Mokili
Ndimbola: Soki liloba “mokili” ebongolami uta na liloba ya Grɛki kosmos, ekoki kolimbola, (1) bato, ezala bazali na bizaleli ya ndenge nini to na bomoi ya lolenge nini, (2) esika moto abotamá to akolá, to (3) bato nyonso oyo bandimami na Yehova te. Babongoli mosusu ya Biblia basalelaki liloba “mokili” mpo na kobongola maloba ya Grɛki oyo elimboli “mabele,” “mabele esika bato bafandi,” mpe “makambo ya mokili.” Kobongola maloba yango ndenge wana ezali libunga. Na lisolo oyo, tokotalela mingimingi ndimbola ya misato ya liloba “mokili” ndenge touti komonisa yango.
Mokili ekobomama nde na mɔtɔ?
2 Pe. 3:7: “Na nzela ya liloba [ya Nzambe] yango kaka likoló ná mabele oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.” (Simbá ete ezali kaka “bato oyo batyolaka Nzambe” nde bakobomama, kasi bato nyonso te. Ndenge moko mpe, vɛrsɛ 6 elobeli kobebisama ya “mokili” na mikolo ya Noa. Ezali bato mabe nde babomamaki, kasi mabele ebomamaki te; ndenge moko mpe, Noa ná libota na ye babomamaki te mpo bazalaki kobanga Nzambe. “Mɔtɔ” oyo elobelami na vɛrsɛ oyo mpo na mokolo ya kosambisama oyo ezali koya, ezali mɔtɔ ya solosolo to ezali nde elilingi ya kobomama ya libela? Mɔtɔ mpenza, ekoki nde kozikisa moi mpe minzoto oyo ebimisaka mɔtɔ makasi koleka? Mpo na koyeba ndimbola mosusu ya vɛrsɛ oyo, talá nkasa 329, 330, na motó ya likambo “Mabele.”)
Mas. 2:21, 22: “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.”
Nani mpenza azali koyangela mokili oyo—Nzambe to Satana?
Dan. 4:35: “[Yehova, Nzambe Oyo-Aleki-Likoló] azali kosala ndenge ye moko alingi na kati ya limpinga ya likoló mpe na kati ya bato oyo bafandi na mabele. Mpe moto moko te akoki kokanga lobɔkɔ na ye to koloba na ye ete: ‘Osali nini?’” (Lisusu, Yirimia 10:6, 7 elobi ete Yehova azali “Mokonzi ya bikólo” mpo azali Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso, oyo akoki kosɛnga mpe akosɛnga bakonzi mpe bikólo oyo bazali koyangela bázongisa monɔkɔ. Lokola Yehova azali Mozalisi ya mabele, azali na lotomo ya koyangela yango; asundolá esika na ye ata mokolo moko te.)
Yoa. 14:30: “[Yesu alobaki:] Mokonzi ya mokili oyo azali koya. Mpe azali na bokonzi likoló na ngai te.” (Emonani polele ete mokonzi yango ezali Yehova Nzambe te, oyo ntango nyonso Yesu asalaka mokano na ye na bosembo. “Mokonzi [yango] ya mokili oyo” ezali nde “moto mabe,” Satana Zabolo, oyo “mokili mobimba ezali kolala” na nguya na ye, ndenge 1 Yoane 5:19 emonisi yango. Atako bato bafandi na mabele ya Nzambe, mokili, elingi koloba bato oyo batosaka Yehova te, ezali kotambwisama na Satana mpo bato yango batosaka nde ye. Baoyo bandimaka boyangeli ya Yehova na motema moko bazali bato ya mokili yango te. Talá 2 Bakorinti 4:4.)
