Mokapo 39
Mokonzi-Mobundi alongi na Armagedon
Emonaneli 13—Emoniseli 19:11-21
Teme: Yesu azali kotambwisa mampinga na makoló mpe abomi biloko mabe na ntango oyo
Eleko na kokokana na yango: Nsima na kobomama na Babilone Monene
1. Armagedon ezali nini, mpe nini ekobenda etumba yango?
ARMAGEDON! Tala liloba oyo ezali kobangisa bato mingi. Kasi mpo na bato oyo balingi boyengebene, yango ezali kosakola mokolo oyo bato bazelaki mingi, na boumeli na yango Jéhovah akokokisa bikateli na ye nyonso likoló na mabota. Ezali etumba ya moto te, kasi “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” mokolo na kobukanisa na ye epai na mikonzi ya mokili. (Emoniseli 16:14, 16; Ezekiele 25:17) Bolozi monene ekobanda na ntango Babilone Monene ekobomama. Na nsima, wana ekopusama ye na Satana, nyama na yauli na langi motane mpe maseke zomi na yango bakobundisa libota na Jéhovah. Lokola nkanda na ye engali makasi koleka mpo na lisangá to mwasi na Nzambe, Diable asili kozwa ekateli ya kosalela bato oyo ye akosaki mpo na kobundisa makasi ndambo ya libota na mwasi oyo bazali naino awa na mabele. (Emoniseli 12:17) Wana ezali libaku na ye ya nsuka!
2. Gog de Magog azali nani, mpe ndenge nini Jéhovah azali komema ye na kobundisa libota na ye moko?
2 Motindo Diable akobundisa lisangá ya Nzambe eyebisami na lolenge ya polele kati na mokapo 38 ya mokanda na Ezekiele. Satana oyo asambwisami abengami “Gog ya mokili na Magog.” Na elobeli ya elilingi, Jéhovah atye ndobo na mbanga ya Gog mpe abimisi ye, ye mpe mampinga na ye nyonso, mpo ete abanda etumba. Ndenge nini azali kosala? Ezali boye: Jéhovah amemi Satana na kotalela libota na ye lokola libota moko ezangi libateli, “bato oyo balongwaki na mabota, baoyo bazwi bibwele mpe biloko, baoyo bafandi na katikati na mokili.” Bazali na centre ya mokili, lokola bazali bobele bango nde baboyi kosambela nyama na yauli mpe ekeko na yango. Kanisa nkanda ya Gog na komonáká nguya na bango mpe bozwi na bango na elimo! Na yango, Satana mpe basoda na ye mingi, bakisa mpe nyama na yauli oyo azali kobuta na mai monene mpe maseke na yango zomi, babimi ebele kati na mokano ya kosilisa libota na Nzambe. Nzokande na kokesena na Babilone Monene, libota na Nzambe, oyo ezali peto, ezali na libateli na Nzambe.—Ezekiele 38:1, 4, 11, 12, 15; Emoniseli 13:1.
3. Ndenge nini Jéhovah akosilisa basoda na Gog?
3 Ndenge nini Jéhovah akosukisa Gog mpe bibele na ye? Totala yango. “Nakobyanga mopanga kotemela ye na kati na ngomba na ngai nyonso, mopanga na moto na moto ekobongwana epai na ndeko na ye.” Ata bibundeli ya masasi ata mpe oyo ya nikleere ekozala na ntina moko te kati na etumba yango, mpamba te Jéhovah alobi: “Nakosambisa ye na maladi mpe na makila; mpe nakonokisa na likoló na ye, mpe na likoló na bibele na ye, mpe likoló na mabota mingi mazali na ye elongo, mbula monene mpe matandala minene mpe mɔ́to mpe sufulu. Boye nakomonisa lokumu na ngai mpe bulee na ngai, mpe nakomiyebisa na miso na mabota mingi, mpe bakoyeba ete ngai nazali Jéhovah.”—Ezekiele 38:21-23; 39:11; tala Yosua 10:8-14; Basambisi 7:19-22; 2 Ntango 20:15, 22-24; Yobo 38:22, 23.
