Bana-kelasi ya Gileadi bazwi mateya oyo esimbi mitema na bango
MWA 9 Sɛtɛmbɛ 2006, likita ya kopesa bana-kelasi ya mbala ya 121 badiplome esalemaki na Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia na Patterson, na etúká ya New York. Ezalaki mpenza likita moko ya kolendisa.
Geoffrey Jackson, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, abandaki programɛ yango na kotombela boyei malamu na bana-kelasi 56 mpe bayangani 6 366 oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge. Atángaki Nzembo 86:11, oyo elobi ete: “Ɛ [Yehova], teyá ngai nzela na yo; nakotambola kati na solo na yo; pesá ngai motema moko ete nabanga nkombo na yo.” Ndeko Jackson abendaki likebi ya bayoki na makambo misato oyo vɛrsɛ yango elobeli. Alobaki boye: “Eteni ya liboso elobeli mateya, eteni ya mibale emonisi ntina ya kosalela yango mpe eteni ya misato elobeli eloko oyo etindaka moto akokisa makambo oyo ayebi. Makambo oyo misato ezali na ntina mingimingi mpo na bino bamisionɛrɛ, lokola bozali kokende na bateritware na bino.” Na nsima, alobelaki na mokuse masukulu mpe masolo ya mituna mpe biyano oyo ekolimbola makambo wana misato.
Mateya ya kolendisa
Ndeko William Malenfant, oyo asalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova na, asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo oyo: “Bomoi oyo eleki kitoko.” Alobelaki ndakisa ya Malia, ndeko ya Malata. Mokolo moko, Yesu akendeki kotala bango mpe Malia aponaki kofanda na makolo na ye mpo na koyoka ye, mpamba te amonaki ete yango likambo eleki ntina mpo na ye. Yesu alobaki na Malata ete: “Malia aponi eloko oyo ezali malamu, mpe bakobɔtɔla ye yango te.” (Luka 10:38-42) Molobi alobaki: “Bókanisa naino likambo yango. Mpo na libela, Malia akobosana te ete afandaki na makolo ya Yesu mpe ayokaki na matoi na ye moko mateya kitoko ya solo, bongo mpo aponaki likambo ya malamu.” Nsima ya kopesa bana-kelasi longonya mpo na liponi oyo basali, ndeko Malenfant alobaki boye: “Boponi mpenza bomoi oyo eleki kitoko.”
Na nsima, ndeko Anthony Morris, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo, “Bólata Nkolo Yesu Klisto,” oyo ezwami na Baloma 13:14. Ndenge nini tokosala yango? Ndeko Morris amonisaki ete kolata Nkolo Yesu elimboli kolanda makambo oyo Nkolo azalaki kosala to kolanda ndakisa mpe bizaleli ya Yesu. Na nsima, alobaki boye: “Bato bazalaki kokakatana te kozala pembeni ya Yesu, mpamba te azalaki komibanzabanza mpenza mpo na bango, mpe bayebaki yango.” Na nsima, molobi amonisaki ete Eteyelo ya Gieleadi esalisaki bana-kelasi yango bákóma na boyebi mingi, mpe ndenge Baefese 3:18 elobi, bakómi na “likoki ya kososola na kati ya makanisi . . . bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo,” ya solo. Kasi, akundolelaki bango oyo vɛrsɛ 19 elobi: “Mpe koyeba bolingo ya Klisto oyo eleki boyebi.” Ndeko Morris alendisaki bana-kelasi boye: “Na boyekoli ya bino moko, bókanisaka ndenge nini bokomonisa bolingo mpe motema mawa lokola Klisto mpe ‘bólata Nkolo Yesu mpenzampenza.’”
Toli ya nsuka ya balakisi ya Gileadi
Lisolo oyo elandaki esalemaki na ndeko Wallace Liverance, molakisi ya Gileadi. Motó ya likambo na yango ezwamaki na Masese 4:7. Alobaki ete atako bwanya oyo euti epai ya Nzambe ezali na ntina mingi, tosengeli mpe “kokóma na bososoli,” elingi koloba likoki ya kosangisa makambo ekeseni mpe komona boyokani oyo ezali na kati na yango. Molobi amonisaki ete kokóma na bososoli epesaka moto esengo. Na ndakisa, na ntango ya Nehemia, Balevi “bazalaki kolimbola mobeko ya Nzambe” mpe “komonisa ntina” na yango. Na nsima, bato basepelaki mingi mpo “basosolaki maloba bayebisaki bango.” (Nehemia 8:7, 8, 12) Ndeko Liverance asukisaki boye: “Esengo eutaka na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe.”
Ndeko Mark Noumair, oyo azali mpe molakisi ya Gileadi, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo: “Nani azali mpenza monguna na yo?” Na bitumba, ekoki kosalema ete basoda ya limpinga moko babomana. Atunaki: “Ezali boni mpo na etumba ya elimo oyo tozali na yango? Soki tokebi te, tokoyeba te nani azali mpenza monguna na biso mpe tokozokisa baninga oyo tozali na bango limpinga moko.” Zuwa ekoki kobulunganisa basusu. Zuwa etindaki Mokonzi Saulo aluka koboma Davidi, moninga na ye mosambeli ya Yehova; nzokande banguna na ye ezalaki nde Bafilistia. (1 Samwele 18:7-9; 23:27, 28) Molobi akobaki boye: “Okosala nini soki ozali kosala na misionɛrɛ moko oyo aleki yo na makambo mingi? Okozokisa nde moninga na yo ya limpinga moko na maloba ya mabe to okondima ete bato mosusu bakoki koleka yo na makambo mingi? Soki tozali komona kaka mabunga ya bato mosusu ekozala mpasi tóyeba nani azali mpenza monguna na biso. Tóbunda na Satana, ye nde monguna na biso ya solo.”