Em. 13:2: “Dragɔ [Satana Zabolo] epesaki nyama yango nguya na yango mpe kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene.” (Soki tokokanisi makambo oyo vɛrsɛ oyo elobi mpo na “nyama” na makambo oyo Danyele 7 elobi, tokomona ete nyama yango ezali komonisa guvɛrnema ya bato, kaka guvɛrnema moko te, kasi ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba oyo ezali koyangela bato. Luka 4:5-7 emonisi ete Satana nde azali koyangela baguvɛrnema yango, mpe Emoniseli 16:14, 16 elobi ete maloba ya bademo ezali kokamba bakonzi ya mabele mobimba mpo bábunda na Nzambe na Armagedone. Nzambe atiki Satana ayangela mokili tii ntango oyo etyamá ekokoka mpo na kokata likambo ya boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba.)
Em. 11:15: “Mingongo ya makasi ebimaki na likoló, elobi: ‘Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso [Yehova] mpe ya Kristo na ye.’” (Ntango likambo yango esalemaki na 1914, “mikolo ya nsuka” ya makambo mabe ya ntango oyo ebandaki. Bokonzi ya Yehova ebandaki kotambwisa makambo na lolenge ya sika, ya mbala oyo na nzela ya Mwana na ye, Mokonzi Masiya. Mosika te, mokili mabe oyo ekobomama. Satana, elimo mabe oyo azali koyangela mokili yango, akobwakama na libulu mozindo, mpe akokoka lisusu te koyangela bato.)
Ndenge nini bakristo ya solo basengeli kotalela mokili mpe bato ya mokili?
Yoa. 15:19: “[Bino bayekoli ya Yesu] bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na mokili.” (Na yango, bakristo ya solo bazali te bato ya mokili oyo ezali mosika na Nzambe. Basalaka makambo lokola bato nyonso, kasi baboyaka bizaleli, maloba mpe etamboli ya bato ya mokili oyo eyokani te na banzela ya sembo ya Yehova.) (Talá nkasa 216-222, mpe 182-185.)
Yak. 4:4: “Basi ya ekobo, boyebi te ete kozala moninga ya mokili ezali nde kozala monguna ya Nzambe? Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Lokola bakristo bazali bato ya kozanga kokoka, mbala mosusu bakoki kobebisama ntango bazali elongo na bato ya mokili. Kasi soki bapesi bango toli ya Liloba ya Nzambe, babongolaka motema mpe babongisaka bizaleli na bango. Nzokande, soki basusu kati na bango baponi kosangana na mokili to komekola bizaleli na yango, bamonisaka ete bazali lisusu te bakristo ya solo kasi bakómi bato ya mokili, elingi koloba banguna ya Nzambe.)
Rom. 13:1: “Tiká molimo nyonso eyokelaka bakonzi oyo bazali liboso, mpo bokonzi ekoki kozala te soki Nzambe atikeli yango nzela te; bokonzi na bango ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe.” (Baoyo balandaka toli oyo batombokelaka baguvɛrnema te mpo na kokweisa yango, bayokelaka bakonzi ya politiki, batosaka bango ntango makambo oyo basɛngi ebuki mibeko ya Nzambe te. Nzambe amonaki baguvɛrnema yango liboso ezala mpe asakolaki ete baguvɛrnema yango ekozala. Nzambe atiki bango báyangela kasi ye moto atye bango te. Na ntango oyo ye moko aponá, akolongola bango.)
Gal. 6:10: “Soki tozali mpenza na ntango oyo ebongi mpo na yango, tósalela bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.” (Yango wana, bakristo ya solo baboyaka te kosalela bato mosusu bolamu. Balandaka ndakisa ya Nzambe oyo abimisaka moi mpo na bato mabe ná bato malamu.—Mat. 5:43-48.)
Mat. 5:14-16: “Bino bozali pole ya mokili. . . . Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.” (Mpo bato mosusu bápesa Nzambe nkembo mpo na makambo oyo bakristo bazali kosala, bakristo yango basengeli kopesa litatoli na molende mpenza mpo na nkombo ya Yehova mpe mokano na ye na mokili mobimba. Bakristo ya solo batyaka mosala wana na esika ya liboso.)
Makambo oyo ezali kosalema na mokili mobimba elimboli nini?
Talá motó ya likambo “Mikolo ya nsuka.”