Mokanda ya Biblia nimero 27—Danyele
Mokomi: Danyele
Esika ya bokomi: Babilone
Nsuka ya bokomi: soko 536 L.T.B.
Boumeli ya lisoló: 618–soko 536 L.T.B.
1. Lisoló ya lolenge nini ezali kati na mokanda ya Danyele, mpe yango ezali kolobela mingi makambo nini?
NA MIKOLO ya lelo wana mabota nyonso ya mabelé mazali pene na likámá, mokanda ya Danyele ebendi likebi likoló na nsango ya esakweli ya ntina mingi. Wana mikanda oyo ya Biblia, Samwele, Mikonzi, mpe Ntango ezali kolobela lisoló lipesamaki na bato oyo bamonaki makambo matali bokonzi ya Nzambe na elilingi (kolandana ya bakonzi na libota ya Davidi), Danyele atye likebi na ye likoló na mabota ya mokili mpe amonisi liboso bimonaneli ya etumba kati na banguya minene na kolandana ya bakonzi longwa na ntango ya Danyele kino “elaka na nsuka.” Yango ezali kokomama liboso ya makambo oyo makobima na mokili. Ezali komema biso mpenzampenza na mama na yango ya likambo na komonisáká makambo oyo makosalema na “mikolo na nsuka.” Lokola Nebukadanesala, mabota masengeli koyeba mpenzampenza “ete Oyo-Aleki-Likoló azali mokonzi na bokonzi na bato” mpe ete na nsuka akopesa yango na ye oyo azali “lokola mwana na moto,” Masiya mpe Motambwisi, Klisto Yesu. (Dan. 12:4; 10:14; 4:25; 7:13, 14; 9:25; Yoa. 3:13-16) Na kotyáká mpenza likebi na kokokisama ya bisakweli oyo bizali na mokanda mopemami ya Danyele, tokoyeba malamumalamu nguya oyo Yehova azali na yango ya kopesa bisakweli mpe kondimisama ete akobatela mpe akopambola bato na ye.—2 Pet. 1:19.
2. Eloko nini emonisi ete Danyele azalaki moto ya solosolo, mpe asakolaki na boumeli ya eleko nini oyo ezalaki na makambo mingi?
2 Mokanda oyo ezali na nkombo ya mokomi na yango. “Danyele” (na Liebele, Da·ni·yeʼlʹ) elimboli “Mosambisi na ngai ezali Nzambe.” Ezekiele oyo azalaki na bomoi na eleko yango, andimi ete Danyele azalaki moto ya solosolo, atángi ye esika moko na Noa mpe Yobo. (Ezek. 14:14, 20; 28:3) Danyele apesi dati ya ebandeli ya mokanda na ye na “mbula na misato na bokonzi na Yoyakimi mokonzi na Yuda.” Ezalaki na mobu 618 L.T.B., mbula na misato ya bokonzi ya Yoyakimi lokola mokonzi oyo azalaki na nsé ya Nebukadanesala.a Bimonaneli ya bisakweli ya Danyele bikóbaki kino na mbula na misato ya boyangeli ya Siruse, soko na mobu 536 L.T.B. (Dan. 1:1; 2:1; 10:1, 4) Oyo nde bambula ya makambo mingi na bomoi ya Danyele! Alekisaki bambula na ye ya bomwana na nsé ya bokonzi ya Nzambe oyo ezalaki na Yuda. Na nsima, lokola elenge mokonzi, elongo na baninga na ye oyo bazalaki bato minene na Yuda, amemamaki na Babilone, epai amonaki kobima mpe kokwea ya nguya wana ya misato ya mokili mobimba kati na lisoló ya Biblia. Danyele abikaki mpe akómaki kosala lokola moyangeli kati na boyangeli ya Medo-Perse, nguya ya minei na mokili mobimba. Danyele azalaki na bomoi pene na mbula monkámá.
3. Eloko nini emonisi ete mokanda ya Danyele epemamaki na Nzambe mpe ezali solo?
3 Mokanda ya Danyele etyamaka ntango nyonso kati na kataloge ya Bayuda ya Makomami mapemami. Bakutaki biteni ya mokanda ya Danyele esika moko na biteni ya mikanda misusu mipemami kati na Barulo ya Mbu Ekufá, ndambo mosusu kati na biteni yango eumeli kobanda eteni ya yambo ya ekeke ya liboso L.T.B. Nzokande, elembeteli eleki monene oyo emonisi bosolo ya mokanda oyo ezali bongo maloba oyo matángi yango kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Yesu alobeli polele Danyele kati na esakweli na ye likoló na “nsuka ya ebongiseli ya biloko,” epai atángi mbala mingi mokanda oyo.—Mat 24:3, NW; talá lisusu Dan. 9:27; 11:31; mpe 12:11—Mat. 24:15 mpe Mko. 13:14; Dan. 12:1—Mat. 24:21; Dan. 7:13, 14—Mat. 24:30.
