Mituna ya batángi
Batatoli ya Yehova mosusu bapesaki bango mosala na bandakonzambe to na bandako mosusu ya mangomba. Biblia elobi nini mpo na mosala ya ndenge yango?
Likambo oyo ekoki kokómela baklisto oyo na bosembo nyonso balingi kokokisa 1 Timote 5:8, oyo elobi ete moto asengeli kokokisa bamposa ya mosuni ya libota na ye. Atako baklisto basengeli kolanda toli wana, yango elingi koloba te ete basengeli kondima mosala nyonso, ata soki ezali ndenge nini. Baklisto bayebaka ete basengeli kotosa makambo mosusu oyo esɛngami na mokano ya Nzambe. Na ndakisa, mposa oyo moto azali na yango ya kosalisa libota na ye epesi ye nzela te ya kobuka mobeko ya Biblia na ntina na pite to ekobo, to mpe koboma moto. (Talá Genese 39:4-9; Yisaya 2:4; Yoane 17:14, 16.) Ezali lisusu na ntina mingi ete moklisto atosa etinda oyo elobi ete bóbima na Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta na mokili mobimba.—Emoniseli 18:4, 5.
Na mokili mobimba, basaleli ya Nzambe bazali kokutana na mikakatano mingi etali mosala. Ezali na ntina te mpe tozali na bokonzi te ya komeka kotánga misala nyonso oyo ebongi mpe kotya mibeko ya sikisiki. (2 Bakolinti 1:24) Kasi, tiká tólobela mwa makambo oyo moklisto asengeli kotalela ntango azali kozwa bikateli mpo na mosala na ye. Makambo yango malobelami na mokuse na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Okɔtɔbɛ 1982 (ebimeli ya Lifalanse), na lisolo oyo ezali na motó na likambo ete tósalela malamu lisosoli oyo Nzambe apesi biso. Mituna mibale ya ntina mingi etunami na etanda moko mpe emonisi makambo mosusu oyo ekoki mpenza kosunga na likambo yango.
Motuna ya liboso yango oyo: Biblia eboyi mpenza mosala yango? Na likambo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaki ete Biblia eboyi koyiba, kozongisa makila, mpe kosambela bikeko. Moklisto asengeli koboya mosala oyo ezali kolendisa misala oyo Nzambe aboyi, lokola oyo touti kotánga.
Motuna ya mibale: Moto oyo akosala mosala yango, akosangana na makambo oyo eboyami? Emonani polele ete, moto oyo asalaka na esika babɛtaka masano ya mbongo, na lopitalo oyo mosala na yango ezali se kolongola basi zemi, to na ndako oyo basalaka kindumba, azali kosangana na misala oyo Biblia eboyi. Ata soki mosala na ye ya mokolo na mokolo ezali kaka kokɔmbɔla esika to koyanola na telefone, azali kosangana na mosala oyo Liloba ya Nzambe eboyi.
Baklisto mingi oyo bakutanaki na mikakatano ya mosala bamonaki ete kotalela malamumalamu mituna wana esalisaki bango na kozwa ekateli.
Na ndakisa, na kotalela mituna wana mibale, moto moko akoki komona ntina oyo mosambeli ya solo ya Nzambe akolinga te bázwa ye na mosala na lisangá moko ya losambo ya lokuta, na ndikisa kosala na ndakonzambe moko. Emoniseli 18:4 elobi ete: “Bino bato na ngai bóbima na ye, ete bósangana na masumu na ye te.” Moto akosangana na misala mpe na masumu ya Babilone Monene soki asalaka mikolo nyonso na lingomba moko oyo ezali koteya lokuta. Ata soki azali moloni fololo, sinzili, moto oyo abongisaka biloko oyo ebebi, to comptable, mosala na ye ekotombola losambo ya lokuta. Lisusu, bato oyo bakomona moto yango kosala mosala ya kokembisa ndakonzambe, kobongisa biloko oyo ebebi, to kosala misala mosusu ya lingomba, na ntembe te bakoloba ete moto yango asambelaka na lingomba wana.
Kasi, tokoloba boni mpo na moto oyo asalaka na ndakonzambe to na lingomba ya lokuta mikolo nyonso te? Mbala mosusu babéngisi ye nokinoki mpo na kobongisa tiyo ya mai oyo etɔbɔki na twalɛti ya ndakonzambe. Yango ekeseni na kontra ya mosala, na ndakisa, mpo na kobamba madusu na manzanza ya ndakonzambe, boye te?