Ye oyo bazali kobyanga “Sembo na Solo”
4. Ndenge nini Yoane amonisi Yesu Klisto oyo amilengeli mpo na etumba?
4 Jéhovah abyangi mopanga. Nani azali kosalela mopanga yango? Tozonga na Emoniseli epai kuna eyano ekopesamela biso kati na emonaneli mosusu ya nguya. Liboso na Yoane makoló mafungwami mpo na emonaneli ya kokamwa mpenza: Yesu Klisto ye moko amilengeli mpo na etumba! Yoane alobi na biso: “Namonaki likoló esili kozipwa. Mpunda mpembe azalaki, mofandi na ye abyangami Sembo na Solo, mpe akosambisaka mpe akobundaka etumba na boyengebene. Miso na ye lokola epeleli na mɔ́to, mpe na motó na ye mitolé na bokonzi mingi.”—Emoniseli 19:11, 12a.
5, 6. Nini emonisami na (a) “mpunda mpembe”? (b) nkombo “Sembo mpe Solo”? (c) miso makokani na “móto”? (d) ebele na “mitolé”?
5 Lokola kati na emonaneli moko esilaki koleka, oyo emonisaki bafandi na mpunda minei, “mpunda mpembe” yango azali elilingi ebongi ya etumba na sembo. (Emoniseli 6:2) Bongo nani kati na bana na Nzambe azali sembo koleka Mobundi wana na nguya? Lokola bazali kobyanga ye “Sembo na Solo,” azali moto mosusu te bobele “motatoli na sembo mpe na solo,” ye Yesu Klisto. (Emoniseli 3:14) Azali kobunda etumba yango mpo na kokokisa bikateli na sembo ya Jéhovah. Na bongo, azali kosala lokola Mosambisi oyo atiami na Jéhovah, lokola mpe “Nzambe na nguya.” (Yisaya 9:6) Miso na ye, lokola “móto,” ezali kobangisa, azali kotala ndenge banguna na ye bakobomama mosika te.
6 Mitole mityami na motɔ́ ya Mokonzi-Mobundi yango. Nyama na yauli oyo Yoane amonaki kobima na mai monene azalaki na mitole, oyo ezalaki komonisa boyangeli na ye ya ntango mokuse na mabelé. (Emoniseli 13:1) Kasi Yesu “azali na mitole na bokonzi mingi.” Boyangeli na ye ya nkembo eleki nyonso, mpamba te azali “Mokonzi na baoyo bazali koyangela lokola bakonzi mpe Nkolo na baoyo bazali koyangela lokola bankolo.”—1 Timote 6:15.
7. Nkombo nini Yesu alati?
7 Yoane alandi koyebisa makambo amonaki: “Azali na nkombo esili kokomama, oyo moto mosusu ayebi te, bobele ye moko ayebi yango.” (Emoniseli 19:12b) Biblia esilaki kopesa bankombo epai na Mwana na Nzambe, na ndakisa Yesu, Emanuele mpe Mikaele. Kasi “nkombo” yango oyo eyebisami te ezali komonisa etelemelo mpe mikumba na ye na boumeli ya mokolo na Nkolo. (Tala Emoniseli 2:17.) Kolobaka mpo na Yesu uta 1914, Yisaya alobi: “Akobyangama ete Mosungi na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Mokonzi na kimya.” (Yisaya 9:6) Ntoma Paulo akokisaki nkombo na Yesu na mikumba na ye ya mosala ya lokumu mingi wana elobi ye boye: “Yango wana Nzambe atomboli ye [Yesu] mingi mpe apesi ye nkombo koleka nkombo nyonso, ete na nkombo na Yesu mabolongo nyonso makumbama.”—Bafilipi 2:9, 10.
8. Mpo na nini bobele Yesu ye moko nde akoki koyeba nkombo oyo ekomami, mpe azali kokabola mikumba na ye ya lokumu mingi elongo na banani?