4, 5. Lolenge nini arkeoloji esili kokweisa makanisi ya batyoli minene na ntina na mokanda ya Danyele?
4 Atako batyoli minene ya Biblia bamekaki kotya ntembe na bosolo ya mokanda ya Danyele, makambo oyo masili koyebana na nzela ya arkeoloji na boumeli ya bambula esili kokweisa mpenza maloba na bango. Na ndakisa batyoli wana bandimaki te maloba ya Danyele oyo mamonisi ete Belesasala azalaki mokonzi kati na Babilone na ntango oyo eyebani ete Nabonide nde azalaki mokonzi. (Dan. 5:1) Arkeoloji esili komonisa sikawa ete Belesasala azalaki moto ya solo mpe ete ayangelaki elongo na Nabonide na bambula ya nsuka ya Boyangeli ya Babilone. Na ndakisa, makomi ya kala oyo mabéngami cunéiforme oyo malobelamaki ete “Lisoló ya Nabonide” endimi mpenza polele ete Belesasala azalaki na bokonzi na Babilone mpe elimboli lolenge akómaki koyangela elongo na Nabonide.b Elembeteli mosusu ya makomi ya cunéiforme endimi likanisi oyo ete Belesasala azalaki na mikumba minene. Etánda moko, oyo ekomamaki na mbula ya 12 ya Nabonide, ezali na ndai oyo esalemaki na nkombo ya mokonzi Nabonide, mpe ya Belesasala, mwana ya mokonzi, emonisi bongo ete Belesasala azalaki na etɛlɛmɛlo monene esika moko na tata na ye.c Likambo oyo ezali mpe kobenda likebi na koyeba mpo na nini Belesasala alakaki kopesa Danyele “mokonzi na misato kati na bokonzi” soki akokoka kolimbola makomi oyo mazalaki likoló na efelo. Nabonide atalelamaki moto ya liboso, Belesasala, moto ya mibale, mpe Danyele alingaki kotyama moto ya misato kati na bokonzi. (5:16, 29) Moto moko na mayele alobi ete: “Makambo malobami na ntina na Belesasala oyo makomami na cunéiforme masili kongɛngisa mpo na koyeba mokumba oyo azalaki na yango mpe esika na ye kati na lisoló ya bato, eyebani polele. Ezali na makomi mingi oyo mamonisi ete Belesasala akokanaki mwa moke na Nabonide mpo na etɛlɛmɛlo mpe lokumu. Boyangeli na bango mibale na boumeli ya bokonzi ya Sika ya Babilone eyebani lokola likambo ya solo. Nabonide azalaki na bokonzi monene longwa na ndako na ye oyo ezalaki na Tema kati na Arabie, nzokande Belesasala azalaki koyangela lokola moyangeli kati na mboka oyo Babilone ezalaki ntéi ya makambo na yango. Ezali polele ete Belesasala azalaki moyangeli oyo alɛmbá te; bapesaki ye ‘bokonzi.’”d
5 Basusu batyolaki lisoló ya Danyele oyo elobeli litumbu ya mɔ́tɔ (mok. 3), kolobáká ete yango ezali bobele lisapo mpamba. Tozali kotánga kati na nkomá moko ya kala ya Babilone ete: “Talá oyo Rîm-Sin, nkolo na bino alobi: Mpo ete asili kobwaka bilenge baombo mibali kati na eteni na ndako ya mɔ́tɔ, bosengeli kobwaka baombo kati na litumbu ya mɔ́tɔ.” Likambo ya kobenda likebi, na kotángáká nkomá oyo, G. R. Driver alobaki ete etumbu oyo “ezali kati na lisoló ya Mibali Basantu Misato (Dan. III 6, 15, 19-27).”e
6. Biteni nini mibale bisali mokanda ya Danyele?
6 Bayuda bakɔtisaki mokanda ya Danyele, kati na mikanda ya Basakoli te, kasi kati na Makomi. Nzokande, Biblia ya Lingelesi ezali kolanda molɔngɔ́ ya kataloge ya Septante, libongoli ya Greke mpe Vulgate, libongoli ya Latin na kotyáká Danyele katikati na basakoli minene mpe basakoli mike. Mokanda oyo ezali mpenza na biteni mibale. Eteni ya liboso, mokapo 1 kino mokapo 6, elobeli kolandana ya makambo matali Danyele mpe baninga na ye wana bazalaki kosala kati na boyangeli kobanda mobu 617 L.T.B. kino mobu 538 L.T.B. (Dan. 1:1, 21) Eteni ya mibale, esangisi mokapo 7 kino mokapo 12, ekomami na moí-lisoló wa yambo (première personne) na Danyele ye moko lokola mokomi mpe elobeli bimonaneli ya nkuku mpe masoló elongo na baanzelu oyo Danyele azwaki kobanda soko na mobu 553 L.T.B.f kino soko na mobu 536 L.T.B. (7:2, 28; 8:2; 9:2; 12:5, 7, 8) Biteni nyonso wana mibale esali mokanda oyo ya Danyele.
