Mokambi na biso ya molende lelo
“Abimaki azali kolonga mpe mpo na kolonga tii na nsuka.”—EM. 6:2.
1, 2. (a) Ndenge nini Biblia elobeli mosala oyo Kristo azali kosala banda 1914? (b) Makambo nini Kristo asali banda akóma Mokonzi?
KRISTO atyamaki Mokonzi ya Bokonzi ya Yehova na 1914. Okanisi ete azali kosala nini lelo? Omonaka ye lokola afandi na kiti na ye ya bokonzi mpe azali kokanisakanisa, mpe na bantango mosusu abwakaka liso na mabele mpo na kotala ndenge lisangá na ye ezali kotambola? Soki ezali bongo, osengeli kobongola makanisi na yo. Mokanda ya Nzembo mpe ya Emoniseli elobeli Yesu lokola mokonzi ya molende oyo amati na mpunda ya mpɛmbɛ, abimi “azali kolonga mpe mpo na kolonga tii na nsuka.”—Em. 6:2; Nz. 2:6-9; 45:1-4.
2 Likambo ya liboso oyo Kristo asalaki nsima ya kotyama mokonzi ezalaki kolonga “dragɔ ná baanzelu na yango.” Lokola azali Mikaele anzelu-mokonzi, Kristo akambaki baanzelu na ye mpe abenganaki Satana ná bademo na likoló, esika mosantu, mpe abwakaki bango na zingazinga ya mabele. (Em. 12:7-9) Na nsima, na mokumba na ye ya “momemi-nsango ya kondimana” ya Yehova, Yesu ayaki elongo na Tata na ye mpo na kotala tempelo ya elimo. (Mal. 3:1) Asambisaki mangomba ya bokristo, eteni ya “Babilone Monene” oyo eleki mabe, mpe amonaki ete ezali na ngambo ya makila mpe emikómisi mbindo na ndenge ezalaki kokɔta na makambo ya politiki ya mokili oyo.—Em. 18:2, 3, 24.
Apɛtoli moombo na ye awa na mabele
3, 4. (a) Mosala nini Kristo asalaki lokola “momemi-nsango” ya Yehova? (b) Ntango Yesu ayaki kotala tempelo amonaki nini? (c) Lokola azali Mokonzi ya lisangá, likambo nini asalaki?
3 Ntango Yehova ná “momemi-nsango” na ye bayaki kotala tempelo ya elimo, bamonaki mpe ete na lopango ya tempelo yango oyo ezali awa na mabele, ezalaki na etuluku moko ya bakristo ya solo, oyo basanganaki te na mangomba ya bokristo. Nzokande, ata bakristo yango oyo batyamaki mafuta na elimo, to “bana ya Levi,” basengelaki kopɛtolama. Ezalaki ndenge Malaki asakolaki yango ete: “[Yehova] akofanda mpenza lokola moto oyo anyangwisaka mpe apɛtolaka palata mpe akopɛtola bana ya Levi; mpe akokómisa bango pɛɛ lokola wolo mpe lokola palata, mpe bakokóma mpenza na miso ya Yehova bato oyo bazali kopesa likabo na boyengebene.” (Mal. 3:3) Yehova asalelaki “momemi-nsango ya kondimana,” elingi koloba Yesu Kristo, mpo na kopɛtola Bayisraele yango ya elimo.
4 Atako bongo, Kristo akutaki bakristo yango ya sembo oyo batyamaki mafuta na elimo bazali kosala makasi mpenza mpo na kopesa ndako ya kondima bilei ya elimo na ntango ebongi. Kobanda 1879, makambo etambola malamu to te, bazali kosalela zulunalo oyo mpo na kobimisa mateya ya solo ya Biblia oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Yesu asakolaki ete “ntango akoya” mpo na kotala basali ya ndako na ye na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo,” akokuta moombo moko azali kopesa bango “bilei na bango na ntango oyo ebongi.” Alobaki ete akotánga moombo yango moto ya esengo mpe “akotya ye abatela biloko na ye nyonso” awa na mabele. (Mat. 24:3, 45-47) Lokola azali Mokonzi ya lisangá, Kristo azali kosalela “moombo [yango] ya sembo mpe ya mayele” mpo na kobatela matomba ya Bokonzi na ye awa na mabele. Azali kotambwisa “basali ya ndako” oyo batyami mafuta na elimo mpe baninga na bango “bampate mosusu” na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.—Yoa. 10:16.