8 Mikumba na Yesu mileki mikumba nyonso mosusu. Longola Jéhovah ye moko, bobele Yesu nde akangi ntina na oyo elimboli kozala na etelemelo moko etombwani koleka. (Tala Matai 11:27.) Na yango, kati na bikelamu nyonso ya Nzambe, bobele Yesu nde akoki koyeba ntina mpenza ya nkombo yango. Nzokande, Yesu azali kokabola ndambo na mikumba yango elongo na mwasi na ye. Yango wana apesi elaka oyo: “Mpo na molongi, . . . nakokoma likolo na ye . . . nkombo na ngai na sika.”—Emoniseli 3:12.
9. (a) Likambo oyo ete Yesu “alati elamba emwangisami makila” elimboli nini? (b) Mpo na nini Yesu abengami “Liloba na Nzambe”?
9 Yoane abakisi: “Alati elamba esili komwangisama na makila, mpe nkombo bazali kobyanga ye ete, Liloba na Nzambe.” (Emoniseli 19:13) “Makila” yango mazali nini? Ekoki kozala oyo Yesu asopaki mpo na bolamu ya bato. (Emoniseli 1:5) Kasi na kotalela zongazonga na mokapo, “makila” yango mazali kolimbola mpenzampenza makila ya banguna na ye, oyo masopami na ntango ya kokokisama na bikateli na Jéhovah likoló na bango. Yango ekundweli biso emonaneli moko esilaki koleka, kati na yango mbuma na vinyo na mokili ekatami mpe etyami kati na ekamelo na nkanda na Nzambe, kino na ntango makila makomi na “minoko na bampunda,” likambo oyo elimboli kolonga monene likoló na banguna na Nzambe. (Emoniseli 14:18-20) Motindo moko, makila oyo matangi likoló na elamba oyo Yesu alati emonisi ete bolongi na ye ezali ya solo mpe ya kokoka. (Tala Yisaya 63:1-6.) Sikawa Yoane azali lisusu koloba mpo na nkombo moko oyo epesameli Yesu. Mbala oyo, ezali nkombo moko oyo eyebani mingi, oyo ya “Liloba na Nzambe,” komonisaka bongo Mokonzi-Mobundi yango ete azali Molobeli monene ya Nzambe, Mobateli monene na solo.—Yoane 1:1; Emoniseli 1:1.
Babundi na ngámbo na Yesu
10, 11. (a) Ndenge nini Yoane amonisi ete Yesu azali ye moko te kati na etumba? (b) Likambo oyo ete bampunda ezali mpembe mpe bafandi na yango balati “bilamba petepete mpembe, mpeto” elimboli nini? (c) “Mampinga” na likoló esalemi na banani?
10 Yesu azali ye moko te kati na etumba yango. Yoane alobi na biso boye: “Bibele na babundi na likoló bazalaki kolanda ye, bafandi na bampunda mpembe, balati bilamba petepete, mpembe, mpeto.” (Emoniseli 19:14) Lokola bampunda ezali “mpembe,” yango ezali komonisa ete etumba ezali ya sembo. “Bilamba petepete” ebongi mpenza na bafandi na mpunda na Mokonzi, mpe mpembe na yango oyo ezali kongala ezali elembo ya ezalela na peto mpe na boyengebene liboso na Jéhovah. Na bongo, banani batangami kati na “mampinga” yango? Na ntembe te mampinga yango masalami na baanzelu basantu. Ezali na ebandeli ya mokolo na Nkolo nde Mikaele mpe baanzelu na ye babenganaki Satana mpe badémo na ye na makoló. (Emoniseli 12:7-9) Lisusu, “baanzelu nyonso” bakosalela Yesu oyo afandi na kiti na bokonzi na ye ya lokumu mpe abandaki kosambisa mabota mpe bato na mokili. (Matai 25:31, 32) Kati na etumba monene oyo bikateli na Nzambe bikokokisama mpo na libela, na ntembe te Yesu akozala mpe elongo na baanzelu na ye.
11 Kasi bakobunda bobele bango moko te. Kati na nsango oyo atindaki na lisangá ya Tiyatire, Yesu alakaki ete: “Mpo na molongi oyo akobatela misala na ngai kino nsuka, nakopesa ye bokonzi likoló na mabota, mpe akokengela bango na fimbo na ebende, kino kobuka bango lokola mbeki na mabele ekobolama, motindo ngai mpe nazwi nguya epai na Tata na ngai.” (Emoniseli 2:26, 27) Na ntembe te, ntango ngonga ekokoka, bandeko na Klisto baoyo bakomikómela kuna na likoló, bango mpe bakobóla bato mpe mabota na fimbo ya ebende.