MAKAMBO MAZALI KATI NA DANYELE
7. Nini ememaki Danyele mpe baninga na ye ete bákɔta na mosala ya boyangeli na Babilone?
7 Kobongisama mpo na mosala ya Letá (1:1-21). Na mobu 617 L.T.B. Danyele akómi na Babilone elongo na Bayuda oyo bazalaki bakangami. Bisaleli ya bulɛɛ oyo biutaki na tempelo ya Yelusaleme bimemamaki mpe kuna, mpo na kobombama kati na ebombelo ya mosolo ya bapakano. Danyele mpe baninga na ye Baebele misato bazali kati na bilenge Bayuda na libota ya bokonzi oyo baponami mpo na kolanda mateya ya kobongisama na boumeli ya mbula misato kati na ndako ya mokonzi. Kozwáká ekateli makasi ya komibebisa te na bilei ya elɛngi mpe vinyo ya mokonzi-mopakano, Danyele apesi likanisi ete bámekama na kolya bobele ndunda na boumeli ya mikolo zomi. Komekama yango ebimisi matomba malamu mpo na Danyele mpe baninga na ye, mpe Nzambe apesi bango boyebi mpe mayele. Nebukadanesala aponi bango minei ete bázala liboso na ye lokola bapesi-toli. Vɛrsɛ́ ya nsuka ya mokapo 1, oyo mbala mosusu ebakisamaki nsima wana eteni ya yambo esilaki kokomama, emonisi ete Danyele azalaki naino kati na mosala ya mokonzi soko mbula 80 nsima na kokende na ye na boombo, oyo esalemaki soko na mobu 538 L.T.B.
8. Ndɔ́tɔ nini mpe ndimbola nini Nzambe apesi epai na Danyele, mpe lolenge nini Nebukadanesala amonisi botɔ́ndi na ye?
8 Ndɔ́tɔ ya elilingi ya nsɔ́mɔ (2:1-49). Na mbula ya mibale ya bokonzi na ye (oyo ebandaki mpenza na kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B.), Nebukadanesala atungisami na ndɔ́tɔ na ye. Banganga-soloka na ye bakoki te mpo na koyebisa ye ndɔ́tɔ yango mpe ndimbola na yango. Alaki kopesa bango makabo minene, kasi balobi ete moto akokoka te kasi bobele banzambe nde bakoki komonisa mokonzi eloko oyo azali kosɛnga. Mokonzi asiliki makasi mpe apesi etindá ete bato na mayele bábomama. Lokola Baebele minei batalelami mpe kati na mobeko wana, Danyele asɛngi ete apesamela mwa ntango mpo na koyebisa ndɔ́tɔ yango. Danyele mpe baninga na ye babondeli Yehova mpo ete asunga bango. Yehova ayebisi ndɔ́tɔ yango mpe ndimbola na yango epai na Danyele, oyo na nsima akei liboso na mokonzi mpe alobi ete: “Nzambe azali na lola, oyo akomonisaka makambo mabombami mpe ye ayebisi mokonzi Nebukadanesala makambo makobima na mikolo na nsuka.” (2:28) Danyele alobeli ndɔ́tɔ yango. Ezali bongo elilingi moko monene. Motó na elilingi yango ezali na wolo, ntólo na yango mpe mabɔkɔ na yango ezali na palata, libumu na yango mpe bibɛlo na yango ezali na motako, mpe makolo na yango mazali na ebendé, mpe makaka na yango mazali ndambo na ebendé mpe ndambo mosusu na mabelé. Libanga libɛti mpe libuki elilingi yango mpe ekómi ngomba monene oyo ezipi mabelé mobimba. Yango elimboli nini? Danyele ayebisi ete mokonzi ya Babilone azali motó na wolo. Nsima na bokonzi na ye, bokonzi na mibale, na misato, mpe na minei ekolanda. Na nsuka, “Nzambe na lola akotɛmisa bokonzi bokobebisama soko moke te, . . . ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (2:44) Mpo na komonisa botɔ́ndi mpe bosepeli na ye, mokonzi akumisi Nzambe ya Danyele, ete azali “Nzambe na banzambe” mpe atye Danyele ‘mokóló na mokili mobimba na Babilone, mpe mokonzi na bato na mayele nyonso na Babilone.’ Baninga misato ya Danyele batyami bayangeli kati na bokonzi.—2:47, 48.