Tomoni ete makambo yango ekoki kozala ya ndenge mingi ekeseni. Sikoyo tótalela makambo mosusu mitano oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisi:
1. Mosala yango, ezali se mpo na kosalisa bazalani, mpe epekisami na Biblia te? Tókamata ndakisa ya mosali na posita. Tokoloba te ete azali kolendisa mosala oyo epekisami mpamba te akei kotika mikanda na ndakonzambe to na lopitalo oyo balongolaka basi zemi. Nzambe abimisaka moi na ye mpo na kongɛngisa bandako nyonso, ezala ndakonzambe to lopitalo oyo balongolaka basi zemi. (Misala 14:16, 17) Moklisto oyo asalaka na posita akoki kotalela mosala na ye ya mokolo na mokolo ete ezali ya kosunga bato nyonso. Ekoki kozala ndenge moko na moklisto oyo akei mbangumbangu na esika babéngisi ye: na ndakisa mobongisi pɔmpi akei kokanga tiyo oyo etɔbɔki na ndakonzambe to monganga oyo babéngisi mpo na kosalisa moto moko oyo akwei na ntango ya misa. Akoki kotalela likambo yango ete ezali se lisungi oyo apesi na bazalani.
2. Moto yango azali na bokonzi nini na mosala yango? Moklisto oyo azali nkolo ya butiki akoki te kosomba to kotɛkisa bikeko, makaya, to boudin ya moindo. Azali na bokonzi mpamba te azali nkolo ya butiki. Bato bakoki koloba na ye atɛkisaka mpe makaya to bikeko mpo azwa mbongo, kasi akotosa bindimeli oyo Biblia ezali koteya ye. Nzokande, moklisto oyo asalaka na magazini moko ya monene bakoki kopesa ye mokumba ya kosalaka faktire, kokɔmbɔla, to na comptabilité. Azali na bokonzi te na biloko oyo bakosomba to oyo bakotɛkisa, ata soki biloko mosusu eboyami, na ndakisa makaya to biloko ya bafeti ya mangomba.a (Talá Luka 7:8; 17:7, 8.) Likambo oyo eyokani na likambo oyo elandi.
3. Na meko nini moto azali kosangana na mosala yango? Tózongela ndakisa ya magazini. Moto oyo asalaka faktire to atandaka biloko, na mabaku mosusu atandaka makaya to biloko ya bafeti ya mangomba; yango ezali mwa eteni moke ya mokumba na ye. Nzokande, akeseni mpenza na mosali mosusu na kati ya magazini wana oyo mosala na ye ezali se na mesa ya makaya! Mosala na ye ya mikolo nyonso, eyokani te na bindimeli ya boklisto. (2 Bakolinti 7:1) Ndakisa yango emonisi ntina ya kotalela liboso ya kozwa ekateli na meko nini moto akosangana na mosala moko.
4. Mbongo oyo bakofuta yo ekouta wapi to mosala yango ekoselama wapi? Tótalela ndakisa mibale. Mpo na kobenda bato, lopitalo moko oyo balongolaka zemi endimi kofuta moto moko mpo na kokɔmbɔla babalabala ya zingazinga. Mbongo oyo bakofuta ye eutaka na lopitalo ya kolongola zemi, kasi asalaka mosala kuna te, mpe bamonaka ye kuna mikolo nyonso te. Kasi, bamonaka ye kokɔmbɔla babalabala; Biblia epekisi mosala yango te, ata soki lifuti eutaka wapi. Sikoyo, tótala bokeseni: Na mboka oyo Leta apesi nzela na kindumba, departema ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto efutaka lifulumɛ moko mpo na kosala na balotele, kosalaka bandumba ekizame mpo na kobatela bango bázwa te maladi oyo ezwamaka na nzela ya kosangisa nzoto. Ata soki bazali kofuta ye na departema ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto, kasi mosala na ye mobimba ezali kosalema na ndako ya kindumba, kosala ete bato bábanga makama ya kindumba te kutu bálinga yango mingi. Bandakisa oyo emonisi ntina oyo esengeli kotalela esika mbongo oyo bakofuta yo ekouta mpe esika mosala ekosalema.