12. (a) Basaleli na Nzambe awa na mabelé bakobunda na etumba ya Armagedon? (b) Na nini libota na Jéhovah awa na mabelé batalelami na Armagedon?
12 Bongo basaleli na Nzambe awa na mabelé? Kelasi na Yoane bakomikotisa soko moke te kati na etumba ya Armagedon awa na mabelé, ekozala mpe motindo moko mpo na baninga na bango ya sembo, baoyo bauti kati na mabota nyonso oyo basopani kati na ndako na elimo mpo na losambo ya Jéhovah. Bato wana ya kimya basilaki kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli. (Yisaya 2:2-4) Nzokande, bazali kokanelama. Mpamba te, lokola toutaki komona yango, ezali nde libota na Jéhovah, oyo ezali komonana lokola ete ezali na libateli te, yango nde Gog mpe bibele na ye nyonso bakoluka kobundisa. Wana ezali nde elembo mpo na Mokonzi-Mobundi na Jéhovah, oyo azingami na mampinga ya makoló, na kobanda etumba mpo na kosilisa mabota. (Ezekiele 39:6, 7, 11; tala Danyele 11:44 kino 12:1.) Lokola bakozala batali mpamba, basaleli na Nzambe awa na mabelé bakosepela mingi mpo na etumba yango. Armagedon ekolimbola lobiko na bango, mpe bakozala na bomoi libela na libela, nsima na komona etumba monene oyo ekolongisa Jéhovah.
13. Ndenge nini toyebi ete ba Témoins de Jéhovah bazali kotemela biyangeli nyonso te?
13 Elingi koloba ete ba Témoins de Jéhovah bazali kotemela biyangeli nyonso? Soko moke te! Bazali kotosa toli oyo ya ntoma Paulo: “Tika ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi.” Bazali koyeba ete ntango nyonso oyo ebongiseli ya lelo ekoumela, “bakonzi” yango basengeli kozala wana; Nzambe asili kotikela bango nzela mpo na kotya mwa molongo kati na bato. Yango wana, ba Témoins de Jéhovah bafutaka mpako na bango, batosaka mibeko, bazali kolanda mibeko ya nzela, bazali kotosa bibongiseli ndenge na ndenge oyo bitali kokomisa nkombo na mikanda ya Leta, bongo na bongo. (Baloma 13:1, 6, 7) Lisusu, bazali kolanda mitinda na Biblia na kozaláká bato na bosembo, bato oyo balobaka solo, bato oyo balingi baninga na bango, bato oyo bazali kolendisa mabota mpo ete ekemba mpe ekangama na mitinda ya bizaleli malamu, mpe bazali koteya bana na bango ete bazala ba citoyens malamu. Na yango, bazali kopesa “biloko ya Kaisala epai na Kaisala, kasi biloko na Nzambe epai na Nzambe.” (Luka 20:25; 1 Petelo 2:13-17) Lokola Liloba na Nzambe lizali komonisa polele ete biyangeli na politike ya mokili oyo ezali mpo na ntango mokuse, ba Témoins de Jéhovah bazali komilengela sikawa na kozala mosika te na bomoi ya solo na nse na Bokonzi na Klisto. (1 Timote 6:17-19) Atako bapesameli mokumba te na kokweisa biyangeli ya mokili oyo, Batemwe bazali kotanga na nsomo ya limemya makambo oyo Biblia Mosantu, Liloba na Nzambe, ezali koloba mpo na etumbu oyo Jéhovah azali kokana kokokisa na Armagedon.—Yisaya 26:20, 21; Baebele 12:28, 29.
Azwi ekateli ya kokende liboso mpo na etumba ya nsuka
14. “Mopanga molai na kopela” oyo ebimi na monoko na Yesu elimboli nini?