9. Nini esalemi mpo na Baebele misato lokola baboyi kosambela elilingi?
9 Baebele misato babiki na litumbu ya mɔ́tɔ (3:1-30). Nebukadanesala asali elilingi monene ya wolo, bosándá na yango ezalaki mapeko 60, mpe asɛngi na bayangeli ya bokonzi na ye ete báyangana mpo na kobulisama na yango. Wana miziki ekobɛta, bato nyonso bakokwea mpe bakosambela elilingi. Moto nyonso oyo akosala bongo te akobwakama kati na litumbu ya mɔ́tɔ na kongala. Bayebisi ye ete baninga misato ya Danyele, elingi koloba Sadalaka, Mesaka mpe Abede-nego, batosi etindá yango te. Bamemi bango liboso ya mokonzi oyo atondi na nkanda, epai balobi na mpiko nyonso ete: “Nzambe na biso, oyo biso tosaleli ye, ayebi kobikisa biso. . . . Tokosambela elilingi na wolo oyo etɛmisaki yo te.” (3:17, 18) Lokola atondaki na nkanda makasi, mokonzi apesi etindá ete bángalisa litumbu mbala nsambo koleka na momeseno mpe ete bákanga Baebele misato wana mpe bábwaka bango na kati. Nsima na kobwaka bango kati na litumbu, bato oyo babwakaki bango babomami na mɔ́tɔ. Nebukadanesala akómi na bobángi. Eloko nini azali komona kati na litumbu? Mibali minei bazali kotambola katikati na mɔ́tɔ kozanga likámá, mpe “lolenge na oyo na minei ezali lokola mwana moko na banzambe.” (3:25) Mokonzi abyangi Baebele misato ete bábima na mɔ́tɔ. Nsima na kobima, bazalaki na elembo moko ya mɔ́tɔ te likoló na bango, ata nsolo ya mɔ́tɔ mpe te! Lokola mbano mpo na etɛlɛmɛlo na bango ya mpiko mpo na losambo ya solo, Nebukadanesala asakoli bonsomi ya losambo mpo na Bayuda na boyangeli na ye mobimba.
10. Ndɔ́tɔ nini ya nsɔ́mɔ Nebukadanesala alɔ́taki na ntina na “ntango nsambo,” mpe yango ekokisamaki likoló na ye?
10 Ndɔ́tɔ ya “ntango nsambo” (4:1-37). Ndɔ́tɔ oyo eyakisamaki na Danyele na mikanda ya Letá ya Babilone. Ekomamaki na Nebukadanesala oyo ayokisamaki nsɔ́ni. Ya liboso, Nebukadanesala andimi nguya mpe bokonzi ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló. Na nsima ayebisi ndɔ́tɔ ya nsɔ́mɔ mpe lolenge yango ekokisamaki epai na ye. Amonaki nzeté moko oyo molai na yango ezalaki kokóma kino na lola mpe ezalaki ebombamelo mpe ezalaki kopesa bilei mpo na bato mpe banyama. Mokɛngɛli angangaki makasi ete: ‘Katá nzeté yango, mpe kangá ekumu na yango na ebendé mpe na motako. Tiká ete ntango nsambo ileka na likoló na yango, mpo eyebana ete Oyo-Aleki-Likoló azali Mokonzi kati na bokonzi ya bato mpe atye likoló na yango moto oyo azali na komikitisa koleka bato nyonso.’ (4:14-17) Danyele alimbolaki ndɔ́tɔ, komonisáká ete nzeté wana ezalaki elilingi ya Nebukadanesala. Kokokisama ya ndɔ́tɔ wana ya esakweli eumelaki te. Na ntango oyo azalaki komikumisa, mokonzi azwaki ligboma; mpe akómaki na bomoi lokola nyama kati na zámba na boumeli ya mbula nsambo. Nsima na yango, mayele na ye mazongaki, mpe andimaki ete Yehova azali monene.
11. Na boumeli ya likambo nini ya mbindo Belesasala amoni likomi moko ya kokamwa, lolenge nini Danyele alimboli yango, mpe lolenge nini yango ekokisamaki?
11 Elambo ya Belesasala: ndimbola ya likomi (5:1-31). Ezali bongo na butu ya nsɔ́mɔ na mokolo mwa 5 Ɔkɔtɔ́bɛ 539 L.T.B. Mokonzi Belesasala, mwana na Nabonide, moyangeli ya Babilone, asali elambo moko monene mpo na ebele ya bato na ye ya lokumu. Na bopusi ya vinyo, mokonzi asɛngi ete bámema bisaleli na bulɛɛ ya wolo mpe ya palata oyo bakamataki na tempelo ya Yehova, mpe Belesasala na babyangami na ye basaleli yango, bazali komela mpe bazali kokumisa banzambe na bango ya bapakano na lolenge ya mbindo. Na mbala moko, lobɔkɔ ebimi mpe ekomi nsango moko ya kokamwa likoló na efelo. Mokonzi abangi. Bato na ye ya mayele bakoki te mpo na kolimbola likomi yango. Na nsuka, bakɔtisi Danyele. Mokonzi alaki ye ete akokómisa ye moto na misato kati na bokonzi soki akoki kotánga mpe kolimbola likomi yango, kasi Danyele ayebisi ye ete abomba biloko na ye mpo na ye moko. Na nsima, atángi likomi mpe apesi ndimbola na yango: “MENE, MENE, TEKELE mpe PALASI. . . . Nzambe atángi motuya na mikolo na bokonzi na yo mpe asukisi yango. . . . Yo omekami na emekeli na bozito, mpe ozwami na kozanga. . . . Bokonzi na yo ekabwani mpe epesami na [Bamede mpe na Baperse].” (5:25-28) Bobele na butu wana Belesasala abomami, mpe Dalio, Momede, azwi bokonzi.