5. Mosala yango ekotalelama ndenge nini; ekozokisa lisosoli ya moto ye moko to ekobɛtisa bato mosusu mabaku? Tosengeli kotalela lisosoli na biso moko na oyo ya bato mosusu. Ata soki mosala moko (bakisa mpe esika yango ekosalema mpe esika mbongo ya lifuti ekouta) endimami na baklisto mingi, moto moko akoki komona ete ezali kotungisa lisosoli na ye. Ntoma Paulo oyo apesaki ndakisa malamu, alobaki ete: “Tondimi ete tozali na lisosoli na pɛto; tozali na mposa kosalaka malamu na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Tosengeli koboya kosala mosala oyo ekotungisa lisosoli na biso; kasi, tosengeli te kotɔnga bato oyo lisosoli na bango ekeseni na oyo ya biso. Nzokande, moklisto moko akoki komona ete abuki mobeko ya Biblia te na mosala moko oyo azali kosala, kasi akoki komona ete mosala yango ezali mpenza kotungisa lisosoli ya bandeko mingi na kati ya lisangá mpe na kartye. Ntoma Paulo amonisaki makanisi malamu na maloba oyo: “Tokotyaka libaku na nzela na moto te ete lotomo na biso ekwea te. Kasi lokola basali na Nzambe, tokomilobela biso mpenza kati na makambo nyonso.”—2 Bakolinti 6:3, 4.
Sikoyo tózonga mpenza na likambo ya kosala na ndakonzambe, na ndakisa kotya maninisa ya sika, kopɛtola tapi, to kobongisa etumbelo. Ndenge nini makambo tolobeli na likoló ekoki kotalelama?
Tókanisa lisusu likambo ya bokonzi. Ndeko moklisto azali nkolo kompanyi to azali mokonzi mpe azali na bokonzi ya kokata soki mosala na ndakonzambe esengeli kosalema? Moklisto oyo azali na bokonzi na likambo yango akolinga nde kosangana na Babilone Monene na kondima mosala to kontra ya kosunga lingomba oyo ezali kolendisa losambo ya lokuta? Yango ekotalelama te lokola ete azwi ekateli ya kotɛkisa makaya to bikeko na butiki na ye?—2 Bakolinti 6:14-16.
Soki moklisto azali mosali oyo azali na likambo ya koloba te na mosala oyo endimami, makambo mosusu masengeli kotalelama; na ndakisa esika mosala ekosalema mpe makambo oyo yango ekosɛnga. Basɛngi na mosali yango se na libaku moko ete akende kotika to kotya bakiti ya sika to kosala mosala oyo ekosunga bato, lokola koboma mɔ́tɔ oyo epeli na ndakonzambe liboso ete ekóma makasi? Bato mingi bakomona ete ekeseni na moto oyo azali kolekisa ntango mingi mpo na kopakola langi na ndakonzambe to mikolo nyonso abongisaka bafololo mpo na bonzenga ya ndakonzambe. Mosala ya mikolo nyonso to kontra molai motindo wana ekopusa bato mingi na koloba ete moklisto wana asambelaka na lingomba yango, atako azali koloba ete alingaka yango te, mpe akoki kobɛtisa bango libaku.—Matai 13:41; 18:6, 7.
Tomonisi makambo mingi ya ntina oyo masengeli kotalelama liboso ya kondima mosala. Yango emonisami mpenzampenza na likambo oyo etali losambo ya lokuta. Kasi, yango ekoki mpe kotalelama na misala ya ndenge mosusu. Na likambo moko to mosusu, esengeli kotalela na likebi, kozanga kobosana makambo ya sikisiki—mpe mbala mosusu oyo ekokani na mosusu te na mosala oyo moto alingi kosala. Makambo oyo tolobeli na likoló masili kosunga baklisto mingi ya sembo na kozwa bikateli ya malamu oyo emonisi ete bazali na mposa ya kotambola alima mpe na bosembo liboso ya Yehova.—Masese 3:5, 6; Yisaya 2:3; Baebele 12:12-14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Baklisto mosusu oyo basalaka na lopitalo batalelaki likambo yango ya bokonzi. Monganga akoki kozala na bokonzi ya kokomela moto ya maladi nkisi to kopesa ye mwa malako. Ata soki moto ya maladi aboyi te, moklisto oyo azali monganga akosalela nde bokonzi na ye mpo na kozongisa makila to kolongola ye zemi, lokola ayebi malamu makambo oyo Biblia elobi na ntina na yango? Kasi, lifulumɛ oyo asalaka na lopitalo akoki kozala na bokonzi wana te. Na mosala na ye ya mokolo na mokolo, monganga akoki kotinda ye asala moto moko ekizame mpo na ntina moko to mosusu to mpe asalisa mwasi oyo ayei kolongolisa zemi. Na boyokani na likambo oyo 2 Mikonzi 5:17-19 elobeli, akoki koloba ete lokola etinda ya kozongisa makila to ya kolongola zemi euti epai na ye te, akoki kosala mosala na ye ya kosunga moto ya maladi. Atako bongo, asengeli kotalela lisosoli na ye, mpo ete ‘atambola na lisosoli malamu liboso na Nzambe.’—Misala 23:1.