Mosala ya kobuka mbuma ya mabele
5. Na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki Masiya Mokonzi azali kosala nini?
5 Ntoma Yoane azwaki emonaneli ya likambo mosusu oyo Masiya Mokonzi akosala na “Mokolo ya Nkolo,” nsima ya kokóma mokonzi na 1914. Yoane akomaki boye: “Namonaki, mpe talá! lipata moko ya mpɛmbɛ, mpe moto moko oyo azali lokola mwana ya moto afandi na lipata yango, azali na motole ya wolo na motó na ye mpe likwangola moko oyo epeli makasi na lobɔkɔ na ye.” (Em. 1:10; 14:14) Yoane ayokaki anzelu moko oyo autaki epai ya Yehova azali koloba na Mobuki-mbuma atinda likwangola na ye mpo “mbuma ya mabele eteli mpenza.”—Em. 14:15, 16.
6. Likambo nini esengelaki kosalema na elanga liboso ya ntango ya kobuka mbuma?
6 Kobuka yango ya “mbuma ya mabele” ezongisi na makanisi na biso ndakisa oyo Yesu apesaki ya blé ná matiti mabe. Yesu alobaki ete ye nde mobali oyo alonaki mboto ya blé mpo, na nsima aya kobuka blé ya malamu, elingi koloba “bana ya bokonzi,” bakristo ya solo oyo batyami mafuta na elimo mpo báyangela ná ye na Bokonzi na ye. Kasi, na butu, kaka na elanga yango, monguna moko, “Zabolo,” ayaki kolona matiti mabe, elingi koloba “bana ya moto mabe.” Moloni ayebisaki baombo na ye bátika blé mpe matiti mabe ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma, na “bosukisi ya makambo ya ntango yango.” Na ntango yango, akotinda baanzelu na ye bákabola blé ná matiti mabe.—Mat. 13:24-30, 36-41.
7. Ndenge nini Kristo azali kobuka “mbuma ya mabele”?
7 Na kolanda emonaneli oyo Yoane azwaki, Yesu azali kotambwisa mosala ya kobuka mbuma na mokili mobimba. Kobuka “mbuma ya mabele” ebandaki na koyanganisama ya batikali ya “bana ya bokonzi” 144 000, to blé oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye. Bokeseni kati na bokristo ya solo ná oyo ya lokuta emonanaki mingi koleka nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na boye ete, lokola bato bamonaki bokeseni yango, esalisaki mpo eteni ya mibale ya mosala ya kobuka “mbuma ya mabele” esalema, elingi koloba mosala ya koyanganisa bampate mosusu. Bango bazali “bana ya bokonzi” te; bazali nde “ebele mpenza ya bato” ya komikitisa oyo Bokonzi yango ekoyangela. Bazali kouta na “bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso.” Bandimi Bokonzi ya Masiya, oyo esangisi Yesu ná “basantu” 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye na guvɛrnema yango ya likoló.—Em. 7:9, 10; Dan. 7:13, 14, 18.
Ndenge azali kokamba masangá
8, 9. (a) Nini emonisi ete Yesu atalaka kaka etamboli ya lisangá na mobimba na yango te, kasi mpe etamboli ya moto mokomoko? (b) Ndenge emonisami na elilingi ya lokasa 26, wapi “makambo mozindo ya Satana” oyo tosengeli koboya?
8 Na lisolo oyo eleki, tomonaki ete Kristo azalaki kolandela malamu mpenza elimo ya lisangá mokomoko ya ekeke ya liboso T.B. Na mikolo na biso, lokola akómá Mokonzi mpe bapesá ye “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele,” Mokambi na biso Kristo azali kotambwisa na molende masangá ya mokili mobimba mpe bakɛngɛli na yango. (Mat. 28:18; Kol. 1:18) Yehova ‘akómisi ye mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá’ ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Ef. 1:22) Na yango, amonaka likambo nyonso oyo esalemaka na mokomoko ya masangá koleka 100 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.
9 Yesu atindelaki lisangá ya Tyatire ya kala maloba oyo: “Mwana ya Nzambe, oyo azali na miso lokola lolemo ya mɔtɔ, . . . alobi makambo oyo: ‘Nayebi makambo oyo osalaka.’” (Em. 2:18, 19) Apamelaki bandeko ya lisangá yango mpo na bomoi na bango ya mbindo mpe ya koluka bisengo; alobaki na bango boye: “Natalaka bangɛi mpe mitema, mpe nakopesa bino moto na moto na kolanda misala na bino.” (Em. 2:23) Maloba wana emonisi ete Kristo atalaka kaka etamboli ya lisangá na mobimba na yango te kasi mpe etamboli ya moto mokomoko oyo azali na kati ya lisangá. Yesu akumisaki bakristo ya Tyatire oyo “bazangaki koyeba ‘makambo mozindo ya Satana.’” (Em. 2:24) Lelo mpe, andimaka bato oyo, ezala bilenge to mikóló, bazali koboya koyeba “makambo mozindo ya Satana” na nzela ya Internet to na masano ya video oyo elakisaka mobulu to na nzela ya makanisi ya bato oyo bakangaka miso na mabe. Kanisá esengo oyo azalaka na yango ntango amonaka milende mpe komipimela ya bakristo mingi lelo, oyo bazali kosala nyonso mpo na kolanda litambwisi na ye na makambo nyonso ya bomoi na bango!