14 Na bokonzi nini Yesu asukisi kolonga na ye? Yoane alobi na biso boye: “Na monoko na ye mopanga molai na kopela ebimi na ntina ete abola mabota nyonso. Ye akokengela bango na fimbo na ebende.” (Emoniseli 19:15a) “Mopanga molai na kopela” elimboli bokonzi oyo Nzambe apesi na Yesu, bokonzi oyo elingisi ye kopesa etinda ya koboma baoyo nyonso bazali koboya Bokonzi na Nzambe. (Emoniseli 1:16; 2:16) Elilingi oyo na nguya ezwi kokokana na yango kati na maloba na Yisaya oyo malandi: “[Jéhovah] abongisi monoko na ngai lokola mopanga mopeli makasi, abombi ngai na molili na loboko na ye; abongisi ngai lokola mbanzi epelisami.” (Yisaya 49:2) Awa Yisaya azalaki elilingi na Yesu, oyo azali kosakola bikateli na Jéhovah mpe kokokisa yango, lokola na nzela na mbanzi oyo ekoki koleka mpamba te.
15. Na ntango wana, nani akosila komonisama polele mpe akosila kosambisama, mpe na yango, nini ekosila kobanda?
15 Na ntango wana, Yesu akosila kokokisa maloba oyo na ntoma Paulo: “Bongo motioli na mibeko akomonana polele, ye oyo Nkolo Yesu akoboma ye na mpema na monoko na ye mpe akobebisa ye nyee wana ekomonana ye na ntango ekoya ye.” Ee, kozonga na Yesu (na greke parousia) emonisamaki kobanda na 1914 na ntango moto na lofundo oyo azali kotyola mibeko abimisamaki polele mpe asambisamaki, ye wana bakonzi na mangomba ya boklisto na mokili oyo. Kozonga yango ekomonisama na lolenge ya nsomo na ntango maseke zomi ya nyama na yauli na langi motane makokokisa ekateli wana mpe makopanza boklisto ya mokili oyo bakisa mpe mangomba mosusu ya Babilone Monene. (2 Batesalonike 2:1-3, 8) Ekozala wana ebandeli ya bolozi monene. Nsima na yango, Yesu akobalola miso na ye epai na baoyo bakotikala kati na lisanga ya Satana, na boyokani na esakweli oyo elobi ete: “Akobeta mokili na lingenda na monoko na ye, mpe na mpema na bibebu na ye akoboma [oyo] mabe.”—Yisaya 11:4.
16. Ndenge nini Nzembo mpe Yilimia ezali komonisa mokumba na Mokonzi-Mobundi oyo atyami na Jéhovah?
16 Mokonzi-Mobundi oyo aponami na Jéhovah akokesenisa kati na baoyo bakobika mpe baoyo bakokufa. Kolobáká kati na esakweli mpo na Mwana yango ya Nzambe, Jéhovah alobi: “Okotuta bango [bakonzi ya mokili] na lingenda na ebende, okobuka bango lokola mbeki na moyemi.” Mpe Yilimia alobi boye epai na bayangeli oyo mabe mpe na balandi na bango ete: “Bino babateli, bonguluma mpe bolela, bino mikoló na etonga bolelalela na mputulu; mpo ete mikolo na kobomama na bino misili koya mpe na kopalangana na bino, bokokwea lokola mbeki malamu!” Kasi, atako bakonzi yango bamimonisaki kitoko kati na mokili ya mabe, ebeteli se moko ya lingenda wana ya ebende na bokonzi ekopanza bango mikemike, lokola bakopanzaka mbeki moko ya kitoko. Ekozala mpenza lokola David asakolaki yango na ntina na Nkolo Yesu: “Jéhovah abimisa yo na Siona na makasi na mokonzi, na kolobaka ete: ‘Zala na bokonzi kati na bayini na yo.’ Jéhovah ye moko oyo azali na loboko na yo ya mobali akopanza bakonzi wana ekosilika ye. Ye akokata makambo kati na mabota, akotondisa yango na bibembe.”—Nzembo 2:9, 12; 83:17, 18; 110:1, 2, 5, 6; Yilimia 25:34.
17. (a) Ndenge nini Yoane alobeli mokumba ya koboma oyo Mokonzi-Mobundi azali na yango? (b) Tanga mwa bisakweli oyo bizali komonisa ete mokolo na nkanda na Nzambe ekozala nsomo mingi mpo na mabota?