12. Lolenge nini mwango mabe oyo basalelaki Danyele elóngaki te, mpe mobeko nini Dalio abimisaki na nsima?
12 Danyele kati na libulu ya nkosi (6:1-28). Bato minene kati na boyangeli ya Dalio basaleli mayele moko mabe na ntina na Danyele na kopusáká mokonzi ete abimisa mobeko oyo ekopekisa ete na boumeli ya mikolo 30, losambo epesama epai na nzambe mosusu te to na moto te, kasi bobele epai na mokonzi. Moto nyonso oyo akotosa yango te akobwakama na libulu ya nkosi. Danyele aboyi kotosa mobeko yango oyo etalelaki losambo na ye mpe amibaloli epai na Yehova kati na libondeli. Abwakami na libulu ya nkosi. Na lolenge ya ekamwiseli, anzelu ya Yehova akangisi minɔkɔ ya nkosi, mpe na ntɔ́ngɔ́ elandaki, Mokonzi Dalio azali na esengo lokola akuti Danyele kozanga likámá. Banguna balyami na bankosi, mpe mokonzi abimisi mobeko mpo na kobanga Nzambe ya Danyele, lokola “Nzambe na bomoi.” (6:26) Danyele azwi lokumu mingi na mosala na ye kati na boyangeli kino na bokonzi ya Siruse.
13. Kati na ndɔ́tɔ oyo azwaki na nkuku, emonaneli nini Danyele azwi na ntina na banyama minei mpe na ntina na boyangeli ya Bokonzi?
13 Bimonaneli ya banyama (7:1–8:27). Tózonga naino na “mbula na liboso na Belesasala,” oyo boyangeli na ye ebandaki mpenza na mobu 553 L.T.B. Danyele azwi ndɔ́tɔ moko ya nkuku, oyo akomi yango na lokótá Aramɛyɛ.g Amoni banyama minene minei mpe ya nsɔ́mɔ oyo mokomoko emonani na ngala na yango. Nyama ya minei ezali makasi mingi koleka, mpe liseke moko moke libimi katikati na maseke na yango mosusu, “ezalaki koloba makambo minene.” (7:8) Oyo na kalakala amonani mpe afandi. “Nkóto nkóto” bazali kosalela ye. Moto moko “lokola mwana na moto” ayei liboso na ye mpe “nguya na nkembo na bokonzi ipesamaki na ye, ete mabota mpe mikili mpe nkótá nyonso básalela ye.” (7:10, 13, 14) Na nsima, Danyele azwi ndimbola ya emonaneli ya banyama minei. Yango elakisi bakonzi minei, to makonzi. Uta na maseke zomi oyo mazali na nyama ya minei, liseke moke libimi. Ekómi na nguya mpe ebundisi bato na bulɛɛ. Nzokande, esambiselo ya likoló eyanganisami mpo na kopesa “bokonzi mpe nguya mpe lokumu na bokonzi na nsé na lola mobimba . . . na bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló.”—7:27.
14. Emonaneli nini Danyele azwi oyo emonisi ntaba-mobali mpe mpate-mobali ya maseke mibale? Lolenge nini Gabaliele alimboli yango?
14 Mbula mibale na nsima, liboso ete Babilone ekwea, Danyele azwi emonaneli mosusu, oyo akomi na Liebele. Ntaba-mobali oyo azali na liseke monene katikati na miso na ye azali kobunda mpe alóngi mpate-mobali ya lolendo oyo azali na maseke mibale. Liseke monene ya ntaba-mobali libukani, mpe maseke mike minei makitani yango. Longwa na moko na maseke yango, liseke moke mosusu libimi mpe likómi monene, kino kobundisa mampinga na likoló. Eleko ya mikolo 2 300 esakolami kino esika na bulɛɛ “ekopɛtolama.” (8:14) Gabaliele alimbweli Danyele emonaneli. Mpate-mobali ezali bongo bakonzi ya Mede mpe Perse. Mpe ntaba-mobali ezali mokonzi ya Grèce, oyo bokonzi na ye ekokabwana na biteni minei. Na nsima, mokonzi moko ya lolendo “akotɛmɛla mokonzi na mikonzi.” Mpo ete emonaneli “ezali na ntina na mikolo mingi na nsima,” Danyele asengeli kobomba yango.—8:25, 26.