10. Ndenge oyo Kristo atambwisaka bankulutu ya lisangá emonisami ndenge nini, mpe bango basengeli kondima ebongiseli nini?
10 Kristo azali kokɛngɛla na bolingo masangá na ye awa na mabele na nzela ya bankulutu oyo batyamá. (Ef. 4:8, 11, 12) Na ekeke ya liboso, bakɛngɛli nyonso babotamaki na elimo. Mokanda ya Emoniseli elobaki ete bazali lokola minzoto na lobɔkɔ ya mobali ya Yesu. (Em. 1:16, 20) Lelo oyo, bankulutu mingi ya masangá bazali bampate mosusu. Tokoki koloba ete bango mpe bazali na nse ya bokonzi ya Kristo, elingi koloba azali kotambwisa bango na lobɔkɔ na ye, mpamba te mpo na kotya bankulutu, basalaka libondeli mpe balandaka litambwisi ya elimo santu. (Mis. 20:28) Atako bongo, bayebaka ete Kristo asalelaka mwa etuluku moko ya bakristo ya mibali oyo batyami mafuta na elimo lokola Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo na kokamba mpe kotambwisa bayekoli na ye awa na mabele.—Tángá Misala 15:6, 28-30.
“Yaká, Nkolo Yesu”
11. Mpo na nini tozali na mposa makasi ya komona Mokambi na biso ayei nokinoki?
11 Na emoniseli oyo ntoma Yoane azwaki, Yesu alobaki mbala mingi ete azali koya nokinoki. (Em. 2:16; 3:11; 22:7, 20) Na ntembe te, azalaki kolobela koya na ye mpo na kopesa Babilone Monene mpe biteni mosusu ya ebongiseli mabe oyo ya Satana etumbu. (2 Tes. 1:7, 8) Lokola azalaki na mposa makasi ya komona makambo yango kitoko oyo esakolamaki, ntoma Yoane, oyo akómaki mobange agangaki boye: “Amen! Yaká, Nkolo Yesu.” Biso oyo tozali na bomoi na ntango ya nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo mabe tozali mpe na mposa makasi ya komona Mokambi mpe Mokonzi na biso ayei na nguya ya Bokonzi mpo na kosantisa nkombo ya Tata na ye mpe kolongisa boyangeli na Ye.
12. Mosala nini Kristo akosala liboso banzelu báfungola mipɛpɛ ya kobebisa?
12 Liboso Yesu aya kobebisa ebongiseli ya Satana awa na mabele, moto ya nsuka kati na bato 144 000 ya Yisraele ya elimo akozwa elembo ya nsuka. Biblia elobi polele ete banzelu bakofungola mipɛpɛ ya kobebisa mokili ya Satana te soki mosala ya kotya bato 144 000 elembo esili te.—Em. 7:1-4.
13. Ndenge nini Kristo akomonisa polele kozala na ye na eteni ya liboso ya ‘bolɔzi monene’?
13 “Kozala” ya Kristo oyo ebandaki na 1914 eyebani te epai ya bato mingi oyo bafandi awa na mabele. (2 Pe. 3:3, 4) Kasi mosika te, akomonisa kozala na ye polele ntango akosopela biteni ndenge na ndenge ya ebongiseli ya Satana bitumbu ya Yehova. Libebi ya “mobuki mibeko,” elingi koloba bakonzi ya mangomba ya bokristo ya lokuta, ekomonisa polele “komonisama ya kozala na ye.” (Tángá 2 Batesaloniki 2:3, 8.) Ekomonisa polele ete Kristo azali kokoba na mosala na ye lokola mosambisi oyo Yehova atye. (Tángá 2 Timote 4:1.) Kobebisama ya eteni ya Babilone Monene oyo eleki mabe ekozala ebandeli ya libebi monene ya lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba. Yehova akotya likanisi ya kobebisa mwasi ya ndumba yango ya elimo na mitema ya bakonzi ya politiki. (Em. 17:15-18) Yango ekozala eteni ya liboso ya ‘bolɔzi monene.’—Mat. 24:21.