17 Mokonzi-Mobundi oyo na nguya abimi lisusu kati na likambo oyo elandi ya emonaneli: “Ye akonyata ekamelo na vinyo na kongala na nkele na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 19:15b) Kati na emonaneli moko oyo toutaki kotalela, Yoane asilaki komona “ekamelo na vinyo na nkele na Nzambe.” (Emoniseli 14:18-20) Yisaya mpe azali komonisa ekamelo na vinyo to ebomeli, mpe basakoli mosusu bazali kolobela libebi monene oyo ekozala mpo na mabota na mokolo na nkanda na Nzambe.—Yisaya 24:1-6; 63:1-4; Yilimia 25:30-33; Danyele 2:44; Sofoni 3:8; Zakaria 14:3, 12, 13; Emoniseli 6:15-17.
18. Mosakoli Yoele ayebisi nini mpo na kosambisama ya mabota nyonso epai na Jéhovah?
18 Mosakoli Yoele alobeli ekamelo na vinyo esika moko na koya na Jéhovah mpo na “kosambisa mabota nyonso ya zongazonga.” Na ntembe te ezali Jéhovah nde azali kopesa etinda epai na Yesu, Mosambisi molandi na ye mpe na mampinga ya makoló ete: “Bokotisa ekateli na masango, mpamba te ntango na kobuka ekoki. Boingela, bokita na nse, mpo ete ekamelo na vinyo etondi. Bibombelo bizali kotonda mpe koleka, mpo ete mabe na bango mazali monene mpenza. Bibele, bibele, na lobwaku na kokata likambo; mpo ete mokolo na Jéhovah ebelemi na lobwaku ya kokata likambo. Moi mpe sanza ezimani mpe myoto na lola mikozanga kongengela bango. Jéhovah akongala longwa na Siona, akobimisa mongongo na ye longwa na Yelusaleme; lola mpe mokili ekotetema. Kasi Jéhovah azali ekimelo mpo na bato na ye, esika makasi mpo na bato na Yisraele. Bongo bokoyeba ete ngai nazali Jéhovah, Nzambe na bino.”—Yoele 3:12-17.
19. (a) Ndenge nini motuna motunami na 1 Petelo 4:17 mokozwa eyano? (b) Nkombo nini ekomami likoló na elamba na Yesu, mpe mpo na nini nkombo yango ekobonga mpenza?
19 Ekozala mpenza mokolo na kosambisama mpo na mabota mpe bato na kozanga botosi, kasi mokolo na kosikolama mpo na baoyo nyonso balukaki kobombama epai na Jéhovah mpe epai na Mokonzi-Mobundi. (2 Batesalonike 1:6-9) Lisambisi oyo ebandaki kati na ndako na Nzambe na 1918 ekokoma bongo na nsuka na yango, mpo na kopesa eyano na motuna oyo motunamaki kati na 1 Petelo 4:17 ete: “Nsuka na bango baboyi nsango malamu na Nzambe ekozala nini?” Mokonzi Molongi akosila kotutatuta vinyo na ekamelo to liboka kino na nsuka, komonisaka ete azali Mokonzi monene oyo Yoane alobi na ntina na ye ete: “Na elamba na ye mpe na ebelo na ye azali na nkombo ekomami ete: Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo.” (Emoniseli 19:16) Akomonisa ete nguya na ye eleki ya batambwisi nyonso ya mokili, ya bakonzi nyonso mpe ya bankolo nyonso. Lokumu na ye mpe kongenga na ye makasi ezali ya kokamwa koleka. Akosila kotambola “mpo na kobundela makambo na sembo, na kosokema mpe na boyengebene,” mpe akosila kolonga mpo na libela. (Nzembo 45:4) Likolo na elamba na ye oyo emwangisami makila, nkombo oyo Nkolo Moyangeli Jéhovah apesaki ye ekomami wana, ye oyo atindaki ye ete abunda mpo na kolongisa nkombo na ye.