Makambo kitoko oyo bana-kelasi bakutanaki na yango mpe mituna-lisolo
Eteni oyo elandaki, esalemaki na molakisi mosusu ya Gileadi, ndeko Lawrence Bowen. Motó ya likambo na yango ezalaki: “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.” Eteni yango elobelaki mpe mituna-lisolo mpe makambo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango. Alobaki ete, “mosala ya libosoliboso ya misionɛrɛ oyo alandi mateya na Gileadi ezali ya kopalanganisa nsango malamu. Mpe bana-kelasi oyo basalaki yango na bisika nyonso oyo bakokaki kokuta bato.” Bana-kelasi balobelaki makambo kitoko oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola mpe basalaki mwa bilakiseli.
Masolo mibale oyo elandaki esalemaki na bandeko mibale: Ndeko Michael Burnett mpe ndeko Scott Shoffner; bango nyonso basalaka na Betele. Batunaki bandeko ya bakomite ya filiale ya Australie, Barbade, Corée mpe Ouganda mituna. Biyano oyo bandeko wana bapesaki emonisaki molende oyo bandeko basalaka mpo na kokokisa bamposa ya bamisionɛrɛ, ezala kopesa bango bandako oyo ebongi mpe kosalisa bango ntango babɛli. Bandeko wana bamonisaki ete bamisionɛrɛ oyo bazali kolonga, bandimaka bomoi oyo bakuti na esika nyonso oyo bakei.
Lisukulu ya nsuka mpe ya kolendisa
Lisolo monene ya programɛ yango ezalaki, “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo,” oyo esalemaki na ndeko John E. Barr oyo aumeli mingi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Alobelaki Emoniseli 14:6, 7, oyo elobi ete: “Namonaki anzelu mosusu azali kopumbwa na katikati ya likoló, mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya baoyo bazali kofanda na mabelé, mpe epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso, alobi na mongongo makasi ete: ‘Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei.’”
Ndeko Barr alendisaki bana-kelasi ete babosana te makambo misato oyo anzelu wana asalaki. Ya liboso, asengelaki kosakola nsango malamu ya seko ete Klisto azali sikoyo koyangela na nguya nyonso. Alobaki boye: “Tondimisami ete Yesu akómaki mokonzi na mobu 1914. Na yango, nsango oyo ya esengo esengeli kosakolama bipai nyonso na mabelé.” Ya mibale, anzelu alobaki ete: “Bóbanga Nzambe.” Molobi amonisaki ete bana-kelasi basengeli kosalisa bato oyo bayekolaka na bango Biblia báyekola kobanga Nzambe mpo básala te makambo oyo esepelisaka ye te. Ya misato, anzelu alobaki ete: ‘bópesa Nzambe nkembo.’ Molobi alendisaki bana-kelasi boye: “Bóbosana te ete tozali kosala mpo na nkembo ya Nzambe, kasi oyo ya biso moko te.” Na nsima, ntango ndeko Barr azalaki kolobela “ngonga ya kosambisa,” alobaki boye: “Ntango etikali moke mpo kosambisama ebanda. Mingi kati na bateritware na biso basengeli koyoka nsango malamu liboso nsuka eya.”
Mwa moke na nsima, bapesaki bana-kelasi yango 56 badiplome na bango mpe batindaki bango tii na nsuka ya mabelé. Batoli wana ya kolendisa oyo epesamaki mokolo wana ya esengo esimbaki mpenza mitema ya bana-kelasi mpe ya bato nyonso oyo bayanganaki wana.
[Etanda na lokasa 17]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 6
Batindami na mikili: 25
Bana-kelasi bazalaki: 56
Mwayene ya mbula ya kobotama: 35,1
Mwayene ya mbula balekisi na kati ya solo: 18,3
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13,9
[Elilingi na lokasa 18]
Bana-kelasi ya mbala ya 121 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Fox, Y.; Kunicki, D.; Wilkinson, S.; Kawamoto, S.; Consolandi, G.; Mayen, C. (2) Santiago, N.; Clancy, R.; Fischer, M.; de Abreu, L.; Davis, E. (3) Hwang, J.; Hoffman, D.; Wridgway, L.; Ibrahim, J.; Dabelstein, A.; Bakabak, M. (4) Peters, M.; Jones, C.; Ford, S.; Parra, S.; Rothrock, D.; Tatlot, M.; Perez, E. (5) de Abreu, F.; Kawamoto, S.; Ives, S.; Burdo, J.; Hwang, J.; Wilkinson, D. (6) Fox, A.; Bakabak, J.; Cichowski, P.; Forier, C.; Mayen, S.; Consolandi, E.; Wridgway, W. (7) Parra, B.; Perez, B.; Tatlot, P.; Santiago, M.; Ibrahim, Y.; Kunicki, C. (8) Burdo, C.; Cichowski, B.; Ives, K.; Ford, A.; Rothrock, J.; Hoffman, D.; Davis, M. (9) Peters, C.; Dabelstein, C.; Jones, K.; Clancy, S.; Fischer, J.; Forier, S.