14. (a) Mpo na nini eteni ya liboso ya bolɔzi monene ekoyeisama mokuse? (b) “Elembo ya Mwana ya moto” ekolimbola nini mpo na basaleli ya Yehova?
14 Yesu alobaki ete mikolo ya bolɔzi yango ekoyeisama mokuse “mpo na bato oyo baponami,” elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala naino na mabele. (Mat. 24:22) Yehova akotika te ete kobebisama wana ya mangomba ya lokuta esilisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe baninga na bango bampate mosusu. Yesu abakisaki ete “nsima ya bolɔzi ya mikolo yango,” bilembo ekozala na sanza, na moi, mpe na minzoto, “bongo elembo ya Mwana ya moto ekomonana na likoló.” Yango ekotinda bikólo ya mabele ‘bámibɛtabɛta na kolela.’ Kasi ekozala bongo te mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali na elikya ya bomoi na likoló, mpe baninga na bango, oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele. Bango ‘bakotɛlɛma alima mpe bakotombola mitó na bango, mpo kosikolama na bango ekómi pene.’—Mat. 24:29, 30; Luka 21:25-28.
15. Mosala nini Kristo akosala ntango akoya?
15 Nzokande, liboso alonga tii na nsuka, Mwana ya Moto akoya na ndenge mosusu. Asakolaki boye: “Ntango Mwana ya moto akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.” (Mat. 25:31-33) Vɛrsɛ yango elobeli ntango oyo Kristo akoya lokola Mosambisi mpo na kokabola bato ya “bikólo nyonso” na bituluku mibale: “bampate,” elingi koloba bato oyo basungaki mpenza bandeko na ye ya elimo (bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala naino awa na mabele) mpe “bantaba,” bato oyo “bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.” (2 Tes. 1:7, 8) Bampate, oyo babengami “bayengebene,” bakozwa “bomoi ya seko” na mabele, kasi bantaba bakobebisama to “bakokufa liwa ya seko.”—Mat. 25:34, 40, 41, 45, 46.
Yesu alongi tii na nsuka
16. Ndenge nini Mokambi na biso Kristo akolonga tii na nsuka?
16 Ntango bato oyo bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe bakosila kotyama bilembo mpe ntango bampate bakoyebana mpe bakotyama na lobɔkɔ na ye ya mobali mpo na kobikisama, Kristo akokende “mpo na kolonga tii na nsuka.” (Em. 5:9, 10; 6:2) Akotambwisa banzelu na ye ya nguya mpe, na ntembe te, elongo na bandeko na ye oyo basili kosekwa, Yesu akobebisa bibongiseli nyonso ya mokili ya Satana: makambo ya politiki, mampinga, mpe makambo ya mombongo na mabele. (Em. 2:26, 27; 19:11-21) Kristo akosilisa kolonga ntango akobebisa ebongiseli mabe ya Satana. Na nsima, akobwaka Satana ná bademo na ye na libulu mozindo mpo na mbula nkóto.—Em. 20:1-3.
17. Epai wapi Kristo akomema bampate mosusu na Boyangeli ya Mbula Nkóto, mpe tosengeli kozala na ekateli nini?
17 Ntango alobelaki “ebele mpenza ya bato” ya bampate mosusu, oyo bakobika na bolɔzi monene, ntoma Yoane asakolaki ete “Mwana-Mpate, oyo azali na katikati ya kiti ya bokonzi, akokamba bango, mpe akomema bango na maziba ya mai ya bomoi.” (Em. 7:9, 17) Ya solo, na Boyangeli ya Mbula Nkóto, Kristo akokoba kokamba bampate mosusu, oyo bazali mpenza koyoka mongongo na ye, mpe akomema bango na bomoi ya seko. (Tángá Yoane 10:16, 26-28.) Na yango, tólanda na bosembo Mokambi mpe Mokonzi na biso—sikoyo mpe na mokili ya sika oyo Yehova alaki!
Bozongeli
• Likambo nini Kristo asalaki nsima ya kokóma mokonzi?
• Nzela nini Kristo azali kosalela awa na mabele mpo na kokamba masangá?
• Na ndenge nini mosusu Mokambi na biso Kristo asengeli koya?
• Ndenge nini Kristo akokoba kokamba biso na mokili ya sika?
[Elilingi na lokasa 29]
Kobebisama ya mokili mabe ya Satana ekomonisa polele kozala ya Kristo