Elambo monene na Nzambe
20. Yoane alobi nini mpo na “elambo monene na Nzambe, elambo na ye ya mpokwa,” kokundweláká biso esakweli nini ya kala oyo ekokani na elembo yango?
20 Kati na emonaneli ya Ezekiele, nsima na kobomama na bibele ya Gog, bandeke mpe nyama na yauli babyangami na elambo. Bakosilisa bibembe oyo bikobebisa bonzenga ya mboka na kolyáká misuni ya banguna na Jéhovah. (Ezekiele 39:11, 17-20) Maloba oyo na Yoane mazali mpenza kokundwela biso esakweli wana ya kala: “Namonaki anzelu moko atelemi na moi, mpe angangi na mongongo makasi koloba na bandeke nyonso baoyo bapombwi na nzángá ete: ‘Yaka koyangana na elambo monene na Nzambe ete bolia mosuni na bakonzi, ná mosuni na mikóló na etumba, ná mosuni na bato makasi, ná mosuni na bampunda mpe na bafandi na yango, ná mosuni na bato nyonso, ná bansomi na baombo, ná mike na minene.’”—Emoniseli 19:17, 18.
21. Nini emonisami na (a) anzelu “atelemi kati na moi”? (b) bibembe bikokundama te? (c) molongo na baoyo nyonso bibembe bikokundama te? (d) liloba “elambo monene na Nzambe, elambo na ye ya mpokwa”?
21 Anzelu “atelemi kati na moi,” etelemelo oyo eleki malamu mpo na kobenda likebi na bandeke. Azali kobyanga bango na komilengela mpo na kolya misuni na baoyo bakobomama na Mokonzi-Mobundi mpe mampinga na ye ya makoló. Lokola bibembe bikoyanganisama te, emonisi ete basengeli kokufa na lolenge ezangi lokumu liboso na bato banso. Lokola yango ezalaki mpo na Yezabele kala, bakozala na nkunda ya lokumu te. (2 Mikonzi 9:36, 37) Molongo ya baoyo bibembe na bango ekotikama motindo wana emonisi ete libebi yango ekozala monene: bakonzi, mikóló na bitumba to ba komandá, bato na makasi, bato nyonso mpe baombo. Moko te akobikisama. Elembo moko te ya batomboki oyo bazali kotemela Jéhovah ekotikala. Na bongo mai monene, elingi koloba bato na yikiyiki, ekolimwa. (Emoniseli 21:1) Yango ezali “elambo monene ya Nzambe, elambo na ye ya mpokwa,” mpamba te ezali Jéhovah nde abyangi bandeke na limpáti yango.
22. Ndenge nini Yoane alobeli na mokuse ndenge etumba oyo monene ekosalema mpe ekosuka?
22 Sikawa Yoane alobeli na mokuse ndenge etumba yango ekosalema: “Namonaki nyama na yauli, na bakonzi na mokili na bibele na babundi na bango, basili koyangana kobunda etumba na mofandi na mpunda mpe na bibele na babundi na ye. Nyama na yauli akangami, mpe esika moko na ye mosakoli na lokuta, oyo asalaki bilembo liboso na ye, mpe bongo azimbisi bango bakamati elembo na nyama na yauli mpe basambeli ekeko na ye. Bango mibale babwakami bongo na bomoi kati na libeke na mɔ́to ekopelaka na sufulu. Baoyo batikalaki babomami na mopanga molai na mofandi na mbalata, mopanga oyo ebimi na monoko na ye, mpe bandeke nyonso batondaki na misuni na bango.”—Emoniseli 19:19-21.
23. (a) Na ndimbola nini “etumba na mokolo yango monene na Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” ezali kosalema na “Armagedon”? (b) Likebisi nini “mikonzi na mokili” baboyaki kotosa yango, mpe ebendeli bango makambo nini?