15. Nini epusi Danyele na kobondela Yehova, mpe eloko nini Gabaliele amonisi na ntina na “pɔ́sɔ ntuku nsambo”?
15 Masiya Mokonzi oyo asakolamaki (9:1-27). ‘Na mbula na liboso na Dalio . . . na libota na Bamede’ Danyele azali kotalela esakweli ya Yilimia. Kososoláká ete mbula 70 oyo esakolamaki mpo na kobebisama ya Yelusaleme ebɛlɛmaki na nsuka na yango, Danyele abondeli Yehova mpo na koyambola masumu na ye moko mpe oyo ya Yisalaele. (Dan. 9:1-4; Yil. 29:10) Gabaliele abimeli ye mpo na koyebisa ete ekozala na “pɔ́sɔ ntuku nsambo . . . mpo na kokokisa [“kotya nsuka na,” NW] ekweli, mpe mpo na kosilisa lisumu, mpe mpo na kolimbisa mabe.” Masiya Motambwisi akoya na nsuka ya bapɔ́sɔ 69, na nsima na yango akobomama. Kondimana ekobatelama mpo na bato mingi kino nsuka ya pɔ́sɔ ya 70, mpe na nsuka, libebi mpe libomi ekoya.—Dan. 9:24-27.
16. Na mabaku nini anzelu abimeli lisusu Danyele?
16 Nɔ́rdi na súdi, Mikaele atɛlɛmi (10:1–12:13). Ezali na ‘mbula na misato ya Siruse,’ elingi koloba soko na mobu 536 L.T.B., mwa moke nsima ya bozongi ya Bayuda na Yelusaleme. Nsima na kokila bilei na boumeli ya pɔ́sɔ misato, Danyele azali pene na libongo ya ebale Hidekele. (Dan. 10:1, 4; Gen. 2:14) Anzelu moko abimeli ye mpe alimbweli ye ete ‘mokóló na Perse’ atɛmɛlaki ye ntango azalaki koya epai na Danyele, kasi “Mikaele, moko na mikonzi oyo aleki na lokumu,” asalisaki ye. Na nsima, ayebisi epai na Danyele emonaneli oyo ezali mpo na “mikolo na nsuka.”—Dan. 10:13, 14.
17. Lisoló nini ya esakweli, etali mokonzi ya nɔ́rdi mpe mokonzi ya súdi, Danyele akomi na nsima?
17 Uta na ebandeli na yango, emonaneli oyo ya kosimba motema elobeli kolandana ya bakonzi ya Perse mpe etumba oyo bakobunda elongo na Grèce. Mokonzi moko ya nguya akoyangela mpe akoyeisa boyangeli na ye monene, kasi bokonzi na ye ekokabwana na biteni minei. Na nsuka, ekozala bobele na milɔngɔ́ mibale ya bakonzi, mokonzi ya súdi oyo akotɛmɛla mokonzi ya nɔ́rdi. Bakowela bokonzi. Bakonzi mabe wana oyo bakoki kosembolama te bakolobelana lokuta na mesa moko. “Na elaka eponami,” etumba ekozonga lisusu. Esika na bulɛɛ ya Nzambe ekotukama, mpe “eloko na mbindo oyo ezali koyeisa libebi” ekotɛlɛma na esika yango. (11:29-31, NW) Mokonzi ya nɔ́rdi akoloba makambo na kokamwa na ntina na Nzambe na banzambe mpe akopesa nkembo na nzambe na bibombamelo makasi. Wana “na ntango na nsuka” mokonzi ya súdi akobundisa mokonzi ya nɔ́rdi, mokonzi ya nɔ́rdi akopalangana na mikili mingi, akokɔta mpe “na mokili kitoko.” Lokola akobulungana na bansango oyo ikouta na ɛ́sti mpe na nɔ́rdi, akozala na nkanda mpe akotɛlɛmisa “hema minene na ye na kati na mai monene mpe ngomba na kitoko mpe na bulɛɛ.” Na bongo “akokóma na nsuka na ye, mpe moto akosunga ye te.”—11:40, 41, 45.
18. Makambo nini mabimi na boumeli ya botɛlɛmi ya Mikaele ‘mpo na bolamu ya bana na bato ya Nzambe’?
18 Emonaneli monene ekóbi: Mikaele akotɛlɛma ‘mpo na bolamu ya bana ya bato na Nzambe.’ Esengeli kozala “ntango na bolózi” eleki monene kati na lisoló ya bato, kasi baoyo bakomami kati na búku na bomoi bakobika. Mingi bakolamuka longwa na mputulu kino bomoi ya seko, “mpe baoyo bazali na mayele bakongɛnga lokola nkembo na likoló.” Bakobongola bato mingi epai na boyengebene. Danyele asengeli kokanga mokanda na elembo “kino elaka na nsuka.” “Ekozala ntango molai boni kino nsuka na bikamwiseli oyo?” Anzelu alobeli bileko ya ntango misato mpe ndambo ya ntango, mikolo 1 290, mpe mikolo 1 335 mpe alobi ete bobele “bato na mayele bakososola.” Bato yango bazali na esengo! Na nsuka, anzelu alendisi Danyele na kopesáká ye elaka ete akopema mpe akotɛlɛma mpo na yango eponami mpo na ye “na nsuka na mikolo.”—12:1, 3, 4, 6, 10, 13.
