te. Kasi, na kotalela maloba mazali zingazinga na mokapo, tondimisami ete esengo na bango ekozala monene na kosangana na libala na Mwana na Mpate, Yesu Klisto, mpe na koleka mpo ete bakozala bato oyo bakomona mpenza kobomama ya mwasi na pite, Babilone Monene.
Kobomama ya mokili oyo ya Satana
19. Likambo nini mosusu lilobelami kati na Emoniseli 19:11-21?
19 Mpunda mpembe oyo elobelami kati na Emoniseli 6:2 emonani lisusu. Totangi na Emoniseli 19:11 ete: “Mofandi na ye [likoló na mpunda mpembe] abengami Sembo na Solo, mpe akosambisa mpe akobundaka etumba na boyengebene.” Na yango, “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo” azali kotambola mpo na kobola mabota mpe konyata “ekamwelo na vinyo na kongala na nkele na Nzembe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” Ezali mpamba soki “bakonzi na mokili mpe mampinga na bango” bazali koyanganisama mpo na etumba na Armagedon. Mofandi likoló na mpunda mpembe azali kosilisa bolóngi na ye. Eloko moko ekotikala te kati na lisangá na Satana oyo ezali awa na mabele.—Emoniseli 19:12-21.
20. Nini ekokómela Diable?
20 Kasi ekozala boni mpo na Diable ye moko? Na Emoniseli 20:1-6, Klisto Yesu alobelami lokola “anzelu kokita na likoló, oyo azali na lifungola na libulu mozindo mpe na monyololo monene na loboko na ye.” Asimbi dalagona, ye Nyoka yango na kalakala, oyo azali Diable mpe Satana, mpe akangi ye, mpe abwaki ye kati na libulu mozindo, azipi yango mpe atye elembo likoló na yango. Nsima na kosilisa nguya na Satana mpe kosala ete azala na likoki ya kozimbisa mabota lisusu te, na ntango yango nde Boyangeli ya Mbula Nkóto ya nkembo na Mwana na Mpate mpe mwasi na ye ekoki kobanda. Mpisoli ekozala lisusu te! Liwa oyo eutaki na Adam ekozala lisusu te! Na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te! “Makambo na kala masili koleka.”—Emoniseli 21:4.
21. Lokola tozali kozela komonana na Yesu Klisto, nini esengeli kozala ekateli na biso?
21 Wana ezali biso kozela komonana na Nkolo na biso Yesu Klisto, tika ete tomonisa molende na biso epai na bato mosusu wana ezali biso kolobela bango bilaka bitondi na bolingo oyo Bokonzi na Nzambe ekokokisa. Kobikisama esili kobelema! Tika ete tokende ntango nyonso liboso, lokola bana bangengisami na pole oyo ezali kouta epai na Nkolo Moyangeli Jéhovah!
Bozongeli
◻ Nini emonisi ete komonana na Yesu Klisto ebelemi?
◻ Lolenge nini mokolo na nkanda na Jéhovah ekoya?
◻ Lolenge nini “baoyo bazali kolinga Jéhovah” basengeli kotalela ezalela ya lelo kati na mokili?
◻ Ntango bolozi monene ekobanda, makambo makolandana lolenge nini?
[Elilingi na lokasa 23]
Yesu ˈazali koya kati na mapata,ˈ kozanga komonona na miso na bato, mpo na kokokisa bikateli
[Elilingi na lokasa 25]
Mosika te, mangomba ya lokuta, ebongiseli ya biloko mabe ya Satana, mpe Satana ye moko bakolimwa