23 Nsima na kosopama na mbeki na motoba na nkanda na Jéhovah, Yoane ayebisi ete “bakonzi na mikili nyonso” bayanganisami na nzela na propagande na badémo mpo na “etumba na mokolo yango monene na Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” Ezali kosalema na Armagedon, oyo ezali esika mpenza te, kasi ezalela ya mokili mobimba oyo ekopusa Jéhovah ete akokisa bikateli na ye. (Emoniseli 16:12, 14, 16) Sikawa, Yoane amoni milongo mitandami mpo na kobunda etumba. Kuna, “bakonzi nyonso na mokili mpe mampinga na bango” bayangani esika moko mpo na kobundisa Nzambe. Baboyaki na motó makasi kondima kotosa Mokonzi oyo Jéhovah aponi. Nzambe akebisaki bango na boyengebene nyonso engebene maloba oyo mapemamaki na elimo na ye: “Pwepwa makolo [na mwana] na ye na limemya ete [Jéhovah] asilika te mpe bobeba kati na nzela te.” Lokola batosi bokonzi na Klisto te, basengeli kokufa.—Nzembo 2:12.
24. (a) Etumbu nini epesami epai na nyama na yauli mpe mosakoli na lokuta, mpe na ndimbola nini “bazali naino na bomoi”? (b) Mpo na nini “libeke na móto” esengeli kozala ya elilingi?
24 Nyama na yauli na mitó nsambo mpe na maseke zomi oyo abimi na mai mpe oyo azali elilingi na lisangá na politike ya Satana akolimwa, mpe elongo na ye mosakoli na lokuta to Nguya ya Nsambo ya mokili mobimba. (Emoniseli 13:1, 11-13; 16:13) “Naino ezali bango na bomoi,” elingi koloba naino ezali bango kotemela libota na Nzambe awa na mabelé, babwakami kati na “libeké na móto.” Ezali mpenza libeke na mɔ́to ya solo? Te, ata mpe nyama na yauli mpe mosakoli na lokuta bazali mpe nyama ya solo te. Libeke yango ezali nde elembo ya kobomama mobimba mpe libela, elembo na esika oyo bakobimaka te. Ezali kuna nde, na nsima, bakobwaka liwa, nkunda to Hadès mpe Diable ye moko. (Emoniseli 20:10, 14) Ezali mpenza lifelo ya móto te mpo na konyokola libela bato mabe, mpamba te likanisi ya esika motindo wana ezali eloko na kotyolama na miso na Jéhovah.—Yilimia 19:5; 32:35; 1 Yoane 4:8, 16.
25. (a) Banani oyo ‘babomami na mopanga na kopela ya ye oyo afandi likoló na mpunda’? (b) Tosengeli kozela ete baoyo ‘babomami’ bakosekwisama?
25 Baoyo nyonso bazalaki mpenza te basangani ya boyangeli moko te kasi atako bongo, bazalaki bato ya mokili oyo mabe, baoyo wana nyonso mpe ‘bakobomama na mopanga molai na ye oyo afandi likoló na mpunda.’ Yesu akokatela bango liwa. Lokola balobeli libeke na móto te na kati na likambo na bango, tosengeli komizela ete bazwa lisekwa? Esika moko te eyebisami ete baoyo bakobomama na ntango wana na Mosambisi na Jéhovah basengeli kosekwa. Lokola Yesu ye moko alobaka yango, baoyo nyonso bazali kati na “bampate” te bazali kokende “na móto ya seko oyo ebongisami mpo na Diable mpe baanzelu na ye,” elingi koloba na “kobomama ya seko.” (Matai 25:33, 41, 46.) Ezali boye nde “mokolo na kosambisama mpe na koboma bato bakotiolaka Nzambe” ekosuka.—2 Petelo 3:7; Nahumu 1:2, 7-9; Malaki 4:1.
26. Limbola na mokuse nsuka ya Armagedon.
26 Na boye nde lisangá mobimba ya Satana na mabelé ekolimwa. “Likoló ya kala” to boyangeli na politike ekosila kolimwa. “Mabelé,” ebongiseli oyo ezalaki komonana lokola nde ekoumela ntango molai, oyo etyamaki na Satana na boumeli ya bikeke, nyonso ekosila kobomama. “Mai monene,” ebele na bato mabe oyo bazalaki kotemela Jéhovah, ekozala lisusu te. (Emoniseli 21:1; 2 Petelo 3:10) Kasi etumbu nini Jéhovah abombeli Satana ye moko? Yoane akoyebisa biso yango.