LITOMBA NA YANGO
19. Bandakisa malamu nini ya bosembo mpe ya kotya elikya epai na Yehova kati na libondeli tozali kokuta na mokanda ya Danyele?
19 Baoyo nyonso bazwi ekateli ya kobatela bosembo na bango kati na mokili ya bopaya, basengeli kolanda ndakisa malamu ya Danyele mpe ya baninga na ye misato. Atako bakutanaki na komekama ya lolenge nini, bango balandaki komitambwisa na boyokani na mitindá ya Nzambe. Ntango bomoi na bango ekómaki na likámá, Danyele asalaki “na mayele mpe na kososola” mpe na limemya mpo na bonene ya mokonzi. (2:14-16) Ntango ntembe monene ebimaki, Baebele misato baponaki kobwakama na litumbu ya mɔ́tɔ na esika ya kosambela ekeko, mpe Danyele aponaki kobwakama na libulu ya nkosi na esika ya kotika libaku malamu azalaki na yango ya kobondela Yehova. Na makambo nyonso wana mibale, Yehova abatelaki bango. (3:4-6, 16-18, 27; 6:10, 11, 23) Danyele apesi mpenza ndakisa monene ya komipesa epai na Yehova Nzambe kati na libondeli.—2:19-23; 9:3-23; 10:12.
20. Bimonaneli nini minei bikomami na ntina na banguya ya mokili, mpe mpo na nini kotalela yango lelo ezali likambo ya kolendisa kondima?
20 Bimonaneli ya Danyele bizali kosimba motema mpe bizali kolendisa kondima soki totaleli yango. Ya liboso, tótalela bimonaneli minei na ntina na banguya ya mokili: (1) Ezali na emonaneli ya elilingi ya nsɔ́mɔ, oyo motó na yango ezali na wolo, emonisi molɔngɔ́ ya bakonzi ya Babilone kobanda Nebukadanesala, oyo nsima na ye makonzi mosusu misato ebimaki, lokola yango emonisami na biteni mosusu ya elilingi wana. Ezali bongo makonzi oyo mabukanaki na “libanga,” mpe na ngala na yango, libanga wana likómaki “bokonzi oyo ekoki kobebisama te,” elingi koloba Bokonzi ya Nzambe. (2:31-45) (2) Na nsima, ezali bongo bimonaneli ya nkuku oyo Danyele azwaki, ya liboso ezali ya banyama minei, oyo emonisi “bakonzi minei.” Nyama yango izali lokola nkosi, ngombolo, nkoi oyo ezali na mitó minei, mpe lokola nyama oyo ezali na mino minene ya ebendé, na maseke zomi, mpe na nsima azwaki liseke moke. (7:1-8, 17-28) (3) Oyo elandi ezali bongo emonaneli ya mpate-mobali (Medo-Perse), ntaba-mobali (Grèce), mpe liseke moke. (8:1-27) (4) Na nsuka, tozali na emonaneli ya mokonzi ya súdi mpe mokonzi ya nɔ́rdi. Danyele 11:5-19 elobeli na bosikisiki kowelana oyo ezalaki kati na bokonzi ya Baezipito mpe ya ba Séleucos oyo eutaki na Boyangeli ya Alesandala na Grèce, nsima na liwa na ye na mobu 323 L.T.B. Kobanda na vɛrsɛ́ 20, esakweli ekóbi komonisa etamboli ya mabota oyo makitanaki bokonzi ya súdi mpe ya nɔ́rdi. Maloba ya Yesu oyo malobeli “eloko na mbindo oyo ezali koyeisa libebi” (11:31, NW), kati na esakweli na ye na ntina na elembo ya kozala na ye, emonisi ete kowelana wana mpo na bokonzi kati na bakonzi yango mibale ekóbi kino na “nsuka ya ebongiseli ya biloko.” (Mat. 24:3, NW) Oyo nde kobɔndisama tozali kozwa na elikya oyo esakweli yango epesi biso ete na ‘ntango bolózi ekozala, lokola ezalaki te longwa na ebandeli na mabota kino ntango yango,’ Mikaele akotɛlɛma mpo na kolongola mabota oyo matosaka Nzambe te mpe kopesa kimya epai na bato na botosi!—Dan. 11:20–12:1.
21. Lolenge nini esakweli ya Danyele etali “pɔ́sɔ ntuku nsambo” ekokisamaki na lolenge ya kokamwa?
21 Na nsima, tozali kokuta esakweli ya Danyele na ntina na “pɔ́sɔ ntuku nsambo.” Nsima na pɔ́sɔ 69 “Masiya Motambwisi” asengelaki komonana. Likambo ya kobenda likebi, mbula 483 (69 yikinyá na mbula 7) nsima “na kobima na liloba” mpo na kotonga lisusu Yelusaleme, lokola Alatazelezese apesaki yango ndingisa na mbula na ye ya 20 mpe oyo etongamaki na lisalisi ya Nehemia na Yelusaleme, Yesu, moto na Nasaleta abatisamaki na ebale Yordani mpe apakolamaki na elimo santu, mpe akómaki Klisto, to Masiya (elingi koloba, Mopakolami).h Yango esalemaki na mobu 29 T.B. Na nsima, lokola Danyele asakolaki yango, “kobomama” eyaki ntango Yelusaleme ebebisamaki na mobu 70 T.B.—Dan. 9:24-27; Luka 3:21-23; 21:20.
22. Liteya nini tozali kozwa na kokitisama ya Nebukadanesala?
22 Kati na ndɔ́tɔ ya Nebukadanesala oyo etalaki kokatama ya nzeté, lokola yango ekomami kati na Danyele mokapo 4, eyebisami ete na ntina na komikumisa na ye na misala oyo asalaki mpe mpo ete atyaki motema na nguya na ye moko, mokonzi akitisamaki na Yehova Nzambe. Azalaki na bomoi lokola nyama ya zámba kino ayaki koyeba ete “Oyo-Aleki-Likoló azali mokonzi na bokonzi na bato mpe akopesa yango na ye oyo elingi ye.” (Dan. 4:32) Lelo oyo, tosengeli nde kozala lokola Nebukadanesala, komikumisáká na misala na biso mpe kotyáká elikya na biso kati na nguya ya bato, na boye ete Nzambe apesa biso etumbu, to tosengeli kútu nde kondima na mayele nyonso ete Ye azali Mokonzi kati na bokonzi na bato mpe kotya elikya na biso kati na Bokonzi na ye?
23. (a) Lolenge nini elikya ya Bokonzi elobelami mingi kati na mokanda ya Danyele? (b) Mokanda oyo ya bisakweli esengeli kolendisa biso na kosala nini?
23 Elikya ya Bokonzi elobelami mingi kati na mokanda ya Danyele na lolenge ya kolendisa kondima! Yehova Nzambe amonisami lokola Mokonzi Monene oyo atye Bokonzi bokoki kobebisama soko moke te mpe ete yango ekobuka makonzi nyonso mosusu. (2:19-23, 44; 4:25) Ata bakonzi bapakano, Nebukadanesala mpe Dalio bapusamaki na kondima bonene ya Yehova. (3:28, 29; 4:2, 3, 37; 6:25-27) Lokumu mpe nkembo epesami epai na Yehova lokola Oyo na kalakala, oyo azali kokata ntembe oyo ebimisami na ntina na Bokonzi mpe apesi epai na oyo azali “lokola mwana na moto” “nguya na nkembo na bokonzi, ete mabota mpe mikili mpe nkótá nyonso básalela ye.” Ezali “bato na bulɛɛ na Oyo-Aleki-Likoló” nde bakozala elongo na Klisto Yesu, “Mwana na moto,” kati na Bokonzi. (Dan. 7:13, 14, 18, 22; Mat. 24:30; Emon. 14:14) Ezali Mikaele, mokonzi monene, oyo azali kosalela nguya ya Bokonzi na ye mpo na kotuta mpe kosukisa makonzi nyonso ya mokili oyo monuni. (Dan. 12:1; 2:44; Mat. 24:3, 21; Emon. 12:7-10) Bososoli ya bisakweli oyo mpe ya bimonaneli oyo esengeli kolendisa baoyo balingaka boyengebene ete bámipesa na koluka mpe kozwa kati na Liloba ya Nzambe “makambo kitoko” mpenza matali mikano ya Bokonzi ya Nzambe oyo emonisami epai na biso na lisalisi ya mokanda ya Danyele, mokanda oyo mopemamaki na Nzambe mpe mozali na litomba.—Dan. 12:2, 3, 6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 1269.
b Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 283.
c Archaeology and the Bible, 1949, ebimisami na George A. Barton, lokasa 483.
d The Yale Oriental Series · Researches, Vol. XV, 1929.
e Archiv für Orientforschung, Vol. 18, 1957-58, lokasa 129.
f Ezali solo ete Belesasala abandaki koyangela lokola moyangeli kobanda na mbula ya misato ya boyangeli ya Nabonide. Lokola endimami ete Nabonide abandaki koyangela na mobu 556 L.T.B., mbula ya misato ya boyangeli na ye mpe “mbula ya liboso ya boyangeli ya Belesasala” ezalaki bongo na mobu 553 L.T.B.—Danyele 7:1, NW; talá búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 283; Vol. 2, lokasa 457.
g Danyele 2:4b–7:28 ekomamaki na lokótá Aramɛyɛ, nzokande biteni mosusu bitikali ya mokanda oyo bikomamaki na Liebele.
h Nehemia 2:1-8; talá lisusu búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, nkasa 899-901.